Makambo mazali koleka na mokili
Ndako ya kobomba mbuma ya kolona
Zulunalo National Post ya Canada elobi ete: “Bato ya siansi bayebisi ete mitindo mwa mingi (25 %) ya banzete ya mokili ekoki kosila nyɛɛ nsima ya mbula 50.” Mpo na kobatela mitindo ya banzete yango oyo ezali na likama, Jardin botanique royal ya mboka Kew, na Angleterre, esali esika ya kobomba mbuma ya kolona na nkombo Millennium Seed Bank (MSB). Zulunalo yango ebakisi ete: “Mokano ya MSB ezali ya kokɔngɔla mpe kobomba mitindo ya banzete koleka 25 000—elingi koloba mwa ndambo (koleka 10 %) ya banzete nyonso ya mokili mobimba oyo ezalaka na mbuma ya kolona.” Bakambi ya MSB bazali kokana kosalela mbuma yango ntango bakozala na mposa ya kobongisa mabele oyo ebebi na ndenge bazali kosalela yango bilanga mingi koleka; balingi mpe kosalela yango mpo makama ya nzala ebimaka lisusu mingi te, mpe mpo na kozwa banzete oyo basalelaka nkisi ya bonkɔkɔ mpe ya monganga. Roger Smith, ye na mobimisi ya likanisi yango, alobi boye: “Mingimingi banzete oyo bato na banyama basalelaka mingi nde esilaka liboso.”
Kopesa bana mike mateya oyo etali biboteli
Zulunalo Bangkok Post eyebisi ete na Bangkok (Thaïlande) etikali moke bábanda kopesa bana mike ya eteyelo ya maternelle mateya oyo etali biboteli (éducation sexuelle). Zulunalo yango elobi ete mpo na Monganga Suwanna Vorakamin, mokonzi ya departema oyo etalelaka makambo ya mabota mpe ndenge bato bazali kobota, “balakisi mpe minganga bakozwa formasyo oyo ebongi mpenza mpo bálakisa mpe bálobela biboteli ya mwasi mpe ya mobali na ndenge bato ya siansi balobelaka yango.” Alobi mpe ete: “Soki tokɔtisi mateya oyo etali biboteli banda na eteyelo ya bana mike ezali te mpo tótinda bango bábanda kosangisaka nzoto. . . . Kasi makambo oyo bakolakisa bana ntango bazali naino mike ekosalisa bango bámibatela liboso na bizaleli ya mabe mpe bázwa zemi ya balabala te ntango bakokóma bilenge.”
Misapi ya makolo na bango ekangaka makasi
Miselekete oyo babenga gecko bamonaka mpasi ata moke te mpo na kotambolatambola na plafɔ ata ezali mosɛlu lokola talatala. Sɛkɛlɛ na bango ezalaka nini? Eleki bambula ebele banda bato ya siansi babandá koluka koyeba yango, sikoyo nde bamoni ete bazwi ndimbola ya likambo yango. Etuluku moko ya bato ya siansi mpe ba ingénieur bamonaki ete “soki gecko atii makolo na esika moko boye, nguya moko ya monene mpenza, ekokani na oyo ya colle, ebimaka na bansuki ya mike mpenza oyo ezalaka na nse ya makolo na ye, mpe esalaka ete akangama makasi na esika oyo ye anyati. Bansuki yango, oyo babengaka soie, mokomoko ebimisaka bansinga ya mike mpenza oyo babengaka spatule. Ntango gecko atyaka lokolo na esika moko boye, bamiliare ya ba spatule oyo etondi na nse ya lokolo na ye ekangamaka makasi na esika yango; yango ekoki kosala ete bamolekile(biteni mikemike ya nzoto) ebanda kobendanabendana.” Bato yango ya siansi balobi lisusu ete ndenge ba gecko banyataka na misapi na bango “esalaka ntango mosusu ete bansuki ya nse ya makolo na bango efinana na esika oyo banyati mpe ebendaka yango na bolai ya esika yango.” Zulunalo yango elobi ete, na bongo, “nguya oyo nsuki mokomoko ezalaka na yango ya kokangama makasi [na bisika] ebakisamaka mbala zomi.”
Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce esilikeli Leta
“Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce esiliki makasi” mpo Leta ya mboka Grèce ebimisi mobeko ete na mikanda ya Leta ekozala lisusu te na esika oyo ezali koyebisa ete moto oyo azali moto ya lingomba boye to boye. Nsango yango epesamaki na Internet. Soki Leta ya Grèce akamataki mokano yango, ezali mpo ebongiseli moko oyo etalelaka ntomo ya moto (Helsinki International Federation for Human Rights) emonisaki na kati ya lapolo moko oyo ebimaki na 1998 ete “Grèce esalaka makambo na nko epai ya baoyo bazali bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce te mpe ete lokola bakomaka na kati ya mikanda na bango ya Leta ete moto oyo azali moto ya lingomba boye to boye esalaka ete báboya kozwa bato mosusu na mosala mpe bapolisi bányokolaka bango.” Leta ya Grèce alobi ete mbongwana yango “ekosala ete mikanda ya Leta ekokisa mitinda ya Union européenne mpe mobeko ya mboka oyo ebimaki na 1997 mpo na kobatela makambo oyo elekaka na bomoi ya moto na moto, makambo oyo etali kaka moto ye moko.” Nzokande, mokonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce alobi ete baoyo balingi ete lingomba ya moto eyebisama te na kati ya mikanda na ye ya Leta bazali na ngámbo ya “bato ya misala ya molili.”
Mipɛpɛ makasi na Chine
Zulunalo China Today emonisi ete na bambula oyo euti koleka, mipɛpɛ moko makasi oyo esanganá na mputulu eutaki na bisobe na kati ya Mongolie mpe ekatisaki na nɔrdi ya Chine. Kuna, ebebisaki biloko oyo—loso, masangu, ndunda . . . mpe bibwele—ekoki kozala na valɛrɛ ya badolare bamilio ebele. Na mobu 2000, mipɛpɛ mingi ya ndenge wana ekómaki tii na engumba-mokonzi, Pékin. Na 1998 mopɛpɛ moko ya makasi oyo esanganá na zɛlo ebebisaki hectare 33 000 ya bilanga ya loso mpe masangu mpe ebomaki banyama ya mboka 110 000. Soki makama wana ebimaki, libosoliboso ezali mpo bato bazali kosalela mabele na ndenge ya mabe. Na bitando ya milai, bakatákatá banzete mpe matiti mpe bisika yango ekómá bisobe. Na ndakisa, na 1984, bato ya etúká ya Ningsia Hui, na nɔrdi-wɛsti ya Chine, babandaki kotimolatimola mabele mpo na koluka misisa oyo babengaka réglisse mpo na kosala na yango nkisi ya bonkɔkɔ. Zulunalo yango ebakisi ete: “Nsima na yango, mbula zomi kutu ekokaki te, hectare 600 000 oyo ezalaki na matiti ebebisamaki mpe hectare 13 333 ya mabele ya bilanga ekómaki bisobe ya zɛlo.” Na bisika mosusu, bisobe ya zɛlo ezali kobima mpo banyama bazali kolya matiti na ndenge oyo eleki ndelo mpe mpo bato bazali kosalela mai na ndenge oyo eleki ndelo. Mpo na kosilisa mokakatano wana mpe mpo na kopekisa ete bisobe ya zɛlo ebakisama te, bazali kosala makasi mpo na kolona lisusu banzete mpe matiti.
Bato ya Angleterre balingi televizyo makasi
Zulunalo moko ya Londres, The Independent, elobi ete: “Pɔsɔ na pɔsɔ, soki ozwi bato minei ya Angleterre, pene na moko kati na bango alekisaka ntango mingi na kotala televizyo; ntango yango ezali se ndenge moko na oyo alekisaka na mosala na ye.” Bato oyo basalaki ankɛtɛ yango balobi ete bato ya Angleterre balekisaka na pɔsɔ moko ngonga soki 25 mpo na kotala televizyo, nzokande kati na bango bamosusu (21 %) balekisaka ngonga koleka 36. Zulunalo yango elobi ete: “Ezali kaka bilenge te nde bazali kotala telivizyo mingi koleka, likambo yango etali mpe mikóló, bakisa mpe mibange. Libota moko oyo balekisaka ngonga 30 na pɔsɔ mpo na kotala televizyo balobaki ete esalisaka bango “báminanola mpo na kobosana mitungisi ya bomoi.” Nzokande, momeseno wana ya kolekisa ndelo na kotala televizyo ebotaka mpe mbuma na yango. Ntango basalaki baankɛtɛ na bikólo 20, zulunalo The Guardian Weekly ya Londres elobi ete Royaume-Uni nde “ebimaki na motó ya liste mpo na oyo etali likambo ya kotala televizyo mingi.” Nzokande, “ekólo yango ezali na nsuka ya mɔlɔngɔ mpo na oyo etali masɛngami misato ya ntina oyo etali kotánga.”
Ntina mpenza ya kobundisa bamikrobe ezali te
Zulunalo USA Today elobi ete “na bandako na bango, bato ya Amerika bazali kobundisa mikrobe, kasi ntina mpenza ya etumba yango ezali te.” Zulunalo yango emonisi ete Stuart Levy, monganga mpe moto ya mayele na microbiologie na Iniversite ya Tufts, alobaki ete “lokola bazali kobimisa bankisi mingi oyo ebomaka mikrobe . . . , yango ekoki kosala ete bamikrobe ya makasi mpenza ebima, bamikrobe oyo ekozala mpasi mingi mpo na koboma yango ata na sabuni oyo ebomaka mikrobe to na nkisi babengi antibiotique.” Levy alobi ete kosalela bankisi oyo ebomaka bamikrobe mpo na kosala ete ndako ezanga bamikrobe ezali lokola “koboma nzinzi na marto.” Nzokande, biloko ya kosukola na yango ndako, lokola mai ya javel, mai oyo babengaka eau oxygénée mpe mai ya mɔ́tɔ oyo batyá sabuni, elongolaka salite kasi epekisaka bamikrobe kokóma makasi mingi koleka. Levy alobi ete “bamikrobe ezali baninga na biso, tosengeli koyokana na bango.”
Koyiba bankombo
Zulunalo El Economista ya engumba Mexico eyebisi bato bákeba na miyibi oyo bakamata nkombo mpe adresi ya bato mosusu mpo na kokosa bibongiseli oyo edefisaka mbongo. Nsima ya koyeba makambo oyo etali yo na ntango bayibi mikanda oyo bato mosusu bakomelaki yo to potemone na yo, miyibi wana bakobimisa karti ya kredi na nkombo na yo mpe bakosɛnga ete bátindela bango yango na adresi na bango. Nsima na yango, bakosalela nkombo na yo mpo na kosomba biloko to kozwa ndako ya kofutela na nzela ya telefone to Internet. Zulunalo yango elobi ete baoyo bazali kozwama na motambo ya miyibi wana bakoki kosala bambula mingi mpo na koluka kosilisa mikakatano ya mbongo oyo miyibi wana balukelaki bango. Ndenge nini okoki komibatela? El Economista epesi toli oyo: Kotambola te na mikanda na yo ya ntina mingi soki oyebi ete okozala na mposa na yango te; komáká na esika moko boye banyongo nyonso oyo ozali kozwa na karti na yo ya kredi mpe ntango bafaktire na yango ekoya taláká malamu soki ekokani na ndenge oyo okomaki; pasoláká bafaktire liboso ya kobwaka yango; kotinda makambo na yo na nzela ya Internet te; saláká liste ya banimero ya bakarti na yo ya kredi, dati oyo yango ekosila, banimero ya telefone ya bakompani oyo epesaki yo yango mpo na koyebisa bango soki bakarti na yo ebungi to bayibi yango.
Maladi ya motema oyo eyokisaka moto mpasi te
Bato mingi bayebaka ete soki maladi ya motema elingi kosala bango, ntolo esalaka lokola kokangama. Nzokande, zulunalo Time elobi ete bato moke mpenza nde bayebi ete “na bato misato oyo babɛlaka motema, moko kati na bango ayokaka mpasi na ntolo te na ntango mpasi yango engali.” Yango emonisi mpo na nini “bato oyo babɛlaka maladi ya motema kozanga koyoka mpasi na ntolo, bakendeke noki te na lopitalo, mingimingi balekisaka pene na ngonga mibale liboso ya kokende na lopitalo.” Bolukiluki moko oyo ebimaki na zulunalo moko (The Journal of the American Medical Association) nde emonisaki likambo yango. Nzokande, soki maladi yango engali mbalakaka, kozela ata mwa moke te mpo na kozwa lisalisi ya monganga oyo ekoki kobikisa yo; mpamba te soki ozeli, ekozala likama. Bongo bilembo nini mosusu esengeli kotyela yango likebi? Zulunalo Time elobi boye: “Ekoki kozala ete likambo mosusu ya monene oyo esengeli kokeba na yango yango oyo: kokóma na pema mokuse mpenza.” Bilembo mosusu ekoki kozala: kosanzasanza mpe kotɔka mingi. Zulunalo oyo touti kotánga ebakisi mpe elembo oyo: “Okomona ete na ntango oyo ozali kotambola to ozali kosala mosala okómi koyoka mɔ́tɔ makasi na katikati ya ntolo ndenge maladi ya estoma esalaka.”