Ekomamá ete nakomona ye lisusu
Lisolo ya Rosalía Phillips
“Yo okozala moyembi monene! Oyebi koyemba!” Mokambi ya orkɛstrɛ na biso nde alobaki na ngai bongo wana afandi na piano na ye, mwa moke liboso báfungola rido ya esika ya lisano. Bayembi mosusu minei ya orkɛstrɛ yango basalaki bilembo mpo na kotombela ngai boyei malamu. Nazalaki moyembi ya sika na orkɛstrɛ yango; nalataki robɛ ya motane ya ngɛlingɛli. Mwa kobanga eyelaki ngai. Tozalaki na moko ya bandako ya masano oyo eleki monene na engumba Mexico, mpe ezalaki mbala ya liboso nayemba na miso ya bato ebele, mpe ezalaki ebandeli ya mosala na ngai ya moyembi mpe ya bafilme! Ezalaki na sanza ya Marsi 1976, mpe etikalaki sanza moko nakokisa mbula 18.
MBULA misato eutaki kokoka kobanda tata akufaki, mpe nazalaki naino kokanisa ye mingi. Bato mpe bazalaki naino kokanisa ye mingi. Balingaki ye mingi mpe bazalaki kosepela na ye mpo azalaki moko ya bato ya teyatre oyo bayebanaki mingi na ekólo mobimba; asalaki bafilme koleka 120, na eleko oyo bafilme ekómaki na lokumu mingi na Mexique. Nkombo na ye, Germán Valdés, “Tin-Tán,” bazalaki kokoma yango na baporte ya bandako ya teyatre na Amerika ya ntei mpe ya sudi, mpe na bamboka oyo balobaka monɔkɔ ya Espagnol na États-Unis mpe na Mpoto. Tii lelo, mbula koleka 30 banda akufá, balakisaka bafilme na ye na televizyo mbala na mbala.
Kobanda ntango nazalaki mwana moke, tozalaki koyamba na ndako na biso bato oyo bayebani mingi. Mama ná balɛki na ye ya basi bazalaki koyemba bango misato, bazalaki kobenga bango Las Hermanitas Julián (ba Julián). Ndeko na bango ya mobali, Julio Julián, ayebanaki mingi mpo azalaki koyemba na opéra na Mpoto, na mongongo ya ténor, nzokande mwasi na ye Conchita Domínguez, moto ya Espagne, azalaki koyemba na mongongo ya soprano. Longola yango, baleki mibale ya tata, Manuel “Loco” (oyo elimboli moto ya ligboma) Valdés mpe Ramón Valdés, oyo ayebanaki na nkombo Don Ramón, bazalaki kosala masano ya kosɛkisa na televizyo mpe bayebanaki mingi.
Bisika oyo basalaka bafilme, bandako ya masano, mpe bastidio oyo babimisaka bakasɛti, ezalaki bisika oyo ngai ná yaya na ngai Carlos tomesanaki na yango mingi, mpo tata azalaki komema biso kuna mbala na mbala ntango azalaki kosala mosala na ye mpe na mibembo ya mosala; azalaki kosala bongo mpo libota na biso ezala na bomoko. Bokeseni monene ezalaki kati na bisika wana ná ndako na biso, esika tozalaki koyokana malamu mpe kolingana mingi! Nayebaka ete tata azalaki mpenza kolinga bato, azalaki kasakasa mpe azalaki kolinga bomoi. Azalaki kokaba mingi, nakoki koloba kutu azalaki kolekisa ndelo. Ateyaki ngai ete mpo na kozala na esengo, esengeli kaka te kozala na biloko, kasi kopesa.
Likambo moko ya mawa mingi
Pene na nsuka ya mobu 1971, mama ayebisaki ngai ná yaya ete bazwi tata na maladi moko oyo akobika na yango te. Na boumeli ya mbula moko na ndambo, namonaki ndenge tata azalaki konyokwama mpe kobundana na maladi yango mpo na bankisi ya makasi oyo azalaki komɛla.
Nabosanaka te mokolo oyo namonaki ambulance eyei kozwa ye na ndako mpo na komema ye na lopitalo. Nayebaki ete akozonga lisusu te. Nayebi te ndenge nini nakoki kolobela mpasi oyo nayokaki na motema. Nalobaki ngai moko ete lokola tata azali konyokwama bongo, ngai mpe nasengeli konyokwama. Nafinaki likaya na kati ya lobɔkɔ na ngai, mpe nalelaki mingi ndenge motema elingaki. Na mokolo ya 29 Yuni 1973, tata akufaki. Nabandaki komituna: ‘Mpo na nini moto ya malamu boye, oyo azalaki kosala makambo oyo ezalaki kopesa biso esengo mingi, asengeli kotika biso? Sikoyo, azali wapi? Akoki koyoka soki nalobi na ye? Lokola azali lisusu te, bomoi na ngai ezali lisusu na ntina nini?’
Mosala oyo epesaki ngai bolamu ya solosolo te
Ntango mikolo elekaki mpe mawa ebandaki kosila, nabandaki koyekola mosala ya kokembisa ndako na kati. Kasi, nazalaki mwa mobulu, yango wana nalongwaki na kelasi. Ngai ná mama tomonaki malamu tókutanaka na bato mingi. Tozalaki kokenda na bafɛti ya minene oyo bato ya masano mpe ya miziki bazalaki kosala. Mbala mingi na nsuka, moto oyo asalisi fɛti azalaki koloba: “Rosalía, soki olingi sikoyo yembelá biso nzembo na yo moko.” Bazalaki kosepela na mongongo na ngai mpe ndenge nazalaki koyemba na esengo to na mawa; bazalaki koloba ete nazwá makila ya baboti na ngai.
Na fɛti moko tokendaki, mosali-nzembo mpe mokambi ya orkɛstrɛ Arturo Castro ná ba Castro na ye 76, ayokaki ndenge nayembaki mpe abengaki ngai nakɔta na orkɛstrɛ na ye. Na ebandeli, nasepelaki na likambo yango te. Atako nazalaki kolinga miziki mpe nabandaki kobɛta gidare mpe kosala banzembo ntango nazalaki na mbula 14, nazalaki kolinga te kosala mosala ya koyemba. Kasi, lokola mama alendisaki ngai mpe mpo libota na biso ezanga mbongo te, yango wana nandimaki. Ezali na ndenge wana nde nabandaki koyemba na miso ya bato, ndenge nalobeli yango na ebandeli ya lisolo oyo.
Ntango nabandaki, nazwaki mosala oyo nakoumela na yango. Orkɛstrɛ na biso etambolaki Mexique mobimba, tozalaki kobɛta mbala mibale na butu moko. Tobɛtaki na Guatemala, na Venezuela, na New York, mpe na Las Vegas (États-Unis). Nasalaki na orkɛstrɛ yango mbula mibale. Na nsima, bayaki kosɛnga ngai nasala bafilme. Na bafilme mibale, nazalaki mosani ya liboso te, kasi na filme moko nazalaki mosani ya liboso mpe nazwelaki yango mbano mibale ya minene.
Mokolo moko, babengaki ngai na telefone na kompanyi ya televizyo oyo eleki monene na Mexique. Batunaki ngai soki nakondima kosala kɔntra kaka na bango mpo nazala moko ya basani minene ya televizyo na bango, mpe nasala filme moko oyo nakozala mosani ya liboso, mpe bakopesa filme yango nkombo na ngai. Soki nandimi, nakoyebana mingi na mosala ya bafilme mpe ya koyemba. Bakobanda kofuta ngai mbongo mingi, ata soki nazali kokende mosala yango mikolo nyonso te. Lokola namonaki ete nabongi na lokumu wana te mpe nazalaki kobanga ete nakozanga bonsɔmi ya kosala makambo na ngai moko, naboyaki kɔntra yango. Nandimaki nde kosala filme, kasi bobele soki mosala yango ekopesa ngai nzela nakoba kotánga kelasi ya teyatre na iniversite. Kasi, nazalaki na esengo te. Ezalaki kosala ngai mpasi komona bato oyo basalaka bafilme bazali koboma nzoto bambula ebele liboso ete bápona bango mpo na kozala basani ya liboso na filme; nzokande, baponaki ngai na esika yango kaka mpo nazalaki mwana ya Tin-Tán.
Na nsima, ekómaki ntango ya kokɔta stidio. Kasɛti na ngai ya liboso ezalaki na banzembo oyo nasalaki mpo na filme wana. Na nsima, nabimisaki bakasɛti mosusu na stidio moko ya monene na Londres. Nabimisaki lisusu bakasɛti mosusu, nasanaki mpe na bafilme mosusu. Na lokasa ya ebandeli, na bisika oyo bazulunalo elobelaka masano, bakómaki kolobela ngai; okoki kokanisa ete nakómaki mpenza na lokumu mingi koleka. Nzokande, eloko moko ezalaki kozanga ngai. Namonaki ndenge baalanga-nzembo mpe bato ya masano batondi na lolendo mpe na elimo ya kowelana, bamipesi na pite, mpe batondi na bokosi. Nazalaki lisusu kotyela bato motema te.
Na nsima, na eleko ya ɔtɔne ya 1980, nakutanaki na nɔkɔ Julio, na likita moko ya libota na biso. Atiká koyemba na opéra mpe nayokaki ye azali kolobela paladiso oyo Nzambe alaki. Nɔkɔ Julio alobaki ete kozanga bosembo mpe makambo ya mawa ekosila na mokili oyo mpe bolingo ekotonda. Alobaki mpe ete Nzambe ya solo nkombo na ye Yehova. Likambo esepelisaki ngai mingi ezalaki ya koyoka ete na Paladiso, bato na biso oyo bakufá bakosekwa. Nasepelaki mingi koyoka ete nakoki komona lisusu tata. Nazalaki kaka komiyoka ete nazangi tata mpe nazali na mposa makasi ete azala wana mpo na kolendisa ngai mpe kolinga ngai. Kanisá esengo oyo nakozala na yango ntango akozonga lisusu na bomoi! Kasi na nse ya motema nazalaki kondima te ete ekoki kosalema. Nɔkɔ Julio apesaki ngai Biblia mpe abengisaki ngai ná mama na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova oyo esengelaki kosalema nsima ya mwa bapɔsɔ. Toyebisaki ye ete ntango mosusu tokokenda na liyangani yango.
Nazwi ekateli ya kobongola bomoi na ngai
Mokolo moko na butu, nalalaki na mbeto, nazalaki komɛla likaya mpe kotánga Biblia oyo nɔkɔ apesaki ngai. Makambo oyo natángaki na mokanda ya Masese esalisaki ngai nákanga ntina ete pole, bososoli, mpe bomoi eutaka epai ya Nzambe, nzokande molili, mobulungano, mpe liwa eutaka epai na ye te. Na butu wana, nabomaki likaya ya nsuka oyo namɛlá na bomoi na ngai mpe nazelaki mama azonga. Na mai na miso, nayebisaki ye asalisa ngai na bikateli ya minene oyo nalingi kozwa. Nsima na yango, nakendaki na ndako ya teyatre, esika nazalaki komekameka mokumba ya Cordelia oyo nasengelaki kosana na teyatre babengi Le Roi Lear, oyo Shakespeare akomaki. Nalongwaki na teyatre yango mpe naboyaki mwana mobali oyo azalaki makango na ngai, oyo azalaki mosani ya liboso na teyatre yango.
Kasi, lokola nayebaki naino te kosalela Nzambe, moto ya kosalisa ngai azalaki te. Nakómaki konyokwama mingi na makanisi. Nabondelaki Nzambe asalisa ngai nasala mosala oyo ebongi na bomoto na ngai, kasi te mpo na makoki oyo nabotamá na yango to mpo nayebani mingi. Nakataki boyokani na baninga na ngai nyonso mpe natikaki misala nyonso oyo nazalaki kosala.
Nzela oyo ezali komema na bolamu ya solosolo
Na ntango wana oyo makanisi na ngai ezalaki na mobulungano, nakanisaki ete nɔkɔ abengisaki biso na liyangani. Nabengaki ye na telefone, mpe ayaki kozwa ngai, tokendaki na liyangani na libándá ya masano. Makambo oyo namonaki kuna esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki bato bafandi na kimya, bazali kobimisa maloba mabe te to komɛla makaya te, mpe moto moko te azalaki koluka kokamwisa basusu. Mateya ya Biblia oyo nayokaki kuna etindaki ngai nakanisa lisusu makambo oyo natángaki na buku moko ya moke oyo ezalaki na motó ya likambo Biblia ezali mpenza liloba ya Nzambe?a oyo nazwaki na ndako na biso mwa moke nsima ya liwa ya tata.
Kaka na mikolo wana, baponaki ngai nazala mosani ya liboso na filme mosusu. Nasepelaki na mokumba oyo bapesaki ngai na filme yango mpo namonaki ete ezalaki koteya bizaleli malamu oyo nayokaki na liyangani. Mpo na ntina wana, nandimaki mokumba yango. Epai mosusu, likanisi oyo ya Biblia ezalaki kotika te koyela ngai na makanisi: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo . . . bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili?”—2 Bakolinti 6:14.
Mposa ya kosepelisa Nzambe ezalaki kokola na motema na ngai. Nazalaki na mposa ya koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi elongo na nɔkɔ ná mwasi na ye. Mpo na kokóma na lisangá na bango, esengelaki kotambola ngonga mobimba; kasi nakendeki kuna na mikolo ya lomingo misato oyo elandaki. Nɔkɔ amonaki malamu alakisa ngai lisangá oyo ezali pembeni ya esika nazalaki kofanda. Tokómaki na lisangá yango ntango makita elingi kosila; ezali kuna nde nakutanaki na Isabel, elenge mwasi moko oyo tozali na ye mbula moko. Azalaki na komikitisa mpe na boboto mingi. Ntango nɔkɔ ayebisaki ye ete nkombo na ngai Rosalía Valdés, atyaki ata likebi te na nkombo na ngai. Nasepelaki mingi ndenge asalaki bongo. Asɛngaki ngai ayekola na ngai Biblia epai na ngai.
Tobandaki koyekola na buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.b Isabel andimaki tóyekolaka na bangonga oyo napesaki ye. Mbala mosusu, asengelaki kozela ngai tii na butu makasi, mpo básilisa naino kozwa ngai bilili ya filme oyo nazalaki kosana. Nazalaki na botɔndi mingi komona ete moto moko azali kosepela na ngai kaka mpo nalingi koyekola mateya ya solo ya Biblia! Azalaki na bokosi te, azalaki sembo, mpe azalaki na bizaleli malamu, bizaleli oyo ngai nakanisaki ete moto akoki kokóma na yango kaka soki atángi kelasi ya filozofi mpe ya ntɔki. Toyokanaki mpo tóyekolaka bangonga mingi, ntango mosusu mbala ebele na pɔsɔ.
Na ebandeli, ezalaki mpasi mpo nalongola makanisi ya lokuta oyo nazalaki na yango, kasi mokemoke, mateya ya solo ya Biblia ezalaki kozwa esika na yango. Nazali koyeba lisusu ndenge elaka oyo ya Nzambe esepelisaki ngai mingi: “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te. Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:10, 11) Na ntango wana mpe, elikya ya komona lisusu tata na Paladiso ebandaki kokóma likambo ya solo na motema na ngai. Nazalaki ntango nyonso kokanisa maloba oyo ya Yesu: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi.”—Yoane 5:28, 29.
Nasilisaki filme wana, mpe mbala moko basɛngaki ngai nasala bafilme mosusu. Atako bafilme yango elingaki kopesa ngai lisusu lokumu mingi, kosala yango ezalaki kolendisa pite, losambo ya bikeko, mpe makanisi mosusu ya lokuta. Nayekolaki ete Satana azali moto ya solo mpe alingaka te biso tósalela Yehova. Yango wana, naboyaki kosala bafilme yango, mpe nabandaki koyangana na makita nyonso. Mama na biso mpe yaya na ngai ya mobali bazalaki komituna mpo na nini nazalaki koboya ebele ya mabaku wana oyo elingaki kopesa ngai mbongo mingi. Kasi, bazalaki mpe komona mbongwana ya bomoto na ngai. Ngai moto nakómaki mawamawa mpe nalɛmbaki nzoto, nakómaki sikoyo na esengo mpenza. Bomoi na ngai ekómaki sikoyo na ntina!
Nayokaki mposa ya koyebisa bato mosusu makambo oyo nazalaki koyekola mpe eumelaki te nakómaki mosakoli ya nsango kitoko ya Bokonzi ya Nzambe. Ntango nazalaki kosakola, ezalaki mbala mosusu mpasi bato bálanda makambo nazali koloba; mingi bazalaki koyeba ngai ete nazali moto ya filme. Mwa mbala ebele, ngai ná ndeko mwasi oyo tobimi na ye na mosala ya kosakola tozalaki kokuta bato na ndako na bango bazali kotala filme oyo ngai nazali kosana. Bazalaki kokamwa komona ngai natɛlɛmi liboso ya porte na bango.
Na mokolo ya 11 sanza ya Sɛtɛmbɛ 1982, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova. Bomoi na ngai ekómaki sikoyo na ntina ya solosolo mpe mosala ya ndenge mosusu ezalaki kozela ngai. Molende oyo Isabel azalaki na yango mpo na mosala ya kosakola epesaki ngai mposa ya kosala mingi. Azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso. Eumelaki te, nakómaki kobima na ye mpo na kokenda koyekola Biblia na bato mosusu. Isabel akómaki moninga na ngai ya motema.
Nazalaki kosala lisusu mpenza te mosala na ngai ya bafilme mpe ya koyemba, yango wana ngai ná mama tosengelaki lisusu koluka bomoi ya mindondo te. Na ntango wana kaka, nasalaki banzembo ya kasɛti na ngai ya minei, oyo ezalaki na banzembo mosusu oyo elobelaki mateya mpe bindimeli na ngai ya sika. Nakomaki nzembo moko oyo elobelaki elikya oyo nazalaki na yango ya komona lisusu tata. Napesaki yango nkombo “Ekomamá ete nakomona ye lisusu.” Mbala ya liboso oyo nayembaki yango na miso ya mama, ayokaki mawa mingi. Akangaki ntina ete nandimi mpenza makambo yango. Nasepelaki mingi ntango amonisaki ete alingi koyekola Biblia. Mbula mibale na nsima, akómaki mosaleli ya Yehova oyo azwi batisimo. Tii lelo, azali kaka mosakoli ya molende.
Lokola mikolo ezalaki koleka, ezalaki lisusu mpasi te naboya misala mosusu oyo bazalaki kobenga ngai nasala. Mpe ntango nazalaki kokutana na komekama to na masɛnginya, soki kaka nakanisi ndenge tokofanda lisusu elongo na tata na paladiso kitoko, yango ezalaki kolendisa ngai mpe kopesa ngai makasi ya kokoba kosalela Yehova.
Mokolo moko, basɛngaki ngai nasala filme moko (Sesame Street), na monɔkɔ ya Espagnol mpo na bana. Namonaki ete nakoki kosala yango te mpe nayebisaki patrɔ na ngai ete mateya oyo nayekoli na Biblia ekopesa ngai nzela te ya kolendisa bafɛti ya mangomba to ya ekólo mpe baanivɛrsɛrɛ ya mbotama. Patrɔ yango azongisaki ete soki nandimi kosala yango, akotosa bindimeli na ngai mpe tokoki kosala mikanda mpe ngai nakomonisa polele makambo oyo nakondima mpe oyo nakoboya. Nsukansuka, nandimaki kosala yango mpe nasanaki na biteni 200 ya filme yango. Wana ezalaki mbala na ngai ya nsuka ya kosala filme to teyatre.
Nazalaki naino na kɔntra moko oyo natikalaki na yango na kompanyi oyo ezalaki kobimisela ngai bakasɛti; na yango nabimisaki bakasɛti ya banzembo na ngai zomi epai na bango, ezala mpe nzembo oyo nasalaki mpo na tata mpe elikya ya lisekwa. Nayembaki nzembo yango na televizyo mpe na bisika mosusu oyo nazalaki koyemba, mpe na mabaku nyonso wana nazalaki kolobela bindimeli na ngai. Nzokande, kompanyi oyo ezalaki kobimisela ngai bakasɛti ekómaki kotya ngai mbamba mpo natikaka biteni mosusu ya nzoto na ngai polele. Yango wana, nayebisaki bango ete natiki kosala na bango.
Mapamboli oyo nazwi na mosala ya Nzambe
Na sanza ya Desɛmbɛ 1983, ngai ná Isabel tokendaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York. Ezali kuna nde nakutanaki na Russell Phillips, oyo nsima akómaki mobali na ngai. Totindelanaki mikanda pene na mbula mibale mobimba. Nabosanaka te mokolo oyo nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza—Russell atindelaki ngai bafololo longwa na New York!
Nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mbula mobimba elongo na Isabel. Na nsima, babengaki ye akende kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexico. Masolo oyo azalaki koyebisa ngai mpo na mosala na ye kuna na Betele epesaki ngai mposa ya kosala mingi mpe, soki Yehova alingi, ya kosala mpe na Betele.
Russell azali lipamboli mosusu oyo nazwi na bomoi na ngai. Ndenge oyo ye alingaka Yehova mingi mpe ebongiseli na Ye, etindaki ngai nalinga mosala ya ntango nyonso. Alingaki Betele mingi, mpe asalaki mbula misato na Betele ya Brooklyn. Nsima ya libala na biso, tokómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza na Colorado, na États-Unis. Na nsima, babengaki biso tókende kosala mosala ya kotonga bandako ya Betele na mikili mosusu. Kanisá ndenge tosepelaki ntango bayebisaki biso ete batindi biso na Mexique! Na sanza ya Aprili 1990, tosepelaki mingi na libaku malamu ya kokóma na kati ya libota ya Betele ya Mexico. Ndakisa ya Russell elendisaki ngai mingi. Nasepelaki mingi na elimo ya komipesa oyo amonisaki, ndenge atikaki mboka na ye, baboti mpe bandeko na ye mpo na koya kopesa mabɔkɔ na misala ya Bokonzi awa na Mexique.
Ngai ná Russell tozalaki kosepela mingi na mosala na biso na Betele ya Mexico. Kasi, makambo ebongwanaki na mbalakaka ntango nazwaki zemi. Tokamwaki mingi ndenge nazwaki zemi yango. Kasi, lokola tozalaki ntango nyonso kosepela na baboti oyo babɔkɔlaka bana na bango na nzela ya solo, tondimaki mokumba wana ya sika na esengo. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1993, Evan abotamaki, mpe nsima ya mbula mibale na ndambo, Gianna abotamaki. Atako kobɔkɔla bana esɛngaka milende mokolo na mokolo, tomonaka yango lipamboli mbala nyonso oyo mwana na biso ya mbula 11 mpe oyo ya mbula 8 bayebisaka kondima na bango na mosala ya kosakola.
Lelo oyo, Russell azali kosala na komite oyo etalaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, mpe ngai nautaki kozongela mosala ya mobongisi-nzela. Na boumeli ya mbula 20 oyo eleki, nasalisi bandeko na ngai 12, mpe bato mosusu 8, báyekola mateya ya solo oyo ezali na Biblia mpe bákóma basaleli ya Yehova.
Ntango bana na ngai batunaka ngai: “Mama, ezalaki mpasi mpo na yo kotika mosala ya miziki mpe ya bafilme?” Nazongelaka maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nazali . . . kotalela mpenza biloko nyonso ete ezali biloko ebungá mpo na motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nandimi kobunga ya biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola liboke ya bosɔtɔ, mpo nazwa Klisto.” (Bafilipi 3:8) Nazali kopesa Yehova matɔndi mingi ndenge alongolá ngai na bomoi moko ya mpamba mpe ezangi ntina, mpe apesá ngai libaku ya kozala kati na libota na ye! Natɔndaka ye ntango nyonso mpo na ebele ya mapamboli oyo apesi na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto. Mbala mingi, nayembaka na esengo loyembo oyo nasalá mpo na tata. Nazali na elikya ete nakomona ye lisusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na batatoli ya yehova kasi banyataka yango lisusu te.
b Ebimisami na batatoli ya yehova kasi banyataka yango lisusu te.
[Elilingi na lokasa 12]
Baboti na ngai, yaya na ngai mpe ngai ntango nazalaki na mbula moko
[Elilingi na lokasa 14]
Nazali koyemba na orkɛstrɛ Arturo Castro mpe ba Castro na ye 76
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Angel Otero
[Elilingi na lokasa 16]
Elongo na libota na ngai lelo oyo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
Activa, 1979