TÓTALELA MAKAMBO YA KALA
Aristote
ARISTOTE apesá mpenza mabɔkɔ na makambo ya siansi mpe filozofi, eleki sikoyo mbula 2 300. Makambo oyo akomá ebendaka likebi ya bato tii lelo; babongolá yango na minɔkɔ mosusu mpe bayekolaka yango. James MacLachlan, profesɛrɛ moko ya istware akomaki ete “makanisi ya Aristote mpo na molɔ́ngɔ́ ekɔtelaki bato ya Mpoto na boumeli ya bambula soki 2 000.” Kutu makanisi mosusu ya Aristote ekɔtaki na mateya ya Katolike mpe Protesta, ata mpe na mateya ya bamizilma.
Alobelá makambo ndenge na ndenge
Aristote akomá makambo etali ntɔki, astronomi, bioloji, bizaleli, minɔkɔ, mibeko, logique, nguya oyo ebendaka biloko (magnétisme), métaphysique, biloko oyo ebalukaka, bisengo, bapoɛmi, politiki, pisikoloji, koyeba koloba (rhétorique) mpe molimo, mpo azalaki kondima ete ekufaka. Kasi, akendá nsango libosoliboso na makambo etali bioloji mpe logique.
Bato ya mayele na Grɛsi na ntango ya kala bazalaki kosalela nde likoki na bango ya kotala, kokanisa mpe logique mpo na kolimbola molɔ́ngɔ́. Soki bamoni ete likambo moko ezali solo mpenza, bazalaki komona ete soki bakanisi malamumalamu na likambo yango, ekosalisa bango bápesa makanisi oyo ebongi mpenza.
Kosalela mayele yango esalisaki bango bápesa makanisi oyo ebongi na mwa makambo mosusu; na ndakisa bamonaki ete molɔ́ngɔ́ ebongisamá malamu mpenza. Kasi lokola miso ekokaki te kosalisa bango bámona makambo nyonso, mingi ya bato yango ya mayele, ata mpe Aristote, bamikosaki. Na ndakisa, bakanisaki ete baplanɛti mpe minzoto ebalukaka zingazinga ya mabele. Na ntango wana, bato bamonaki ete likanisi yango ezali mpenza solo. Buku moko (The Closing of the Western Mind) elobi boye: “Kokanisa mpe eksperiansi endimisaki likanisi oyo Bagrɛki bazalaki na yango ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́.”
Likanisi wana ya libunga elingaki kozala likama mpenza te soki etikalaka kaka na makambo ya siansi. Kasi esukaki kaka na siansi te.
Makanisi ya Aristote ekɔtaki na mateya ya Katolike
Na Moyen-âge, “bakristo” na Mpoto bandimaki ete mateya mosusu ya Aristote ezalaki solo mpenza. Bato ya teoloji ya Lingomba ya Katolike; mingimingi Thomas d’Aquin (kobanda mobu 1224 tii mobu 1274)—bakɔtisaki makomi ya Aristote na mateya na bango ya teoloji. Yango wana, liteya ya Aristote oyo elobaki ete mabele ezali na katikati na molɔ́ngɔ́ ekómaki mpe liteya ya Katolike. Bakambi ya lingomba ya Protesta mpe bandimaki liteya yango, na ndakisa Calvin ná Luther, oyo balobaki ete liteya yango ezalaki na Biblia.—Talá etanda “Batángaki makambo mingi na Biblia.”
Bandimaki ete mateya mosusu ya Aristote ezalaki solo mpenza
Mokomi moko na nkombo Charles Freeman, alobaki boye: “Na makambo mosusu, ekómaki mpasi kokesenisa [mateya ya Aristote] ná oyo ya Lingomba ya Katolike.” Na yango, balobaki ete D’Aquin apesaki Aristote “batisimo” ya lingomba ya Katolike. Kasi, mpo na koloba solo, Freeman akomaki ete “D’Aquin nde akómaki mondimi ya Aristote.” Mpe tokoki kobakisa ete Lingomba mpe ekómaki mondimi ya Aristote. Mpo na yango nde, Galilé, moto moko ya astronomi mpe ya matematike oyo amonisaki ete mabele ebalukaka zingazinga ya moi, basambisaki ye na tribinale ya lingomba ya Katolike mpe basɛngaki ye na makasi ete awangana likanisi na ye.a Kasi likambo ya kokamwa, Aristote andimaki ete boyebi ya siansi eyaka mokemoke mpe ebongwanaka. Soki Mangomba ezalaka ata na likanisi ya bongo!
a Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge “Galilée ayokanaki te ná Lingomba,” talá Lamuká! ya 22/04/2003 na Français.