Mokapo 16
Mpunda minei ezali kopota mbangu
Emonaneli 3—Emoniseli 6:1-17
Teme: Mpunda minei ezali kopota mbangu; Batemwé babomami bazali na nse na etumbelo; mpe mokolo na nkanda na Jéhovah
Eleko na kokokana na yango: Uta 1914 kino kobomama na biloko mabe na ntango oyo
1. Na motindo nini Jéhovah ayebisi epai na Yoane makambo mabombami na rulo oyo Yesu afungoli?
NA ELEKO oyo ya mpasi mingi, tozali kotalela mpenzampenza “makambo malingi kobima noki.” Mpo na nini? Mpamba te makambo yango matali bomoi na biso! Na yango, tolanda sikawa Yoane, wana Yesu abandi kofungola mokanda oyo ezali na mabombami na kati. Kasi Yoane akotanga yango te. Mpo na nini? Mpo ete makambo mazali kati na yango makoyebisama epai na ye “na bilembo,” na ebele na bilakiseli na bomoi mpe na nguya.—Emoniseli 1:1, 10.
2. (a) Yoane amoni nini mpe ayoki nini, mpe tokanisi nini mpo na cheribɛ oyo azali koloba awa? (b) Etinda oyo ya cheribɛ ya liboso epesami epai na nani? Longisa eyano na yo.
2 Toyoka maloba na Yoane ntango Yesu afungoli elembo ya liboso ya mokanda yango: “Namonaki Mwana na Mpate wana efungoli ye moko na bilembo yango nsambo, nayoki mpe moko na bikelamu na bomoi minei koloba lokola na mongongo na nkake ete, Yaka!” (Emoniseli 6:1) Ezali mongongo ya cheribɛ ya liboso. Lokola cheribɛ wana akokani na nkosi, etindi Yoane na kokanisa ete lisangá ya Jéhovah ekokokisa na mpiko nyonso bikateli ya sembo ya Nzambe. Etinda oyo ete ‘Yaka!’ epesami epai na nani? Ekoki kozala epai na Yoane te, mpamba te ye asilaki kobengama ete atala makambo wana na esakweli. (Emoniseli 4:1) “Mongongo wana ya nkake” ezali nde koloba na basangani mosusu kati na elakiseli ya liboso na bilakiseli minei ya kokamwisa.
Mpunda mpembe mpe mofandi na yango
3. (a) Yoane amoni nini sikawa? (b) Na boyokani na bilembo oyo Biblia esalelaka, mpunda ya mpembe ezali elilingi ya nini?
3 Yoane, mpe kelasi na Yoane elongo na ye esika moko na baninga na bango ya molende lelo, bazali na libaku malamu ya komona kolandana ya nokinoki ya bilakiseli. Alobi: “Natali, mpe namoni mpunda mpembe, mpe mofandi na yango azalaki na litimbo. Motole epesami na ye, mpe abimi kolonga mpe kokokisa elonga na ye.” (Emoniseli 6:2) Ee, koyanolaka na libyangami oyo ete: “Yaka!,” oyo euti na mongongo lokola ya nkake, mpunda mpembe ebimi. Kati na Biblia, mpunda ezalaka mbala mingi elilingi ya etumba. (Nzembo 20:7; Masese 21:31; Yisaya 31:1) Mpunda yango, na ntembe te mpunda mobali ya motuya mingi, ezali kongala na mpembe mpe ezali komonisa bosantu oyo ebebisami na litono moko te. (Emoniseli 1:14; 4:4; 7:9; 20:11) Ebongi solo kozala boye mpamba te ezali elilingi na etumba na peto mpe na sembo na miso mosantu na Jéhovah.—Emoniseli 19:11, 14.
4. Nani mofandi na mpunda mpembe? Limbola.
4 Nani Mofandi likoló na mpunda yango? Asimbi litimbo, ebundeli, kasi azwi mpe motole. Bobele Yesu mpe kelasi ya mikóló 24 nde bazali bato ya sembo oyo balakisami na mitole na mitó na bango na boumeli na mokolo na Nkolo. (Danyele 7:13, 14, 27; Luka 1:31-33; Emoniseli 4:4, 10; 14:14)a Ekoki kosalema te ete moko kati na etuluku oyo ya mikóló 24 alakisama lokola ete asili kozwa motole na makoki na ye moko. Na yango, mofandi na mpunda oyo akokani na mosusu te, ezali moto mosusu te bobele Yesu Klisto. Yoane amoni ye na likoló na ntango moko ya ntina mingi, na 1914, ntango wana Jéhovah alobaki: “Ngai nafandisi mokonzi na ngai,” mpe alobaki na ye ete ‘akopesa ye mabota lokola libula na ye.’ (Nzembo 2:6-8)b Na yango, na kofungolaka elembo ya liboso, Yesu amonisi ete ye moko abimi mpo na etumba na motindo na ye na Mokonzi azwi motole sika, na ntango oyo Nzambe asilaki kobongisa.
5. Maloba nini tokuti na Nzembo makokani na Emoniseli 6:2 na ntina na Mofandi na mpunda mpembe?
5 Elakiseli yango eyokani malamu na maloba na Nzembo 45:4-7, maloba mapesamaki na Mokonzi oyo Jéhovah asili kofandisa ye na kiti na bokonzi: “Kati na bokonzi na yo, bima na kolonga, mpo na makambo na sembo mpe kobundela bayengebeni. Tika ete loboko na yo na mobali elakisa yo kosala misala na nsomo. Mbanzi na yo ezali na mopotu kati na mitema na bayini na mokonzi; bato na mabota bakokwea na nse na yo. E Nzambe, kiti na yo ekoumela seko, lingenda na bokonzi na yo ezali lingenda na sembo. Yo olingi boyengebene mpe oyini bokesene. Bongo, Nzambe, Nzambe na yo, apakoli yo na mafuta na esengo koleka bazalani na yo.” Lokola ayebi malamu esakweli oyo, Yoane asosoli malamu ete ekokani na mosala oyo Yesu akosala na motindo na ye ya Mokonzi.—Tala Baebele 1:1, 2, 8, 9.
Abimi mpo na kolonga
6. (a) Mpo na nini Mofandi na mpunda mpembe asengeli kobima mpo na kolonga? (b) Na boumeli ya bambula nini kotambola na ye mpo na kolonga ezali kolandana?
6 Nzokande, mpo na nini Mokonzi oyo azwi bokonzi na ye sika asengeli kobima mpo na etumba? Mpo ete bokonzi na ye eboyami makasi na Satan le Diable, monguna monene na Jéhovah, mpe eboyami na baoyo nyonso, na koyeba to kozanga koyeba, bazali kosalela Satana na mabelé. Kobotama ya Bokonzi ebimisaki etumba monene na likoló. Kobundaka na nkombo ya Mikaele (oyo elimboli “Nani azali lokola Nzambe?”), Yesu alongaki etumba likoló na Satana mpe badémo na ye mpe abwakaki bango na mabelé. (Emoniseli 12:7-12) Kotambola ya bolongi ya Yesu likoló na mpunda elandanaki na boumeli na bambula mingi uta ebandeli na mokolo na Nkolo, wana bato oyo bakokani na bampate bazali koyanganisama. Ya solo, mokili mobimba ezali naino kolala na “nguya na oyo mabe,” kasi Yesu alandi na bolingo nyonso kobatela mpe koleisa bandeko na ye bapakolami elongo na baninga na bango, kosalisaka mokomoko na bango ete akoka kolonga na nzela na kondima.—1 Yoane 5:19.
7. Kolonga nini Yesu asili kozwa awa na mabelé na boumeli ya bambula mingi oyo elandaki ebandeli ya mokolo ya Nkolo, mpe ekateli nini tosengeli kobatela yango?
7 Kolonga mosusu nini Yesu asili kolonga na boumeli na mokolo na Nkolo oyo ekokisi sikawa mibu koleka 90? Na mokili mobimba, ezala mokomoko to lokola lisangá, basaleli ya Jéhovah bakutani na mikakatano mingi, na masenginya mpe na minyokoli, lokola oyo ntoma Paulo alobelaki mpo na komonisa ete azali solo ministre. (2 Bakolinti 11:23-28) Ba Témoins de Jéhovah bazalaki na mposa na “nguya oyo eleki makasi na bango,” mpenzampenza epai kuna bitumba mpe mobulu ezali kongala, mpo ete bakoka koyika mpiko na komekama. (2 Bakolinti 4:7) Kasi ata na kati na komekama eleki makasi, Batemwe bakokaki koloba lokola Paulo: “Nkolo atelemi pembeni na ngai mpe akembisi ngai na nguya ete na monoko na ngai nasakola esakweli mobimba mpenza.” (2 Timote 4:17) Ee, Yesu alongaki mpo na bango, mpe akolanda kobima kolonga mpo na biso, soki tokobatela ekateli na biso ete tosukisa elonga na biso na nzela na kondima.—1 Yoane 5:4.
8, 9. (a) Makambo nini lisangá ya ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba basili kolonga na yango? (b) Na mikili nini kobakisama ya ba Témoins de Jéhovah emonani mpenza makasi?
8 Lisangá ya mokili mobimba ya ba Témoins de Jéhovah elongi na makambo mingi na kotambwisama na Mokonzi na bango oyo azali se kolonga. Ye abatelaki makasi Bayekoli na Biblia na likaneli ya kolimwisa oyo balingaki kolimwisa bango na 1918, ntango ‘balongamaki’ mpo na mwa ntango moke na lisangá ya politike ya Satana. Nzokande, na 1919, Mokonzi asalisaki bango, mpo ete abukaki minyololo oyo mikangaki bango, mpe na nsima atelemisaki bango mpo ete basakola nsango malamu “kino na eteni eleki mosika na mabelé.”—Emoniseli 13:7; Misala 1:8.
9 Liboso na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe na boumeli na Etumba yango, mikili na yauli oyo mibengamaki puissances de l’Axe bamekaki kolimwisa ba Témoins de Jéhovah na mikili mingi epai kuna bakonzi na mangomba, mingimingi baoyo ya Lingomba ya katolike, bapesaki maboko polele to na nkuku epai na bakonzi mabe na mokili. Kasi longwa na ebandeli ya etumba na 1939 kino nsuka na yango na 1945, motuya na Batemwe ya molende kati na mosala ya kosakola elongwaki na 71 509 ekomaki kino 141 606, atako 10 000 kati na bango balekisaki mbula mingi na boloko mpe na ba camps de concentration, mpe basusu pene na 2 000 babomamaki. Motuya na Batemwe ya molende ebandaki kobakisama mpe lelo oyo bazali koleka milió motoba. Bazali kobakisama makasi na mikili ya katolike mpe na mikili epai kuna minyokoli mizalaki makasi mingi—lokola Alemanye, Italie mpe Japon, epai basakoli ya molende koleka 600 000 bazali kosakola.—Yisaya 54:17; Yilimia 1:17-19.
10. Kolonga nini Mokonzi molongi asili kopesa epai na basaleli na ye mpo na oyo etali “kobatela mpe kolendisa nsango malamu engebene mibeko”?
10 Mokonzi na biso oyo azali se kolonga asili mpe kopambola basaleli na ye ya molende na ndenge apesi bango nzela na kolonga na makambo mingi “mpo na kobatela mpe kolendisa nsango malamu engebene mibeko” na miso ya batribinale mpe na miso ya bakonzi. (Bafilipi 1:7; Matai 10:18; 24:9) Ezalaki bongo bipai nyonso kati na mokili—na Australie, na Argentine, na Canada, na Grèce, na Inde, na Suisse, na Swaziland, na Turquie mpe na mikili mingi mosusu. Kati na makambo 24 oyo ba Témoins de Jéhovah balongaki na yango na tribinale eleki monene to Cour suprême ya Etats-Unis, totanga, na ndakisa elonga oyo endimelaki bango lotomo ya kosakola nsango malamu “na bisika ya bato nyonso mpe ndako na ndako” mpe lotomo ya koboya kosangana na milulu ya kokumisa ekolo, mpo ete yango ezali losambo na bikeko. (Misala 5:42; 20:20; 1 Bakolinti 10:14) Na motindo yango, litatoli monene epesamaki kati na mokili mobimba.
11. (a) Mofandi na mpunda mpembe azali kosala nini “mpo na kokokisa elonga na ye”? (b) Kofungwama ya elembo ya mibale, ya misato mpe ya minei ekozala na bopusi nini likoló na biso?
11 Yesu akosala nini mpo ete “akokisa elonga na ye”?c Lokola tokomona yango, akoboma liboso mangomba ya lokuta, na nsima akobwaka biteni nyonso bikotikala na lisangá ya Satana oyo ezali komonana, akobwaka yango kati na “libeke na móto” to esika ya kobomama ya elilingi, mpo na kolongisa bokonzi ya Jéhovah. Tozali kozela sikawa na elikya nyonso mokolo oyo, na Armagedon, “Mokonzi na bakonzi” akolonga elonga ya nsuka likoló na lisangá ya Satana oyo ezali konyokola bato. (Emoniseli 16:16; 17:14; 19:2, 14-21; Ezekiele 25:17) Na kozelaka ete tokoma kuna, Molongi oyo akoki kokwea te mpe oyo amati likoló na mpunda mpembe akolanda botamboli na ye, mpe Jéhovah akolanda kobakisa bato na motema sembo epai na libota na Ye ya sembo na mabelé. (Yisaya 26:2; 60:22) Ozali kopesa maboko na kelasi na Yoane mpe na bokoli yango ya esengo na motuya na bato bandimi kofanda na nse na Bokonzi na Nzambe? Soki ezali boye, makambo oyo ntoma Yoane akomona na bofungoli bilembo mosusu misato ekozanga te kopusa yo na kosangana lisusu mingi na mosala ya Jéhovah mpo na ntango na biso.
Tala, mpunda motane!
12. Engebene Yesu, nini esengelaki kozala elembo na kozonga na ye lokola Mokonzi kozanga komonana?
12 Pene na nsuka na mosala na ye na mabelé, Yesu asololaki elongo na bayekoli na ye mpe na boumeli ya lisolo yango bayekoli batunaki ye ete: “Elembo na [kozonga] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” Mpo na eyano, asakolaki bampasi oyo ekozala “ebandeli na bolozi.” Alobaki: “Libota moko ekotelemela libota mosusu, bokonzi moko ekotelemela bokonzi mosusu. Mokili ekoningana mingi, mpe na esika na esika malali mabe na nzala ekozala, na makambo na nsomo, na bilembo minene na likolo.” (Matai 24:3, 7, 8; Luka 21:10, 11) Makambo oyo Yoane amoni ntango bilembo mosusu ya mokanda bifungwami makokani mpenza na esakweli oyo. Totala sikawa makambo nini makobima ntango Yesu afungoli elembo ya mibale.
13. Likambo nini ya kokesena elingi sikawa komonisama epai na Yoane?
13 “Wana efungolaki ye elembo na mibale, nayoki ekelamu na bomoi na mibale koloba ete, Yaka!” (Emoniseli 6:3) Ezali cheribɛ ya mibale, oyo azali lokola ngombe mobali, ye nde apesi etinda oyo. Ye azali elilingi na makasi, ntango makasi esalelami na motindo na sembo. Nzokande awa Yoane akomona makasi ya nsomo mpe ya koboma.
14. Mpunda nini mpe mofandi na mpunda nini Yoane amoni nsima na maloba oyo, mpe emonaneli yango ezali elilingi ya nini?
14 Nsima na libyangami oyo ya mibale ete “Yaka!,” eloko nini emonani? “Mpunda mosusu ebimi, mpunda motane. Nguya epesami na mofandi na yango ete alongola kimya na mokili na ntina ete bato babomana, mpe mopanga [molai] epesami na ye.” (Emoniseli 6:4) Solo, oyo ezali emonaneli moko ya nsomo! Mpe kokakatana ata moke ezali te mpo na oyo yango elakisi: etumba! Ezali etumba ya sembo te oyo Mokonzi aponami na Jéhovah azali kobunda mpe kolonga, kasi etumba mabe mpo na konyokola bato, etumba oyo bato bango na bango bazali kobunda mpe oyo epalangani na mokili mobimba; mpo na yango, makila mingi masopami mpe mpasi mingi eyokisami epai na bato. Ntina wana mpunda motane ebongi solo na mofandi likoló na yango!
15. Mpo na nini toboyi kosangana na botamboli ya mofandi na mpunda ya mibale?
15 Yoane azali na boyokani soko moke te na mofandi na mpunda oyo soko mpe kopesa maboko na botamboli na ye na yauli, mpamba te esakweli moko esilaki kopesama na ntina na basaleli na Nzambe ete: “Bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Atako bafandi “kati na mokili,” Yoane, mpe lelo oyo kelasi na Yoane elongo na ebele monene “basangani te” na mokili ya lelo oyo ezali na nyongo ya makila. Bibundeli na biso bizali ya elimo mpe bizali na “nguya na Nzambe” mpo na kopesa biso nzela na kosakola solo na molende, kasi ezali mpo na kobunda bitumba ya mosuni te.—Yoane 17:11, 14; 2 Bakolinti 10:3, 4.
16. Ntango nini mpe na motindo nini mofandi na mpunda motane azwaki “mopanga molai”?
16 Bitumba mingi bizalaki liboso na 1914, mbula oyo Mofandi na mpunda mpembe azwaki bokonzi. Kasi mofandi na mpunda motane azwi “mopanga molai.” Yango emonisi nini? Kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bitumba ya bato esopi makila mingi, ebebisi biloko mpe bomoi ya bato lokola emonanaki naino liboso te. Kati na ebele na makila oyo masopamaki kobanda 1914 kino 1918, basalelaki, mpo na mbala ya liboso, to na motindo eleki nyonso oyo basalelaki liboso, mituka ya bitumba, bagaz mpo na koboma bato, mpepo ya bitumba, masuwa oyo etambolaka na nse na mai mpo na bitumba, bamasini minene mpo na kobeta bakano, mpe bibundeli oyo bikobundaka yango moko. Kati na mikili soko 28, bato nyonso, nde bobele basoda te, bapesaki maboko na etumba. Motuya na bato babomamaki ezalaki nsomo. Basoda koleka milió libwa babomamaki, mpe motuya na basivile babomamaki ezalaki monene. Ata nsima na etumba oyo, mabelé ezwaki kimya ya solo te. Mibu koleka 50 nsima na etumba oyo, Konrad Adenauer, mokonzi wa kala na Alemanye alobaki: “Kobatelama mpe kimya esili kolimwa na bomoi na bato uta 1914.” Ezali yango mpenza esili kosala mofandi na mpunda motane, oyo mokano na ye ezali ete alongola kimya na mokili.
17. Motindo nini mofandi na mpunda ya mibale alandaki kosalela “mopanga molai” nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
17 Na nsima, na mposa makasi na makila, mofandi na mpunda motane amibwakaki kati na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Babundi basalelaki bibundeli ya nsomo koleka mpe etumba yango ebomaki bato mbala minei koleka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na 1945, bombe atomike mibale ebwakamaki na Japon; mokomoko na yango ebomaki nkoto mingi na bato bobele na mwa ntango mokemoke. Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mofandi na mpunda motane akamataki bomoi ya bato soko 55 milió, kasi atondaki te. Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato koleka milio 20 basili kokufa na “mopanga molai” oyo ezali na maboko na mofandi na mpunda motane.
18, 19. (a) Na esika ete ezala lokumu mpo na mayele ya kosala bibundeli, nzokande kobomama na ebele na bato uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba emonisi nini? (b) Likama nini ezali liboso na mokili mobimba, kasi Mofandi na mpunda mpembe akosala nini mpo na kopengola yango?
18 Kobomama oyo nyonso elakisi ete mayele mpo na kosala bibundeli ezali likambo malamu? Ezali nde komonisa ete mpunda motane mpe azangi mawa azali kotambola. Kasi kotambola na ye ekosuka ntango nini? Ndambo na bato ya mayele na mokili balobi ete etumba ya nikleere ekoki kobima mbalakaka—kozanga kolobela etumba ya nikleere oyo bato bango moko bakoki kobimisa mpo na makaneli. Kasi tobanga te, mpamba te Mofandi na mpunda mpembe mpe molongi azali kokana eloko mosusu mpo na mabelé.
19 Ntango nyonso oyo mokili ekolanda nzela ya lolendo mpe koyinana na bikolo, bato bakozala ntango nyonso na nsomo mpo na etumba ya nikleere oyo mbele ekoboma bato awa na mokili. Ata soki mikili balobi ete babwaka bibundeli nyonso ya nikleere oyo bazali na yango, nzokande bakotikala na mayele mpe teknike kati na mitó na bango, mpe yango ekoki kopusa bango na kosala bibundeli mosusu ya nikleere nsima na mwa ntango moke; na yango etumba ekoki kobanda na bibundeli mike mpe ekoya kosuka na bibundeli ya nikleere oyo ekoboma bato mingi. Lolendo mpe koyinana etondi epai ya mabota mbele ekobomisa mokili mobimba, kasi Mofandi na mpunda mpembe akosukisa ligboma mpe kotambola ya mpunda motane. Tobanga te, mpamba te Klisto, Mokonzi, akolanda botamboli na ye, mpo na kosukisa elonga na ye likoló na mokili oyo etambwisami na Satana, mpe epai mosusu, mpo na kosala awa na mokili lisangá ya sika ya bato etongami likoló na bolingo, bolingo na Nzambe mpe na mozalani, oyo ezali kokolisa kimya koleka ebele na bibundeli ya nikleere oyo mikili basimbi mpo na komibatela na eleko oyo ya ligboma.—Nzembo 37:9-11; Malako 12:29-31; Emoniseli 21:1-5.
Mpunda moindo abimi
20. Nini endimisi biso ete Mofandi na mpunda mpembe akosukisa bampasi nyonso?
20 Yesu afungoli elembo ya misato. Yoane, eloko nini elekaki? “Wana efungolaki ye elembo na misato, nayoki ekelamu na bomoi na misato koloba ete, Yaka!” (Emoniseli 6:5a) Na esengo, cheribɛ oyo ya misato “azali na elongi lokola ya moto”; ye azali elilingi ya bolingo. Bolingo etongami likoló na mitinda ekoyikana mingi mpe mingi kati na mokili na sika elakami na Nzambe, lokola mpe ezaleli oyo kitoko etondi na lisangá mobimba ya Jéhovah lelo. (Emoniseli 4:7; 1 Yoane 4:16) Ntembe ezali te, Mofandi na mpunda mpembe, ye oyo ‘asengeli koyangela kino Nzambe akotia banguna nyonso na nse na makolo na ye,’ akosukisa bampasi oyo elingi sikawa kolakisama epai na Yoane.—1 Bakolinti 15:25.
21. (a) Mpunda moindo mpe mofandi na yango azali elilingi ya nini? (b) Nini emonisi ete mpunda moindo alandi kotambola lokola ete azwi ligboma?
21 Yoane amoni nini ntango libyangami ya misato eyokani ete “Yaka!” “Natali, mpe namoni mpunda moindo. Mofandi na yango azalaki na kilo na loboko na ye.” (Emoniseli 6:5b) Nzala bipai nyonso na mokili! Tala lisakola ya molili na makambo mazalaki liboso. Yango etali makambo mabimaki na ebandeli na mokolo na Nkolo, mpamba te mpo na yango bilei bikomaki kokabolama se mokemoke, mpe bakomaki komeka yango na kilo. Uta 1914, nzala ezali mokakatano ya mokili mobimba oyo ezali kosila te. Nsima na etumba ndenge ezali kosalema na ntango na biso, nzala ekozalaka, mpamba te mosolo oyo bakoki kosalela mpo na koleisa bato ezali nde kosalelama mpo na kosomba bibundeli. Basali na bilanga bakei na mosala ya soda, bilanga, bamboka mpe biloko biuti na bilanga, nyonso ebebisami; na ntina wana bilei bizali komonana lisusu mingi te. Ezali yango mpenza esalemaki na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba: bamilió na bato banyokwamaki na nzala mpe bakufaki. Epai mosusu, mofandi na mpunda moindo, elilingi na nzala atiki kotambola te banda wana. Na boumeli ya bambula oyo ebandaki na 1930, bato 5 milió bakufaki mpo na nzala na mokili ya Ukraine. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimisaki nzala mingi lisusu. Wana mpunda moindo ebandaki kotambola, na katikati ya mobu 1987, Lisangá oyo ekotalaka makambo na bilei na mokili mobimba (Conseil mondial de l’alimentation) eyebisaki ete bato 512 milió kati na mokili bazali kolia malamu te mpe mokolo na mokolo bana 40 000 bazali kokufa mpo ete bilei ya malonga bizali te.
22. (a) Mongongo moko elobi nini, mpe ezali mpo na komonisa likambo nini ya ntina? (b) Motuya ya litre moko ya blé mpe litres misato ya orze emonisi nini?
22 Yoane azali na makambo mosusu ya koyebisa biso: “Nayoki mongongo lokola kati na bikelamu na bomoi minei koloba ete, Litele moko ya blé denali moko, litele misato na orze denali moko; bebisa mafuta, na vinyo mpe te.” (Emoniseli 6:6) Bikelamu na bomoi minei basangisi mingongo na bango mpo na kolobela makasi likambo oyo ete bilei bisengeli kokabolama se mokemoke—ndenge Bayisraele “balyaki biloko bimekami na kilo mpe kati na kobanga” liboso na kobomama na Yelusaleme na mobu 607 liboso na ntango na biso. (Ezekiele 4:16) Na eleko na Yoane, litre moko ya blé (mbuma oyo basalaka na yango farine ya mampa) ezalaki bilei ya soda mpo na mokolo moko. Motuya na yango boni? Denali moko, elingi koloba lifuta ya mokolo mobimba ya mosala! (Matai 20:2)d Kasi mobali oyo azali na libota oyo asengeli koleisa akosala nini? Ye akoki kosomba litre misato ya mbuma ebengami orze. Kasi yango ekokoka koleisa libota monene te. Epai mosusu, orze ezalaki nde bilei ya babola, mpo ete blé eleki yango.
23. Liloba oyo ete: “Bebisa mafuta, na vinyo mpe te” elimboli nini?
23 Liloba oyo elimboli nini ete: “Bebisa mafuta, na vinyo mpe te.” Engebene bato mosusu, yango elimboli ete, bato mingi bakozanga bilei mpe ata kokufa mpo na nzala, nzokande epai mosusu bazwi bakozanga te biloko na bango ya luxe to ya motuya mingi oyo balingaka. Nzokande na Moyen-Orient, mafuta mpe vinyo ezali mpenza biloko ya luxe te. Na ntango oyo Biblia ezaláká kokomama, farine, mafuta mpe vinyo ezalaki biloko oyo moto nyonso akokaki kozala na yango. (Tala Genese 14:18; Nzembo 104:14, 15.) Lokola mai mpo ya bomeli mazalaki ntango nyonso malamu te, bazalaki kosalela mingimingi vinyo mpo ya bomeli mpe ntango mosusu mpo na kosalisa na yango bamaladi. (1 Timote 5:23) Mpo na mafuta, na mikolo na Eliya, mwasi-mokufeli-mobali na mboka Zarefata, atako azalaki mobola, azalaki na mwa mafuta na ye mpo na kolamba na yango farine oyo etikalaki na ye naino. (1 Mikonzi 17:12) Na yango, etinda oyo ete ‘bebisa mafuta, na vinyo mpe te’ emonisi lokola ete esengeli te kosalela mingimingi biloko oyo bikoki kozanga, kasi kosalela yango se mokemoke. Soki boye te ‘ekobebisama,’ elimboli ete ekosila nyonso, naino eleko ya nzala esili te.
24. Mpo na nini kotambola na mpunda moindo ekoumela lisusu ntango molai mingi te?
24 Esengo nini na koyeba ete Mofandi na mpunda mpembe, mosika te akokangisa mpunda moindo oyo azali kopota mbangu! Na ntina yango, tala makambo alaki na bolingo nyonso mpo na mokili ya sika: “Na mikolo na ye moyengebeni [akobima lokola nzete ya sika]; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. . . . Masango makotondana na mokili ata kino likoló na ngomba.”—Nzembo 72:7, 16; tala mpe Yisaya 25:6-8.
Mpunda na langi lokola mai na mpondu mpe mofandi na yango
25. Ntango Yesu afungolaki elembo ya minei, Yoane ayokaki mongongo nini, mpe yango emonisi nini?
25 Lisolo esili naino mpenza te. Yesu afungoli elembo ya minei, mpe Yoane alobi na biso makambo ayokaki: “Wana efungolaki ye elembo na minei, nayoki mongongo na ekelamu na bomoi na minei koloba ete, Yaka!” (Emoniseli 6:7) Mongongo yango ezali oyo ya cheribɛ oyo akokani na mpongo to ndeke aigle oyo azali kopumbwa. Lolenge na ye ezali komonisa mayele, bososoli. Ekoki boye, mpamba te, na ntina na makambo mayebisami na emonaneli yango, Yoane, kelasi na Yoane mpe basaleli nyonso mosusu ya Nzambe bazali solo na mposa ya kotala yango malamu mpe kosala na mayele. Kosalaka bongo, tokoki kobatelama na malozi oyo mazali kokweila bato ya ntango na biso oyo bazali na lolendo mpe na mbindo, oyo batii motema na bango na mayele ya mokili.—1 Bakolinti 1:20, 21.
26. (a) Nani mofandi na mpunda na minei, mpe mpo na nini langi ya mpunda na ye ekoki na ye mpenza? (b) Nani azali kolanda mofandi na mpunda na minei, mpe nini ezali kokomela babomami na ye?
26 Eyano ya mofandi na mpunda ya minei na libyangami oyo epesami na ye ebimisi makambo mosusu ya nsomo. Yango wapi? “Natali, mpe namoni mpunda na langi lokola [mai ya] mpondu. Mpo na mofandi na yango, nkombo na ye Liwa, mpe Hadès ezalaki kolanda ye penepene.” (Emoniseli 6:8a) Mofandi na mpunda oyo ya nsuka azali na nkombo: Liwa. Kati na bafandi na mpunda minei na Emoniseli, bobele ye nde ayebisi nkombo na ye polele. Ekoki ete Liwa atambola likoló na mpunda na langi lokola mai na mpondu, mpamba te liloba ya greke khlôros (oyo ebongolami na français ete blême) ezali kosalelama na mikanda mikomamaki na monoko ya greke mpo na komonisa elongi oyo ebebisami makasi na maladi mpe ekamati langi lokola ya ebembe. Ekoki mpe ete Hadès (nkunda) elanda Liwa penepene, mpamba te ye nde azali koyamba motuya monene na bato bazali kobomama na mofandi na mpunda ya minei. Esengo mpo ete bato yango bakosekwisama ntango ‘liwa mpe Hades bakozongisa bakufi oyo bazali kati na bango.’ (Emoniseli 20:13) Kasi motindo nini Liwa azali kokamata bato yango?
27. (a) Motindo nini mofandi na mpunda oyo nkombo na ye Liwa azali koboma bato? (b) “Ndambo na minei na mokili” likoló na yango Liwa azwi bokonzi elimboli nini?
27 Emonaneli etangi mwa bantina ya liwa: “Bokonzi likoló na ndambo na minei na mokili epesami na bango mpo na koboma na mopanga, na nzala, na [malali na kufa], mpe na banyama na zamba.” (Emoniseli 6:8b) Elingi koloba te ete mofandi na mpunda na minei azali kobebisa ndambo na minei na bafandi na mokili; kasi elimboli ndambo monene na mokili, oyo efandami na bato mingi. Mofandi na mpunda oyo azali kokamata bibembe bibomami na mopanga molai oyo ezali na maboko na mofandi na mpunda ya mibale, mpe na bibembe bibomami na nzala mpe kokelela etumolami na mofandi na mpunda na misato. Ye moko mpe azali na bibembe na ye oyo azali koboma, na nzela na malali na kufa mpe na koningana na mabelé oyo elobelami na Luka 21:10, 11.
28. (a) Ndenge nini esakweli na ntina na “malali na kufa” ezali kokokana na mikolo na biso? (b) Nini ezali lelo kobatela basaleli ya Jéhovah na bamaladi mingi?
28 “Malali na kufa” engali mingi na mikolo na biso. Nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, grippe espagnole ebomaki bato 20 milió bobele na mwa basanza na boumeli ya mobu 1918 mpe mobu 1919. Eteni bobele moko ya mokili epai malali wana ekomaki te ezalaki esanga ebengami Sainte-Hélène. Na mikili epai bato basilaki kosila, mipiko na mipiko ya bibembe etumbamaki. Lelo oyo, ezali nsomo na komona motuya na bato bazali kokufa na maladi lokola kardiake mpe kânser, malali oyo mbala mingi eutaka na bomeli likaya. Na boumeli ya eleko ebengamaki “mbula zomi ya kolokama,” elingi koloba bambula oyo ebandaki na 1980, kozanga kotosa mibeko ya Biblia oyo epekisi pite ebimisi SIDA oyo ebakisami na “malali na kufa.” Na mobu 2000, bapanzi-nsango balobaki ete ministre ya makambo etali bokolongono ya nzoto na Etats-Unis abengaki sida ete ezali, “ntango mosusu maladi mabe koleka bamalali nyonso oyo ebima na mokili.” Alobaki ete, na mokili mobimba, bato milió 52 basili kobɛla malali ya sida, kati na bango bato milió 20 basili kokufa na malali yango. Nzokande basaleli ya Jéhovah bazali na esengo mpo ete bazali kolanda toli ya mayele ya Liloba na Nzambe oyo epekisi pite mpe kozongisa makila, mpamba te na nzela yango nde bamalali mingi ezali kopalangana!—Misala 15:28, 29; tala 1 Bakolinti 6:9-11.
29, 30. (a) Na eleko na biso, “makama minei” oyo malobelami na Ezekiele 14:21 malimboli nini? (b) Banyama na zamba” oyo balobelami na Emoniseli 6:8 ezali kotinda biso kokanisa na nini? (c) Likanisi nini ya ntina emonisami na elakiseli oyo ya esakweli?
29 Engebene emonaneli na Yoane, banyama na zamba bazali ntina ya minei oyo bato bazali kobomama, naino bakokisi mikolo na bango te. Malozi minei oyo mabimisamaki nsima wana elembo ya minei efungwamaki—etumba, nzala, malali mpe banyama na zamba—ezalaki kotalelama na ntango ya kalakala lokola ntina minei oyo bato bazalaki kokufa na bolenge. Boye nde tokoki koyeba ntina na likebisi oyo Jéhovah akebisaki Yisraele ete: “Ekozala boye, mpe ekoleka boye wana ekotinda ngai makama minei na likolo na Yelusaleme: mopanga mpe nzala, mpe banyama mabe mpe malali mabe, mpo na kopikola moto mpe ebwele kati na yango.”—Ezekiele 14:21.
30 Atako bazulunalo elobelaka yango mingi te, nzokande bato mingi bazali kokufa mpo na banyama mabe kati na mikili ya moi makasi. Mpe ekoki kozala ete bato mingi bakokufa lisusu mpo na yango na bipai oyo bitumba to nzala ekongala, kino ete bato balembi bakozala lisusu na makasi te ya kobengana to kobunda na banyama na zamba oyo bazali na nzala. Epai mosusu, bato mingi bazali lelo komitambwisa lokola banyama bazangi makanisi, na kokesena mpenza na maye mayebisami na Yisaya 11:6-9. Ezali lolenge wana ya bato nde bazali koboma baninga na bango bato, bazali kosangana na basi na makasi, bazali kotika babombe epai na epai. (Tala Ezekiele 21:31; Baloma 1:28-31; 2 Petelo 2:12.) Mofandi na mpunda na minei azali mpe kolokota bibembe ya makama oyo nyonso. Likanisi ya ntina emonani na esakweli oyo ezali ete mofandi na mpunda na langi lokola mai ya mpondu azali kolokota baoyo nyonso bazali kokufa liwa ya mbalakaka mpo na bantina mingi.
31. Mpo na nini tokoki kobatela elikya na biso, atako bafandi na mpunda motane, moindo mpe na langi lokola mai na mpondu bazali se kobebisa?
31 Makambo mamonisami na bofungwami na bilembo minei ya liboso makitisi motema na biso, mpamba te malakisi biso ete tokoki kotika elikya te mpo na bitumba, mpo na nzala, mpo na maladi mpe mpo na bantina mosusu ya liwa ya mbalakaka oyo epalangani lelo; tosengeli mpe te kobungisa elikya na komonaka ete bakonzi ya mokili bazali kolonga te mpo na kosilisa mikakatano ya lelo. Soki makambo mazali kobima na mokili mamonisi ete bafandi na mpunda motane, moindo mpe na langi lokola mai ya mpondu basili kobanda kotambola, tobosana te ete Mofandi na mpunda mpembe, ye nde abandaki kotambola liboso. Yesu asili kokoma Mokonzi, mpe asili kolonga na kobengana Satana na makóló. Kati na makambo mosusu oyo alongi na yango, tokoki kotanga koyanganisama na bana ya nsuka ya Yisraele ya elimo mpe koyanganisama ya ebele monene ya bamilió ya bato bauti na mikili nyonso baoyo bakobika na bolozi monene. (Emoniseli 7:4, 9, 14) Kotambola na ye ekolandana kino akosilisa elonga na ye.
32. Na bofungoli elembo mokomoko kati bilembo minei ya liboso, eloko nini ezali koyokama?
32 Kofungwama ya mokomoko kati na bilembo minei ya liboso elandamaki na libyangami oyo ete: “Yaka!” Na mbala nyonso, mpunda moko mpe mofandi na yango babimaki mpe babandaki kotambola. Nzokande kobanda na elembo ya mitano, libyangami wana ezali lisusu te. Kasi bampunda wana bazali se kotambola, mpe bakolanda kotambola mbangu na boumeli ya eleko mobimba oyo ya mikolo ya nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo. (Tala Matai 28:20.) Makambo mosusu nini ya ntina Yesu amonisi wana efungoli ye bilembo misato ya nsuka? Makambo mosusu makomonana na miso na bato te; mosusu mpe, ata ekomonana, nzokande ezali naino koya. Atako boni, ntembe ezali te ete ekokokana. Totala soki ezali makambo nini.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosengeli koyeba ete “mwasi” oyo alobelami kati na Emoniseli 12:1 alati “motolé na minzoto zomi na mibale,” yango motolé na elilingi.
b Mpo na kozwa bilembeteli ya polele oyo emonisi ete Yesu azalisamaki mokonzi na 1914, tala buku Biblia eteyaka mpenza nini?, na nkasa 215-218, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Mabongoli mingi masaleli liloba “mpo na kolonga” na verset oyo (Segond, Votre Bible, TOB), to “kolonga lisusu” (Français courant, Jérusalem, Biblia Lingala haut-fleuve). Nzokande, na greke na ebandeli, verbe oyo esalelami na passé mpe na subjonctif emonisi ete likambo yango ezali mpo na libela. Yango wana na buku na ye ya maloba na Biblia (Word Pictures in the New Testament), Robertson alobi: “Awa passé na greke epesi likanisi ya kolonga libela.”
d Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi ezali na mitindani, liloba na nse na lokasa.
[Etanda na lokasa 92]
Mokonzi alongi wana ezali ye kopota mbangu
Na ba 1930 mpe ba 1940, banguna makasi na ba Témoins de Jéhovah balukaki komonisa bango ete mosala na bango elongobanaki te na mibeko to ezalaki mpo na kokweisa biyangeli. (Nzembo 94:20) Bobele na 1936, Batemwe 1 149 bakangamaki na Etats-Unis. Batemwe bafundaki makambo mingi liboso na bisambiselo kino na la Cour supr̂eme ya mboka. Tala bolongi mosusu oyo balongaki:
Le 3 Mai 1943, na likambo ya Murdock contre Pennsylvanie, Esambiselo eleki monene emonisaki ete Batemwe bakokaki kokabola mikanda mpe kozwa likabo ekokani na yango, kozanga ete bazala na patente. Bobele na mokolo yango, ekateli oyo ezwamaki na likambo ya Martin contre la ville de Struthers emonisaki ete epekisami te kobeta na bikuke mpo na kokabola nkasa na libyangami mpe mikanda mosusu ya piblisité ndako na ndako.
Le 14 juin 1943, na likambo ya Taylor contre Mississippi, Esambiselo eleki monene ya mboka elobaki ete Batemwe bazalaki kolendisa mobulu te na mosala na bango ya kosakola. Bobele mokolo yango, na likambo Ministère de l’Education de la Virginie occidentale contre Barnette, esambiselo yango emonisaki ete ministère de l’Education (bakonzi na makambo na boteyi) bazalaki na lotomo te ya kolongola bana Ya ba Témoins de Jéhovah na kelasi mpo bazalaki koboya kopesa losako na drapo. Na mokolo elandaki, Esambiselo eleki monene ya Australie elongolaki epekiseli oyo ezwamaki likoló na ba Témoins de Jéhovah; esambiselo elobaki ete epekiseli yango ezwamaki se mpo na “esengo ya kozwa ekateli, mpe mpo na konyokola.”
[Etanda na lokasa 94]
‘Nguya epesami na ye ete alongola kimya na mokili’
Teknoloji ezali komema kino wapi? Na ebimeli na yango ya le 22 janvier 1987, Globe and Mail (zulunalo ya Kanada oyo ebimisami na Toronto) ezongelaki maloba malandi ya diskur moko esalamaki na Ivan Head, président ya Centre mpo na bolukiluki kati na mokili mobimba:
“Mituya ya sikisiki mimonisi ete ndambo minei na bato na mayele mpe bateknisié oyo batyami na mosala ya bolukiluki bazali kosala se mpo na kobimisa bibundeli. . . . Na 1986, mosolo mobimisamaki mozalaki 1,5 million ya badolare na minute moko. . . . Motindo oyo na bolukiluki ezali kobakisa kimya na biso? Bibombelo na bibundeli ya nikleere ya mikili mileki na nguya ezali na bibundeli bikokani na oyo esalelamaki na babundi banso na Etumba na Mibale ya mokili mobimba—bakisa yango mbala 6 000. Elingi koloba bitumba 6 000 bikokani na Etumba na mibale na mokili mobimba! Uta 1945, mokili ezalaki se na poso nsambo na kimya, kozanga bitumba. Bitumba 150 bisili kosalama, ezala etumba kati na mikili mibale to etumba kati na bato na mokili moko bango na bango, mpe yango nyonso ebomaki bato koleka milio 20. Mingi kati na bango bakufi na minduki makasi oyo teknoloji ebimisi na eleko oyo ya Lisangá na Mabota to O.N.U.”
Tii na mobu 2005, basoda babomi bato koleka milió 20.
[Etanda na lokasa 98, 99]
Plan ya mokanda ya Emoniseli
Na esika oyo tokomi na boyekoli na biso ya Emoniseli, tobandi kososola na polele mpenza plan ya mokanda yango. Nsima na ebandeli na yango oyo ezali kobenda likebi (Emoniseli 1:1-9), Emoniseli ekoki kokabolama na bimonaneli 16, na ndenge elandi:
EMONANELI NA 1 (1:10 kino 3:22): Na kopemama na Nzambe, Yoane amoni Yesu akembisami, azali kopesa nsango na móto nyonso mpe batoli epai na masangá nsambo.
EMONANELI NA 2 (4:1 kino 5:14): Kiti na bokonzi na Jéhovah Nzambe emonisami na nkembo nyonso. Jéhovah apesi mokanda epai na Mwana na Mpate.
EMONANELI NA 3 (6:1-17): Na kofungolaka bilembo motoba ya yambo na mokanda yango, Mwana na Mpate amonisi mokemoke emonaneli etondi na malembo mingi masengeli kosalama na mokolo na Nkolo. Bafandi na mpunda minei babandi kopota mbangu; baombo na Nzambe oyo bakufi lokola bamartire bazwi nzambala na mpembe; mokolo monene na nkanda na Nzambe emonisami.
EMONANELI NA 4 (7:1-17): Baanzelu basimbi mipepe na libebi kino basangani 144000 na Yisraele na elimo bakotyama bilembo. Ebele monene na bato ebimi na mabota manso bandimi ete lobiko na bango euti na Nzambe mpe na Klisto mpe bayangani mpo na kobika na bolozi monene.
EMONANELI NA 5 (8:1 kino 9:21): Ntango elembo na nsambo efungwami, kelelo nsambo ebeti; na emonaneli oyo na mitano, elobelami mpo na kelelo motoba ya yambo. Kobetama na kelelo yango motoba ezali kolaka kosambisama na mokili epai na Jéhovah. Kelelo na mitano mpe na motoba elobeli ebandeli na bolozi na liboso mpe na mibale.
EMONANELI NA 6 (10:1 kino 11:19): Anzelu moko makasi apesi epai na Yoane mwa mokanda moke; bazwi mesure na temple mpe toyebi likambo ekomeli batemwe mibale. Esika eleki ntina na emonaneli oyo ekokani na kobetama na kelelo na nsambo, oyo ezali koyebisa bolozi na misato ekoyela banguna na Nzambe: kozalisama na Bokonzi na Jéhovah mpe na Klisto.
EMONANELI NA 7 (12:1-17): Ezali komonisa kobotama na Bokonzi, nsima na yango Mikaele abwaki nyoka, Satan, na mabelé.
EMONANELI NA 8 (13:1-18): Nyama na yauli na nguya abimi na la mer, mpe nyama oyo azali na maseke mibale lokola Mwana na Mpate asengi na bato ete basambela ye.
EMONANELI NA 9 (14:1-20): Makambo kitoko na esakweli mamonisi ba 144000 batelemi likolo na ngomba Siona. Nsango euti na baanzelu esakolami na mabelé mobimba, vinyo na mabelé ekatami, mpe ekamweli na nkanda na Nzambe enyatami.
EMONANELI NA 10 (15:1 kino 16:21): La cour to libanda na makoló emonani lisusu, nsima na yango sáni nsambo na nkanda na Jéhovah esopami na mabelé. Mokapo yango esuki mpe na esakweli na ntina na nsuka na biloko mabe etambwisami na Satana.
EMONANELI NA 11 (17:1-18): Babilone Monene, ndumba monene, amati likoló na nyama na yauli na langi motane oyo alimwe mpo na mwa ntango moke na libulu mozindo, kasi abimi mpe abomi mwasi na pite.
EMONANELI NA 12 (18:1 kino 19:10): Ezali kolaka kokwea mpe kobomama ya libela ya Babilone Monene. Nsima na kobomama na ye, bato mosusu bazali kolela, bamosusu bazali kokumisa Jéhovah; libala na Mwana na Mpate esakolami.
EMONANELI NA 13 (19:11-21): Yesu azali kotambwisa mampinga na makoló mpo na kokokisa etumbu na liwa oyo Nzambe apesi epai na ebongiseli na politike, na mampinga mpe na bato na Satana; bandeke balei bibembe na bango.
EMONANELI NA 14 (20:1-10): Satan le Diable abwakami na libulu mozindo; Boyangeli na mbula nkoto na Klisto mpe na mikonzi oyo bakoyangela na ye elongo; komekama na nsuka mpo na bato mpe kobomama na Satana mpe na badémo na ye.
EMONANELI NA 15 (20:11 kino 21:8): Lisekwa ya bato nyonso; Mokolo monene na Kosambisama; likoló na sika mpe mabelé na sika emonani mpe bato na sembo bazwi mapamboli na seko.
EMONANELI NA 16 (21:9 kino 22:5): Kokokana na nsuka na Emoniseli na emonaneli na nkembo na Yelusaleme na Sika, mwasi na Mwana na Mpate. Bibongiseli na Nzambe bikobikisa bato mpe bikopesa bango bomoi na seko biuti na mboka yango.
Emoniseli esuki na maloba mpe toli na móto euti na Jéhovah, na Yesu, na anzelu mpe na Yoane ye moko. Libyangami epesami epai na moto nyonso ezali boye ete: “Yaka!”—Emoniseli 22:6-21.