Mokapo 21
Jéhovah akweisi bitumbu likoló na boklisto ya lokuta
Emonaneli 5—Emoniseli 8:1 kino 9:21
Teme: Kelelo motoba kati na kelelo nsambo ebetami.
Eleko na kokokana na yango: Longwa Yesu Klisto azwaki kiti na bokonzi na 1914 kino bolozi monene
1. Eloko nini esalami ntango Mwana na mpate afungoli elembo na nsambo?
“MIPEPE minei” misimbami kino ba 144 000 basangani ya Yisraele na elimo batyami bilembo mpe ebele monene endimami mpo na lobiko. (Emoniseli 7:1-4, 9) Kasi liboso ete mopepe makasi ebimisama likoló na mokili, esengeli lisusu ete bikateli ya kokweisama oyo Jéhovah akamati yango likoló na mokili ya Satana bikoka kosakolama. Wana Mwana na mpate azali kofungola elembo ya nsambo mpe ya nsuka, Yoane asengeli kokengela mpo na komona malamu makambo oyo makoleka. Sikawa ayebisi biso maye amoni: “Mpe ntango efungoli ye [Mwana na mpate] elembo na nsambo, kati na likoló lokito ezalaki te soko ndambo na ngonga. Mpe namonaki baanzelu nsambo baoyo bakotelemaka liboso na Nzambe, mpe bakelelo nsambo epesami na bango.”—Emoniseli 8:1, 2.
Ntango mpo na kobondela
2. Na boumeli na ndambo na ngonga na elilingi oyo likóló efandaki nyee, likambo nini esalami?
2 Ndambo na ngonga, makelele ata moke ezali te, yango ekoki komonana ntango molai wana moto azali kozela likambo. Ata nzembo na masanzoli ya ntango nyonso na ebele ya bayembi na likoló ezali koyokama te. (Emoniseli 4:8) Yoane asimbi ntina na yango, na emonaneli elandi: “Nsima anzelu mosusu ayaki mpe atelemi epai na etumbelo, asimbi mbeki na wolo na kotumba mpaka na malasi; mpe mpaka na malasi mingi epesami na ye ntina ete apesa yango esika moko na mabondeli na basantu nyonso na likoló na etumbelo na wolo na liboso na kiti na bokonzi. Molinga na mpaka na malasi na loboko na anzelu mobuti esika moko na mabondeli na basantu liboso na Nzambe.”—Emoniseli 8:3, 4.
3. (a) Mbeka na mpaka na malasi ezali kokundola biso nini? (b) Ndambo na ngonga oyo likoló efandaki nyee ezalaki mpo na kosala nini?
3 Yango ekundoli biso ete na ebongiseli na makambo na Bayuda bazalaki kotumba mpaka na malasi mikolo nyonso na tabernakle mpe, nsima, na tempelo ya Yelusaleme. (Exode 30:1-8) Na ntango yango, Bayisraele oyo bazalaki banganga te bazelaki na libanda ya esika mosantu mpe bazalaki kobondela, na kimya, kati na mitema na bango, epai na Ye oyo milinga ya mpaka na malasi ezalaki kobuta. (Luka 1:10) Sikawa Yoane amoni likambo likokani na yango kosalema na likoló. Mpaka na malasi oyo anzelu apesi ekokisami na “mabondeli na basantu,” mpe, kati na emononeli moko azwaki liboso, elobami ete mpaka na malasi emonisi mabondeli yango. (Emoniseli 5:8; Nzembo 141:1, 2) Ndenge likoló efandi nyee na elilingi ezali bongo komonana ete epesi nzela na mabondeli na basantu oyo malobami na mabelé makoka koyokama.
4, 5. Makambo nini mazali kosalisa biso mpo na koyeba eleko oyo ekokani na ndambo na ngonga oyo likóló efandaki nyee na elilingi?
4 Tokoki koyeba ntango nini likoló efandaki nyee? Ee, na kotalela makambo mosusu makomami na mokapo oyo mpe makambo malekaki na ebandeli ya mokolo na Nkolo. (Emoniseli 1:10) Na 1918 mpe 1919, makambo makokani na ndenge ya kokamwisa na oyo ekomami na Emoniseli 8:1-4 masalamaki na mabelé. Na boumeli na bambula 40 oyo ezalaki liboso na 1914, Bayekoli na Biblia, ndenge bazalaki kobenga Ba Témoins de Jéhovah na ntango wana, basakolaki na molende ete ntango na Mabota ekosuka na mbula wana. Makambo na nsomo maye masalamaki na 1914 mamonisaki ete babungaki te. (Luka 21:24, Crampon 1905; Matai 24:3, 7, 8) Kasi mingi kati na bango bandimaki mpe ete bakotika mabelé mpe bakozwa libula na bango na likoló na mbula bobele wana ya 1914. Likambo yango esalamaki te. Nzokande, na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bayikaki mpiko mpo na minyoko makasi. Le 31 Octobre 1916, président ya liboso ya la Société Watch Tower, Charles Russell, akufaki. Nsima, le 4 Juillet 1918, président ya sika, Joseph Rutherford, mpe bandeko mosusu nsambo baoyo bazalaki kotambwisa mosala ya la Société, bakotaki na boloko ya Atlanta, na Géorgie (Etats-Unis), nsima wana tribinale ekatelaki bango bitumbu na boloko oyo bilongobani te.
5 Baklisto ya sembo baoyo basalaki kelasi na Yoane batungisamaki mingi. Kobanda wana, nini ezalaki mokano na Nzambe mpo na bango? Ntango nini basengelaki kokende na likoló? Lisolo na motó na likambo: “Eleko ya kobuka mbuma esili—Makambo nini makoya nsima?,” ebimaki na La Tour de Garde ya 1er Mai 1919, emonisaki ezalela oyo na kokakatana mpe elendisaki baklisto oyo bazalaki sembo ete balanda koyika mpiko. Ekokaki kotangama lisusu kati na yango: “Tondimi ete emonani sikawa polele ete kobuka mbuma na kelasi ya Bokonzi ekokisami, ete basangani nyonso na yango batiami bilembo ndenge ekoki mpe ete ekuke ekangami.” Na eleko oyo ya mpasi, mabondeli ya molende ya kelasi na Yoane mamataki epai na Jéhovah, lokola kati na milinga ya mpaka na malasi mingi. Mpe Nzambe ayokelaki bango.
Móto ebwakami na mokili
6. Eloko nini esalami nsima na ndambo na ngonga oyo likóló efandaki nyee, mpe ezali eyano na nini?
6 Yoane alobi lisusu: “Na ntango yango anzelu akamataki mbeki na kotumba mpaka na malasi, mpe atondisaki yango na móto na etumbelo mpe abwakaki yango na mokili. Mpe nkake ebimi, na mingongo, na mikalikali, na koningana na mokili.” (Emoniseli 8:5) Nsima na ndambo na ngonga oyo likóló efandaki nyee, mbala moko makambo na kokamwa mabimi, oyo na ndenge emonani, mazalaki eyano mpo na mabondeli ya basantu mpo mabimisami na móto oyo ezwamaki na etumbelo na mpaka na malasi. Na 1513 liboso na ntango na biso, na ngomba Sinaï, nkake, mikalikali, mpe mongongo makasi, móto mpe koningana makasi na ngomba, nyonso oyo emonisaki ete Jéhovah atyaki likebi epai na libota na ye. (Exode 19:16-20) Makambo motindo moko oyo Yoane akomi mamonisi ete Jéhovah azali kotya likebi na basali na ye na mabelé. Kasi oyo ya Yoane emonisami na lolenge ya bilembo. (Emoniseli 1:1) Na yango, na eleko na biso, móto, nkake, mingongo, mikalikali na koningana ya mabelé na elilingi, elimboli nini?
7. (a) Móto nini ya elilingi Yesu apelisaki na mabelé na boumeli ya mosala na ye? (b) Ndenge nini bandeko na Yesu na elimo bapelisaki móto kati na boklisto ya mokili oyo?
7 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nayaki kopelisa móto na mokili.” (Luka 12:49) Ya solo, apelisaki mpenzampenza móto. Na kosakola na ye ya molende, asalaki ete Bokonzi na Nzambe ezala likambo ya liboso mpe na ntina mingi mpo na libota ya Bayuda, kino ntembe makasi ebimaki kati na libota oyo. (Matai 4:17, 25; 10:5-7, 17, 18) Na 1919, bandeko na elimo na Yesu oyo bazalaki na mabelé (etuluku moke ya baklisto bapakolami baoyo babikaki na komekama makasi na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba) bapelisaki móto ekokani kati na boklisto ya lokuta. Na Septembre ya mbula yango, elimo ya Jéhovah emonanaki na lolenge ya kokamwisa ntango Batemwe na ye ya sembo bayaki bipai na bipai koyangana na assemblée ya Cedar Point (Etats-Unis). Joseph Rutherford, oyo abimaki na boloko sikasika mpe nsima moke bazuzi balongolaki bifundeli nyonso oyo bafundaki ye na yango, alobaki na mpiko epai na basangani: “Na kotosaka etinda na Nkolo na biso mpe koyebaka libaku malamu mpe mokumba na biso oyo etali kobundisa balakisi na lokuta baoyo uta kala bakangi bato na boombo, lotomo na biso ezalaki, mpe ezali kino lelo, kosakola boyei na Bokonzi na nkembo na Masiya.” Bokonzi na Nzambe, ezali nde likambo ya liboso!
8, 9. (a) Na maloba nini Joseph Rutherford amonisaki ezaleli mpe mposa ya libota na Nzambe na boumeli na bambula ya bitumba? (b) Na likambo nini tokoki koloba ete móto epelisamaki na mabelé? (c) Na ndimbola nini nkake, mingongo, mikalikali mpe koningana na mabelé esalamaki?
8 Kolobelaka minyoko makasi oyo libota na Nzambe ezwaki, molobi ayebisaki lisusu: “Monguna azalaki na mawa te na kobundisa biso kino bampate mingi na Nkolo babulunganaki mpe bazalaki na motema likoló, bazelaki mpe babondelaki ete Nkolo ayebisa bango mokano na ye. . . . Kasi atako balembaki mpo na mwa ntango moke, bayekoli ya sembo ya Nkolo bazalaki na mposa makasi ya kosakola nsango ya Bokonzi.”—Tala La Tour de Garde, ya 15 Septembre 1919, lokasa 280 na Lingelesi.
9 Mposa oyo ekokisamaki na 1919, mbula oyo etuluku ya baklisto wana moke kasi na molende bapelisaki móto, na elobeli na elimo, mpo na kobanda mosala ya kosakola na mokili mobimba. (Tala 1 Batesaloniki 5:19.) Moto ebwakamaki na mokili, na boye ete Bokonzi na Nzambe ekomaki likambo moko monene, lokola ezali bongo lelo! Mingongo makasi miyokamaki mpe nsango ya Bokonzi esakolamaki na polele nyonso. Lokola nkake, makebisi matongami likoló na Biblia mayokamaki. Lokola mikalikali, solo ya kongenga ebimaki uta na Liloba na esakweli na Jéhovah, mpe, lokola koningana makasi ya mabelé, mangomba maninganaki makasi kino na miboko na yango. Kelasi na Yoane esosolaki ete bazali na mosala basengeli kosala, mpe kino lelo, mosala yango ezali kokola na ndenge ya kokamwa na mokili mobimba.—Baloma 10:18.
Baanzelu bamibongisi mpo na kobeta kelelo
10. Sikawa baanzelu nsambo bazali komilengela mpo na kosala nini, mpe mpo na nini?
10 Yoane alandi na koloba: “Mpe baanzelu yango nsambo baoyo bazalaki na bakelelo yango nsambo bamibongisaki mpo na kobeta yango.” (Emoniseli 8:6) Kobetama ya bakelelo oyo emonisi nini? Na Yisraele ya kala, kelelo ezalaki kobetama mpo na komonisa mikolo ya ntina to makambo na ntina. (Levitike 23:24; 2 Mikonzi 11:14) Bobele bongo, kobetama ya bakelelo oyo Yoane azali pene na koyoka ekobenda likebi likoló na makambo na ntina monene.
11. Mosala nini ya kobongisama kelasi na Yoane bakokisaki yango na molende na mabelé kobanda 1919 kino 1922?
11 Ezalaki bango komilengela mpo na kobeta bakelelo oyo, ntembe ezali te ete baanzelu batambwisaki mosala ya bobongisi na mabelé. Kobanda 1919 kino 1922, kelasi na Yoane oyo bazongaki na bomoi babongisaki lisusu na molende nyonso mosala ya kosakola mpe bakolisaki makoki na bango ya konyata mikanda. Na 1919, zulunalo L’Age d’Or, lelo ebengami Réveillez-vous !, ebandaki kobima. Emonisamaki lokola “zulunalo oyo etongami likoló na makambo ya solo, likoló na elikya mpe kondimisama.” Esaleli oyo, lokola kelelo, esengelaki kokokisa mokumba ya ntina mpo na komonisa polele mabe ya mangomba ya lokuta ndenge emikotisaki kati na politike.
12. Kobetama na kelelo mokomoko ezali kosakola nini, mpe ezali kokundola biso makambo nini mabimaki na mikolo na Moïse?
12 Ndenge tokomona yango sikawa, kobetama na kelelo mokomoko ezali kosakola likambo monene kati na yango bitumbu makasi bikweisami likoló na biteni na mokili. Mosusu kati na bitumbu oyo ezali kokundola biso bitumbu oyo Jéhovah akweisaki likoló na bato na Ezipito na mikolo na Moïse. (Exode 7:19 kino 12:32) Bitumbu oyo bimonisaki ekateli ya Jéhovah likoló na Ezipito, mpe bipesaki nzela na libota na Nzambe kosikwama na boombo. Bitumbu oyo Yoane amoni bizali na mokano moko na oyo wana. Nzokande, bizali bitumbu ya mosuni te. Ezali bilembo oyo bizali komonisa bikateli na sembo na Jéhovah.—Emoniseli 1:1.
“Ndambo na misato” elakisi nini?
13. Likambo nini esalami ntango kelelo minei ya liboso ebetami, mpe yango ebimisi motuna nini?
13 Ntango bakelelo minei ya liboso ebetami, bitumbu bikwei likoló na “ndambo na misato” na mokili, na mai monene, na bibale mpe na maziba na mai, mpe likoló na moi, sanza mpe minzoto oyo ezali kongengisa mokili. (Emoniseli 8:7-12) Ndambo na misato emonisi eteni monene ya eloko, kasi mobimba na yango te. (Tala Yisaya 19:24; Ezekiele 5:2; Zakaria 13:8, 9.) Na yango, “ndambo na misato” nini esengelaki kobetama makasi na bitumbu oyo? Satana mpe libota na ye bazipi miso mpe babebisi eteni monene na bato na mokili. (Genese 3:15; 2 Bakolinti 4:4) Davidi alobi boye mpo na ezalela na bato ete: “Nyonso bapengwi nzela, babebi elongo; moko azali te oyo akosalaka malamu, ata moko te.” (Nzembo 14:3) Na yango, bato nyonso bazali na likama ya kozwa lisambisi na kokweisama. Kasi ezali na ndambo moko na bato na mokili ekweisami mpenzampenza. Eteni oyo, “ndambo na misato,” mbele esengelaki koteyama malamu. “Ndambo na misato” yango ezali nini?
14. Ndambo na misato na elilingi oyo ezwi nsango na móto euti epai na Jéhovah, ezali nini?
14 Ezali bongo boklisto ya lokuta, oyo bopusi na ye epalanganaki, pene na ndambo na misato na bato na mokili, na ba 1920. Makambo mazali koteyama mpe kosalema na kati ezali kopengwa na boklisto ya solo, lipengwi monene oyo Yesu na bayekoli na ye basakolaki yango. (Matai 13:24-30; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3; 2 Petelo 2:1-3) Bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo balobi ete bazali na kati na temple na Nzambe mpe bazali koteya boklisto ya solo. Kasi mateya na bango mazali mosika mingi na solo ya Biblia, mpe ntango nyonso bazali kobwaka nsoni likoló na nkombo na Nzambe. Na yango, boklisto ya mokili oyo nde emonisami na ndambo na misato na elilingi, mpe Jéhovah atindeli ye nsango ya nguya mpe ya móto makasi. Ndambo na misato oyo ebongi ata moke te kozwa ngolu na Nzambe.
15. (a) Kobetama na kelelo mokomoko eyokamaki se na mbula moko? Limbola eyano na yo. (b) Banani basangisi mongongo na bango na oyo ya kelasi na Yoane mpo na kosakola bikateli na Jéhovah?
15 Lokola kobetana na kelelo oyo elandani, bikateli ya ntina bizwamaki na ba assemblée nsambo esalamaki kati na 1922 mpe 1928. Kasi kobetama na kelelo oyo eyokanaki bobele na bambula wana te. Mabe ya boklisto ya mokili oyo ezali ntango nyonso kobimisama polele mpe na molende nyonso, wana mokolo na Nkolo ezali naino koumela. Bikateli na Jéhovah bisengeli kosakolama na mokili mobimba, ata koyinama mpe minyokoli ezali bipai nyonso na mokili. Ezali bobele nsima na kosakola oyo nde nsuka na ebongiseli ya Satana ekoya. (Malako 13:10, 13) Na esengo nyonso, ebele monene basangisi lelo mongongo na bango na oyo ya kelasi na Yoane mpo na koyokisa lokito na nsango oyo etali bato nyonso na mokili.
Ndambo na misato na mokili eziki
16. Eloko nini esalami ntango anzelu ya liboso abeti kelelo?
16 Na ntina na baanzelu, Yoane alobi lisusu: “Oyo na liboso abetaki kelelo, mpe matandala, na móto mosangani na makila, ebwakami na mokili; ndambo na misato na mokili eziki, mpe ndambo na misato na nzete eziki, mpe matiti nyonso mobesu maziki.” (Emoniseli 8:7) Bolozi oyo ezali kokundola etumbu ya nsambo na Ezipito, kasi elakisi nini na ntango na biso?—Exode 9:24.
17. (a) Liloba “mokili” na Emoniseli 8:7 elakisi nini? (b) Na ndimbola nini ndambo na misato na mokili oyo ezali kati na boklisto ya mokili oyo ezikaki?
17 Kati na Biblia, liloba “mokili” mbala mingi ezali komonisa bato. (Genese 11:1; Nzembo 96:1) Lokola etumbu ya mibale ekwei likoló na mai monene, oyo mpe emonisi bato, “mokili” esengeli bongo kolakisa eteni oyo ezali komonana makasi kati na lisangá na bato oyo etongami na Satana mpe elakami kobebisama. (2 Petelo 3:7; Emoniseli 21:1) Ndenge etumbu oyo elobelami emonisi ete boklisto ya lokuta, ndambo na misato na mokili, ekauki na molunge makasi ya koboyama na Jéhovah. Baoyo, lokola banzete, bazali na bisika bitombwami kati na boklisto ya mokili oyo, baziki na kosakolama na ekateli na kokweisa ekatami na Jéhovah likoló na boklisto ya mokili oyo. Mpo na bibele na basambeli kuna, soki bakolanda kopesa maboko na mangomba na yango, bakokoma lokola matiti makauki, babebi na elimo, na miso na Nzambe.—Tala Nzembo 37:1, 2.a
18. Na lolenge nini nsango na bikateli na Jéhovah esakolamaki na assemblée oyo esalamaki na Cedar Point na 1922?
18 Motindo nini nsango oyo na bikateli na kokweisa ezali kosakolama? Ezali kosalema mingimingi na ba radio te, soko mpe batelevizió te to bazulunalo te, yango biloko na mokili mpe mbala mingi bizali kotónga “moombo” na Nzambe. (Matai 24:45) Nzokande, nsango yango esakolamaki na lolenge ya kokamwisa na basaleli na Nzambe na assemblée ya mibale oyo basalaki na Cedar Point (Etats-Unis), le 10 Septembre 1922. Mokolo yango, bandimaki na bomoko mpe na esengo nyonso ekateli na motó na likambo: “Ntembe mpo na batambwisi ya mokili.” Kolobaka polele epai na mokili na elilingi, ekateli ezalaki boye: “Mpo na yango, tozali kopesa libyangami ya nokinoki na mabota nyonso na mokili, epai na bakonzi na bango mpe batambwisi na bango, mpe epai na bakonzi na mangomba nyonso, oyo basangani na bango, epai na bato minene na mombongo lokola mpe na bato minene na politike, mpo ete balongisa maloba na bango ya kotya kimya mpe bolamu na mabelé, mpe bazala babandisi na bolamu na bato na mokili; soki boye te, bandima ete balongi te mpo na kokokisa bamposa oyo ya bato, mpe soki bongo tosengi na bango batya likebi na litatoli oyo tozali kopesa mpo na Nkolo mpe baloba mpo na litatoli yango soko ezali solo to te.”
19. Litatoli nini na ntina etali Bokonzi na Nzambe basaleli na Jéhovah bapesaki na boklisto ya mokili oyo?
19 Litatoli nini baklisto bapesaki na nzela na ekateli oyo? Yango oyo: “Tosakoli polele ete Bokonzi na Masiya ezali nzela bobele moko mpo na kosilisa bampasi oyo bato bazali na yango; ekomema kimya na mabelé mpe ekopesa epai na bato mokano malamu—mpe ezali yango mposa na mabota nyonso; tosengeli kobakisa ete baoyo bakondima na bolingo na bango moko boyangeli oyo ya sembo oyo esili kobanda, bakotonda na mapamboli mingi na kimya mpe bakosepela na bomoi mpe kosikwama, bolamu bokosuka te.” Na eleko na biso oyo esili kobeba, wana biyangeli na bato bizali kokoka te kosilisa mpenza mikakatano ya mokili, mingimingi kati na boklisto ya mokili oyo, ntembe oyo mosusu ekokani na ebeteli na kelelo eyokani lisusu makasi koleka na 1922. Ntembe ezali te, Bokonzi na Nzambe oyo etambwisami na Klisto molongi ezali elikya bobele moko mpo na bato.
20. (a) Kobanda 1922, na banzela nini lisangá na baklisto bapakolami eyokisaki nsango na kokweisa, lokola kobetama na bakelelo? (b) Eloko nini ekomelaki boklisto ya mokili oyo ntango kobetama na kelelo ya liboso eyokamaki?
20 Na nzela na bikateli, ba trakte, mikanda mike, mikanda minene, bazulunalo mpe ba diskur, lisangá ya baklisto bapakolami eyokisaki kosakolama oyo, mpe mosusu oyo elandaki nsima, lokola kobetama na bakelelo. Ntango kelelo ya liboso eyokanaki, boklisto ya mokili oyo ezalaki lokola ebetami na matandala makasi. Nyongo na ye ya makila, na ndenge asanganaki na bitumba na ekeke ya 20, ebimaki polele, mpe emonani solo ete ebongi nkanda makasi na Jéhovah ekweila ye. Kelasi na Yoane, na nsima bazwaki lisungi na ebele monene, balandi koyokisa mongongo ya kelelo ya liboso na kobendaka likebi likoló na likambo oyo ete na miso na Jéhovah boklisto na mokili oyo ebongi ebomama.—Emoniseli 7:9, 15.
Lokola ngomba monene eziki na mɔ́to
21. Nini esalamaki ntango anzelu ya mibale abetaki kelelo?
21 “Anzelu na mibale abetaki kelelo. Mpe eloko lokola ngomba monene eziki na mɔ́to ebwakami kati na mai monene. Mpe ndambo na misato na mai ekomaki makila; mpe ndambo na misato na biloko na bomoi kati na mai bikufi, mpe ndambo na misato na masuwa ezindi.” (Emoniseli 8:8, 9) Likambo oyo na nsomo ezali komonisa nini?
22, 23. (a) Likatami nini ezwamaki nsima na kobetama na kelelo ya mibale? (b) “Ndambo na misato na mai monene” elakisi nini?
22 Ekozala na biso mpasi te na kokanga ntina na yango soki totali makambo malekaki na assemblée esalamaki na basali na Jéhovah na Los Angeles, na Californie (Etats-Unis), na le 18 kino 26 août 1923. Mokolo na poso, nsima na midi, Joseph Rutherford apesaki diskur ya ntina na motó na likambo “Bampate mpe bantaba.” Amonisaki polele ete “bampate” bazali bato na mitema malamu baoyo bakosangola mokili oyo teritware ya Bokonzi na Nzambe. Likatami moko ezwamaki nsima moke na boumeli na assemblée oyo ebendaki likebi likoló na bokosi ya “bakonzi na mangomba bapengwi mpe bokosi ya baoyo, bakonzi na ‘bitonga’ na bango, bazali na bopusi monene na makambo na mombongo mpe na politike kati na mokili.” Likatami oyo esengaki epai na “baoyo nyonso bazali koluka kimya mpe mabongi, mpe bazali kobanga Nkolo, kasi bakangami na mangomba . . . bamikabola na bibongiseli nyonso na mangomba matongami likoló na kozanga bosembo mpe Nkolo akweisi yango na kobengaka yango “Babilone” mpe bamilengela mpo na “kozwa mapamboli ya Bokonzi na Nzambe.”
23 Ekateli oyo ezalaki mpenza likambo ebimaki nsima na kobetama na kelelo ya mibale. Baoyo bakokaki koyoka nsango yango basengelaki komikabola na etuluku ya “bantaba” oyo Yisaya amonisaki na maloba oyo: “Nde bato mabe bazali lokola mai monene mazali kotombwatombwa, bayebi kofanda na kimya te, mai na yango ekobwaka bosoto mpe mbindo likoló.” (Yisaya 57:20; 17:12, 13) Na yango, “mai monene” emonisi malamu bato na yikiyiki, bazali na kimya te mpe batomboki baoyo bazali kobimisa mobulu mpe koluka mbongwana. (Tala Emoniseli 13:1.) Mokolo ekoya oyo “mai monene” wana ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:1) Na kozelaka, na nzela na kobetama ya kelelo ya mibale, Jéhovah asakoli ekateli oyo asili kokamata likoló na ndambo na misato na “mai monene” yango, eteni na bato na yikiyiki baoyo bazali kati na boklisto na mokili oyo.
24. Ngomba monene na móto oyo ebwakamaki na mai monene elakisi nini?
24 Ebakata ya eloko lokola ngomba monene oyo ezali kozika na móto, ebwakami na “mai monene” oyo. Kati na Biblia, ngomba elakisi mingimingi biyangeli. Na yango, Bokonzi na Nzambe emonisami lokola ngomba. (Danyele 2:35, 44) Babilone, mboka na kobebisa, ekomaki “ngomba eziki.” (Yilimia 51:25) Kasi, ngomba monene oyo Yoane amoni ezali kopela móto, ebwakami na mai monene, yango emonisi malamu likambo oyo ete, na boumeli mpe nsima ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba, likambo litali boyangeli libimisaki ntembe makasi mpe ya móto kati na bato, mingimingi na mikili oyo boklisto na lokuta ezali na bopusi. Na Italie, Mussolini akotisaki bokonzi ebengami fascisme. Allemagne ezalaki na bokonzi ya nazisme hitlérien, nzokande mikili misusu bamekaki mitindo mosusu ya boyangeli ya socialistes. Mbongwana makasi esalamaki na Russie, epai kuna révolution bolchevique ebimisaki boyangeli ya liboso ya Communiste mpe ekweisaki nguya mpe bopusi ya bakonzi ya boklisto ya lokuta na mboka yango, oyo kala ezaláká moko na bisika na bango ya makasi.
25. Eloko nini emonisi ete likambo etali boyangeli elandaki kopela móto nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba?
25 Etumba ya mibale ya mokili mobimba esukisaki boyangeli ya fasciste mpe ya nazi, kasi likambo etali bokonzi ezalaki ntango nyonso kopela; mai monene, elingi koloba bato, balandaki kotya mpe kolongola mitindo ya sika ya biyangeli oyo ebengami régimes révolutionnaires. Na bambula oyo elandaki 1945, biyangeli na lolenge oyo bityamaki na mikili mingi, ndakisa, na Chine, na Viêt Nam, na Cuba mpe na Nicaragua. Na Grèce, bokonzi na konyokola ya basoda etyamaki, mpe nsima elongolamaki. Na Kampuchéa (Cambodge), lolenge ya Communisme makasi oyo bamekaki esukaki na bobomi bato soko milió koleka mibale.
26. Motindo nini “ngomba oyo na móto” elandi kobimisa mbonge kati na mai monene, elingi koloba bato na mokili?
26 “Ngomba oyo ezali kozika na móto” elandaki kobimisa mbonge kati na mai monene, yango bato na mokili. Afrike, Amerike, Asie mpe bisangá na Pacifique ezali bisika oyo bitumba ya politike esalemaki mingi. Mingi na bitumba yango esalamaki kati na mikili mibengami ete ya boklisto mpe na mikili epai kuna bamisionere ya boklisto ya mokili oyo balakisaki bato politike mpe kotomboka. Basángo mosusu ya katolike basanganaki ata na bituluku ya batomboki ya Communiste mpo na kobunda na ngambo na bango. Bobele na ntango yango, na Amérique centrale, bituluku ya baprotesta basalaki makasi mpo na kotemela oyo babengaki “mposa mabe oyo esilaka te ya bokonzi” oyo ezali epai na ba Communistes. Kasi na botomboki nyonso oyo emonanaki kati na mai monene, yango bato na mokili, moko te epesaki kimya.—Tala Yisaya 25:10-12; 1 Batesaloniki 5:3.
27. (a) Na ndimbola nini “ndambo na misato na mai monene” ekomaki makila? (b) Na lolenge nini “ndambo na misato na bikelamu nyonso na bomoi oyo bizali kati na mai monene” bikufaki, mpe likambo nini ekomelaki “ndambo na misato na masuwa”?
27 Lokola emonisami na kobetama na kelelo ya mibale, bato oyo bazali komikotisa kati na bitumba na kowelana bokonzi na esika ete bamitya na nsé na Bokonzi na Nzambe, bazali na nyongo ya makila. Mingimingi “ndambo na misato na mai monene” oyo ezali bongo elilingi ya boklisto na mokili oyo, ekomi lokola makila. Bikelamu nyonso na bomoi oyo bizali na kati bikufi na miso na Nzambe. Moko te kati na bibongiseli nyonso ya politike oyo bizali kotambola lokola masuwa likoló na ndambo na misato na mai monene oyo, moko te ekoki kobika ete ezanga kozinda libela. Oyo nde esengo na komona ete bamilió na “bampate” bakangaki ntina ya kobetama na kelelo oyo ebengi bango kokabwana na baoyo bazali naino kosepela na bolingo makasi ya ekolo to nationalisme mpe bosopi makila kati na mai monene oyo!
Monzoto ekwei uta likoló
28. Likambo nini esalami ntango anzelu na misato abeti kelelo?
28 “Anzelu na misato abetaki kelelo. Mpe monzoto monene na likoló ekweaki kopela lokola mwinda, mpe ekweaki likoló na ndambo na misato na bibale, na maziba na mai. Nkombo na monzoto yango Bololo. Ndambo na misato na mai makomi bololo, mpe bato mingi bakufaki mpo ete mai makomaki bololo.” (Emoniseli 8:10, 11) Mbala oyo lisusu, biteni mosusu na Biblia bikosalisa biso na kososola na lolenge nini ba versets oyo ezali kokokisama na mokolo na Nkolo.
29. “Monzoto monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda” ezali elilingi ya nini, mpe mpo na nini?
29 Esili kolobelama mpo na minzoto na elilingi kati na bansango oyo Yesu atindaki na masangá nsambo; minzoto nsambo, ezali elilingi ya bankulutu, bapakolami na elimo, batyami likoló na masangá.b (Emoniseli 1:20) “Minzoto” oyo, elongo na baklisto nyonso bapakolami, bafandi na bisika na likoló na ndimbola ya elimo, kobanda na ntango oyo batyami bilembo na elimo santu lokola ndanga na libula na bango na likoló. (Baefese 2:6, 7) Nzokande, ntoma Paulo akebisaki baklisto ete kati na “minzoto” oyo bapengwi bakobima, bato oyo bazali kokotisa mikabwano, baoyo bakozimbisaka bampate. (Misala 20:29, 30) Kozanga bosembo ememaki kino lipengwi monene mpe, bango nyonso elongo, bankulutu oyo bakweaki bakómaki moto oyo azali kotyola mibeko, moto oyo azali komitombola na esika na nzambe likoló na bato mosusu. (2 Batesaloniki 2:3, 4) Makebisi na ntoma Paulo makokanaki ntango kelasi na bakonzi na mangomba na boklisto ya lokuta ebimaki kati na mokili. Ezali kelasi yango nde emonisami na elilingi ya “monzoto monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda.”
30. (a) Yisaya alingaki koloba nini ntango alobaki ete mokonzi na Babilone akweaki uta likoló? (b) Na Yango liloba oyo kokwea uta likoló ekoki kolimbola nini?
30 Yoane amoni monzoto yango ekwei na nse. Elimboli nini? Tokosimba ntina na yango na kotalela likambo likomelaki mokonzi moko ya kala, mokonzi ya Babilone, mpo na ye Yisaya alobaki: “Osili kokwea longwa na likoló boni! E monzoto na ntongontongo, mwana na kobima na moi! Osili kokatama kino mabelé boni, yo oyo obukaki mabota!” (Yisaya 14:12) Maloba oyo na bisakweli makokisamaki ntango Babilone ekweisamaki na mampinga ya Siruse mpe na mbala moko mokonzi na Babilone alongolamaki na molongo ya motambwisi ya mokili mobimba, oyo ezalaki bongo kokwea ya nsoni mingi. Na yango, kokwea uta likoló kino na nse ekoki kolimbola kobungisa esika oyo etombwami mpe kokitisama kati na nsoni makasi.
31. (a) Ntango nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya mokili oyo bakweaki uta na etelemelo ekokani na “likoló”? (b) Na ndimbola nini mai oyo bakonzi na mangomba bazali kokabola makomi “bololo,” mpe mabimisi nini mpo na bato mingi?
31 Ntango bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo bapengwaki, na kotikaka boklisto ya solo, bakweaki longwa na esika na ‘likoló’ etombwami oyo ntoma Paulo alobeli na Baefese 2:6, 7. Na esika ya kopesa bato mai ya mpeto ya solo, bakabolaki nde “mai na bololo,” lokuta na makambo mingi, lokola mateya ya lifelo ya móto, epongelo, Bosatu Bosantu to Trinité mpe prédestination, liteya oyo elobi ete makambo nyonso na bomoi na moto masila kokanama; bamemaki lisusu mabota na etumba na esika ya kosalisa bato bazala basali na Nzambe baoyo na bizaleli malamu. Yango ebimisaki nini? Baoyo bandimaki ebele na lokuta oyo, bamelaki pwazó na elimo. Ekomelaki bango lokola Bayisraele bazangi sembo na ntango na Yilimia, mpo na bango Jéhovah alobaki: “Tala nakoleisa bango matiti na bololo, mpe nakomelisa bango mai na mbondo. Mpo ete lipengwi ebimi longwa na basakoli na Yelusaleme, epalangani na mboka nyonso.”—Yilimia 9:15; 23:15.
32. Ntango nini emonani polele ete bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo bakweaki uta makoló na ndimbola ya elimo, mpe ntango nini bosolo na kokwea oyo elobelamaki makasi?
32 Bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta bakweaki na nsé longwa na likoló, na ndimbola ya elimo, likambo yango emonanaki polele na 1919. Na mbula wana, matomba ya Bokonzi epesamaki na bango te, kasi epai na etuluku moke ya batikali ya baklisto bapakolami. (Matai 24:45-47) Bango balobelaki lisusu makasi kokwea ya kelasi ya bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo kobanda 1922, na kobimisaka mabe na bango polele.
33. Mabe nini ya bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo ebimisamaki polele na 1924, na assemblée ya Columbus (Etats-Unis)?
33 Mpo na yango, kosakolama ya kafukafu esalamaki na assemblée ya Columbus (Etats-Unis), kobanda na le 20 kino 27 Juillet 1924, Assemblée oyo zulunalo L’Age d’Or ebengaki yango ete “assemblée monene koleka oyo bayekoli ya Biblia basalaki naino liboso te.” Ntembe ezali te ete na nsé na botambwisi ya anzelu oyo azalaki kobeta kelelo ya misato, likatami ya makasi ezwamaki na assemblée yango. Nsima likatami oyo ebimisamaki na nzela ya trakte oyo ezalaki na titre Efundeli likoló na bakonzi ya mangomba; 50 milió ya ba trakte oyo ekabolamaki mpe ezalaki na motó ya likambo moke elobi: “Libota na ndaka litemeli libota ya nyoka.” Efundeli oyo emonisaki mabe na bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo ntango bazali komipesa batitre minene kati na lingomba, kopesa bato minene ya mombongo mpe bato na politike esika ya liboso kati na basambeli na bango, koluka ete bangenga liboso na bato mpe koboya kosakola epai na bato nsango etali Bokonzi na Masiya. Trakte yango elobaki makasi ete moklisto nyonso oyo amipesi epai na Jéhovah azwi epai na ye mosala ya kosakola “mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso, mpo na kobondisa baoyo nyonso bazali kolela.”—Yisaya 61:2.
34, 35. (a) Eloko nini ekomeli nguya mpe bopusi ya bakonzi ya mangomba uta anzelu na misato abandaki kobeta kelelo? (b) Nsuka ya bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo ekozala nini?
34 Uta anzelu ya misato abandaki kobeta kelelo, bakonzi na mangomba bazali sé kobungisa bopusi na bango, mpe lelo oyo bobele moke kati na bango nde bazali naino na nguya lokola ya bakonzi na mangomba na bikeke bileki, oyo balobaki ete bazwaki nguya na bango na Nzambe. Kosakola ya Ba Témoins de Jéhovah epesi nzela na bato mingi koyeba ete mateya oyo bakonzi na mangomba bazali koteya ezali bongo pwazó ya elimo, “bololo.” Lisusu, na mikili ya nord ya Mpoto, tokoki koloba ete bakonzi na mangomba basili kobungisa bokonzi na bango nyonso, nzokande na mikili misusu, Leta azali kopekisa bopusi na bango. Kati na mikili ya katolike na Mpoto mpe na Amerike, babebisi lokumu na bango mpo na etamboli ya nsoni makasi na makambo matali mbongo, politike mpe bizaleli. Banda wana, ezalela na bango ezali kobeba sé kobeba, mpo ete bakozwama na mpasi moko lokola basambeli mosusu nyonso ya mangomba ya lokuta.—Emoniseli 18:21; 19:2.
35 Jéhovah asilisi te kokweisa bitumbu likoló na boklisto ya mokili oyo. Totala oyo esalemi nsima na kobetama na kelelo ya minei.
Molili!
36. Eloko nini esalami nsima wana anzelu na minei abeti kelelo?
36 “Anzelu na minei abetaki kelelo. Mpe ndambo na misato na moi ebolami, na ndambo na misato na sanza, na ndambo na misato na minzoto, mpo ete ndambo na misato na yango ebongwana molili; ndambo na misato na mokolo engengisami te, mpe na butu bobele bongo.” (Emoniseli 8:12) Etumbu ya libwa na Ezipito etyaki mboka kati na molili mpenza. (Exode 10:21-29) Kasi molili na elilingi oyo ezali konyokola bato ezali nini?
37. Na nini Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo bakokisaki ezalela ya elimo na baoyo basangani na lisangá ya boklisto te?
37 Ntoma Petelo alobaki epai na baninga na ye bandimi ete bazalaki kati na molili na elimo liboso ete bazala baklisto. (1 Petelo 2:9) Ntoma Paulo asalelaki mpe liloba “molili” mpo na kolobela ezalela ya elimo na baoyo bazali kati na lisangá ya boklisto te. (Baefese 5:8; 6:12; Bakolose 1:13; 1. Batesalonike 5:4, 5) Kasi tokoloba nini mpo na basangani na boklisto ya lokuta baoyo balobi ete bandimi Nzambe mpe bandimi Yesu lokola Mobikisi na bango?
38. Na kobetaka kelelo, anzelu na minei amonisi nini na ntina na “kongenga” oyo ezali kouta na boklisto ya mokili oyo?
38 Yesu alobaki ete baklisto na solo bakoyebana na mbuma na bango mpe, mingi na baoyo balobi ete bazali bayekoli na ye ‘bazali nde bato na misala mabe.’ (Matai 7:15-23) Moto nyonso oyo azali kotala malamu mbuma ebimisami na ndambo na misato na mokili, yango boklisto ya lokuta, akotya ntembe te ete boklisto ya mokili oyo ezali kotambola na kotatabana kati na molili makasi ya elimo. (2 Bakolinti 4:4) Boklisto ya mokili oyo eleki mabe mingi mpo elati nkombo ya Klisto. Na yango, ekoki mpenza ete anzelu na minei abeta kelelo mpo na kosakola ete “kongenga” ya boklisto ya mokili oyo ezali nde molili mpe “mwinda” na ye eutaki na Babilone, kasi na boklisto ya solo te.—Malako 13:22, 23; 2 Timoté 4:3, 4.
39. (a) Motindo nini likatami ezwamaki na assemblée oyo esalamaki na 1925 elobelaki kongenga ya lokuta oyo ezali kouta na boklisto ya mokili oyo? (b) Ndenge nini mabe ya boklisto ya mokili oyo mamonisamaki lisusu polele na 1955?
39 Kolandaka kosakola oyo eyokamaki uta na likoló, le 29 août 1925 basaleli na Nzambe basanganaki na motuya monene na Indianapolis (Etats-Unis) mpe bazwaki likatami ya polele oyo ezalaki na motó na likambo “Nsango ya elikya.” Babimisaki mpe likatami yango na nzela ya mokanda moko oyo 50 milió na yango ekabolamaki na minoko mingi. Likatami oyo lilobelaki mpo na kongenga ya lokuta oyo ebimisamaki na basali na mombongo ya lokoso, bakonzi na politike mpe bakonzi na mangomba, kongenga oyo mpo na yango ‘bato bakotaki na molili makasi.’ Epai mosusu, likatami yango ekumisaki Bokonzi na Nzambe lokola elikya bobele moko ya solo mpo na kozwa “kimya, bolamu, kolongono, bomoi, bonsomi mpe bolamu ya seko”! Etuluku moke ya baklisto bapakolami bazalaki na molende mpo na kosakola nsango oyo emonisaki polele lokuta ya lisangá oyo monene, boklisto ya mokili oyo. Kasi uta ebandeli ya ba 1920 kino lelo oyo, etuluku yango moke etiki kosala bongo te. Kala mingi te, na 1955, etuluku oyo ebimisaki polele lisusu mabe ya bakonzi na mangomba na kokabolaka kati na mokili mobimba mpe na minoko mingi mokanda moke na titre, Nani azali “mwinda ya mokili,” boklisto ya mokili oyo to boklisto ya solo? Lelo oyo, bokosi ya boklisto ya mokili oyo ekomi polele kino bato mingi bazali komona yango bango moko kozanga ete balakisama. Kasi basali ya Jéhovah bazali koyebisa ntango nyonso ete boklisto ya mokili oyo ezali mpenzampenza efandelo ya molili.
Mpongo ezali kopumbwa
40. Kobetama na kelelo minei emonisi boklisto ya mokili oyo ete ezali nini?
40 Kelelo minei ya liboso emonisaki mpenza polele ete boklisto ya mokili oyo ezali na mpasi mpe elingi kokufa. Kobetama ya kelelo yango emonisaki ete eteni na “mokili” oyo ezali esika na ye esengeli kozwa etumbu uta na Jéhovah. Emonisaki ete biyangeli ya batomboki oyo bizali kobima na mikili epai boklisto ya mokili oyo eyangeli, to bipai mosusu, bizali kotemela makambo nyonso ya elimo. Kobetama ya kelelo oyo emonisi polele ete bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo bakwei, mpe eyebisaki epai na bato nyonso ete ezalela na elimo na boklisto ya mokili oyo ezali molili na molili. Ee, boklisto ya mokili oyo ezali mpenza eteni oyo efundami mingi koleka kati na mokili oyo etambwisami na Satana.
41. Eloko nini Yoane amoni mpe ayoki ntango kobetama na kelelo ekatani?
41 Makambo nini mosusu masengeli komonisama? Liboso ete tozwa eyano na motuna oyo, likambo mosusu emonani oyo ekati kobetama na kelelo. Yoane alobi: “Natalaki, mpe nayoki mpongo moko kopumbwa kati na likoló koloba na mongongo makasi ete: ‘Mawa! mawa, mawa na bato bazali kofanda na mokili mpo na kobetama na kelelo na baanzelu misato baoyo balingi kobeta yango!’”—Emoniseli 8:13.
42. Mpongo oyo ezali kopumbwa, ekoki komonisa nini, mpe nsango nini azali kosakola?
42 Mpongo oyo ezali kopumbwa mosika kuna na likoló, kino bafandi na eteni monene na mokili bakoki komona ye. Lokola azali na miso makasi, mpongo akoki komona mosika mpenza. (Yobo 39:29) Moko kati na bikelamu na bomoi minei, bacheribɛ, baoyo bazalaki zongazonga na kiti na bokonzi na Nzambe amonisamaki lokola mpongo azali kopombwa. (Emoniseli 4:6, 7) Ezala ete mpongo oyo elobelami awa ezali cheribɛ wana to mosaleli mosusu na Nzambe oyo azali na miso makomonaka mosika, likambo na ntina ezali ete azali kosakola na mongongo makasi nsango oyo na nguya: ‘Mawa! mawa! mawa!’ Tika ete bafandi na mokili batya likebi na nsango yango, ntango kelelo oyo misato ekobetama, mokomoko na yango ezali na boyokani na mawa oyo moko na moko!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bokeseni, lokola emonisi yango Emoniseli 7:16, ebele monene bazali konyokwama na móto makasi te oyo elimboli koboyama na Jéhovah.
b Minzoto nsambo oyo Yesu asimbi na loboko na ye ya mobali ezali elilingi na bakengeli bapakolami na lisangá na boklisto; nzokande, lelo, bankulutu mingi na masangá soko koleka 100 000 na mokili mobimba bazali basangani na ebele monene. (Emoniseli 1:16; 7:9) Bazali na esika nini? Lokola ezali elimo santu nde eponi bango na nzela na kelasi epakolami ya moombo na sembo mpe na mayele, tokoki koloba ete bazali na nsé na loboko na mobali, na nsé ya botambwisi na Yesu, mpo ete bango mpe bazali bakengeli na mpate nsima na ye. (Yisaya 61:5, 6; Misala 20:28) Bazali kopesa maboko na “minzoto nsambo” na nzela ya mosala oyo bazali kokokisa epai kuna batemwe bapakolami baoyo bakokisi masengami mpo na kozala bakengeli bazali te.
[Etanda na lokasa 139]
Mai na boklisto ya lokuta ezali mai na bololo
Bindimeli mpe misala na Mateya ya Biblia
boklisto ya lokuta
Nkombo ya Nzambe mpenza Yesu abondelaki mpo na kosantisama
ezali na ntina te: na nkombo na Nzambe. Petelo
“Kosalela nkombo ya alobaki: “Ye oyo akobelela nkombo
Nzambe mpenza mpo na na Jéhovah akobika.” (Misala 2:21;
komonisa Nzambe bobele Yoele 2:32; Matai 6:9; Exode 6:3;
moko ya solo . . . ezali Emoniseli 4:11; 15:3; 19:6)
na likambo moko te na
kondima ya Lingomba kati
na mokili mobimba.” (Maloba na
ebandeli kati na Biblia
Revised Standard Version)
Nzambe azali bosato: “Tata Biblia elobi ete Jéhovah
azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, aleki Yesu, ete azali Nzambe
mpe Elimo-Santu azali Nzambe, mpe mokonzi na Kisto.
kasi Banzambe bazali misato te (Yoane 14:28; 20:17;
bobele moko.” (The Catholic 1 Bakolinti 11:3)
Encyclopedia, ebimeli ya 1912) Elimo santu ezali makasi na
Nzambe oyo ekosalaka mosala.
Molimo na moto ekokufaka te: Moto azali molimo. Na liwa,
“Na ntango moto akufi, molimo molimo etiki kokanisa, etiki
na ye mpe nzoto na ye ekabwani. kosala, mpe ekozonga putulu,
Nzoto na ye . . . ekobeba . . . esika ezwamaki. (Genese 2:7;
Molimo na moto, ekokufaka te.” 3:19; Nzembo 146:3, 4;
(Makambo masalemaka nsima na Mosakoli 3:19, 20; 9:5, 10
kufa [Angl.], mokanda na katolike) Ezekiele 18:4, 20)
Bato mabe bazwaka etumbu Lifuti ya lisumu ezali kufa,
kati na linfelo nsima na liwa: kasi bomoi kati na mpasi te.
“Engebene bonkoko ya boklisto, (Baloma 6:23) Bakufi bayebi
linfelo ezali esika ya mpasi eloko moko lisusu te kati na
makasi mpo na libela.” linfelo (Hadès, Schéol), esika
(The World Book Encyclopedia, oyo bazali kopema na
ebimeli ya 1987) kozelaka lisekwa. (Nzembo
89:48; Yoane 5:28, 29;
11:24, 25; Emoniseli 20:13, 14).
“Titre Moyokanisi ebongi Moyokanisi bobele moko kati na
na Ngondo Mosantu (Maria).” Nzambe mpe bato, ezali Yesu.
(Nouvelle Encyclopédie catholique (Yoane 14:6; 1 Timote 2:5;
[Angl.], ebimeli ya 1967.) Baebele 9:15; 12:24)
Esengeli kobatisa bana Batisimo ezali mpo na baoyo
babotami sika: “Uta ebandeli basili kokoma bayekoli na Yesu
na yango, Lingomba ezalaki mpe basili koyekola kotosa
kondima batisimo ya bana mike. mibeko na ye. Mpo na kokokisa
Ezalaki komona ete ezaleli yango masengami ya batisimo, esengeli
ezali mabe te mpe ezalaki lisusu kokanga ntina ya Liloba na
koloba ete batisimo yango ezali Nzambe mpe kozala na kondima.
na ntina mingi mpo na lobiko.” (Matai 28:19, 20; Luka 3:21-23;
(Nouvelle Encyclopédie catholique Misala 8:35, 36)
[Angl.], ebimeli ya 1967)
Mangomba mingi makabolami Baklisto nyonso ya liboso
na kelasi mibale: bayoki mpe bazalaki baministre mpe
bakonzi na mangomba, mpe bazalaki kosangana na mosala
bakonzi bazali kokokisa mosala ya kosakola nsango malamu.
na bango mpo na bayoki. (Misala 2:17, 18; Baloma 10:10-13;
Mingimingi bakonzi yango 16:1) Moklisto asengeli ‘kopesa
bakozwaka lifuti mpo na mosala mpamba,’ koluka lifuti te.
na bango mpe bazali bakonzi (Matai 10:7, 8) Yesu apekisaki
liboso na bayoki na batitre ya bayekoli na ye na makasi nyonso
lokumu lokola “Révérend,” “Père,” ete babengama na bankombo
to “Son Eminence.” na lokumu te kati na lingomba.
Bazali kosalela bililingi, bikeko Baklisto basengeli kokima
mpe ekulusu kati na losambo: lolenge nyonso ya losambo na
“Bililingi . . . na Klisto, na bikeko, mpe basengeli komeka
Ngondo Mama na Nzambe ata moke te kosambela Nzambe
mpe ya basantu mosusu esengeli na nzela na bililingi.
. . . kobatelama kati na (Exode 20:4, 5; 1 Bakolinti
bandako-nzambe mpe esengeli 10:14; 1 Yoane 5:21) Bazali
kosambelama mpe kokumisama kosambela Nzambe na biloko
na ndenge esengeli.” (Maloba ya ezali bango komona te,
basángo na Concile de Trente kasi na elimo mpe na solo.
[1545-1563]) (Yoane 4:23, 24; 2 Bakolinti 5:7)
Bazali koteya epai na Yesu asakolaki Bokonzi na Nzambe,
basembwi ete mikano na kasi lolenge moko te ya boyangeli
Nzambe mikokokana na nzela na politike lokola elikya mpo na
na politike. Cardinal Spellman, mokili. (Matai 4:23; 6:9, 10)
oyo asili kokufa, alobaki: Aboyaki kosangana na
“Nzela bobele moko ezali komema politike. (Yoane 6:14, 15)
na kimya . . . , ezali nzela Bokonzi na ye ezalaki kati na
monene na demokrasi.” mokili te, bayekoli na ye
Myango ya bopanzi nsango basengelaki mpe kokota
ezali kolobela ndenge mangomba na mokili te. (Yoane 18:36;
ezali kokota na makambo 17:16) Yakobo akebisaki baklisto
na politike kati na mokili ete bazala baninga ya
(mpe ata na ndenge ezali mokili te. (Yakobo 4:4)
kotya mobulu mpo na kobongola
biyangeli) mpe ndenge ezali
kopesa maboko epai na O.N.U.,
lisangá oyo ezali komonana na
miso na bango lokola “elikya
ya nsuka ya boyokani mpe ya kimya.”
[Elilingi na lokasa 132]
Kelelo nsambo ebetami nsima na kofungwama na bilembo nsambo
[Elilingi na lokasa 140]
“Ntembe ebetelami batambwisi na mokili.” (1922) Ekateli oyo ebendaki likebi likoló na etumbu oyo Jéhovah akweisaki na “mokili”
[Elilingi na lokasa 140]
“Likebisi epai na baklisto nyonso.” (1923)
Ekateli oyo esakolaki etumbu oyo Jéhovah apesi na “ndambo na misato na mai monene”
[Elilingi na lokasa 141]
“Efundeli likoló na bakonzi na mangomba.” (1924) Trakte oyo ekabolamaki mingi, mpo na komonisa na bato ete “monzoto,” kelasi na bakonzi na mangomba na boklisto na lokuta ekweaki
[Elilingi na lokasa 141]
“Nsango na elikya” (1925) Ekateli oyo ya polele esalisaki mpo na komonisa ete oyo ezali komonana lokola maziba na pole na boklisto ya lokuta ezali nde maziba na molili