Mokapo 29
Bazali koyemba loyembo ya sika mpe ya bolongi
Emonaneli 9—Emoniseli 14:1-20
Teme: Ba 144 000 bazali elongo na Mwana na Mpate na ngomba Siona; nsango na baanzelu eyokani na mabelé mobimba; mbuma ebukami.
Eleko na kokokana na yango: Uta 1914 kino bolozi monene.
1. Mikapo 7, 12 mpe 13 ya Emoniseli misili koteya biso nini, mpe tokotalela likambo nini sikawa?
OYO nde esengo na kotalela emonaneli na Yoane oyo elandi! Na esika ete tomona bibongiseli bikokani na banyama ya nsomo oyo bazali kotambwisama na dalagona, tokomona sikawa nde basaleli na sembo ya Jéhovah mpe tokotala malamu makambo oyo bazali kosala na boumeli na mokolo na Nkolo. (Emoniseli 1:10) Emoniseli 7:1, 3 elimbolaki biso ete mipepe minei na libebisi mikangamaki kino ba 144 000 baombo nyonso bapakolami bakotyama bilembo. Emoniseli 12:17 elimbolaki biso ete na boumeli ya ntango yango, ‘batikali na libota ya mwasi’ nde bakanelami mpenzampenza na Satana, ye dalagona. Emoniseli mokapo 13 elimboli biso polele mpo na biyangeli ya politike oyo Satana atelemisaki awa na mabelé mpo na komeka makasi mpe konyokola basaleli na sembo ya Jéhovah. Kasi monguna oyo monene akoki kopekisa mokano ya Nzambe te. Tokomona sikawa ete atako milende na ye na mikano mabe, ba 144 000 bango nyonso bayanganisami na bolongi.
2. Likambo nini na esengo Yoane ayebisi biso na Emoniseli 14:1, mpe Mwana na Mpate azali nani?
2 Yoane, elongo na kelasi na bato oyo bakokani na ye na mikolo na biso, bazali komona liboso kokokisama oyo na esengo: “Natalaki, mpe namonaki Mwana na Mpate atelemi likolo na ngomba na Siona. Bato nkoto mokama na ntuku minei na minei batelemi na ye elongo, baoyo bazalaki na nkombo na ye mpe nkombo na Tata na ye esili kokomama na bilongi na bango.” (Emoniseli 14:1) Lokola tomonaki yango, Mwana na Mpate oyo azali Mikaele, oyo apetolaki makoló na kobenganaka Diable na badémo na ye. Ezali Mikaele yango, engebene Danyele nde azali ‘kobatela bato ya [libota na Nzambe]’ mpe azali komibongisa ‘kotelema’ mpo na kokokisa bikateli na sembo ya Jéhovah. (Danyele 12:1; Emoniseli 12:7, 9) Uta 1914, Mwana na Mpate na Nzambe, oyo amikabaki mbeka, asili kotelema na ngomba na Siona lokola Mokonzi Masiya.
3. “Ngomba ya Siona” likolo na yango Mwana na Mpate mpe ba 144 000 ‘batelemi’ elimboli nini?
3 Makambo nyonso maleki bobele lokola Jéhovah asakolaki yango na maloba oyo: “Ngai, nafandisi mokonzi na ngai likolo na Siona, na ngomba na ngai mosantu.” (Nzembo 2:6; 110:2) Verset oyo ezali lisusu te kolobela ngomba na Siona, engumba na Yerusaleme na mabelé, epai kuna bakonzi, bakitani na David bayangelaki. (1 Ntango 11:4-7; 2 Ntango 5:2) Ya solo, nsima ya liwa na ye mpe lisekwa na ye, na mobu 33, Yesu atiamaki mpo na kozala libanga monene ya moboko na ngomba Siona ya likoló, epai kuna, na makoló, Jéhovah akanaki kotya “mboka na Nzambe na bomoi, Yerusaleme na likoló.” Na yango, “ngomba Siona” oyo elobelami awa emonisi esika na lokumu mpo na Yesu mpe batuki na libula elongo na ye, bango nyonso elongo basali Yelusaleme na likoló, elingi koloba Bokonzi. (Baebele 12:22, 28; Baefese 3:6) Ezali elilingi na ezalela ya nkembo mpe ya bokonzi oyo Jéhovah apesi bango na boumeli na mokolo na Nkolo. Na boumeli na bikeke, lokola “mabanga na bomoi,” baklisto bapakolami bazelaki na motema likoló ntango oyo bakokaki kotelema likoló na ngomba Siona na likoló, elongo na Nkolo Yesu Klisto akembisami kati na Bokonzi na ye ya lokumu mingi.—1 Petelo 2:4-6; Luka 22:28-30; Yoane 14:2, 3.
4. Na ndimbola nini ba 144 000 bango nyonso batelemi na ngomba Siona?
4 Yoane amonaki bobele Yesu te, kasi lisusu etuluku na motuya mokoki na ba 144 000 batuki na libula na Bokonzi na likoló elongo na Yesu batelemi likoló na ngomba Siona. Nzokande, na eleko oyo makambo mamonisami na emononeli mazali kosalama, mingi na ba 144 000, basili kokoma na likoló. Bobele na emononeli yango, Yoane ayoki ete motuya na babulami mosusu basengeli naino koyika mpiko na mimekano bazali kokutana na yango mpe kokufa sembo. (Emoniseli 14:12, 13) Na bongo, emonani polele ete, bamosusu na ba 144 000 bazali naino na mabelé. Lokola ezali bongo, ndenge nini Yoane amoni bango nyonso batelemi elongo na Yesu likoló na ngomba Siona?a Lokola bazali basangani na lisangá ya baklisto bapakolami; basili “kobelema na ngomba na Siona mpe na mboka na Nzambe na bomoi, yango Yelusaleme na Likoló.” (Baebele 12:22) Lokola ntoma Paulo ntango azalaki naino na mabelé, bango basili kotombwama, na ndimbola ya elimo, mpo na kozala na bomoko elongo na Yesu Klisto na Likoló. (Baefeso 2:5, 6) Lisusu, na 1919 bandimaki libyangami oyo ya ‘komata awa,’ mpe, na ndimbola ya elilingi, “babutaki na likoló kati na lipata.” (Emoniseli 11:12) Mikapo oyo ya Biblia mizali kopesa biso nzela na kokanga ntina ete na ndimbola ya elimo basangani nyonso na etuluku ya ba 144 000 bazali likoló na ngomba Siona elongo na Yesu Klisto.
5. Ba 144 000 bazali na nkombo mibale ekomami na bilongi na bango: nkombo yango nini, mpe elakisi nini?
5 Ba 144 000 bazali na boyokani elongo na basambeli na nyama na yauli te, baoyo bazwaki elembo, oyo na motuya na elilingi 666. (Emoniseli 13:15-18) Nzokande, epai na baklisto yango ya sembo nkombo na Nzambe mpe na Mwana na Mpate ekomami na bilongi na bango. Ntoma Yoane, oyo azalaki Moyuda, amonaki mpenza nkombo na Nzambe na makomi na liebele, יהוה.b Lokola nkombo na Tata na Yesu ekomami na bilongi na bango na ndimbola ya elilingi, baklisto oyo batyami bilembo bazali koyebisa epai na bato nyonso ete bazali batemwe mpe baombo na Jéhovah. (Emoniseli 3:12) Lisusu lokola nkombo na Yesu ekomami na bilongi na bango elakisi ete bandimi kozala bato na ye. Yesu azali “mobali” na bango na elaka, mpe bango bakozala “mwasi ya libala,” “kozalisama na sika” baoyo bazali kosalela Nzambe mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló. (Baefese 5:22-24; Emoniseli 21:2, 9; 2 Bakolinti 5:17) Boyokani ya makasi oyo bazali na yango elongo na Jéhovah mpe Yesu Klisto ezali na bopusi likoló na makanisi na bango mpe na misala na bango nyonso.
Bazali koyemba lokola loyembo ya sika
6. Yoane ayoki loyembo nini, mpe akokisi yango na nini?
6 Na boyokani na makambo oyo maleki, Yoane akomi: “Nayoki mongongo kobima na likoló, lokola lokito na mai monene, lokola makelele mingi na nkake; mongongo eyokaki ngai ezalaki lokola bato na nzenze bazali kobeta nzenze na bango. Mpe bazali koyemba lokola loyembo ya sika na liboso na kiti na bokonzi mpe na liboso na bikelamu na bomoi minei mpe na mikolo. Moto mosusu akokaki koyekola loyembo yango malamu te, bobele bango nkoto mokama na ntuku minei na minei, baoyo basombami na mokili.” (Emoniseli 14:2, 3) Ezali likambo na kokamwa te na boye ete, wana eyoki ye ba 144 000 kosangisa mingongo na bango mpe koyemba na lolenge kitoko, Yoane akanisi ete ezali konguluma na mai mpe nkake makasi. Mpe bibeteli kitoko oyo bazali kosalela, lokola nzenze, ezali koyokana na elengi! (Nzembo 81:2) Bayembi na mabelé bakokoka komekola loyembo oyo ya kitoko na motindo moleki malamu mpenza?
7. (a) Loyembo na sika oyo elobami na Emoniseli 14:3 elimboli nini? (b) Na ndimbola nini loyembo oyo elobelami na Nzembo 149:1 ezali loyembo na sika na mikolo na biso?
7 Loyembo oyo ya sika ezali nini? Lokola tomonaki yango na boyekoli ya Emoniseli 5:9, 10, loyembo yango ezali kolimbola mikano oyo Jéhovah akokokisa na nzela na Bokonzi na ye mpe bibongiseli kitoko oyo azwaki na nsima na Yesu Klisto mpo na kosala ete Yisraele na elimo ezala “bokonzi ya banganga mpo na Nzambe na biso.” Ezali loyembo na nkembo eyembami mpo na Jéhovah, ezali kosakola makambo na sika oyo azali kokokisa na nzela na Yisraele na Nzambe mpe mpo na bolamu na bango. (Bagalatia 6:16) Basangani na Yisraele yango ya elimo, bazali kondima libyangami oyo na mokomi na nzembo ete: “Bokumisa Jah! Boyembela Jéhovah loyembo na sika. Bosanzola ye kati na koyangana na bayengebeni. Tika ete Yisraele azala na esengo mpo na Mozalisi na ye monene! Tika ete bana na Siona—basepela mpo na Mokonzi na bango!” (Nzembo 149:1, 2). Ya solo, bikeke mingi bisili koleka uta ntango maloba na nzembo oyo makomamaki, kasi na mikolo na biso mazali koyembama engebene boyebi ya sika. Mpamba te, Bokonzi na Masiya ebotamaki na 1914. (Emoniseli 12:10) Na 1919, basaleli na Jéhovah awa na mabelé babandaki kosakola “liloba na bokonzi” na molende ya sika. (Matai 13:19) Na mbula wana, bayikisamaki mpiko na texte ya mbula mobimba oyo eponamaki, na Yisaya 54:17, mpe balendisamaki mpo ete bakotisamaki kati na paradis ya elimo, babandi ‘koyemba elongo na miziki kati na mitema na bango, mpo na Jéhovah.’—Baefese 5:19, MN.
8. Mpo na nini bobele ba 144 000 nde bakoki koyekola loyembo na sika oyo elobami na Emoniseli 14:3?
8 Kasi mpo na nini ezali bobele ba 144 000 nde bazali koyekola loyembo oyo elobelami na Emoniseli 14:3? Ezali mpo ete loyembo yango ezali na boyokani elongo na makambo oyo bamonaki na bomoi na bango lokola batuki na libula na Bokonzi na Nzambe: Bobele bango nde Nzambe azwi lokola bana na ye mpe apakoli bango na elimo santu. Bobele bango nde basombamaki na mokili mpo na kozala basangani na Bokonzi yango na likoló. Bobele bango nde ‘bakozala banganga mpe bakoyangela’ esika moko na Yesu Klisto mbula nkoto mpo na kotombola bato na ezaleli ya kokoka. Bobele bango bamonanaki bazali ‘koyemba lokola loyembo na sika’ liboso na Jéhovah ye moko.c Mabaku malamu oyo mpe bilikya oyo bikokani na mosusu te, epesi bango esika ya lokumu kati na Bokonzi mpe epesi bango nzela ya koyemba mpo na Bokonzi yango na lolenge oyo moto mosusu akoki kosala yango te.—Emoniseli 20:6; Bakolose 1:13; 1 Batesaloniki 2:11, 12.
9. Ebele monene bazali kosala nini wana ezali bango koyoka baklisto bapakolami koyemba, mpe elendiseli nini bazali kolanda?
9 Nzokande, bato mosusu bazali koyoka bango wana ezali bango koyemba mpe bazali kokanga ntina na maloba na loyembo na bango. Uta 1935, ebele monene na bampate mosusu baoyo bazali ntango nyonso kokoma mingi koleka bazali koyoka loyembo yango ya bolongi mpe bazali koyoka mposa ya kosangana na bayembi mpo na kosakola Bokonzi na Nzambe. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Ya solo, bayekoli oyo ya sika bakoki te koyekola koyemba loyembo na sika mpenzampenza lokola oyo ezali koyembama na baoyo bakozala mikonzi kati na Bokonzi na Nzambe. Nzokande, bango mpe bazali koyemba loyembo kitoko na makumisi mpo na nkembo na Jéhovah, loyembo oyo ezali kokumisa ye mpo na makambo na sika oyo azali kokokisa. Na yango bazali kolanda elendiseli oyo ya mokomi na nzembo: “Boyembela Jéhovah loyembo na sika. Boyembela Jéhovah bino bato na mokili mobimba! Boyembela Jéhovah, bokumisa nkombo na ye. Bosakola kobikisa na ye mokolo na mokolo. Bosakola lokumu na ye kati na mabota na bato, misala na ye na kokamwa kati na bato nyonso. Bino mabota na bato, bopesa Jéhovah, bopesa Jéhovah lokumu mpe nguya. Boloba kati na mabota ete, ‘Jéhovah ye moko akomi mokonzi.’”—Nzembo 96:1-3, 7, 10; 98:1-9.
10. Ndenge nini ba 144 000 bakoki koyemba “liboso” na mikolo 24 ya elilingi?
10 Ndenge nini ba 144 000 bakoki koyemba “liboso” na mikóló nzokande mikóló yango 24 bazali elilingi ya ba 144 000 kati na nkembo na bango na likoló? Na ebandeli na mokolo na Nkolo, baoyo kati na bango “bakufaki kati na Klisto” basekwaki lokola bikelamu na elimo; baklisto yango bapakolami na sembo oyo balongaki bazali bongo sikawa na likoló, epai kuna bazali kokokisa na elilingi misala mikokani na oyo ya kelasi 24 na banganga mpe mikóló. Bazali komonana mpe kati na emonaneli ya lisangá ya Jéhovah oyo ezali na makoló. (1 Batesaloniki 4:15, 16; 1 Ntango 24:1-18; Emoniseli 4:4; 6:11) Na yango, batikali na ba 144 000 baoyo bazali naino na mabelé bazali koyemba loyembo ya sika liboso, to na miso ya bandeko na bango baoyo basili kosekwa na likoló.
11. Mpo na nini baklisto bapakolami baoyo basili kolonga bamonisami na mikóló 24 mpe na ba 144 000?
11 Sikawa motuna mosusu mokoki koyela biso na makanisi: Mpo na nini balongi oyo bapakolami bamonisami na mikóló 24 na elilingi mpe na ba 144 000? Ezali mpo ete Emoniseli ezali kotalela etuluku yango na lolenge mibale ekeseni. Mikóló 24 bazali ntango nyonso komonisama na lokumu ya nsuka oyo bazali na yango zongazonga na kiti na bokonzi na Jéhovah, batyami lokola bakonzi mpe banganga kati na makoló. Bazali elilingi ya ba 144 000 oyo motuya na bango ekokisami kati na lokumu na bango na likoló, atako sikawa batikali moke na bango bazali naino na mabelé. (Emoniseli 4:4, 10; 5:5-14; 7:11-13; 11:16-18) Nzokande mokapo 7 ya Emoniseli ezali kolobela makasi ete ba 144 000 bauti kati na bato, emonisi mokano monene ya Jéhovah, oyo ya kotya elembo na motuya mobimba na Bayisraele na elimo mpe kopesa lobiko na ebele monene oyo motuya na yango ekoki kotangama te. Mpo na mokapo 14 na Emoniseli, ezali kondimisa ete kelasi nyonso ya Bokonzi, oyo esalami na ba 144 000 balongi, ekoyangana elongo na Mwana na Mpate likoló na ngomba Siona. Lokola tokomona yango, mokapo oyo ezali koyebisa mpe makambo masengami epai ya ba 144 000.d
Bazali kolanda Mwana na Mpate
12. (a) Yoane alobi nini lisusu mpo na ba 144 000? (b) Na ndimbola nini ba 144 000 bazali petwa?
12 Mpo na ba 144 000 baoyo “basombamaki na mabelé,” ntoma Yoane alobi lisusu: “Bango wana bamibebisi na basi te, mpo ete bazali petwa. Bango bakolandaka Mwana na Mpate ata akei epai wapi. Bango basombamaki kati na bato, mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe na Mwana na Mpate. Na minoko na bango lokuta ezwami te; bazali na likambo na kofundama te.” (Emoniseli 14:4, 5) Ba 144 000 “bazali petwa”; yango elimboli te ete basangani na kelasi yango bakoki kobala te ntango bazali naino na mosuni. Nkutu, ntoma Paulo akomelaki baklisto babyangami na kokende na likoló ete, mpo na bamosusu, kobala eleki malamu, atako kozala mozemba ezali na matomba mingi mpo na moklisto. (1 Bakolinti 7:1, 2, 36, 37) Kelasi oyo na baklisto ezali komonisa nde petwa na elimo. Bazali kosala ekobo na elimo te elongo na politike ya mokili soko mpe elongo na mangomba ya lokuta. (Yakobo 4:4; Emoniseli 17:5) Lokola bango nyonso elongo bazali mwasi na libala na Klisto, bazali komibatela lokola moseka na peto, “bazangi litono kati na libota na bato bayongotani mpe bapengwi nzela.”—Bafilipi 2:15.
13. Mpo na nini ba 144 000 bazali mwasi oyo abongi na Yesu Klisto, mpe na ndimbola nini tokoki koloba ete “bazali kolanda Mwana na Mpate ata akei epai wapi”?
13 Lisusu, “na minoko na bango lokuta ezwami te.” Na likambo yango bakokani na Mokonzi na bango, Yesu Klisto. Ntango azalaki moto na kokoka awa na mabelé, “asalaki lisumu moko te, bokosi moko ezwamaki kati na monoko na ye mpe te.” (1 Petelo 2:21, 22) Lokola bazangi litono mpe bazali koloba solo, ba 144 000 babongisami lokola “mwasi” na libala na peto mpo na Nganga Monene na Jéhovah. Ntango Yesu azalaki na mabelé, abyangaki bato oyo bazalaki koluka boyengebene mpo ete balanda ye. (Malako 8:34; 10:21; Yoane 1:43) Baoyo bandimaki libyangami na ye balandaki lolenge na bomoi na ye mpe balandaki mateya na ye. Yango wana, na boumeli na bomoi na bango na mabelé, wana ezali ye kotambwisa bango kati na mokili oyo eyangelami na Satana, ba 144 000 bazali “kolanda Mwana na Mpate ata akei epai wapi.”
14. (a) Na lolenge nini ba 144 000 bazali “mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate”? (b) Na ndimbola nini ebele monene bazali mpe mbuma na liboso?
14 Ba 144 000 “basombami na mokili,” “basombami kati na bato.” Bandimami lokola bana na Nzambe; nsima na kosekwa na bango, bakozala lisusu bato oyo bazali na nzoto ya mosuni mpe makila te. Lokola verset 4 emonisi yango, bakomi “mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe na Mwana na Mpate.” Ya solo, na ekeke ya liboso, Yesu akomaki “mbuma na liboso na bango balali kati na kufa.” (1 Bakolinti 15:20, 23) Nzokande, ba 144 000 bazali “lokola mbuma na liboso” mpo na bato oyo bazangi kokoka, baoyo basombami na nzela na mbeka ya Yesu. (Yakobo 1:18) Kobuka mbuma na bato esuki bobele na bango te. Mokanda na Emoniseli esili kolobela mpo na koyanganisama ya basangani na ebele monene oyo motuya ekoki kotangama te bazali konganga na mongongo makasi ete: “Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” Bato yango bakobika na bolozi monene mpe na kolandaka komela na “maziba na mai na bomoi,” bakotombwama kino na bomoto ya kokoka na mabelé. Lisusu, na nsima na bolozi monene, Hadès ekotikala mpamba, bamilió mpe bamilió ya bato mosusu bakosekwa mpe bakozala na likoki ya komela bobele na maziba wana ya mai na bomoi. Engebene makambo oyo totaleli, tokoloba solo mpenza ete basangani ya ebele monene bazali mbuma na liboso mpo na bampate mosusu: bazali bato ya liboso baoyo ‘basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila ya Mwana na Mpate,’ mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé.—Emoniseli 7:9, 10, 14, 17; 20:12, 13.
15. Bokokani nini tokoki kosala kati na mbuma misato oyo na liboso ekeseni mpe na bilambo oyo bizalaki kosalama na nse na Mibeko na Moïse?
15 Tokoki kosala bokokani malamu mpenza kati na mbuma misato na liboso oyo ekeseni (Yesu Klisto, ba 144 000 mpe ebele monene) elongo na bilambo oyo bikumisamaki na nse na Mibeko na Moïse. Le 16 Nisan, na ntango na elambo na Mampa mazangi mfulu, bazalaki kotombwela Jéhovah liboke na mbuma na liboso na ntango na kobuka orge. (Levitike 23:6-14) Ezalaki mpenzampenza mokolo ya le 16 Nisan nde Yesu asekwaki kati na bakufi. Na mokolo ya ntuku mitano longwa le 16 Nisan, na sanza ya misato, Bayisraele bazalaki kokumisa elambo na Kobuka Mbuma, oyo na mbuma na liboso ya blé oyo eteli. (Exode 23:16; Levitike 23:15, 16) Na nsima elambo yango eyaki kobyangama Pantekote (liloba na greke oyo elimboli “ntuku mitano”); nzokande, ezalaki na Pantekote na mobu 33 nde basangani ya liboso ya ba 144 000 bapakolamaki na elimo santu. Mpe, na sanza na nsambo, ntango koyanganisa mbuma nyonso esilaki, Bayisraele bazalaki kokumisa elambo na Mingombo, ntango mpo na kosepela mingi. Na boumeli na poso moko bazalaki kofanda kati na mingombo oyo basalaki na mandalala mpe bitape na nzete mosusu (Levitike 23:33-43); bobele bongo, basangani ya ebele monene, eteni moko na kobuka mbuma monene, bazali kotelema liboso na kiti na Bokonzi “basimbi bitape na mbila na maboko na bango.”—Emoniseli 7:9.
Kosakolama ya nsango malamu na seko
16, 17. (a) Epai wapi Yoane amoni anzelu wana kopumbwa, mpe nsango nini anzelu azali kosakola? (b) Banani bazali na mokumba monene kati na mosala na kosakola Bokonzi, mpe makambo nini mazali kolakisa yango?
16 Yoane akomi lisusu ete: “Namonaki anzelu mosusu kopumbwa na likoló, mpe azalaki na nsango malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso, na kolobaka na mongongo makasi ete: ‘Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpamba te ntango na kosambisa na ye ekomi, mpe bosambela ye oyo asalaki likolo mpe na nse, na mai monene, na maziba na mai.’” (Emoniseli 14:6, 7) Anzelu azali kopumbwa “na likoló,” epai kuna bandeke mpe bazali kopumbwa. (Tala Emoniseli 19:17.) Mongongo na ye mokoki bongo koyokama kati na mokili mobimba. Kosakola ya anzelu wana na mokili mobimba, ezali koyokama na bato mingi koleka nsango nyonso oyo ezali kopesama na télévizió.
17 Anzelu azali kolendisa moto na moto na kobanga, nyama na yauli mpe ekeko na yango te, kasi kobanga Jéhovah, oyo azali na nguya koleka, akokani ata na nyama moko te na elilingi oyo ezali kotambwisama na Satana. Ezali Jéhovah nde azalisaki makoló mpe mabelé, mpe sikawa ntango na ye ekomi mpo na kosambisa mokili. (Tala Genese 1:1; Emoniseli 11:18.) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu asakolaki likambo oyo mpo na ntango na biso: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Lelo oyo, ezali lisangá na baklisto bapakolami nde bazali kokokisa mosala yango. (1 Bakolinti 9:16; Baefese 6:15) Nzokande, verset ya Emoniseli oyo tozali kotalela emonisi ete baanzelu oyo bazangi komonana bazali na mokumba kati na mosala oyo ya kosakola. Mbala mingi ezali komonana ete baanzelu bazali kotambwisa Témoin de Jéhovah moko epai na moto oyo azali na mposa ya lisalisi, mpe mbala mosusu azalaki ata kobondela mpo na kozwa lisalisi yango!
18. Engebene maloba na anzelu oyo azali kopombwa na likoló, ntango nini oyo esili kokoma, mpe maloba mosusu makosakolama na nani?
18 Lokola anzelu oyo azali kopumbwa na likolo azali kosakola yango, ntango na kosambisa ekomi. Ekateli nini Nzambe akozwa? Matoi na bato makosala bango mpasi na koyokáká maloba oyo masengeli kosakolama na anzelu ya mibale, ya misato, ya minei mpe ya mitano.—Yilimia 19:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola emonisami na 1 Bakolinti 4:8, baklisto bapakolami bakoyangela te wana ezali bango naino na mabelé. Kasi, engebene makanisi mazali na kati na mokapo (Emoniseli 14:3, 6, 12, 13), bango mpe bazali koyemba loyembo na sika, na kosakolaka nsango malamu, wana ezali bango koyika mpiko na bosembo nyonso na mimekamo nyonso kino nsuka na bomoi na bango awa na mabelé.
b Yango ezali solo mpenza mpamba te asalelaki bankombo na monoko na liebele kati na bimononeli mosusu; Yesu abyangami na liebele na nkombo “Abaddon” (“Kobebisa”) mpe azali kokokisa bikateli na Nzambe na esika oyo “babyangi na monoko na liebele Har–Magedon.”—Emoniseli 9:11; 16:16.
c Likomi lilobi ete: “lokola loyembo na sika.” Ya solo, loyembo yango ekomamaki banda kala kati na bisakweli, kasi moto moko te akokisaki masengami mpo na koyemba loyembo yango. Sikawa, lokola Bokonzi etyami mpe lisekwa na basantu esalemi, makambo masalamaki makokisaki bisakweli na lolenge ya kokamwa, mpe ntango ekokaki ya koyemba loyembo yango na lokumu nyonso.
d Ezali bobele bongo mpo na moombo na sembo mpe na mayele oyo azali kopesa bilei epai na basali na ndako na elaka na yango. (Matai 24:45) Moombo, azali etuluku na bato, oyo ezali bongo na mokumba ya kopesa bilei, nzokande basali, elingi koloba moto mokomoko oyo azali kati na etuluku yango, bazali kolya bilei yango ya elimo. Na yango moombo mpe basali bazali basangani na etuluku moko, kasi batalelami lokola etuluku to lokola moto mokomoko.
[Bililingi na lokasa 202]
144000
Mikóló 24
Basangoli na libula elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto, bamonisami na mitindo mibale mikeseni