Batisimo
Ndimbola: Liloba “kobatisa” euti na liloba ya Grɛki baptizô, oyo elimboli “kokɔtisa to kozindisa na mai.” (Dictionnaire grec-français ya A. Bailly) Batisimo ya mai oyo bakristo bazwaka ezali elembo oyo emonisaka polele ete moto amipesi mobimba mpenza, na nzela ya Yesu Kristo, mpo na kosala mokano ya Yehova Nzambe. Biblia elobeli mpe batisimo ya Yoane, batisimo ya elimo santu mpe batisimo ya mɔtɔ, mpe bongo na bongo.
Bato oyo bandimeli mpenza Liloba ya Nzambe basengeli nde koboya kobatisama?
Mat. 28:19, 20: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”
Mis. 2:41: “Baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki.”
Mis. 8:12: “Ntango bandimaki Filipe, oyo azalaki kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe mpe ya nkombo ya Yesu Kristo, babandaki kobatisama, mibali ná basi.”
Mis. 8:36-38: “Nzokande wana bazalaki kotambola na nzela, bakómaki na esika moko oyo mai ezalaki, mpe mokube [moto ya Etiopi] alobaki ete: ‘Talá! mai yango oyo; nini ezali kopekisa ngai kobatisama?’ Na yango, apesaki mitindo ete likalo etɛlɛma, mpe . . . [Filipe] abatisaki ye.”
Batisimo ya mai oyo bakristo bazwaka, ezali kosopela moto mai na motó to nde kozindisa ye mpenza na mai?
Mrk. 1:9, 10: “Yesu . . . Yoane abatisaki [“azindisaki,” ED, Ro] ye na [Ebale] Yordani. Mpe na mbala moko, ntango abimaki na mai, amonaki likoló ezali kofungwama.”
Mis. 8:38: “Bango nyonso mibale bakitaki na mai, Filipe ná mokube; mpe abatisaki [“azindisaki,” ED, Ro] ye.”
Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kobatisa bana mike?
Mat. 28:19: “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli . . . bóbatisa bango.”
Mis. 8:12: “Ntango bandimaki Filipe . . . babandaki kobatisama, mibali ná basi.”
Nzokande, na nsima, Origène (185-254 T.B.) akomaki boye: “Eklezia ezali na momeseno ya kobatisa ata bana mike.” (Selections From the Commentaries and Homilies of Origen, Madras, Inde; 1929, lok. 211) Momeseno yango endimamaki na Likita ya misato ya Monene oyo esalemaki na Carthage (253 T.B.).
Augustus Neander, moto ya mayele na istware ya lingomba, akomaki boye: “Kondima ná batisimo ezalaka ntango nyonso na boyokani; mpe emonani mpenzampenza ete momeseno ya kobatisa bana mike eyebanaki te na ntango yango [na siɛklɛ ya liboso]. . . . Lokola na siɛklɛ ya misato nde eyebanaki mbala ya liboso ete momeseno yango euti na bantoma, yango nde emonisi polele ete momeseno yango euti na bantoma te.”—History of the Planting and Training of the Christian Church by the Apostles (New York, 1864), lok. 162.
Batisimo ya mai oyo bakristo bazwaka elongolaka masumu?
1 Yoa. 1:7: “Soki tozali kotambola na pole lokola ye moko azali na kati ya pole, . . . makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.” (Na yango, makila ya Yesu nde epɛtolaka biso na lisumu, kasi mai ya batisimo te.)
Mat. 3:11: “Ngai [Yoane Mobatisi] nazali kobatisa bino na mai mpo bobongoli motema; kasi moto oyo azali koya nsima na ngai [Yesu Kristo] azali na makasi koleka ngai, mpe nabongi te kolongola basandale na ye.” (Vɛrsɛ 5, 6, mpe Misala 13:24, emonisi ete batisimo ya Yoane ezalaki mpo na Bayuda, kasi mpo na bato nyonso te. Mpo na nini? Mpo Bayuda babuká kondimana ya Mobeko mpe esengelaki bámilɛngɛla mpo na koyamba Kristo.)
Mis. 2:38: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Kristo mpo masumu na bino elimbisama.” (Batisimo yango moko esalaki ete masumu na bango elimbisama? Simbá likambo oyo: Balobelaki Bayuda oyo babomaki Kristo. [Talá vɛrsɛ 22, 23.] Batisimo na bango ezalaki elembo ya likambo moko. Likambo nini? Emonisaki ete babandaki kondimela Yesu, ete azali Masiya, Kristo. Masumu na bango ekokaki kolimbisama kaka soki basali bongo. [Mis. 4:12; 5:30, 31])
Mis. 22:16: “Tɛlɛmá, zwá batisimo mpe belelá nkombo na ye mpo osukola masumu na yo.” (Talá mpe Misala 10:43.)
Nani asengeli kozwa batisimo ya elimo santu?
1 Ko. 1:2; 12:13, 27: “Epai na bino baoyo bosantisami na bomoko elongo na Kristo Yesu, oyo bobengami mpo na kozala basantu . . . Mpo, ya solo mpenza, na nzela ya elimo kaka moko biso nyonso tobatisami na nzoto kaka moko, Bayuda to Bagrɛki, baombo to bato ya bonsomi, bamɛlisaki mpe biso nyonso elimo kaka moko. Nzokande, bino bozali nzoto ya Kristo.” (Ndenge Danyele 7:13, 14, 27 emonisi yango, “basantu” bakozala bakonzi elongo na Mwana ya moto, Yesu Kristo.)
Yoa. 3:5: “Soki moto abotami na mai mpe na elimo te, akoki kokɔta na bokonzi ya Nzambe te.” (Moto ‘abotamaka na elimo’ ntango abatisami na elimo yango. Luka 12:32 emonisi ete kaka “etonga moke” nde ezwi libaku wana ya kobatisama na elimo. Talá mpe Emoniseli 14:1-3.)
Baoyo nyonso bazwá batisimo ya elimo santu balobaka na minɔkɔ mosusu to bazalaka na likabo ya kobikisa bato?
1 Ko. 12:13, 29, 30: “Mpo, ya solo mpenza, na nzela ya elimo kaka moko biso nyonso tobatisami na nzoto kaka moko . . . Bango nyonso te bazali bantoma, boye te? . . . Bango nyonso te basalaka misala ya nguya, boye te? Bango nyonso te bazali na makabo ya kobikisa, boye te? Bango nyonso te balobaka na minɔkɔ mosusu, boye te?”
Talá mpe mitó ya makambo “Makamwisi ya kobikisa bato” mpe “Minɔkɔ mosusu (Koloba na).”
‘Batisimo mpo na kozala bakufi’—elimboli nini?
1 Ko. 15:29, LNz: “Soko ezalaki bongo te, baye bakokulaka batisimo mpo ya bawa, bakozwa litomba nini? Soko bawei bakosekwa te, bongo ntina nini bakokulaka batisimo mpo ya bango?”
Liloba ya Grɛki hyper, oyo ebongolami na maloba “mpo ya” na vɛrsɛ oyo, elimboli mpe “likoló ya,” “mpo na,” “na esika ya,” “na ntina ya,” mpe bongo na bongo. (A Greek-English Lexicon, oyo ekomamaki na Liddell mpe Scott) Maloba “mpo ya” na vɛrsɛ oyo elimboli nini? Paulo azalaki nde kosɛnga bábatisa bato ya bomoi na esika ya bato oyo bakufá kozanga kobatisama?
Bavɛrsɛ mosusu oyo elobeli mpenza batisimo mpo na liwa ezali kotalela nde batisimo oyo moto ye moko azwi, kasi azwi yango te na esika ya moto moko boye oyo akufá
Rom. 6:3: “Boyebi te ete biso nyonso oyo tobatisamaki na Kristo Yesu tobatisamaki na kati ya liwa na ye?” (Talá Marko 10:38, 39.)
Kol. 2:12: “Mpo [bino bandeko ya lisangá ya Kolose oyo bozali na bomoi] bokundamaki elongo na ye na batisimo na ye, mpe na boyokani oyo bosali na ye, bolamwisamaki mpe elongo, na nzela ya kondima na bino na nguya ya Nzambe, oyo alamwisaki ye uta na bakufi.”
Ndenge 1 Bakorinti 15:29 ebongolami na “Libongoli ya Mokili ya Sika” eyokani na gramɛrɛ mpe na bavɛrsɛ mosusu
1 Ko. 15:29: “Soki bongo te, baoyo bazali kobatisama mpo na kozala bakufi bakosala nini? Soki bakufi bakolamuka te, mpo na nini bango mpe bazali kobatisama mpo na kozala ndenge wana?” (Na bongo, babatisami, to bazindisami na ndenge bakangami makasi na etamboli ya bosembo oyo ezali komema bango tii na liwa lokola oyo ya Kristo mpe na nsima bakosekwa bilimo ndenge asekwaki.)
Nini ekokómela bato oyo bakobatisama na mɔtɔ?
Luka 3:16, 17: “Ye [Yesu Kristo] akobatisa bino na . . . mɔtɔ. Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye mpo na kopɛtola mpenza esika na ye ya kotuta mbuma . . . Akotumba mposo na yango na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.” (Kobebisama yango ezali kobebisama ya libela.)
Mat. 13:49, 50: “Ekozala mpe bongo na bosukisi ya makambo ya ntango oyo: baanzelu bakobima mpe bakokabola bato mabe na bayengebene mpe bakobwaka bango na litumbu ya mɔtɔ.”
Luka 17:29, 30: “Na mokolo oyo Lota abimaki na Sodoma, mɔtɔ ná sufulu eutaki na likoló enɔki mpe ebomi bango nyonso. Ekozala mpe bongo na mokolo yango oyo Mwana ya moto akomonana.”
Batisimo ya mɔtɔ ekeseni na batisimo ya elimo santu oyo bayekoli ya Yesu bazwaki
Mis. 1:5: “Yoane abatisaki mpenza na mai, kasi bino [bantoma ya sembo ya Yesu] bokobatisama na elimo santu nsima ya mwa mikolo.”
Mis. 2:2-4: “Na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango mpe ekabwanaki, mpe mokomoko efandaki likoló ya moto na moto [kasi ezipaki bango te to bazindaki na yango te] na kati na bango, mpe bango nyonso batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba na minɔkɔ mosusu, ndenge kaka elimo ezalaki kopesa bango nzela ya koloba.”