Minɔkɔ mosusu (Koloba na)
Ndimbola: Likabo moko oyo bayekoli mosusu ya lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso bazwaki na nzela ya elimo santu, yango esalisaki bango básakola to bákumisa Nzambe na minɔkɔ mosusu.
Biblia elobi ete bato nyonso oyo bazali na elimo santu ‘bakoloba na minɔkɔ mosusu’?
1 Ko. 12:13, 30: “Ya solo mpenza, na nzela ya elimo kaka moko biso nyonso tobatisami na nzoto kaka moko . . . Bango nyonso te bazali na makabo ya kobikisa, boye te? Bango nyonso te balobaka na minɔkɔ mosusu, boye te?” (Talá mpe 1 Bakorinti 14:26.)
1 Ko. 14:5: “Nzokande nakosepela bino nyonso bóloba na minɔkɔ mosusu, kasi nalingi mingi nde bósakola. Ya solo, moto oyo azali kosakola aleki moto oyo azali koloba na minɔkɔ mosusu, longola kaka soki abongoli yango mpo lisangá etongama.”
Soki moto azali na esengo makasi mpe abandi koloba na monɔkɔ mosusu oyo ayekolá te, yango emonisi ete azali na elimo santu?
Likoki ya “koloba na minɔkɔ mosusu” eutaka kaka na Nzambe?
1 Yoa. 4:1: “Bandeko ya bolingo, bóndimaka te liloba nyonso [“elimo nyonso,” KJ, RS] oyo emonani lokola nde euti na Nzambe, kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye.” (Talá mpe Matai 7:21-23; 2 Bakorinti 11:14, 15.)
Lelo oyo, kati na mangomba oyo ‘balobaka na minɔkɔ mosusu,’ tokoki kotánga Bapantekotiste, Babatiste, Bakatolike, Baepiscopalien, Bametodiste, Baluterien, mpe Bapresbiterien. Yesu alobaki ete elimo santu ‘ekokamba bayekoli na ye na kati ya solo nyonso.’ (Yoa. 16:13) Bandimi ya mangomba wana bandimaka ete bandimi ya mangomba mosusu oyo ‘balobaka na minɔkɔ mosusu’ bakambami mpe na kati ya “solo nyonso”? Lokola bango nyonso bayokanaka te, ndenge nini yango ekoki kosalema? Elimo nini ‘elobisaka’ bango ‘minɔkɔ mosusu’?
Etuluku oyo babengi “Fountain Trust” ná bakonzi ya Lingomba ya Angleterre babimisaki liyebisi oyo: “Toyebi mpe ete makambo ya ndenge wana ekoki mpe kosalema na bankisi to na nguya ya bademo.” (Gospel and Spirit, Aprili 1977, ebimisami na etuluku ya Fountain Trust ná bakonzi ya Lingomba ya Angleterre, lok. 12) Buku moko (Religious Movements in Contemporary America, ebimisami na Irving I. Zaretsky mpe Mark P. Leone, oyo bazongelaki maloba ya L. P. Gerlach) elobi ete na Haïti ‘koloba na minɔkɔ mosusu’ ezali momeseno ya Bapantekotiste ná bato ya losambo ya Vodu.—(Princeton, N.J.; 1974), lok. 693; talá mpe 2 Batesaloniki 2:9, 10.
Likabo ya ‘koloba na minɔkɔ mosusu’ lelo oyo ekokani na oyo ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso?
Na siɛklɛ ya liboso, makabo ya kosala makamwisi mpe likoki ya “koloba na minɔkɔ mosusu” na lisalisi ya elimo santu emonisaki ete Nzambe aboyi losambo ya Bayuda mpe andimi lisangá ya bokristo oyo euti kosalema. (Ebr. 2:2-4) Lokola ntina oyo Nzambe apesaki makabo yango ekokisamaki na siɛklɛ ya liboso, ezali lisusu na ntina ete makambo yango esalemaka mbala na mbala lelo oyo?
Na siɛklɛ ya liboso, likabo ya “koloba na monɔkɔ mosusu” esalaki ete bayekoli ya Yesu básala na molende mosala ya kopesa litatoli, oyo apesaki bango básala na mokili mobimba. (Mis. 1:8; 2:1-11; Mat. 28:19) Baoyo ‘balobaka na monɔkɔ mosusu’ lelo oyo basalaka mosala wana?
Na siɛklɛ ya liboso, ntango bakristo bazalaki “koloba na minɔkɔ mosusu,” bato oyo bazalaki koyoka minɔkɔ yango bazalaki koyeba makambo oyo bazalaki koloba. (Mis. 2:4, 8) Lelo oyo, baoyo ‘balobaka na minɔkɔ mosusu’ balobaka makambo oyo mbala mingi bato bakangaka ntina na yango te.
Biblia emonisi ete na siɛklɛ ya liboso, basɛngaki na masangá ete, ntango bazali kosala makita, bato oyo bazali ‘koloba na minɔkɔ mosusu’ basengeli koleka mibale to misato te, mpe basengeli kosala yango “moto na moto na ngala na ye,” mpe soki mobongoli azali te, basengeli koloba te. (1 Ko. 14:27, 28, RS) Yango nde esalemaka lelo oyo?
Talá mpe nkasa 179, 180, na motó ya likambo “Elimo.”
Elimo santu ekoki kosalisa bato básala makambo mosusu oyo ekeseni na oyo Biblia eteyi?
2 Tim. 3:16, 17: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene, mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (Soki moto atuti ntolo ete azali na nsango moko oyo euti na elimo ya Nzambe, kasi ekeseni na maloba oyo Nzambe apesaki Yesu ná bantoma na ye na nzela ya elimo santu, tokoloba ete nyonso euti kaka na Nzambe?)
Gal. 1:8: “Ata soki moko na biso to anzelu moko boye, oyo auti na likoló, ayei kosakwela bino nsango malamu ya likambo moko boye oyo ekeseni na nsango malamu oyo tosakwelaki bino, alakelama mabe.”
Bizaleli ya bandimi ya mangomba oyo ‘balobaka na minɔkɔ mosusu’ emonisaka ete bazali na elimo ya Nzambe?
Mangomba yango emonisaka polele bizaleli ya mbuma ya elimo lokola motema pɛtɛɛ mpe komipekisa? Emonanaka polele ete bazali na bizaleli yango ntango bayangani na losambo?—Gal. 5:22, 23.
Bazali mpenza “bato ya mokili te”? Bamipesaka mobimba na Bokonzi ya Nzambe to bakɔtaka na makambo ya politiki? Na ntango ya bitumba bamemaka nyongo ya makila te? Bazali mpenza na lokumu mpo bamipesaka te na etamboli ya mbindo ya mokili oyo?—Yoa. 17:16; Yis. 2:4; 1 Tes. 4:3-8.
Lelo oyo bakristo ya solo bayebani nde na likabo ya “koloba na minɔkɔ mosusu”?
Yoa. 13:35: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”
1 Ko. 13:1, 8: “Soki nazali koloba na minɔkɔ ya bato mpe ya baanzelu kasi nazali na bolingo te, nakómi eteni ya ebende ya bronzɛ oyo ezali kolela to sɛmbalɛ oyo ezali kobɛta. Bolingo esilaka soki moke te. Kasi ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka; ezala boyebi, ekolongolama.”
Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozwa elimo santu mpe bakozala batatoli na ye tii na esika eleki mpenza mosika na mabele. (Mis. 1:8) Apesaki bango etinda ete ‘bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Mat. 28:19) Lisusu, asakolaki ete “nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Lelo oyo, banani basalaka mosala yango? Na kolanda maloba ya Yesu, yango ezali elembo oyo emonisaka bato oyo bazali na elimo santu, boye te?
‘Koloba na minɔkɔ mosusu’ ekokoba tii eloko “oyo ekoká” ekoya?
Mokanda ya 1 Bakorinti 13:8 elobeli makabo ndenge na ndenge—bisakweli, minɔkɔ, mpe boyebi. Vɛrsɛ 9 elobeli lisusu makabo mibale—boyebi ná bisakweli—na maloba oyo: “Toyebi . . . kaka ndambo, tosakolaka kaka ndambo.” (LL) To, ndenge RS ebongoli yango: “Mpo boyebi na biso ezangi kokoka mpe bisakweli na biso ezangi kokoka.” Na nsima vɛrsɛ 10 elobi: “Kasi mokolo tokozwa oyo ekoká, makambo ya ndambo-ndambo ekosila.” (LL) Maloba “oyo ekoká” ebongoli liloba ya Grɛki teleion, oyo ezali kopesa likanisi ya eloko oyo ekɔmɛli mpenza, oyo ezali mobimba, to eloko oyo ekoki. Na Ro, By, mpe NW ebongoli liloba yango “eloko ya mobimba.” Simbá ete eloko oyo “ezangi kokoka” to “ya ndambo” ezali te likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu. Kasi elobeli nde “bisakweli” mpe “boyebi.” Na maloba mosusu, atako bayekoli ya liboso bazalaki na makabo ya kosala makamwisi, boyebi na bango ya mokano ya Nzambe ezangaki kokoka to ezalaki ndambo. Kasi ntango bisakweli ekokokisama, mpe ntango mokano ya Nzambe ekosalema, na nsima eloko “oyo ekoká,” to ya mobimba, ekoya. Na yango, bavɛrsɛ yango elobi polele te ntango nini ‘likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu’ ekosila.
Kasi, Biblia emonisi tii ntango nini bakristo bakozala na ‘likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu.’ Emonisi ete bato bazalaki kozwa likabo yango mpe makabo mosusu oyo ezalaki kopesama na lisalisi ya elimo santu kaka soki bantoma ya Yesu Kristo batyeli bango mabɔkɔ to soki bazali wana. (Mis. 2:4, 14, 17; 10:44-46; 19:6; talá mpe Misala 8:14-18.) Na yango, nsima ya liwa ya bantoma mpe ya bato oyo bazwaki makabo yango, makabo ya kosala makamwisi na nzela ya elimo ya Nzambe esengelaki kosila. Likanisi yango eyokani na ntina oyo makabo yango epesamaki, ndenge emonisami na Baebre 2:2-4.
Marko 16:17, 18 (hf) emonisi nde ete likabo ya “koloba na minɔkɔ na sika” ezali elembo oyo emonisaka bakristo?
Simbá ete bavɛrsɛ yango elobeli kaka te “koloba na minɔkɔ na sika” kasi elobeli mpe kolɔkɔta banyoka mpe komɛla eloko na kufa to pwazɔ. Baoyo nyonso ‘balobaka na minɔkɔ mosusu’ basalaka mpe makambo wana?
Mpo na koyeba ntina mosusu oyo banganga-mayele ya Biblia bandimi bavɛrsɛ yango te, talá nkasa 343, 344, na motó ya likambo “Makamwisi ya kobikisa bato.”
Soki moto atuni—
‘Bondimaka likabo ya koloba na minɔkɔ mosusu?’
Okoki koyanola: ‘Batatoli ya Yehova balobaka minɔkɔ mingi, kasi tolobalobaka te “minɔkɔ oyo eyebani te.” Kasi, tiká natuna yo naino: Okanisaka ete ndenge oyo bato mosusu bazali “koloba na minɔkɔ mosusu” na mikolo na biso ekokani na ndenge oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki koloba?’ Okoki kobakisa: ‘Talá bokeseni oyo ezali kati na bato oyo bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu na siɛklɛ ya liboso ná oyo ya ntango na biso. (Okoki mpe kosalela makanisi oyo ezali na nkasa 369, 370.)’
To okoki koloba: ‘Tondimaka ete bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki “koloba na minɔkɔ mosusu” mpe yango ezalaki na ntina na ntango wana. Oyebi ntina yango?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Ezalaki komonisa ete Nzambe aboyi losambo ya Bayuda mpe andimi lisangá ya bokristo oyo euti kosalema. (Ebr. 2:2-4)’ (2) ‘Yango esalisaki mpo na kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba na ntango moke. (Mis. 1:8)’