Mokanda ya Biblia nimero 28—Hosea
Mokomi: Hosea
Esika ya bokomi: Samalia (Etúká)
Nsuka ya bokomi: Nsima ya 745 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: Liboso ya 804 kino nsima ya 745 L.T.B.
1, 2. (a) Mikanda 12 ya nsuka na Makomami ya Liebele mibéngamaka mbala mosusu nini? (b) Makambo nini toyebi na ntina na Hosea, mpe esakweli na ye etaleli nani?
MIKANDA 12 ya nsuka ya Makomami ya Liebele mibéngamaka ete “basakoli ya mike.” Liloba oyo liyebani mingi na Allemagne ete “basakoli ya mike,” limonanaka ete libongi bobele soki totaleli bonene ya mikanda yango, nzokande mikanda wana mizali mpenza mike te na kotalela ntina na yango, atako, soki misangisami esika moko, bonene na yango ekokani te na oyo ya Yisaya to ya Yilimia. Kati na Biblia ya Liebele, mikanda yango mityamaki na volimi bobele moko mpe mibéngamaki “Bazomi na mibale.” Bosangisi na yango esika moko na lolenge wana ezalaki mbala mosusu mpo na mokano ya kobatelama, mpamba te rulo moke mokomoko elingaki kozala mpasi te mpo na kobunga. Ndenge yango emonisami kati na mokomoko na mikanda 12 oyo, mokanda ya liboso ememi nkombo ya mokomi na yango, Hosea, oyo nkombo na ye ezali bongo ekomeli mokuse ya Hosaya, oyo elimboli “Kobikisama na Yah; Yah asili kobikisa.”
2 Kati na mokanda oyo ememi nkombo na ye, longola likambo oyo ete Hosea azalaki mwana ya Beli, mokanda oyo elobeli makambo mingi te na ntina na ye. Bisakweli na ye bitaleli mingimingi Yisalaele, Yuda etángami bobele na mabaku mosusu; mpe atako Hosea alobeli Yelusaleme te, Efelaima, oyo ezali libota monene ya Yisalaele, elobelami mbala 37 mpe Samalia, mboka mokonzi ya Yisalaele, elobelami mbala 6.
3. Hosea asakolaki na boumeli ya ntango boni, mpe wapi basakoli mosusu oyo bazalaki na ntango na ye?
3 Vɛrsɛ́ ya liboso ya mokanda oyo eyebisi biso ete Hosea azalaki mosakoli ya Yehova mpo na boumeli ya ntango moko molai koleka, kobanda pene na nsuka ya boyangeli ya Yelobama II, mokonzi ya Yisalaele kino na boyangeli ya Hizikiya, mokonzi ya Yuda. Elingi koloba liboso ya mobu 804 L.T.B. kino nsima ya mobu 745 L.T.B., soko na boumeli ya mibu 59. Na ntembe te, mosala na ye ya mosakoli eumelaki mwa bambula kino na boyangeli ya Yelobama II mpe na boyangeli ya Hizikiya. Na boumeli ya ntango wana Amosa, Yisaya, Mika, mpe Odede bazalaki basakoli mosusu ya sembo ya Yehova.—Amo. 1:1; Yis. 1:1; Mika 1:1; 2 Nta. 28:9.
4. Makambo nini malobelamaki mpe makokisamaki oyo mandimisi bosolo ya mokanda ya Hosea?
4 Bosolo ya esakweli oyo endimami na likambo oyo ete etángami mbala mingi kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Yesu ye moko atángaki Hosea 10:8 ntango alobelaki kosambisama likoló na Yelusaleme: “Na nsima bakobanda koloba na ngomba minene ete, Kweá na biso! mpe na ngomba mike ete, Zipá biso!” (Luka 23:30) Mokapo oyo etángami na ndambo na Emoniseli 6:16. Matai atángi Hosea 11:1 mpo na komonisa kokokisama ya esakweli oyo: “Nabyangi mwana na ngai longwa na Ezipito.” (Mat. 2:15) Esakweli ya Hosea na ntina na kobongisama lisusu ya Yisalaele mobimba ekokisamaki na boye ete mingi kati na bokonzi ya mabota zomi oyo basanganaki elongo na Yuda liboso ete yango ekende na boombo mpe bakitani na bango bazalaki kati na baoyo bazongaki nsima na boombo. (Hos. 1:11; 2 Nta. 11:13-17; 30:6-12, 18, 25; Ezl. 2:70) Kobanda ntango ya Ezela, mokanda oyo ezalaki na esika ebongi mpenza kati na kanɔ́ ya Liebele lokola “liloba na [Yehova] liyelaki Hosea.”—Hos. 1:2.
5. Yehova apesaki Yisalaele etumbu na ntina na kozanga sembo na likambo nini?
5 Mpo na nini Yehova atindaki Hosea ete azala mosakoli na ye epai na Yisalaele? Ezalaki na ntina na kozanga sembo ya Yisalaele mpe komibebisa na yango na losambo ya Baala, kobukáká bongo kondimana ya Yehova. Kati na Mokili ya Ndaka, Yisalaele ekómaki bato oyo bayebi mosala ya bilanga, kasi wana ezalaki bango kosala mosala yango, bamekolaki bobele lolenge ya bomoi ya bato ya Kanana te, kasi lisusu losambo na bango ya Baala, oyo azalaki elilingi ya nzambe oyo azali na nguya ya kobotisa milóna kati na mɔlɔ́ngɔ́. Na mikolo ya Hosea, Yisalaele esilaki mpenza kopesa mokɔngɔ na losambo ya Yehova mpo na kolanda milulu ya mbindo mpe ya mabe, oyo esangisaki boyokani ya mbindo elongo na basi na pite na tempelo. Yisalaele endimaki ete bozwi na yango eutaki na Baala. Ezangaki sembo epai na Yehova, ebongaki na miso na ye te, mpe na yango asengelaki kopesa yango disipilini. Yehova alingaki komonisa Yisalaele ete bozwi na yango ya mosuni eutaki epai na Baala te, mpe mpo na yango atindaki Hosea mpo na kokebisa Yisalaele na ntina na etumbu oyo ezalaki liboso na yango soki ebongoli motema te. Nsima ya liwa ya Yelobama II, Yisalaele ekutanaki na eleko moko ya mpasi mingi. Bakonzi mingi babomamaki na boumeli ya boyangeli wana ya nsɔ́mɔ, oyo ekóbaki kino na kokamatama na boombo ya Baasulia na mobu 740 L.T.B. Na boumeli ya ntango wana, bituluku mibale bizalaki kobundisana, etuluku moko elingaki kosala boyokani elongo na Ezipito, nzokande etuluku mosusu, elongo na Asulia. Ezali na etuluku moko te oyo etyaki elikya epai na Yehova.
6. Nini emonisami na ekomeli ya Hosea?
6 Ekomeli ya Hosea emonisi makambo mingi. Mbala mingi azali komonisa boboto mpe mayoki ya bolingo kati na maloba na ye mpe mbala na mbala azali kolobela motema-boboto mpe motema mawa ya Yehova. Azali kosepela na mwa elembo ya kobongola motema oyo amoni. Na bantango mosusu, elobeli na ye ezali makasi mpe ya nguya. Makambo oyo ye azangi kolobela yango na boboto, azali kolobela yango na makasi mpe na nguya. Azali mpenza komonisa mayoki ya makasi, mpe azali kobongola makanisi nokinoki.
7. Kozanga sembo ya Gomele mpe kosombama na ye na nsima ezalaki elilingi ya nini?
7 Na ebandeli ya mosala na ye lokola mosakoli, Hosea azwaki etindá ya kokamata “mwasi na pite.” (1:2) Yehova azalaki mpenza na mokano na likambo wana. Yisalaele ezalaki epai na Yehova lokola mwasi ya libala oyo azangaki sembo, na kosaláká pite. Nzokande alingaki komonisela ye bolingo mpe komeka kobikisa ye. Gomele, mwasi ya Hosea, azalaki mpenza elilingi ya Yisalaele. Eyebani ete nsima ya kobotama ya mwana ya liboso, mwasi oyo azangaki sembo mpe emonani ete abotaki bana mosusu na nzela ya ekobo. (2:5-7) Yango emonisami na lisoló oyo elobi ete “abotelaki ye [Hosea] mwana mobali” kasi elobeli mosakoli te na kobotama ya bana mosusu mibale. (1:3, 6, 8, NW) Mokapo 3, vɛrsɛ́ 1-3, emonani lokola ezali koloba ete Hosea azongelaki lisusu Gomele, na kosombáká ye lokola moombo, mpe yango eyokani na likambo oyo ete Yehova azongelaki lisusu bato na ye nsima wana babongolaki motema na etamboli ya ekobo.
8. Nkombo nini esalelami moko na esika ya mosusu kati na mokanda oyo?
8 Mabota zomi ya bokonzi ya Yisalaele na nɔ́rdi, epai maloba ya esakweli ya Hosea matindamaki mpenza, eyebanaki mpe lokola Efelaima, nkombo ya libota oyo ezalaki monene kati na bokonzi. Nkombo oyo, Yisalaele mpe Efelaima, isalelami moko na esika ya mosusu kati na mokanda oyo.
MAKAMBO MAZALI KATI NA HOSEA
9. Nkombo ya bana ya Gomele emonisi nini na lolenge oyo Yehova alingaki kotalela Yisalaele?
9 Etamboli ya ekobo ya Yisalaele emonisami (1:1–3:5). “Mwasi na pite” ya Hosea aboteli mosakoli mwana mobali, nkombo na ye Yizelele. Na nsima abotaki bana mibale mosusu, moko ya mwasi, na nkombo Lo-luhama, oyo elimboli “[Ayokameli] mawa te,” mpe mosusu ya mobali, Lo-ami, oyo elimboli “Bato na ngai te.” Yehova apesaki nkombo wana mibale mpo na komonisa ete ‘akoyokela ndako na Yisalaele mawa lisusu te’ mpe mpo na komonisa polele ete abwaki bango nyonso lokola bato na ye. (1:2, 6, 9) Nzokande, bana ya Yuda mpe ya Yisalaele, lokola “bana na Nzambe na bomoi,” bakosangisama kati na bomoko na nsé ya mokonzi moko, “mpo ete mokolo na Yizelele ekozala monene mpenza.” (1:10, 11) Lokola bamipɛtoli na losambo ya Baala oyo etondi na ekobo, bato ya Nzambe bakozongela Yehova mpe bakondima ye lokola mobali na bango. (2:16) Yehova akopesa kobatelama epai na Yisalaele mpe akosɛnga ye kokangama na ye libela na libela kati na boyengebene, na bosembo, na motema-boboto, na motema mawa, mpe na bokangami. Na boyokani na nkombo Yizelele (oyo elimboli “Nzambe akolóna Mombóto”), Yehova alaki ete: “Nakokóna mpe ye mpo na ngai moko kati na mokili, . . . mpe nakoloba epai na baoyo bazali bato na ngai te ete: ‘Bozali bato na ngai’; mpe bango bakoloba ete: ‘Ozali Nzambe na ngai.’” (2:23, NW) Lokola mwasi na libala oyo abongoli motema na ekobo na ye, “bato na Yisalaele bakozonga mpe bakoluka [Yehova], Nzambe na bango, mpe Davidi mokonzi na bango.”—3:5.
10. Nini ekokómela libota oyo lizali kobwaka boyebi?
10 Bikateli ya bisakweli na ntina na Efelaima (mpe Yuda) (4:1–14:9). Vɛrsɛ́ ya liboso ya mokapo 4 emonisi makebisi ya bisakweli oyo elandi: “[Yehova] azali na likambo epai na bafándi na mokili. Solo ezali te, boboto ezali te, boyebi na Nzambe ezali mpe kati na mokili te.” Ezalela wana ekobimisa nini? “Mpo ete yo oboyi boyebi; boye ngai nakoboya yo ete ozala nganga na ngai te. Mpe mpo ete obosani Mobeko na Nzambe na yo, ngai nakobosana bana na yo,” Yehova na bibele alobi bongo. (4:1, 6) Elimo mpenza ya pite nde epusi Yisalaele na kopɛngwa. Yisalaele mpe Yuda baoyo bakokani na mwasi na pite bakozongisa monɔkɔ, kasi bakoluka Yehova ntango bakomimona kati “na mpasi.”—5:15.
11. Lolenge nini Hosea azali kobondela bato, kasi mpo na nini ezali mawa mpo na bango?
11 Hosea azali kobondela bato ete: “Yaká tóbutwa epai na [Yehova], zambi . . . akobikisa biso.” Yehova asepelaka na motema-boboto mpe na boyebi ya Nzambe, kasi na mbeka mpe na makabo na kotumba te, nzokande motema-boboto ya Efelaima mpe ya Yuda ezali “lokola mamwɛ oyo ekolimwa mbangumbangu.” (6:1, 4) Efelaima azali “ebenga na ebɛbɛ oyo na motema te.” Bato bazali kokende epai na Ezipito mpe na Asulia mpo na koluka lisalisi na esika ya koluka yango epai na Yehova. (7:11) Ezali mawa mpo na bango. Mpo na nini? Bazali koyengayenga, bazali kokana makambo mabe, bazali kotosa te kondimana ya Yehova, mpe bazali kobuka mobeko na ye. “Zambi bakóni mopɛpɛ mpe bakobuka mopɛpɛ mokotimbatimba.” (8:7) Yehova akobosana te mabungá na bango mpe akotya likebi na masumu na bango. “Bakozala bato na kolemalema kati na mabota.” (9:17) Yisalaele ezali vinyo oyo ezali kobeba, oyo motema esili kokóma na bokosi. Na esika ya kolóna mombóto kati na boyengebene mpe kobuka na boyokani na motema-boboto, Yisalaele esili kolóna mabe mpe esili kobuka bokesene. Yehova amikundoli ete: “Nabyangaki mwana na ngai longwa na Ezipito.” (11:1) Ɛɛ, Ye alingaki Yisalaele uta bomwana na ye, kasi Yisalaele esili kozinga Ye na lokuta mpe na bokosi. Yehova apesi toli oyo ete: “Butwá epai na Nzambe na yo, batelá boboto mpe boyengebene, [zelá] Nzambe na yo ntango nyonso.”—12:6.
12. (a) Hosea alobeli nini na mokuse na mokapo 13? (b) Kobongisama lisusu nini elakami?
12 Na mokapo 13, Hosea alobeli na mokuse makambo nyonso matalaki elaka oyo epesamaki kala epai na Yisalaele, komibanzabanza ya bolingo oyo Yehova amonisaki, momeseno Yisalaele azalaki na yango ya kobosana makambo mpe na nsuka libota eyaki kopesa Yehova mokɔngɔ. Yehova alobi ete: “Napesaki yo mokonzi na nkanda na ngai, mpe nalongolaki ye na nkɛlɛ na ngai.” (13:11) Kasi, na nsima, kobongisama lisusu ekozala: ‘Nasikola nde bango na lobɔkɔ na Sheol? Nabikisa nde bango na kufa? Ɛ kufa, esweli na yo wapi? Ɛ Sheol, libebi na yo wapi?’ (13:14) Atako bongo, likámá oyo ekokwela Samalia motomboki ekozala mpenza nsɔ́mɔ.
13. Libyangi nini ya kobondela lisukisi mokanda ya Hosea, mpe nani akotambola kati na banzela ya Yehova?
13 Mokanda oyo esuki na maloba ya kosimba motema: ‘Ɛ Yisalaele, butwá epai na Yehova, Nzambe na yo; mpo ete otai libaku mpo na mabe na yo. Luká bolimbisi, mpe pesá ye mbuma na bibɛbu na yo. Yehova akomonisa yo motema mawa mpe bolingo. Akozala lokola mamwɛ ya kobɔndisa epai na yo, mpe yo okofuluka lokola fololo mpe nzeté na olive.’ Moto na mayele mpe na bososoli akokanga ntina ya makambo oyo: “Zambi nzela na [Yehova] izali sembo mpe basembwi bakotambola na yango. Kasi bapɛngwi bakokwea wana!”—14:1-6, 9.
LITOMBA NA YANGO
14. Kokokisama nini ya sikisiki esengeli kolobelama na ntina na esakweli ya Hosea?
14 Mokanda ya Hosea ezali kolendisa kondima kati na bisakweli bipemami ya Yehova. Makambo nyonso oyo Hosea asakolaki na ntina na Yisalaele mpe Yuda ekokisamaki. Bato oyo bazalaki kolinga Yisalaele, mabota ya zingazinga oyo bazalaki basambeli na bikeko, basundolaki yango mpe ekumbaki ya libebi uta na Asulia ekwelaki yango na mobu 740 L.T.B. (Hos. 8:7-10; 2 Mik. 15:20; 17:3-6, 18) Nzokande, Hosea asilaki kosakola ete Yehova akomonisa motema mawa epai na Yuda mpe akobikisa ye, kasi akosala yango na nzela ya mapinga ya basodá te. Likambo oyo likokisamaki ntango anzelu ya Yehova abomaki Baasulia 185 000 oyo bazalaki kokanela Yelusaleme. (Hos. 1:7; 2 Mik. 19:34, 35) Atako bongo, Yuda esangisamaki mpe kati na kosambisama oyo ezwami na Hosea 8:14: “Nde nakotinda mɔ́tɔ likoló na mboka na ye, ekozikisa bisika makasi na yango,” esakweli oyo ezwaki kokokisama na yango ya nsɔ́mɔ ntango Nebukadanesala abebisaki Yuda mpe Yelusaleme, kobanda mobu 609-607 L.T.B. (Yil. 34:6, 7; 2 Nta. 36:19) Bisakweli mingi ya Hosea oyo bitalelaki kobongisama lisusu bikokisamaki ntango Yehova asangisaki Yuda mpe Yisalaele, mpe ‘babimaki na mokili’ epai kuna bazalaki na boombo na mobu 537 L.T.B.—Hos. 1:10, 11; 2:14-23; 3:5; 11:8-11; 13:14; 14:1-9; Ezl. 2:1; 3:1-3.
15. Lolenge nini bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto bazali kotánga makambo mazwami na mokanda ya Hosea?
15 Makambo oyo bakomi ya Makomami ya Greke ya boklisto balobelaki oyo ezali na boyokani na esakweli ya Hosea mazali mpe na litomba mingi mpo na biso lelo. Na ndakisa, Paulo asaleli na lolenge ya nguya mingi Hosea 13:14 wana azali kolobela lisekwa: “Ɛ kufa, kolónga na yo wapi? Ɛ kufa, esweli na yo wapi?” (1 Kol. 15:55) Wana amonisaki polele ngɔlu oyo Yehova amonisaki epai na mbeki na mawa, Paulo atángi Hosea 1:10 mpe 2:23: “Pelamɔkɔ elobi ye kati na Mokanda na Hosea; Baoyo bazalaki bato na ngai te, nakotánga bango bato na ngai. Ye oyo alingami te, nakotánga ye ete, Molingami na ngai. Mpe na esika elobami na bango ete, Bongo bozali bato na ngai te, wana bakobyangama ete, Bana na Nzambe na bomoi.” (Lom. 9:25, 26) Petelo alobeli mokapo oyo ya Hosea wana alobi ete: ‘Liboso bozalaki bato te nde sikawa bozali bato na Nzambe; bozwaki mawa te, nde sikawa bozwi mawa.’—1 Pet. 2:10.
16. Maloba nini ya Hosea Yesu azongelaki mpo na komonisa masɛngami ya Yehova mpo na losambo?
16 Na yango, emonani ete esakweli ya Hosea esengelaki kokokisama te bobele na bozongi ya batikali na mikolo ya Zelubabele, kasi mpe kati na motema mawa ya Yehova mpo na koyanganisa batikali ya elimo oyo bakómaki ‘bana balingami ya Nzambe na bomoi.’ Na kopemama na Nzambe, Hosea amonaki masɛngami mpo na bango. Ezali te lolenge ya losambo ya milulu na milulu, kasi engebene maloba ya Hosea 6:6 (oyo Yesu azongelaki na Matai 9:13 mpe 12:7): “Mpo ete nalingi boboto, mbeka te; nalingi boyebi koyeba Nzambe liboso na makabo matumbami.”
17. (a) Baoyo nyonso bakwei kati na ekobo na elimo basengeli kosala nini? (b) Elaka nini ya esengo na ntina na Bokonzi ezwami kati na mokanda ya Hosea?
17 Elilingi ya mwasi na ekobo oyo emonanaki mpenza kati na bomoi ya Hosea emonisi ete Yehova ayini baoyo bazali kopesa ye mokɔngɔ mpo na komipesa na kosambela bikeko mpe komipesa na losambo ya lokuta, kosaláká bongo ekobo na elimo. Baoyo nyonso basili kokwea kati na libungá basengeli kozongela Yehova na komonisáká kobongola motema ya solo mpe na ‘kopesáká mbuma na bibɛbu na bango.’ (Hos. 14:2; Ebr. 13:15) Bato yango bakoki kosepela elongo na batikali oyo bazali bana ya Yisalaele ya elimo kati na kokokisama ya elaka ya Bokonzi oyo elobelami na Hosea 3:5 ete: “Nsima bato na Yisalaele bakozonga mpe bakoluka [Yehova], Nzambe na bango, mpe Davidi mokonzi na bango; bakotosa [Yehova] mpe malamu na ye na mikolo na nsima.”