Mokanda ya Biblia nimero 44—Misala
Mokomi: Luka
Esika ya bokomi: Loma
Nsuka ya bokomi: soko 61 T.B.
Boumeli ya lisoló: 33–soko 61 T.B.
1, 2. (a) Makambo nini mpe misala nini ya lisoló ya kala elobelami kati na Misala? (b) Bokomami ya mokanda ya Misala eumelaki ntango boni?
KATI na mokanda ya 42 ya Makomami mapemami, Luka azali koyebisa lisoló litali bomoi, bikela mpe mosala ya Yesu elongo na bayekoli na ye, kino ntango Yesu amataki na likoló. Lisoló ya kala oyo litali mokanda ya 44 ya Makomami, elingi koloba mokanda ya Misala ya Bantoma, likóbi lisoló ya boklisto ya ebandeli na kolobeláká kotyama ya lisangá na lisalisi ya mosala ya elimo santu. Lisoló yango lizali mpe kolobela kopalangana ya litatoli, libosoliboso epai na Bayuda mpe na nsima epai na bato ya mabota nyonso. Makambo mingi, oyo makomami na mikapo 12 ya liboso, mazali kolobela misala ya Petelo, nzokande mikapo 16, oyo mitikali, mizali kolobela misala ya Paulo. Luka azalaki mosalani mpenza ya Paulo, azalaki kokende elongo na ye na mibembo mingi oyo asalaki.
2 Mokanda yango motindami epai na Teofili. Lokola abéngami “moto na lokumu,” ekoki kozala ete azalaki mokonzi, to mbala mosusu ezalaki bobele ebéngeli ya kopesa ye limemya. (Luka 1:3) Lisoló yango lizali kopesa mayebisi ya sikisiki oyo matali kotyama mpe kokóla ya lisangá ya boklisto. Yango ebandi na komonana ya Yesu epai na bayekoli na ye nsima ya lisekwa mpe elandi na komonisáká makambo ya ntina oyo masalemaki kobanda na mobu 33 kino pene na mobu 61 T.B.; boye bokomami na yango nyonso eumelaki mbula pene na 28.
3. Nani akomaki mokanda ya Misala, mpe bokomami na yango esukaki ntango nini?
3 Uta kala mpenza, emonisamaki ete mokomi ya Evanzile ya Luka nde moto akomaki mokanda ya Misala. Mikanda yango nyonso mibale mitindami epai na Teofili. Na kozongeláká, kati na bavɛrsɛ́ ya ebandeli ya mokanda ya Misala, makambo oyo makomami na nsuka ya Evanzile na ye, Luka akangisi masoló yango mibale mpo na komonisa ete ezalaki mosala ya mokomi bobele moko. Ezalaki soko na mobu 61 T.B. nde Luka asilisaki kokoma mokanda ya Misala, ekoki kozala pene na nsuka ya mibu mibale oyo alekisaki na Loma na ntango azalaki kotambola elongo na ntoma Paulo. Lokola yango ezali na masoló ya makambo oyo mabimaki kino na mbula wana, boye kokomama na yango ekokaki kosila liboso ya mbula yango te, mpe likambo oyo ete mokanda ya Misala ezali te komonisa nsuka ya likambo ya Paulo liboso na Kaisala limonisi ete bokomami na yango esukaki mpenza na mbula wana.
4. Nini emonisi ete mokanda ya Misala mopemami mpe mozali na bosolo?
4 Uta ntango ya kalakala, banganga-mayele na Biblia bandimaka ete mokanda ya Misala mozali moko na mikanda mipemami. Biteni ya mokanda yango bizali kokutama kati na bamaniskri mosusu ya kala mpenza ya Makomami ya Greke, oyo izali kino lelo mpe oyo ikomamaki likoló ya papirise, na ndakisa Michigan No. 1571 (P38) ya ekeke ya misato to ya minei T.B. mpe Chester Beatty No. 1 (P45) ya ekeke ya misato. Yango nyonso mibale emonisi ete mokanda ya Misala mozalaki kotambolatambola esika moko na mikanda mosusu ya Makomami mapemami mpe na yango mozalaki mokanda ya kataloge (liste ya mikanda mindimami ya Biblia) uta kala mpenza. Makambo oyo Luka akomaki kati na mokanda ya Misala mamonisami na bosikisiki mpenza, motindo moko na oyo tosilaki komona kati na Evanzile na ye. Sir William M. Ramsay atángi mokomi ya mokanda ya Misala “kati na bakomi minene ya makambo na kala,” mpe alimboli ntina ya likambo yango na kolobáká ete: “Eloko ya liboso mpe oyo eleki ntina epai na mokomi monene ya makambo na kala ezali bongo bosolo. Makambo alobi masengeli kozala oyo mabongi kotyelama motema.”a
5. Pesá ndakisa mpo na komonisa bosikisiki ya makambo Luka akomaki.
5 Mpo na kopesa ndakisa oyo emonisi bosikisiki oyo bozali komonana kati na makomi ya Luka, tozali kotánga maloba ya Edwin Smith, komandá ya etuluku ya masuwa ya etumba ya mokili ya Grande-Bretagne, oyo mazalaki kotambola kati na mai monene ya Méditerranée na boumeli ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba; maloba yango makomami kati na zulunalo The Rudder, ya Mársi 1947, ete: “Masuwa ya ntango ya kala mazalaki kotambwisama te lokola masuwa ya ntango na biso, oyo mazali na yenda bobele moko oyo ekangisami na ebendé moko, kasi ezalaki nde na yenda mibale, moko na ngámbo oyo mpe mosusu na ngámbo oyo kuna ya masuwa; yango wana mosantu Luka alobeli yango na boíké. [Mis. 27:40] . . . Kati na bolukiluki na biso, tosili komona ete maloba nyonso oyo matali botamboli ya masuwa yango, kobanda na ntango yango etikaki Bisɛmɛlo-Kitoko kino ntango ekakemaki na Melita, lokola mosantu Luka amonisi yango, [maloba wana] masili kotalelama ete mazali solo na nzela ya bilembeteli ya polele mpe ya sikisiki; maloba na ye na ntina na ntango oyo masuwa eumelaki na mai monene makokani mpenza na bolai ya ntáká oyo yango esalaki; mpe na nsuka, bandimbola apesi na ntina na esika oyo bakómaki ekokani mpenza na lolenge esika yango ezali. Nyonso wana emonisi ete Luka asalaki mpenza mobembo lokola yango emonisami, mpe emonisi ye moko ete azalaki moto oyo maloba na ye mpe mayebisi na ye mazali solo mpe mabongi mpenza kotyelama motema mobimba.”b
6. Bandakisa nini ezali komonisa lolenge biloko bikundolami na arkeoloji bizali kondimisa bosikisiki ya mokanda ya Misala?
6 Biloko bikundolami na nzela ya arkeoloji bizali mpe kondimisa bosolo ya lisoló oyo Luka ayebisi. Na ndakisa, botimoli oyo esalemaki na Efese ekundolaki biloko ya tempelo ya nzambe Alatemi, bakisá mpe Esanelo ya kala epai kuna bafándi na Efese batombokelaki ntoma Paulo. (Mis. 19:27-41) Makomi masili kozwama oyo mazali kondimisa bosolo ya ebéngeli oyo Luka asaleli ete “bayangeli ya engumba,” mpo na kolobela bakonzi ya Tesaloniki. (17:6, 8, NW) Makomi mibale na lokótá ya esanga Melita mamonisi ete Luka alobaki solo wana ayebisaki ete Pubili azalaki “moto na liboso” ya Melita.—28:7.c
7. Lolenge nini masukúlu oyo makomami mamonisi ete lisoló ya Misala lizali koyebisa makambo masalemaki solo?
7 Lisusu, lokola Luka akomaki yango, masukúlu ndenge na ndenge oyo masalemaki na Petelo, na Setefano, na Korneye, na Teletulu, na Paulo mpe na basusu, makeseni yango nyonso na oyo etali elobeli na yango mpe kobongisama na yango. Ezala masukúlu oyo Paulo asalaki liboso ya bituluku bikeseni ya bayoki, mabongwanaki na oyo etali lolenge na yango; ntina ya mbongwana wana ezalaki ete lisukúlu mokomoko lisengelaki kokokana na libaku na yango. Yango emonisi ete Luka akomaki bobele makambo oyo ye moko ayokaki to oyo mayebisamelaki ye na bato mosusu oyo bazalaki wana ntango yango ezalaki kosalema. Luka azalaki mokomi ya masapo mpamba te.
8. Makomami mayebisi biso nini na ntina na Luka mpe bosangani na ye elongo na Paulo?
8 Toyebi makambo mingi te na oyo etali bomoi ya Luka. Luka azalaki ntoma te kasi azalaki nde kosangana elongo na bantoma. (Luka 1:1-4) Na mabaku misato, ntoma Paulo atángi nkombo ya Luka. (Kols. 4:10, 14; 2 Tim. 4:11; Flmo. 24) Na boumeli ya mwa bambula, azalaki ntango nyonso elongo na Paulo, oyo abéngaki ye “monganga molingami.” Maloba ‘biso’ mpe ‘bango’ mazali kozonga mbala na mbala kati na lisoló; yango emonisi ete Luka azalaki elongo na Paulo na Toloa na boumeli ya mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionere; emonisi mpe ete, mbala mosusu, atikalaki na Filipi kino bozongi ya Paulo nsima na mwa bambula, mpe ete na nsima akutanaki lisusu na Paulo mpe asalaki mobembo elongo na ye ntango azalaki kokende na Loma mpo na kosambisama.—Mis. 16:8, 10; 17:1; 20:4-6; 28:16.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MISALA
9. Makambo nini mayebisamaki epai na bayekoli na ntango ya komata ya Yesu na likoló?
9 Makambo masalemaki kino Pantekote (1:1-26). Luka abandi lisoló oyo ya mibale na maloba epai kuna Yesu, oyo asekwisami, azali koyebisa bayekoli na ye ya sembo ete bakobatisama na elimo santu. Bokonzi ekozongisama nde na ntango yango? Te. Kasi bakozwa nguya mpe bakokóma batatoli na ye ‘kino eteni eleki mosika na mabelé.’ Ntango Yesu amati mpe bazali komona ye lisusu te, mibali mibale na bilamba ya mpɛmbɛ balobi na bango ete: “Yesu oyo moko, oyo alongwi na bino kokamatama na Likoló, akoya bobele bongo na motindo emoni bino ye kokɔta na Likoló.”—1:8, 11.
10. (a) Makambo nini mabimaki na Pantekote oyo makoki kobosanama te? (b) Petelo apesi ndimbola nini, mpe matomba nini yango ebimisi?
10 Mokolo monene ya Pantekote (2:1-42). Bayekoli nyonso bayangani na Yelusaleme. Na mbala moko, ndako mobimba etondi na makɛlɛlɛ oyo makokani na mopɛpɛ makasi. Ndemo ya lolenge ya mɔ́tɔ itɛlɛmi likoló na baoyo bazalaki wana. Batondi na elimo santu mpe babandi koloba nkótá ndenge na ndenge na ntina na “misala ya kokamwa ya Nzambe.” (2:11, NW) Baoyo bazalaki kotala bakamwe mingi. Na ntango yango, Petelo atɛlɛmi mpe abandi koloba. Alimboli ete kosopama wana ya elimo santu esalemaki mpo na kokokisa esakweli ya Yoele (2:28-32) mpe ete Yesu Klisto, oyo sikawa asekwisami mpe atombolami na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, ‘asili kosopa oyo bozali komona mpe koyoka.’ Lokola mitema na bango misimbami mpenza, bato pene na 3 000 bayambi liloba mpe babatisami.—2:33.
11. Lolenge nini Yehova azali kofulukisa mosala ya kosakola?
11 Kopalangana ya litatoli (2:43–5:42). Mokolo na mokolo, Yehova azali kokóba kobakisa, likoló na bango, bato oyo bazali kobikisama. Na libándá ya tempelo, Petelo na Yoane bamoni mobali moko, ebɔsɔnɔ, oyo atambolá naino te na bomoi na ye. Petelo alobi na bokonzi nyonso ete, “Na nkombo na Yesu Klisto na Nasalete, tambolá!” Bobele na ntango wana moto yango abandi ‘kotambola, kopombwa, mpe kosanzola Nzambe.’ Na nsima, Petelo abyangi bato ete bábongola mitema mpe bábongwana, “ete ntango na kopema euta na Nkolo [“Yehova,” NW].” Eyoki bango nkanda mpo ete Petelo mpe Yoane bazali koteya lisekwa ya Yesu, bakonzi ya mangomba bakangi bango, kasi motuya ya bandimi ebakisami kino bato pene na 5 000.—3:6, 8, 19.
12. (a) Ntango bapekisaki bango ete básakola lisusu te, bayekoli bapesaki eyano nini? (b) Mpo na likambo nini Anania mpe Safila bapesamelaki etumbu?
12 Na mokolo molandi, bamemi Petelo mpe Yoane liboso na bakonzi ya Bayuda mpo na kotunama mituna. Petelo amonisi polele ete lobiko ekozwama bobele na nzela ya Yesu Klisto, mpe ntango bapesi bango etindá ete bátika mosala na bango ya kosakola, Petelo mpe Yoane bayanoli ete: “Sɔkɔ ezali sembo na miso na Nzambe ete tóyoka bino liboso na koyoka Nzambe, bókata likambo yango. Kasi mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango tɛ.” (4:19, 20) Babimisi bango, mpe bayekoli banso bakóbi koloba na molende nyonso na ntina na liloba ya Nzambe. Na ntina na mikakatano oyo mizalaki, basangisi biloko na bango ya mosuni esika moko mpe bakaboli yango engebene mposa oyo emonani. Nzokande, moto moko na nkombo Anania mpe mwasi na ye Safila, bateki ndambo ya biloko mpe, na nkuku, babombi ndambo ya mosolo mozwami na komimonisáká lokola ete bapesaki motuya nyonso ya mosolo. Petelo atɔndɔli mabe na bango, na nsima bakwei mpe bakufi mpo ete babukaki lokuta liboso na Nzambe mpe na elimo santu.
13. Bantoma bafundami na likambo nini, lolenge nini bayanoli mpe bakóbi kosala nini?
13 Bakonzi ya mangomba bayoki lisusu nkanda mpe babwaki bantoma na bolɔ́kɔ, kasi na mbala oyo anzelu ya Yehova abimisi bango. Mokolo molandi, bamemi bango lisusu liboso na Sanedrina mpe bafundami ete ‘batondisi Yelusaleme na mateya na bango.’ Bango bazongisi ete: ‘Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi, na esika ya kotosa bato.’ Atako babɛtami fimbo mpe bakanelami, nzokande baboyi kotika mosala, mpe ‘mokolo na mokolo, kati na tempelo mpe na ndako na ndako, bakóbi koteya mpe koyebisa nsango malamu na ntina na Klisto Yesu, kozanga kotika.’—5:28, 29, 42.
14. Nini esali ete Setefano abomama lokola martíru?
14 Kobomama ya Setefano lokola martíru (6:1–8:1a). Setefano azali moko na bato nsambo oyo baponamaki na lisalisi ya elimo santu mpo na kokabola bilei na bamesa. Azali mpe kopesa litatoli makasi na ntina na solo; azali na molende makasi mpo na kosimba kondima, na boye ete banguna na ye bayoki nkanda mpe bapusi bato na komema ye liboso na Sanedrina, na efundeli ete azali motuki. Wana azali kosamba, Setefano alobeli liboso motema molai ya Yehova epai na Yisalaele. Na nsima, na elobeli ya polele mpe kozanga kobanga, akómi na esika yango mpenza: ‘Bato na mitó makasi, bozali ntango nyonso kotɛmɛla elimo santu, bino baoyo bozwaki Mibeko, wana mipesamaki na nzela ya baanzelu kasi botosaki yango te.’ (7:51-53) Maloba wana maleki ndelo mpo na bango. Nokinoki bakweli ye na nzoto, bamemi ye na libándá ya engumba, mpe babandi kobwakela ye mabanga kino kufa. Saulo azali kotala mpe asepeli na likambo yango.
15. Minyoko mibimisaki nini, mpe eksperiansi nini ya mosala ya kosakola Filipo azwi?
15 Minyoko mpe kobongwana ya Saulo (8:1b–9:30). Minyoko oyo mibandaki mokolo wana na lisangá na Yelusaleme mipalanganisaki bandimi nyonso na bipai binso ya mboka, longola bobele bantoma. Filipo akei na Samalia, epai kuna bato mingi bandimi liloba ya Nzambe. Petelo mpe Yoane batindami kuna longwa na Yelusaleme na ntina ete bandimi yango bákoka kozwa elimo santu “[na nzela] na kotya na mabɔkɔ na bantoma.” (8:18) Na nsima, anzelu moko akambi Filipo na súdi ya nzela oyo euti na Yelusaleme kino Gaza, epai kuna akutani na mokube moko, mosaleli ya mokonzi ya Etiopia, oyo azalaki kotambola na likalo na ye mpe azalaki kotánga mokanda ya Yisaya. Filipo alimbweli ye polele ntina ya esakweli yango mpe abatisi ye.
16. Kobongwana ya Saulo esalemi ndenge nini?
16 Bobele na ntango yango, Saulo, oyo azali “kokanela bayekoli na Nkolo makaneli na kufa,” akei kokanga baoyo ‘bazali bato ya Nzela yango’ oyo bazali na Damaseke. Na pwasa, kongɛnga moko euti na likoló engɛngi zingazinga na ye, akwei na mabelé mpe miso na ye makufi. Mongongo moko mouti na likoló molobi na ye ete: “Ngai Yesu, oyo yo ozali konyokola.” Nsima na mikolo misato na Damaseke, moyekoli moko na nkombo Anania ayei kosalisa ye. Miso ya Saulo mazipwani, azwi batisimo mpe, na nsima, atondi na elimo santu, mpo ete akóma mosakoli ya nsango malamu oyo azali na molende mpe na makoki. (9:1, 2, 5) Kati na kobongwana wana ya makambo na kokamwisa, monyokoli akómi monyokolami mpe asengeli kokima mpo na kobikisa bomoi na ye, libosoliboso uta na Damaseke mpe na nsima uta na Yelusaleme.
17. Lolenge nini nsango malamu ekómaki epai na bapakano bazangi kokatama ngenga?
17 Kosakolama ya nsango malamu epai na bapakano bazangi kokatama ngenga (9:31–12:25). Lisangá likɔti ‘sikawa na eleko ya kimya mpe lizali kolendisama; mpe lokola lizali kotambola na bobángi Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu, lisangá likóbi kofuluka.’ (9:31) Na Yafo, Petelo asekwisi molingami Tabita (Doloka) longwa na bakufi; ezali uta na esika oyo nde azwi mbela ya kokende na Kaisalia, epai kuna mokonzi moko ya basodá na nkombo Korneye azali kozela ye. Asakoli epai na Korneye mpe bato ya ndako na ye mpe banso bandimi, mpe elimo santu esopami likoló na bango. Kososoláká ete “Nzambe akoponaponaka te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka [na] boyengebene ayambami na ye,” Petelo abatisi bango—kati na bapakano oyo bazangi kokatama ngenga, bango nde bato ya liboso oyo bakómi bandimi. Mwa moke na nsima, Petelo alimboli bokóli wana ya sika epai na bandeko oyo bazalaki na Yelusaleme, mpe koyokáká ndimbola yango bakumisi Nzambe.—10:34, 35.
18. (a) Na nsima, nini esalemi na Antiokia? (b) Minyoko nini mibimaki, kasi mikokisaki mokano na yango?
18 Lokola nsango malamu ezali kopalangana nokinoki, Balanaba mpe Saulo bazali koteya ebele na bato kati na Antiokia, ‘mpe ezali na Antiokia nde, mpo na mbala ya liboso, na litambwisi ya Nzambe, bayekoli babéngami baklisto.’ (11:26) Na nsima minyoko mibandi lisusu. Elode Akalipa I abomisi Yakobo, ndeko ya Yoane, na mopanga. Abwaki mpe Petelo na bolɔ́kɔ, mpe na mbala oyo lisusu anzelu ya Yehova abimisi Petelo. Likambo yango limonani mabe mpenza na miso ya Elode, moto mabe! Lokola apesi Nzambe lokumu te, alyami na nkusu mpe akufi. Epai mosusu, ‘liloba ya Yehova likóbi kokóla mpe kopalangana.’—12:24.
19. Wapi etando ya mobembo ya liboso ya Paulo lokola misionere, mpe nini esalemi?
19 Mobembo ya liboso ya Paulo lokola misionere, elongo na Balanaba (13:1–14:28).d Balanaba mpe “Saulo, oyo abéngami mpe Paulo,” baponami na elimo santu mpe batindami longwa na Antiokia. (13:9) Na esanga ya Kupulu, bato mingi bakómi bandimi, bakisá mpe Selegi Paulo, moyangeli ya esanga. Na eteni ya mokili ya Asie Mineure, baleki na zongazonga esangisi bingumba motoba to koleka, mpe na bingumba nyonso wana bakuti likambo bobele moko: Bokabwani ya polele ebimi kati na baoyo bandimi nsango malamu na esengo nyonso mpe banguna mabe oyo bazali kotinda bibele ya bato ete bábwakela bamemi-nsango ya Yehova mabanga. Nsima na kopona bankulutu kati na masangá oyo mauti kosalama, Paulo mpe Balanaba bazongi na Antiokia ya Sulia.
20. Na likatami nini ntembe na ntina na kokatama ngenga esilisami?
20 Kosilisama ya likambo litali kokatama ngenga (15:1-35). Lokola bato oyo bazalaki Bayuda te bakómaki mingi, motuna ya koyeba soki basengeli kokatama ngenga mobimi. Paulo mpe Balanaba bamemi motuna yango epai na bantoma mpe bankulutu oyo bazali na Yelusaleme, epai kuna moyekoli Yakobo azali kokamba mpe azwi ebongiseli ya kotinda, na nkomá, likatami lindimami na bango banso ete: ‘Emonanaki malamu na elimo santu mpe na biso kotyela bino mikumba mosusu te, bobele makambo oyo mabongi, ete bóboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.’ (15:28, 29) Elendiseli euti na nkomá yango ememi bosepeli monene epai na bandeko na Antiokia.
21. (a) Nani akei elongo na Paulo na mobembo na ye ya mibale ya misionere? (b) Makambo nini mabimi na boleki ya Paulo na Makedonia?
21 Mosala mokóli na mobembo ya mibale ya Paulo (15:36–18:22).e “Nsima na mikolo,” Balanaba mpe Malako bakei na masuwa kino Kupulu, wana Paulo mpe Sila bamati mpo na kokende na Sulia mpe na Asie Mineure. (15:36) Elenge mobali Timoté azwani na Paulo na Lusutula, mpe basali mobembo kino Toloa oyo ezali pembenipembeni ya mai monene ya Égée. Kuna, Paulo amoni mobali moko kati na emonaneli oyo azali kobondela ye ete: “Yaká na Makedonia kosunga biso!” (16:9) Luka amonani na Paulo mpe bamati masuwa mpo na kokende na Filipi, engumba eleki ntina kati na Makedonia, epai kuna Paulo mpe Sila babwakami na bolɔ́kɔ. Kotyama na bango na bolɔ́kɔ ememaki mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ na kokóma mondimi mpe na kozwa batisimo. Nsima ya kobimisama na bango, bakóbi nzela kino Tesaloniki, mpe kuna Bayuda ya likunya bapusi ebele na bato ete básala bango mabe. Boye, bandeko babimisi Paulo mpe Sila na butu ete bákende na Beloya. Kuna, Bayuda bamonisi makanisi malamu na koyambáká liloba “na mposa mingi, mpe batángi Makomi mokolo na mokolo” mpo na koyeba soki makambo oyo bayekoli mazali solo. (17:11) Nsima ya kotika Sila mpe Timoté na lisangá wana ya sika, ndenge atikaki Luka na Filipi, Paulo akóbi mobembo epai na súdi, kokende na Atene.
22. Lisukúlu kitoko ya Paulo likoló na Ngomba na Ale libimisi makambo nini?
22 Kati na engumba oyo etondi na bikeko, Baepikiryɛ́ mpe Bastoisyɛ́ ya lolendo, bato ya filozofi, bafingi Paulo ete azali “moto na makɛlɛlɛ” mpe “mosakoli ya banzambe ya bapaya,” mpe bamemi ye likoló na Ngomba na Ale, to Ngomba ya Marsi. Na elobeli ya molobi ya makoki, Paulo alobeli ntina ya koluka Nzambe ya solo, “Nkolo ya likoló mpe mabelé,” oyo apesi ndanga ya lisambisi ya sembo na nzela ya moto oyo Ye asekwisaki longwa na bakufi. Lokola alobeli lisekwa, yango ebimisi bokabwani kati na bayoki na ye, kasi bamoko kati na bango bakómi bandimi.—17:18, 24, NW.
23. Makambo nini masalemi na Kolinti?
23 Na nsima, ntango akómi na Kolinti, Paulo afandi elongo na Akula mpe Pilisikila, kosanganáká na bango na mosala ya botongi hema. Botɛmɛli liboso na mosala na ye ya kosakola epusi ye na kotika eyanganelo mpe kosala makita na ye na ndako oyo elandi eyanganelo, epai na Tito Yusutu. Kilisipi, mokonzi-mokambi ya eyanganelo, akómi mpe mondimi. Nsima na kofanda sanza 18 kati na Kolinti, Paulo akei elongo na Akula mpe Pilisikila kino Efese, epai kuna atiki bango mpe akóbi mobembo ye moko kino Antiokia ya Sulia, kosukisáká bongo mobembo na ye ya mibale lokola misionere.
24, 25. (a) Na ntango Paulo abandi mobembo na ye ya misato, makambo nini mabimi na Efese? (b) Yikiyiki nini ebimi na nsuka ya mbula misato oyo Paulo alekisi na Efese?
24 Paulo akei lisusu kotala masangá, mobembo ya misato (18:23–21:26).f Moyuda moko oyo nkombo na ye ezali Apolo ayei na Efese uta na Alesandalia, na mokili ya Ezipito, azali kosakola na molende mpenza na ntina na Yesu, kasi Akula mpe Pilisikila bamoni ete ezali malamu básembola mateya na ye liboso ete akende na Kolinti. Paulo azali sikawa na mobembo na ye ya misato mpe, na ntango ebongi mpenza, ayei na Efese. Ntango bayebisi ye ete, na Efese, bandimi babatisamaki na batisimo ya Yoane, Paulo apesi ndimbola ya kozwa batisimo na nkombo ya Yesu. Na nsima na yango, abatisi bato soko 12; mpe ntango atye mabɔkɔ na ye likoló na bango, bazwi elimo santu.
25 Na boumeli ya mbula misato oyo Paulo afandi na Efese, ‘liloba ya Yehova likóbi kokóla mpe kokembisama na lolenge ya nguya,’ mpe bato mingi batiki losambo na bango ya Alatemi, nzambe-mwasi ya engumba. (19:20) Koyokáká nkanda mpo ete balingi kobungisa mombongo na bango, batúli bikeko ya losambo na palata bakɔtisi engumba kati na yikiyiki monene na boye ete kopanza bibele yango ya bato ekamati ngonga mingi. Mwa moke na nsima, Paulo alongwi wana mpo na kokende na Makedonia mpe na Grèce, kotaláká bandimi nzelanzela.
26. (a) Likamwisi nini Paulo asali na Toloa? (b) Toli nini apesi na bankulutu ya Efese?
26 Paulo afandi sanza misato na Grèce liboso ya kozonga na nzela ya Makedonia, epai kuna Luka azwani na ye. Bakatisi kino Toloa, mpe kuna, ntango Paulo azali kosala lisukúlu na butu, elenge mobali moko ayoki mpɔngi mpe akwei longwa na lininisa ya mokili (étage) ya misato. Balɔkɔti ye ebembe, kasi Paulo azongisi ye na bomoi. Mokolo molandi, Paulo mpe etuluku na ye balongwi wana mpo na kokende na Milete, epai kuna Paulo afandi moke mpo na kosala likita elongo na bankulutu ya Efese, ntango azalaki kokende na Yelusaleme. Ayebisi bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Boye, bazalaki na ntango ya kolekisa te mpo na kozwa mokumba ya kokamba etongá ya Nzambe, ‘oyo kati na yango elimo santu esili kopona bango bakɛngɛli’! Akundweli bango ndakisa oyo apesaki epai na bango, mpe alendisi bango ete bázala na bokɛngi mpe bátika te komipesa mpo na bandeko. (20:28) Atako akebisami ete atya lokolo na Yelusaleme te, Paulo azongi nsima te. Baoyo bazalaki elongo na ye bandimi, kolobáká ete: “Mokano na Nkolo [“Yehova,” NW] esalama.” (21:14) Yakobo mpe bankulutu basepeli mingi ntango Paulo ayebisi bango lolenge Nzambe apamboli mosala na ye epai na mabota.
27. Lolenge nini Paulo ayambami na tempelo?
27 Kokangama mpe kosambisama ya Paulo (21:27–26:32). Ntango Paulo akómi na tempelo na Yelusaleme, bayambi ye na lolenge mabe. Bayuda oyo bautaki na Azia bapusi engumba mobimba na kosala ye mabe, kasi basodá Baloma bayei kobikisa ye bobele na ntango oyo Bayuda bakómaki pene na kosala ye mabe.
28. (a) Motuna nini Paulo abimisi liboso na Sanedrina, mpe yango ememi likambo nini? (b) Na nsima, atindami wapi?
28 Ntina ya yikiyiki wana ezali nini? Paulo yango azali nani? Mabe nini asali? Komandá ya basodá, oyo azalaki komituna, alingi azwa biyano na mituna yango. Lokola azalaki mwana-mboka to sitwayé ya Loma, Paulo abikisami longwa na kobɛtama fimbo mpe amemami liboso ya Sanedrina. Ah, esambiselo oyo esangisi Bafalisai mpe Basadukai! Bongo, Paulo abimisi motuna motali lisekwa, mpe yango ememi bango na bokabwani bamoko na bamosusu. Wana kowelana eyei makasi, basodá Baloma bakamati Paulo na makasi longwa na ntéi ya Sanedrina, mpamba te soki atikali wana Bayuda bakokata ye bitenibiteni. Na lolenge ya kobombama, batindi ye na butu epai na Guvernere Feliki, kuna na Kaisalia, elongo na ebele ya basodá.
29. Wana afundami ete azali kokɔtisa botomboki, masambisi nini Paulo azwi, mpe asɛngi likambo nini?
29 Ntango bafundi na ye balobi ete azali kokɔtisa botomboki, Paulo asambi mpo na ye moko na lolenge lobongi mpenza liboso na Feliki. Kasi Feliki aboyi kotika Paulo kokanisáká ete bakopesa ye mosolo ya kanyaka mpo na kosikola ye. Mbula mibale eleki. Pɔlɔki Fesete akitani Feliki lokola guvernere, mpe asɛngi ete básambisa lisusu Paulo. Na mbala oyo mpe, afundami na bifundeli minene, mpe lokola momeseno, Paulo amimonisi ete asali ata mabe moko te. Kasi Fesete, kolukáká ete Bayuda bálinga ye, atindi lisusu ete básambisa Paulo liboso na ye na Yelusaleme. Na bongo, Paulo alobi: “Nasɛngi ete násamba liboso na Kaisala!” (25:11, NW) Mikolo mingi mileki. Na nsima, Mokonzi Elode Akalipa II ayei kotala Fesete, mpe Paulo amemami lisusu na ndako ya kosambisama. Matatoli na ye mazalaki na nguya mpe na kondimisa na boye ete Akalipa apusami na koloba maloba malandi: “Olingi kondimisa ngai na ntango mokuse ete nasala mosala na Moklisto!” (26:28) Akalipa mpe andimi ete Paulo asalaki mabe moko te mpe ete akokaki kobimisama soki asɛngaki te ete asamba liboso na Kaisala.
30. Makambo nini mabimaki na mobembo ya Paulo kino Melita?
30 Paulo akei na Loma (27:1–28:31).g Mokangami Paulo elongo na basusu bamemami na masuwa mpo na eteni ya liboso ya mobembo na Loma. Lokola mipɛpɛ mizali kouta epai masuwa mazali kokende, botamboli ezali kosalema malɛmbɛmalɛmbɛ. Na libóngo ya Mula, bakɔti na masuwa mosusu. Ntango bakómi na libóngo Bisɛmɛlo-Kitoko, na Kelete, Paulo amonisi ete ezali malamu bálekisa eleko ya mpiɔ kuna, kasi bato mingi oyo bazalaki wana bamoni malamu kokóba mobembo na masuwa. Bobele ntango balongwi na libóngo, mopɛpɛ moko makasi ezwi bango mpe ememi bango na lolenge ya nsɔ́mɔ. Nsima ya pɔ́sɔ mibale, masuwa na bango ekatani bitenibiteni likoló ya zɛlo na bokúla ya esanga Melita. Na boyokani na maloba ya koyikisa mpiko oyo Paulo alobaki liboso, moko te kati na bato yango 276 abungisi bomoi na ye! Bafándi na Melita bamonisi boboto moko monene, mpe na boumeli ya eleko wana ya mpiɔ, Paulo abikisi mingi kati na bango na nguya ya bikamwiseli ya elimo ya Nzambe.
31. Lolenge nini Paulo ayambami ntango akómi na Loma, mpe amikɔtisi na mosala nini kuna?
31 Na eleko ya ebandeli ya molungé oyo elandaki, Paulo akómi na Loma mpe bandeko bayei na nzela mpo na kokutana na ye. Ntango Paulo amoni bango, ‘akumisi Nzambe mpe ayikisami mpiko.’ Atako Paulo azali naino mokangami, nzokande apesameli lotómo ya kofanda na ndako na ye moko ya kofutela elongo na sodá-mokɛngɛli. Luka asukisi lisoló na ye na kolobeláká lolenge Paulo azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya kotala ye mpe lolenge azalaki ‘koteya bokonzi ya Nzambe epai na bango mpe kolakisa na polele nyonso makambo matali Nkolo Yesu Klisto, kozanga kopekisama.’—28:15, 31.
LITOMBA NA YANGO
32. Liboso mpe na ntango ya Pantekote, ndenge nini Petelo amonisi bosolo ya Makomami ya Liebele?
32 Mokanda ya Misala mozali kobakisa litatoli mosusu likoló na oyo ya masoló ya Baevanzile na likambo litali bosolo mpe kopemama ya Makomami ya Liebele. Wana Pantekote ebɛlɛmaki, Petelo atángaki kokokisama ya bisakweli mibale ete “elimo santu elobaki liboso na monɔkɔ ya Davidi na ntina na Yuda.” (Mis. 1:16, 20, NW; Nz. 69:25; 109:8) Petelo ayebisaki lisusu bibele na bato oyo batondaki na kokamwa na mokolo ya Pantekote ete bazalaki mpenza kotatola kokokisama ya esakweli oyo elandi: “Oyo [makambo] elobamaki na monɔkɔ na mosakoli Yoele.”—Mis. 2:16-21; Yoe. 2:28-32; kokanisá lisusu Misala 2:25-28, 34, 35 na Nzembo 16:8-11 mpe 110:1.
33. Lolenge nini Petelo, Filipo, Yakobo mpe Paulo bamonisi bango nyonso ete Makomami ya Liebele mapemami?
33 Mpo na kondimisa ebele mosusu ya bato oyo bazalaki na libándá ya tempelo, Petelo asalelaki lisusu Makomami ya Liebele, libosoliboso atángaki maloba ya Mose mpe na nsima alobaki ete: “Mpe basakoli nyonso, solo mpenza, bandá na Samwele mpe baoyo bayei na nsima, baoyo nyonso balobaki, basakolaki mpe mikolo oyo polelepolele.” Na nsima, wana azalaki liboso na Sanedrina, Petelo atángaki maloba ya Nzembo 118:22 na komonisáká ete Klisto, libanga oyo bango babwakaki, akómaki “motó ya litúmu.” (Mis. 3:22-24, NW; 4:11, NW) Filipo alimbolaki epai na mokube Moetiopia lolenge Yisaya 53:7, 8 ekokisamaki, mpe wana angɛngisamaki na likambo yango, mokube wana asɛngaki na komikitisa nyonso ete abatisama. (Mis. 8:28-35) Bobele bongo, ntango azalaki koloba epai na Korneye na ntina na Yesu, Petelo ayebisaki ete: “Basakoli nyonso bazali kopesa litatoli na ntina na ye.” (10:43, NW) Ntango likambo ya kokatama ngenga lizalaki kotalelama, Yakobo akembisaki lisusu ekateli na ye na kolobáká ete: “Maloba na basakoli mandimani mpe na likambo oyo pelamoko esili kokomama.” (15:15-18) Bobele biutelo wana bisalelamaki mpe na ntoma Paulo. (26:22; 28:23, 25-27) Likambo oyo ete bayekoli mpe bayoki na bango bandimi kozanga nkaká ete Makomami ya Liebele mazali eteni ya Liloba ya Nzambe, epesi elembeteli ya sikisiki ete makomi yango mapemamaki solo.
34. Mokanda ya Misala momonisi nini na ntina na lisangá ya boklisto, mpe yango ekeseni nde na ntango na biso?
34 Mokanda ya Misala mozali na litomba monene mpamba te momonisi lolenge lisangá ya boklisto libandaki mpe lolenge likólaki na nsé na nguya ya elimo santu. Kati na lisoló yango ya nguya, tozali komona bokóli bouti na mapamboli ya Nzambe, mpiko mpe esengo ya baklisto ya liboso, etɛlɛmɛlo malamu na bango liboso ya minyoko, mpe ezaleli na bango ya kozala ntango nyonso pene mpo na kosala, lokola yango emonisami na ndakisa ya Paulo ntango ayanolaki na libyangi ya kokɔta na mosala ya kosakola na mboka ya bapaya mpe kokende na Makedonia. (4:13, 31; 15:3; 5:28, 29; 8:4; 13:2-4; 16:9, 10) Lisangá ya boklisto lelo ezali mpe bongo, mpamba te ekangisami na bolingo, bomoko, mpe boluki ya litomba bobele moko, wana yango ezali kolobela ‘misala ya kokamwa ya Nzambe’ na nsé na litambwisi ya elimo santu.—2:11, 17, 45; 4:34, 35; 11:27-30; 12:25.
35. Lolenge nini mokanda ya Misala momonisi lolenge litatoli lisengeli kopesama, mpe ezaleli nini elobelami makasi mpo na mosala ya kosakola?
35 Mokanda ya Misala mozali mpenza komonisa lolenge mosala ya boklisto motali kosakola Bokonzi ya Nzambe mosengeli kosalema. Paulo ye moko azalaki ndakisa mpe alobaki ete: “Namipekisaki te na koyebisa bino makambo manso oyo mazalaki na litomba mpo na bino mpe na koteya bino na bisika ya bato mingi mpe na ndako na ndako.” Na nsima, akóbi na kolobáká ete: “Natatolaki na bozindo.” Motó na likambo oyo ete ‘litatoli mozindo’ ezali kobenda likebi na biso kati na mokanda yango mobimba, mpe ebendi lisusu likebi makasi kati na baparagrafe ya nsuka, epai kuna komipesa ya Paulo na motema mobimba kati na mosala na ye ya kosakola mpe ya koteya, ata na nsé na bipekiseli ya bolɔ́kɔ, emonisami polele; mpo na yango maloba malandi malobi ete: “Mpe alimbwelaki bango likambo yango, kobanda ntɔ́ngɔ́ kino mpokwa, na kopesáká litatoli mozindo na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe na kosaleláká maloba na kondimisa elongo na bango na ntina na Yesu, uta na mibeko na Mose mpe na Basakoli.” Tiká ete biso mpe tózala ntango nyonso na ezaleli ya motema motindo moko kati na mosala na biso ya Bokonzi!—20:20, 21, NW; 28:23; 2:40, NW; 5:42, NW; 26:22, NW.
36. Toli malamu nini ya Paulo etaleli makasi mpenza bakɛngɛli na mikolo na biso?
36 Lisukúlu oyo Paulo asalaki liboso na bankulutu ya Efese lizali na batoli mingi ya malamu mpo na bakɛngɛli na mikolo na biso. Lokola bango baponami na elimo santu, ezali likambo ya ntina ete ‘bákeba na ntina na bango moko mpe na ntina na etongá,’ kokambáká yango na makambo makasi te mpe kobateláká yango liboso na bankoi mabe oyo bazali koluka kobebisa yango. Oyo nde mokumba monene! Bakɛngɛli basengeli ntango nyonso kozala na bokɛngi mpe komitonga bango mpenza na liloba ya ngɔlu ya Nzambe. Wana bazali kosala makasi mpo na kosunga baoyo balɛmbi, bakɛngɛli ‘basengeli kobatela kati na makanisi na bango maloba ya Nkolo Yesu, wana ye moko alobaki ete, Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.’—20:17-35.
37. Na maloba nini kitoko ya kondimisa Paulo amemi bato na kokanga ntina ya lisukúlu na ye na Ngomba na Ale?
37 Masukúlu mosusu ya Paulo mazali mpe komonisa polele mitindá ya Biblia. Na ndakisa, tokoki kolobela maloba kitoko ya kondimisa oyo asalelaki kati na lisukúlu na ye liboso na Bastoisyɛ́ mpe Baepikiryɛ́ likoló na Ngomba na Ale. Libosoliboso, atángi maloba oyo makomamaki likoló na etumbelo, ete “Epai na Nzambe oyo ayebani te,” mpe asaleli yango lokola ntina mpo na ye ya kolimbola ete Nzambe bobele moko ya solo, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, oyo azalisaki mabota nyonso ya bato longwa na moto moko, “azali mosika na moko na moko na biso te.” Na nsima atángi maloba ya bato na bango ya ntɔ́ki, oyo ete “Mpamba te tozali mpe libota na ye,” atángi yango mpo na komonisa ete ezali likambo ya nsɔ́ni na kokanisa ete bautaki na bikeko bizangi bomoi oyo bisalami na wolo, na palata, to na mabanga. Na lolenge yango, Paulo amonisi na bokɛngi nyonso bokonzi monene ya Nzambe na bomoi. Ezali bobele kati na maloba na ye ya nsuka nde abimisi motuna ya lisekwa, mpe ata na ntango yango atángi nkombo ya Klisto te. Amemaki bato na kokanga ntina ya likanisi na ye litali lotómo oyo Nzambe bobele moko ya solo azali na yango ya kozala mokonzi, mpe na yango bamoko bakómaki bandimi.—17:22-34, NW.
38. Mapamboli nini makouta na lolenge ya boyekoli oyo mokanda ya misala ezali kolendisa?
38 Mokanda ya Misala mozali kolendisa ezaleli ya koyekola “Makomami nyonso” na molende mpe kozanga kotika. Ntango Paulo ateyaki mpo na mbala ya liboso na Beloya, Bayuda oyo bazalaki kuna bakumisamaki ete bazalaki “bato na makanisi malamu” mpamba te “bayambi Liloba na mposa mingi, mpe batángi Makomi mokolo na mokolo, kotala soko makambo yango mazali boye.” (17:11) Lelo oyo, lokola na ntango ya kala, kolukaluka na mposa makasi kati na Makomami, elongo na lisangá oyo litondi na elimo ya Yehova, ekomema mapamboli oyo: kondimisama mpe kondima oyo ekoki koningana te. Ezali na kosaláká boyekoli motindo wana nde moto akoki kozwa bososoli ya polele ya mitindá ya Nzambe. Mwa ndambo ya mitindá kitoko wana emonisami kati na Misala 15:29. Kuna, lisangani ya mikóló-bakambi, oyo esangisaki bantoma mpe bandeko oyo bazalaki bankulutu na Yelusaleme, eyebisaki ete atako kokatama ngenga ezalaki lisɛngami te mpo na Yisalaele ya elimo, nzokande losambo ya bikeko, makila, mpe pite epekisamaki makasi.
39. (a) Lolenge nini bayekoli balendisamaki na koyika mpiko liboso ya minyoko? (b) Litatoli nini ya mpiko bapesaki? Yango ebimisaki matomba?
39 Bayekoli wana ya liboso bayekolaki mpenza Makomami mpe bakokaki kotánga maloba na yango mpe kosalela yango na ntango mposa emonanaki. Balendisamaki na nzela ya boyebi ya sikisiki mpe na nzela ya elimo ya Nzambe mpo na koyika mpiko liboso na minyoko makasi. Petelo mpe Yoane batikelaki baklisto nyonso ya sembo ndakisa malamu ntango balobaki na mpiko nyonso epai na bakonzi oyo bazalaki kotɛmɛla bango ete: “Soko ezali sembo na miso na Nzambe ete tóyoka bino liboso na koyoka Nzambe, bókata likambo yango. Kasi mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te.” Mpe ntango bamemamaki lisusu liboso ya Sanedrina, oyo epesaki bango ‘epekiseli makasi’ ete bákóba te koteya na nkombo ya Yesu, balobaki kozanga kokakatana ete: ‘Tosengeli kotosa Nzambe lokola mokonzi, na esika ya kotosa bato.’ Maloba wana ya kozanga kobanga mapesaki litatoli malamu epai na bakonzi, mpe mamemaki Gamaliele, molakisi ya lokumu ya Mibeko, na koloba maloba na ye oyo mayebani mingi, mpo na kokɔtela bonsomi ya losambo, oyo esalaki ete bantoma oyo bakangamaki bákoka kotikama.—4:19, 20; 5:28, 29, 34, 35, 38, 39.
40. Bopusi nini tozwi uta na mokanda ya Misala na likambo litali kopesa litatoli mozindo na ntina na Bokonzi?
40 Mokano monene ya Yehova oyo motali Bokonzi na ye, mpe mokokani na nsinga ya wolo oyo ezali kokatisa uta na ebandeli kino nsuka ya Biblia, mozali komonana na lolenge ya polele mpenza kati na mokanda ya Misala. Na ebandeli na yango, Yesu amonisami na boumeli ya mikolo 40 liboso ya komata na ye, ‘koyebisáká makambo matali bokonzi ya Nzambe.’ Ezalaki mpo na koyanola na motuna ya bayekoli na ye na ntina na kozongisama ya Bokonzi nde Yesu ayebisaki bango ete basengelaki liboso kozala batatoli na ye kino eteni eleki mosika na mabelé. (1:3, 6, 8) Kobandáká na Yelusaleme, bayekoli basakolaki Bokonzi na mpiko makasi. Minyoko misalaki ete Setefano abomama na mabanga mpe ete mingi kati na bayekoli bápalangana kati na bateritware ya sika. (7:59, 60) Ekomami ete Filipo asakolaki ‘nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe’ na bolóngi mingi kati na Samalia mpe ete Paulo, elongo na basalani na ye, basakolaki “Bokonzi” na Azia, na Kolinti, na Efese mpe na Loma. Baklisto nyonso wana ya liboso bapesaki ndakisa malamu na likambo litali kotya elikya makasi epai na Yehova mpe na lisungi ya elimo na ye. (8:5, 12; 14:5-7, 21, 22; 18:1, 4; 19:1, 8; 20:25; 28:30, 31) Komonáká molende mpe mpiko makasi na bango, koyebáká lolenge Yehova asopaki mapamboli mingi likoló na milende na bango, biso mpe tozali kopusama na kozala sembo na likambo litali “kopesa litatoli mozindo na ntina na Bokonzi ya Nzambe.”—28:23, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku St. Paul the Traveller, 1895, lokasa 4.
b Etángami kati na Lamuká! ya 22 Yulí 1947, nkasa 22-23 (ebimeli ya Lingelesi); talá mpe Lamuká! ya 8 Augústo 1971, nkasa 28-29 (ebimeli ya Lifalansé).
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 153-154, 734-735; Vol. 2, lokasa 748.
d Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 747.
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 747.
f Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 747.
g Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 750.