Mokanda ya Biblia nimero 58—Baebele
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Loma
Nsuka ya bokomi: soko 61 T.B.
1. Paulo akomaki mokanda na ye epai na Baebele na boyokani na mokumba nini oyo azwaki?
PAULO ayebani mingi lokola ntoma “epai na bapakano.” Kasi mosala na ye mosengelaki kosuka sé epai na bato na mabota? Soko moke te! Liboso ete Paulo azwa batisimo mpe apesamela mokumba ya mosala na ye, Nkolo Yesu alobaki na Anania ete: “Nasili kopona ye [Paulo] na komema nkombo na ngai liboso na bapakano, mpe na mikonzi, mpe na bato na Yisalaele.” (Mis. 9:15; Gal. 2:8, 9) Kokomama ya mokanda ya Baebele ezalaki mpenza na boyokani na etindá oyo Paulo azwaki ete amema nkombo ya Yesu epai na bana na Yisalaele.
2. Ndenge nini bandimbola nyonso epesami mpo na koboya kondima ete Paulo azali mokomi ya mokanda ya Baebele ekweisami?
2 Nzokande, bamoko bazali kotya ntembe ete Paulo azali te mokomi ya mokanda na Baebele. Moko na bantina oyo esali ete báboya kondima likambo yango ezali ete nkombo ya Paulo emonani te kati na mokanda ya Baebele. Kasi yango ezali mpenza ntina ya solosolo te, mpo ete mikanda mosusu ya Makomami mapemami mizali te kotánga nkombo ya bakomi na yango, oyo bayebanaka mbala mingi na bilembeteli oyo bizali kati na mikanda yango. Lisusu, bamoko bazali na mayoki ete Paulo aboyaki, na mokano na ye moko mpenza, kokoma nkombo na ye ntango azalaki kokomela baklisto Baebele oyo bazalaki na Yudea, mpamba te nkombo na ye eyinamaki na Bayuda oyo bazalaki kuna. (Mis. 21:28) Atako ekomeli ezali lolenge moko te na oyo ya mikanda na ye mosusu, nzokande yango ekoki kopekisa biso te na kondima ete Paulo azali mokomi na yango. Ezala ntango azali koloba epai na bapakano, epai na Bayuda to epai na baklisto, Paulo azalaki ntango nyonso komonisa likoki na ye ya kokóma ‘ndenge nyonso epai na bato ya mitindo nyonso.’ Kati na mokanda oyo, makanisi na ye mamonisami epai na Bayuda lokola ete yango eutaki epai na Moyuda, bandimbola oyo bakokaki kososola na bozindo mpe kokanga ntina na yango.—1 Kol. 9:22.
3. Wapi bilembeteli ya kati ya mokanda ya Baebele oyo bizali kondimisa ete Paulo azali mokomi na yango mpe oyo bizali komonisa ete akomaki yango libosoliboso mpo na Bayuda?
3 Makambo nyonso oyo mazali kati na mokanda yango mazali kondimisa mpenza ete Paulo nde akomaki yango. Mokomi na yango azalaki na Italia elongo na Timoté. Makambo yango mazali kokokana mpenza epai na Paulo. (Ebe. 13:23, 24) Lisusu, mateya makokani mpenza na oyo ya Paulo, atako bandimbola emonisami engebene lolenge ya kokanisa ya Bayuda, mpo ete mokanda yango motindamaki mpenza epai na lisangá oyo basangani na yango bazalaki bobele Baebele. Na likambo yango, búku Commentary, oyo ekomamaki na Clarke, volime 6, lokasa 681, elobi boye na ntina na mokanda ya Baebele: “Likambo oyo ete yango ekomamaki mpo na Bayuda, ya kobotama mpenza, lindimisami na lolenge oyo mokanda yango mozali na mobimba na yango. Soki yango ekomamaki mpo na Bapakano, mbɛlɛ ata moto moko te kati na bato nkóto zomi na bango akokaki kososola bandimbola yango, mpamba te bango bamesanaki te na ebongiseli ya Bayuda; mokomi ya mokanda oyo azali komonisa bipai binso ete bato oyo batindamelaki mokanda yango bayebaki ebongiseli ya Bayuda.” Yango ezali kosalisa biso mpo na kolimbola bokeseni oyo ezali kati na ekomeli ya mokanda yango mpe oyo ya mikanda mosusu ya Paulo.
4. Bilembeteli nini mosusu bindimisi ete Paulo azali mokomi ya mokanda ya Baebele?
4 Kokundolama ya papirise Chester Beatty No. 2 (P46) soko na mobu 1930 epesi bilembeteli mosusu oyo bimonisi ete Paulo azalaki mokomi ya mokanda yango. Wana azalaki kopesa ndimbola likoló na codex yango ya papirise, oyo ekomamaki bobele ekeke moko na ndambo nsima na liwa ya Paulo, Sir Frederic Kenyon, ye moto ya mboka Angleterre, alobaki ete: “Esengeli koyeba ete Baebele etyami pene mpenza nsima na Baloma (kotyama yango ekokani mpenza na mosusu te), oyo ezali komonisa ete na ntango ya kala, wana maniskri oyo ezalaki kokomama, moto moko te atyaki ntembe na likambo oyo ete Paulo azali mokomi na yango.”a Bobele na likambo yango moko, búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong elobi na polele nyonso ete: “Ezali ata na elembeteli moko te, ya libándá to ya kati, oyo ekoki kolóngisa moto nyonso oyo akoki komitánga ete akomaki mokanda yango, longola bobele Paulo.”b
5. Lolenge nini makambo mazali kati na Baebele mazali komonisa ete mokanda yango mopemamaki?
5 Longola likambo oyo ete mokanda yango mondimamaki na baklisto ya liboso, makambo oyo mazali kati na Baebele mazali kondimisa ete yango “epemami na Nzambe.” Ezali ntango nyonso kokamba motángi epai na bisakweli ya Makomami ya Liebele, kolobeláká mbala na mbala makomi ya kala, mpe ezali komonisa lolenge bisakweli yango nyonso bikokisamaki epai na Klisto Yesu. Bobele na mokapo ya liboso, soko mikapo nsambo ya Makomami ya Liebele misalelami mpo na komonisa ete Mwana azali sikawa na etɛlɛmɛlo oyo eleki ya baanzelu. Ezali ntango nyonso kokumisa Liloba ya Yehova mpe nkombo na ye, komonisáká Yesu ete azali Mosaleli ya liboso ya bomoi mpe ete Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Klisto ezali elikya bobele moko mpo na bato.
6. Bilembeteli bimonisi nini na ntina na esika mpe ntango ya kokomama ya mokanda ya Baebele?
6 Na oyo etali ntango ya kokomama na yango, esilaki komonisama ete Paulo akomaki mokanda yango wana azalaki na Italia. Mpo na kosukisa mokanda wana, Paulo alobi ete: ‘Bóyeba ete ndeko na biso Timoté asili kokangwa; soko akoya noki, nakomona bino esika moko na ye.’ (13:23) Yango emonisi ete Paulo azalaki komizela na kobimisama nokinoki na bolɔ́kɔ mpe azalaki kolikya ete akokende elongo na Timoté, oyo atyamaki mpe na bolɔ́kɔ kasi asilaki kobimisama. Na yango, mbula ya nsuka ya bolɔ́kɔ ya liboso oyo Paulo asalaki na Loma emonisami ete ezalaki ntango ya kokomama ya mokanda ya Baebele, elingi koloba mobu 61 T.B.
7. Botɛmɛli ya lolenge nini baklisto Bayuda oyo bazalaki na Yelusaleme bakutanaki na yango, mpe bazalaki na mposa ya nini?
7 Na boumeli ya ntango ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya Bayuda, eleko moko ya komekama makasi ekwelaki baklisto Baebele na Yudea mpe mingimingi baoyo bazalaki na Yelusaleme. Na bokóli mpe bopalangani ya nsango malamu, Bayuda bakómaki na nkanda makasi mpe na bindimandima ya koleka ndelo kati na botɛmɛli na bango liboso na baklisto. Bobele mwa bambula moke liboso, komonana mpamba ya Paulo na Yelusaleme ebimisaki yikiyiki monene, mpe Bayuda oyo bamipesaki na makambo ya losambo bangangaki na mongongo makasi ete: “Longolá moto na motindo boye na mokili! Ebongi kotika ye na bomoi te!” Bayuda koleka 40 balapaki ndai ete bakolya te mpe bakomela te kino bakoboma ye, mpe yango esɛngaki etuluku monene ya basodá oyo bazalaki na mindoki mpo na komema ye na butu kino na mboka Kaisalia. (Mis. 22:22; 23:12-15, 23, 24) Kati na ezalela yango ya bindimandima ya lingomba mpe ya koyina baklisto, lisangá lisengelaki kozala makasi, kosakola mpe komibatela ngwi kati na kondima. Basengelaki kozwa boyebi mpe bososoli malamu ya lolenge oyo Klisto akokisaki Mibeko mpo ete bákoka te kokwea lisusu kati na losambo ya Bayuda mpe na botosi na yango ya Mibeko ya Mose, kopesáká mbeka ya banyama, makambo nyonso oyo matikalaki bobele milulu mpamba.
8. Mpo na nini Paulo azalaki mpenza na makoki malamu mpo na kokoma mokanda ya Baebele, mpe kolandana nini ya maloba ya kondimisa apesi?
8 Ezali na moto mosusu te oyo akokaki kososola malamu, koleka Paulo, bopusi mpe minyoko oyo baklisto Bayuda batyamaki liboso na yango. Longola Paulo oyo azalaki Mofalisai na kala, ezalaki na moto mosusu te oyo akokaki kopesa bango bandimbola ya nguya mpe maloba mabongi mpo na kokweisa mateya ya bonkɔ́kɔ ya Bayuda. Kosaleláká boyebi na ye monene ya Mibeko ya Mose, oyo ayekolaki epai na Gamaliele, apesaki bilembeteli ya solosolo ete Klisto azali kokokisama ya Mibeko, ya mitindá na yango mpe ya bambeka na yango. Amonisaki lolenge makambo nyonso wana matikaki esika na makambo ya solosolo oyo matondi na nkembo, oyo mazali komema matomba minene na nsé na kondimana moko ya sika mpe ya malamu koleka. Elimo na ye ya molende etandaki bilembeteli moko nsima na mosusu kati na ekomeli ya polele mpe ya kondimisa: Kosuka ya kondimana ya kala mpe koya ya kondimana ya sika, bonganga ya Klisto oyo boleki bonganga ya Alona, motuya ya solosolo ya mbeka ya Klisto ntango tokokanisi yango na makabo ya bangɔmbɛ mpe bantaba, kokɔta ya Klisto kati na makoló epai na Yehova na esika ete akɔta na hema mpamba oyo ezali awa na mabelé—mateya nyonso wana ya sika mpe ya kobenda likebi, oyo mayinamaki makasi mpenza na Bayuda oyo bazangaki kondima, mamonisamaki epai na Baklisto Baebele na bilembeteli mingi oyo biutaki na Makomami ya Liebele, na boye ete Moyuda nyonso oyo azalaki na makanisi mabongi akokaki te kozanga kondimisama na yango.
9. Na nini mokanda ya Baebele mokómaki ebundeli moko ya nguya, mpe na lolenge nini yango ezalaki komonisama ya bolingo ya Paulo?
9 Na nzela ya mokanda oyo, baklisto Baebele bazwaki ebundeli ya sika mpe ya nguya mpo na kokanga monɔkɔ ya Bayuda banyokoli, mpe bazwaki bindimiseli malamu oyo bakokaki kosalela mpo na kondimisa mpe kobongola Bayuda ya motema sembo oyo bazalaki koluka solo ya Nzambe. Mokanda yango mozali komonisa bolingo mozindo oyo Paulo azalaki na yango mpo na baklisto Baebele mpe mposa makasi oyo azalaki na yango mpo na kosunga bango na lolenge lobongi na ntango bazalaki na bosɛngá makasi.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BAEBELE
10. Maloba ya ebandeli ya mokanda ya Baebele emonisi nini na ntina na etɛlɛmɛlo ya Klisto?
10 Etɛlɛmɛlo ya Klisto oyo etombwami (1:1–3:6). Maloba ya ebandeli matye likebi mobimba likoló na Klisto: “Kalakala Nzambe asololaki na bankɔ́kɔ na minɔkɔ na basakoli na mbala mingi mpe na mitindo mingi. Na mikolo oyo na nsuka asololi na biso kati na Mwana.” Mwana yango aponami Mosangoli na biloko nyonso mpe azali elilingi ya nkembo ya Tata na ye. Lokola asili kopɛtola masumu na biso, sikawa “afandi na lobɔkɔ na mobali na Nkembo kuna na likoló.” (1:1-3) Paulo atángi mokapo moko nsima na mosusu mpo na komonisa ete Yesu atombwami koleka baanzelu.
11. (a) Mpo na nini Paulo apesi toli ete tótya likebi mingi na makambo oyo toyokaki? (b) Na ntina na boyebi na ye ya makambo mingi mpe na etɛlɛmɛlo na ye, Yesu azali na makoki ya kokokisa makambo nini?
11 Paulo akomi ete ‘ekoki na biso kotya likebi mingi koleka.’ Mpo na nini bongo? Paulo alobi boye, mpo ete soki ezalaki na etumbu makasi mpo na kozanga botosi na “liloba lisakolami na minɔkɔ na baanzelu . . . biso mpenza tokokima boni soko tokotya mitema [“likebi,” NW] na lobiko monene boye te? Esakolami liboso na Nkolo.” Nzambe akitisaki “Mwana na moto” mwa moke na nsé na baanzelu, kasi sikawa tozali kotala Yesu yango, oyo “alati motole na nkembo mpe lokumu ete alɛtɛla bato nyonso kufa na ntina na ngɔlu na Nzambe.” (2:1-3, 6, 9) Na kokambáká bana mingi ete bázwa nkembo, Nzambe akómisaki naino Mosaleli ya liboso ya lobiko na bango ‘moto ya kokoka na nzela na mpasi.’ Ye azali oyo akobebisa Zábolo nyɛɛ mpe akokangola “nyonso baoyo bakómi baombo kino mikolo nyonso na bomoi na bango mpo na kobanga kufa.” Boye, Yesu akómi “Nganga monene na mawa mpe na sembo.” Mpe likambo ya esengo mpenza, lokola ye moko anyokwamaki na nsé na komekama, “ayebi kosunga bamekami.” (2:10, 15, 17, 18) Na yango, Yesu atángami ete abongi mpenza na nkembo koleka Mose.
12. Etamboli nini baklisto basengeli kopɛngola soki balingi kokɔta na epemelo ya Nzambe?
12 Kokɔta na epemelo ya Nzambe na nzela ya kondima mpe botosi (3:7–4:13). Baklisto ya mabota nyonso basengeli kozwa likebisi uta na ndakisa ya kozanga bosembo ya Bayisalaele, mpo ete bákólisa te ‘motema mabe mpe na kozanga kondima ete bátangwa te na Nzambe na bomoi.’ (Ebe. 3:12; Nz. 95:7-11) Na ntina na kozanga botosi mpe na kozanga kondima, Bayisalaele oyo babimaki na Ezipito bakɔtaki na epemelo ya Nzambe te, to Sabata, oyo na boumeli na yango Nzambe asukisaki misala ya bozalisi oyo mitali mabelé. Nzokande, Paulo alimboli ete: “Bongo epemelo na sabata etikali mpo na bato na Nzambe. Mpo ete ye oyo akoingela na epemelo na Nzambe akopema nsima na misala na ye, pelamoko ezalaki Nzambe kopema nsima na yango na ye mpenza.” Ndakisa ya kozanga botosi oyo Yisalaele emonisaki esengeli kopɛngolama. “Zambi Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali mpe na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. . . . Ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.”—Ebe. 4:9, 10, 12.
13. (a) Ndenge nini Yesu akómaki “nganga libela,” Mosaleli ya liboso ya lobiko ya seko? (b) Mpo na nini Paulo alendisi Baebele ete bákóla nokinoki kino kokóma bato bakɔmeli?
13 Botaleli bokɔmeli likoló na bonene ya bonganga ya Klisto (4:14–7:28). Paulo alendisi Baebele ete bákóba kosakola Yesu, Nganga aleki Monene oyo akɔtaki na makoló, ete bákoka kozwa ngɔlu. Klisto amikumisaki ye moko te, kasi ezalaki Tata nde alobaki ete: “Yo nganga libela, kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke.” (Ebe. 5:6; Nz. 110:4) Libosoliboso, Klisto akómisamaki moto ya kokoka mpo na kozwa etɛlɛmɛlo ya nganga monene na ndenge ayekolaki botosi na nzela na minyoko, na ntina ete akóma eutelo na lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso bazali kotosa ye. Paulo azali na “maloba mingi, nde ezali na mpasi koloba,” kasi, wana basengelaki mpenza kozala balakisi, Baebele bamimonisaki ete bazalaki naino bana mike oyo bazali na mposa na miliki. “Bilei makasi izali mpo na bato bakómi minene [“bakɔmeli,” NW]; mpo na bango basili kolakisa esoswelo na bango kokabola kati na malamu mpe mabe.” Ntoma alendisi bango ete ‘báleka nokinoki kino kokóma bato bakɔmeli.’—Ebe. 5:11, 14; 6:1.
14. Ndenge nini bandimi bakoki kosangola elaka, mpe lolenge nini elikya na bango ezwi moboko ya solo?
14 Ekoki kosalema te mpo na baoyo bayebaki liloba ya Nzambe mpe bapɛngwi ete bázongisama lisusu na kobongola motema ‘mpo [ete] bazali kobakisa lisusu Mwana na Nzambe na nzeté na mpasi mpe bazali kotyola ye.’ Bobele na nzela na kondima mpe na motema pɛtɛɛ nde bandimi bakoki kosangola elaka oyo epesamaki epai na Abalayama—elaka oyo endimisami mpe etɛlɛmisami ngwi na nzela na biloko mibale oyo bikoki kobongwana te: Liloba ya Nzambe mpe ndai na ye. Elikya na bango, oyo ezali lokola “longo na motema, ekobukana te, ekotambola mpe te,” etyami na bokɔti ya Yesu “na nsima na Elamba” lokola Moto na Liboso mpe Nganga Monene engebene lolenge ya Melikisedeke.—6:6, 19.
15. Nini emonisi ete bonganga ya Yesu, na motindo na Melikisedeke, esengelaki koleka oyo ya Levi?
15 Melikisedeke yango azalaki “mokonzi na Saleme” mpe “nganga na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.” Kútu Abalayama, motó na libota, afutaki ndambo na zomi epai na ye, mpe na nzela na ye Levi, oyo azalaki naino kati na bangɛi ya Abalayama, afutaki mpe ndambo na zomi. Na bongo, mapamboli ya Melikisedeke epai na Abalayama makómaki kino epai na Levi oyo abotamaki naino te, mpe yango emonisaki ete bonganga ya Levi ezalaki na nsé na oyo ya Melikisedeke. Lisusu, soki ezaleli ya kokoka eyaki na nzela ya bonganga ya Levi oyo etambwisamaki na Alona, tolingaki nde kozala na mposa ya nganga mosusu “oyo na molɔngɔ́ na Melikisedeke”? Epai mosusu, lokola bonganga bosɛnzami, “ebongi ete Mibeko misɛnzama mpe lokola.”—7:1, 11, 12.
16. Mpo na nini bonganga ya Yesu eleki bonganga oyo ezalaki na nsé ya Mibeko?
16 Mibeko mikómisaki ata eloko moko te na ezaleli ya kokoka, kasi mimonanaki nde na bolɛmbu mpe na kozanga nguya. Lokola bazalaki ntango nyonso kokufa, banganga na yango bazalaki ebele, kasi Yesu “asimbi mosala mokosɛnzama te mpo ete ye akoumela seko. Bongo ayebi kobikisa bango bakobɛlɛma na Nzambe na nzela na ye, awa ezali ye na bomoi libela ete abondela mpo na bango.” Nganga Monene yango, Yesu, azali “bulɛɛ, na lofundo te, na litɔnɔ te, oyo atangolami na bato na masumu,” nzokande banganga minene oyo bapakolamaki na nsé na Mibeko bazalaki na bolɛmbu, kopesáká naino mbeka mpo na masumu na bango moko liboso ya kobondela mpo na basusu. Na yango, liloba ya ndai oyo Nzambe alapaki “ezali kotya Mwana oyo abongi na malamu nyonso seko na seko.”—7:24-26, 28.
17. Na nini kondimana ya sika eleki oyo ya kala?
17 Kondimana ya sika eleki oyo ya liboso (8:1–10:31). Yesu amonisami ete “azwi mosala moleki yango na liboso na malamu pelamoko kondimana ebongisi ye ezali koleka mpe, awa ezali yango kokangama na bilaka bileki malamu.” (8:6) Paulo atángi na mobimba mpenza maloba ya Yilimia 31:31-34, komonisáká ete, mpo na baoyo bazali kati na kondimana ya sika, mibeko ya Nzambe mikomami kati na makanisi mpe mitema na bango, ete banso báyeba Yehova, mpe ete Yehova ‘ayokela mabungá na bango mawa mpe akanisa yango lisusu te.’ “Kondimana na sika” yango ekómisi mpamba oyo na kala (kondimana ya Mibeko), oyo ekómi “penepene na kolimwa.”—Ebe. 8:12, 13.
18. Bokokanisi nini Paulo asali likoló na makambo matali mbeka kati na kondimana wana mibale?
18 Paulo alobeli mbeka oyo izalaki kopesama mbula na mbula na hema ya kondimana ya kala ete izalaki “mibeko . . . milakami kino elaka na ebongiseli.” Nzokande, ntango Klisto ayaki lokola Nganga Monene, apesaki makila na ye moko ya motuya, kasi makila ya bantaba te to ya bana na ngɔmbɛ mpe te. Komwangisama ya makila ya banyama oyo ezalaki kosalema na nsé na ebongiseli na Mose epesaki motuya na kondimana ya kala mpe epɛtolaki hema ya elilingi, kasi mbeka ya malamu koleka isengelamaki mpo na makambo ya likoló oyo matali kondimana ya sika. “Zambi Klisto asili koingela na Esika na bulɛɛ etongami na mabɔkɔ te, yango elilingi na oyo na solo, kasi aingeli kati na Likoló mpenza; sasaipi azali komonana liboso na Nzambe mpo na biso.” Klisto azali ata na mposa moke te ya kopesa mbeka mbula na mbula, lokola nganga monene na Yisalaele azalaki kosala yango, mpamba te “sasaipi amonani na nsuka na ekeke mbala moko mpo na libela ete alongola masumu na nzela na kotombola ye moko mbeka.”—9:10, 24, 26.
19. (a) Mibeko mikokaki te kosala nini, mpe mpo na nini? (b) Mokano ya Nzambe mozali nini na ntina na kosantisama?
19 Na mokuse, Paulo alobi ete lokola “Mibeko izali bobele elilingi na makambo malingi koya,” mbeka na yango ya mbala na mbala izalaki na makoki te ya kolongola “lisosoli ya masumu, NW.” Nzokande, Yesu ayaki na mokili mpo na kosala mokano ya Nzambe. Paulo alobi ete: “Na mokano yango tosili kobulisama mpo na kotombwa na nzoto na Yesu Klisto lokola mbeka mbala moko mpo na libela.” Na yango, tiká ete Baebele básimba ngwi eyambweli ya kondima na bango liboso na bato banso kozanga koningana mpe ‘kotalana bamoko na basusu mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu,’ kotikáká te koyangana elongo moko. Soki balandi kosala masumu na nkó nyonso nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, “mbeka mpo na masumu ezali lisusu te.”—10:1, 2, 10, 24, 26.
20. (a) Kondima ezali nini? (b) Paulo alobeli bandakisa nini ya kondima oyo ezali kosepelisa?
20 Kondima elimbolami mpe emonisami (10:32–12:3). Sikawa, Paulo ayebisi Baebele ete: “Bókanisa lisusu mikolo na liboso ete wana esili bino kongɛngɛlama na moi, boyikaki mpiko kati na bolózi monene.” Tiká ete bábwaka te bonsomi na bango ya maloba, oyo ezali na mbano monene, kasi tiká ete báyika mpiko mpo na kozwa kokokisama ya elaka mpe ‘kozala na kondima mpo na kobatela molimo ete motikala na bomoi.’ Kondima! Ɛɛ, yango ezali eloko oyo esengeli. Libosoliboso, Paulo apesi ndimbola na yango ete: “Kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” Na nsima, kati na mokapo moko ya kolamwisa mayoki mpenza, alobeli na kolandana ya penepene bandakisa mokuse ya bato ya kala oyo bazalaki na bomoi, oyo basalaki mosala, oyo babundaki liboso na mikakatano, oyo bayikaki mpiko mpe oyo bakómaki basangoli na boyengebene na nzela ya kondima. “Mpo na kondima” Abalayama, oyo azalaki kofanda na hema elongo na Yisaka mpe Yakobo, azalaki kozela “mboka oyo ezali na miboko,” oyo Nzambe azali Motongi na yango. “Mpo na kondima” Mose akóbaki kotɛlɛma ngwi, “lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” Paulo atuni ete: “Naloba makambo mosusu nini? Zambi ntango ezangeli ngai kosolola makambo na Gideona, na Balaka, na Samasona, na Yefeta, na Davidi, na Samwele, na basakoli, baoyo bakitisi mikonzi mpo na kondima, basalaki na boyengebene, bazwi bilaka.” Basusu mpe bamekamaki na nzela na maloba ya kotyola, na kobɛtama makasi, na kokangama minyɔlɔlɔ, mpe minyoko, kasi baboyaki kokangolama “ete bázwa lisekwa lileki malamu.” Ya solo, “mokili mobongaki na bango te.” Bango nyonso bazwi litatoli na kondima na bango, kasi bazwi naino te kokokisama ya elaka. Paulo akóbi ete: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso [mpe] tópota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima.”—10:32, 39; 11:1, 8, 10, 27, 32, 33, 35, 38; 12:1, 2.
21. (a) Lolenge nini baklisto bakoki koyika mpiko kati na etumba ya kondima? (b) Ntina nini ya makasi koleka Paulo apesi mpo na koyoka makebisi?
21 Mpiko kati na etumba ya kondima (12:4-29). Paulo alendisi baklisto Baebele ete báyika mpiko kati na etumba ya kondima, mpo ete Yehova azali kopesa bango disipilini lokola bana. Oyo ezali ntango ya kokembisa mabɔkɔ mpe mabɔlɔngɔ malɛmbi mpe ntango ya kolanda kotambolisa makolo na bango kati na nzela ya sembo. Basengeli komibatela makasi mpo na kotɛmɛla boingeli ya mosisa mabe nyonso to mbindo oyo ekoki kosala ete bábwakama, lokola na likambo ya Esau, oyo apesaki motuya na biloko na bulɛɛ te. Na ngomba, awa na mabelé, Mose alobaki ete: “Ngai nabangi mpe nazali kolɛnga” na ntina na kongala ya nsɔ́mɔ ya mɔ́tɔ oyo ezalaki kopela, mpo na lipata mpe mpo na mongongo oyo ayokaki. Kasi bango basili kobɛlɛma epai na eloko oyo eleki nsɔ́mɔ—Ngomba Siona mpe Yelusaleme ya likoló, makiasikiasi ya baanzelu, lisangá ya Babotami ya liboso, Nzambe Mosambisi na bato banso, mpe Yesu Molobeli ya kondimana ya sika oyo eleki malamu. Sikawa, ezali na bantina mingi mpenza ya koyoka makebisi ya Nzambe! Na eleko ya Mose, mongongo ya Nzambe eningisaki mabelé, kasi sikawa, Ye alaki ete akotya likoló mpe mabelé kati na yikiyiki monene. Paulo asukisi likanisi na ye ete: “Yango wana tiká ete tózala na matɔ́ndi mpo tozwi bokonzi bokokoka koningana te mpe tiká ete tósambela Nzambe na motindo mokosepelisa ye na nsɔ́mɔ mpe na botosi. Mpo ete Nzambe na biso azali mɔ́tɔ mokozikisaka.”—12:21, 28, 29.
22. Paulo asukisi mokanda na ye epai na Baebele na batoli nini ya kotonga?
22 Bilendiseli ndenge na ndenge likoló na makambo ya losambo (13:1-25). Paulo asukisi na kopesáká batoli ya kotonga mpenza: Tiká ete bolingo ya bondeko ekóba, bóbosana soko moke te ezaleli ya koyamba bapaya, tiká ete libala likumisama na bato banso, bómibatela na oyo etali kolinga mosolo, bótosa baoyo bakokambaka bino, mpe bobendama te na mateya ya bopaya. Na nsuka, “mpo na ye [Yesu], tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibɛbu bizali koyambola nkombo na ye.”—13:15.
LITOMBA NA YANGO
23. Paulo alobi nini na ntina na Mibeko, mpe lolenge nini asimbi bandimbola na ye?
23 Awa ezali yango kosimba Klisto engebene bandimbola eyokani na mibeko, mokanda ya Baebele mozali esaleli ya motuya oyo ekokani na mosusu te; yango esalemaki na lolenge ya kokoka mpenza mpe etondi na bilembeteli ya polele mpe ya kokoka oyo biuti na Makomami ya Liebele. Ezali kolobela makambo ndenge na ndenge ya Mibeko ya Mose—kondimana, makila, molobeli, hema ya losambo, bonganga, mbeka—nde emonisi ete yango ezalaki bobele elilingi oyo Nzambe asalelaki mpo na komonisa makambo minene oyo mazalaki koya, oyo makómaki yango nyonso na nsuka kati na Klisto Yesu mpe mbeka na ye, kokokisama ya Mibeko. Mibeko yango, “oyo ekómi eloko na kala mpe ezali konuna ezali penepene na kolimwa,” Paulo alobaki bongo. Kasi “Yesu Klisto azali motindo moko, lobi mpe lelo mpe libela.” (8:13; 13:8; 10:1) Baebele wana bayokaki mpenza esengo ntango bazalaki kotánga mokanda na bango!
24. Ebongiseli nini elimbolami kati na Baebele oyo ezali na litomba monene mpo na biso lelo oyo?
24 Kasi yango ezali na motuya nini mpo na biso lelo, kati na makambo makeseni na oyo ya bango? Lokola tozali na nsé na Mibeko te, tokoki nde kozwa litomba na bandimbola oyo Paulo apesi? Ɛɛ, tokoki mpenza. Na mokanda oyo, balimbweli biso ebongiseli monene ya kondimana ya sika oyo etongami likoló na elaka epesamaki na Abalayama ete na nzela na Mombóto na ye mabota nyonso na mabelé makomizwela mapamboli. Yango ezali elikya na biso mpo na bomoi, elikya bobele moko, elingi koloba kokokisama ya elaka oyo Yehova apesaki yango uta kala na ntina na kosopama ya mapamboli na nzela ya Yesu Klisto, Mombóto ya Abalayama. Atako tozali na nsé na Mibeko te, nzokande tobotami kati na lisumu lokola bakitani ya Adama, mpe tozali na mposa ya nganga monene oyo atondi na motema mawa, oyo akoki kopesa mbeka ebongi mpenza mpo na lisumu, oyo akoki kokɔta kino esika Yehova azali kati na likoló mpe kobondela mpo na biso liboso na ye. Na mokanda oyo, tomoni ye, Nganga Monene oyo akoki kokamba biso kino bomoi na mokili ya sika ya Yehova, oyo akoki koyoka mpasi esika moko na biso kati bolɛmbu tozali na yango, awa “amekami na makambo nyonso pelamoko biso,” mpe oyo abyangi biso ete “tóbɛlɛma na molende epai na kiti na bokonzi na ngɔlu ete tózwa mawa mpe tómona ngɔlu na kosunga na ntango na bosɛngá.”—4:15, 16.
25. Na lolenge nini ya kongɛngisa mpenza Paulo amonisi kokokisama ya Makomami ya Liebele?
25 Lisusu, kati na mokanda ya Paulo epai na Baebele, tozali kokuta bilembeteli ya kosepelisa mpenza oyo bimonisi ete bisakweli oyo bikomamaki kalakala kati na Makomami ya Liebele biyaki kokokisama na nsima na lolenge ya kokamwisa mpenza. Nyonso wana ezali mpo na koteya biso mpe kobɔndisa biso lelo oyo. Na ndakisa, kati na Baebele, Paulo alobeli mbala mitano kokokisama ya maloba ya esakweli ya Bokonzi oyo mazali kati na Nzembo 110:1 likoló na Yesu Klisto lokola Mombóto ya Bokonzi, oyo “afandaki na lobɔkɔ na mobali na kiti ya bokonzi na Nzambe” mpo na kozela “kino bayini na ye bakokóma etyelo na makolo na ye.” (Ebe. 12:2; 10:12, 13; 1:3, 13; 8:1, NW) Lisusu, Paulo atángi maloba ya Nzembo 110:4 mpo na kolimbola mosala ya ntina oyo mokokisamaki na Mwana ya Nzambe lokola “nganga [monene] libela, kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke.” Lokola Melikisedeke ya kala, oyo kati na lisoló ya Biblia azali “na tata te na mama te na etángeli na mabota te; na ebandeli na mikolo te to na nsuka te,” Yesu azali Mokonzi mpe “nganga libela” mpo na kopesa matomba ya seko ya mbeka ya lisiko na ye epai na bato nyonso oyo bazali komitya na botosi nyonso na nsé na boyangeli na ye. (Ebe. 5:6, 10; 6:20; 7:1-21) Ezali bobele Nganga-Mokonzi wana nde Paulo alobeli na kotángáká maloba ya Nzembo 45:6, 7, NW, ete: “Nzambe azali kiti na bokonzi na yo libela na libela, mpe lingenda ya Bokonzi na yo ezali lingenda ya sembo. Olingaki boyengebene, mpe oyinaki botyoli ya mibeko. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, apakolaki yo na mafuta ya esengo monene koleka bazalani na yo.” (Ebe. 1:8, 9) Wana Paulo atángi maloba ya Makomami ya Liebele mpe amonisi kokokisama na yango kati na Klisto Yesu, tozali komona lolenge biteni binso ya mokano ya Nzambe bizali kotyama na esika na yango na ntina ete biso tósosola yango polele.
26. Elendiseli nini mokanda ya Baebele epesi mpo na kopota na emekaneli na mbangu kati na kondima mpe mpiko?
26 Lolenge mokanda ya Baebele emonisi yango polele, Abalayama azalaki kotala epai na Bokonzi, ‘mboka oyo ezali na miboko ya solosolo, oyo Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango’—mboka “na Likoló.” “Mpo na kondima” azalaki na mposa ya komona Bokonzi, mpe andimaki makambo mingi ya mpasi na ntina ete akoka kozwa mapamboli na yango na nzela na “lisekwa lileki malamu.” Oyo nde ndakisa kitoko tozali kokuta epai na Abalayama mpe epai na mibali mpe basi mosusu nyonso ya kondima—“lipata monene boye na batatoli” oyo Paulo alobeli kati na mokapo 11 ya Baebele! Wana tozali kotánga lisoló oyo, mitema na biso mizali kotonda mpe kopumbwa na esengo, mpo na motuya ya libaku malamu mpe elikya oyo tozali na yango elongo na bato wana ya sembo. Na bongo, tolendisami ete “tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.”—11:8, 10, 16, 35; 12:1.
27. Bilikya minene nini ya Bokonzi bimonisami polele kati na mokanda ya Baebele?
27 Kotángáká maloba ya esakweli ya Hagai, Paulo abendi likebi likoló na elaka ya Nzambe ete: “Naino mbala moko mosusu, nakoninganisa bobele mokili te kasi Likoló lokola.” (Ebe. 12:26; Hag. 2:6) Nzokande, Bokonzi ya Nzambe oyo ekotambwisama na Klisto Yesu, ye Mombóto, ekoumela seko na seko. “Yango wana tiká ete tózala na matɔ́ndi mpo tozwi bokonzi bokokoka koningana te mpe tiká ete tósambela Nzambe na motindo mokosepelisa ye na nsɔ́mɔ mpe na botosi.” Lisoló yango ya kosepelisa ezali kondimisa biso ete Klisto akomonana na mbala ya mibale “mpo na masumu te nde mpo na kobikisa bango bazali kotalela ye na mposa.” Bongo, na nzela na ye “tótombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibɛbu bizali koyambola nkombo na ye.” Tiká ete nkombo monene ya Yehova Nzambe esantisama libela na libela na nzela na Yesu Klisto, Mokonzi mpe Nganga!—Ebe. 12:28; 9:28; 13:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku The Story of the Bible, 1964, lokasa 91.
b Ebimeli ya 1981, Vol. IV, lokasa 147.