Koyeba Nzambe ya solo—elimboli nini?
1, 2. Na boyokani na Yisaya 2:3, libyangami nini lipesami na mikolo oyo ya nsuka, mpe epesami epai na nani?
ESAKWELI ya Yisaya na ntina na mikolo ya nsuka ezali mpenza kobenda likebi mpe ezali kopesa libyangi oyo esengeli kosepelisa bato ya mabota nyonso. Libyangi yango ezali ya koluka koyeba Nzambe ya solo ye moko: “Mabota mingi bakokende mpe bakoloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngomba na [Yehova], epai na ndako na Nzambe na Yakobo; ete alakisa biso banzela na Ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka Ye.’”a—Yisaya 2:3.
2 Esakweli oyo emonisi ete na mikolo ya nsuka, mabota ya mokili mobimba makokambama kino na liziba ya kolakisama oyo ekosalisa bango na koyeba Nzambe ya solo. Bakokundola basolo oyo ekopesa bango nzela ya kozala na bomoko kati na bikanganeli ya kimya. Basolo yango ezali nini?
3. Liteya nini ya ntina kati na Biblia libungaki mpo na makambo ya bonkɔ́kɔ?
3 Moko na makambo maleki ntina kati na Biblia ezali ya kozala na boyokani elongo na Nzambe, Tata na biso ya makoló mpe Mozalisi na biso na lolenge ya boyokani ya penepene mpenza, na kobeleláká ye na nkombo na ye, kasi yango esilá kobunga na ntina na makambo ya bonkɔ́kɔ. Nani oyo azali na moninga moko ya motema, kasi akoboya kosalela to kolobela nkombo na ye wana batuni ye yango? Ezali mpenza epai na moto oyo azali monguna na yo nde okosala bongo, okoboya kotanga nkombo na ye. Boyokani ya penepene oyo ezalaki kati na Bayisraele na ntango ya kala mpe Nzambe na bango—na nzela na yango bayebaki ye na nkombo na ye—emonisamaki na maloba kitoko ya mokomi na kala ya Nzembo: “Nakobikisa ye mpo ete ye azali kolinga ngai; nakotombola ye likoló mpo ete ayebi nkombo na ngai.”—Nzembo 91:14.
Tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
4, 5. Ndimbola ya nkombo ya Nzambe ezali nini?
4 Engebene Biblia, mokakatano moko mozali te na ntina na nkombo na Nzambe ya solo. Ntango Nzambe ayebisaki Mose ete akosalela ye mpo na kosikola libota ya Yisraele longwa na boombo na Ezipito, Mose atunaki motuna moko ya mayele: “Soko ngai nakokóma epai na bana ya Yisraele mpe nalobeli bango ete: ‘Nzambe na batata na bino atindi ngai epai na bino’ mpe soko bakoloba na ngai ete: ‘Nkombo na Ye nani?’ Nakoloba na bango nini?” Nzambe ayanolaki ye ete: “Lobela bana ya Yisraele boye ete: ‘Yawe [na Liebele, יהוה = YHWH = Yahweh, to Yehova kobanda na ekeke ya 13 T.B.], Nzambe na batata na bino, Nzambe na Abalayama, Nzambe na Yisaka, mpe Nzambe na Yakobo, atindi ngai epai na bino: Wana ezali nkombo na ngai libela na libela, mpe nakokanisama na yango libota na libota.”—Exode 3:13, 15.
5 Nkombo wana ezali na ndimbola monene mpo na moto oyo alobaka lokóta ya Liebele. Euti na liloba ya Liebele הוה, h·w·h, oyo elimboli “kokóma.” Nzokande, na kotalela grammaire ya lokóta na Liebele, nkombo yango elakisi koyeisa likambo moko, Hiph·‘ilʹ. Na yango, ndimbola na yango ezali na boyokani te na bomoi bozangi nsuka oyo Nzambe azali na yango, kasi ezali nde na boyokani na ezaleli na ye ya kosala ete biloko bikóma kozala to bibima. Yango ezali komonana mingi kati na likambo litali mikano na ye. Lokola akanaki ete akosikola libota na ye liponami na boombo longwa na Ezipito, asalaki ete makambo masalema bobele bongo. Nguya moko te ekokaki kopekisa ete mokano na ye esalema te. Yehova azali Nzambe oyo akosalaka ete mikano na ye mikokisama. Na yango asalaka ete ye moko azala Mokokisi ya bilaka na ye. Yango esalemaki mpe bongo na ntango azwaki mokano ya kosikola libota na ye na boombo na Babilone. Likambo yango ezali lisusu solo na kotalela mokano na ye ya kokómisa mabelé paladiso. Nkombo na ye ezali kopesa ndimbola mpe ndanga ete bilaka na ye bikokokisama.—Yisaya 41:21-24; 43:10-13; 46:9, 10.
6-9. (a) Lolenge nini toyebi ete Nzambe apekisi te kosalela nkombo na ye? (b) Lolenge nini mpe ntango nini kosalelama ya nkombo ya Nzambe ekómaki kopekisama kati na lingomba ya Bayuda?
6 Kasi Mibeko Zomi mipekisi te kotanga nkombo ya Nzambe? Soko moke te! Atako bato mingi balukaki kolimbola mobeko ya misato motindo wana, tala oyo mokanda Encyclopaedia Judaica elobi: “Koboya kosalela nkombo YHWH . . . esalemaki na ntina ya kozanga kososola malamu mobeko ya misato (Ex. 20:7; Deter. 5:11) lokola nde elimbolaki ete: ‘Okotanga nkombo ya YHWH Nzambe na yo pamba te,’ nzokande, yango elimboli mpenza: ‘Okolapa ndai ya lokuta na nkombo ya YHWH Nzambe na yo te.’”5 Emonani polele ete mokapo wana mopekisi te ‘kotanga’ to kobenga nkombo ya Nzambe. Nzokande, ata soki yango elimboli kotanga yango “pamba,” totala oyo elobami kati na mokanda mokolimbolaka maloba na lokóta ya Liebele oyo ekomamaki na Koehler mpe Baumgartner na kotalela liloba ya Liebele libongolami ete “pamba” (Liebele, lash·shawʹ’): “kotanga nkombo kozanga ntina . . . kosalela nkombo na lolenge mabe.”6 Na yango, etinda wana epekisi te kosalela nkombo ya Nzambe, kasi epekisi nde kosalela yango na lolenge mabe.
7 Kasi ezali boni mpo na likanisi oyo elobi ete nkombo ya Nzambe “eleki bosantu mpo na kobenga yango”? Soki Nzambe ayebaki ete nkombo na ye eleki bosantu mpe bato bakoki kobenga yango te, mbele elingaki kozala likambo ya mayele na kokanisa ete ebongaki malamu alakisa yango te, boye te? Likambo oyo ete tozali kokuta nkombo ya Nzambe mpenza kati na Makomami ya Liebele ya kala mbala 6 800, yango emonisi ete alingi ete bato bayeba ye mpe basalela nkombo na ye. Na esika ete apekisa bato kosalela nkombo na ye noki bakozanga limemya na ntina na yango, mbala na mbala Nzambe azali kolendisa mpe kopesa etinda ete libota na ye basalela nkombo na ye mpe bayebisa yango epai na bato basusu. Kosaláká bongo bazali komonisa polele boyokani ya penepene elongo na ye mpe bolingo bazali na yango mpo na ye. (Nzembo 91:14) Mosakoli Yisaya amonisaki polele nini ezalaki mokano ya Nzambe kati na likambo yango wana alobaki ete: “Botonda Yawe [יהוה = YHWH = Yehova], bobyanga nkombo na ye, boyebisa misala na ye kati na mabota, bosakola ete nkombo na ye ezali kokumisama.”—Yisaya 12:4. Talá lisusu Mika 4:5; Malaki 3:16; Nzembo 79:6; 105:1; Masese 18:10.
8 Soki Yehova alingaki te ete bato babenga nkombo na ye mbele alimbolaki polele epekiseli yango. Nzokande, ezali na esika moko te kati na Biblia oyo epekisi kosalela nkombo ya Nzambe na lolenge lobongi to kobenga yango. Bato na sembo ya ntango na kala basalelaki nkombo na ye kozanga kokakatana. (Genese 12:8; Luta 2:4; 4:11, 14) Ya solo, mbala na mbala Nzambe azalaki kokweisa bato oyo bazalaki kopusa libota na ye na kobungisa nkombo na ye mosantu.—Yilimia 23:26, 27; Nzembo 44:20, 21 (44:21, 22, Liloba lya Nzambe).
9 Kasi lolenge nini epekiseli wana eyaki na makanisi ya Bayuda, nzokande yango ezalaki te kati na Biblia? Cohen, oyo azali docteur na filozofi, molakisi na mibeko ya Bayuda mpe mokomi ya mokanda Le Talmud amonisi ete momeseno wana etyamaki moboko mokemoke na boumeli ya bikeke mingi. Akomi ete: “Na ntango ya kala emonani ete kokakatana ezalaki te mpo na kosalela nkombo yango kati na masoló ya mokolo na mokolo. Bankombo ya bato mingi ezali na Yah to Jahou kati na yango ata kino nsima ya boombo na Babilone; ezali elembeteli emonisi ete kosalelama ya balɛtɛlɛ minei ya nkombo na Nzambe epekisamaki te. Kasi kobanda na eleko ya balakisi na mibeko ya Bayuda, bakómaki kosalela yango bobele kati na milulu ya tempelo.” Na kotalela lolenge makambo mazalaki kotambola na eleko wana, molakisi wana amonisi ete: “Na esika ete basalela nkombo JHVH, bakómaki kosalela nkombo Adonai (Nkolo na ngai) kati na milulu ya Eyanganelo, kasi momeseno ezalaki ete ebengeli na yango ya ebandeli elakisama na Bato na mayele epai na bayekoli na bango na bantango ebongisamaki—mbala moko to mibale na boumeli ya mbula nsambo nyonso (Kiddushin 71a). Atako bongo, momeseno wana esilaki na nsima, mpe mwango wana ya kobenga Nkombo yango eyebanaki lisusu te na lolenge ya sikisiki.”7 Wana ezalaki litomba mabe libimaki na “mibeko ya bato.”—Yisaya 29:13; Deteronome 4:2; talá lokasa 9, baparagrafe 15, 16.
Mikumba ya baoyo bamemi nkombo ya Nzambe
10-14. (a) Nzambe azali kosenga nini epai na baoyo balingi komema nkombo na ye? (b) Lolenge nini ya bopeto esengami epai na baoyo balingi kosepelisa Nzambe? (c) Bopusi nini mabota na bapaya bamemaki likoló na lingomba ya Bayuda?
10 Ezali polele ete mpo na moto oyo alingi kosepelisa Nzambe, ekoki te bobele koyeba to kosalela nkombo ya Nzambe. Komema nkombo ya Nzambe lokola moko na basambeli na ye ya solo ezali libaku moko kitoko oyo ekokani na mosusu te, lokola mosakoli Yilimia asakolaki yango ete: “Liloba na yo lizali mpo na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai; mpo ete nabyangami na nkombo na yo.” (Yilimia 15:16) Kasi libaku monene oyo ya kitoko ezali mpe na mokumba na yango. Na ntina na likanisi yango Yehova alobaki na makasi nyonso epai na bakonzi ya mabota ya Bapakano ete: “Nakobanda kosala mabe na mboka oyo ebyangami na nkombo na ngai.” (Yilimia 25:29) Liboso ya kosikola libota ya Yisraele nsima na mibu 70 ya boombo na Babilone, Yehova akebisaki libota na ye na nzela na mosakoli Yisaya ete: “Bolongwa! Bolongwa! Bokima na esika yango, [bosimba] eloko na mbindo te; bobima na kati na ye, bomibulisa bino mpenza, bino baoyo bozali kokumba biloko na [Yehova, יהוה]!” (Yisaya 52:11) Na mikolo na biso, kobatela bopeto lokola basambeli ya solo, lokola bamemi na nkombo ya Nzambe oyo aleki mosantu, Yehova, elimboli nini?
11 Ya solo, moto oyo alingi kosepelisa Nzambe kati na losambo na ye, asengeli ntango nyonso kozala na etamboli ya peto, mingimingi na komemyáká mitinda ya bizaleli malamu oyo Nzambe ye moko asili kotya. Na bokeseni na etamboli mabe oyo bato bapesi yango nzela lelo oyo, Makomami mamonisi polele ete Nzambe azali kokweisa bizaleli lokola lokuta, moyibi, pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali, koboma, mpe makambo nyonso ya mbindo. (Exode 20:12-16; 23:1, 2; Levitike 5:1; 19:35, 36; 20:13) Makomami mapekisi te bobele misala mabe, kasi lisusu makanisi oyo makoki komema na etamboli wana ya mabe.—Exode 20:17; Levitike 19:17; Nzembo 14:1-5; Yobo 31:1, 9.
12 Longola bopeto ya bizaleli, baoyo bamemi nkombo ya Yehova basengeli lisusu komonisa bopeto kati na makambo ya losambo. Mbala na mbala Yehova azalaki kokebisa libota na Yisraele ya kala ete bapusama te na makanisi, na misala mpe mimeseno ya losambo ya mabota oyo mazalaki zingazinga, oyo bazalaki kosambela banzambe mosusu. Na yango, mpo ete bakoka koumela na mokili ya ndaká—lisengami lizalaki bobele moko—kozanga komekola losambo ya lokuta ya mabota. (Levitike 18:24-30; Deteronome 12:29-31) Ezalaki te bobele losambo ya bikeko nde epekisamaki kasi lisusu lolenge nyonso ya biyambayamba mpe bindimeli, lokola kosakola makambo makoya na nzela ya minzoto, losambo ya bilimu mabe, koyebisa makambo makoya, bondoki, kobondela to kosolola na bakufi, nyonso wana epekisamaki.—Exode 20:3-5; 22:18 (Ex. 22:17, Liloba lya Nzambe); Levitike 20:27; Deteronome 18:9-13; Yisaya 8:19, 20; 47:13; Yilimia 10:2.
13 Likambo mosusu oyo ekangami na bopeto ya losambo ezali bopeto ya mateya. Likebisi oyo esengaki ete bamekola te bizaleli mpe losambo ya mabota oyo ezalaki zingazinga, esukaki te bobele na ntango oyo libota ya Yisraele ekamataki mokili ya ndaká na bato ya Kanana. Yehova amonisaki losambo ya solo epai na libota na ye. Ezalaki bobele libota oyo nde bazalaki kosambela Nzambe ya solo, Yehova. (Exode 19:5, 6; Deteronome 4:32-37; Nzembo 147:19, 20) Lokola bobele bango nde bayebaki Nzambe wana malamu, mpe lokola bazalaki batemwe na ye, bazalaki na likoki ya koteya bato mosusu na ntina na ye. (Yisaya 43:9-12; Nzembo 105:1) Nzokande, mimeseno mpe misala ya losambo ya mabota mosusu ezalaki komonisa mpenza ete bayebaki Nzambe te.—Yisaya 60:2.
14 Atako ebandeli na bango ezalaki malamu, libota na Yisraele ezalaki mbala na mbala kolengolama na makanisi ya losambo ya mabota ya bapaya. (Basambisi 2:11-13; 1 Mikonzi 18:21; Yilimia 2:11-13; Ezekiele 8:14-18) Ezali solo ete kati na lingomba ya Bayuda, tozali mpe kokuta bilembo ya mimeseno ya bato ya Kanana mpe ya Babilone, kasi bopusi mosusu ya makasi mpenza esalemaki na eleko oyo Boyangeli ya mokili mobimba ya Bagreke ezalaki kopusa bato nyonso ete bandima mpe basalela mimeseno na bango.b Kolobáká na ntina na eleko molai ya bopusi ya Bagreke, oyo eumelaki kobanda ekeke ya minei liboso ya ntango na biso kino pene na bikeke ya liboso ya ntango na biso, mokomi Moyuda, Max Dimont amonisaki ete: “Wana bakómaki na makanisi ya Platon, ya Aristote mpe ya Euclide, Bayuda oyo bazalaki na mayele mingi bazwaki myango ya sika mpo na koyekola makambo mazali kati na Torah. . . . Bakotisaki lolenge ya kokanisa ya Bagreke kati na emoniseli ya Bayuda.”
Moto azali na molimo oyo ekufaka te?
15-17. (a) Biblia ezali koteya nini na ntina ya liwa mpe molimo? (Talá etánda, lokasa 22.) (b) Elikya nini Biblia ezali kopesa epai na bato oyo basilá kokufa?
15 Mateya mpe bindimeli ya lingomba ya Bayuda ezwaki mpe bopusi na eleko wana? Mokanda Encyclopaedia Judaica endimi na bosembo nyonso ete: “Ekoki kozala mpenza na nse ya bopusi ya Bagreke nde liteya ya kozanga kokufa ya molimo ekotisamaki kati na lingomba ya Bayuda.”8 Makomami ya Liebele mazali koteya na polele nyonso ete na ebandeli Nzambe alingaki ete bato bazala na bomoi ya seko na nzoto kolongono na mabelé oyo. (Talá bankasa 11, 12, paragrafe 2 kino paragrafe 4.) Na Genese 2:7 tozali kotanga ete: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu ya mabelé mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” Tomoni ete mokapo oyo elobi te ete moto azwaki molimo, kasi akómaki nde molimo. Na ntina na botomboki oyo amonisaki na kozanga kotosa Nzambe, moto ya liboso, Adam azwaki etumbu ya liwa. Mpo na yango, Adam, lokola molimo, akufaki. Eteni moko te ya nzoto na ye elandaki kozala na bomoi epai mosusu. Na yango, likanisi ya molimo mozangi kokufa eteyami kati na Biblia te.c Biblia elobi polele ete: “Molimo oyo esali lisumu, yango ekokufa.”—Ezekiele 18:4.
16 Oyo Makomami mazali komonisa na ntina na ezalela ya bakufi ezali na boyokani na liteya oyo ya Biblia elobi ete molimo ekufaka. Na Mosakoli mokapo 9, vɛrsɛ 5 mpe vɛrsɛ 10, totangi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Mpo ete ezali na mosala te, to na mwango te, to na mayele te, to na boyebi te kati na esika na bakufi [nkunda ya bato nyonso] esika ekokenda yo.” (Talá Nzembo 146:3, 4.) Liwa ezali etumbu oyo Nzambe apesaki. (Genese 2:17) Liwa ezali kozanga bomoi, kasi ezali te lolenge mosusu ya bomoi. Mpo ete yango ezali solo, tosengeli kokamwa te na kokundola ete ezali na esika moko te kati na Makomami oyo elobeli etumbu ya kozikisama na mɔ́tɔ ya lifelo (geh hin·nomʹ). Yango mpe ezali likanisi liutaki na filozofi ya Bagreke mpe liteya ya bapakano. Na kotalela endimeli ya Bayuda na ntina na liteya oyo elobi ete nsima na liwa mokufi abongwanaka ekelamu mosusu, mokanda Nouvelle Encyclopédie de base juive (na Lingelesi) eyebisi ete: “Emonani ete likanisi wana liutaki na Inde. . . . Kati na Kabbalah [mokanda mozali na makambo ya bonkúku ya Bayuda] ebandaki liboso kati na mokanda Bahir, mpe na nsima, longwa na Zohar oyo endimamaki na bato bakosalelaka makambo na bonkúku ete ezali kokokisa mokumba moko monene kati na bindimeli mpe masoló ya bonkúku oyo ekomami na Bayuda.”9
17 Lokola liwa ezali bongo kozanga bomoi mpe molimo ekendaka epai mosusu te, elikya nini ezali mpo na bato oyo basilá kokufa? Liloba na Nzambe lizali koteya polele ete Mokonzi Masiya oyo aponamaki na Nzambe, akosala na boye ete bato bafanda lisusu kati na Paladiso na mabelé, mpe na nsima bakufi mingi bakozongisama na bomoi. Liteya wana ya Biblia elobelamaka mingi lokola ‘lisekwa ya bakufi.’ Basekwi bakozala te bobele bato na sembo oyo basalelaki Nzambe, kasi lisusu bamilió mingi, ata mpe bamiliare ya bato oyo bazwaki likoki te ya koyekola makambo na ntina na ye mpe ya kosalela ye kati na solo.—Danyele 12:2, 13; Yisaya 26:19; Yobo 14:14, 15.
18, 19. Mpo na nini bato basengeli koyekola koyeba Nzambe ya solo mpe ndenge nini yango ekoki kosalema?
18 Elikya ya Biblia na ntina na lisekwa na bomoi ya kokoka na mabelé ezali kopusa makasi bato ya mabota nyonso na koluka Nzambe ya solo mpe na kokóma na boyebi na ntina na ye, boye te? Kasi na mikolo oyo ya nsuka, liziba ya solo ya mateya mapesami na Yehova, lokola yango elobelami na Yisaya 2:2, 3 ezali epai wapi? Nani akoki koteya bato banzela ya Yehova, mpo ete “bakoka kotambola na banzela na Ye”? Ezala lingomba ya Bayuda to mpe boklisto ya lokuta bakoki nde kopesa mateya motindo oyo na lisalisi ya Biblia na kotalela makambo tolobeli na eteni oyo?
19 Lokola esakweli elobi ete ekozala na etuluku ya bato oyo bakomema nkombo ya Yehova na bopeto nyonso, banani oyo bakosalela ye lokola Batemwe mpe lokola liziba ya pole ya elimo mpo na mabota nyonso?—Yisaya 60:2, 3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki totangi esakweli oyo na mozindo te, tokoki kokanisa ete na mikolo ya nsuka, bato mingi bakobongwana na lingomba ya Bayuda. Nzokande, maloba ya zingazinga na yango mpe makambo mazali koleka lelo oyo emonisi ete likanisi motindo wana ezali solo te. Lisoló ya eteni oyo mpe na eteni oyo ekolanda ekosalisa na koyeba mpo na nini tokómi na bosukisi oyo.
b Kobanda na ntango ya boyangeli ya Alesandala Monene (336-323 L.T.B.), Bagreke basalaki milende nyonso mpo na kopalanganisa bafilozofi, mimeseno mpe lokóta na bango na mikili nyonso oyo mizalaki na nse na Boyangeli ya Grèce. Bato oyo bamekolaki mimeseno mpe makanisi ya Bagreke batalelamaki lokola ete bango mpe bakómi Bagreke. Milende ya kolóngisa mimeseno ya Bagreke koleka ya bato mosusu elandanaki na nse ya Boyangeli ya Baloma atako bango balóngaki Bagreke, mpamba te basepelaki mingi na mimeseno mpe filozofi na bango. Ata kati na baoyo bazalaki kotemela makasi bopusi ya Bagreke, tozali na bilembeteli ya polele bimonisi ete mingi balandaki filozofi, makanisi mpe mateya ya Bagreke.
c Na Liebele ya Biblia, liloba libongolami na “molimo” ezali neʹphesh. Nzokande, lelo oyo kati na lingomba ya Bayuda, liloba ya Liebele nesha·mahʹ etalelami mingi lokola eteni ya nzoto ya moto oyo ezali kolanda kozala na bomoi nsima ya liwa. Kasi boyekoli na likebi ya Makomami emonisi ete liloba nesha·mahʹ ekoki kolimbolama motindo wana te; ezali komonisa nde ebongiseli ya kopema to ekelamu oyo ezali kopema, moto to nyama.—Genese 7:22; Deteronome 20:16; Yosua 10:39, 40; 11:11; Yisaya 2:22.
[Etanda na lokasa 20, 21]
NKOMBO YA NZAMBE KATI NA BIBLIA—LIKANISI YA NZAMBE
“Nzambe alobaki lisusu na Mose ete: ‘Lobela Bayisraele boye ete: ‘YAWE [יהוה = YHWH = Yehova], Nzambe wa bankoko ba bino, . . . atindi ngai epai ya bino. Wana nkombo ya ngai mpo na seko; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo yango o bileko binso seko.’”—Exode 3:15, Liloba lya Nzambe.
“Mpe tala, Boaza akómaki longwa na Beteleme mpe alobaki na babuki ete, ‘[Yehova, יהוה] azala na bino!’ Bazongisaki ete: ‘[Yehova, יהוה] apambola yo!’”—Luta 2:4.
“Botɔnda [Yehova, יהוה], bobyanga nkombo na Ye, boyebisa misala na Ye kati na mabota, bosakola ete nkombo na Ye ezali kokumisama.”d—Yisaya 12:4, Nzembo 105:1.
“Boye, nakobongola maloba na bato kino liloba na mpeto, ete bango nyonso babyanga nkombo na [Yehova, יהוה] mpe basalela ye na motema moko.”—Sofoni 3:9.
“Sopa nkanda na yo likoló na mabota mayebi yo te mpe likoló na bikonzi bikobyangaka nkombo na Yo te.”—Nzembo 79:6.
NKOMBO YA NZAMBE KATI NA TALMUD—LIKANISI YA BATO
“Etinda epesamaki ete moto asengelaki kopesa mbote epai na baninga na ye na kosaleláká Nkombo ya Nzambe.”—Berakhot 9:5.
“Na yango, [na Mokolo na Mbondi, Nganga Monene] azalaki koloba ete: O Yahvé, libota na Yo, Ndako na Yisraele, esali mabe, ebuki mobeko, esali lisumu liboso na Yo. Nazali kobondela Yo na Nkombo na yo JHVH . . . Na ntango banganga mpe bato oyo bafandaki na Libandá bayokaki kotangama ya Nkombo wana ya nkembo mpe ya lokumu na monoko ya Nganga Monene kozanga kokakatana, na limemya nyonso mpe na bopeto, bafukamaki mpe bakumbamaki na kokitisáká bilongi na bango na nse, mpe na kongangáká ete: Tika ete nkembo mpe bokonzi ya nkombo na Yo epambolama libela na libela.”—Yoma 6:2.
“Kati na Esika Mosantu Nkombo ya Nzambe ebengamaki na lolenge ekomamaki; kasi na libandá ya lopango na bulee bakitanyaki yango na nkombo mosusu.”—Sotah 7:6.
“Liboso, Nganga Monene azalaki kobelela Nkombo ya Nzambe na mongongo makasi; kasi ntango bato mabe bakómaki mingi, akómaki kobelela yango na mongongo ya nse.”—Le Talmud de Jérusalem, Yoma 40d.
“Moto na moto oyo akotanga Nkombo ya Nzambe engebene makomi na yango akozala [kati na baoyo bakokota te na mokili mozali koya].”—Sanhedrin 10:1.
“Moto na moto oyo akotanga Nkombo ya Nzambe polele akozala na ekweli monene.”—Pesikta 148a.
[Maloba na nse ya lokasa]
d Maloba “bobyanga nkombo na Ye” (na Liebele, קרצּו בשמו) ekoki mpe kobongolama na “bobenga ye na nkombo na ye.” (Talá Biblia ya lingala Uele.) Elobeli motindo wana ya Liebele ezwami na Genese 12:8 epai yango ebongolami na Tanakh: “[Abalama] abelelaki nkombo na Yehova.”
[Etanda na lokasa 22]
LIWA MPE MOLIMO—EZALI NINI?
LIKANISI YA MAKOMAMI:
“Na ntango yango [Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu ya mabelé, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi [neʹphesh].” (Genese 2:7) Tomoni ete moto azwaki molimo te kasi akómaki nde molimo.
“Kasi mpo na nzeté ya koyeba malamu na mabe, osengeli kolya yango te mpo ete mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:17) Tomoni ete Nzambe alobelaki liwa epai na moto ya liboso, Adam, bobele lokola etumbu mpo na kozanga botosi.
“Na milunge na elongi na yo okolya kwanga, kino ekozonga yo na mabelé—mpamba te okamatamaki na yango. Mpo ete ozali mputulu mpe okozonga kati na mputulu.”—Genese 3:19.
“Kasi na mboka na mabota oyo, . . . okobikisa eloko na kopema [nesha·mahʹ] moko te.”—Deteronome 20:16.
“Mpe bakamataki yango mpe babetaki yango na mopanga, . . . milimo [neʹphesh] nyonso oyo ezalaki na mboka; ye atikaki moto moko te na bomoi, . . . kasi abomaki yango, ezala milimo [neʹphesh] nyonso mizalaki na kati na yango.”—Yosua 10:37, NW.
“Babetaki bato nyonso wana na mopanga, mpe babomaki bango nyee; moto na kopema [nesha·mahʹ] moko atikalaki te.”—Yosua 11:11.
“Tala, milimo nyonso mizali ya ngai; molimo ya tata mpe molimo ya mwana mizali na ngai; molimo [neʹphesh] oyo asali lisumu, ye akokufa.”—Ezekiele 18:4.
“Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Mpo ete ezali na mosala te, to na mwango te, to na mayele te, to na boyebi te kati na esika na bakufi [nkunda ya bato nyonso], esika ekokende yo.”—Mosakoli 9:5, 10.
LIKANISI YA BALAKISI NA MIBEKO YA BAYUDA:
“Kati na likoló ya nsambo, Araboth, ezali esika bilimo mpe milimo oyo ekozalisama nsima ebombami naino.”—Hagigah 12b, Talmud.
“Molimo mosusu mokopesamaka na moto na ebandeli ya Sabata, mpe mokolongwaka na ye na nsuka ya Sabata.”—Taanit 27b, Talmud.
“Na boumeli ya basanza 12 mobimba [nsima na liwa] nzoto elandaka kozala na bomoi mpe molimo emataka mpe ekitaka.”—Shabbat 152b, Talmud.
“Bankisó bayokisaka bakufi mpasi motindo moko ntonga ezali koswa kati na nzoto ya moto oyo azali na bomoi.”—Shabbat 13b, Talmud.
“Soki liloba moko lilobami na nkombo ya mokufi kati na mokili oyo nsima ya liwa na ye, bibebu na ye bizali koningana kati na nkunda.”—Sanhedrin 90b, Talmud.
“Lingomba ya Bayuda ezali ‘losambo oyo ezali kondimisa kozanga kokufa ya molimo nsima na kokufa ya nzoto.’”—Le Kuzari 1:103, Judah Halevi, molakisi na mibeko ya Bayuda ya ekeke ya zomi na mibale.
[Elilingi na lokasa 23]
Eteni ya ndako oyo kati na eyanganelo ya kala na Tiberias na mokili ya Yisraele ezali bobele ndakisa moko mpo na komonisa kino na meko nini makanisi mpe mimeseno ya Bagreke ezalaki na bopusi likoló na lingomba ya Bayuda. Talá bilembo ya zodiac mpe bankombo na yango oyo ekomami na Liebele. Elilingi oyo ezali na katikati ezali Hélios, nzambe-moi