Ndenge ya kosolola na nzela ya mikanda
BATO mingi babongolá bomoi mpe bizaleli na bango kaka mpo na mikanda. Na ebandeli, biteni mingi ya Makomami ya Grɛki ya boklisto ezalaki mikanda. Lelo oyo, biso mpe tokoki kokoma mikanda mpo na kolendisa bandimi ya sika, mpo na kosolola na baninga na biso, mpo na kolendisa bandeko oyo bauti kozwa mikumba na lisangá, mpo na kolendisa baoyo bakutani na mikakatano mpe mpo na koyebisa likambo moko ya ntina oyo etali misala ya lisangá.—1 Tes. 1:1-7; 5:27; 2 Pet. 3:1, 2.
Kokoma mikanda ezali mpe lolenge moko ya kopesa litatoli malamu. Na bisika mosusu, bato mingi bafandaka na bandako oyo basoda bakɛngɛlaka yango, to na baotɛlɛ mpo na bapaya mpe ezalaka mpasi mpo na kokutana na bango. Bato mosusu balekisaka mpenza ntango mingi te na bandako na bango, yango wana tokutanaka na bango te ntango tozali kosakola ndako na ndako. Bato mosusu bafandi na bamboka oyo ezali mosika mpenza.
Na bantango mosusu, okoki kokangama na ndako mpo na makambo lokola, maladi, mbula ya makasi, to mpo na ekombela (couvre-feu). Okoki kokoma mokanda mpo na kopesa litatoli epai ya ndeko moko ya libota na yo to epai ya moto moko oyo opesaki ye litatoli ya libaku malamu? Moto oyo ozalaki koyekola na ye Biblia akei kofanda epai mosusu? Mbala mosusu, osengeli kaka kokomela ye mokanda oyo ekosalisa ye abatela mposa na ye mpo na makambo ya elimo. To mbala mosusu, okoki kokomela babalani ya sika, to baoyo babandi kobota sika, to mpe bato oyo oyebi, oyo bauti kokufela moto mpo na koyebisa bango likanisi ya Biblia oyo ebongi mpo na bango.
Ndenge ya kokoma mokanda mpo na kopesa litatoli
Ntango ozali kokoma mokanda mpo na kopesa litatoli na moto oyo oyebi ye te, libosoliboso, yebisá ye soki ozali nani. Okoki koyebisa ye ete omipesi mpo na kosala mosala moko oyo ezali mpe kosalema na mokili mobimba. Soki ebongi, yebisá ye ete ozali Motatoli ya Yehova. Yebisá ye ntina oyo ozali kokomela ye na esika ete okende kotala ye na ndako. Ntango ozali kokomela ye, salá lokola ozali komona ye na miso mpe ozali mpenza kosolola na ye. Kasi, mpo na kotosa toli oyo elobi ete “bózala ekɛngɛ lokola banyoka nzokande lokola bibenga bózala na ngambo te,” kanisá malamumalamu makambo nini ya bomoi na yo, oyo osengeli koyebisa ye.—Mat. 10:16.
Na kati ya mokanda yango, komá mpe makambo oyo okokaki koloba soki okendaki kotala ye na ndako. Okoki kozwa maloba ya ebandeli na mokanda Ndenge ya kosolola to okoki kosalela Mosala na biso ya Bokonzi oyo euti kobima, mpo na kozwa likanisi ya Biblia oyo okoki kobanda na yango. Okoki kotuna ye motuna mpe kolendisa ye ete akanisa likoló na motuna yango. Basakoli mosusu balobaka kaka na mokuse ete tozali kosalisa bato na koyanola na mituna oyo moto akoki komituna mpo na Biblia mpe na yango, tozali kosɛnga mbongo te mpe na nsima, balobelaka mitó ya likambo ya mikapo mosusu na mokanda moko oyo toyekolaka na yango Biblia. Mokanda moko oyo ezali ndakisa ezali na lokasa 73, oyo ekomami mpo na kopesa litatoli. Okoki kozwa mwa makanisi mosusu, kasi ekozala malamu kosalela makanisi mosusu, soki bongo te, nsima ya mwa ntango, bato bakobanda kozwa mbala na mbala kaka mokanda wana moko.
Bato mosusu balingaka te kotánga mikanda milaimilai oyo euti epai ya moto oyo bayebi te. Yango wana, ekozala malamu okoma makambo mingi te na mokanda na yo. Soki mokanda na yo ezali molai, moto oyo akozwa yango akoki kolɛmba kotánga yango. Ekozala malamu otya na kati ya anvɛlɔpi lokasa moko ya libyangi, mpo na kobenga ye na Ndako ya Bokonzi. Okoki mpe kotya trakte moko, to mwa buku moko, to mpe nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! mpe okoyebisa ye ete soki alingi, akoki kobanda kozwa yango mbala na mbala. Okoki mpe kotuna ye soki akolinga ete okende kotala ye mpo na kosolola na ye makambo mingi lisusu etali likambo oyo okomeli ye.
Ndenge mokanda yango ekozala
Talá mokanda oyo epesami awa lokola ndakisa. Na ntembe te omoni makambo oyo: (1) Ezali pɛto, na molɔngɔ mpe ezali na makambo ebele ebele te. (2) Ata soki abungisi anvɛlɔpi, moto yango akoki komona nkombo na yo mpe adrɛsi na yo ya posita na mokanda. (3) Ntina ya mokanda yango emonisami mbala moko mpe na maloba mingi te, na paragrafe ya liboso. (4) Likanisi mokomoko ya ntina ezali na paragrafe na yango. (5) Soki otali ntina ya mokanda yango, okomona ete ezali te lokola bazali kokomela moninga moko ya motema to mpe lokola bazali kokomela mokonzi moko.
Na mikanda lokola oyo sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá atindelaka biro ya la filiale, esengeli kotya nkombo ya lisangá, nkombo ya sɛkrɛtɛrɛ ye moko, adrɛsi na ye ya posita mpe dati oyo akomi mokanda yango. Esengeli mpe kotya nkombo mpe adrɛsi ya moto to ya lisangá esika ozali kotinda mokanda yango. Na nsima, okotya maloba ya ebandeli oyo ebongi. Na minɔkɔ mosusu, mpo na kosukisa mokanda ya ndenge oyo, batyaka likoló ya sinyatire maloba lokola “Bandeko na bino” to “Yambá mbote na biso ya bolingo” to mpe “Wa yo . . . ” Esengeli kotya sinyatire na mabɔkɔ.
Na mokanda nyonso oyo ozali kokoma, tyá likebi na ndenge ozali kokoma maloba, landá mibeko ya lokota, ndenge ozali kotya bilembo ya kopema, mpe bopɛto ya papye na yo. Soki osali bongo, yango ekopesa lokumu na mokanda na yo mpe na makambo oyo ezali na kati.
Na likoló to mpe na nsima ya anvɛlɔpi, ekozala malamu otyaka ntango nyonso adrɛsi na yo, mingimingi ya posita, mpo bázongisela yo eyano. Soki omoni ete ezali malamu te kotya adrɛsi na yo ntango ozali kokoma mokanda mpo na kopesa litatoli na moto oyo oyebi te, tuná bankulutu soki bakondima ete otya adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi ya lisangá na bino. Kotya adrɛsi ya la Société te, mpamba te moto yango akokanisa ete mokanda yango euti na biro ya la Société mpe yango ekotya mobulungano. Soki mpe likoló ya anvɛlɔpi otii adrɛsi na yo te mpe otii trakte moko to mokanda moko na kati, yango ekotinda moto yango akanisa ete la Société nde atindeli ye mokanda wana.
Talá malamumalamu soki otii batɛmbrɛ oyo esengeli likoló ya anvɛlɔpi, mingimingi soki otii mpe trakte to mokanda moko na kati. Soki batɛmbrɛ ekoki te, mbala mosusu posita ekosɛnga na moto oyo otindeli ye mokanda yango ete afuta mbongo mpe yango ekolɛmbisa ye mpo atánga mokanda wana. Kobosana te ete na mikili mingi, ntango otii mwa buku to zulunalo moko na kati ya anvɛlɔpi ya mokanda na yo, posita ekosɛnga yo mbongo mingi koleka soki otindaki kaka mokanda oyo yo moko okomi.
Komá maloba oyo ebongi
Ntango osilisi mokanda na yo, tángá yango mpo na kotalela makambo oyo okomaki. Ndenge nini ozali komona yango? Ezali maloba ya boboto mpe ya mayele? Mpo tózala na boyokani malamu na bato mosusu, tozali kosala makasi mpo na komonisa bizaleli lokola bolingo mpe boboto. (Gal. 5:22, 23) Soki omoni ete likanisi moko ebimi malamu te, to ekolɛmbisa moto nzoto, bongisá maloba yango.
Mokanda ekoki kokóma tii na bisika oyo yo okoki kokóma te. Yango emonisi ete ezali mpenza esaleli malamu mpo na mosala ya kosakola. Lokola mokanda na yo ezali komonisa bomoto na yo mpe makambo oyo ezali na ntina mpo na yo, talelá malamumalamu makambo oyo ozali kokoma, ndenge oyo ezali komonana mpe ndenge oyo bato mosusu bakotalela yango. Mbala mosusu ezali likambo oyo esengelaki mpo na kotinda to kolendisa moto moko ete alanda nzela ya bomoi.