Mokapo ya minei
Moto oyo basakoli nyonso batatolaki mpo na ye
1. Bomoi ya Yesu na likoló liboso ya kobotama na ye lokola moto ezali komonisa nini na boyokani na ye elongo na Yehova?
“TATA alingaka Mwana mingi mpe alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka.” (Yoane 5:20) Mwana wana azalaki mpenza na boyokani makasi na Tata na ye, Yehova! Boyokani yango ya makasi ebandaki na ntango ya bozalisi, bambula ebele liboso ete abotama lokola moto. Azalaki Mwana-mobotami-se-moko ya Nzambe, kaka ye moko nde akelamaki mbala moko na Yehova ye moko. Biloko mosusu nyonso na likoló mpe na mabele ekelamaki na nzela ya Mwana yango mobotami ya liboso, oyo Nzambe alingaki mingi. (Bakolose 1:15, 16) Asalaki mpe lokola Liloba ya Nzambe, to Molobeli, azalaki koyebisa bikelamu mosusu mokano ya Nzambe. Mwana yango, oyo Nzambe alingaki mingi, akómaki moto, Yesu Klisto.—Masese 8:22-30; Yoane 1:14, 18; 12:49, 50.
2. Mbala boni bisakweli ya Biblia elobelaki Yesu?
2 Yambo ete Mwana ya liboso ya Nzambe abotama lokola moto, bisakweli mingi ekomamaki mpo na kolobela ye. Ntoma Petelo alobaki na Koloneyi ete: “Basakoli nyonso bazali kotatola ye.” (Misala 10:43) Mokumba ya Yesu emonisamaki mbala mingi mpenza na Biblia kino anzelu moko alobaki na ntoma Yoane ete: “Kopesa litatoli mpo na Yesu nde eloko oyo epemisi esakweli.” (Emoniseli 19:10) Bisakweli yango emonisaki polele ete ye azali Masiya. Bisakweli yango ebendaki likebi na mikumba ndenge na ndenge oyo Yesu asengelaki kokokisa na kokokisama ya mikano ya Nzambe. Nyonso wana esengeli kozala na ntina mingi mpo na biso lelo oyo.
Makambo oyo bisakweli emonisaki
3. (a) Na esakweli ya Genese 3:15, nyoka ezali komonisa nani? “mwasi” azali komonisa nani? mpe ‘mombóto ya nyoka’ ezali komonisa nani? (b) Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli koluka koyeba likambo etali ‘kosasa nyoka na motó’?
3 Esakweli ya liboso kati na bisakweli yango epesamaki nsima ya botomboki oyo ebimaki na Edene. Yehova alobaki na nyoka ete: “Nakotya koyinana na kati na yo na mwasi, na kati ya mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Esakweli yango ezalaki mpenza kolobela Satana, oyo amonisami na nyoka. “Mwasi” ezali ebongiseli ya Yehova na likoló, oyo ezali lokola mwasi na ye ya sembo. ‘Momboto ya nyoka’ ezali baanzelu nyonso mpe bato nyonso oyo bamonisaka elimo ya Satana, baoyo batɛmɛlaka Yehova mpe basaleli na ye. ‘Kosasa nyoka na motó’ elimboli ete na mikolo ezali koya motomboki Satana akobomama, ye oyo atɔngaki Yehova mpe amemelaki bato mawa monene. Nani azali mpenza eteni ya ntina mingi ya “Mombóto” oyo akosasa nyoka? Na boumeli ya bikeke mingi, likambo yango etikalaki “sɛkɛlɛ mosantu.”—Baloma 16:20, 25, 26.
4. Ndenge nini molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu epesaki nzela ya koyeba ete ye nde azali Mombóto oyo alakamaki?
4 Nsima ya mbula soki 2000 ya lisolo ya bato, Yehova amonisaki makambo mosusu. Alakisaki ete Mombóto akobima na molɔngɔ to na libota ya Abalayama. (Genese 22:15-18) Kasi, molɔngɔ oyo esengelaki kobimisa Mombóto yango esengelaki te kotalela likambo ya kozala mwana ya Abalayama na mosuni, kasi Nzambe ye moko nde asengelaki kopona. Atako Abalayama azalaki kolinga mwana na ye Yisamaele mingi, oyo Agala abotaki, Yehova alobaki ete: “Nakolendisa kondimana na ngai na Yisaka oyo Sala akobotela yo.” (Genese 17:18-21) Bambula mingi na nsima, kondimana yango endimisamaki, ezalaki te epai ya Esau, mwana ya liboso ya Yisaka, kasi epai ya Yakobo, na nzela na ye mabota 12 ya Yisalaele ebimaki. (Genese 28:10-14) Na nsima, emonisamaki ete Mombóto akobotama na libota ya Yuda, na molɔngɔ ya Davidi.—Genese 49:10; 1 Ntango 17:3, 4, 11-14.
5. Ntango Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola, nini emonisaki polele ete azalaki Masiya?
5 Bilembo nini mosusu epesamaki mpo na koyeba Mombóto? Mbula koleka 700 liboso, Biblia elobaki ete Beteleme ekozala esika oyo Mombóto oyo alakamaki akobotama lokola moto. Elobaki mpe ete Mombóto azalaká “longwa na mikolo na kalakala,” kobanda ntango oyo akelamaki na likoló. (Mika 5:2) Mosakoli Danyele asakolaki mpe ntango mpenzampenza oyo Masiya asengelaki komonana. (Danyele 9:24-26) Mpe ntango Yesu apakolamaki na elimo santu, akómaki mpenza Mopakolami ya Yehova, mpe mongongo ya Nzambe eyokanaki banda na likoló ete azali Mwana na Ye. (Matai 3:16, 17) Mombóto autaki komonisama! Yango wana, Filipo alobaki na kondima mpenza ete: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mibeko, mpe basakoli bakomaki, Yesu.”—Yoane 1:45.
6. (a) Ndenge emonisami na Luka 24:27, bayekoli ya Yesu bayaki koyeba nini? (b) Nani azali eteni ya ntina mingi ya ‘mombóto ya mwasi,’ mpe kosasa oyo akosasa motó ya Satana elimboli nini?
6 Na nsima, bayekoli ya Yesu bayaki komona ete ebele ya bisakweli oyo elobelaki ye ezalaki na bisika mingi kati ya Makomami mapemami na Nzambe. (Luka 24:27) Ekómaki kutu komonana polele ete Yesu azali mpenza eteni ya ntina mingi ya ‘mombóto ya mwasi,’ oyo akosasa motó ya nyoka, elingi koloba koboma Satana mpo na libela. Na nzela ya Yesu, bilaka nyonso ya Nzambe oyo etali bato, makambo nyonso oyo tozali kozela na motema likoló, ekokokisama.—2 Bakolinti 1:20.
7. Longola koyeba Moto oyo bisakweli elobelaki, likambo mosusu nini ya ntina esengeli koyeba?
7 Koyeba likambo yango esengeli kosala biso nini? Biblia ezali kolobela mokube Moetiopia moko oyo atángaki bisakweli yango mosusu oyo etali koya ya Masiya Mosikoli. Lokola yango ekamwisaki ye, atunaki Filipo, mopalanganisi ya nsango malamu ete: “Mosakoli azali koloba likambo oyo na ntina na nani?” Kasi ntango mokube yango azwaki eyano, asukaki wana te. Nsima ya kolanda maloba ya Filipo na likebi mpenza, mobali yango amonaki ete komonisa botɔndi mpo na kokokisama ya esakweli yango esɛngi ye azwa ekateli. Akangaki ntina ete asengelaki kobatisama. (Misala 8:32-38; Yisaya 53:3-9) Biso mpe tosalaka bongo?
8. (a) Ndenge Abalayama alingaki kopesa Yisaka lokola mbeka, yango ezalaki komonisa nini? (b) Mpo na nini Yehova ayebisaki Abalayama ete bikólo nyonso ekomizwela mapamboli na nzela ya Mombóto, mpe ndenge nini yango etaleli biso lelo oyo?
8 Tótalela mpe lisolo ya kosimba motema ndenge Abalayama alingaki kopesa Yisaka mbeka, mwana na ye kaka moko oyo abotaki na Sala, lokola mbeka. (Genese 22:1-18) Yango ezalaki komonisa oyo Yehova alingaki kosala—kopesa Mwana-mobotami-se-moko na ye lokola mbeka: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Yango ezali kondimisa biso ete lokola Yehova apesaki Mwana-mobotami-se-moko na ye mpo na kokokisa mokano na ye, “akopesa biso mpe . . . biloko mosusu nyonso.” (Baloma 8:32) Basɛngi biso nini? Lokola ekomami na Genese 22:18, Yehova ayebisaki Abalayama ete bikólo nyonso ekomizwela mapamboli na nzela ya Mombóto, “mpo ete [Abalayama asili] kotosa monɔkɔ ya [Nzambe].” Biso mpe tosengeli kotosa monɔkɔ ya Yehova mpe ya Mwana na ye: “Moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo atosaka Mwana te akomona bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.”—Yoane 3:36.
9. Soki tozali na botɔndi mpo na elikya ya bomoi ya seko oyo tozwi na nzela ya mbeka ya Yesu, tokosala nini?
9 Soki tozali na botɔndi mpo na elikya ya bomoi ya seko oyo tozwi na nzela ya mbeka ya Yesu, tokolinga kosala makambo oyo Yehova alobi na biso na nzela ya Yesu. Makambo yango ezali na boyokani na bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso. (Matai 22:37-39) Yesu amonisaki ete bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kotinda biso tóteya bato mosusu ‘bátosa makambo nyonso oyo [Yesu] apesi biso etinda.’ (Matai 28:19, 20) Mpe tolingi komonisa bolingo na biso epai ya baninga na biso basaleli ya Yehova na “koyangana” mbala na mbala elongo na bango. (Baebele 10:25; Bagalatia 6:10) Lisusu, ntango tozali koyoka Nzambe mpe Mwana na ye, tosengeli kokanisa te ete basɛngaka biso tósala makambo na ndenge ya kokoka. Baebele 4:15 elobi ete Yesu, Nganga-Nzambe Monene, akoki “koyeba komitya na esika na bolɛmbu na biso.” Oyo nde likambo ya kobɔndisa, mingimingi ntango tozali kobɛlɛma na Nzambe na libondeli na nzela ya Klisto mpo na kolonga bolɛmbu na biso!—Matai 6:12.
Tómonisa kondima epai na Yesu Klisto
10. Longola Yesu, mpo na nini moto mosusu te akoki kopesa biso lobiko?
10 Nsima ya koyebisa na esambiselo monene ya Bayuda na Yelusaleme ete bisakweli ya Biblia ekokisamaki epai na Yesu, ntoma Petelo asukisaki na mpiko nyonso ete: “Ezali na lobiko te na kati ya moto mosusu, mpo ezali na nkombo mosusu te na nse ya likoló oyo epesami na kati ya bato oyo na nzela na yango tosengeli kobikisama.” (Misala 4:12) Lokola bakitani nyonso ya Adama bazali bato ya masumu, liwa na bango ezali na valɛrɛ moko te oyo ekoki kosalelama lokola lisiko mpo na kosikola ata moto moko. Kasi Yesu azalaki moto ya kokoka, mpe liwa na ye ezalaki na valɛrɛ ya mbeka. (Nzembo 49:6-9; Baebele 2:9) Apesaki Nzambe lisiko oyo ekokanaki mpenza na valɛrɛ ya bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki. (1 Timote 2:5, 6) Yango epesi biso nzela ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe.
11. Monisá ndenge oyo mbeka ya Yesu ekoki mpenza kopesa biso matomba.
11 Lisiko efungoleli biso mpe nzela mpo tózwa matomba mosusu, ata sikoyo. Na ndakisa, atako tozali bato ya masumu, mbeka ya Yesu epesi biso nzela ya kozala na lisosoli ya pɛto mpo na kolimbisama ya masumu na biso. Yango eleki mosika bambeka ya banyama oyo Bayisalaele bazalaki kopesa, oyo esɛngamaki na Mobeko ya Moize. (Misala 13:38, 39; Baebele 9:13, 14; 10:22) Nzokande, mpo na kozwa bolimbisi ya ndenge wana, tosengeli kondima na bosembo nyonso ete tozali mpenza na mposa ya mbeka ya Klisto: “Soki tozali koloba ete: ‘Tozali na lisumu te,’ tozali komibungisa nzela mpe solo ezali na kati na biso te. Soki tozali koyambola masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa masumu na biso mpe kopɛtola biso uta na makambo nyonso ya kozanga boyengebene.”—1 Yoane 1:8, 9.
12. Mpo na nini kobatisama na mai ezali likambo ya ntina mpo na kozala na lisosoli ya malamu liboso ya Nzambe?
12 Ndenge nini bato ya masumu bakoki komonisa kondima epai na Yesu mpe na mbeka na ye? Na ekeke ya liboso, ntango bato mosusu bakómaki bandimi, bamonisaki yango liboso ya bato nyonso. Na ndenge nini? Bazwaki batisimo. Mpo na nini? Mpo Yesu apesaki etinda ete bayekoli na ye nyonso bázwa batisimo. (Matai 28:19, 20; Misala 8:12; 18:8) Moto akoboya kosala bongo te soki likabo ya bolingo oyo Yesu apesaki esimbi motema na ye. Akosala mbongwana nyonso oyo esengeli na bomoi na ye, akomipesa na Nzambe na kati ya libondeli, mpe akomonisa yango na kozwa batisimo ya mai. Soki moto amonisi kondima na ye na lolenge wana nde akoyebisa ‘lisɛngi na ye epai ya Nzambe mpo na kozala na lisosoli malamu.’—1 Petelo 3:21.
13. Soki tomoni ete tosali lisumu, tosengeli kosala nini, mpe mpo na nini?
13 Ya solo, ata nsima ya batisimo, moto azalaka kaka na bizaleli ya masumu. Bongo esengeli kosala nini? Ntoma Yoane alobi ete: “Nazali kokomela bino makambo oyo mpo bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Mpe ye azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso.” (1 Yoane 2:1, 2) Yango elingi koloba ete ezala ata lisumu nini tosali, soki tobondeli Nzambe mpo na kozwa bolimbisi, akolimbisa biso? Ezali mpenza bongo te. Mpo na kozwa bolimbisi, esengeli mpenza kobongola motema. Mbala mosusu ekoki kosɛnga lisalisi ya bankulutu, bato oyo bayebi makambo mingi na kati ya lisangá ya boklisto. Tosengeli kondima ete likambo tosalaki ezali mabe mpe koyoka mawa mpo na yango mpo ete tósala molende mpenza ete tózongela yango lisusu te. (Misala 3:19; Yakobo 5:13-16) Soki tosali bongo, tokoki komindimisa ete tokozwa lisalisi ya Yesu mpe Nzambe akondima biso lisusu.
14. (a) Lobelá lolenge moko moko ya ntina mingi oyo kati na yango mbeka ya Yesu epesi biso matomba. (b) Soki tozali mpenza na kondima, tokosala nini?
14 Mbeka ya Yesu efungoli nzela ya bomoi ya seko na likoló mpo na “etonga moke,” eteni ya mibale ya mombóto oyo elobelami na Genese 3:15. (Luka 12:32; Bagalatia 3:26-29) Efungoli mpe nzela ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele mpo na bamiliare mosusu ya bato. (Nzembo 37:29; Emoniseli 20:11, 12; 21:3, 4) Bomoi ya seko ezali “likabo oyo Nzambe azali kopesa . . . na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23; Baefese 2:8-10) Soki tozali na kondima na likabo yango mpe tozali na botɔndi mpo na ndenge yango epesamaki, tokomonisa yango. Soki tososoli mpenza ndenge ya kokamwa oyo Yehova asaleli Yesu mpo na kokokisa mokano na Ye mpe soki tososoli ete kolanda matambe ya Yesu malamumalamu ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso, tokosala ete mosala ya kosakola ezala mosala oyo eleki ntina na bomoi na biso. Kondima na biso ekomonana polele na ndenge na biso ya koyebisa bato mosusu bolamu ya likabo kitoko oyo Nzambe apesi.—Misala 20:24.
15. Ndenge nini kondima epai na Yesu esangisaka bato?
15 Kondima ya ndenge wana ezali mpenza kosangisa bato! Na nzela na yango, tokómi na boyokani malamu na Yehova, na Mwana ye, mpe biso na biso na kati ya lisangá ya boklisto. (1 Yoane 3:23, 24) Tozali na esengo mingi lokola Yehova apesi Mwana na ye “nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso, mpo ete na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.”—Bafilipi 2:9-11.
Bozongeli
• Mpo na nini bato oyo bazalaki kondima Biblia bayebaki Masiya polele ntango abimaki?
• Tángá mwa makambo oyo tosengeli kosala mpo na komonisa botɔndi na biso mpo na mbeka ya Yesu.
• Na lolenge nini mbeka ya Yesu esili kopesa biso matomba? Ndenge nini yango esalisaka biso ntango tobondelaka Yehova mpo na kozwa bolimbisi ya masumu na biso?
[Elilingi na lokasa 36]
Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete basengeli koteya bato mosusu bátosa mitinda ya Nzambe