Mokapo 21
Nakosala nini soki bapameli ngai?
Mama azalaki lokola polisi—azalaki koluka ntango nyonso bisika oyo nasalaki malamu te. Liboso nasilisa misala ya ndako, akoya kotalatala mosala oyo nasali mpo aluka mabunga.”—Christian.
“Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso kosilikela ngai. Bazalaki koloba ete nakokoka te kosala makambo na ngai na molɔngɔ. Bazalaki ntango nyonso kolobela ngai mabe mpo na makambo oyo nasalaki na kelasi, na ndako mpe na lisangá.”—Jacques.
EMONANAKA ete ata likambo moko te oyo osalaka ezalaka malamu epai ya baboti na yo? Omonaka ete balandelaka makambo nyonso oyo osalaka ndenge bato batalaka na microscope mpo na komona ata biloko ya mikemike?
Na makambo oyo elandi, oyo wapi balobelaka yo mbala mingi?
□ Shambrɛ na yo ezalaka kaka mobulumobulu.
□ Otalaka televizyo mingi.
□ Olalaka retare mingi.
□ Olamukaka noki te.
Komá awa na nse, likambo oyo esalaka yo mpasi oyo baboti na yo bazongelaka mbala mingi to bapamelaka yo mpo na yango.
․․․․․
Ya solo, mibeko mpe bampamela ekoki kopesa yo nkanda. Kasi, kanisá likambo oyo: Soki bapesaka yo toli to disiplini te, olingaki te komituna soki baboti na yo bakipaka yo? (Baebre 12:8) Ya solo, disiplini emonisaka ete baboti na yo balingi yo. Biblia elobi ete tata apamelaka “mwana oyo ye asepelaka na ye.”—Masese 3:12.
Na yango, okoki kozala na botɔndi ndenge baboti na yo bakipaka yo mpenza mpe basembolaka yo! Kutu, ozali elenge mpe okutaná na makambo mingi te lokola bango. Lelo to lobi, ekosɛnga básembola yo. Soki balakisi yo nzela te, ekozala mpasi te mpo “bamposa ya bolenge” elonga yo.—2 Timote 2:22.
Kasi esalaka mpasi!
Ya solo, “disiplini moko te ezalaka likambo ya esengo na ntango oyo bapesi yango, kasi ezalaka nde mawa.” (Baebre 12:11) Ezalaka mingimingi bongo ntango ozali elenge. Mpe ezali likambo ya kokamwa te! Bomoto na yo ezali kobongwana. Ozali naino kokola mpe koluka komiyeba. Na yango mpamela, ata soki ebongisami malamu mpe epesami na boboto, ekoki kopesa yo nkanda.
Kosilika ya ndenge wana ezali mabe te, mpo makambo oyo basusu balobaka mpo na yo, ekoki kobebisa lolenge oyo omitalelaka. Mpe mingimingi makambo oyo baboti na yo bazali koloba ekoki kobongola ndenge oyo omimonaka. Na yango, ntango moboti asemboli yo to amonisi ete asepeli te na ndenge oyo osali likambo moko, okoki koyoka mpasi.
Osengeli koloba ete osalaka ata eloko moko te ya malamu to ete ozali mpamba, kaka mpo baboti na yo bamonisi yo mwa mabunga na yo? Te. Bato nyonso basalaka mabunga mingi. (Mosakoli 7:20) Mpe kosala mabunga, ezali na kati ya makambo oyo moto ayekolaka ntango azali kokola. (Yobo 6:24) Bongo soki omoni ete baboti na yo balobaka mingi ntango osali likambo ya mabe, kasi balobaka mpenza te ntango osali likambo ya malamu? Ekoki kosala mpasi. Atako bongo, yango elingi koloba te ete okobonga lisusu te.
Ntina ya mpamela
Moboti akoki kopamela yo, ntango mosusu mpo osali likambo moko boye te, kasi nde mpo alamuki malamu te. Mokolo ya lelo elekaki malamu te mpo na mama na yo? Azali kobunda na maladi moko boye? Boye akoki kobanda kogangela yo mpambampamba soki shambrɛ na yo ebongisami malamu te. Papa na yo azali nkandankanda mpe azali komitungisa mpo azangi mbongo ya kosalisa libota? Boye akoki koloba kozanga kokanisa “lokola nde azali kozokisa na mopanga.” (Masese 12:18) Ya solo, kogangela yo kaka mpamba ndenge wana epesaka nkanda. Kasi, na esika obomba yango na motema, mpe epesa yo nkanda koleka, meká kobosana mabunga ya baboti na yo. Kobosana te: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka.”—Yakobo 3:2.
Lokola bazali bato ya kozanga kokoka, baboti na yo mpe bakoki komiyoka lokola bakokoka te kosala likambo ya malamu. Kutu, soki yo olongi te, bakoki komona lokola bango nde balongi te. Na ndakisa, mama akoki kopamela mwana na ye ya mwasi soki auti kelasi na bilɛtɛ moko oyo ezali na bapwɛ ya malamu te. Mama akoki kokanisa boye: ‘Nazali kobanga nabima mama mabe mpo nazali kokoka te kosalisa mwana na ngai alonga na kelasi.’
Zalá kaka kimya
Ata soki bapameli yo mpo na ntina nini, motuna yango oyo: Ndenge nini okoki kosala? Ya liboso, kotomboka te. Masese 17:27 elobi boye: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi, mpe moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.” Ndenge nini okoki kozala na “elimo ya kimya” ntango bazali kogangela yo? Meká kosala boye:
Yoká. Na esika oluka nokinoki komilongisa to omonisa ete ozali na likambo te, salá makasi osilika te mpe yoká makambo oyo baboti na yo bazali koloba. Moyekoli Yakobo ayebisaki bakristo ete ‘báyokaka noki, báwelaka koloba te, báyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19) Soki ozali kokata baboti na yo maloba na nkanda nyonso ntango bazali koloba, bakokanisa ete ozali koyoka te. Ekotungisa bango mpe ekozanga te mbala mosusu kotinda bango bápesa yo batoli lisusu mingi.
Tyá likebi. Na ntango mosusu, okoki komona ete toli ya baboti na yo epesamaki na boboto mpenza te. Na esika okanisa kaka ndenge toli yango epesamaki, tyá nde likebi na makambo oyo elobamaki. Omituna boye: ‘Na makambo oyo basemboli ngai, likambo nini namoni ete ezali solo? Nayokaki baboti na ngai bazali komilela liboso mpo na likambo yango? Ekosala nini soki nasali ndenge balingi?’ Kobosana te, ata soki okoki komona yango ndenge nini sikoyo, baboti na yo bazali komitungisa mpo balingi yo. Soki bayinaka yo, mbɛlɛ balingaki kopesa yo disiplini ata moke te.—Masese 13:24.
Zongelá na maloba mosusu. Soki ozongeli makambo oyo baboti na yo balobi mpe oyebisi bango yango na limemya, bakomona mpenza ete oyoki makambo oyo balobi. Na ndakisa, moboti akoki koloba boye: “Otikaka shambrɛ na yo ntango nyonso kaka mobulumobulu. Soki obongisi yango te, okobima te!” Mbala mosusu yo moko okoki komona ete shambrɛ na yo ezali malamu. Kasi, soki olobi bongo, okobongisa makambo te. Meká kotalela makambo ndenge baboti bazali kotalela yango. Na ndakisa, kozanga lityo, ekozala malamu, oloba boye: “Ya solo. Shambrɛ na ngai ezali mobulumobulu. Okolinga nabongisa yango kaka sikoyo to nsima ya kolya?” Soki ondimi makanisi ya baboti na yo na ndenge wana, mɔtɔ ekopela te. Kobosana te, tókende epai tózonga, osengeli kosala oyo baboti na yo balobi osala.—Baefese 6:1.
Zelá. Salá naino nyonso oyo baboti na yo balingi osala, na nsima nde okoki kopesa makanisi na yo. Biblia elobi boye: “Ye oyo apekisaka mbɛbu na ye azali kosala na mayele.” (Masese 10:19) Soki baboti na yo bamoni ete ozali mpenza koyoka bango, bakobanda mpe koyoka yo.
Na makambo minei oyo touti kolobela, komá moko oyo omoni ete osengeli mpenza kobongisa.✎
Ntina oyo osengeli kosala milende
Okondima komona mpasi mpo na nakozwa liboke ya wolo? Nzokande, Biblia elobi ete bwanya ezali na valɛrɛ mingi koleka eloko nyonso ya motuya. (Masese 3:13, 14) Ndenge nini okoki kokóma na bwanya? Masese 19:20 elobi boye: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.” Ya solo, toli mpe disiplini ekoki kopesa mwa mpasi. Kasi soki ozali kozwa mwa bwanya na mpamela oyo bazali kopesa yo mpe ozali kosalela yango, okozwa eloko oyo eleki mosika wolo na motuya.
Tóndima yango: Na bomoi, bakozanga te kopamela biso mpo na likambo moko ya mabe. Lelo oyo, ozali kozwa mpamela ya baboti mpe balakisi na yo. Na mikolo ezali koya, okozwa yango epai ya patrɔ na yo mpe bato mosusu. Yekolá ndenge ya kosala ntango bapameli banda na ndako, mpe okokóma moyekoli oyo azali kokende liboso, mosali ya malamu, mpe moto oyo bato bakoki kotyela motema. Ya solo, ezali mpenza na ntina kondima mwa mpamela ata moke mpo na kozwa matomba nyonso wana!
Mibeko na ndako etyaka yo nkaka? Yebá kosepela na mwa bonsomi oyo ozali na yango, mpe ndenge okoki kozwa mingi koleka.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi.”—Masese 1:5.
TOLI
Mpo na kosalisa yo ondimaka disiplini ya baboti na yo:
● Sepeláká soki bapesi yo longonya mpe soki bapameli yo.
● Tuná bálimbola yo soki oyoki malamu te likambo oyo balobi ete osali to oyo basɛngi yo osala.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Baboti mosusu bakokaka te kosalela bana na bango makambo na bolingo mpo baboti na bango moko bazalaki komonisela bango bolingo mpenza te mpe bazalaki komitya na esika na bango te.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mbala ya nsima oyo baboti na ngai bakopamela ngai, nako ․․․․․
Soki namoni ete baboti na ngai bazali kopamela ngai mingi, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini ekoki kozala mpasi ondima mpamela?
● Nini ekoki kotinda baboti na yo bápamela yo?
● Ndenge nini okoki mpenza kozwa litomba na toli nyonso oyo ozali kozwa?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 177]
‘‘Mama na ngai azalaki kogangela ngai ntango nyonso mpe ngai nazalaki kozongisela ye. Kasi sikoyo nazali komeka kosalela makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi. Ezali kosimba. Mama abandi kobongola ezaleli na ye. Kosalela toli ya Biblia, esalisi ngai nakóma koyeba ye malamu koleka. Boyokani na biso ebongi.’’—Maryline.
[Elilingi na lokasa 180]
Soki ozali kozwa ata bwanya moke na mpamela nyonso oyo ozali kozwa, okozwa eloko oyo eleki mosika wolo na motuya