Mokapo 24
Nakosala nini soki baboti na ngai baswanaka?
Baboti na yo basilá koswana na miso na yo? Soki ezali bongo, na makambo oyo elandi, wapi likambo oyo baswanelaka mingi?
□ Mbongo
□ Misala ya ndako
□ Bandeko na bango
□ Yo
Makambo nini okolinga koyebisa baboti na yo mpo báyeba ete koswana na bango esalaka yo mabe? Komá makanisi na yo awa na nse.
․․․․․
KOSWANA ya baboti na yo esengeli kaka kopesa yo mpasi. Ezali bongo mpo olingaka bango, mpe ozelaka ete básalisa yo. Yango wana, okoki kosila mayele soki oyoki bango bazali koswana. Mbala mosusu okondima maloba ya elenge mwasi moko na nkombo Marie, oyo alobaki ete: “Ezali mpasi mpo napesa baboti na ngai limemya soki emonani ete bango moko bapesanaka limemya te.”
Komona baboti na yo bazali koswana ekotinda yo ondima likambo oyo okokaki kondima te: Baboti bazali malamu te ndenge okanisaki. Koyeba likambo ya ndenge wana ekoki kotinda yo obanga makambo ndenge na ndenge. Soki bazali koswana mbala mingi mpe makasi, okoki kobanga ete libala na bango elingi kokufa. Marie alobi boye: “Ntango nayokaki baboti na ngai bazali kobunda, nakanisaki ete bakoboma libala mpe ete nasengeli napona moboti oyo nakofanda na ye. Lisusu nabangaka ete nakokabwana na baleki na ngai.”
Baboti babundaka mpo na nini, mpe osengeli kosala nini ntango koswana ebimi na kati ya libota?
Ntina oyo baboti babundaka
Mbala mingi, baboti na yo ‘bakangaka motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo.’ (Baefese 4:2) Kasi Biblia elobi boye: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Baroma 3:23) Baboti na yo bazali bato ya kokoka te. Na yango, kokamwa te soki nkanda na bango emati mpe mbala mosusu bakómi koswana.
Lisusu, kobosana te ete tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Mikakatano mpo na koleisa libota, kofuta banyongo, mikakatano na esika ya mosala—makambo wana nyonso ekɔtisaka mitungisi mosusu na libala. Mpe soki baboti nyonso bakendaka mosala, koyeba soki nani akosala misala ya ndako ekoki kobimisa kowelana.
Yebá ete soki baboti na yo bazali na matata, yango elingi koloba te ete libala na bango elingi kaka kokufa. Mbala mosusu baboti na yo bazali naino kolingana mpenza—ata soki bayokani te na makambo mosusu.
Tozwá ndakisa: Osilá kotala filme moko ná baninga na yo ya motema mpe ekómelá yo omona ete makanisi na yo mpo na filme yango ekeseni na oyo ya bango? Ekoki kosalema. Ata bato oyo bazali na boyokani makasi bakoki kozala na makanisi ekeseni na makambo mosusu. Ekoki kozala mpe bongo mpo na baboti na yo. Mbala mosusu bango mibale bazali komitungisa mpo na mbongo ya libota, kasi mokomoko na bango azali na likanisi ekeseni mpo na ndenge ya kosalela mbongo yango; bango mibale balingi ete libota ekende na konje, kasi mokomoko na bango azali na ndenge na ye ya kotalela kominanola; to mpe balingi ete ozwa na kelasi, kasi mokomoko na bango azali na ndenge oyo amoni ete eleki malamu mpo na kolendisa yo.
Likambo ya solo ezali ete kozala na bomoko elimboli te koyokana na makambo nyonso. Na ntango mosusu, bato mibale oyo balingani bakoki komona makambo ndenge ekeseni. Atako bongo, ekoki kozala mpasi mpo ondima matata ya baboti na yo. Okoki kosala to koloba nini mpo esalisa yo oyika mpiko?
Oyo osengeli kosala
Zalá na limemya. Ezalaka mpasi te okóma kosilikela baboti oyo baswanaka ntango nyonso. Mpo bango nde basengeli kozala ndakisa malamu mpo na yo—kasi yo te nde osengeli kozala ndakisa na bango. Atako bongo, soki ozali na limemya te epai ya moboti na yo, ekobakisa kaka matata na libota. Longola yango, Yehova Nzambe apesi yo mobeko ya komemya mpe kotosa baboti na yo—ata ntango ezali pɛtɛɛ te mpo osala yango.—Kobima 20:12; Masese 30:17.
Okosala nini soki bayokani te na likambo moko oyo etali nde yo? Na ndakisa, soki moboti na yo moko azali Motatoli mpe mosusu azali Motatoli te. Matata ekoki kobima soki yo ozwi ekateli ya kolanda moboti na yo oyo azali Motatoli. (Matai 10:34-37) Saláká yango ntango nyonso “na boboto mpe na limemya makasi.” Mokolo mosusu, ndakisa na yo ekoki kosalisa mpo na kolonga moboti na yo oyo azali mondimi te.—1 Petro 3:15.
Kokɔtela moboti moko te. Okosala nini soki baboti na yo bazali kotya yo mbamba omitya na ngámbo ya moko na bango na makambo oyo etali mpenzampenza yo te? Salá makasi okɔtela ata moboti moko te. Mbala mosusu okoki koboya na boboto, mpe koloba maloba lokola oyo: “Papa ná Mama, nalingaka bino nyonso mibale. Kasi, nabondeli bino, bósɛnga ngai te ete napona nakɔtela moko na bino. Wana ezali likambo oyo bosengeli kosilisa bino moko.”
Sololá na bango. Yebisá baboti na yo ndenge koswana na bango esalaka yo. Poná ntango oyo okanisi ete bakoyoka yo malamu mpe na limemya nyonso, yebisá bango ndenge kobunda, kosilika na bango epesaka yo mawa, to mpe kutu ebangisaka yo.—Masese 15:23; Bakolose 4:6.
Oyo osengeli kosala te
Komeka te kozala mopesi-toli na makambo ya libala. Lokola ozali elenge, okoki te kosilisa matata ya baboti na yo. Tópesa ndakisa: Kanisá ete ozali kosala mobembo na aviɔ moko ya moke mpe oyoki ete pilote ná pilote mosungi bazali koswana. Na ntembe te, ekosala yo mawa. Kasi, ekozala ndenge nini soki okei koyebisa bapilote yango ndenge ya kotambwisa aviɔ to kutu olingi omeka kotambwisa na esika na bango?
Ndenge moko mpe, koluka ‘kotambwisa,’ to komikɔtisa na matata oyo baboti na yo bazali na yango na libala ekoki nde kobebisa lisusu. Biblia elobi boye: “Na lofundo, moto abimisaka kaka etumba, kasi bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” (Masese 13:10) Na ntembe te, baboti na yo bakoki kosilisa malamu matata na bango soki basololi bango moko.—Masese 25:9.
Komikɔtisa na koswana te. Soki bato mibale bazali koswana, makelele ezalaka makasi. Sikoyo, ekozala boni soki yo moto ya misato okɔti? Ata soki oyoki mposa makasi ya kokɔta na koswana yango, baboti na yo nde bazali na mokumba ya kosilisa matata bango, kasi yo te. Na yango, salá makasi olanda toli ya Biblia ya “kokɔta na makambo ya bato te,” ntango baboti na yo bazali na matata. (1 Batesaloniki 4:11) Komikɔtisa na koswana yango te.
Kopelisa mɔtɔ te na kati ya baboti. Bilenge mosusu balendisaka mpenza baboti na bango báswana na ndenge babimisaka matata kati na bango. Ntango mama na bango aboyi likambo moko, bakei epai ya papa mpo na kolɛngola ye mpo andimela bango likambo oyo mama aboyi. Kosala na mayele ndenge wana ekoki kopesa mwa bonsomi, kasi nsukansuka, ebakisaka matata na libota.
Kotika te ete ezaleli na bango ebebisa ezaleli na yo. Elenge moko na nkombo Peter ayaki komona ete azalaki na etamboli oyo ebongi na bakristo te mpo na kozongisa mabe oyo papa na ye asalaki. Alobi boye: “Nalingaki nayokisa ye mpasi. Nakangelaki ye nkanda makasi mpo na makambo oyo azalaki kosala ngai, mama mpe leki na ngai ya mwasi.” Kasi, eumelaki te, Peter abukaki mbuma ya mabe ya makambo azalaki kosala. Liteya nini tokoki kozwa? Ezaleli ya mabe ekobakisa nde mikakatano oyo ozali kokutana na yango na ndako.—Bagalatia 6:7.
Na makambo oyo tomoni na mokapo oyo, komá oyo osengeli mpenza kobongisa. ․․․․․
Tomoni polele ete okoki te kopekisa baboti na yo koswana. Kasi, yebá mpenza ete Yehova akoki kosalisa yo oyika mpiko na mitungisi oyo koswana ya baboti na yo ezali kobimisela yo.—Bafilipi 4:6, 7; 1 Petro 5:7.
Salá makasi mpo osalela makanisi oyo tolobeli na likoló. Ntango mosusu, yango ekoki kotinda baboti na yo báluka mpenza ndenge ya kosilisa mikakatano na bango. Nani ayebi soki mbala mosusu bakoki ata kotika koswana.
Okoki kosala nini mpo olonga mikakatano oyo ekómelaka bana oyo bazali na moboti kaka moko?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko.”—Bakolose 4:6.
TOLI
Soki baboti na yo baswanaka mbala mingi mpe makasi, yebisá bango na limemya ete báluka lisalisi.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Bato oyo balinganaka bakoki ntango mosusu koyokana te.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Soki baboti na ngai babandi koswana, nako ․․․․․
Soki baboti na ngai basɛngi ngai nakɔtela moko na bango, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini baboti mosusu baswanaka?
● Mpo na nini ozali na foti te mpo na makambo ya baboti na yo?
● Liteya nini okoki kozwa soki ozali kotala makambo oyo baboti na yo basalaka?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 201]
‘‘Koyeba ete baboti na ngai bazali bato ya kokoka te mpe ete bazali na mikakatano lokola ngai esalisaka ngai nalɛmba nzoto te ntango bazali koswana.’’—Kathy
[Etanda/Bililingi na lokasa 206, 207]
Nakosala nini soki baboti na ngai bakabwani?
Soki baboti na yo bakabwani, ndenge nini okoki kosala na bwanya atako likambo yango ezali kosala yo mpasi na motema? Talá makanisi oyo elandi:
● Kotya motema te na makambo oyo ekosalema te. Likanisi na yo ya liboso ekoki kozala ya komeka kozongisa boyokani kati na baboti na yo. Anne azali kokanisa lisusu boye: “Nsima ya kokabwana, baboti na ngai bazalaki naino na ntango mosusu komema biso libota mobimba tókende kotambola elongo. Ngai ná yaya na ngai ya mwasi tozalaki kolobana na mongongo ya nse boye: ‘Tókende liboso mpe tótika kaka bango mibale na nsima.’ Kasi nakanisi esimbaki te. Bazonganá te.”
Mokanda ya Masese 13:12 elobi boye: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” Mpo omitungisa mingi te koleka, kobosana te ete okoki te kopekisa makambo oyo baboti na yo bazali kosala. Yo te moto okabolaki bango, mpe mbala mosusu okoki kosala eloko moko te mpo na kozongisa libala na bango.—Masese 26:17.
● Koyina bango te. Kobomba nkanda mpe koyina moboti moko to bango mibale ekoki kosala yo mabe ntango molai. Tom akanisi ndenge ayokaki ntango azalaki na mbula 12 mpe alobi boye: “Nakómaki mpenza na nkanda ya papa. Nalingi kosalela liloba ‘koyina’ te, kasi nazalaki mpenza na nkanda na ye. Nakokaki kondima te ete akokipe biso soki atiki biso.”
Kasi, ezali mpasi mpo baboti bakabwana kaka mpo moboti moko azali mabe mpe moboti mosusu azali malamu. Ezali solo ete baboti na yo bayebisá yo te makambo nyonso oyo esali ete bakabwana; ekoki kozala mpe ete bango moko bayebi yango malamu te. Na yango, tiká kosambisa bango soki oyebi makambo nyonso te. (Masese 18:13) Ya solo, ezalaka mpasi te koyoka nkanda, mpe ezali mabe te soki na ntango mosusu otungisami. Kasi kobomba nkanda mpe ezaleli ya kozongisa mabe na mabe ekoki mokemoke kobebisa bomoto na yo. Yango wana Biblia eyebisi biso ete: “Tiká nkanda, mpe tiká kotomboka.”—Nzembo 37:8.
● Ndimá makambo ndenge ezali. Na esika ya koyina moboti oyo atiká bango, bilenge mosusu bakómaka kosepela mingi na ye mpe kokumisa ye mingi. Na ndakisa, elenge moko azalaki na tata oyo azalaki kolangwa masanga mpe kolinga basi mosusu; mbala mingi azalaki kotika libota mpe nsukansuka abomaki libala. Kasi, elenge yango alobi ete mpo na makambo mosusu oyo ye moko ayebi, azalaki kaka kokumisa papa na ye!
Bilenge mingi bakumisaka baboti na lolenge wana ya mabe. Na mboka moko, bana mingi (90 %) oyo baboti na bango babomá libala bafandaka na bamama na bango mpe bakendaka kotala bapapa na bango. Na yango, mbala mingi mama nde azalaka na mokumba ya kobatela bana mokolo na mokolo—ata mpe kopesa bango disiplini. Mpe atako bapesaka ye mwa lisungi ya mbongo, mama akómaka na mikakatano ya mbongo nsima ya koboma libala. Kasi, tata akoki kokóma na mbongo ebele mpo azali lisusu te na mokumba ya libota. Yango wana: soki mwana akei kotala tata akozwa bakado mingi mpe akosepela! Kasi soki ozali ná mama, okoyoka kaka makambo lokola tóbatela mbongo, kosala likambo boye to te. Likambo ya mawa, bilenge mosusu batikaki moboti oyo azali Motatoli mpo na kokende epai ya moboti oyo azali Motatoli, kasi azali na mbongo mingi mpe oyo akotika bango básala nyonso balingi.—Masese 19:4.
Soki oyoki mposa ya kosala ndenge wana, talelá malamu makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na yo. Kobosana te ete ozali na mposa bátambwisa yo mpe bápesa yo disiplini. Kotambwisa mpe kopesa disiplini oyo baboti bakoki kopesa yo, ezali makambo ya ntina oyo ekoki kobongisa bomoi na yo, koleka eloko mosusu nyonso oyo bakoki kopesa yo.—Masese 4:13.
[Elilingi na lokasa 202, 203]
Elenge oyo azali koyebisa baboti na ye ndenge ya kosilisa matata na bango azali lokola moto ya mobembo oyo azali koyebisa bapilote ndenge ya kotambwisa aviɔ