MOKAPO 27
“Apesaki litatoli malamumalamu”
Ntango Paulo azalaki mokangami na Roma, atikaki te kosakola
Euti na Misala 28:11-31
1. Paulo ná baninga na ye bazalaki na elikya nini, mpe mpo na nini?
NA MOBU soki 59 T.B., masuwa moko, oyo na ntembe te ezalaki masuwa monene oyo ezalaki komema mbuma, mpe oyo motó na yango ezalaki na elembo “Bana ya Zeusi,” elongwaki na esanga ya Malta mpe ezalaki kokende na Itali. Ntoma Paulo oyo azalaki mokangami, akɔtaki na masuwa yango elongo na basoda oyo bazalaki kokɛngɛla ye; baninga na ye bakristo, Luka ná Aristarke, bakɔtaki mpe elongo na bango. (Mis. 27:2) Na bokeseni na bato ya masuwa, Paulo ná baninga na ye, oyo bazalaki bapalanganisi ya nsango malamu, bazalaki te koluka libateli ya Castor ná Pollux, bana-mapasa ya Zeusi, nzambe ya Bagrɛki. (Mis. 28:11) Paulo ná baninga na ye bazalaki basaleli ya Yehova, oyo ayebisaki Paulo ete akopesa litatoli mpo na solo na Roma mpe akotɛlɛma liboso ya Kaisala.—Mis. 23:11; 27:24.
2, 3. Masuwa oyo Paulo azalaki elekaki na bisika nini, mpe lisungi nini Paulo azwaki banda na ebandeli?
2 Mikolo misato nsima ya kosɛma na Sirakuse, engumba moko kitoko ya esanga ya Sisilia, oyo ezalaki na makambo lokola Atene to mpe Roma, masuwa ekendaki na Regiume na sudi ya Itali. Na nsima, lokola mopɛpɛ oyo ezalaki kouta na sudi ezalaki kobɛta na nsima, masuwa etambolaki mbangu; esalaki kilomɛtrɛ 320 tii na libongo ya Puteoli (pembeni ya engumba Naples lelo oyo), bakómaki kuna na mokolo ya mibale.—Mis. 28:12, 13.
3 Paulo akómaki na eteni ya nsuka ya mobembo na ye mpo na kokende na Roma, epai asengelaki kosamba liboso ya Amperɛrɛ Néron. Banda na ebandeli, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” azalaki elongo na Paulo. (2 Ko. 1:3) Ndenge tokomona yango, ata na eteni yango Nzambe akotika Paulo te, ye mpe akobungisa te molende na ye ya kosakola.
“Paulo . . . apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko” (Misala 28:14, 15)
4, 5. (a) Ndenge nini Paulo ná baninga na ye bayambamaki na Puteoli, mpe ekoki kozala mpo na nini bapesaki ye bonsomi ya ndenge wana? (b) Matomba nini bakristo bakoki kozwa mpo na etamboli na bango ya malamu ata ntango bazali na bolɔkɔ?
4 Na Puteoli, Paulo ná baninga na ye ‘bakutanaki na bandeko mpe bandeko yango babondelaki bango báfanda elongo na bango mikolo nsambo.’ (Mis. 28:14) Bakristo yango bamonisaki ndakisa malamu ya boyambi! Na ntembe te, bandeko yango ya boboto bazwaki mbano monene na ndenge Paulo ná baninga na ye balendisaki bango. Kasi, ndenge nini mokangami oyo basoda bazalaki kokɛngɛla akokaki kozala na bonsomi ya ndenge wana? Ekoki kozala ete basoda ya Roma oyo bazalaki kokɛngɛla ye bakómaki kotyela ye mpenza motema.
5 Na ntango na biso mpe, ntango basaleli ya Yehova bakɔtaki bolɔkɔ to na bakaa ya bakangami, mbala mingi etamboli na bango ya malamu esalaki ete bátikela bango bonsomi mpe bápesa bango nzela ya kosala makambo mosusu. Na ndakisa, na ekólo Roumanie, mobali moko oyo bakatelaki etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 75 mpo na moyibi, akómaki koyekola Liloba ya Nzambe mpe abongwanaki mpenza. Mpo na yango, bakonzi ya bolɔkɔ bapesaki ye nzela abimaka libándá, kozanga ete soda moko akɛngɛla ye, mpo akende kosomba biloko mpo na bolɔkɔ mobimba! Kasi, etamboli na biso ya malamu epesaka libosoliboso Yehova nkembo.—1 Pe. 2:12.
6, 7. Ndenge nini bandeko ya Roma bamonisaki bolingo mingi?
6 Kolongwa na Puteoli, Paulo ná baninga na ye batambolaki makolo kilomɛtrɛ soki 50 tii na Capoue, na nzela oyo babengi Via Appia, oyo ekendaki tii na Roma. Moto oyo azali kotambola na nzela monene wana oyo etongamaki na mabanga, akokaki komona bazamba ya Itali mpe, na bisika mosusu, akokaki komona Mbu Mediterane. Nzela yango elekaki mpe na marais Pontins, etando moko monene oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ mingi, epai Zando ya Apiusi ezalaki, na kilomɛtrɛ soki 60 liboso ya kokóma na Roma. Luka akomaki ete ntango bandeko na Roma “bayokaki nsango na biso,” bamosusu kati na bango bayaki tii na Zando ya Apiusi, mpe bamosusu bazelaki na Tavɛrnɛ-Misato, esika moko oyo bato ya mobembo bazalaki kopema, na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 na Roma. Bandeko yango bamonisaki bolingo mingi mpenza!—Mis. 28:15.
7 Zando ya Apiusi ezalaki na eloko moko te oyo ekokaki kosalisa moto ya mobembo oyo alɛmbi mingi mpo apema mwa moke. Horace, Moroma moko oyo azalaki mokomi ya maloba ya ntɔki, amonisaki ete esika yango “etondaki na bato ya masuwa mpe bakɛngɛli ya baotɛlɛ oyo bazalaki bato ya lofundo.” Akomaki ete “mai ezalaki mabe mpenza.” Kutu, mokomi yango aboyaki kolya kuna! Nzokande, atako makambo mingi ezalaki mabe, bandeko oyo bautaki na Roma basepelaki mingi kozela Paulo ná baninga na ye na esika wana mpo bátambola na bango eteni ya nsuka ya mobembo na bango.
8. Mpo na nini Paulo apesaki Nzambe matɔndi “ntango amonaki” bandeko na ye?
8 Lisolo elobi boye: “Ntango Paulo amonaki [bandeko,] apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Mis. 28:15) Ya solo, Paulo alendisamaki na ndenge kaka amonaki bandeko, oyo bamosusu kati na bango ayebaki. Mpo na nini Paulo apesaki Nzambe matɔndi? Ayebaki ete bolingo ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22) Ndenge moko mpe lelo oyo, elimo santu etindaka bakristo bándima komipimela makambo mosusu mpo na bandeko na bango mpe bábɔndisa baoyo bazali na bosɛnga.—1 Tes. 5:11, 14.
9. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bandeko oyo bakendaki koyamba Paulo?
9 Na ndakisa, elimo santu etindaka bandeko mosusu báyamba bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, mpe bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso oyo, mingi kati na bango bamipimeli makambo mosusu mpo bámipesa mobimba na mosala ya Yehova. Okoki komituna boye: ‘Nakoki kosala nini mpo makambo eleka malamu ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na biso? Nakoki nde koyamba ye ná mwasi na ye na ndako na ngai to kosunga bango na lolenge mosusu? Nakoki nde kobongisa programɛ na ngai mpo nabima na bango na mosala ya kosakola?’ Kosala bongo ekoki komemela yo mapamboli mingi. Na ndakisa, kanisá esengo oyo bandeko ya Roma bayokaki ntango Paulo ná baninga na ye bazalaki kobɛtɛla bango masolo ya kolendisa ya makambo oyo bakutanaki na yango.—Mis. 15:3, 4.
‘Esika nyonso bazali koloba mabe mpo na yango’ (Misala 28:16-22)
10. Paulo azalaki na bomoi ya ndenge nini na Roma, mpe mwa mikolo nsima ya kokóma kuna asalaki nini?
10 Ntango Paulo ná bandeko oyo asalaki na bango mobembo bakɔtaki na Roma, “bapesaki Paulo nzela ya kofanda ye moko elongo na soda oyo azalaki kokɛngɛla ye.” (Mis. 28:16) Mbala mingi, mpo moto oyo azali mokangami kasi atyami na bolɔkɔ te akima te, bazalaki kokanga ye na monyɔlɔlɔ oyo ekangaki mpe soda oyo azalaki kokɛngɛla ye. Atako bongo, Paulo azalaki mosakoli ya Bokonzi, mpe monyɔlɔlɔ ekokaki kokanga ye monɔkɔ te. Yango wana, nsima ya kopema mikolo misato mpamba, abengisaki bato minene na kati ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Roma mpo na komimonisa epai na bango mpe kopesa bango litatoli.
11, 12. Ntango Paulo alobaki epai ya bandeko na ye Bayuda, ndenge nini alukaki kolongola makanisi nyonso ya mabe oyo bakokaki kozala na yango?
11 Paulo alobaki na bango boye: “Mibali, bandeko, atako nasalaki eloko moko te ya mabe epai ya bato to na mimeseno ya bankɔkɔ na biso, bakangaki ngai na bolɔkɔ na Yerusaleme mpe bakabaki ngai na mabɔkɔ ya Baroma. Mpe nsima ya kosambisa ngai, balingaki kotika ngai, mpo bakutaki epai na ngai ata eloko moko te oyo ebongaki na etumbu ya liwa. Kasi lokola Bayuda bazalaki kaka koboya ete bátika ngai, likambo mosusu ya kosala ezalaki te, nasɛngaki nakende kosamba epai ya Kaisala. Kasi ezali te lokola nde nazali kofunda ekólo na ngai.”—Mis. 28:17-19.
12 Lokola Paulo abengaki Bayuda wana “bandeko,” alukaki kosalisa bango bálongola makanisi nyonso ya mabe oyo bakokaki kokanisela ye. (1 Ko. 9:20) Lisusu, ayebisaki bango polele ete azalaki kuna te mpo na kofunda bandeko na ye Bayuda, kasi mpo na kosamba liboso ya Kaisala. Nzokande, Bayuda ya Roma bayokaki ata nsango te ete Paulo asɛngaki ete aya kosamba liboso ya Kaisala. (Mis. 28:21) Mpo na nini Bayuda bazwaki nsango te ya makambo oyo ezalaki koleka na Yudea? Buku moko elobi boye: “Ekoki kozala ete masuwa oyo ememaki Paulo ezalaki moko na bamasuwa ya liboso oyo ekómaki na Itali nsima ya eleko ya mpiɔ, mpe ekoki kozala ete batindami ya bayangeli ya Bayuda na Yerusaleme to mpe mokanda na bango ekómaki naino na Roma te.”
13, 14. Ndenge nini Paulo akɔtisaki likambo ya Bokonzi na lisolo na ye, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
13 Na nsima, Paulo alobelaki Bokonzi na maloba oyo ekokaki te kozanga kobenda likebi ya Bayuda. Alobaki boye: “Yango wana nasɛngaki namona bino mpe nasolola na bino, mpamba te ezali mpo na elikya ya Yisraele nde nazali na minyɔlɔlɔ oyo.” (Mis. 28:20) Nzokande, elikya yango esengelaki kokokisama na nzela ya Bokonzi ya Masiya, oyo bakristo ya liboso bazalaki kosakola. Mikóló ya Bayuda bapesaki eyano ete: “Tomoni ete ezali malamu tóyoka yo moko soki ozali kokanisa nini, mpo toyebi ete esika nyonso bazali koloba mabe mpo na mwa lingomba oyo.”—Mis. 28:22.
14 Ntango tozwi libaku ya kosakola nsango malamu, tokoki kolanda ndakisa ya Paulo mpe kotuna mituna oyo ekotinda bato bákanisa mpo na kobenda likebi na bango. Na likambo yango, tokoki kozwa makanisi ya malamu mpenza na buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya. Osalelaka malamu mikanda yango?
‘Kopesa litatoli malamumalamu’—Ndakisa mpo na biso (Misala 28:23-29)
15. Tángá makambo minei oyo tokoki kosimba na ndenge oyo Paulo apesaki litatoli.
15 Na mokolo oyo bayokanaki, Bayuda oyo bazalaki kofanda na Roma “bayaki ebele mpenza” na ndako ya Paulo. Paulo alimbolaki bango makambo “kobanda ntɔngɔ tii mpokwa alimbwelaki bango likambo yango na ndenge apesaki litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpo na kondimisa bango na oyo etali Yesu, kobanda na Mibeko ya Moize mpe Basakoli.” (Mis. 28:23) Tokoki kosimba makambo minei na ndenge oyo Paulo apesaki litatoli. Ya liboso, alobelaki mingi Bokonzi ya Nzambe. Ya mibale, alukaki kosimba mitema ya bayoki na ye na kosaleláká mayele ya kondimisa. Ya misato, azalaki kosalela Makomami mpo na kondimisa bango. Ya minei, amonisaki elimo ya komipimela na ndenge apesaki bango litatoli “kobanda ntɔngɔ tii mpokwa.” Yango ezali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Nyonso wana ebotaki mbuma nini? Luka akomaki ete: “Bamosusu babandaki kondima,” kasi bamosusu baboyaki. Bato yango bakabwanaki mpe “babandaki kokende.”—Mis. 28:24, 25a.
16-18. Mpo na nini Paulo akamwaki te ntango Bayuda mosusu ya Roma baboyaki kondima nsango malamu, mpe tosengeli koyokaka ndenge nini te ntango bato baboyi nsango na biso?
16 Paulo akokaki kokamwa te na komona ete bato mosusu bandimi, kasi bamosusu bandimi te, mpo yango ekokisaki esakweli ya Biblia mpe ekesanaki te na ezaleli oyo bato bamonisaki liboso. (Mis. 13:42-47; 18:5, 6; 19:8, 9) Yango wana, Paulo alobaki epai ya bato oyo bandimaki te ete: “Elimo santu elobaki na ntina mpenza na nzela ya mosakoli Yisaya epai ya bankɔkɔ na bino, ete, ‘Kende epai ya bato oyo mpe lobá: “Bokoyoka kasi bokokanga ntina ata moke te; mpe bokotala kasi bokomona ata moke te. Mpo motema ya bato oyo ekómi makasi.”’” (Mis. 28:25b-27) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ekómi makasi” elimboli “ekómi mafutamafuta,” mpe na bongo, ezali kopekisa nsango ya Bokonzi ekɔta na motema. (Mis. 28:27) Ezalaki mawa mpenza!
17 Paulo alobaki mpo na kosukisa ete bato ya “bikólo . . . bakoyoka yango mpenza”; bakosala te lokola Bayuda. (Mis. 28:28; Nz. 67:2; Yis. 11:10) Ntoma Paulo ayebaki ete ekosalema mpenza bongo, mpamba te amonaki ndenge bato mingi ya bikólo bayambaki nsango ya Bokonzi.—Mis. 13:48; 14:27.
18 Na ndakisa ya Paulo, tosengeli te komitungisaka mingi ntango bato baboyi nsango malamu. Kutu, toyebi malamu ete bato moke kaka bakolanda nzela oyo ezali komema na bomoi. (Mat. 7:13, 14) Nzokande, ntango bato ya mitema sembo bandimi losambo ya solo, tosengeli kosepelaka mpe koyamba bango na esengo mpenza.—Luka 15:7.
“Azalaki kosakwela bango Bokonzi ya Nzambe” (Misala 28:30, 31)
19. Ndenge nini Paulo asalelaki malamu ntango na ye atako azalaki mokangami?
19 Mpo na kosukisa lisolo na ye, Luka alobeli likambo moko ya malamu mpe ya esengo; alobi boye: “[Paulo] afandaki mbula mibale mobimba na ndako na ye ya kofutela, mpe azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye. Azalaki kosakwela bango Bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali Nkolo Yesu Kristo polele mpenza mpe na bosembo, kozanga kopekisama.” (Mis. 28:30, 31) Yango ezali ndakisa malamu ya ezaleli ya koyamba bapaya, ya kondima, mpe ya molende!
20, 21. Tángá bandakisa ya bato oyo bazwaki litomba na mosala ya Paulo na Roma.
20 Moko na bato oyo Paulo ayambaki na esengo ezalaki Onezime, moombo moko oyo akimaki nkolo na ye na Kolose. Paulo asalisaki Onezime akóma mokristo mpe na nsima, Onezime akómaki mpo na Paulo “ndeko . . . ya sembo mpe ya bolingo.” Kutu, Paulo abengaki ye “mwana na ngai . . . , oyo nakómi tata na ye.” (Kol. 4:9; Flm. 10-12) Na ntembe te, Paulo alendisamaki mingi na komona ndenge oyo Onezime abongwanaki!a
21 Bato mosusu mpe bazwaki litomba na ndakisa malamu ya Paulo. Epai ya Bafilipi akomaki boye: “Makambo na ngai etamboli malamu esalisi mpo nsango malamu ekende liboso, mpo Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma mpe bato mosusu nyonso bayoki ete nakangami na bolɔkɔ mpo na Kristo. Sikoyo bandeko mingi na kati ya Nkolo bazali kozwa makasi mpo na kokangama na ngai, mpe bazali komonisa mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga.”—Flp. 1:12-14.
22. Ndenge nini Paulo asalelaki malamu libaku ya kofanda na ndako na ye moko na Roma atako azalaki mokangami?
22 Atako Paulo azalaki mokangami, asalelaki malamu libaku oyo azwaki ya kozala na ndako na ye moko na Roma mpo akoma mikanda oyo ezali lelo na kati ya Makomami ya Grɛki ya bokristo.b Mikanda yango ekomamaki mpo na Bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpe bazwelaki yango matomba. Biso mpe lelo oyo tozwaka matomba na mikanda oyo Paulo akomaki, mpo batoli na yango ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba lelo ndenge kaka ezalaki ntango ekomamaki.—2 Tim. 3:16, 17.
23, 24. Na ndakisa ya Paulo, ndenge nini bakristo mingi ya ntango na biso bamonisaki elimo ya malamu atako bakangaki bango mpamba?
23 Ntango batikaki ye, likambo oyo mokanda ya Misala elobeli te, Paulo asilaki kolekisa mbula soki minei na bolɔkɔ: mbula mibale na Kaisaria mpe mbula mibale na Roma.c (Mis. 23:35; 24:27) Atako bongo, alɛmbaki nzoto te, akobaki kosalela Nzambe na ndenge nyonso oyo akokaki. Ndenge moko mpe, basaleli ya Yehova mingi lelo oyo, atako bakɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na bango, babungisaki esengo na bango te mpe bakobaki kosakola. Tózwa ndakisa ya Adolfo, ndeko moko oyo akɔtaki bolɔkɔ na ekólo Espagne mpo aboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Mokonzi moko ya basoda alobaki boye: “Ozali kokamwisa biso mpenza. Tosaleli mayele nyonso mpo na koyokisa yo mpasi, kasi ntango tozali kobakisa minyoko, yo ozali kobakisa kosɛka mpe koloba na boboto.”
24 Na nsima, bakonzi ya bolɔkɔ bakómaki kotyela Adolfo motema; bakómaki kotika polele porte na ye ya bolɔkɔ. Basoda bazalaki kokende kokutana na ye mpo na kotuna ye mituna ya Biblia. Kutu, soda moko azalaki kokende kotánga Biblia na esika oyo Adolfo azalaki kolala, mpe na ntango yango, Adolfo azalaki kokɛngɛla mpo na kokebisa ye soki basoda mosusu bazali koya. Na bongo, moto ya bolɔkɔ nde akómaki “kokɛngɛla” soda, na esika soda akɛngɛla ye! Tólanda ndakisa malamu ya Batatoli yango ya sembo mpe tómonisa “mpiko mingi lisusu mpo na kosakola liloba ya Nzambe kozanga kobanga,” ata na ntango ya mpasi.
25, 26. Na mbula pene na 30, esakweli nini ya kokamwa ekokisamaki, mpe ndenge nini ezali kokokisama na ntango na biso?
25 Mokanda ya Misala esuki na likambo moko ya esengo mpenza; elobeli ndenge oyo ntoma ya Kristo oyo azalaki na kasho ‘azalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe’ epai ya bato nyonso oyo bazali koya kotala ye! Na mokapo ya liboso, tomonaki mokumba oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ntango alobaki ete: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Mbula pene na 30 na nsima, nsango ya Bokonzi “esakolamaki na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.”d (Kol. 1:23) Yango ezali komonisa polele ete elimo ya Nzambe ezali na nguya!—Zek. 4:6.
26 Lelo oyo, elimo kaka moko wana ezali kopesa bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele mpe baninga na bango “bampate mosusu,” makasi ya kokoba ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe’ na mikili 240! (Yoa. 10:16; Mis. 28:23) Yo mpe ozali kosala mosala yango na motema na yo mobimba?
a Paulo azalaki na mposa ya kotikala ná Onezime; kasi yango elingaki kobuka mobeko moko ya Baroma mpe ntomo ya nkolo ya Onezime, mokristo moko oyo nkombo na ye ezalaki Filemo. Yango wana, Onezime azongaki epai ya Filemo mpe amemaki mokanda oyo Paulo akomelaki Filemo mpo na kolendisa ye andima na boboto nyonso moombo na ye oyo akómaki ndeko na ye ya elimo.—Flm. 13-19.
b Talá etanda “Mikanda mitano oyo Paulo akomaki na Roma,” na lokasa 212.
c Talá etanda “Bomoi ya Paulo nsima ya mobu 61 T.B.,” na lokasa 214.
d Talá etanda “Nsango malamu ‘esakolamaki na bato ya bikólo nyonso.’”