MOKAPO YA ZOMI NA MOKO
Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
1, 2. Bato mingi bamitunaka nini?
MABELE eningani na kati ya mai (tsunami), mai etomboki mpe ebebisi mboka. Moto moko abɛti bato masasi na kati ya ndako-nzambe, basusu bazoki mpe basusu bakufi. Maladi ya kansɛr ebomi mama moko, atiki bana mitano.
2 Ntango makama to makambo ya mawa ya ndenge wana esalemi, bato mingi bamitunaka: “Mpo na nini boye?” Bato mingi bamitunaka ntina oyo koyinana mpe bampasi etondi na mokili. Yo mpe osí omituná bongo?
3, 4. (a) Mituna nini mosakoli Habakuku atunaki? (b) Yehova apesaki ye eyano nini?
3 Biblia elobeli basaleli mosusu ya Nzambe oyo bazalaki na kondima makasi, kasi bamitunaki mituna ya ndenge wana. Na ndakisa, mosakoli Habakuku atunaki Yehova: “Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi, mpe ozali kokoba kotala motungisi? Mpo na nini kopunza ná mobulu ezali liboso na ngai, mpo na nini koswana ezali, mpe mpo na nini kowelana ezali kolonga?”—Habakuku 1:3.
4 Na Habakuku 2:2, 3, Nzambe apesi Habakuku eyano mpe alaki ete akobongisa makambo yango. Yehova alingaka bato mingi mpenza. Biblia elobi ete: “Atyelaka bino likebi.” (1 Petro 5:7) Kutu, Nzambe ayinaka mpasi koleka ndenge biso toyinaka yango. (Yisaya 55:8, 9) Sikoyo, tótalela motuna oyo: Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
MPO NA NINI BAMPASI ETONDI NA MOKILI?
5. Bateyi ya mangomba balobaka nini mpo na bampasi? Bongo Biblia eteyaka nini?
5 Mbala mingi bapastɛrɛ, basango mpe bateyi ya mangomba balobaka ete soki bato bazali konyokwama ezali mokano ya Nzambe. Basusu balobaka ete likambo nyonso oyo ekómeli moto, ezala makambo ya mawa mpenza, etángamá kala mpe tokoki koyeba ata moke te ntina oyo Nzambe abongisá yango bongo. Basusu balobaka kutu ete bato, ezala bana mike, bakufaka mpo bákende na likoló epai ya Nzambe. Kasi, nyonso wana ezali solo te. Yehova abimisaka makambo ya mabe te. Biblia elobi: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te, mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki ata moke te kosala makambo oyo ezangi bosembo!”—Yobo 34:10.
6. Mpo na nini bato mingi bapesaka Nzambe foti mpo na bampasi nyonso oyo ezali na mokili?
6 Bato mingi bapesaka Nzambe foti mpo na bampasi nyonso oyo ezali na mokili, mpo bakanisaka ete ye nde azali koyangela mokili. Kasi, ndenge toyekolaki yango na Mokapo 3, mokonzi ya mokili oyo ezali nde Satana Zabolo.
7, 8. Mpo na nini mokili etondi na bampasi?
7 Biblia eyebisi biso ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Mokonzi ya mokili oyo, Satana, azali moto mabe mpe ya nkanda. Azali “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Emoniseli 12:9) Bato mingi bazali komekola ye. Wana ezali kaka moko ya ntina oyo lokuta, koyinana mpe mabe etondi na mokili.
8 Ntina mosusu ezali. Nsima ya kotombokela Nzambe, Adama ná Eva bapesaki bana na bango lisumu. Mpe lisumu ezali kotinda bato bányokolaka baninga. Mbala mingi, balukaka komonisa ete baleki baninga. Bazali kobunda, bazali kokende etumba, mpe bazali konyokola bato. (Mosakoli 4:1; 8:9) Na ntango mosusu, bato banyokwamaka mpo na “ntango ná makambo oyo ekanami te.” (Mosakoli 9:11) Likama to likambo ya mabe ekoki kokómela moto mpo azalaki na esika oyo likambo yango esalemi.
9. Mpo na nini tokoki koloba ete, soki Yehova atiki bampasi ezala, ntina ezali?
9 Yehova abimisaka bampasi soki moke te. Tosengeli kopesa ye foti te mpo na bitumba, mobulu mpe minyoko. Nzambe abimisaka makama te, ezala koningana ya mabele, mipɛpɛ ya makasi to mai mpo ezindisa bamboka. Kasi okoki komituna: ‘Soki Yehova aleki bato nyonso na nguya, mpo na nini apekisaka makambo ya nsɔmɔ wana te?’ Lokola toyebi ete Nzambe alingaka biso mingi, soki atiki bampasi ezala tii sikoyo, ntina ezali.—1 Yoane 4:8.
NTINA OYO NZAMBE ATIKI BAMPASI EZALA
10. Satana alobaki nini mpo na Yehova?
10 Na elanga ya Edene, Zabolo abungisaki Adama ná Eva nzela. Satana alobaki ete Nzambe azali Mokonzi mabe. Alobaki mpe ete Nzambe apimelaki Adama ná Eva eloko moko ya kitoko. Satana alingaki kondimisa bango ete ye nde akozala mokonzi ya malamu koleka Yehova mpe ete bazali na mposa ya Nzambe te.—Ebandeli 3:2-5; talá Etanda 27.
11. Tosengeli koluka eyano na motuna nini?
11 Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova mpe batombokelaki ye. Bakanisaki ete bango moko bazali na lotomo ya kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ndenge nini Yehova akokaki komonisa ete batomboki yango bamikosaki mpe ete ye nde ayebi oyo ezali malamu mpo na biso?
12, 13. (a) Mpo na nini Yehova abomaki Adama ná Eva mbala moko te? (b) Mpo na nini Yehova atiki Satana azala mokonzi ya mokili oyo mpe bato bámiyangela?
12 Yehova abomaki Adama ná Eva mbala moko te. Kutu, atikaki bango bábota bana. Na nsima, Yehova apesaki bana na bango libaku ya kopona nani oyo balingi azala mokonzi na bango. Mokano ya Yehova ezalaki ete mabele etonda na bato ya kokoka, mpe ekosalema kaka bongo ata soki Zabolo asali nini.—Ebandeli 1:28; Yisaya 55:10, 11.
13 Satana alobaki mabe mpo na Yehova liboso ya ebele ya baanzelu. (Yobo 38:7; Danyele 7:10) Yango wana, Yehova atikelaki Satana ntango amonisa soki makambo oyo alobaki ezalaki solo. Atikelaki mpe bato ntango mpo bátya baguvɛrnema na bango moko na litambwisi ya Satana mpo emonana soki bakoki komiyangela malamu ata soki Nzambe asalisi bango te.
14. Lokola Nzambe atikaki ntango, nini emonani polele?
14 Banda bambula mingi, bato balukaka komiyangela malamu, kasi balongaka te. Emonani polele ete Satana azali moto ya lokuta. Bato basengeli na lisalisi ya Nzambe. Mosakoli Yirimia akosaki te ntango alobaki boye: “Ee Yehova, nayebi malamu ete nzela ya moto ya mabele ezali ya ye te. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.”—Yirimia 10:23.
MPO NA NINI YEHOVA ATIKI NTANGO MOLAI BOYE?
15, 16. (a) Mpo na nini Yehova atiki bampasi eumela mingi boye? (b) Mpo na nini Yehova abongisi te makambo mabe oyo Satana asalá?
15 Mpo na nini Yehova atiki bampasi eumela boye? Mpo na nini atikaka makambo ya mabe esalema? Esengelaki ntango molai mpo na komonisa ete boyangeli ya Satana elongi te. Bato bameki baguvɛrnema ya ndenge nyonso, kasi ezali kosimba te. Bakómi na mayele mingi na makambo ya siansi mpe ya teknoloji, kasi kozanga bosembo, bobola, mobulu, bitumba mpe makambo ya mabe ekómi mingi koleka. Mpo tólonga, Nzambe kaka nde abongi kotambwisa biso.
16 Kasi, Yehova abongisi te mabe oyo Satana asalá. Soki asali bongo, ekomonana lokola ete azali kosalisa boyangeli ya Satana; nzokande, Yehova akosala yango ata mokolo moko te. Mpe soki asali bongo, bato bakokanisa ete bakoki komiyangela malamu. Nzokande ezali lokuta; mpe Yehova akoki kondima yango te. Akoki kobuka lokuta te.—Baebre 6:18.
17, 18. Yehova akosala nini na mabe nyonso oyo Satana asalá?
17 Yehova akoki mpenza kobongisa mabe nyonso oyo botomboki ya Satana mpe ya bato ebimisá? Ɛɛ. Mpo na Nzambe, makambo nyonso ekoki kosalema. Yehova ayebi ntango oyo akosukisa ntembe nyonso oyo Satana abimisá. Na nsima, akokómisa mabele paradiso, ndenge esengelaki kozala. Baoyo nyonso bazali na kati ya “malita” bakosekwa. (Yoane 5:28, 29, maloba na nse ya lokasa) Bato bakobɛla te mpe bakokufa lisusu te. Yesu akobongisa mabe nyonso oyo Satana asalá. Yehova akosalela Yesu “mpo na kobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Tozali kotɔnda Yehova, mpo liboso ntango yango ekoka, amoniseli biso motema molai, yango wana tozwi nzela ya koyeba ye mpe kopona ye azala Mokonzi na biso. (Tángá 2 Petro 3:9, 10.) Ata soki bampasi ekómeli biso, asalisaka biso tókanga motema.—Yoane 4:23; tángá 1 Bakorinti 10:13.
18 Yehova atindaka biso na makasi te tópona ye azala Mokonzi na biso. Apesá bato bonsomi ya kopona. Tólobela sikoyo ndenge malamu ya kosalela likabo yango ya motuya.
NDENGE NINI OKOSALELA BONSOMI NA YO YA KOPONA?
19. Wapi likabo ya malamu oyo Yehova apesá biso? Mpo na nini tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na yango?
19 Bonsomi ya kopona ezali likabo ya malamu oyo Yehova apesá biso, mpe ekesenisaka biso na banyama. Banyama basalaka makambo nyonso na lɔɔmbi (instinct), kasi biso tokoki kopona makambo oyo tolingi kosala na bomoi na biso mpe soki tolingi kosepelisa Yehova. (Masese 30:24) Lisusu, tozali lokola bamasini te oyo esalaka kaka mosala oyo basalelá yango. Tokoki kopona ndenge oyo tolingi kozala, banani tolingi bázala baninga na biso, mpe makambo oyo tolingi kosala na bomoi na biso. Yehova alingi tósepela na bomoi.
20, 21. Likambo nini ya malamu koleka okoki kopona lelo?
20 Yehova alingi tólinga ye. (Matai 22:37, 38) Azali lokola tata oyo asepelaka ntango mwana alobi na ye na motema na ye mobimba ete: “Nalingaka yo,” kasi te mpo batindi ye na makasi. Yehova apesá biso bonsomi ya kopona soki tokosalela ye to te. Satana, Adama ná Eva baponaki kopesa Yehova mokɔngɔ. Ndenge nini yo okosalela bonsomi na yo ya kopona?
21 Poná kosalela Yehova. Bato mosusu ebele baponá kosepelisa Nzambe mpe baboyá kolanda Satana. (Masese 27:11) Okoki kosala nini lelo mpo ozala na mokili ya sika ya Nzambe, ntango akolongola bampasi nyonso? Tokozwa eyano na mokapo oyo elandi.