Libatisi ekoki kobikisa biso—Ndenge nini?
“Kozindisama na mai . . . ezali kobikisa bino.”—1 PETELO 3:21, Chouraqui.
1, 2. Makambo nini moto asengeli kokokisa liboso na kobatisama na mai?
JEHOVAH asengi na baoyo balingi kozwa lobiko ete bakokisa masengami ya sikisiki mpenza. Basengeli kozwa boyebi ya solosolo, komonisa kondima, kobongola motema na masumu na bango, komibalola, komipesa na Nzambe mpe kobatisama lokola bandimi. (Yoane 3:16; 17:3; Misala 3:19; 18:8) Bato oyo balingi kobatisama basengeli koyambola polele ete na lisalisi ya mbeka na Yesu, babongoli motema na masumu na bango mpe bamipesi na Jéhovah. Basengeli mpe kososola ete komipesa na bango epai na Nzambe mpe libatisi ekomisi bango ba Témoins de Jéhovah.
2 Libatisi mpe makambo na yango nyonso, bakisa mpe eyambweli yango ya polele ya kondima, ezali na ntina mpo na lobiko. (Baloma 10:10) Ezali yango ntoma Petelo andimisi wana ekomi ye ete: “Kozindisama na mai. . . ezali kobikisa bino.” (1 Petelo 3:21, Chouraqui) Kasi maloba yango malimboli mpenza nini? Biteni oyo bizingi yango bilakisi nini?
Libatisi ezali kobikisa ndenge nini?
3. Ndenge nini okoki kolimbola na mokuse 1 Petelo 3:18-21 na maloba na yo moko?
3 Petelo alobi ete nsima na lisekwa na ye lokola elimo, Yesu asakolaki nsango ya kokweisa epai na bilimu mabe oyo bazalaki na boloko, epai na bademo bakangami na bansinga ya seko mpo na kosambisama ya mokolo monene na Jéhovah. Bademó yango bazangaki botosi na kolataka banzoto ya bato mpe na kokamataka basi kati na bana basi ya bato “wana ezelaki Nzambe na motema molai na mikolo na Noa, naino ezalaki masuwa kotongama, kati na yango bato mingi te, elingi koloba bato mwambe [Noa, mwasi na ye, bana na ye mpe basi na bango], babikaki na kati na yango likoló na mai.” Likambo oyo ekokani na yango ezali mpe kobikisa bino sikawa, ezali libatisi (ezali te bobele kolongolama [ya ntina] ya mbindo na nzoto, kasi bosengi ya lisosoli malamu epai na Nzambe), mpo na lisekwa na Yesu Klisto.”—1 Petelo 3:18-21, M.N.; Genese 6:1, 2; 2 Petelo 2:4; 2 Bakolinti 7:1.
4. Petelo azali kolobela nini wana ekomi ye: “Likambo oyo ekokani na yango”?
4 Petelo alingi koloba nini na maloba “likambo oyo ekokani na yango”? Alingi koloba ete libatisi oyo etongami likoló na kondima ekokani na kobatelama ya Noa mpe libota na ye, oyo babikaki na mai ya mpela kati na yango baoyo bazalaki na libanda ya masuwa bakufaki. Lokola Noa amonisaki kondima mpo na kotonga masuwa, ndenge moko mpe baoyo nyonso bazali kobatisama lokola bayekoli na Yesu Klisto mpe ba Témoins de Jéhovah, basengeli kozala na kondima mpo na kotemela bopusi ya mokili oyo ezangi kondima mpe ya nzambe na yango, Satan le Diable.—Baebele 11:6, 7; 1 Yoane 5:19.
5. Na ndimbola nini tokozwa lobiko “mpo na lisekwa na Yesu Klisto”?
5 Kozindisama na mai mpamba ezali kobikisa te. Ya solo, tosengeli ‘kolongola mbindo ya nzoto’, kasi bobele likambo yango mpamba ekobikisa te. Lobiko ezwamaka nde “mpo na lisekwa ya Yesu Klisto.” Bato oyo balingi kobatisama basengeli kondima ete lobiko ekoki kozwama bobele mpo na liwa ya mbeka mpe mpo na lisekwa ya Mwana na Nzambe. Basengeli lisusu kondima Yesu lokola Nkolo na bango oyo azali na bokonzi mpo na kosambisa bato na bomoi mpe bakufi. Petelo alobi ete: “Azali na loboko mobali ya Nzambe, mpamba te akei na likoló; mpe baanzelu, mpe mikonzi, mpe banguya bakotosaka ye.”—1 Petelo 3:22, M.N.
6. Moto oyo alingi kobatisama asilaki kosala nini mpo na kozwa lisosoli malamu?
6 Petelo alobi mpe ete libatisi ezali “bosengi ya lisosoli malamu epai na Nzambe”. Mpo na kozwa lisosoli malamu, moto oyo alingi kobatisama asengeli kobongola motema na masumu na ye, kotika etamboli na ye ya mabe, mpe komipesa mobimba epai na Jéhovah Nzambe kati na libondeli na nzela ya Yesu Klisto. Soki moyekoli oyo abatisami abateli lisosoli malamu yango na kotosaka mitinda na Nzambe, akozala ntango nyonso moto abongi kozwa lobiko, yango ekopengolela ye ekateli ya kokweisama longwa na Jéhovah.
Masengami mpo na kobatisama
7. Na lolenge nini bamisionere ya boklisto na mokili babatisaki bato?
7 Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya kobatisa bayekoli mosusu, alobaki na bango te ete bosopaka mai likoló na bankoto na bato oyo bazangi bondimi. Kasi bamisionere ya boklisto ya mokili basalaki nini na likambo yango? Tala oyo jésuite moko, François Xavier, akomaki na 1945 mpo na mobembo na ye na lnde: “Kati na boyangeli ya Travancore, . . . na boumeli ya mwa basanza nabatisaki koleka nkoto zomi ya bato, basi mpe bana. . . . Natambolaki mboka na mboka mpe nakomisaki bango baklisto.” Wana ezali lolenge ya kokomisa bato baklisto oyo Yesu asalelaki te. Baoyo bazali na mposa ya kobatisama basengeli kokokisa mwa masengami.
8. Tozali kotanga nini kati na mikanda oyo balobi na libunga ete ezali ya Paulo, na oyo etali baoyo bamimonisaki mpo na libatisi?
8 Ata nsima na bantoma, “baklisto” mosusu bazalaki kokanisa ete bato oyo balingi kozwa libatisi basengelaki kokokisa masengami makasi. Mpo na yango, tala oyo totangi kati na mikanda oyo mizali ya Biblia te, kasi na libunga balobi ete ezali ya ntoma Paulo: “Tika batalela etamboli mpe bomoi na bango . . . Soki bazali minzemba, tika ete bayekola kosala pite te, kasi kobala malamu. . . . Soki mwasi ya ndumba amonani, atika, soki te bakolongola ye. Mosali bikeko oyo amonani, atika, soki te, bakolongola ye. . . . Mosali na misala ya nsoni, . . . moto na maji, mosali na nkisi, mokosi na nzela ya nkisi, moyekoli na bitando na likoló, mosakoli makambo makoya, moto asalaka bopusi likoló na bato na nzela na nkisi, mosakoli na nkisi ya kolata na nzoto, molimboli na bilembo ya makambo makoya . . . ; bameka bango naino liboso. . . ; soki batiki bayamba bango, kasi soki batosi te, balongola bango. ”-Les constitutions apostoliques (Mibeko ya bantoma), t. III, 1. VII, VIII, p. 237-239, Collection sources chrétiennes, nr 336, Marcel Metzger, ba éditions ya Cerf (lnstitut catholique, cote: B 524 800 336.
9. Mpo na nini bankulutu ya lisanga bazalaka na masolo elongo na moto nyonso oyo alingi kobatisama?
9 Ba Témoins de Jéhovah baboyaka kolanda makomami oyo matongami likoló na Biblia te lokola oyo mauti kotangama, kasi bankulutu basololaka na baoyo balingi kobatisama, mpo na kotala soki bandimi yango bakokisi masengami na Nzambe mpe bamipesi epai na Jéhovah. (Misala 4:4; 18:8; 2 Batesalonike 3:2) Makambo malobelami kati na mokanda Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe mazali kosalisa bango na koyeba soki moto akoki mpo na kozwa batisimo. Soki makambo mosusu mazali polele te kati na makanisi ya moto oyo alingi kobatisama, to soki ayokanisi bomoi na ye na mitinda ya Nzambe te, bankulutu bazali na esengo ya kosunga ye na elimo.
10. Ezaleli nini moto asengeli kozala na yango ntango alingi kobatisama?
10 Soki tozali koyeba motuya na boboto oyo Nzambe amonisaka biso na kosalisaka biso toyeba mikano na ye, tokokokana na bato oyo Paulo asakolaki epai na bango na Antiokia (Azia Moke). Ata botemeli ya Bayuda ezalaki, “eyokaki bango [ete bazalaki na likoki ya kondimama na Nzambe], bato na mabota [ya bapakano] basepelaki mpe bakumisaki liloba na Jéhovah, mpe baoyo nyonso bazalaki na ezaleli ebongi mpo na bomoi ya seko bakomaki bandimi.” (Misala 13:48, M.N.) Bandimi yango ya sika babatisamaki.
Babatisami na bolenge na bango
11. Ezali malamu ete moto amipesa na Nzambe ntango azali elenge? Limbola eyano na yo.
11 Bamoko na baoyo bazali “na ezaleli ebongi mpo na bomoi ya seko” bazali bilenge. Atako Samwele mpe Yoane mobatisi bamipesaki na Nzambe liboso ya kobotama na bango, baboti bakoki komipesa na Nzambe na esika ya bana na bango te. (1 Samwele 1:11, 24-28; 2:11, 18, 19; Luka 1:15, 66) Nzokande, na lisalisi ya mateya malamu ya Biblia, bilenge mingi bazali kokola kino libatisi. Moklisto misionere moko ya mwasi oyo abatisamaki na bolenge mpenza akomi ete: “Nazali komona lokola ete namipesaki epai na Mozalisi na ngai mpo na kosalela ye uta ekomaki ngai na bambula oyo nasosolaki ete ye azali. Na yango, boyebi malamu ya Nzambe mpe ya mikano na ye ebotaki kati na ngai mposa ya kobatisama mpo na komonisa yango polele. Kasi, lokola mama na ngai azalaki na kondimisama te ete nakangaki ntina na likambo yango, apesaki ngai toli ete nazela soki moto mosusu alingi kobatisama. Na nsima, mwasi moko amonisaki mposa ya kozwa libatisi. Na eleko wana, lisoló mpenza elongo na bato oyo balingi kobatisama ezalaki te. Kasi motambwisi na mosala aponamaki na la Société . . . ayebisaki ngai na boboto ntina ya litambe oyo nalingaki kosala. Nandimaki mpenza nyonso oyo alobelaki ngai, mpe na ntongo ya dimanche moko kitoko ya sanza ya Mai 1921, [mwasi yango] mpe ngai tobatisamaki.”
12. Ndeko mobali Russell akanisaki nini mpo na komipesa ya mwana?
12 Na mobu 1914, Charles Russell (oyo azalaki président ya la Société Watch Tower) azwaki mokanda kati na yango moko na baninga na ye baklisto atunaki ye soki asengelaki kolendisa mwana na ye ya bambula 12 ete amipesa epai na Nzambe. Russell ayanolaki ye: “Soki nazalaki yo, mbele nakopusa ye nokinoki amipesa na Nzambe te, kasi nakolakisa ye asosola ete ezali nzela eleki malamu mpo na moto nyonso ya mayele oyo azwi boyebi na Nzambe mpe ya mikano na ye ya boboto . . . Moto moko te akozwa bomoi ya seko soki amipesi na Nzambe te. . . . Komipesa na Nzambe ekobebisa mwana na yo te, kasi ekoki nde komemela ye bolamu mingi. . . . Nani akoki koloba ete mwana ya bambula zomi akoki te kososola malamu ndimbola ya komipesa mobimba epai na Nzambe na makanisi, na maloba mpe na misala? Mpo na ngai, nazali komikundola ete namipesaki mobimba epai na Nzambe mwa moke liboso na mwana na yo, liboso nakoma na bambula zomi na mibale.”
13. Tour de Garde oyo elobaki nini na bilenge esili koleka bambula 94?
13 Tala oyo tokokaki kotanga kati na La Tour de Garde de Sion (angl.) ya le 1er Juillet 1894: “La Tour de Garde ezali kopesa longonya na bana mpe bilenge nyonso oyo bapesi mitema na bango epai na Nzambe mpe bazali kosala makasi mokolo na mokolo mpo na kolanda matambe na Yesu. Toyebi bana oyo balingaka Yesu, bayokaka nsoni te mpo na kolongisa ye liboso na bana mosusu oyo balingaka ye te mpe balukaka kosepelisa ye te; bazali na molende mpe bazali sembo epai na Nzambe, ata ntango baninga na bango ya kelasi, oyo balobelaka bango nsango malamu, bazali koseka bango mpe kotya bango na pembeni. Bilenge oyo basali molende mpo na kotika mokili, bamposa mpe bisengo na yango tosepeli kotanga bango na molongo ya baklisto oyo [bapesi] bomoi na bango epai na Nkolo. Bamoko na baoyo bazali kosala na babiro na biso, bakisa mpe bapalanganisi na nsango malamu na molende, bazali naino bilenge.” Atako ozali naino elenge, mpo na nini okoloba na baboti na yo te mpo na komipesa na yo epai na Jéhovah Nzambe?
Mokumba ya baboti
14. Bilenge oyo bazali komipesa na Jéhovah bazali kozwa matomba nini?
14 Kanisa na matomba ya bana oyo baboti bazali kotambwisa epai na libatisi. (Baefese 6:4) Kokanisa na bozindo makambo ya elimo ezali kosalisa bango na kokima mitambo ya mokili. (1 Yoane 2:15-17) Bazali kobuka te bambuma mabe oyo bato bazwaka ‘na kolonaka kati na nzoto’. (Bagalatia 6:7, 8) Bazali komonisa bambuma na elimo ya Nzambe, mpamba te bateyaki bango kozala na bomoi ya kobanga Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Lokola bamipesi na Nzambe, bazali na boyokani ya pene mpenza elongo na ye. Mpe lokola bayekoli ‘kotya elikya epai na Jéhovah’, bazali komitika kotambwisama na mayele ya likoló mpe bazali kotambola kati na banzela ya kitoko mpenza mpe kati na kimya.—Masese 3:5, 6, 13, 17.
15. Baboti baklisto bakoki kosala nini mpo na kobongisa bomoi ya bana na bango?
15 Awa ezali bilenge kozwa bolamu mingi na komipesaka epai na Jéhovah, baboti baklisto basengeli kosala nyonso ekoki na bango mpo na kobongisa bomoi ya bana na bango. Lokola Timoté, bilenge bakoki kozwa mateya na Biblia uta bomwana na bango, mpo na ‘koumela kati na makambo oyo bayekoli mpe bandimi.’ (2 Timote 3:14, 15) Baboti oyo babangaka Nzambe bakoki kolakisa ndakisa malamu epai na bana na bango na kozalaka bango moko na bomoi oyo ezali kopesa ndakisa malamu, mpe kopesa bango mateya yango ndenge boyokani na bango elongo na Nzambe, boyebi na bango ya makambo mingi mpe bokoli na bango epesi bango nzela mpo na yango. Soki esalelami malamu, milende yango mpo na kosalisa mwana mizali mpamba te.—Masese 22:6.
16. Bana na bino basengeli komona nini kati na ndakisa mpe mateya na bino?
16 Na nzela ya ndakisa mpe mateya, bosalisa bana na bino bamona polele makambo nyonso oyo makaboli lisanga ya Jéhovah na oyo ya Satana. Bolakisa bango ete baklisto bakoki te kosala boyokani mabe elongo na mokili, ete basengeli kotika misala na yango ya nsoni, bisengo na yango ya mbindo, bamposa na yango mpe baninga na yango. (1 Bakolinti 15:33;
2 Bakolinti 4:2) Na ezaleli na bino, bakisa mpe mateya na bino mpe ndakisa na bino, bosala na boye ete bana na bino bamona ete bisengo ya mokili ezali mpamba mpe ete, na bokeseni na ba Témoins de Jéhovah, bato ya mokili babungi nzela. Bolimbolela bango motindo nini Nzambe atambwisaki bino na elimo santu na ye, apekisaki bino bolanda banzela oyo mbele ekomema bino na mpasi mpe asimbaki bino na eleko ya minyoko mpe ya mpasi. Bosala soki moke te libunga na kokanisa ete bana na bino bakokoma bandimi ata soki botiki bango balanda banzela ya mokili oyo etondi na komikumisa, bamposa ya lolendo, makambo na mpamba mpe bozoba. Liboso ete motambo ya mokili ekanga bana na bino, bobatela bango na bopusi yango mabe mpe bosalisa bango balinga Jéhovah mpe batya elikya na bango epai na ye.
Nsima na libatisi
17. (a) Mpo na nini baklisto mosusu oyo babatisami bakweyaka na elimo? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela omipesa na biso epai na Nzambe?
17 Azala elenge to te, ntembe ezali te ete moto oyo alingi kozwa libatisi azali na mposa ya kotikala sembo epai na Jéhovah. Na yango, mpo na nini baklisto mosusu oyo babatisami bakweaka na elimo? Atako tokoki kotalela makambo mingi mpo na yango, emonani ete moko na bantina minene ezali ete basosolaka malamu te ndimbola ya komipesa ya moto. Komipesa yango ezali mpo na mosala te, mosala ekozwa ntango na biso kasi ekokomisa biso bato ya elimo te. Tomikundola ete tomipesi epai na mosala te, kasi epai na moto, Jéhovah Nzambe. Yango ezali kosalisa biso mpo ete tosala libunga te ya kotalela komipesa na biso na Nzambe lokola likambo oyo tosengeli kosala liboso tokota na mosala na ye. Komipesa na Nzambe elakisi kokota na boyokani eleki ntina, oyo esengeli kobatelama ntango nyonso. Yesu Klisto apesaki biso ndakisa mpo na yango. Maloba oyo ya bisakweli mamonisi ezaleli na ye ya bosolo ntango amimonisaki epai na Jéhovah: . . . “Nayei . . . E Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo, mpe mibeko na yo mizali katikati na ngai.”—Nzembo 40:6-8; Baebele 10:5-10.
18. Na ndimbola nini mibeko na Nzambe mizalaki katikati na Yesu?
18 Na ndimbola nini mibeko na Jéhovah mizalaki “katikati” na Yesu? Mokolo moko, alobaki na mokomeli moko Moyuda ete Jéhovah, Nzambe na biso, azali bobele ye moko mpe ete mosusu azali te, kobendaka bongo likebi likoló na etelemelo eleki-likoló ya Jéhovah. Na nsima amonisaki ete mibeko oyo esengi kolinga Jéhovah na motema na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na bokasi na yo nyonso mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko, mizali moboko mpenza ya mibeko na Nzambe. (Malako 12:28-34) Ezali ntina monene mpo na yango Yesu alobaki: ‘Nasepeli kosala mokano na Nzambe.’ Atako mimekano mpe minyoko minene oyo azwaki, akangamaki mpo na kokokisa na bosembo etinda oyo azwaki, bobele mpo atalelaki yango lokola mosala malamu te, kasi mpamba te azalaki na boyokani ya pene mpenza elongo na Nzambe. Soki biso mpe tondimi etelemelo eleki monene ya Jéhovah mpe tomonisi ye bolingo mpe bokangami makasi, tokobika na boyokani na komipesa na biso epai na Jéhovah mpe na boyokani na libatisi na biso.
19. Ndenge nini tokoki te kokabola boyokani na biso elongo na Jéhovah mpe mosala tozali kokokisa?
19 Na ntembe te, tokoki te kokabola boyokani na biso elongo na Nzambe mpe mosala oyo tozali kosala. Tozali komonisa bolingo na biso mpo na Jéhovah na kosakolaka Bokonzi. Mpo na yango, ndeko mobali Grant Suiter, oyo asili kokufa mpe oyo azalaki mosangani na Collège central ya ba Témoins de Jéhovah, akomaki mokolo moko boye: “Na koyokaka [mokengeli moko ya zongazonga] kolimbola ete kosalela Jéhovah ezali libaku malamu mpe mokumba, nasosolaki ete yango ezalaki likambo oyo nasengelaki mpe nasepelaki kosala. Yango wana namipesaki ngai moko epai na Jéhovah, ezali mpe yango basangani mosusu ya libota na ngai basalaki bobele na eleko yango. Mwa moke na nsima, le 10 Octobre 1926, na San José, tomonisaki biso banso elongo elembo ya komipesa na biso epai na Jéhovah Nzambe na kobatisamaka na mai. . . . Nsima na libatisi, . . . tata na ngai alobaki na nkulutu oyo atambwisaki molulu ete: ‘Bino bokendeke kokabola mikanda epai na bato, boye te? Biso mpe tolingi kokokisa mosala yango sikawa.’ Na bongo libota na biso esalaki matambe na yango ya liboso kati na mosala ya kosakola.” (wF 1/2/83, p. 10) Lelo, baoyo bazali kokokisa masengami mpo na kosakola bazali kobanda kosangana na molende kati na mosala yango ata liboso ete babatisama.
Libatisi ekoki kobikisa biso
20, 21. (a) Na lolenge nini baombo na Jéhovah ‘batyami elembo’? (b) “Elembo” yango ezali nini, mpe kozala na yango elimboli nini?
20 Na misala na biso nde tokoki komonisa ete “tozali bato na Jéhovah”. Ee, tosengeli kosalela ye na bosembo lokola baombo oyo bamipesi epai na ye soki tolingi kozwa lobiko. (Baloma 6:20-23; 14:7, 8) Kala, baombo bazalaki mbala mingi kolata elembo na elongi. Na mikolo na biso, na kokokisaka mosala ya kosakola, ‘moto na molikani’ ya lelo—batikali na bayekoli bapakolami ya Yesu—azali ‘kotya elembo’ na baoyo bakobika na nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. Na mosala yango, baklisto bapakolami yango bazali kozwa lisalisi ya baninga na bango, “bampate mosusu.” (Ezekiele 9:1-7; Yoane 10:16) “Elembo” ezali nini? Ezali endimiseli ete tomipesi epai na Jéhovah mpe ete tozali bayekoli na Yesu babatisami awa elati biso bomoto na sika ya boklisto.
21 Ezali likambo na ntina mpenza ete tozala na “elembo” mpe tobatela yango lelo, mpamba te “ntango na nsuka” ekomi mosika mpenza. (Danyele 12:4) Mpo na kobikisama, tosengeli ‘koyika mpiko kino na nsuka’ ya bomoi na biso to ya biloko mabe ya ntango oyo. (Matai 24:13) Na bongo libatisi ekobikisa biso bobele soki tolandi kozala ba Témoins de Jéhovah ya bosembo.
Bozongeli
◻ Tosengeli kosala nini mpo tobika?
◻ Mpo na nini bankulutu bazalaka na masolo elongo na baoyo balingi kobatisama?
◻ Ndenge nini baboti bakoki kotambwisa bana na bango na elimo mpo bakoma na libatisi?
◻ Biso tomipesi epai na mosala?
◻ Ndenge nini libatisi ezali kobikisa biso?
[Elilingi na lokasa 7]
Oyebi na ndimbola nini libatisi ekokani na kobatelama ya Noa mpe libota na ye kati na masuwa?
[Elilingi na lokasa 9]
Bilenge oyo bazali komipesa na Nzambe mpe kobatisama bazali kozwa matomba. Oyebi matomba yango?