Monyokoli na Burundi—Babuki elaka ya bonsomi ya kosambela!
Bonsomi ya losambo ezali likambo ya moboko kati na mikili mingi ya Mpoto. Nzokande, monyokoli ya losambo oyo epalangani na Burundi, na Afrike, emonisi ete bonsomi yango ekoki kobebisama. Nzokande, wana lotomo ya moboko ya lisangá moko ezangi kotosama, moto moko te akoki kotya elikya ete lotomo na ye mpe ekotosama. Yango wana tosengi na batangi na biso batalela makambo mazali koleka na Burundi.
Le 16 FÉVRIER 1989, ezalela moko ya mabe lokola na ntango na kala ebandaki komonana na Burundi, na Afrique centrale. Mokolo yango, président ya mboka ya Burundi, Pierre Buyoya, asalaki likita elongo na bayangeli ya barégió. Nsima na likita yango, monyokoli makasi ya lingomba epalanganaki epai na ba Témoins de Jéhovah kati na Burundi mobimba. Nsima na mwa ntango, mibali, basi mpe ata bana bakangamaki kozanga ntina, babetamaki, banyokwamaki mpe baboyaki kopesa bango bilei.
Ya solo, ezali nsoni soko makambo motindo boye mazali kosalema na ntango na biso. Kasi monyokoli oyo baklisto bazali kozwa na Burundi ezali mpenza kozokisa mitema ya bato. Mpo na nini? Mpo yango ezali kobuka elaka ya bonsomi ya kosambela.
Leta azangi kokokisa elaka oyo apesaki
Burundi ezali na katikati ya Afrique, na mwa nse ya équateur, kasi mboka oyo etondi na bangomba ezali na climat kitoko, malili mingi te mpe moi mingi te (tala carte). Kala, bobele bato moke bayebaki mokili ya Burundi. Nzokande, na sanza ya Août 1988, nsango ya mokili yango etambolaki mingi na bazulunalo ya mokili mobimba. Mpamba te mobulu makasi ebimaki kati na bikólo mibale ya minene ya mboka yango: Batutsi mpe Bahutu. Ya solo, mobulu yango etikaki elembo mabe mpo na Burundi kati na makanisi ya bato mingi.
Nzokande, mokili oyo ezali kolikya na avenire ekoki mpenza kokumisama. Bafandi na yango bazali na makanisi malamu mpe balingi mosala. Lisolo moko ebimaki na zulunalo New York Times Magazine emonisaki ete “na makambo mingi oyo ezali komonana polele epai na mopaya, Burundi ezali mboka oyo emipesi na mosala atako ezali mobola. Maurice Gervais, momonisi ya Banque mondiale, abengaki yango ‘mboka oyo ezali kosala makambo minene’”.
Nzokande, makambo mazali komonana mpo na lingomba na Burundi mazali kobebisa lokumu ya mboka yango. Pene na bafandi 80% ya mboka yango bazali komiloba ete bazali baklisto, mingi kati na bango bazali bakatolike. Ata bongo, biyangeli na politike oyo esili kotambwisa mboka yango esili kokotisa mobulu kati na makambo ya lingomba. Le 16 Octobre 1985, zulunalo Christian Century elobaki boye: “Na mbula eleki, boyangeli ya Burundi ezwaki ebele na mibeko mpo na kobebisa Lingomba . . . Lotomo ya kosambela mpe kobondela na miso ya bato to na ndako na yo moko ekitisamaki makasi mpenza. Bandako-nzambe ya mangomba misusu . . . ekangamaki mpe bapekisaki bango kosalela yango; . . . Baklisto mingi bakangamaki, bamoko kati na bango banyokwamaki . . . nyonso wana mpo basalelaki lotomo na bango ya kosambela.”
Boyangeli ya sika oyo etambwisami na président Pierre Buyoya longwa Septembre 1987 ebimisaki bilikya makasi. Mokonzi ya sika apesaki elaka ya bonsomi mpo na makambo ya losambo na mboka na ye, mpe azwaki mikano nokinoki mpo na kokokisa maloba na ye. Tala oyo tokoki kotanga na ntina yango kati na rapport ya ministère des Affaires étrangères ya Amerike: “Na boumeli ya mbula na ye ya liboso ya boyangeli, M. Buyoya asalaki mabongwani minene kati na politike ya Burundi mpo na makambo matali lingomba. Asilisaki monyokoli ya lingomba oyo ezalaki komonana na boyangeli oyo ezalaki liboso na ye, M. Buyoya abimisaki bato nyonso oyo bakotaki boloko mpo na lingomba, afungolaki bandako-nzambe oyo ekangamaki mpe azongisaki biloko nyonso bibotolamaki na Mangomba.” Meko yango ya pole epusaki bato oyo balingi bonsomi na kokumisa président Buyoya.
Kasi, mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali sikawa konyokolama mpo na lingomba na bango?
Masengi ya ba Témoins de Jéhovah mpo ete bandimama
Zulunalo New York Times, elobaki ete: Uta mwa bambula, Lingomba ya Katolike “esili kokoma etuluku makasi na makambo ya ekonomi mpe ya politike”. Na eleko oyo mboka yango etambwisamaki naino na mindele, batikelaki Lingomba “koyangela mboka”, mpamba te “ezalaki na esika monene mpo na makambo matali balopitalo mpe bakelasi”. Ezali likambo na kokamwa te na komona ete boyangeli ezalaki kobanga Lingomba ya Katolike.
Nzokande, ntango ba Témoins de Jéhovah babandaki mosala na bango ya kosakola nsango malamu na Burundi na 1963, bamekaki ata moke te mpo na kokota na makambo ya Leta. Basukaki nde na kosakola “nsango malamu ya bokonzi”. (Matai 24:14) Lokola Biblia emonisi ete baklisto ya solo bakoki te ‘kokota na makambo ya mokili”, ba Témoins de Jéhovah baboyaki kokota na makambo ya politike. Ezali wana etelemelo ya Batemwe kati na mokili mobimba.—Yoane 17:16.
Mpo na kotosa lisosoli na bango, Batemwe bazali koboya kokota na ba partis ya politike mpe bazali koboya koyamba maloba ya kosambela ekólo. Kozanga kokanga ntina ya likambo, biyangeli bizali komona ete ezaleli wana ya kozanga kokota na politike emonisi kozanga bolingo ya ekólo mpe ezali botomboki. Kasi ezali bongo te. Na mabelé mobimba, ba Témoins de Jéhovah bayebani lokola ba citoyens malamu mpenza oyo bazali kotosa mibeko. Bazali kotosa motinda ya Biblia oyo esengi bango ‘kotosa’ biyangeli. (Baloma 13:1) Atako bazali koboya kopesa losako na bilembo ya ekólo lokola bendele to kosambela yango na lolenge mosusu, nzokande bazali na limemya liboso na bilembo yango.—Exode 20:4, 5.
Na 1975, ba Témoins de Jéhovah basengaki ete mosala na bango endimama na miso ya Leta. Kasi na 1976, coup d’Etat ya basoda ebongolaki boyangeli, mpe président Jean-Baptiste Bagaza akomaki kotambwisa ekólo. Alakaki bonsomi ya losambo. Nzokande, na Mars 1977, mosala ya ba Témoins de Jéhovah epekisamaki. Ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba bamekaki kolimbola likambo yango epai na basangani ya boyangeli ya M. Bagaza. Batindelaki bango mikanda, bakendaki na ba ambassades ya Burundi na France mpe na Belgique, mpe bakutanaki na bakonzi ya mboka, kasi nyonso wana se mpamba. Na 1987, Batemwe 80-mibali mpe basi-bakotaki boloko na boumeli ya basanza. Moko na bango akufaki kati na boloko.
Bongo na 1987, major Pierre Buyoya azwaki bokonzi na nzela ya coup d’Etat. Bakatolike mpe baprotesta bandimamaki nokinoki, kasi Batemwe te.
Monyokoli ya losambo ebandi
Nsima na likita oyo président Buyoya asalaki elongo na bayangeli ya barégió le 16 Février 1989, basakolaki na radio ete moko na mikakatano minene oyo Burundi esengelaki kobunda na yango ezalaki bongo bokoli ezalaki komonana epai na ba Témoins de Jéhovah. Lokola ete bapesanaki etinda, bayangeli ya barégió (gouverneurs de provinces) babandaki monyokoli monene. Atako tozwi naino nsango nyonso te na ntina yango, ba rapports oyo elandi epesi mwa likanisi mpo na makambo mazali koleka na Burundi:
Province de Gitega: Gouverneur Yves Minani atindaki bapolisi mpe bato nyonso bakanga ba Témoins de Jéhovah. Le 22 Mars 1989 na mpokwa, basali ya Sûreté bakotaki epai ya Edmond Ntibatamabi, ye azali pionnier spécial, mpe bakangaki ye. Na boloko, baboyaki kopesa ye bilei. Mbala mingi makasi nyonso ya nzoto esilaki ye. Banyokolaki ye mpe mpo andima nsango moko ya lokuta engebene yango ba Témoins de Jéhovah bamelaka makila ya bato-lokuta mpenza.
Nsima na Edmond, Aaron Ntikarahera mpe Prime Ntimpirangeza, bango mpe ba Témoins de Jéhovah, bakangamaki mpe bakotisamaki na boloko ya Gitega. Banyokwamaki motindo moko na Edmond.
charlotte Nijimbere, mwasi ya mokengeli ya zongazonga (mosakoli ya ntango nyonso oyo akotalaka masangá mingi), ayokaki nsango ya bandeko na ye baklisto. Amekaki kokenda kotikela bango bilei na boloko, kasi akangamaki le 16 Mars 1989 mpe babatelaki ye na bakonzi oyo bazalaki na mokano ya kokanga mobali na ye.
Province de Muramvya: Gouverneur Antoine Baza abengisaki Batemwe nyonso oyo bayebanaki mpo na kotuna bango mituna. Le 4 Mars, etuluku moko ya ba Témoins de Jéhovah eyaki komimonisa mpe bayanolaki na limemya nyonso na mituna ye, kasi baboyaki koyamba maloba mpo na kokumisa ekólo (slogans politiques).
Na yango, gouverneur atindaki bato babeta ba Témoins de Jéhovah. Le 16 Mars, bapolisi bakotaki na bandako ya Batemwe oyo bayebanaki, mpe babandaki kobeta mibali mpe basi na kolobaka ete baboyaki koyamba ba slogans ya parti. Babotolaki mpe bakangaki magasin ya Temwe moko, boye libota na ye bazali lisusu na eloko ya kobikela te.
Le 17 Mars, basi minei babetamaki mpo ete baboyaki kowangana kondima na bango. Bakangamaki na boloko moko ya moke ezangi fenêtre, atako moko na bango azalaki na bébé ya mikolo 20.
Le 20 Mars, etuluku moko ya bato bakumbaki banzete mpe ba torches bakotaki na makasi na bandako ya basi ba Témoins de Jéhovah. Babetaki bango mpe babenganaki bango na bandako na bango. Kati na basi oyo babetamaki ezalaki na mama moko ya mibu 75 oyo azalaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe mwa bilenge bakokisi naino mibu 14 te.
Pierre Kibina-Kanwa, directeur ya école primaire ya Nyabihanga, amekaki kopusa na makasi bayekoli ya eteyelo na ye oyo bazalaki ba Témoins de Jéhovah mpo na kopesa losako na bendele ya ekólo. Lokola akokaki te, alongolaki bana yango na kelasi. Batemwe 22 ya engumba yango bakimaki mboka kotikaka bongo biloko na bango nyonso. Kati na bato bakangamaki, tokoki kotanga Leonidas Ndayisenga, Leanard Kanyambo, Abednego Ntahorwamamiye, P. Bankangumurindi, Grégoire Kashi mpe Thadée Mbonihankuye.
Province de Bujumbura: Macaire Nahimana, motambwisi to administrateur ya commune ya Muhuta, abengisaki Vincent Kavunzo, Sylvestre Ndabazaniye et Ndizwe-Nzaniye-bango nyonso Batemwe-na likita moko. Kati na likita yango, afundaki bango ete bakotaki na mobulu oyo esalamaki na Aoôt 1988 kati na bikólo mibale. Atako ba Témoins de Jéhovah bakotaki na makambo yango te, babetamaki mpe bakangamaki.
Province de Bubanza: Batemwe mibale bakangamaki se mpo bazalaki na mikanda mikolimbolaka Biblia. Ntango baboyaki kopesa losako ya parti, gouverneur Balthazar Kimbusa atindaki bango na camp militaire. Kuna banyokolaki bango mpe banikaki bango misapi.
Bokoki kosala nini
Makambo mingi oyo ya nsomo esalamaki na barégio, mpe bapaya bamonaki yango te. Kasi 13 millions ya ba exemplaires ya lisolo oyo ekopalanganisama na mokili mobimba, na minoko 105. Minyokoli oyo esalami na Burundi ekobombama te. Baninga ya bonsomi bakosepela te na ndenge lotomo ya moto ezali kobukama na motindo mabe boye-lotomo oyo bankoto na Baafriké babundelaki yango.
Burundi emitye bongo liboso na likama na ndenge ezangi kokokisa elaka ya bonsomi mpo na losambo. Likama yango ezali bongo ete ekobebisa lokumu na yango ya mboka oyo emipesi na mosala mpe elingi bongo kokola. Lokumu oyo bazwi na mpasi. Burundi elingi bongo komonana lokola mboka oyo ezali konyokola basambeli? Tokanisi bongo te. Tomoni ekozala malamu na koloba ete président Buyoya akosamaki, ete bato oyo bakoki kopesa ye toli balimbwelaki ye makambo malamu te.
Makambo oyo balobi na ntina ya ba Témoins de Jéhovah mazali mpenza lokuta monene mpo na kopusa bato batomboka. Ba Témoins de Jéhovah bazali likama te ezala mpo na boyangeli ya Burundi, to mpo na boyangeli ya mboka nini. Bazali bato na kimya mpe batosi na mibeko mpe bazalaka na limemya mpo na bilembo ya mboka. Na bokeseni ya nsango oyo epalangani na Burundi, bamelaka makila te ata na lolenge nini-ata bomoi na bango ekomi na likama.—Misala 15:28, 29.
Baklisto ya solo ya mokili mobimba bakosambela bongo na bomoko mpo na bandeko na bango ya Burundi (1 Timote 2:1, 2) Batangi mingi ya zulunalo oyo bakokoma na président Pierre Buyoya ye moko mpo na kosenga ye na limemya nyonso ete asukisa monyokoli ya basambeli mpe apesa nzela na ba Témoins de Jéhovah basambela na bango. Burundi esengeli kolanda nzela malamu soko elingi kobongisa lokumu na yango liboso ya mokili.
Son Excellence le major Pierre Buyoya
Président de la République du Burundi
Bujumbura
RÉPUBLIQUE DU BURUNDI
[Bakarte na lokasa 22]
RWANDA
BURUNDI
ZAIRE
TANZANIA
LAKE TANGANYIKA