Toluka koyeba “motioli na mibeko”
“Motioli na mibeko akomemama polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye.”MN—2 BATESALONIKI 2:8.
1, 2. Mpo na nini esengeli na biso koyeba mpenza nani motioli na mibeko?
TOZALI kobika na eleko oyo mibeko mizali kotosama te. Ezali likambo epalangani na mokili mobimba. Bipai binso na mokili, bato oyo bazali kotosa mibeko te bazali kobangisa, bazali mpenza likama mpo na bomoi na biso mpe biloko na biso. Nzokande, ezali na moto oyo aleki mabe mingi atako botioli na ye na mibeko ezali komonana polele te mpe azali kosala bongo uta bikeke mingi. Biblia ezali kobyanga ye “motioli na mibeko”.
2 Tosengeli koyeba mpenzampenza nani motioli na mibeko oyo. Mpo na nini? Mpamba te akani kobebisa boyokani na biso elongo na Nzambe mpe kobebisa elikya na biso ya bomoi ya seko. Ndenge nini azali kosala yango? Azali koluka ete totika solo mpe tolanda lokuta, mpo ete tosambela Nzambe “na elimo mpe na solo’’ lisusu te. (Yoane 4:23.) Makambo oyo motioli na mibeko asalaka mamonisi polele ete azali kotelemela Nzambe, mikano na ye, mpe libota na ye.
3. Ndenge nini Biblia ezali kobenda likebi na biso likolo na motioli na mibeko?
3 Biblia eyebisi biso mpo na motioli na mibeko oyo kati na 2 Batesaloniki 2:3. Na kopemama na elimo ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki: “Tika te ete moto azimbisa bino na nzela nini, mpo ete (mokolo na Jéhovah, mokolo oyo akoboma biloko mabe na ntango oyo) ekoya te bobele ete lipengwi eya liboso mpe ete motioli na mibeko amimonisa.” Awa ntoma Paulo asakolaki ete liboso ete mokili oyo esuka, lipɛngwi ekobima naino mpe motioli na mibeko lokola. Lisusu, ntoma Paulo alobi na verset 7: “Libombami na motioli na mibeko ebandi kosala mosala .’’Na yango, na ekeke ya liboso ya ntango na biso, motioli na mibeko oyo abandaki komimonisa.
Ebandeli na motioli na mibeko
4. Nani azali tata mpe mosungi na motioli na mibeko?
4 Nani azali mobandisi na motioli na mibeko, mpe nani azali kosunga ye? Ntoma Paulo apesi eyano ete: “Komonana na ye motioli na mibeko ekozala engebene mosala na Satana, na misala na nguya nyonso, mpe na bilembo mpe na bikamwiseli na lokuta, mpe bizimbiseli nyonso na mabe mpo na bango bakobeba nyee, mpamba te baboyaki koyamba bolingo na solo mpo na lobiko na bango.” (2 Batesaloniki 2:9, 10). Ezali bongo Satana nde azali tata mpe mosimbi na motioli na mibeko. Lisusu, ezala ete ayebi yango to ayebi yango te, motioli na mibeko azali, lokola Satana, kotelemela Jéhovah, mikano na ye mpe libota na ye.
5. Etumbu nini ezali kozela motioli na mibeko mpe baoyo bazali kosala na boyokani elongo na ye?
5 Baoyo bazali kosala na boyokani elongo na motioli na mibeko bakozwa etumbu lokola ye, bakobomama. Ntoma Paulo akomi: “Motyoli na mibeko akomonana polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye . . . mpe akobebisa ye nyee wana ekomonana ye na ntango ekoya ye.” (2 Batesaloniki 2:8) Mpo na motioli na mibeko mpe baninga na ye (“bango bakobeba nyee”), ngonga na bango na kobomama ekobeta mosika te, “na ntango na komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na likoló esika moko na baanzelu na ye na nguya, kati na epelelo na móto ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu. Bango wana bakozwa lifuti na kobeba na seko.’’—2 Batesaloniki 1:6-9.
6. Makambo nini mosusu ntoma Paulo ayebisi mpo na motioli na mibeko?
6 Mpo na motioli na mibeko oyo, ntoma Paulo alobi mwa mosika: “Akotelema mpe akomitombola likolo na eloko nyonso ebyangami ‘nzambe’ soko eloko nini na losambo, kino akofanda na temple na Nzambe mpe akomisakwela ete azali nzambe mpenza.’‘ (2 Batesaloniki 2:4) Na bongo ntoma Paulo akebisaki ete Satana akobimisa motioli na mibeko, oyo bakopesa ye losambo ebongi na ye te, mpe akomitombola uta likoló na mibeko na Nzambe.
Ndenge nini koyeba motioli na mibeko
7. Mpo na nini tokati likambo ete ntoma Paulo azali koloba mpo na moto moko mpenza te, mpe motioli na mibeko azali komonisa nini?
7 Ntoma Paulo azali koloba mpo na moto mpenza? Te, mpamba te alobi ete “motioli” yango emonani na eleko na ye mpe akozala kino Jéhovah akoboma ye na nsuka na biloko mabe na ntango oyo. Na yango motioli oyo azali na bomoi uta bikeke mingi. Ezali solo ete, moto moko te, asili koumela na bomoi ntango molai boye. Na bongo, liloba “motioli na mibeko”, esengeli komonisa kelasi moko ya bato.
8. Nani motioli na mibeko, mpe wapi mwa ndambo na makambo makoki kosalisa biso na koyeba ye?
8 Ezali nani? Makambo mamonisi ete ezali bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo, baoyo bazali na lolendo mpe bazali komikumisa, baoyo na boumeli na bikeke, bamitombolaki na kosalaka mibeko na bango moko. Ezali mpo na ntina yango boklisto ya mokili oyo ekabwani na bituluku ebele ya mangomba, oyo moko na moko ezali na mokonzi na yango, mpe mokonzi moko na moko azali koyokana te na bamosusu likoló ya liteya moko to ezaleli moko. Bokabwani oyo ezali elembeteli ete mibali yango bazali kolanda mibeko ya Nzambe te. Na yango batindami na Nzambe te. (Tala Mika 2:12; Malako 3:24; Baloma 16:17; 1 Bakolinti 1:10). Mangomba oyo nyonso mazali na boyokani na likambo moko, ezali ete bango nyonso bazali kolanda mateya ya Biblia te. babukaki mobeko oyo ete:’’Boyekola koleka makambo makomami te’’.—1 Bakolinti 4:6; tala Matai 15:3, 9, 14.
9. Mateya nini mayokani na Makomami te bakonzi ya mangomba bazali koteya yango na esika na solo ya Biblia?
9 Na yango, motioli na mibeko oyo ezali kelasi ya bato: bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Basangani na yango nyonso, ezala ba papes basango, ba patriarches to bapastere ya protestant, bazali na ngambo mpo na masumu mazali kosalema na mangomba ya boklisto ya mokili oyo. Babongoli solo ya Nzambe na lokuta ya bopakano na koteyaka mateya oyo mazali na boyokani na Makomami te, lokola kozanga kokufa ya molimo, lifelo ya móto, epongelo mpe Trinité. Bakokani na bakonzi ya mangomba oyo mpo na bango Yesu alobaki ete: “Bino bouti na tata na bino, Diable, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. . . . azali mobuki na lokuta mpe tata na yango.” (Yoane 8:44). Lisusu misala na bango mimonisi ete bazali batyoli mibeko, mpamba te bazali kosangana na misala oyo mizali kobuka mibeko na Nzambe. Epai na bango, Yesu alobi: “Bolongwa na ngai, bino bato na misala mabe (to bino bato bokotiolaka mibeko)”—Matai 7:21-23.
Bamitomboli likoló na bamosusu
10. Boyokani nini motioli na mibeko azali na yango elongo na bakonzi ya politike?
10 Lisolo na bato emonisi ete kelasi oyo ya motioli na mibeko bamonisaki lofundo mpe lolendo kino bakomaki kosenga na makasi na bokonzi ya mokili ete basala engebene mikano na bango. Kosalelaka lilako ete “lotomo na koyangela euti na Nzambe”, bakonzi na mangomba bamimonisaki lokola ete bazali bayokanisi kati ya Nzambe mpe mikonzi ya nse. Bakomaki kopusa bato ete batombokela baoyo bazali koyangela bango to kolonga bato mpo na matomba yo bakonzi yango. Batiaki bakonzi na kiti na bokonzi to balongolaki bango. Na mokuse, bakonzi na mangomba oyo bazongeli mpo na bango maloba oyo banganga minene ya Bayuda oyo baboyaki Yesu balobaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.”(Yoane 19:15). Nzokande, mateya na yesu mazali polele. Alobaki:’’ bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.’’—Yoane 18:36.
11. Ndenge nini bakonzi na mangomba bamitombolaki likolo na bato mosusu?
11 Mpo na komitombola lisusu koleka likoló ya bato, kelasi oyo ya motioli na mibeko babandaki kolata bilamba bikeseni na oyo bato mosusu bazali kolata, mingimingi bilamba ya mwindo. Lisusu, bakonzi yango ya mangomba bamikitisaki na biloko ndenge na ndenge na lokumu, kolataka mitole, ekulusu mineneminene mpe bikoti ya losambo. (Tala Matai 23:5, 6.) Kasi, Yesu elongo na bayekoli na ye bazalaki na bilamba motindo yango te; balataki lokola bato nyonso.Bakonzi ya mangomba bazwaki mpe bankombo ya lokumu lokola ’’père’’ ’’Sainte père’’ ’’Reverend’’ Reverendissime’’, “Son Excellence” mpe “Son Eminence”, batitre oyo mpo na yango ‘bamitombolaki likolo na biloko nyonso’. Nzokande, po na oyo etali batitre kati na lingomba, Yesu apesaki mateya oyo malandi: “Bobyanga moto tata awa na mokili te.” (Matai 23:9). Bobele bongo, ntango Elihu apamelaki babondisi ya lokuta ya Yobo, alobaki: “Tika te ete nazala na koponapona epai na moto te! Mpe nakopesa nkombo ya lokumu te na moto asalami na mabelé.”—Yobo 32:21.
12. Engebene maloba ya ntoma Paulo, bakonzi na mangomba bazali kosalela nani mpenza?
12 Wana na eleko na ye, ntango ntoma Paulo alobaki ete motioli na mibeko abandaki kosala mosala, ayebisaki sikisiki ezalela ya kozanga bosembo oyo “motioli na mibeko” akolakisa. Akomaki ete: “Mpo ete bato yango bazali bantoma na lokuta, basali na kozimbisa, baoyo bakomimonisaka lokola bantoma na Klisto. Bokamwa te, mpo ete ata Satana akomimonisaka lokola ntoma na moi. Bongo ezali likambo monene te soko basali na ye bakomimonisa lokola basali na boyengebene. Nsuka na bango ekozala pelamoko na misala na bango.”—2 Bakolinti 11:13-15.
Botomboki epai na losambo ya solo
13. lipengwi oyo esakolamaki na ntoma Paulo ezali nini.
13 Ntoma Paulo alobaki ete motioli na mibeko oyo akokola nzela moko na lipengwi. Elembo ya liboso oyo ntoma Paulo apesi biso mpo na kosalisa biso toyeba kelasi oyo ya mabe ezali ete “mokolo na Jéhovah (mokolo oyo akoboma biloko mabe na ntango oyo) . . . ekoya te bobele ete lipengwi eya liboso”. (2 Batesaloniki 2:2, 3, MN) “Lipengwi” elimboli nini? Na kotalela mokapo oyo, liloba oyo ezali kolimbola te bobele ete, mpo na bolembu ya elimo, moto azongi nsima to atiki solo. Liloba na greke oyo ebongolami awa ete “lipengwi” ezali na ndimbola mosusu oyo ya “kokabwana” to “botomboki”. Mabongoli mingi ezali kolimbola yango na liloba “botomboki”. Ezali na lolenge yango nde tozali kotanga na libongoli ya Haut fleuve : “Yango ekoya te bobele ete kotomboka eyei liboso.” La Bible en français courant esaleli liloba “botomboki ya nsuka”. Na yango, mokapo emonisi ete na kosalelaka liloba “lipengwi” ntoma Paulo azali kolakisa awa botomboki epai na losambo ya solo.
14. Ntango nini lipengwi ebandaki mpenza?
14 Ndenge nini lipɛngwi oyo, botomboki oyo, ebandaki? Na 2 Batesaloniki 2:6, ntoma Paulo alobi mpo na eloko oyo, na ntango na ye, “ezali kopekisa” motioli na mibeko. Ezalaki likambo nini? Ezalaki bokasi ya bantoma. Lokola bantoma bazalaki naino na bomoi mpe makabo na nguya oyo bazwaki na nzela ya elimo santu ezalaki naino kosalama, na eleko wana, lipengwi ekokaki kopalangana te. (Misala 2:1-4; 1 Bakolinti 12:28). Kasi, na nsuka ya ekeke ya liboso, bantoma nyonso bakufaki mpe bokasi na bango na kopekisa lipengwi elimwaki.
Kelasi ya bakonzi na mangomba ebotami
15. Ebongiseli nini Yesu azwaki mpo na lisangá ya boklisto?
15 Lisangá oyo Yesu asalaki ekolaki na ekeke ya liboso na kotambwisama na bankulutu (bakengeli) mpe basaleli ya misala. (Matai 20:25-27; 1 Timoté 3:1-13; Tito 1:5-9) Mibali oyo baponamaki kati na lisangá, bazalaki mibali na bizaleli ya elimo mpe na makoki, kasi bango lokola mpe Yesu bayekolaki teoloji te. Mpo na yango, batemeli na Yesu bamitunaki ete: “Moto oyo ayebi mikanda na nzela nini awa eyekoli ye te?” (Yoane 7:15) Bakonzi na mangomba balobaki bobele bongo mpo na bantoma. Tozali kotanga na Misala 4:13 boye: “Ezalaki bango kotala molende na Petelo na Yoane, mpe eyebaki bango ete bazali bato bameseni na mikanda te, mpe bato bayekoli makambo te, bakamwi mpe basosoli bango ete bazalaki na Yesu esika moko.”
16. Mpo na oyo etali ebongiseli ya lisangá, ndenge nini lipengwi ebebisaki elakiseli ya boklisto ya ekeke ya liboso?
16 Nzokande, lipengwi ekɔtisaki makanisi oyo bakonzi na mangomba Bayuda bazalaki na yango, mpe na nsima, lolenge ya losambo ya bapakano ya Rome. Nsima na mikolo, kondima ya solo ebwakamaki, mpe na bokeseni na elimo ya Makomami, kelasi ya bakonzi na mangomba ebandaki. Pape aponamaki oyo abandaki kokamba lisangani ya ba cardinaux, baoyo baponamaki kati ya ba évêques mpe ba archevêque, baoyo bazalaki liboso basango oyo bateyamaki kati na ba séminaires. Na yango, mwa moke nsima na ekeke ya liboso, kelasi ya bakonzi na mangomba na nkuku ebandaki koyangela boklisto ya mokili oyo. Bakonzi oyo na mangomba bazalaki kolanda te ndakisa ya bankulutu mpe basaleli ya misala ya ekeke ya liboso, mpamba te babandaki kosala engebene makambo oyo mazalaki kosalema kati na mangomba ya bopakano.
17. Na eleko nini, mpenzampenza nguya ya motioli na mibeko ekomaki makasi koleka?
17 Na ebandeli ya ekeke ya misato, basambeli mosusu nyonso batiamaki na esika ya nse, kobengaka bango ete balaïke. Motyoli na mibeko, mopengwi, azwaki moke moke nguya mpo na kotambwisa Nguya oyo, elendisamaki na boumeli ya boyangeli ya mokonzi Moloma Constantin, mingimingi nsima na likita monene ya Nicée, na 325. Na eleko yango, Lingomba mpe Leta basalaki boyokani makasi. Ezali na lolenge yango, motioli na mibeko, bakonzi na mangomba ya boklisto ya mokili oyo, basalaki na boumeli ya bikeke molongo ya bapengwi baoyo batombokelaki Nzambe ya solo, Jéhovah. Mibeko mpe bibongiseli oyo bapengwi yango bazali kolanda kino lelo ezali ya Nzambe te, kasi ya bango moko.
Mateya ya bopakano
18. Mateya nini na kotuka motioli na mibeko azwaki yango na bapakano?
18 Nsima na mikolo, motioli na mibeko akendaki lisusu kozwa mateya na bopakano. Na ndakisa, libombami ya nzambe moko kati na bapersona misato ezwaki esika ya Oyo alobaki ete: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te.” “Ngai nazali Jéhovah, mpe mosusu azali te. Nzambe mosusu azali te, bobele ngai.” (Yisaya 42:8; 45:5) Makanisi ya bato, mpo na koloba na mokuse makanisi ya bopakano, oyo mazwaki esika ya solo ya Biblia mamemaki bango na kotuka mosusu: losambo ya Marie. Ye oyo Biblia ezali kolakisa biso ete azalaki mwasi moko na komikitisa, nde mpo na boklisto ya mokili akomi “Mama na Nzambe”. Na yango, bakonzi na mangomba babandisi na mateya ya lokuta, bakomaki “matiti mabe” maleki mingi oyo Satana akonaki mpo na kozipa nkona malamu oyo Yesu akonaki.—Matai 13:36-39.
19. Na boumeli na bikeke, ndenge nini boklisto ya mokili oyo ekabwanaki, mpe nini ekobaki?
19 Nsima kozanga koyokana mpe bokabwani ekotaki, mpo na yango boklisto ya mokili oyo ekabwanaki makasi kino kobimisa bituluku ebele ya mangomba. Longola bobele moke, mangomba oyo nyonso mabatelaki bokabwani oyo ezali komonisa bakonzi na mangomba epai mpe bato mosusu epai. Yango nde lolenge kelasi ya motioli na mibeko ekomaki kino mikolo na biso, oyo bazali kolandela komitombola likolo ya bato, na kolataka na lolendo bilamba oyo ezali kokesenisa bango na bato mosusu mpe kozalaka na batitre ya mineneminene. Na yango ntoma Paulo alekisaki ndelo te ntango alobaki ete kelasi ya motioli na mibeko bakomikumisa mpe bakomitombola kino na esika ya Nzambe.
Bokonzi ya pape
20. Mikanda ya bakatolike mizali koloba nini mpo na pape?
20 Bokonzi ya pape ezali ndakisa moko emonani polele na komikumisa oyo. Engebene diksionere oyo ezali kolobela makambo ya basango oyo ekomamaki na Ferraris, ebimisamakina ltalie, elobi ete pape azali na ’’lokumu mpe nkembo kino, akoki kotalelama bobele lokola moto te, kasi lokola Nzambe, mpe Mokitani na Nzambe.” Azali na bokonzi na lolenge misato, azali “mokonzi ya Likoló, ya mabelé mpe ya lifelo”. Mokanda oyo elobi boye lisusu: “Pape azali lokola Nzambe awa na mabelé, bobele ye moko azali mokonzi (prince) ya basembwi na Klisto, mokonzi aleki monene na bakonzi nyonso.” Mokanda yango ebakisi lisusu: “Pape akoki kotelemela mobeko ya Nzambe.” Lisusu, Diksionere ya sika (angl.) elobi boye mpo na pape: “Bamonisi na ye bazali na lotomo likolo na bamonisi ya bikolo mosusu.”
20 Na bokeseni na bayekoli ya Yesu, pape azali kolata bilamba ya ntalo mingi mpe azali koboya te kokumisama na bato. Azali kotika bango bakumbami liboso na ye, bapesa bizi na lopete na ye mpe bamema ye likolo na mapeka na bango na lisalisi ya kiti oyo ebongisami bobele mpo na ye. Oyo nde lolendo bapape bamonisaki na boumeli ya bikeke! Tala ndenge ezalela yango ekeseni na komikitisa ya Petelo oyo alobaki epai na corneille, mokonzi ya basoda moloma oyo akumbamaki na makolo na ye mpo na kokumisa ye ete: “Telema! Ngai mpenza nazali mpe moto.” (Misala 10:25, 26) Oyo nde ezalela ekeseni mpe na oyo ya anzelu oyo apesaki. Emoniseli epai na Yoane! Ntoma Yoane akweaki liboso na anzelu oyo mpo na kosambela ye, kasi anzelu alobaki na ye ete: “Tika! Ngai nazali moombo moninga na yo, mpe na bandeko na yo basakoli, na bango bakotosaka maloba na mokanda oyo Sambela Nzambe.”—Emoniseli 22:8, 9.
21. Makambo pape azali kosala makeseni ndenge nini na oyo ya ntoma Petelo mpe na anzelu?
21 Ozali kokanisa ete kelasi ya bakonzi na mangomba bazali kokweisama makasi? Tokoki kokata likambo yango malamu na kosalela lilako oyo Yesu apesaki mpo na koluka koyeba basakoli ya lokuta: “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango.” (Matai 7:15, 16) Mbuma nini bakonzi na mangomba babimisaki na boumeli ya Lisolo ya bato, mpe kino lelo oyo na ekeke ya ntuku mibale? Nini ekozala nsuka ya motioli na mibeko, mpe nani akosangana na ye na etumbu oyo ekozwa ye? Na oyo etali motioli na mibeko, bato oyo bazali kobanga Nzambe mpenza bapesameli mokumba nini? Masolo oyo makolanda makopesa biyano na mituna oyo.
Bozongeli
◻ Motioli na mibeko azali nani, mpe ntango nini amonanaki polele?
◻ Engebene oyo Biblia elobi, nani azali mobandisi na kelasi yango?
◻ Ndenge nini bakonzi ya mangomba bamitombolaki likolo na bato?
◻ Misala nini mpe mateya nini ya kopengwa bakonzi na mangomba babandaki kosala mpe koteya?
◻ Ezalela ya ba pape ekeseni ndenge nini na oyo ya ntoma Petelo mpe ya anzelu?
22. Lilako nini ezwami na Makomami ezali kosalisa biso na koyeba motioli na mibeko?
[Elilingi na lokasa 14]
Na kokesena na ba pape, ntoma Petelo apesaki nzela te na moto akoka kofukama liboso na ye.