Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
“Kanisa mwasi na Lota.”—LUKA 17:31.
1. Tokotalela ndakisa nini ya kala oyo etali kobikisama esalamaki na Nzambe, mpe na likambo nini boyekoli yango ekosalisa biso?
NSIMA na koloba mpo na kobika kitoko oyo Jéhovah abikisaki Noa mpe libota na ye, ntoma Petelo atangi ndakisa mosusu ya kala. Akundoli ete mosembwi Lota abatelamaki na ntango Sodome mpe Gomore ezikisamaki na móto, lokola tozali kotanga yango kati na 2 Petelo 2:6-8. Bandimbola ya lisolo yango ebatelamaki mpo na bolamu na biso. (Baloma 15:4) Boyekoli ya sikisiki ya makambo oyo makangisami na lobiko ekoki kosalisa biso na komibongisa mpo na kobatelama mpe kokota kati na mokili ya sika elakami na Nzambe.
Ezalela na biso liboso na lolenge na bomoi oyo euti na mokili
2. Etamboli nini ya bafandi na Sodome mpe Gomore epusaki Nzambe na koboma bango?
2 Mpo na nini bingumba wana mpe bafandi na yango babomamaki? Ntoma Petelo azali koloba mpo na “etamboli mabe” na bango. (2 Petelo 2:7.) Lokola liloba na greke oyo ebongolami na liloba oyo emonisi yango, bato na Sodome mpe Gomore bazalaki kosala mabe na komonisaka bongo ezalela ya kozanga limemya, mpe ata kotyola mibeko mpe bokonzi. Yuda 7 elobi ete bazalaki ‘kosala pite kino kolekisa ndelo’ mpe ete bazalaki ‘kosangana na motindo mobongi te’. Bosoto na bango emonanaki polele wana elingaki bango kokokisa mposa na bango mabe ya nzoto, mibali na sodome, “longwa na elenge kino na monuni, libota mobimba, bango nyonso esika moko”, bazingaki ndako na Lota mpe basengaki ye ete abimisa bapaya na ye liboso na bango. Lokola lota azalaki koboya mpo na kondima makanisi mabe na bango, babandaki kokanela ye.—Genese 13:13; 19:4, 5, 9.
3. (a) Ndenge nini esalemaki ete Lota mpe libota na ye bafandaki na Sodome, engumba oyo ya mbindo mingi? (b) Ndenge nini Leta azalaki kotalela etamboli mabe ya bafandi na Sodome?
3 Na ebandeli, Lota akendaki kofanda na région ya mboka Sodome mpamba te mboka yango ekokaki kopesa ye bozwi. Na nsima, afandaki na kati ya engumba mpenza. (Genese 13:8-12; 14:12; 19:1) Atako bongo, Lota azalaki kondima te makambo na bosoto ya bato ya mboka yango, mpe bango bazalaki kotalela ye lokola moto na bango te, ezali bongo mpo ete libota na ye mpe ye moko bazalaki kosangana elongo na bango te. Kati na 2 Petelo 2:7, 8, tozali kotanga na ntina yango: “Lota azalaki komitungisa mpo na mobulu na bizaleli ya bato. Mpamba te efandaki moyengebene oyo kati na bango, amoni mpe ayoki misala na bango na kilikili mokolo na mokolo mpe anyokolami na molimo na ye sembo.” Ezalaki mpenza komekama makasi mpo na Lota ete azala na bomoi kati na makambo motindo wana, mpamba te azalaki moyengebene, mpe azalaki koyina etamboli ya bafandi na Sodome.
4. (a) Na nini makambo ya lelo mazali kokundwela biso makambo oyo mazalaki na Sodome? (b) Soki tokokani na mosembwi Lota, ndenge nini tosengeli kotalela mabe ya mokili oyo?
4 Na mikolo na biso mpe, ezalela na bato esili kobeba. Kati na mikili mingi, bato mingi bazali kosangisa nzoto liboso ya kobala to na libanda ya libala. Ata ebele na bilenge oyo bazali na mbula ya kokota kelasi bazali komekola ezalela wana mpe bazali koseka baoyo baboyi kosala lokola bango. Ba homosexuels to mibali oyo bazali kosangana na mibali mosusu, bazali komimonisa mpe kotambola kati na banzela ya bingumba minene mpo na kosenga ete bandimama epai na bato mingi. Bakonzi ya mangomba, bango mpe bazali kosangana na bituluku yango. Mangomba mingi mpenza te bazali kondima polele ba homosexuels mpe basali na pite oyo bayebani mpo na kozwa mikumba kati na mangomba na bango. Kasi mpo na koloba solo, bazulunalo, radio mpe télévizio ezali koyebisa yango mbala mingi, ntina ya koluka mosika ezali te mpo na komona ba homosexuels, basali na pite mpe basali na ekobo kati na bakonzi ya mangomba. Ezali mpe na bakonzi ya mangomba batindamaki na bingumba bisusu to mpe basengisamaki ete batika mosala mpo ete pite oyo basalaki eyebanaki na bato mingi. Bato oyo balingaka boyengebene bayokaka ata bolingo moke te mpo na motindo wana ya etamboli mabe; bazali “koyina makambo oyo mazali mabe”. (Baloma 12:9.) Bazali mpenza kotungisama mpo ete etamboli ya bato oyo bazali komiloba ete bazali kosalela Nzambe ezali nde kobwaka nsoni likoló ya nkombo na ye mpe ezali kobenda bato oyo bateyami malamu te na koyina mangomba nyonso.—Baloma 2:24.
5. Kobomama ya Sodome mpe Gomore epai na Jéhovah ezali kopesa biso nzela na koyanola na motuna nini?
5 Makambo mazali kobeba mobu na mobu. Yango ekosila mokolo mosusu? Ekosila mpenza! Etumbu oyo Jéhovah apesaki na bingumba ya kala Sodome mpe Gomore emonisi polele ete akoyeisa kosambisa na ye na ntango oyo asili kobongisa Akoboma libela bato mabe mpe akobikisa basaleli na ye ya sembo.
Nani to likambo nini eleki ntina kati na bomoi?
6. (a) Liteya nini tozwi na lisolo etali bilenge mibali oyo basengelaki kobala bana basi ya Lota? (b) Na nini bana basi ya Lota batyamaki na komekama mpo na ezalela na bango liboso na baoyo basengelaki kozala mibali na bango?
6 Bobele baoyo bazali komonisa ezaleli ya solo ya komipesa na Nzambe nde bakobatelama. Talela mpo na yango maloba oyo baanzelu na Jéhovah balobaki na Lota liboso ete Sodome mpe Gomore ekoka kobomama. “Bato na yo mosusu bazali awa? Ba bokilo to bana babali to bana basi soko moto mosusu awa na mboka, bimisa bango na esika oyo, mpo ete tokobebisa esika oyo.” Lota alobaki na bilenge mibali oyo balingaki kobala bana na ye. Mbala mingi, azongelaki koyebisa bango: “Bolongwa! Bobima na esika oyo mpo ete Jéhovah alingi kobebisa mboka!” Na ntina na boyokani oyo esangisaki bango na libota na Lota, bilenge mibali wana bapesamelaki libaku malamu mpenza mpo na kobikisama, kasi mpo na yango esengelaki na bango kosala eloko moko. Basengelaki komonisa bilembo ya polele ya botosi epai na Jéhovah. Nzokande, Lota “amonanaki na miso ya ba bokilo na ye lokola moto azali kosala liseki’’. (Genese 19:1214; MN)Tokanisa na oyo ekokaki kozala kati na mitema ya bana basi na Lota ntango bayokaki likambo oyo esalemaki. Bosembo na bango epai na Nzambe etiamaki na komekama.
7, 8. (a) Ndenge nini Lota asukaki wana baanzelu balobaki na ye ete akima nokinoki elongo na libota na ye, mpe mpo na nini ezalaki likambo na mayele te? (b) Kobika ya Lota mpe ya libota na ye ezalaki kotalela nini?
7 Lobi lolandaki, na ntongontongo, baanzelu bazalaki kolaka Lota nokinoki. Balobaki na ye ete: “Longwa mpe kamata mwasi na yo mpe bana basi mibale na yo bazali awa ete okufa kati na likambo na mboka te!” Atako bongo, Lota “aumelaki”. (Genese 19:15, 16.) Mpo na ntina nini? Eloko nini ezalaki kokanga ye? Ezalaki nde matomba ya mosuni oyo azalaki na yango na Sodome oyo, ebendaki ye mpenzampenza, kati na mboka yango? Soki atikaki yango te mbele akufaki elongo na Sodome.
8 Mpo na mawa, baanzelu basimbaki basangani ya libota na ye na maboko mpe babimisaki bango nokinoki na mboka. Ntango bakomaki na libanda ya Sodome, anzelu ya Jéhovah apesaki mobeko oyo ete: “Kima ete obika. Kotala nsima na yo te mpe kopema kati na Lobwaku te! Kasi kima epai na ngomba ete okufa te!” Lota azalaki kokakatana naino. Nsuka na yango, nsima na kozwa ndingisa ya kokende na esika ya penepene, ye mpe libota na ye bakimaki. (Genese 19:17-22) Ezalaki lisusu likambo ya kozela te; lobiko na bango ezalaki kotalela botosi na bango.
9, 10. (a) Mpo na nini ekokaki bobele te na mwasi ya Lota kozala esika moko na mobali na ye mpo na kobikisa bomoi na ye? (b) Na nini liwa ya mwasi na Lota ezalaki komekama mosusu mpo na Lota mpe bana basi na ye?
9 Nzokande, kobikisama ya Lota mpe libota na ye ezalaki naino mobimba te na ntango oyo bazalaki kobima na Sodome. Lisolo ezali kokoba boye kati na Genese 19:23-25: “Moi esilaki kotana na mokili wana ekomaki Lota na Soali. Na nsima Jéhovah anokisaki sufulu mpe móto na likoló na Sodome na Gomore, longwa na Jéhovah na likoló. Abebisaki mboka yango nyonso mpe bato nyonso bafandaki na mboka mpe ndunda na lobwaku.” Kasi, mwasi ya Lota azalaki wapi?
10 Ya solo, akimaki elongo moko na mobali na ye, kasi, na nse ya motema na ye, ayokanaki mpenza elongo na ye? Eloko moko te kati na lisolo ya Biblia eyebisi ete azalaki kosepela ata moke na ezalela ya mbindo ya bato na Sodome. Kasi, bolingo na ye mpo na Nzambe zalaki mpenza makasi koleka bikanganeli oyo bizalaki kosangisa ye elongo na libota na ye pe na bozwi ya mosuni oyo azalaki na yango? (Tala Luka 17:31, 32.) Komekama emonisaki eloko nini azalaki na yango kati na motema. Ezali kokanisama ete Lota mpe mwasi na ye komaki pene na Soali, to balingaki kokota kati na engumba yango, wana, eboyaki ye kotosa mobeko ya Nzambe, mwasi abalukaki pe atalaki nsima. Lisolo eyebisi ete akomaki bongo “libanga ya mungwa”. (Genese 19:26.) Bosembo ya Lota mpe ya bana basi na ye emekamaki lisusu. Bolingo ya Lota mpo na mwasi na ye oyo akufaki to mayoki ya bana basi na ye mpo na mama na bango oyo akufaki lekaki bolingo na bango mpo na Jéhovah, ye yo abimisaki mpasi motindo wana? Bakolada kotosa Nzambe atako moto moko ya penepene kati na bango aboyaki kotosa ye? Lota mpe bana basi na ye batyaki motema mobimba epai na Jéhovah: batalaki nsima te.
11. Kino sikawa nayekoli nini mpo na kobikisa oyo jéhovah azali kokokisa?
11 Ee, Jéhovah ayebi kobikisa bato oyo bazali kobanga Nzambe. Ayebi kobikisa mabota mobimba oyo bazali na bomoko kati na losambo na peto; ayebi mpe kobikisa moto moko na moko. Azali komonisa boboto mingi epai na baoyo bazali na bolingo ya solo mpo na ye. “Ye ayebi nzoto na biso, abosani te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:13, 14) Nzokande, azali kobikisa bobele bato oyo bazali kobanga zambe, baoyo bazali komonisa ezalela ya solo ya komipesa na makambo na Nzambe, mpo na baoyo bazali kotosa ye mpo ete bazali sembo epai na ye.
Bibongiseli bitondi na bolingo mpo na kobikisama oyo eleki monene
12. Bibongiseli nini bitondi na bolingo Jéhovah asegelaki kokamata mpo na kokokisa kobikisama oyo ozali kozela na motema móto?
12 Na nzela na koboma oyo ayeisaki na mikolo ya Noa mpe Lota, Jéhovah asilisaki bato mabe nyonso te na koboma. Engebene lisolo ya biblia, ezalaki bobele ndakisa ya makambo oyo makoya nsima. Liboso ete makambo yango mabima, Jéhovah akanaki kosala malamu koleka mpo na bato oyo balingaka ye. Asengelaki kotinda Yesu Klisto, Mwana na ye bobele moko, awa na mabelé. Wana lisusu, Yesu akopetola nkombo ya Nzambe na nsoni nyonso na kosalelaka lolenge na ezalela ya kobanga Nzambe oyo Adam, moto na kokoka, asengelaki komonisa epai na Nzambe, na likeseni bobele oyo ete Yesu asengelaki kosala yango kati na makambo ya mpasi koleka. Akopesa bomoi na ye ya moto na kokoka lokola mbeka mpo na bakitani ya Adam oyo bakozala na kondima ete bazwa lisusu eloko oyo Adam abungisaki. Na nsima, “etuluku moke” ya bato na sembo bakoponama na Nzambe mpo na koyangela penepene na Klisto kati na Bokonzi na ye ya likoló, mpe “ebele monene” ekozwama kati na mabota nyonso mpo na kokóma moboko ya libota ya sika ya bato. (Luka 12:32; Emoniseli 7:9) Nsima na kokokana na makambo oyo nyonso, nde Nzambe akokokisa kobikisama monene oyo emonisamaki na makambo oyo masalamaki na ntango ya mpela mpe na kobomama ya Sodome mpe Gomore.
Oyo ezali ntango ya kozwa ekateli nokinoki
13, 14. Liteya nini tozali kozwa na likambo oyo ete Petelo akamati kobomama ya bato mabe oyo bazalaki na bomoi na mikolo ya lota mpe ya Noa lokola ndakisa?
13 Baoyo bazali koyekola Liloba na Nzambe bayebi ete Jéhovah abikisaki basaleli na ye mbala mingi. Nzokande, Biblia elobi te likoló ya kobikisama wana nyonso ete: ‘Lokola ezalaki na eleko boye, kozonga na Mwana na Moto ekozala mpe bongo.’ Mpo na nini ntoma Petelo, oyo apemamaki na elimo santu, alobelaki bobele ndakisa mibale? Na nini makambo oyo masalemaki na mikolo na Lota mpe na mikolo na Noa makeseni bongo na oyo nyonso mosusu?
14 Yuda 7 eyebisi biso yango na sikisiki. Tozali kotanga ete “Sodome mpe Gomore mpe mboka mosusu ezingelaki bango . . . bazali elakiseli oyo ezwi etumbu na sembo ya móto na seko”. Bafandi ya bingumba wana oyo bazalaki kosala masumu minene, bazwaki kufa ya libela lokola oyo ekosukisa ebongiseli ya biloko na ntango oyo. (Matai 25:46) Mpela ya ntango ya Noa yango mpe ekomami kati na makambo matali bikateli ya seko. (2 Petelo 2:4, 5, 9-12; 3:5-7) Na ntina yango, na kobomáká bato mabe na ntango ya Lota mpe Noa, Jéhovah apesaki elembo ete akobikisa basaleli na ye na ntango akoboma mpo na libela bato oyo bazali kosala masumu.—2 Batesalonike 1:6-10.
15. (a) Likebisi nini ya nokinoki epesami epai na baoyo bazali kosala masumu? (b) Mpo na nini boyengebene ekokokisama likoló na baoyo nyonso bazali kokangama na kosala mabe?
15 Jéhovah asepelaka te mpo na kobomama ya moto mabe; ezali mpe likanisi ya basaleli na ye. Tala libiangi oyo azali kopesa epai na bato banso na nzela ya ba Témoins na ye: “Bongwana, botika nzela mabe na bino; nde bino bolingi kokufa mpo na nini?” (Ezekiele 33:11) Kasi, ntango bato bazali komonisa mposa moke te ya koyanola na libyangami oyo etondi na bolingo, nde bazali kokoba kozala na bomoi ya moimi, Jéhovah asengeli komonisa boyengebene, mpo na kopesa limemya na nkombo mosantu na ye mpe mpo na bolingo epai na basaleli na ye ya sembo oyo banyokolami na bato mabe.
16. (a) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete kobikisama oyo esakolamaki esili kobelama? (b) Na nini bato oyo bazali kobanga Nzambe bakobikisama, mpe bakokota kati na esika nini?
16 Ntango oyo etyami na Nzambe mpo na kobikisa bato bazali kobanga ye esili kobelema! Bizaleli mpe makambo oyo, engebene Yesu, esengelaki kozala elembo ya kozonga na ye mpe ya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo, ezali komonana mpenza polele. Makambo makeseni ya elembo yango mabandaki komonana esili kokokisa sikawa mibu koleka 75. Nzokande, Yesu eyebisaki sikisiki ete “libota oyo” ekoleka soko moke te liboso ete Nzambe ayeisa kosambisa na ye likoló na mokili oyo mabe. Ntango Jéhovah akomona ete nsango ya Bokonzi esili mpenza kosakolama kati na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, nde nsuka ya mokili mabe oyo ekoya, mpe na nzela na yango elaka ya kobikisa bato oyo bazali kobanga Nzambe ekokokisama. (Matai 24:3-34; Luka 21:28-33) Bakobika na makambo nini? Na mimekamo oyo basengeli koyikela yango mpiko liboso na bato mabe, mpe na makambo oyo mazali konyokola bango mokolo na mokolo mpo ete balingi boyengebene. Epai mosusu, kobika yango ekopesa bango nzela na kokota kati na mokili ya sika epai kuna maladi mpe liwa ekozala makambo ya kala.
Nzambe azali kosalisa biso ete tobatela kobikisama na biso kati na makanisi
17. (a) Motuna nini ya ntina tosengeli komituna? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na ezalela ya ’’kobanga Nzambe” na motindo moko lokola Noa?
17 Tosengeli biso mpenza komituna motuna oyo: ‘Nasili kobongama mpo na mokolo Nzambe akoboma mokili?’ Soki tozali kotya motema likoló na biso moko to likoló na lolenge biso moko bozali kotalela boyengebene, na bongo tosili naino komibongisa te. Kasi soki tozali na “nsomo ya kobanga Nzambe” lokola oyo ya Noa, yango emonisi ete kondima na biso ezali kotinda biso na kolanda nzela oyo Jéhovah azali kolakisa biso, mpe yango ekomemela biso lobiko.
18. Kati na likambo etali formation oyo tozali kozwa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika, mpo na nini ezali na ntina mingi ete toyekola mpenza na kotosa bokonzi ya teokratike?
18 Baoyo bazali uta sikawa kozwa libateli na Jéhovah bamonisami na maloba kitoko oyo kati na Nzembo 91:1, 2: “Oyo akofandaka kati na esika na kobombama na Oyo-Aleki-Likolo, akopema na nse na elilingi na Oyo-na—Nguya Nyonso. Nakoloba epai na Jéhovah ete: ‘Yo ozali ebombamelo na ngai mpe ndako na ngai makasi, Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.’” Ezali na etuluku moko ya bato oyo, bazali kobatelama na Nzambe lokola bana na ndeke oyo bazali kobombama na nse na mapapu makasi ya moko ya baboti na bango. Bato yango bazali kotya elikya na bango mobimba epai na jéhovah, kondimaka ye ete azali Oyo-Aleki likoló, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yango wana bazali komemya bokonzi ya teokratike mpe azali kotosa yango, ezala ata esalelami na baboti na bango to na “moombo na sembo mpe na mayele”. (Matai 24:45-47.) Ezali boye mpo na moko na moko na biso? Tozali kosala ‘nyonso oyo Jéhovah azali kotinda biso’ mpe na lolenge oyo akanaki, lokola esalaki yango Noa? (Genese 6:22) Soki tozali kosala motindo wana, yango emonisi ete tozali kondima kobongisama oyo Jéhovah azali kopesa biso mpo na kobikisa biso mpe kokotisa biso kati na mokili ya sika mpe ya boyengebene.
19. (a) Motema na biso ya elilingi ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina ete tosenzela mpo na yango? (Masese 4:23) (b) Lolenge nini tokoki kozwa litomba na ndakisa ya Lota na lolenge na kosala na biso liboso na makambo ya mokili oyo?
19 Kobongisama yango ezali kosenga lisusu ete tosenzela likoló na motema na biso ya elilingi. “Jehovah akomekaka mitema na bato.” (Masese 17:3) Azali kosalisa biso na koyeba ete likambo oyo eleki ntina, ezali lolenge tozali komonana libanda te, kasi lolenge oyo tozali na kati, yango motema na biso. Ata soki tozali kosala mobulu te to kosala pite te lokola mokili oyo ezingi biso, esengeli na biso komisenzela mpo ete tomitika te kopengolama to kosepela na makambo yango. Lokola Lota, tosengeli kotungisama na likanisi oyo ete makambo yango mazali kosalema mpo na kotyola mibeko. Baoyo bazali koyina mabe bakolukaka libaku moko te mpo na kosala yango; nzokande, baoyo bazali koyina mabe te, mbala mosusu bakoki mpe kosala yango te kasi nde bakolona mposa na yango kati na makanisi.-“Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boyina mabe.”—Nzembo 97:10, MN.
20. (a) Batoli nini ya Biblia ezali kokebisa biso mpo na lolenge na bomoi oyo etongami likoló na bozwi ya mosuni? (b) Likambo nini ezali kopesa biso nzela na koloba soki batoli ya ntina na Biblia oyo etali bozwi ya mosuni ekoteli biso mpenza kati na motema?
20 Na bolingo nyonso, Jéhovah azali koteya biso ndenge ya koboya etamboli ya mbindo bakisa mpe lolenge na bomoi na mposa ya bozwi ya mosuni. Liloba na ye ezali koteya biso ete ‘tosepela na bilei mpe bilamba’. (1 Timote 6:8.) Noa mpe bana mibali na ye batikaki bandako na bango ntango bakotaki na masuwa. Lota mpe libota na ye batikaki mpe ndako na bango mpe biloko na bango mpo na kobikisa bomoi na bango. Na eloko nini tozali kotya motema na biso koleka? “kanisa mwasi na Lota”. (Luka 17:32) Yesu apesi elendiseli oyo: “Bolukaka nde liboso bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na Ye.’’ (Matai 6:33) Ezali yango nde toselaka? Soki tomitiki kotambwisama na mitinda ya sembo ya Jéhovah mpe soki tokomisi kosakolama ya nsango malamu na Bokonzi na ye lobanzo na biso, ya liboso, yango emonisi ete, tozali kondima formation oyo Jéhovah azali kopesa epai na libota na ye mpo na kobikisa bango mpe kokotisa bango kati na mokili na ye ya sika.
20 Epai na bato bazali kobanga Nzambe, baoyo basengelaki komona kokokisama ya elembo ya kozonga na ye kati na nguya ya Bokonzi, Yesu alobaki boye: “Telema alima mpe tombola mitó na bino, mpo ete kobika na bino ezali kobelema.” (Luka 21:28) Ozali komona kokokisama ya elembo yango ata kati na makambo na yango mike? Na bongo zala na elikya ete kobika oyo elakami na Jéhovah ekomi penepene mpenza! Omindimisa mpenza ete “Jéhovah ayebi kobikisa bango bakosambelaka ye”.—2 Petelo 2:9.
Bozongeli
◻ Lokola Lota, mayoki nini lolenge na bomoi ya bato na mokili esengeli kobimisa kati na motema na biso?
◻ Komekama nini Lota mpe libota na ye bazwaki wana ezalaki bango kokima longwa na Sodome?
◻ Ndenge nini bandakisa oyo Petelo akamataki ezali komonisa ete ezali likambo ya nokinoki mpo na komitia na ngambo ya Jéhovah?
◻ Mpo na kobongisa libota na ye mpo na kobikisama mateya nini ya ntina Jéhovah azali kopesa bango?
21. Mpo na nini tokoki mpenza komindimisa na motema moko ete kobikisama oyo elakami na Jéhovah ebelemi?
[Elilingi na lokasa 18]
Baoyo bazali kosalela Nzambe babatelami epai na ye, lokola bana na ndeko na nse na mapapu makasi ya moboti na bango.