‘Batelemi ngwi lokola etonga moko’ na tchad
Lokola baninga na bango baklisto ya mokili mobimba, ba Témoins de jéhovah ya Tchad bazali kosepela na ba assemblées oyo ezali kosalema mobu nyonso mpo na kolendisama na bango kati na elimo. Tala rapport ya mobembo moko masalemaki mpo na koyangana na mwa mikolo ya assemblée spéciale oyo ebongisamaki na ngele ya mboka wana ya Afrique centrale, ezipami na bangomba.
Likoló ya makaya batamboli mpe mikakatano mpo na kosala mobembo, na Tchad, ba assemblées ezali kosalema mingimingi na bituluku mike, mpe date ya makita yango ezali kotyama na kotalela ntango. Kobanda juin kino Septembre, mbula epesaka mikakatano mpo na kosala mibembo, to mpe epesaka nzela te, kati na bituka misusu. Mikolo ya assemblée spéciale esalemaka bongo na ntango bambula makasi esili koleka. Bopemi ya nsuka mbula ebongi malamu mpo na assemblée monene ya distrike, mpe ba assemblées ya circonscription ya mikolo mibale esalemaka liboso ete mbula ebanda kobeta, na juin.
EZALAKI nsima na midi na mokolo moko ya lomingo ya molungé mpe ya malili. Assistance ya bato 184 batondisaki Salle du Royaume ya Ndjamena, kapitale ya Tchad. Atako molungé ezalaki, bato nyonso bazalaki kotya likebi mingi na diskur klé “Totelema ngwi kati na elimo moko.” Na ntongo, bazalaki na esengo ya koyangana na libatisi ya bato misato oyo bamonisaki liboso na bato banso ete bamipesi epai na Jéhovah Nzambe. Ezalaki moko na liboso ya mikolo motoba ya assemblée spéciale oyo mokengeli ya zongazonga mpe ngai tozalaki na libaku malamu ya kokende kosalisa kuna.
Motó ya likambo ya ba assemblées wana elandani, “Totelema ngwi lokola etonga moko,” esepelisaki mpenzampenza ba Témoins 267 ya Tchad. Bazali kofanda mosika ya baninga na bango baklisto ya mikili misusu, kasi lokola bazali kozwa bilei ya elimo mpe likebi motindo moko ezali kolendisa bango na kolanda kosala kati na bomoko elongo na bandeko na bango ya mokili mobimba. Batoli kitoko oyo epesami na likita yango elendisaki bango mpe lokola mpo na kotelema ngwi liboso na bopusi mabe ya mokili na Satana mpe na minyoko makasi to mpe botemeli.
Na Ndjamena
Lisangá ya liboso ya ba Témoins de Jéhovah ya Tchad esalemaki na Ndjamena na 1964. Ezali sikawa na basakoli ya nsango malamu na Bokonzi koleka 90. Ezalaki esengo na komona kati na bayangani mingi na baoyo bazali kosalela Nzambe na bosembo nyonso uta ebandeli ya mosala na Tchad. Moko kati na bango azaláká na basi misato ntango abandaki koyekola solo ya Biblia. Akangaki ntina nokinoki ete asengelaki koyokanisa bomoi na ye na mitinda ya Biblia. Abalanaki na mwasi na ye ya liboso engebene mibeko ya Leta mpe akabwanaki na misusu wana mibale, na kokamátáká bongo bibongiseli bitondi na bolingo mpo na bango. Azwaki batisimo na 1973, mpe kino wana azali ntango nyonso na molende kati na mosala ya Bokonzi.
Kondima ya moko na bankulutu oyo ayanganaki na programme emekamaki makasi. Bokonzi oyo ezalaki na 1975 ezalaki kotinda bato ete basalela makambo mosusu ya bonkoko oyo ezali na boyokani na losambo ya bakufi; moto nyonso oyo aboyaki kotosa azalaki na likama ya kozwa etumbu ya liwa. Lokola temwe atelemaki ngwi mpe aboyaki kowangana kondima na ye, bakonzi babandaki koluka ye. Bobele mbongwana ya bokonzi na ntango ya mpasi makasi nde ebikisaki ye.
Na nzela mpo na kokende na Pala
Nsima ya Ndjamena, totalisaki na sud mpo na kokende kosalisa ba assemblées mitano oyo etikalaki. Mbala mingi tosilaki kotambola na nzela wana liboso, kasi ezalaki ntango nyonso na elanga. Nzokande, na nsuka ya sanza ya Septembre oyo ezalaki kosukisa eleko ya mbula ya mosala, matiti nyonso mazalaki mai ya mpondu mpe ezalaki mingi. Ezalaki eleko moko kitoko mpo na kosala mobembo Tomonaki bilanga ya masangu bizalaki kolandana. Masangu likoló na banzete na yango milai, oyo elonamaki pembeni na nzela mobimba, ebandaki kokomela. Mosika te bakobuka yango, kokausa yango mpe kobomba yango kati na ebombelo moko oyo etongami na mabelé na lolenge ya ngomba moke ya nsonge (cone) oyo ezalaki komonana epai na epai kati na zámba. Masangu (millet) ezali bilei ya ntina ya bato mingi na Tchad. Batutaka yango mbala mingi na eboka monene, oyo eleki moto oyo azali kosalela yango. Na nsima, ntango fufu ezwami, esangisami na mai ya moto mpe ekokoma libungutulu mpo ekoka kolyama elongo na supu elambami na dongodongo to mpe na nguba.
Lokola ezalaki biso ntango nyonso kopusana na sud, tozalaki mpe komona bilanga mingi ya coton. Lokola mabelé ezali ya kolala kati na bisika misusu ya mboka, bilanga bibimisi bafololo bizalaki komonana lokola bikomi kino na nsuka ya mboka. Mosika te mabota nyonso bakozala na bilanga mpo na kobuka coton na maboko. coton ezali molona moleki monene na Tchad. Na 1988, babukaki 133 000 tonnes. Na nsuka ya après-midi, tokatisaki Léré. Etuka wana ezalaki na lobwaku mingi mpe na bonzenga koleka, mingi mpenza na eleko wana ya mobu. Lokola tozalaki wana na ntango malamu, tosombaki mabundu oyo bautaki kozwa yango na mai mpe batumbaki penepene na nzela, bilei oyo mopaya nyonso akozala na esengo ya kolya yango.
Likambo oyo ezali kokomisa mibembo mpasi na eleko wana, ezali oyo ete soki mbula ebeti, bazali kokanga nzela mpo na kopekisa ete mituka mileka te. Mpo na nini? Ezali mpo na kobatela banzela. Lisusu motema ebandaki kobeta biso ntango tomonaki ete likoló eyindi tuu na mbala moko lokola mai ya ekomeli na mokanda. Likanisi ya kotambola na nse ya mbula penepene na nzela ezalaki kosala biso eloko te. Kasi, likambo ya ntina koleka lisusu, tozalaki na likámá ya kokóma na retard mpo na mokolo ya assemblée spéciale oyo elandaki. Ezali likambo ya esengo mpo ete, eteni monene ya mbula wana ya nsuka ebebisaki nzela te. Atako tokokaki kozela mwa moke na bisika mingi oyo batyaki barrage, tokómaki na butu makasi mpenza, kozanga ata soko likama moko, na Pala, engumba oyo ezali na bafandi pene na 32 000. Likambo moko ya kosepelisa ezalaki kozela biso. Nsima na konoka ya mbula, likoló epetolami elakisaki biso etaleli kitoko ya myoto mpe ya Voie lactée, likambo moko ya kitoko mingi mpenza oyo ebele na bato bafandi na bingumba minene bakokoka komona yango te. Yango ekundwelaki biso ntina oyo tozali kotelema ngwi: mpo na kokumisa Mozalisi monene ya molongo monene.
Na Pala, masanga mibale ya mike mpe mwa lisangá moko moke etangwi na Pala eyanganaki. Bilenge ba Témoins misato batambolaki bakilometele 100 na makolo mpo na koyangana na assemblée yango. Lokola ba assemblées oyo ezali kosalema na sud ezali ya mike mpe lokola bankulutu bazali mingi te, badiskur mosusu ya programme ezalaki enregistrés na assemblée ya Ndjamena mpo eyokisama lisusu, yango esalisaki mpo na kopesa programme moko ya malonga atako bato bazalaki mingi mpenza te. Tozalaki na esengo mpo ete moto moko amipesaki mpo na batisimo.
Etuluku ya molende na Kélo
Na nsima, tosalaki mobembo ya mokuse kino na Kélo, epai kuna bato 194 bayanganaki na likita ya Dimanche. Ebele na mabota elongo na bana mike batambolaki bakilometele 30 na makolo mpo na koya. Bato mibale oyo bautaki komipesa kala mingi te basengelaki kobatisama. Na boumeli ya elanga, ezalaka mpenza mpasi mpo na kopesa batisimo soki assemblée ezali kosalema penepene na mai te; mpo na yango, mingi ezali baoyo bazwaki batisimo kati na tonneau. Kasi lokola tozalaki na nsuka ya eleko ya mbula, yango ezalaki mpasi mingi te. Atako bongo esengeli mpenza kotambola bakilometele 20 na vuatire mpo na koluka esika ya malamu.
Kati na bato oyo basengelaki kozwa batisimo ezalaki na elenge mwasi moko oyo kondima na ye emekamaki makasi mpenza. Baboti na ye balingaki kobalisa ye epai na moto moko azalaki kosepela na boyekoli na Biblia te mpe alingaki kofanda na ye engebene bonkoko na bango na esika ete ezala libala engebene mibeko ya Leta. Lokola andimaki kofuta mosolo mingi mpo na libala, libota ya elenge mwasi bazalaki koluka na kondimisa ye na makasi ete abala mobali yango. Na eleko moko nkutu alongwaki na ndako mpo na kokima libala motindo wana oyo bazalaki kondimisa ye na makasi, oyo eyokani te na Makomami. Kati na makambo nyonso wana, atelemaki ngwi mpe asalaki bokoli malamu. Uta batisimo na ye, botemeli ya libota na ye esilaki. Tozali kotonda Jéhovah mpo ete azali na bato ya bosembo kati na biso.
Ba Témoins ya Tchad bazali na bantina mosusu ya kozala na botondi epai na Jéhovah. Mboka enyokwamaki na etumba makasi ya bana mboka, mpe na nsima, nzala makasi na 1984. Na boumeli ya nzala wana, nsima na kotala zingazinga na ye kati na Salle du Royaume, nkulutu moko amikundoli lisusu ete amitunaki soki nani, kati na baoyo bazalaki wana, asengelaki kozala lisusu na bomoi nsima na mwa basanza. Kasi, lisangá na Jéhovah epesaki lisalisi ya bilei, kopesáká bongo elendiseli epai na ba Témoíns wana. Bazali komonisa botondi na bango mpo na nyonso wana na kokokisáká mosala moko ya molende. Na yango, elimo ya pionnier ekoli mingi na Kélo. Na Octobre 1989, koleka ndambo na misato ya basakoli na Bokonzi bamibongisaki mpo na kobanda mosala ya pionnier.
Nzala oyo bazwaki eteyaki bango ete basengeli mpe kozala bakabi. Mbula eleki, nkulutu moko ya lisangá azwaki maladi ya mbalakaka mpe akufaki. Atikaki libota moko ya bana libwa, oyo mwana ya moke koleka azalaki bobele na mwa basanza. Mwasi na ye azwaki bopusi ya libota na ye, oyo balingaki kobenda ye ete asangana na milulu ya bokundi oyo ezali na boyokani na losambo ya bakufi. Ba Témoins bamemelaki ye lisalisi oyo azalaki na yango mposa, na motindo boye ete alongaki kotelema ngwi liboso na bopusi makasi wana. Na nsima, lisangá mobimba eyokanaki mpo na kobonga ndako moko mpo na ye mpe bana na ye ya mike, mpe basalisa ye na mosuni na bandenge ekeseni. Yango epesaki litatoli malamu kati na mboka, komonisáká matomba malamu ya kosalela boklisto.—Misala 20:35.
Koumra, Doba mpe Bongor
Eteni ya mobembo na biso oyo elandaki na Koumra. Nzela oyo etyami gudro esalisaki kozanga nkaka na kosala mobembo wana ya bakilometele 300. Na nzela, tokatisaki engumba ya Moundou, etuka moko ya bakompanyi mingi oyo ezali na bafandi koleka 100 000. Na Koumra, bato 71 bayanganaki na assemblée. Elenge temwe moko oyo akota kelasi te, alobaki uta na estrade. Alimbolaki ndenge nini mateya ya botangi mpe kokoma oyo alandaki na Salle du Royaume esalisaki ye mpe esalaki ete amiyoka na makoki oyo azalaki na yango mposa. Azali sikawa kotambwisa boyekoli na Biblia elongo na bato minei.
Nsima na mokolo ya assemblée spéciale na Koumra, tozongaki na Ndjamena, mpe mobembo na biso oyo elandaki ezalaki na Doba, epai kuna assemblée ya mitano esalamaki mpo na kolandana wana. Bamoko na bayangani bakamwisamaki na mbula moko ya nsima oyo ebetaki, mpe balalaki na penepene ya nzela. Nzokande, bato nyonso bakómaki na ngonga malamu na Doba mpo na ebandeli ya assemblée. Bato ntuku mitano na moko bazalaki wana mpe moko kati na bango azwaki batisimo.
Mobembo na biso ya nsuka ezalaki na Bongor. Ezali etuka moko oyo ezali na loso mingi mpe tokamwaki na komona na meko nini mabelé mazalaki papala. Assistance na Bongor ematisaki motuya na baoyo nyonso balandaki programme na Tchad na bato 630. Mpe elongo na batisimo mibale mosusu, nyonso ekómaki bongo batisimo 9.
Bozongi na biso na Ndjamena esukisaki mobembo na biso ya pene na bakilometele 2 000. Ezalaki esengo na koyangana elongo na basaleli ya Jéhovah oyo bazali kotelema ngwi uta kala mpe kokutana na ebele na bato ya sika oyo bazali kosala bokoli malamu. Molende na bango kati na mosala ya Nzambe ezali elendiseli mpenza. Na Octobre 1989, Tchad ezwaki motuya ya sika ya basakoli 267, elingi koloba kobakisama ya 20 96 koleka mobu oyo moleki.
Tozali mosika, kasi tozali na bomoko
Mobembo kati na Tchad mobimba esalisaki na koyeba ete kopalanganisa nsango malamu kati na mokili oyo balobaka minoko koleka 200 ezali mpenza ntembe monene. Atako lifalansé mpe lokota arabe ezali minoko oyo bato mingi balobaka yango, na assemblée spéciale nyonso badiskur ebongolamaki longwa na lifalansé kino na bankota mosusu. Motindo moko, mingi na bato oyo bayanganaki na assemblée bazalaki koloba te lokota ya etuka wana, likambo oyo ezalaki kobimisa mikakatano mpo na kopesa bango ndimbola ya badiskur. Kosolola ezali mpe kopesa nkaka kati na mosala ya kosakola ndako na ndako.
Kati na bisika nyonso oyo tolekaki, bandeko na biso mibali mpe basi bayambaki biso malamu. Mbala mingi, bilei bizalaki bongo kozala libungutulu moko ya fufu ya masangu to ya loso epesami na supu etyami mwa bikelakela na kati, bilei oyo tolobelaki na mwa ebandeli. Mbala mosusu elenge mwasi azalaki komema bilei kati na sani moko monene ya papala ezipami na elamba ya langi motane ngwa, nyonso etyami malamu likoló na motó na ye kozanga ete asimba yango.
Na nord ya mboka, bato mingi bazali ba musulmans; kati na sud, mingi bazali bakatolike, baprotesta to ba animistes. Boyangeli ezali kosalela politike moko ya kotika bonsomi na mangomba, mpe tozali na esengo mpo ete tozali koyangana kozanga mitungisi.
Moko ya assemblée spéciale epesaki nzela na etuluku ya Batemwe na Tchad bamona ete ata soki bazali mosika na bandeko na bango ya bamboka mosusu engebene bandelo ya mokili, bazali mpenza na bomoko elongo na bango lokola etonga moko. Ezali yango nde ekopesaka bango nzela na ‘kotelema ngwi kati na elimo moko’ atako mimekamo mpe botemeli oyo bazali kokutana na yango.—Bafilipi 1:27.
“Abundaki etumba malamu”
Ndeko Edwin Skinner akómáki na nsuka na bomoi na ye awa na mabelé na le 4 Juillet 1990. Na mibu 96, azalaki kosala lokola pionnier mpo na matomba ya Bokonzi na Jéhovah na lnde kobanda Juillet 1926. Azwaki batisimo na Angleterre na 1919. Lisolo ya bomoi na ye ebimaki kati na Mosenzeli ya le 1er Janvier 1990. Ndeko Skinner azalaki mpenza moto na kondima mpe ya molende. “Asilisi kurse” mpe na ntembe te asili kozwa mbano na ye.—2 Timoté 4:7, 8.