Tokumisa Mwana, Mosalani na liboso elongo na Jéhovah
“Oyo akumisaka Mwana te, akokumisaka mpe Tata te, Motindi na ye.”—YOANE 5:23.
1. Motindo nini liteya ya Trinité, oyo lindimami na boklisto ya lokuta, ezali kokumisa Yesu te?
LELO oyo kati na boklisto ya lokuta, bato mingi bakolobaka ete bazali kokumisa Yesu Klisto, nzokande ezali solo te. Ndenge nini bongo? Bakosakolaka ete Yesu azali Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso, mpe ete Nzambe, Mozalisi ya biloko nyonso, ayaki na mabelé, mpe akómaki moto mpe akufaki, Likanisi oyo lizwami kati na liteya ya Trinité, oyo ezali liteya ya moboko na boklisto ya lokuta. Kasi, soko emonani ete Trinité ezali liteya ya lokuta, mpe soki emonani ete Yesu azalaki mpenza na nsé na Nzambe, soki mpe emonani ete azalaki mosaleli na ye, lolenge wana mabe na komonisa boyokani na ye elongo na Nzambe ekoyokisa ye mawa te? Na ntembe te, akotalela liteya oyo lokola eloko oyo ezali kotyola bobele ye moko te, kasi ezali lisusu kotyola makambo nyonso oyo ye ateyaki.
2. Ndenge nini Makomami mazali komonisa ete Yesu azali na nsé na Nzambe mpe azali mosaleli na ye?
2 Ya solo, Yesu amilobaki soko mbala moko te ete azalaki Nzambe; mbala nyonso azalaki koloba na ntina na ye moko ete azali “Mwana na Nzambe.” Ata banguna na ye bayebaki likambo yango. (Yoane 10:36; 19:7) Yesu azalaki komibanzabanza mpo na lokumu ya Tata na ye mpe mpo na kotosa ye, lokola emonisami na maloba oyo, ete: “Mwana akosala likambo te bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala. Mpamba te yango ekosalaka ye, Mwana akosalaka yango lokola. Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te . . . , mpamba te nakolukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano na ye oyo atindi ngai.” Lisusu ete: “Ngai nabimi na Nzambe mpe nazali awa.” (Yoane 5:19, 30; 7:28, 29; 8:42) Yesu amonisaki bato te ete azalaki Nzambe to mpe akokanaki na Nzambe. Na yango, koteya motindo na makambo wana ezali kokumisa ye te.
Mateya mosusu oyo mazali kokumisa Yesu te
3. (a) Bamosusu oyo bakomilobaka ete bazali baklisto, bazali kokumisa Yesu te na koboyáká kondima likambo nini na ntina na ye? (b) Yesu apesaki litatoli nini na ntina na bomoi na ye liboso ete akóma moto?
3 Bamosusu oyo bakolobaka ete bazali baklisto, bazali kokumisa Yesu te na koboyáká kondima ete azalaki na bomoi liboso na kokóma moto, oyo ezali mpenza likambo na kokamwa Nzokande, mpo na kokumisa Yesu, esengeli na biso kondima ete akitaki longwa na likoló mpo na koya awa na mabelé. Mbala na mbala, Yesu amonisaki ete azalaki na bomoi liboso na kokóma moto. Alobaki ete: “Moto mpe te asili kobuta kino likoló, bobele Mwana na moto oyo auti na likoló.” Na nsima abakisaki ete: “Nazali limpa na bomoi oyo likiti longwa na likoló . . . Soko nde bokomona Mwana na moto kobuta esika ezalaki ye liboso?” Lisusu ete: “Bino bouti na nsé, ngai nauti na likoló. . . . Solo solo nalobi na bino ete: ‘Naino ezalaki Abrahame tet ngai nazali.’” (Yoane 3:13; 6:51, 62; 8:23, 58) Na butu oyo atekamaki, kati na libondeli oyo atindaki epai na Tata na ye na likoló, Yesu alobelaki lisusu bomoi na ye liboso ete akóma moto.—Yoane 17:5.
4. (a) Motindo nini mosusu bato mingi bazali kokumisa Yesu te? (b) Elembeteli nini ekoki mpo na kondimisa ete Yesu azalaki na bomoi, mpe mpo na nini?
4 Kati na makanisi na bango na libunga mpenza, bamoko na basangani na boklisto ya lokuta bakómi kino koloba ete Yesu azalaki moto ya solo te, azalaki mpenza te. Soki ezali bongo, mbele ntina moko ezali te na koluka koyeba mpo na nini mpe ndenge nini tosengeli kokumisa ye. Nzokande, litatoli ya bato mingi oyo bamonaki Klisto, ezali kati na Makomami, oyo ezali bongo elembeteli na kokoka mpo na kondimisa solo mpenza ete azalaki na bomoi awa na mabelé. (Yoane 21:25) Makanisi mosusu ya ntina mingi: bomoi ya baklisto ya liboso to mpe bonsomi na bango ezalaki na likámá mpo ete bazalaki kosakola na ntina na Yesu. (Misala 12:1-4; Emoniseli 1:9) Kasi, tokoki mpenza kondimisa bato ete Yesu azalaki, kozanga kotalela makambo oyo bayekoli na ye bakomaki likoló na ye?
5, 6. Kozanga kotalela Makomami, bilembeteli nini mosusu bimonisami na Lisoló na bato ete, Yesu Klisto azalaki solo na bomoi awa na mokili?
5 Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda moko (The New Encyclopædia Britannica, 1987): “Makambo makomami na bato mosusu mazali komonisa ete, na Kala, ata banguna ya boklisto babɛtaki ntembe te mpo na lisoló na Yesu.” Wapi mwa ndambo na makambo yango makomami na bato mosusu? Engebene molimboli na Biblia Joseph Klausner, ye Moyuda, ezali na litatoli ya makambo makomamaki na bakonzi na mangomba ya Bayuda. (Mokanda Yesu, moto na Nazarete, na Lingelisi, lokasa 20) Tokoki mpe kolobela litatoli ya Josèfe, ye Moyuda mokomi na makambo na kala na ekeke ya liboso. Na ndakisa, alobelaki lolenge oyo babomaki Yakobo na mabángá, oyo ye atangi ye ete “ndeko na Yesu, oyo abengami Klisto.”—Histoire ancienne des Juifs, libongoli ya Arnauld d’Andilly, XX [viii, 1].
6 Tozali lisusu na litatoli ya bakomi na kala bango Baloma, mingi mpenza litatoli ya Tacite, moto na lokumu mingi. Na ebandeli na ekeke ya mibale, alobelaki “mibali oyo baboyamaki mpenza, oyo bato bazalaki kobenga bango ete baklisto. Bazwi nkombo yango na Klisto, oyo guvernere Pontius Pilatus akakisaki na nzete ya liwa na nsé na boyangeli ya mokonzi Tibère.” (Annales, XV, XLIV) Na kotaleláká lisoló na Yesu lokola likambo ya solosolo, filozofe Mofalansé, Jean—Jacques Rousseau akomaki na ekeke ya zomi na mwambe ete: “Makambo na Socrate oyo bato batyaka ntembe te mpo na kondima yango, nzokande mamonisami polele te koleka oyo na Yesu Klisto.”
Bantina ya kokumisa Mwana
7. (a) Litatoli nini ya Biblia lizali kopusa biso ete tokumisa Yesu Klisto? (b) Epai mosusu, Jéhovah asalaki nini mpo na kokumisa Mwana na ye?
7 Nsima na oyo nyonso, totalela sikawa lisoló na biso: lokumu oyo lobongi na Yesu Klisto. Bayekoli na ye basengeli kokumisa ye, lokola emonisami na maloba na ye mazali na Yoane 5:22, 23, ete: “Tata azali kosambisa moto te, kasi asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana ete nyonso bakumisa Mwana lokola ekokumisaka bango Tata. Oyo akokumisaka Mwana te, akokumisaka mpe Tata te, Motindi na ye.” Uta asekwisaki ye, Jéhovah asili kopesa na Mwana na ye lokumu loleki monene. Na yango, asili “kolatisa ye motole na nkembo mpe na lokumu ete ayikela kufa mpiko.” (Baebele 2:9, MN; 1 Petelo 3:22) Na yango, soki tosengeli kokumisa Yesu, ezali na ntina na oyo ye azali mpe na oyo asalaki.
8. Yesu abongi kokumisama na ntina na bizaleli nini oyo bikokani na oyo ya moto mosusu te?
8 Yesu Klisto abongi na lokumu mpo ete na lolenge na ye ya Logos, to Liloba, azali molobeli ya Jéhovah oyo aleki malamu. Na Makomami, emonani ete ebengeli “Liloba” elakisi Yesu liboso ete aya awa na mabelé, mpe nsima wana azongaki na likoló. (Yoane 1:1; Emoniseli 19:13) Emoniseli 3:14, elobi na ntina na ye ete azali “ebandeli na kozalisa na Nzambe.” Azali bobele “mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami” te, kasi azali lisusu “Mwana bobele moko,” na elobeli mosusu bobele ye nde azalisamaki mpenza na maboko ya Jéhovah Nzambe ye moko. (Bakolose 1:15; Yoane 3:16) Oyo eleki ezali ete, “biloko nyonso bizalisami na ye, mpe soko na ye te, mbele eloko moko ezalisami te.” (Yoane 1:3) Na yango, wana ezali biso kotanga maloba oyo na Nzambe na Genese 1:26 (MN) ete: “Tosala moto na elilingi na biso, na lolenge na biso,” tosengeli kososola ete “tosala” elobeli mpe Logos, to Liloba. Na ntembe te, likambo oyo ete liboso na kokóma moto, Yesu azwaki libaku kitoko ya kosangana elongo na Jéhovah Nzambe mpo na kozalisa, ezali kotya ye na esika ebongi na lokumu monene.
9. Mpo na nini tozali koloba ete Yesu nde Mikaele, mokóló na baanzelu, mpe na likambo nini Mikaele akumisaki Jéhovah na ntina na nzoto na Moïse?
9 Ntina mosusu mpo na yango Yesu Klisto abongi na lokumu ezali oyo ete, azali mokóló na baanzelu to mokonzi na baanzelu ya Jéhovah. Nini epesi biso nzela na kosukisa bongo? Liboso mpenza, liloba “mokóló,” oyo elimboli “mokonzi” to “oyo na liboso,” emonisi ete ezali bobele na mokóló moko na baanzelu. Lisusu kati na Liloba na Nzambe, mokóló wana na baanzelu elakisi Nkolo Yesu Klisto oyo asili kosekwa. Totangi boye: “Nkolo ye moko akokita longwa na likoló na konganga makasi mpe na mongongo ya mokóló na baanzelu mpe na kelelo na Nzambe, mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso.” (1 Batesaloniki 4:16) Lokola emonisi yango Yuda 9 (MN) mokóló wana na baanzelu azali na nkombo: “Wana Mikaele, mokóló na baanzelu awelanaki na Diable, na kotyana ntembe na ntina na nzoto na Moïse, akitisaki ye na maloba na kotuka te, kasi alobaki ete: ‘Tika ete Jéhovah apamela yo!”’ Yesu amekaki kosambisa Satana te, likambo oyo mbele alekaki liboso na ekateli na Jéhovah. Kosaláká bongo, akumisaki Tata na ye na likoló.
10, (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Mikaele atambwisaki makambo wana ekómaki ntango ya kobundela Bokonzi na Nzambe? (b) Mikaele azalaki na mokumba nini kati na lisoló ya libota ya Yisraele?
10 Mikaele, mokóló na baanzelu azali kobundela Bokonzi na Nzambe. Ezali bongo Mikaele nde atambwisaki etumba wana makoló mapetwamaki ntango Satana mpe badémo na ye babwakamaki (Emoniseli 12:7-10) Mosakoli Danyele alobaki na sikisiki mpenza ete Mikaele ‘azali kokotela libota na Nzambe.’ (Danyele 12:1) Emonani bongo ete Mikaele azali “anzelu na Nzambe na solo, oyo atambolaki liboso na ebele na Yisraele,” mpe azali ye oyo Nzambe asalelaki mpo na komema libota na ye na Mokili ya ndaka. Nzambe apesaki etinda oyo ete: “Yoka ye mpe tósa monoko na ye, mpe temela ye te . . . mpo ete nkombo na ngai ezali kati na ye.” (Exode 14:19; 23:20, 21) Ezali solo ete mokóló na baanzelu na Jéhovah alingaki mingi mpenza libota oyo limemaki nkombo na Nzambe. Na lolenge lobongi, asalisaki anzelu mosusu oyo atindamaki mpo na kobondisa mosakoli Danyele, kasi demo moko makasi akangaki ye na nzela. (Danyele 10:13) Ebongi mpenza na kosukisa ete anzelu oyo abomaki basoda 185 000 ya Senakeliba azali mosusu te, bobele Mikaele, mokóló na baanzelu.—Yisaya 37:36.
11. Yesu azalaki na bomoi na motindo nini awa na mabelé, oyo ebongi na ye ete akumisama mpo na yango?
11 Yesu abongi na lokumu bobele mpo na oyo ye azali te, kasi lisusu mpo na oyo ye asalaki. Na ndakisa, azali moto bobele moko oyo azalaki na bomoi na kokoka. Adam mpe Eva bazalisamaki bato na kokoka, kasi ezalela na bango ya kokoka ezalaki ya ntango mokuse. Nzokande Yesu Klisto atikalaki “sembo, kozanga mabe” mpe “atangwaki na bato na masumu,” atako makambo oyo Diable abimiselaki ye mpo na kokweisa ye liboso na masenginya to monyoko. Na boumeli ya mimekamo yango nyonso, “asalaki lisumu te, mpe bokosi bozwamaki kati na monoko na ye mpe te.” Yango wana alobaki na banguna na ye ete: “Nani kati na bino azwi ngai na lisumu?” Kasi ata moto moko te akokaki koyanola ye. (Baebele 7:26; 1 Petelo 2:22; Yoane 8:46) Kotikaláká sembo mpe kozanga lisumu, amonisaki mpenza ete Tata na ye ya likoló azali na lotomo ya kozala Nkolo moyangeli ya molóngó mobimba mpe ete Diable azali mokosi mabe mpe na lolendo.—Masese 27:11.
12. (a) Yesu azalaki moto ya motindo nini, asalaki nini, mpe mpasi nini ayikelaki yango mpiko mpo na bolamu na bato? (b) Engebene yo, mpo na nini Yesu abongi na lokumu mpo na oyo ye asalaki mpe mpo na mpasi oyo amonaki?
12 Yesu Klisto abongi na lokumu bobele te mpo ete azalaki na bomoi ya kokoka, kozanga lisumu, kasi lisusu mpo ete azalaki moto na malamu, oyo akolingaka bato mpe azalaki na elimo ya komipesa mpo na bamosusu. (Tala Baloma 5:7.) Azalaki kokokisa bamposa ya bato kozanga kolemba, ezala na elimo to mpe na mosuni. Azalaki mpenza na molende mingi mpo na ndako ya Tata na ye, mpe azalaki na motema molai mpo na bayekoli na ye. Oyo nde mpasi andimaki koyikela yango mpiko mpo na kokokisa mokano ya Tata na ye! Na ntina na momekamo oyo azwaki na elanga ya Getesemane, Biblia elobi ete: “Azalaki na mpasi monene, mpe abondelaki makasi; mpe motoki na ye mokitaki lokola matangá na makila kokwea na mabelé.” Ee, “atómbólaki mabondeli mpe malombo na konganga makasi mpe mpisoli.” (Luka 22:44; Baebele 5:7) Na Yisaya 53:3-7, mosakoli ayebisaki liboso likanisi ya sikisiki na ntina na ntango wana ya mpasi.
13. Ndakisa nini Yesu asili kotikela biso na kokumisáká Tata na ye ya likoló?
13 Yesu abongi lisusu na lokumu mpo na ndakisa malamu oyo asili kotikela biso na kokumisáká Tata na ye ya likoló. Akoki bongo koloba ete: “Ngai nazali kokumisa Tata na ngai.” (Yoane 8:49, MN) Na maloba na ye mpe na misala na ye, azalaki ntango nyonso kokumisa Jéhovah Nzambe. Yango wana ntango abikisaki mobali moko, lisoló ya Biblia elobi te ete, bato bakumisaki Yesu, kasi nde “bakumisaki Nzambe.” (Malako 2:12) Na nsuka ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu akokaki bongo koloba na sembo nyonso epai na Tata na ye ete: “Nasili kokumisa yo na mokili, Nasilisi mosala mopesi yo ngai ete nasala yango.”—Yoane 17:4.
Oyo ye asalaki mpo na biso
14. Makambo nini Yesu asalaki mpo na biso, oyo emonisi ye ete abongi na lokumu?
14 Ebongi na biso mpenza ete tokumisa Yesu Klisto mpo na nyonso oyo asili kokokisa mpo na biso. Akufaki mpo na masumu na biso, mpo ete tokoka lisusu kozala na boyokani elongo na Jéhovah Nzambe. Yesu ye moko alobaki ete: “Mwana na moto ayei mpo na kosungama te, kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Na bongo, liwa na Yesu lipesaki nzela na makambo nyonso oyo Bokonzi ekomemela bato: bomoi bozangi kufa na likoló mpo na ba 144 000 oyo basali bongo mwasi na ye, mpe bomoi ya seko kati na Paradis na mabelé mpo na bamilió na bato mosusu oyo bakomonisa kondima na bango mpe botosi na bango kati na komekama.—Nzembo 37:29; Emoniseli 14:1-3; 21:3, 4.
15. Tángá libaku moko oyo na yango amonisaki biso bomoto ya Tata na ye.
15 Yesu Klisto, Moteyi monene, abongi lisusu na lokumu mpo ete amonisaki mokano mpe bomoto ya Tata na ye na lolenge na kokoka. Na ndakisa, kati na Lisoló na ye likoló na ngomba, amonisaki biso bokabi ya Tata na ye oyo akopesaka moi mpe mbula epai na bato mabe mpe na bato malamu lokola, mpe alobaki ete: “Bozala malamu be lokola Tata na bino ya likoló azali malamu be.”—Matai 5:44-48.
16. Ndenge nini ntoma Paulo alobeli na mokuse bomoi na lokumu na Yesu?
16 Yesu abongi solo na lokumu mpo na lolenge oyo amitambwisaki na boumeli ya bomoi na ye; ezali yango nde ntoma Paulo alobeli yango na mokuse na maloba oyo: “Atako azalaki na motindo na Nzambe, atangaki te ete ameka kokokana na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na moto, amikitisi mpe atósi kino kufa, ee, kino kufa na nzete na mpasi.”—Bafilipi 2:5-8.
Ndenge nini tokoki kokumisa Mwana
17, 18. Na motindo nini tokoki kokumisa Yesu Klisto?
17 Mpo ete ntembe ezali te ete ebongi na biso kokumisa Yesu Klisto, motuna motunami boye: ndenge nini tokoki kokumisa Mwana? Na kozaláká na kondima kati na mbeka oyo apesaki mpo na kosikola biso. Lisusu, tokomonisa kondima na biso na kokokisáká matambe oyo ya ntina: kooka mawa mpo na mabe tosalaki, kobongola motema, komipesa yo mpenza mpe kozwa batisimo. Tozali kokumisa Yesu na kobondeláká Jéhovah na nkombo na ye. Bobele bongo, tokokumisa Yesu na kotósa maloba na ye oyo, ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tika ete amiboya ye moko, amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai libela.” (Matai 16:24, MN) Tozali kokumisa Yesu Klisto wana ezali biso koluka liboso Bokonzi mpe boyengebene na Nzambe, lokola esilaki ye kolakisa biso, mpe wana tozali kotósa etinda na ye ya kozalisa bayekoli. Epai mosusu, tozali kokumisa ye ntango tozali komonisa bolingo epai na bandeko, lokola alobaki yango ete, ezali elembo oyo ekopesa nzela na koyeba bayekoli na ye ya solo, Matai 6:33; 28:19, 20; Yoane 13:34, 35.
18 Oyo eleki mpenza ezali ete, tozali kokumisa Mwana na komemáká nkombo na ye, elingi koloba na kobéngámáká baklisto, mpe na komimonisaka ete tobongi na nkombo yango na etamboli na biso malamu. (Misala 11:26; 1 Petelo 2:11, 12) Na boyokani na oyo Petelo alobaki, esengeli na biso kolanda matambe na Yesu na lolenge malamu. (1 Petelo 2:21) Na komekoláká ye na etamboli na biso mobimba, tozali bongo na likoki mosusu ya kokumisa ye. Mpo na kosukisa, wana ezali biso kosala Ekaniseli ya liwa ya Klisto mbula na mbula, tozali mpenzampenza kopesa ye lokumu monene.—1 Bakolinti 11:23-26.
19, 20. (a) Mbano nini Yesu azali kopesa na bayekoli na ye, na ntango oyo mpe na ntango ekoya, mpo ete bazali kokumisa ye? (b) Elaká nini Mwana asili kopesa biso?
19 Mbano nini Yesu azali kopesa na bayekoli na ye mpo ete bazali na bomoi oyo bozali kokumisa ye? Ye moko ayanoli ete: “Nazali koloba na bino solo ete: ‘Soko moto nani atiki ndako, soko bandeko mibali, soko bandeko basi, soko mama, soko tata, soko bana, soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali, mpe bandeko basi mpe bamama, mpe bana mpe bilanga, mbala mokámá kati na minyoko, mpe akozwa bomoi ya seko na ntango ekoya.’”—Malako 10:29, 30.
20 Na yango, soko tokomipimela makambo mosusu ‘mpo na Yesu,’ ye akosala ete tozwa mbano mpo na yango. Apesaki biso elaká oyo ete: “Moto na moto oyo akoyambola ngai liboso na bato, ngai mpe nakoyambola ye liboso na Tata na ngai na likoló.” (Matai 10:32) Bongo, lokola Tata na likoló azali kokumisa baoyo bazali kokumisa Yesu, biso mpe tokoki kondimisama ete Mwana bobele moko ya Jéhovah, akomekola Tata na ye na likambo yango, lokola ezali ye kosala kati na makambo mosusu.
Bozongeli
◻ Na mitindo nini bato mingi bazali kokumisa Mwana te kati na boklisto ya lokuta?
◻ Yesu apesaki litatoli nini na ntina na bomoi na ye liboso ete akoma moto?
◻ Bantina nini tozali na yango mpo na kokumisa Yesu?
◻ Na mitindo nini tokoki kokumisa Yesu?
◻ Moto oyo azali kokumisa Yesu Klisto azali komizwela bolamu nini?