Barulo ezwamaki na la mer morte—Bokundoli boleki na motuya
SOKO bakilometele 24 na Sud-Est ya Yelusaleme, ezali na esika oyo ebéngami ete Wadi En-Nar, mabángá ya ebale moko esila kokauka, oyo ekokitaka na epai ya Est mpo na kobima na la Mer Morte. Mabángá yango masili kosala efelo moko na mabulumabulu na molai nyonso ya esobé ezali na mopanzi ya ebale wana. Na boumeli ya eleko ekobandaka mpio, wana molungé ya moi mokokutana na malili ya butu, ba Bédouins (bato ya Arabie bakendá kofanda na esobé) na libota ya Ta’amireh, bakobatelaka bitonga ya mpate na bango mpe bantaba kati na esobé yango.
Na 1947, wana ezalaki ye kobatela bampate, elenge moko mobateli na mpate, ye Bédouin, abwakaki libángá kati na libulu moko oyo ezali na mopanzi ya mabángá minene oyo masila kopasuka. Akamwaki mpenza wana ayokaki lokola lokito ya mbeki epasuki. Na kobanga nyonso, akimaki, kasi azongaki nsima na mikolo mibale mpe amataki pene na bametele 100 mpo na kokóta kuna na nzela na lilusu moko monene. Ntango miso na ye emeseneki na molili, amonaki molongó ya mbeki etandami na mopanzipanzi ya moko na bifelo ya mabángá, mbeki zomi ezalaki milai, mpe eboké moko ya mbeki esilá kopasuka oyo epanzanaki na nsé kati na mabángá oyo mabukanaki.
Bambeki yango mingi ezalaki na eloko te, kasi moko kati na yango ezalaki na buku misato, oyo mibale na yango elingámáki na elamba. Amemaki makomi yango na esika efandi ba Bédouins, epai kuna batyaki yango kati na saki mpe pene na sanza moko, bakakisaki yango likoló na likonzi ya hema. Na nsima, ba Bédouins bamemaki barulo (babuku) yango na Beteleme mpo na kotala soko bakozwa litomba nini na yango. Babenganaki bango na basangó ya monastère moko oyo bayebisaki bango ete barulo wana ezalaki na ntina moko te. Moteki moko ayebisaki bango ete babuku yango ezalaki na ntina moko te mpo na oyo etali matómba ya bokundoli ya biloko na kala, mpe amonisaki likanisi oyo ete bato bayibaki yango longwa na eyanganelo ya Bayuda. Ezalaki solo te. Na nsuka, na lisalisi ya mobongisi moko na basapato, ye moto na Syrie oyo azalaki mpe moteki na biloko na kala, nde libungá na bango liyei komonana polele. Mosika te makomi mosusu mamonanaki na motuya mingi.
Bamoko na makomi wana na kala mangengisaki lisusu mosala ya mangomba ya Bayuda na eleko na Yesu. Kasi, ezali makomi na esakweli na Yisaya nde ekamwisaki bato. Mpo na nini?
Eloko eleki mpenza na motuya
Rulo na Yisaya oyo eutaki kokundolama, ezalaki na molai ya bametele 750. Esalemaki na mposo na nyama 17 oyo ebongisamaki malamu mpenza, na lolenge na mokanda moko. Makomi makabolamaki kati na biteni 54 oyo moko na moko ezalaki soko na milongó 30 mikomami kitoko mpenza. Mokomi moko na mayele atyaki milongó ya makomami yango, oyo ekabolamaki na baparagrafe.—Tala fotó.
Lokola rulo yango elingamaki likoló na banzeté te, makomi mazalaki komonana lisusu malamu te, na bisika oyo bato mingi bazalaki kosimba mpo na kotanga yango. Lokola ebebaki mingi, ebongisamaki na mayele mpenza, mpe ebambámaki. Mbeki oyo ezalaki na butu yango na kati, ebombaki malamu mpenza, eloko oyo esalaki ete makomi yango mabómbama malamu mpenza. Kasi, rulo yango ezali na motuya nini mpo na balimboli na Biblia, mpe mingi mpenza mpo na biso?
Makomi na mosakoli Yisaya maumeli soko mibu 1000 liboso na mosusu oyo tozali na yango lelo, kasi makomami na yango makeseni mingi te. Profesere Millar Burrows, mobimisi na makomi oyo ebimisamaki na 1950, alobaki ete: “Makomi ya Yisaya, oyo ezali kati na mokanda oyo, elongo na makeseni mingi ya polele mpo na lolenge ya kokoma, mpo na mitinda ya grammaire mpe na makeseni mosusu kati na malako ya kotya likebi mpe oyo na ntina mingi mpenza te, ezali makomi oyo epesamaki nsima mpenza na [Bakonzi ya mangomba na Bayuda].”a
Esengeli koyeba lisusu ete, longwa ebandeli kino nsuka, makomi yango mazali kosalela nkomá minei oyo ete, nkombo mosantu na Nzambe, Jéhovah, na monoko ya hébreu.
Makomi mosusu ya motuya
Nkombo na Nzambe ezali mpe kati na makomi mosusu oyo mazwamaki bobele kati na mobenga yango moko, ebéngami Mobenga 1. Kati na komantere ya mokanda ya Habakuku, Nkomá minei emonani mbala minei na ekomeli na hébreu ya ebandeli, lolenge na kokoma na kala oyo ekeseni na alphabet ya polele na hébreu oyo tomeseni na yango.—Tala note ya Habakuku 1:9, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya 1984 na Lingelesi, oyo ezali na mitindami.
Mobenga yango mozalaki mpe na ndambo na buku mosusu na Yisaya, mpe biteni na mokanda na Danyele. Moko na biteni yango ezalaki na mokapo ya Danyele 2:4, oyo mobongolami na Araméen longwa na monoko ya hébreu, mokapo oyo mozali kati na makomi masalemaki soko bambula nkóto na nsima.
Bandambo mike ya barulo oyo ebatelamaki, etyami lelo na Tempelo ya Mikanda, oyo ezali eteni mosusu ya musée na Yelusaleme. “Tempelo” yango ezali na nsé na mabelé, na boye ete soki okei kotala yango, ekomonana lokola ete okóti kati na mobenga. Eteni na likoló ya musée ezali na lolenge na ezipeli na mbeki esalemi na mabelé makauki, kati na yango bakundolaki rulo ya Yisaya. Kasi makomi na Yisaya oyo makoki kosepelisa ezali bobele kopi mpamba. Mpo na kosalela mayele, makomi ya ebandeli mabómbámi kati na esika oyo ezali penepene wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndambo na malako ya ntina mingi ya makomi yango, mazali kati na Traduction du monde nouveau, ebimeli ya 1984 na lingelisi, oyo ezali na mitinda na Yisaya 11:1; 12:2; 14:4; 15:2; 18:2; 30:19; 37:20, 28; 40:6; 48:19; 51:19; 56:5; 60:21. Kati na ba notes, rulo yango epesameli elembo oyo 1QIsa.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
Courtesy of The British Museum
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]
Israel Antiquities Authority; The Shrine of the Book, Israel Museum; D. Samuel and Jeanne H. Gottesman Center for Biblical Manuscripts