Ekimelo na bango ezali lokutá!
“Tobongisi lokutá lokola ekimelo na biso mpe tomibómbi kati na bokósi.”—YISAYA 28:15.
1, 2. (a) Na eleko na biso, lisangá nini lisengeli kotya likebi na makambo oyo makómelaki libota na Yuda ya kala? (b) Likambo nini libota na Yuda endimaki yango, nzokande ezalaki libungá?
MALOBA oyo mazali kokokana lelo epai na boklisto ya lokutá, lokola yango ekokanaki liboso epai na bokonzi na Yuda ya kala oyo esalemaki na mabota mibale? Na ntembe te! Mpe kokokana yango ezali elembo malamu te mpo na boklisto ya lokutá. Ezali nde kolakisa ete mosika te, mpasi monene ekokwea likoló na lisangá ya mangomba masili kopengwa.
2 Bokonzi ya mabota zomi na Yisraele ezalaki na Nord ya Yuda. Lokola libota na Yisraele lizangaki bosembo, Jéhovah apesaki nzela na bokonzi na Asulia ete eboma yango na mobu 740 liboso ya ntango na biso. Ndeko na ye, Yuda, amonaki likambo yango, kasi akanisaki mpenza ete yango ekokaki kokómela ye te. Bankumu bazalaki koloba na lolendo nyonso ete, ‘Tempelo na Jéhovah ezali nde na Yelusaleme te? Biso tozali nde libota na Nzambe te? Banganga na biso mpe basakoli na biso bazali nde koloba na nkombo na Jéhovah te?’ (Yilimia 7:4, 8-11.) Bakonzi wana ya lingomba bandimisamaki ete, bazalaki na libateli. Nzokande, bazalaki komikósa. Bango mpe bazangaki bosembo lokola bandeko na bango na bokonzi ya Nord. Na bongo, Yelusaleme esengelaki kozwa etumbu lokola oyo na Samaria.
3. Mpo na nini boklisto ya lokutá azali na elikya na ntango ekoya, kasi elikya na ye ezali solo?
3 Bobele bongo, boklisto ya lokutá azali komiloba ete azali na boyokani boleki malamu elongo na Nzambe. Azali koloba na lolendo nyonso ete, ‘Tozali na bankóto na bandako-nzambe, mpe tozali na basángo mpe bapastere, bakisa mpe bamilió na bandimi. Tozali lisusu na Biblia, mpe tokosalelaka nkombo na Yesu kati na losambo na biso. Na ntembe te, tozali mpenza na ngolu na Nzambe!’ Nzokande, likambo oyo likómelaki Yelusaleme ya kala ezali likebisi monene. Atako makambo na kokamwa oyo mauti kosalema kala mingi te na politike, nzokande biso toyebi ete mosika te Jéhovah akokokisa ekateli na ye likoló na boklisto ya lokutá mpe likoló na mangomba mosusu nyonso ya lokuta.
“Kondimana elongo na Kufa”
4. Kondimana nini Yuda akanisaki ete asali yango?
4 Na ntango na kala, Yelusaleme ezangaki sembo ezwaki makebisi mingi na nzela na basakoli ya solo na Nzambe, kasi eboyaki kondima. Bazalaki koloba mpe komikumisa ete, kufa ekokaki kokitisa bango na Schéol te, to nkunda, likambo oyo likómelaki bokonzi na Yisraele. Wana apemamaki na Nzambe, Yisaya alobaki na Yuda ete: “Yango wana bino batyoli, boyoka liloba na Jéhovah, bino bakonzi ya libota oyo na Yelusaleme. Mpo bolobi ete, ‘Tosali kondimana elongo na Kufa, mpe toyokani elongo na Nkunda; ekoya etumbu monene na koleka, yango ekozwa biso te, mpamba te tobongisi lokutá lokola ekimelo na biso mpe tomibómbi kati na bokósi.”’—Yisaya 28:14, 15.
5. (a) Kondimana oyo Yuda asalaki elongo na Kufa etalelaki likambo nini? (b) Yuda abosanaki likebisi nini oyo lipesamaki epai na mokonzi Asa?
5 Bakonzi na Yelusaleme bakanisaki lokola ete basilaki kosala boyokani elongo na kufa mpe na sheol ete engumba na bango ebebisama te. Kasi, kondimana wana elongo na kufa ezalaki nde elembo ete Yelusaleme ebongwanaki na masumu na yango mpe, etyaki elikya kati na lobiko na Jéhovah uta ntango wana? (Yilimia 8:6, 7) Soko moke te! Na esika na kosala bongo, balukaki nde lisalisi na bakonzi ya politike. Nzokande, elikya oyo bazalaki kotya kati na basungi wana na mokili ezalaki ndoto ya mpamba, lokutá. Bakonzi ya mokili epai na bango Yelusaleme etyaki motema, bakokaki kobikisa ye te. Mpo ete Yelusaleme atikaki Jéhovah, Jéhovah mpe atikaki ye. Maloba oyo mosakoli Azaria akebisaki mokonzi Asa makokanaki, ete: “Jéhovah azali elongo na bino wana bino bozali elongo na ye. Soko bokoluka ye, akozwana na bino nde soko bokotika ye, ye mpe akotika bino.”—2 Ntango 15:2.
6, 7. Yuda asalaki nini mpo na kozwa bibateli, kasi yango ebimisaki makambo nini?
6 Kotyáká elikya kati na kondimana na bango ya politike, bakonzi na Yelusaleme bandimisamaki ete bakozwa ata “etumbu monene” te, elingi koloba mampinga na banguna bakokaki te kobebisa kimya mpe libateli na bango. Liboso na likámá liutaki na kondimana oyo Yisraele asalaki elongo na Sulia, Yuda asengaki lisalisi ya Asulia. (2 Mikonzi 16:5-9) Na nsima, ntango atungisamaki na mampinga na Babilone, Yuda akendeki koluka lisungi epai na Farao, oyo apesaki ye limpinga moko mpo na kosalisa ye.—Yilimia 37:5-8; Ezekiele 17:11-15.
7 Kasi mampinga ya Babilone mazalaki na nguya mingi, na boye ete basodá ya Ezipito bakimaki. Emonanaki ete Yelusaleme esalaki bongo libunga na kotyáká elikya epai na Ezipito, mpe, na 607 liboso ya ntango na biso, Jéhovah atikaki ye kati na kobomama oyo ye asakolaki. Na yango, bakonzi mpe banganga na Yelusaleme bamikósaki. Elikya oyo bazalaki kotya kati na kondimana na bango elongo na mokili mpo na kotya kimya mpe libateli, ezalaki “lokuta” oyo mampinga ya Babilone bakendaki kokomba yango.
“Libángá ya sembo” liboyami
8. Na likambo nini etamboli na boklisto ya lokutá ekokani na oyo na Yuda ya kala?
8 Ezali na makambo motindo moko lelo? Na ntembe te! Bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá bazali mpe kokanisa ete mpasi moko ekozwa bango te. Bazali kosakola lokola yango elobaki Yisaya ete: “Tosali kondimana elongo na Kufa, mpe toyokani elongo na Nkunda; ekoya etumbu monene na koleka, yango ekozwa biso te, mpamba te tobongisi lokutá lokola ekimelo na biso mpe tomibombi kati na bokósi.” (Yisaya 28:15) Lokola Yelusaleme ya kala, mangomba na boklisto ya lokutá bazali koluka libateli na nzela na kondimana elongo na mokili, mpe bakonzi na yango baboyi komibomba epai na Jéhovah. Bazali kosalela ata nkombo na ye te! Bakonzi na mangomba na boklisto ya lokutá bazali mpenza kotambwisa lokola banganga minene na Bayuda na ekeke ya liboso, baoyo baboyaki Klisto. Bango balobaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.”—Yoane 19:15.
9. (a) Banani bazali lelo kokebisa boklisto ya lokutá lokola Yisaya akebisaki Yuda? (b) Boklisto ya lokutá mbele asengelaki kotya elikya na ye epai wapi?
9 Lelo, ba Témoins de Jéhovah bazali kokebisa bato ya ntango na bango ete mosika te, ebele na mampinga makoyeisa etumbu likoló na boklisto ya lokutá. Lisusu, bazali koyebisa esika bakoki kozwa ekimelo ya solo liboso na ebele wana. Mpo na yango, bazali kotanga Yisaya 28:16, oyo elobi ete: “Nkolo Jéhovah alobi boye: ‘Tala nazali kotya libángá lokola moboko na Siona, libángá ya sembo, libángá kitoko mpo na moboko ya solo. Ye oyo azali na kondima akotelengana te.’ ” Nani azali ‘Libángá yango kitoko’? Ntóma Petelo atangaki maloba oyo mpe akokisaki yango na Yesu Klisto. (1 Petelo 2:6) Soki mangomba na boklisto ya lokutá balukaki kimya elongo na Yesu Klisto, Mokonzi oyo Jéhovah asili kopona, mbele bakobika na etumbu oyo ezali koya.—Tala Luka 19:42-44.
10. Boklisto ya lokutá asali boninga elongo na banani?
10 Kasi basalaki bongo te. Boklisto ya lokutá azali nde na elikya ya kozwa kimya mpe libateli na kolukaka kozala moninga na bakonzi ya politike. Azali kotalela te likebisi na Biblia oyo engebene yango ete, kolinga mokili ezali koyina Nzambe. (Yakobo 4:4) Lisusu, na 1919, amisalaki molobeli ya la Société des Nations, komonisáká yango lokola elikya ya solo mpenza mpo na kimya. Uta 1945, azali kotya elikya na ye kati na O.N.U. (Tala Emoniseli 17:3, 11.) Makambo nini mazali kokangisa ye na lisangá yango?
11. Ndenge nini mangomba masili komikotisa kati na O.N.U.?
11 Mokanda moko mouti kobima kala mingi te, mozali kopesa likanisi mpo na yango. Totangi ete: “Masangá soko ntuku mibale na minei ya katolike, mamonisami na O.N.U. Bakonzi ya mangomba mingi basili kokende kuna. Kati na bavizite minene oyo esalemaki kuna, tokoki kotanga oyo Bosantu, Pape Paul VI asalaki na boumeli ya assemblée générale ya mobu 1965, mpe oyo Pape Jean paul ll asalaki na mobu 1979. Mangomba mazali kosambela, kobondela, koyemba mpe kosala misa mpo na Nations Unies. Kati na baoyo bazali na molende mingi na likambo yango, tokoki kotanga bakatolike, baprotestá
Bilikya minene mpo na o.n.u.
12, 13. Atako bilikya ya kimya oyo bato bazali na yango, mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bandimisami ete makebisi oyo bango bazali kopesa ezali ya solo?
12 Moko na bakonzi na politike na nguya mingi na mokili alobaki na ntina na elikya ya bato mingi ete: “Mbala mosusu libota na biso likomona kotyama ya eleko moko ya kimya, oyo ekobongola libela lisolo ya bato.” Azalaki nde na elónga? Mpo na makambo oyo mauti kosalema kala mingi te, tokoki kosukisa ete makebisi ya ba Témoins de Jéhovah na ntina na etumbu na Nzambe likoló na mabota, ezali ata na moboko moko te? Ba Témoins de Jéhovah bazali nde kati na libungá?
13 Te, bazali kati na libungá te. Bayebi ete bazali koloba solo mpo ete bazali kotya elikya na bango epai na Jéhovah mpe kati na Biblia, liloba ya solo na Nzambe. Tito 1:2 elobi ete: ’’Nzambe . . . akobukaka lokutá te.” Bandimisami ete ntango esakweli moko na Biblia eyebisi likambo boye to boye, yango ekozanga kokokana soko moke te. Jéhovah ye moko alobaki te: “Boye na liloba oyo likobima na monoko na ngai, likozonga mpamba te epai na ngai, kasi likokokisa likambo likani ngai.”—Yisaya 55:11.
14, 15. (a) Bakonzi na Yuda bazalaki kosukola makambo nini na boumeli na bambula oyo ezalaki liboso na kobomama na Yelusaleme, na mobu 607 liboso na ntango na biso? (b) Engebene maloba na Paulo, likambo nini lisengeli kosakolama liboso na libebi na pwasa likoyeisama likoló na mokili? (c) Makamb nini makosalema ntango kosakolama oyo eyebisami na 1 Batesaloniki 5:8 ekokokana?
14 Yilimia akomaki ete na boumeli ya bambula oyo ezalaki liboso na kobomama na Yelusaleme, na mobu 607 liboso na ntango na biso, mikóló bazalaki koloba: “Kimya! Kimya!” (Yilimia 8:11) Nzokande, oyo bazalaki koloba ezalaki lokutá. Yelusaleme ebomamaki na kokokana na makebisi oyo Jéhovah apemaki yango epai na basakoli na ye ya solo. Ntoma Paulo asakolaki ete likambo motindo moko likosalema na eleko na biso. Alobaki ete bato bakoloba boye ete: “Kimya ezali mpe makambo mazali te!” kasi na ntango wana “libebi likokwela bango pwasa.”—1 Batesaloniki 5:3.
15 Na ebandeli ya bambula 1990, bazulunalo mpe mikanda eyebisaki bipai binso ete, koswana mpe kokanelana kati na mikili esili mpe ete kimya esili kotyama. Na nsima, etumba moko ebimaki na Moyen-Orient. Kasi, na eleko moko, mokili ekokoma kati na ezalela oyo ete, maloba “Kimya ezali mpe makambo mazali te!” oyo esakolami na 1 Batesaloniki 5:2, 3, ekokokana. Lokola elikya na biso etyami mpenza kati na Liloba na Nzambe, toyebi ete ntango eleko yango ekokóma, bikateli na Nzambe bikokokana mpenza kozanga koumela. Ata liloba moko te litaleli kimya mpe libateli, lisengeli kopesa biso likanisi ete kobomama oyo esakolami na Nzambe ekoya te. Bikateli na Nzambe bisilá kokomama uta kala na kati na Liloba na ye, Biblia. Boklisto ya lokutá mpe mangomba mosusu ya lokutá, ekobomama. Na nsima, etumbu ya kobomama oyo euti na Jéhovah, ekokweisama likoló na ndambo etikali ya mokili na Satana. (2 Batesaloniki 1:6-8; 2:8; Emoniseli 18:21; 19:19-21) Lokola bandimisami ete akokokisa liloba na ye, basaleli na Jéhovah bazali komisenzela na nsé na litambwisi ya kelasi ya moombo na sembo mpe na mayele, mpe bazali kotalela na likebi nyonso lolenge makambo ya mokili mazali kobongwana. (Matai 24:45-47) Ata molende moko te mosalemi na bato na ntina na kimya, mosengeli kopusa biso na kokanisa ete Jéhovah asili kobongola mokano na ye na ntina na koyeisa kufa likoló na boklisto ya masumu.
‘Nzambe azali ekimelo na biso’
16, 17. Ba Témoins de Jéhovah bakoyanolaka nini epai na bato oyo bazali kosilika mpo na bosembo ya nsango na bango?
16 Bosembo oyo ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa na koyebisáká nsango wana, ekoki kookisa bato mosusu nkanda. Nzokande, wana ezali bango koloba ete bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokutá basili koluka ekimelo kati na ebongiseli moko ya lokutá, bazali bobele kozongela oyo elobami na Biblia. Wana ezali bango kosakola ete boklisto ya lokutá ebongi kozwa etumbu mpo ete emikótisi na mokili, ba Témoins bazali bobele kozongela oyo Nzambe alobaki ye moko kati na Liloba na ye. (Bafilipi 3:18, 19) Lisusu, na kotyáká elikya na ye kati na myango mizwami na mokili, boklisto ya lokutá ezali kosunga nzambe ya mokili oyo, Satan le Diable, oyo Yesu abengaki ye ete tata na lokuta.—Yoane 8:44; 2 Bakolinti 4:4.
17 Na yango, ba Témoin de Jéhovah bakolobaka ete: Mpo na biso, tozali kolendisa bato te ete batya bilikya ya mpamba na kimya ya mokili mobimba, mpamba te makambo ya politike mazali sé kobongwana. Na esika ya kosala bongo, biso tozali kozongela maloba oyo na mokomi na Nzembo ete: “Nzambe azali ekimelo mpo na biso. Bana na bato bazwami na mputulu bazali bobele mpamba. Na epimelo na bozito, bazali na kilo soko moke te!” (Nzembo 62:8, 9) Mikano na bato na ntina etali kokólisa mpe kobatela boklisto ya lokutá mpe bibongiseli mosusu ya mokili, ezali lokutá! Bango nyonso bakoki kopekisa mikano na Jéhovah te, mpo ete bazali bobele mopepe.
18. Likebisi nini lisalemaki na mokomi na Nzembo likokani mpenza na eleko oyo?
18 Ba Témoins de Jéhovah bazali mpe kotanga Nzembo 33, versets 17 kino 19, oyo elobi ete: “Mpo na lobiko, mbaláta [ya Ezipito oyo ezali elilingi ya etumbal ezali mpamba, mpe ata na nguya na ye monene, ayebi kobikisa te. Tala, liso na Jéhovah lizali epai na baoyo bakobangaka ye, epai na baoyo bazali kolikya na boboto na ye, ete ye alongola bango epai na liwa mpe abikisa bango na ntango na nzala.” Lelo, baklisto ya solo bazali kotya elikya epai na Jéhovah mpe kati na Bokonzi na ye ya likoló, ebongiseli bobele moko oyo ekoki komema kimya ya libela.
Boklisto ya lokutá: “esika enyatámi”
19. Mpo na nini ezali bobele mpamba na kolikya likoló na bibongiseli ya politike mpo na kotya kimya kati na mokili?
19 Kotya elikya na yo kati na ebongiseli esalemi na bato oyo ezwi esika na Bokonzi na Nzambe, ezali lokola nde osali ebongiseli yango ekeko, eloko na losambo. (Emoniseli 13:14, 15) Yango wana, moto oyo azali kolendisa mozalani na ye na kotya elikya likoló na bibongiseli ya politike lokola O.N.U. mpo na kotya kimya mpe libateli, moto yango azali moto na makanisi mpamba, moto na lokutá. Na ntina na bikeko oyo likoló na yango bilikya bityami, Yilimia alobi ete: “Ekeko na ye enangwi ezali lokutá; mpema ezali kati na yango te. Ezali mpamba, mosala na mabungá. Na ntango na etumbu na yango, ekolimwa.” (Yilimia 10:14, 15) Na yango, bambaláta ya etumba na Ezipito ya lelo, elingi koloba nguya na basoda na politike na mabota ya ntango oyo, ekobatela mangomba na boklisto ya lokutá te na mokolo yango ekozwa mpasi. Kondimana oyo mangomba na boklisto ya lokutá esili kosala elongo na mokili, ekobatela bango soko moke te.
20, 21. (a) Nini ekómelaki Société des Nations, mpe mpo na nini O.N.U. ekozwa nsuka na malamu te? (b) Na maloba nini Yisaya amonisaki ete kondimana oyo boklisto ya lokutá asali elongo ma mokili, ekobatela ye te?
20 Boklisto ya lokutá etyaki elikya likoló na Société des Nations, kasi yango ebomamaki liboso ete Armagedon eya! Boklisto ya lokutá ezali lelo komonisa bolingo na ye epai na O.N.U. Kasi mosika te lisangá yango lisengeli kokóta na “etumba ya mokolo yango monene na Nzambe Mozwi—na—Nguya—Nyonso,” na etumba yango O.N.U. akobika te. (Emoniseli 16:14) Ata O.N.U., ‘esekwisami,’ ekoki kotya kimya mpe libateli te. Liloba ya esakweli na Nzambe limonisi ete Lisangá ya Mabota (O.N.U.) mpe bikolo nyonso bisangani kati na yango, “bakobunda etumba na Mwana na Mpate [Klisto oyo asili kozwa bokonzil, nde Mwana na Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi.”—Emoniseli 17:14.
21 Ba Témoins de Jéhovah bazali koloba yango polelepolele ete: boyokani oyo boklisto ya lokutá asili kosala elongo na mokili na Satana, ekobikisa ye te. Maloba oyo mazali mpenza na boyokani na oyo elobami na Biblia.“’ Yisaya 28:17, 18 etangi Jéhovah, ye oyo alobi ete: “Nakosala kosambisa-sembo ete ezala nsinga, mpe boyengebene ezala nivo; mpe matandála makolongola ekimelo ya lokutá, mpe mai makozindisa ebombamelo. Boye kondimana na bino elongo na Kufa ekosénzwa, mpe ndai na bino elongo na Nkunda ekobeba. Bongo etumbu monene ekoya, bokokóma esika enyatámi na yango.”
22. Nini ekosalema ntango boyengebene na kokoka bokoyeisama likólo na boklisto ya lokutá ?
22 Ntango ekateli na Jéhovah ekokokisama, ekoyokana na boyengebene na kokoka. Esika oyo boklisto ya lokuta azali kotya elikya na ye, “kondimana na ye elongo na Kufa,” ekobomama lokola nde na etumba monene. Yisaya alandi koloba ete: “Na ntongo nsima na ntongo mosusu ekolekaleka, na ntango na moi mpe na butu; ekozala nsomo monene ata mpo na kososola ntina na mateya.” (Yisaya 28:19) Ekozala nsomo mpo na baoyo bakozala wana, na komona nguya na kosambisa na Jéhovah! Ekozala mpasi mpo na bakonzi na boklisto ya lokutá mpe bandimi na bango na kososola ete bandimaki lokutá, nzokande ntango ekosila koleka!
Nkombo na Jéhovah ezali “ndako molai na nguya”
23, 24. Na esika ete baluku libateli epai na mokili, ba Témoins de Jéhovah bakolanda kosala nini?
23 Kasi, ezali boni mpo na ba Témoins de Jéhovah? Ata liboso na koyina mpe monyoko oyo ezali komonana na mokili mobimba, bazali sé koboya kokóta na makambo ya mokili. Babosani te ete Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto ye mokili te.” (Yoane 17:16) Na boumeli na mikolo oyo ya nsuka, ba Témoins basili kotya elikya na bango kati na Bokonzi ya Jéhovah, kasi kati na myango na bato te. Bazali mpe kobanga te na ntina na mpasi oyo ekoyela boklisto ya lokutá.Yisaya asakolaki ete: “Ye oyo akondima, akotelengana te.”—Yisaya 28:16.
24 Masese 18:10 elobi ete: “Nkombo na Jéhovah ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Tobyangi bongo bato nyonso oyo bakokani na bampate ete baluku ekimelo epai na Jéhovah mpe na Bokonzi na ye oyo boyangelami na Klisto. Jéhovah azali ebómbanelo na lokutá te! Bokonzi na ye ezali lokutá te! Ekimelo na boklisto ya mokili nde ezali lokutá, nzokande ekimelo na boklisto ya solo ezali solo.
Bozongeli
◻ Na ndimbola nini libota na Yuda likamataki lokutá lokola ekimelo na bango?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete boklisto ya lokutá amekaki komibomba kati na lokutá?
◻ Likebisi nini Yisaya apesaki epai na Yuda, mpe ba Témoins de Jehovah bazali lelo kopesa likebisi nini likokani?
◻ Likambo nini likomonisa na boklisto ya lokutá ete atyaki elikya na ye na esika mabe?
◻ Ba Témoins de Jéhovah bakangami na etamboli nini ekeseni na oyo na boklisto ya lokutá?
◻ Bilikya na mpamba mpo na kimya oyo ya unitariens—universalistes, mpe baprotestá ya baptiste mpe lingomba ya bahais.”
[Etanda na lokasa 17]
BILIKYA MINENE MPO NA O.N.U
“Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esalemaki, oyo ezali mbala ya liboso mabota nyonso makomi na bomoko. Nguya na O.N.U. oyo liboso ezalaki bobele makanisi mpamba, sikawa ekokisi bilikya ya baoyo basalaki yango. . . Bato bakoki bongo kosimba libaku oyo lipesameli bango na kokokisa elaka na kala na ntina etali kosala mokili ya sika.”—“Maloba ya George Bush, prezidá ya Etats-unis kati na diskur oyo asalaki mpo na ekolo Amerike na le 29 Janvier 1991