Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
‘Osengeli kopona bomoi, na koyokaka mongongo na Nzambe; mpamba te azali bomoi na yo mpe mikolo molai mpo na bomoi na yo.’—DETERONOME 30:19, 20, MN.
1. Nini ezali kokesenisa baklisto ya solo kati na ezalela na bango ya komemya makila?
BATO mingi lelo bazali koloba ete bazali komemya bomoi, mpe mpo na komonisa ete ezali boye solo, bazali koloba polele makanisi na bango mpo na kotemela etumbu ya liwa, kosopa zemi mpe kotemela bokila. Nzokande, baklisto ya solo bazali komonisa limemya na bango mpo na bomoi na lolenge mosusu. Mpo na yango ezali kotangama boye kati na Nzembo 36:9: “Epai na yo [Nzambe] ezali liziba na bomoi.” Lokola bomoi ezali likabo na Nzambe, baklisto bazali komekola likanisi na ye likoló na makila, eloko ya ntina mingi oyo esimbi bomoi.
2, 3. Mpo ma nini esengeli na biso kondima likanisi ya Nzambe na ntina etali makila (Misala 17:28)
2 Bomoi esimbami na makila. Yango nde ezali kotambwisa mopepe malamu (oxygène) kati na nzoto na biso mpe ezali kobimisa mopepe mabe (gaz carbonique), epai mosusu, makila ezali kopesa biso nzela na komesena na mbongwana ya mpio to molungé mpe ezali kosalisa biso na kobunda na maladi. Ye oyo apesaki biso bomoi asalaki mpe liboke kitoko wana na baselile, oyo ezali na ntina mingi mpo na bomoi, yango makila. Emonisi ete ntango nyonso azalaki na likanisi ya kobatela bomoi na bato.—Genese 45:5; Deteronome 28:66; 30:15, 16.
3 Moto nyonso, azala moklisto to te, asengeli komituna ete: ‘Makila ekoki kobikisa bomoi na ngai bobele mpo na misala na yango ya mokolo na mokolo kati na nzoto to ekoki nde kobikisa ngai na lolenge ya mozindo koleka?’ Ya solo, bato mingi bayebi ete ezali na boyokani kati na bomoi mpe misala ya mokolo na mokolo ya makila kati na nzoto, kasi yango esuki bobele wana te. Na bongo, mitinda ya bizaleli na baklisto, na bamusulmá mpe Bayuda etongami likoló na endimeli na Mozalisi moko, oyo amonisaki likanisi na ye likoló na bomoi mpe makila. Solo, azali na makambo mingi ya koteya biso likoló na makila.
Likanisi ya seko ya Nzambe likoló na makila
4, Kala mpenza ma na lisolo na bato, Nzambe alobaki nini na ntina na makila?
4 Liloba “makila” ezwami koleka mbala 400 kati na Liloba na Nzambe, Biblia. Moko na bisika oyo tozali kokuta yango ezali mobeko oyo na Jéhovah: “Nyama nyonso na bomoi mpe ekotambolaka na mokili ekozala bilei mpo na bino. . . . Nzokande bokolya mosuni te soko makila mazali naino na kati; mpamba te, makila mazali bomoi.” Abakisi: “Makila na bino, oyo ezali bomoi na bino, na kotuna yango.” (Genese 9:3-5, Français courant). Ezali epai na Noa, tata ya libota na bato, nde Jéhovah apesaki maloba oyo. Na bongo bato nyonso ya mokili bayokaki ete na miso na Mozalisi makila malimboli bomoi. Na ntina yango, moto nyonso oyo andimi Nzambe ete ezali Ye nde azali kopesa bomoi asengeli mpe kondima ete azali na ekateli makasi mpo na lolenge ya kosalela makila.
5. Nini ezalaki ntina ya liboso mpo na yango Bayisaele basengelaki kolya makila te?
5 Nzambe alobaki lisusu na ntina na makila ntango apesaki Mibeko na Yisraele. Tala oyo ekoki kotangama na Levitike 17:10, 11, katina Biblia Liloba lya Nzambe: “Soko moto wa libota lya Yisraele to mouta avandi o mboka ya bino, akomele makila, ngai nakopesa ye mokongo mpe nakolongola ye o kati ya bandeko ba ye. Mpamba te, bomoi bwa ekelamo bozali o kati ya makila ma yango.’’ Atako ekoki kozala na matomba malamu mpo kolongono ya nzoto, nzokande mobeko wana ezalaki bobele mpo na santé te. Na kobulisaka makila, Bayisraele basengelaki komonisa ete bomoi na bango esimbamaki na Nzambe. (Deteronome 30:19, 20) Na yango, ntina monene oyo basengelaki kolya makila te ezalaki ete mpo na Nzambe makila mazalaki bulee, kasi ezali te ete yango ekokaki kozala mabe mpo na kolongono ya nzoto.
6. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yesu azalaki na likanisi moko na Nzambe na ntina na makila?
6 Engebene likanisi na boklisto, ndenge nini makila makoki kobikisa bomoi na bato? Yesu ayebaki likambo oyo Tata na ye alobaki mpo na lolenge ya kosalela makila. Nzokande, Yesu “asalaki lisumu moko te,’’ mpe kati na monoko na ye “bokosi moko bozwamaki te.” Yango elimboli ete abatelaki malamu Mibeko, bakisa mpe mobeko motali makila. (1 Petelo 2:22) Na bongo, Yesu azali ndakisa mpo na bayekoli na ye, mingi mpenza ndakisa mpo na komemya bomoi mpe makila.
7, 8. Ndenge nini ekomaki polele ete mobeko na Nzambe na ntina na makila etali mpe baklisto?
7 Lisolo na bato lizali koteya biso likambo limonanaki nsima, ntango likita moko oyo lisangisaki collège central ya baklisto likataki likambo oyo: baklisto basengeli kotosa mibeko nyonso oyo mipesamaki na Yisraele? Na litambwisi na Nzambe, bayanolaki ete baklisto basengisami te na kobatela Mibeko na Moise; kasi ‘emonanaki malamu ete baboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.’ (Misala 15:22-29) Na bongo ezali komonana ete, engebene bizaleli, mobeko oyo mopekisi makila ezali na motuya ndenge moko elongo na bipekiseli oyo bitaleli losambo na bikeko mpe pite.a
8 Baklisto ya yambo bazalaki kotosa mobeko wana na Nzambe. Moto moko na mayele na ekolo Britanike Joseph Benson, alobaki na ntina yango: “Epekiseli wana ya kolya makila, oyo epesamaki na Noa mpe na libota na ye mobimba, mpe na nsima epesamaki lisusu epai na Bayisraele . . . elongolama naino te; nkutu, endimisamaki lisusu kati na Kondimana ya Sika, na Misala mokapo [15]; na bongo bakomisaki yango mobeko moko ya libela.” Kasi, makambo oyo Biblia elobi mpo na makila epekisi bosaleli nyonso oyo minganga ya lelo bazali kosalela yango, na ndakisa kozongisa makila na nzoto, oyo eyébánáká te na eleko ya Noa to ya bantóma?
Kosalela makila lokola nkisi
9. Na kokesena na etelemelo ya baklisto, lolenge nini Kalakala bazalaki kosalela makila lokola nkisi?
9 Likambo ya kosalela makila lokola nkisi ebandi lelo te. Kati na mokanda Nzoto mpe makila (angl.), Reay Tannhill amonisi ete na boumeli ya mibu soko 2 000, na Ezipito mpe kati na mikili misusu, “makila matalelamaki lokola nkisi makasi mpo na kosilisa maladi ya maba.” Baromé bakanisaki ete bakokaki kosalela makila ya moto mpo na kosilisa maladi ya ndeke. Tertullien akomaki mpo na koyebisa bosalelami wana ya makila lokola “nkisi,’’ wana elobaki ye mpo na “baoyo, na ntango ya etumba na babandi na mbeli, bamelaki na lokoso nyonso mpo na mposa, mpo na kosilisa maladi ya ndeke, makila ya móto mpenza, oyo mazalaki kobima na mongongo na basali na mabe, nsima na kokatama nkingo.” Ezalela wana eyokani ata moke te na etamboli na baklisto: Alobaki ete: “Biso, totalelaka makila na banyama te lokola bilei oyo bipesameli nzela mpo na kolya . . . Mpo na komeka baklisto, bozali kopesa bango budɛ etondi na makila, ata boyebi malamu ete bilei yango bipekisami epai na bango.’’ Kanisa moke: baklisto ya yambo bakokaki kondima ata kokufa, na esika ete balya makila, oyo ezali komonisa bomoi.—Tala 2 Samwele 23:15-17.
10, 11. Mpo na nini tokoki koloba ete likanisi na Nzambe na ntina na makila epekisi kokotisa makila na nzoto?
10 Ya solo, na eleko wana likambo ya kozongisa makila na nzoto ezaláká te; babandaki komeka yango bobele pene na ekeke ya zomi na motoba. Atako bongo, na ekeke ya zomi na nsambo, molakisi moko na mateya matali nzoto ya moto, na université ya copenhague amonisaki botemeli na ye na maloba oyo: ‘Emonani ete baoyo bazali kolinga bobele kosalela makila ya moto lokola nkisi bazali kosalela yango na lolenge ya mabe mpe bazali kosala lisumu monene. Tokweisaka mpenza bato oyo bakolyaka misuni na bato. Mpo na nini tozali koyina te baoyo bazali kobebisa mongongo na bango na makila ya moto? Yango ezali se ndenge moko na kozwa, na monoko, to na nzela ya bisaleli na kokotisa makila na nzoto, makila ya moto mosusu oyo mazwami na nzela na mosisa moko oyo bakati. Baoyo bazali kokumba ngambo na likambo wana bakoki kozwa etumbu engebene mobeko na Nzambe.’
11 Ya solo, ata na boumeli ya bikeke bileki, ezali na bato bayebaki ete mobeko na Nzambe na ntina na makila mopekisaki kolya makila ezala na nzela na misisa to na monoko. Bato ya ntango na biso oyo bazali komonela makambo motindo moko wana bazali mpenza na nkaka te mpo na koyeba etelemelo ya ba Témoins de Jéhovah, etelemelo oyo ezali na boyokani na likanisi ya Nzambe. Atako bazali kopesa motuya monene na bomoi mpe bazali na botondi epai na minganga, baklisto ya solo bazali kotalela bomoi ete ezali likabo ya Mozalisi mpe, mpo na yango, bazali komemya yango; mpe bazali komeka kobakisela yango mikolo te na kolyaka makila.—1 Samwele 25:29.
Na makanisi ya minganga, makila ekobikisaka bomoi?
12. Bato na mayele basengeli koluka koyeba makambo nini na ntina etali kozongisama ya makila?
12 Uta mibu mingi, bato na mayele bazali koloba ete makila ekobikisaka bomoi. Minganga bakoki kopesa ndakisa ya bato oyo makila masilaki mpe babikisamaki mpo bazongisaki bango makila. Nzokande, bamoko bazali mbala mosusu komituna: ‘Na kotalela likanisi ya minganga, ekateli ya baklisto ezali mpenza ya mayele to te?’ Liboso ya kokana kozwa nkisi moko ya monganga atako makasi na yango ezali ndenge nini, moto na mayele akotunaka liboso mpo na koluka koyeba matomba na yango mpe makama na yango. Na ntina yango, tokoloba boni, mpo na likambo litali kozongisa makila? Ezali polele ete yango ezali na makama mingi. Ekoki ata koboma.
13, 14. (a) Wapi mwa ndambo na makama oyo kozongisama ya makila ezali kobimisa? (b) Likambo oyo likomelaki pape limonisi nini na ntina na makama oyo makila makoki kobimisa kati na kolongono na biso ya nzoto?
13 Kala mingi te, monganga Goodnough mpe monganga Shuck bamonisaki ete: ’‘Minganga bayebi uta kala ete, atako stoke ya makila oyo ebombami ezali na bokono te lokola mayele na biso mandimisi biso yango, nzokande kozongisa makila ezali ntango nyonso na likama. Likama oyo lizali komonana mingi kati na likambo litali kozongisa makila ezali mingimingi bokono ya hépatite non A-non B (HNANB); kati na mikakatano misusu oyo mikoki kobima, tokoki kotanga hépatite B, bolembu kati na nzoto, kozwa kizunguzungu, kobebisama ya biloko ya nzoto oyo bikoki kobundisa maladi mpe kobakisama mingi ya biloko bikobotaka makila, to fer, kati na nzoto.” Kokanisaka “moke” na ntina na moko na makama minene wana, boyekoli yango ebakisaki: “Tozali kokanisa ete na mbula moko pene na bato 40 000 [bobele mpo na Etat—Unis] bakozwa hépatite HNANB mpe kino na 10% kati na bango bakozwa bokono bobengami cirrhose to mpe bokono hépatome [kanser ya fwa] to nyonso mibale.”—The American Journal of Surgey, Juin 1990.
14 Lokola bato bazali koyoka ntango nyonso makama ya bokono oyo kozongisama ya makila ezali kobimisa, makanisi na bato mabandi kobongwana. Nsima na kobetama masasi, na 1981, pape akotaki na lopitalo mpo na mbala ya liboso, mpe elandanaki na mbala ya mibale mpo na boumeli ya sanza mibale. Azalaki na maladi makasi mpenza kino nsango epalanganaki ete alingaki kotika mosala na ye mpo na maladi. Likambo nini lisalemaki? Makila oyo bazongisaki ye epesaki ye mikrobe oyo ebengami cytomégalovirus. Mpo na yango bato mosusu bakomi koloba ete: ‘Soki ata makila oyo bazongisaki pape ezalaki peto te, tokoloba boni mpo na makila oyo bazali kopesa epai na biso bato mpamba?’
15, 16. Mpo na nini, ata soki makila oyo makotisami na nzoto matalelamaki malamu na masini, ata bongo kozongisa makila ezangi makama te?
15 ‘Kasi, bamosusu bakoloba ete, bakoki komeka makila te kati na masini mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe?’ Totalela na ndakisa, ba ekzamé oyo esalemi mpo na koyeba bokono bobengami hépatite B. zulunalo moko ya minganga (Patient care, 28 Février 1990) elobaki boye na ntina yango: “Banda makila ezali kotalelama na bamasini mpo na koluka [maladi] wana, ntalo na bato oyo bazali kozwa hépatite nsima na kozongisama makila esili kokita, kasi 5 kino 10% ya bato bazwi hépatite nsima na kozongisa makila ezali mingimingi kouta na hépatite B.”
16 Bolembu ya ba ekzamé yango ezali komonana ntango tozali kotalela likama mosusu oyo makila ezali kobimisa: SIDA. Kopalangana ya SIDA, endimisi mpenza bato na nsomo nyonso, likama likoki kozwama na makila oyo mazali na mikrobe. Ya solo, ezali sikawa na myango ya komona mikrobe yango kati na makila; kasi yango ezali kosalelama na bisika nyonso te. Epai mosusu, ezali kokanisama ete bato mosusu bazali na mikrobe ya SIDA na boumeli ya mbula mingi kozanga ete yango emonana na ba ekzamé oyo bazali kosala lelo. Na bongo moto akoki kozwa Slda—bato mingi basili mpenza kozwa yango—nsima na kozongisama makila oyo ekzamé emonisaki ete ezali malamu!
17. Mbeba nini oyo ekoki komonana mbala moko te kozongisama ya makila ekoki kobimisa na nsima?
17 Monganga Goodnough mpe monganga Shuck balobelaki mpe “kobebisama ya biloko bizwami na nzoto mpo na kobundisa bokono.’’ Ya solo, bazali komonisa sikawa ete ata na ntango ba ekzamé ya koluka koyeba soki makila mapesami na moto ezali oyo ekoki na ye, système immunitaire (biloko oyo bikobundisaka bokono kati na nzoto) ya moto oyo azongisami makila ekoki kobebisama, likambo oyo lizali kotika nzela polele na kanser mpe na liwa. Na yango, boyekoli moko oyo bosalemaki na canada likoló na “bato na bokono oyo bazwi kanser ya motó mpe ya nkingo emonisaki ete baoyo bazongisamaki makila na ntango ya bolongoli litutu moko kati na nzoto babungisaki na nsima likoki ya kobunda na maladi mosusu kati na nzoto na bango.” (The Medical Post, 10 Juillet 1990) Minganga ya université ya californie du Sud bakomaki ete: “Ntalo ya bozongi ya kanser ya mosisa ya mongongo (larynx) emati kino 14% epai na baoyo bazongisaki bango makila te, nzokande 65% epai na baoyo bazongisaki bango makila. Mpo na oyo etali kanser ya monoko, ya mosisa mosusu ya mongongo (pharynx), ya zolo to ya motó, ntalo ya bozongi lisusu ezalaki ya 71% epai na bato oyo bazongisaki bango makila.” (Annals of Otology, Rhinology & Laryngology, mars 1989) Lisusu, ezali kokanisama ete kobeba wana na biloko bikobatelaka nzoto elimboli ntina oyo babéli oyo bazongisaki bango makila na ntango ya opération bazali na makama mingi ya kozwa maladi mosusu.—Tala maloba mazwami na encadré na lokasa 10.
Bankisi esengeli na esika ya makila?
18. (a) Na ntina na makama oyo mazali kouta na bozongisi makila, minganga batalisi makanisi na bango sikawa epai wapi? (b) Makanisi nini mataleli bankisi esalemi kozanga makila na kati akoki kopesa yango epai na monganga na yo?
18 Bamoko bazali mbala mosusu komituna: ‘Kozongisa makila ezali kobimisa makama, kasi ezali na bankisi te oyo esengeli na esika na makila?’ Biso banso tozalaka na mposa ete tozwa bankisi ya makasi mpe ya malamu mingi. Mpo na yango, ezali solo na myango oyo mindimami mpe ya malamu koleka mpo na kosalisa maladi makasi kozanga ete basalela makila? Na esengo nyonso, eyano ezali ee. Zulunalo moko (The New England Journal of Medicine, 7 Juin 1990) elobaki mpo na yango ete: “Minganga, komonaka mbala na mbala likama ya [Sida] mpe ya mikrobe mosusu oyo mizali koyingela na nzoto na nzela na bozongisi makila, bazali kotalela lisusu matomba mpe makama ya bozongisi makila mpe batalisi makanisi na bango epai na myango ya kosalisa na nkisi oyo ezali na makila na kati te, bakisa mpe oyo etali koboya kozongisa makila mpenza.’’b
19. Mpo na nini tosengeli kozala na elikya ete tokoki koboya makila mpe atako bongo kozwa nkisi ya malamu koleka?
19 Uta kala, ba Témoins de Jéhovah bazali koboya kozongisama makila na nzoto, yango ezali mpo ete bazali kotosa mobeko na Nzambe na ntina na makila, kasi ezali mpenzampenza te mpo na makama oyo yango ezali kobimisa. (Misala 15:28, 29) Atako bongo, minganga ya makoki bazali kosalisa ba Témoins de jéhovah malamumalamu kozanga ete batya bango makila, eloko moko ya likama mingi koleka. Tozali kokuta kati na mikanda ya minganga bandakisa mingi na lolenge oyo ya kosala. Na yango, zulunalo moko (Archives of Surgery, novembre 1990) ezali kolobela kotyama ya mitema misusu oyo mizongisamaki na nzoto ya Batemwe; lisosoli ya babeli wana lipesaki bango nzela na kondima opération ya lolenge wana kozanga ete basalela makila. Ekokaki kotangama ete: “Eksperianse ya mibu koleka 25 kati na mosala ya opération ya mitema na nzoto ya ba Témoins de Jéhovah ebimisaki likambo oyo: minganga bazali kolonga kosanzé mitema kozanga ete basalela nkisi esalemi na makila . . . Ata moto moko te akufaki na ntango ya opération mpe, kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo na ebandeli ya momeseno yango, botaleli oyo bosalemaki na nsima bomonisaki ete bobele motuya moke na babeli yango nde nzoto na bango eboyaki kondima motema ya sika oyo motyamaki kati na bango,”
Makila oyo maleki na motuya
20, 21. Mpo na nini baklisto basengeli kokeba ete bakolisa te likanisi oyo ete “Makila ezali eloko mabe”?
20 Nzokande, ezali na motuna moko monene oyo moko na moko na biso asengeli komituna. ‘Soki nazwi ekateli ya koboya ete bazongísa ngai makila te, nasali yango mpo na nini? Nini ezali mpenza ntina monene mpo na yango naboyi makila?’
21 Tosili koloba yango, ezali na bankisi makasi oyo ekoki kosalelama na esika ya makila oyo ezali kobatela mobéli na makama mingi oyo mazali kobima na nzela na bozongisi makila. Maladi lokola hépatite to SIDA ezali kopusa ata bato mingi na koboya makila mpo na bantina etali makambo na losambo te. Bamosusu bazali koloba na nguya nyonso na ntina na likambo yango; lokola soki nde bazalaki kotambola na balabala, komemaka libaya likomami likoló na yango ete: “Makila ezali eloko mabe.” Ekoki kokoma ete moklisto moko amitika kobendama na nzela wana, kasi ekozala mpenza komikotisa na nzela moko oyo akoyeba kobima na yango te. Mpo na nini?
22. Likanisi nini elongobani tosengeli kozala na yango na ntina na bomoi mpe liwa? (Mosakoli 7:2)
22 Baklisto ya solo bayebi ete: atako bankisi malamu koleka epesami na bato kati na balopitalo ya lokumu, mokolo moko to mosusu bato nyonso bazali kosuka na kokufa. Ezala ata mpo na kozongisama makila to te, bato bazali kokufa. Ezali mpo na koboya komisalisa te, kasi emonisi ndenge likambo lizali solo kosalema. Mbala mingi ezali kokoma ete baoyo bazali kotosa te mobeko na Nzambe na ntina etali makila, bazali kozwa mokolo moko to mosusu, mpasi mpo na bozongisami makila. Bamosusu nkutu bazali kokufa Lisusu, tosengeli komizimbisa te: baoyo bazali kobika na lisalisi ya kotyama makila na nzoto bazali bongo kozwa bomoi na seko te; na yango makila mazali kobikisa bomoi na bango libela te. Epai mosusu, mingi na baoyo, mpo na bantina etali mobeko na Nzambe to mpo na minganga, bazali koboya kotyama makila na nzoto kasi bazali kondima nkisi mosusu oyo ezangi makila na kati bazali mpenza na nzoto kolongono. Bakoki bongo koumela mibu mingi kati na bomoi na bango. Kasi ezali mpo na seko te.
23. Boyokani nini mibeko na Nzambe na ntina na makila mizali na yango elongo na ezalela na biso ya bato na masumu mpe mposa ya lisiko?
23 Bato nyonso bazangi kokoka mpe bazali kokufa moke moke. Likambo wana ememi biso na solo moko ya moboko, oyo makambo nyonso oyo Biblia ezali koloba na ntina na makila etongami likoló na yango. Nzambe apekisaki bato nyonso ya mokili mobimba ete balya makila te. Mpo na nini? Mpo ete makila elimboli bomoi. (Genese 9:3-6) Kati na Mibeko, ayebisaki mitinda oyo mizalaki kotya likebi na ezalela ya kozanga kokoka ya bato banso. Nzambe alobaki na Bayisraele ete na kopesaka mbeka ya banyama bakokaki komonisa ete masumu na bango masengeli kozipama. (Levitike 4:4-7, 13-18, 22-30) Ya solo, lelo oyo, Nzambe azali kosenga biso mbeka motindo wana te, kasi makambo yango mazali na ntina mpo na biso. Kati na mokano na ye, Nzambe abongisaki mbeka moko oyo esengelaki mpenza kosala mbondi mpo na masumu ya bandimi nyonso: ezali bongo lisiko. (Matai 20:28)Tala ntina oyo esengeli na biso kozala na likanisi moko na Nzambe na likambo litali makila.
24. (a) Mpo na nini ekozala libunga un kotalela makama oyo makila mazali kobimisa likoló ya kolongono na nzoto lokola ntina ya liboso ya likambo yango? (b) Na kotalela lolenge bazali kosalela makila, likambo nini likoki kopesa biso nzela na kozwa ekateli?
24 Tokosala libunga soki tokomibanzabanza mingi na ntina na makama oyo makila ezali koyeisa na nzoto, mpamba te ezali yango te nde ezali na ntina mingi liboso na Nzambe. Ya solo, ekoki kozala ete mpo baboyaki kolya makila Bayisraele bazalaki na kolongono malamu ya nzoto, lokola bakokaki mpe kozwa matomba na koboyaka kolya ngulu to banyama oyo bakolyaka bibembe mpe biloko mosusu ya mabe. (Deteronome 12:15, 16; 14:7, 8, 11, 12 ) Nzokande, tokanisa lisusu, ete ntango apesaki na Noa ndingisa ya kolya mosuni Jéhovah apekisaki ye te kolya mosuni ya banyama yango. Likambo oyo apekisaki epai na bato, ezali ya kolya makila te. Nzambe azalaki mpenzampenza te kokanisa liboso mpo na makama oyo makila ezali koyeisa na kolongono ya nzoto.Yango ezalaki te ntina ya liboso ya mobeko na ye mpo na makila. Basambeli na Nzambe basengeli koboya kotikala na bomoi na lisalisi ya makila, ezali te mpo ete kolongono na bango ya nzoto ekobeba, kasi mpo ete yango ekozala elembo ya kozanga limemya liboso na Nzambe. Soki baboyi makila, ezali te mpo ete esili kobeba, kasi mpo ete yango ezali na motuya mingi koleka. Bobele makila ya mbeka nde makoki kopesa bango nzela na kozwa lilimbisi na masumu.
25. Motindo nini makila makoki kobikisa bomoi libela ma libela?
25 Ezali motindo moko mpo na biso. Kati na Baefese 1:7, ntóma Paulo apesi ndimbola oyo: “Na ye [Klisto] tozwi lisiko na nzela na makila na ye, kolimbisama na mabunga na biso pelamoko ngolu na ye efuluki mingi mpenza.” Ye oyo Nzambe alimbisi ye masumu mpe azali kotalela ye lokola moyengebene azali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Na yango, ezali makila na mbeka na Yesu nde ekoki kobikisa bomoi na bato, mpe yango mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekateli esukaki na maloba oyo: “Soko bokomibatela na makambo oyo, bokozala malamu. Botikala malamu!” (Misala 15:29) Biblia ya Lifalansé epesi liloba oyo ete “Portez-vous bien”; nzokande, yango ezalaki elaka te; elimbolaki te ete: ‘soki boboyi makila to pite, bokozala malamu koleka.’ Ezalaki bobele mbote oyo esukisaki mokanda.
b Brochure Comment le sang peut-il vous sauver le vie? ebimisamaki na 1990 na la société Watchtower, ezali kolobela bankisi mingi esalemi na makila ta oyo ekoki kosalema malamu na esika ya kozongisa makila.
Bozongeli
◻ Mpo na ntina nini monene ba Témoins de Jehovah bazali koboya makila?
◻ Nini emonisi ete likanisi ya Biblia na ntina na makila ezali ya bozoba te kati na makambo matali mosala ya minganga?
◻ Boyokani nini bozali kati na lisiko mpe mobeko na Biblia oyo etali makila?
◻ Nini ezali lolenge bobele moko oyo makila makoki kobikisa bomoi mpo na libela na libela?
[Etanda na lokasa 10]
KOZONGISA MAKILA NA NZOTO MPE MIKROBE MIZALI KOZWAMA NA NZELA NA YANGO
Nsima na boyekoli moko mozindo oyo basalemaki na ntina na bozongisi makila mpe makama ya kozwa mikrobe na nzoto, monganga Neil Blumberg asukisaki ete: “Kati na boyekoli 12 oyo bosalemi likoló na bato na maladi [na ntina na likambo yango], 10 emonisi ete kozongisa makila na nzoto ezalaki mpenza yango moko na likama monene ya kopesa mikrobe . . . Epai mosusu, atako boyekoli mosusu emeki komonisa ete bozongisi makila na nzoto ezali kobikisa ntango molai, nzokande kokotisama ya makila na nzoto mwa ntango moke liboso na opération ekoki kolembisa makasi ya mobéli mpo ete akoka kopika liboso na mikrobe . . . Soki tomeki kotalela na bozindo mpe soki tondimi makanisi wana, ezali komonana lokola ete bampasi makasi oyo ezali kolanda nsima na opération ezali mingi mpe ezali makama oyo nde esili kopalangana mingi koleka kati na bozongisi makila oyo makokani.”—Transfusion Reviews, Octobre 1990.
[Elilingi na lokasa 8]
Globules rouges kati na mikroskopi. “Microlitre nyonso ya makila ezali pene na 4 mpe 6 milió ya globules rouges.”—“The World Book Encyclopedia”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kunkel-CNRI/PHOTOTAKE NYC