Tozali nde kondima lokola oyo na Eliya?
LELO oyo, bato bazali koningisa kondima. Bato na mayele baboyi kondima ete Nzambe azali. Bakonzi ya mangomba na bokosi bazali kotyola Nzambe. Mpe mokili bazali kosala makambo lokola nde Nzambe azali na ntina moko te. Ata soko bizaleli yango bizali kopesa mpasi na motema, soko kolɛmbisa to mpe kozanga kosepela, yango ebimisi bobele likambo moko: kondima ezali koningana. Ezali likambo na kokamwa te wana ntóma Paulo abéngaki ezaleli ya kozanga kondima ete “masumu mazali kokanga biso noki.”—Baebele 12:1, MN.
Ezali mbala mosusu mpo na ntina wana nde Paulo asalaki nyonso mpo na kobenda likebi na biso likoló na bomoi ya basi mpe mibali oyo bazalaki na kondima makasi. (Baebele, mokapo 11) Bandakisa motindo wana ekoki kolendisa biso mpe kosunga kondima na biso. Tozwa ndakisa ya mosakoli Eliya, mpe tolobela naino eteni ya liboso ya mosala na ye ya mosakoli, oyo eumelaki mpe ekokisamaki malamu. Azalaki na nsé na boyangeli ya mokonzi Akaba mpe Yezabele, mwasi na ye mopakano, na eleko oyo kondima epai na Nzambe ya solo elɛmbaki mingi lokola lelo oyo.
Bokonzi mabe ya mabota zomi
Motindo nini na babalani! Akaba azalaki mokonzi ya nsambo na bokonzi ya mabota zomi na Yisraele. Bakonzi motoba oyo bayangelaki liboso na ye bazalaki bato mabe, kasi ye alekaki na mabe. Alandaki te bobele kosalela losambo mabe ya mwana na ngombe oyo lozalaki kosalema na mboka wana, kasi abalaki lisusu Yezabele, mwana mwasi na mokonzi na bapaya, kokɔtisáká bongo losambo ya lokutá ya nzambe Baala, na lolenge na mobulu koleka oyo ezalaki kosalema liboso na mboka wana.—1 Mikonzi 16:30-33.
Yezabele asalelaki losambo ya Baala uta bomwana na ye. Etabaala, tata na ye, nganga ya Asitorete (mwasi ya Baala), akómaki mokonzi wana abomaki mokonzi ya Sidoni, bokonzi oyo bozalaki na nord ya Yisraele. Yezabele apusaki mobali na ye, oyo azalaki na bikateli makasi te, mpo na kosala losambo ya Baala na Yisraele. Nokinoki, basakoli 450 ya nzambe wana ya lokutá mpe basakoli 400 ya nzambe-mwasi Aséra, bazwamaki kati na mboka wana; bango nyonso bazalaki kolya na mesa na mokonzi. Losambo na bango lozalaki mabe mingi na miso na Jéhovah, Nzambe ya solo. Kati na makambo oyo mazalaki kosalema na lingomba yango ya mbindo, ezalaki na bilembo ya binama na kobota bana, milulu na ntina na kobota bana, ezalaki na bato na pite na bulee (basi mpe mibali) mpe bazalaki ata kopesa mbeka ya bana. Na lotómo ya Akaba, lingomba wana lipalanganaki na bonsomi nyonso na etando nyonso ya bokonzi ya Yisraele.
Bamilió na Bayisraele babosanaki Jéhovah, Mozalisi ya mabelé mpe na ebongiseli ya kobima na mai. Mpo na bango, Baala nde azalaki kopambola mabelé na konɛɔkisáká mbula na nsuka na elanga. Mbula na mbula, elikya etyamaki epai na ‘Motambwisi na mapata’ wana, oyo abéngami ete nzambe na kobota bana mpe na bileko na mbula, mpo ete asukisa bileko na moi makasi. Mobu na mobu, mbula ezalaki konɔka. Mobu na mobu, Baala azalaki kozwa lokumu mpo na yango.
Eliya asakoli eleko ya elanga
Ekoki kozala ete, Eliya abandaki kosakola na nsuka na eleko molai ya moi makasi ezangaki mbula, wana bato bazwaki kozela ete Baala amonisa nguya na ye na konɔkisáká bambula minene.a Abimi pwasa kati na lisoló ya Biblia lokola nkake. Biblia elobi mingi te mpo na bomoi na ye na kala, mpe emonisi eloko moko te likoló na libota na ye. Kasi, na kokesene na nkake, Eliya asakolaki te ete mbula ekonɔka. Ayebisaki Akaba ete: “Lokola Jéhovah Nzambe na Yisraele azali na bomoi, oyo nazali kotelema liboso na ye, mamwé mpe mbula ekozala na bilanga oyo te bobele na liloba na ngai.”—1 Mikonzi 17:1.
Kanisa mpo na mobali oyo alati elamba na nkungé na ntalo mingi te. Azali moto ya etuká ya ngombangomba ya Galaad; emonani ete abɔkɔlámaki kati na babateli na mpate na bopɔlɔ. Atelemi liboso na mokonzi Akaba, mbala mosusu na kati na ndako na ye ya bokonzi oyo ezali na bikeko bisalemi na mpɛmbɛ ya nzoku, na bililingi kitoko ya bapaya mpe na bikeko na ye minene ya losambo. Kuna na Samaria, engumba ekembisamaki mpe ezalaki na misala mingi, epai bato babosanaki losambo ya Jéhovah, Eliya alobi na Akaba ete nzambe oyo ye aponaki, Baala, azali na nguya te mpe azali na bomoi te. Eliya alobaki ete, na boumeli ya mobu wana mpe mibu milandaki, mbula ekokaki konɔka te mpe mamwé makokaki kozwama te.
Epai wapi azwaki kondima motindo wana? Abangisamaki te mpo na kotelema liboso na mokonzi wana na lolendo oyo apɛngwaki? Mbala mosusu. Koleka mibu nkɔto na nsima, Yakobo, ndeko na Yesu, andimisaki biso ete Eliya “azalaki moto na mayoki motindo moko na biso.” (Yakobo 5:17, MN) Kasi tala maloba oyo na Eliya: “Lokola Jéhovah Nzambe na Yisraele azali na bomoi, oyo nazali kotelema liboso na ye.” Eliya akanisaki ete, lokola azalaki mosaleli na Jéhovah, atelemaki liboso na kiti na bokonzi etombwami koleka oyo na Akaba, kiti na bokonzi ya Nkolo Moyangeli ya molóngó mobimba. Azalaki momonisi, ntóma ya bokonzi wana. Na makanisi motindo wana, mpo na nini akokaki kobanga Akaba, mokonzi mpamba oyo abungisaki ngolu na Jéhovah?
Soki Eliya atalelaki Jéhovah lokola moto ya solo, ezali mpamba te. Na ntembe te, mosakoli wana ayekolaki lisoló ya misala na Nzambe epai na libota na Ye. Jéhovah akebisaki Bayuda ete akopesa bango etumbu ya koyeisa eleko ya elanga mpe nzala, soko bakotika ye mpo na kosambela banzambe ya lokutá. (Deteronome 11:16, 17) Kondimisamáká ete Jéhovah ayebi kokokisa maloba na ye, Eliya “abɔndelaki ete mbula enɔka te.”—Yakobo 5:17, MN.
Kondima emonisami na kotósa malako
Nzokande, maloba na Eliya matyaki ye na likámá ya liwa. Ezalaki ntango oyo asengelaki komonisa kondima na ye kati na likambo mosusu. Mpo na kobika, asengelaki kotósa malako na Jéhovah na bosembo nyonso, ete: “Longwa awa mpe kende epai na ebimelo na moi, omibómba pembeni na mokɔlɔ na Kelita oyo ezali epai na ebimelo na moi, na Yordani. Okomela mai na mokɔlɔ mpe nasili koleka bandɛkɛ ete baleisa yo wana.”—1 Mikonzi 17:3, 4.
Eliya atósaki nokinoki. Soki alingaki kobika na eleko na elanga mpe na nzala oyo eyeisamaki na mboka wana, asengelaki kolanda motindo na bibongiseli nyonso oyo Jéhovah akamataki mpo na ye. Yango ezalaki likambo na pɛtɛɛ te. Asengelaki komibómba mpe kotangwa mpenza na bato na boumeli ya basanza mingi. Asengelaki kolya mosuni mpe mampa oyo bayangánga ezalaki komemela ye. Bayangánga ezali bandɛkɛ oyo ekolyaka misuni na nyama ikamolami mpe etalelamaki lokola mbindo kati na Mibeko na Moize; Eliya asengelaki kondimisama ete Jéhovah akosɛnzɛla ete misuni yango mizala ya nyama ikamolami te, kasi oyo ya nyama ikatami nkingo mpenza na kolanda mibeko. Likamwisi wana liumelaki ntango molai limonani epai na balimboli mosusu ya Biblia lokola nde esalemaki te mpe ememi bango kino koloba ete, likanisi ya liboso ya liloba oyo lizali kati mokapo wana elimboli ba “Arabes,” kasi ezali “bayangánga” te. Nzokande bayangánga ezalaki liponi malamu. Moto moko te akokaki kozwa likanisi ete bandɛkɛ wana ezangi ntina mpe na mbindo, oyo ezalaki komema ndambo na bilei na mokili mokauki, ete yango ezalaki mpo na koleisa Eliya, oyo Akaba mpe Yezabele bazalaki koluka ye na bikonzi nyonso ya zingazinga.—1 Mikonzi 18:3, 4, 10.
Wana eleko na elanga ezalaki koumela, Eliya akokaki komitungisa mingi mpo na esika azalaki kozwa mai na moluká ya Kelita. Miluká mingi na Yisraele mikaukaki na eleko na elanga, mpe “na nsuka na mwa mikolo,” moluká ya Kelita mpe makaukaki. Okoki kokanisa mayoki oyo Eliya azalaki na yango wana amonaki ete moluká mozalaki kokauka mokemoke mpe mai mazalaki kokita mokolo na mokolo? Asengelaki mpenza komituna likambo oyo likokaki kosalema wana mai nyonso makokauka. Atako nyonso wana, Eliya, moto na sembo, amitungisaki te. Bobele ntango moluká mokaukaki nde Jéhovah apesaki ye mitinda oyo. Alobaki na ye ete akenda na Yalefata. Kuna, akokuta bilei epai na mwasi moko mokufeli mobali.—1 Mikonzi 17:7-9.
Yalefata! Mboka oyo ezalaki kati na engumba Sidoni, epai Yezabele autaki mpe epai kuna tata na ye azalaki mokonzi! Mbala mosusu Eliya amitunaki soki yango ekokaki kozala likámá te. Kasi “atelemaki . . . mpe akendaki na Yalefata.”—1 Mikonzi 17:10.
Jéhovah akopesaka bilei mpe bomoi
Botósi na ye eumelaki te mpo na kozwa mbano na yango. Lokola yango esakolamaki, Eliya akutanaki na mwasi mokufeli mobali mpe amonaki epai na ye, motindo na kondima oyo ezalaki te epai na bato ya mboka na ye. Mwasi mokufeli mobali, oyo azalaki mobólá, azalaki bobele na mwa fufu mpe mafuta oyo asengelaki kolamba bilei na ye ya nsuka mpo na kolya elongo na mwana na ye ya mobali. Kasi, atako bobólá na ye, asepelaki naino kolamba liboso limpa mpo na Eliya, wana atyaki motema na elaká oyo epesamelaki ye ete Jéhovah akotondisa mbeki na ye ya mafuta mpe mbeki na ye ya fufu na ntango akosengela na yango. Ezali likambo na kokamwa te wana Yesu Klisto akundolaki ndakisa ya bosembo ya mwasi wana mokufeli mobali, na ntango akweisaki Bayisraele oyo bazangaki kondima na eleko na ye!—1 Mikonzi 17:13-16: Luka 4:25, 26.
Nzokande, atako likamwisi wana lisalemaki, kondima ya mwasi mokufeli mobali mpe ya Eliya esengelaki kokutana na mimekamo makasi. Na pwasa, mwana ya mwasi mokufeli mobali akufaki. Wana azalaki na mawa mingi, mwasi mokufeli mobali akokaki bobele kokanisa ete mpasi wana monene eutaki na Eliya, “moto na Nzambe ya solo.” Azalaki komituna soko yango ezalaki etumbu mpo na masumu na ye ya kala. Kasi Eliya amemaki mwana na ye oyo akufaki na mabɔkɔ na ye mpe amataki na ye na eteni na ndako na likoló. Ayebaki ete Jéhovah akokaki kopesa biloko mosusu bileki bilei na motuya. Jéhovah azali liziba ya bomoi! Bongo, Eliya abondelaki mbala mingi na mayoki nyonso mpo na kosɛɔnga ete mwana azonga na bomoi.
Eliya azalaki moto na liboso te oyo azalaki na kondima motindo wana kati na lisekwa, kasi kati na lisoló ya Biblia, ye nde azali moto na liboso oyo esalelami mpo na kosekwisa moto. Elenge mobali “azongaki na bomoi”! Mama azalaki na esengo mingi mpenza wana Eliya apesaki ye mwana na ye bobele na maloba oyo ya mokuse, ete: “Tala, mwana na yo abiki.” Na ntembe te, alobaki wana ezalaki ye kolela ete: “Nayebi sikawa ete yo ozali moto na Nzambe ya solo mpe ete liloba na Jéhovah na monoko na yo lizali solo.”—1 Mikonzi 17:17-24.
“Jéhovah azali Nzambe na ngai”
Likambo oyo ete nkombo ya Eliya elimboli “Jéhovah azali Nzambe na ngai,” ezali kosimba mitema na bato mpe yango ebongi. Na eleko ya elanga mpe na nzala, Jéhovah apesaki ye bilei mpe mai; na ntango na mobulungano kati na bizaleli ya bato, Jéhovah apesaki ye litambwisi malamu; liboso na liwa, Jéhovah asalelaki ye mpo na kozongisa moto na bomoi. Mpe emonani ete, mbala nyonso oyo Eliya andimelaki Nzambe na ye—na komitikáká epai na Nzambe ete akokisa bamposa na ye, na kotósáká na mitinda na ye, na kotyáká elikya epai na Nzambe ete nkombo na Ye ekumisama—Eliya azwaki mbano na ndimbola oyo ete, azalaki ntango nyonso kozwa bantina mingi oyo asengelaki kondimela Jéhovah. Likambo yango moko limonanaki wana andimaki kokokisa mikumba ya mpasi mpe ata mikumba mizalaki kobangisa, oyo Jéhovah Nzambe na ye azalaki kopesa ye. Na solo mpenza, ndambo na makamwisi na ye mosusu ya minene mingi masalemaki na nsima.—Tala 1 Mikonzi, mokapo 18.
Ezali pene na lolenge moko mpo na basaleli na Jéhovah lelo. Mbala mosusu toleisami na likamwisi te, mpe tosalelami te mpo na kosekwisa moto; makamwisi motindo oyo masengeli kosalema na eleko na biso te. Atako bongo, uta na mikolo na Eliya, Jéhovah abongwani te.—1 Bakolinti 13:8; Yakobo 1:17.
Bakoki mpe kosɛnga biso ete tokokisa mikumba mizali kopesa mitungisi, ete topalanganisa nsango oyo Nzambe asili kopesa biso na bisika ya mpasi oyo ezali kobangisa. Mbala mosusu tokoki kokutana na minyoko. Tokoki mpe kokutana na nzala. Kasi Jéhovah asili komonisa mbala na mbala ete azali kolanda kotambwisa mpe kobatela basaleli na ye baoyo bazali sembo, mpe lisangá na ye na mobimba na yango. Azali kopesa bango makasi ya kokokisa mikumba nyonso oyo ye azali kopesa bango. Mpe azali kolanda kosalisa bango ete bayika mpiko na mimekamo nyonso oyo bakoki kokutana na yango kati na mokili oyo na yikiyiki.—Nzembo 55:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezala Yesu to mpe Yakobo, balobi ete mbula enɔkaki na mokili te na boumeli ya “mibu misato mpe sanza motoba.” Nzokande, elobami ete Eliya akendaki liboso na Akaba mpo na kosukisa elanga na “mobu ya misato,” kotangáká mikolo longwa na ntango oyo nakokaki eleko ya elanga. Na yango, mbala ya yambo oyo akendaki epai na Akaba, esengelaki kozala nsima na eleko molai ya elanga.—Luka 4:25; Yakobo 5:17; 1 Mikonzi 18:1.
[Elilingi na lokasa 18]
Biso mpe tozali na kondima lokola Eliya kati na nguya na Jéhovah ya kokokisa bamposa ya basaleli na ye?