Mpo na nini bato malamu bazali kozwa mpasi
EZALAKI na 1914, mokili ezalaki kati na etumba. Mbala moko, bokono ebengami fièvre jaune ebimaki kati na molako ya bato bakangamaki na etumba na mboka Serbie. Kasi yango ezalaki bobele ebandeli. Bokono wana ya nsomo epalanganaki kati na basivile mpe, na boumeli ya sanza motoba mpamba, ebomaki bato koleka 150 000. Na boumeli ya etumba, mpe na boumeli ya mbongwana oyo esalamaki nsima na mokili ya Russie, bamilió misato na bato bakufaki na bokono ya fièvre jaune. Ya solo, ntembe ata moke ezali te ete bato malamu mingi bakufaki, mpe mpo na yango mabota na bango bazwaki mpasi.
Wana ezali bobele ndakisa moko ya mawa monene mazali kozwa bato. Yo moko, mbala mosusu oyebi eloko babengi konyokwama mpo ete molingami moko azwaki bokono, aksidá, to mpasi ya lolenge mosusu. Mbala mosusu otungisami na komona ete moto moko ya sembo azwi bokono oyo ekosilaka te. Na ntembe te oyokaka mpenza mawa mingi, ntango moto moko malamu, mbala mosusu tata moko ya libota oyo akosalaka mingi, abungisi bomoi kati na aksidá. Na ntembe te mpasi oyo libota na ye ezali koyoka ezali kopasola yo motema.
Bato mingi bazali kokanisa ete moto oyo azali kosala malamu asengeli kozwa mpasi te. Bamoko bazali nkutu kokanisa ete soki moto moko azali konyokwama, ezali elembo ete azali mosumuki. Yango ezali nde likanisi ezalaki na bato misato oyo bazalaki na bomoi ekoki sikawa mbula 3 600. Bazalaki na bomoi na eleko ya Yobo, moto malamu. Tozonga naino na eleko na bango awa ezali biso koluka eyano na motuna oyo: mpo na nini bato malamu bazali kozwa mpasi?
Bampasi ya Yobo
Ntango baninga na ye misato ya nkombo mpamba bayaki epai na ye, Yobo azalaki na mpasi makasi oyo eutaki na mawa mpe na maladi. Azalaki na mawa ya bana na ye zomi mpe abungisaki biloko na ye nyonso. Bato oyo bazalaki kokumisa ye kala babandaki kotyola ye. Ata mwasi na ye mpe apesaki ye mokongo, mpe atindaki ye ete afinga Nzambe bongo akufa.—Yobo 1:1 kino 2:13; 19:13-19.
Na boumeli ya mikolo nsambo mpe butu nsambo, bapaya na Yobo bazalaki bobele kotala mpasi na ye mpe balobaki naino eloko moko te. Na nsima moko kati na bango afundaki ye ete amitambwisaki na lolenge mabe; mpo na ye, yango nde ezalaki ntina ya etumbu na ye. Elifaze alobaki na ye ete: “Kanisa sasaipi, moto malamu abebaki ntango nini? Bato na sembo balongolami ntango nini? Lokola ngai namoni, baoyo bakotimola masumu mpe bakokona yauli, bakobuka bobele lolenge yango. Bakobeba na mopepe na Nzambe, na mpema na zolo na ye bakozikisama.”—Yobo 4:7-9.
Na yango, Elifaze azalaki koloba ete Nzambe apesaki Yobo etumbu mpo na masumu na ye. Motindo moko mpe, lelo, bato mosusu bazali koloba ete mpasi ezali kouta epai na Nzambe mpo na kopesa bato etumbu mpo na misala na bango mabe. Kasi Jéhovah apesaki Yobo etumbu te mpo na masumu oyo akokaki kosala. Toyebi yango, mpamba te, nsima na mikolo, Nzambe alobaki na Elifaze ete: “Nkanda na ngai epeleli yo mpe baninga mibale na yo; mpo ete bolobi likambo na sembo mpo na ngai te lokola moombo na ngai Yobo alobi.”—Yobo 42:7.
Ezali Nzambe te nde azali koyokisa mpasi
Na mikolo na biso, bamilió na bato, kati na bango ezali mpenza na bato mingi ya malamu, batungisami na mpasi mpe bazali pene na kokufa mpo na nzala. Bato mosusu bazali kokoma na nkanda mpe bazali kobwaka mokumba ya mpasi na bango likoló na Nzambe. Kasi tokoki kopamela Nzambe te mpo na nzala oyo ezali kongala lelo. Mpamba te, azali Ye oyo akopesaka bilei epai na bato.—Nzembo 65:9.
Moimi, lokoso mpe makambo mosusu matali bato makoki kopekisa baoyo bazali na nzala ete bazwa bilei. Etumba ezali moko na bantina ya nzala. Na ndakisa, encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Mbeba oyo etumba ekoki kobimisa ezali bongo nzala soki baloni mingi batiki bilanga na bango mpo na kokende kobunda. Kati na makambo mosusu, mampinga ya basodá mazali kobimisa nzala na nko mpo na kobenda banguna ete batika kobunda. Bazali kobebisa bastoke ya bilei mpe milona oyo mikoki kobukama na bilanga, mpe bazali kokanga nzela ete banguna bazwa bilei te. Na Nigéria, na boumeli ya etumba ya bana-mboka (1967-1970), kokanga nzela epekisaki ete bilei ekoma kati na etúka ya Biafra te. Nzala ekotaki mpe ekoki kozala ete milió moko na bafandi ya Biafra bakufaki mpo na nzala.”
Mingi mpenza na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basusu bafundaki Nzambe mpo na mpasi oyo bato malamu bazwaki mpe mpo na liwa na bango. Nzokande, na koyinanaka bamoko na bamosusu mpe na kobundisanaka, bato bazalaki kotosa mibeko na Nzambe te. Epai na moto oyo atunaki ye soki mobeko nini ezalaki “liboso na nyonso,” Yesu ayanolaki ete: “Oyo na liboso na nyonso ezali ete: ‘Yoka Yisraele, Jéhovah Nzambe na biso, ye azali Jéhovah moko. Olinga mpe Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.’ Oyo na mibale ezali boye ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Lilako na koleka oyo na ntina ezali te.”—Malako 12:28-31.
Ntango bato bazali kobuka mibeko na Nzambe na kobunda bitumba mpe na kobomana, nani akoki na lotomo nyonso kofunda Nzambe mpo na bampasi ebimisami na yango? Soki tata moko alobi na bana na ye ete babunda te mpe bango balandi toli na ye kitoko te, ye nde azali mobandisi ya bampota oyo bakonyokwama na yango mbala mosusu? Tata azali mobandisi na yango te, motindo moko Nzambe mpe azali mobandisi ya bampasi na bato te, oyo ezali kobima mpo na kozanga botosi na mibeko na ye.
Ya solo, mpasi ekoki mpe kouta na kozanga kotosa mibeko ya Jéhovah, kasi Biblia ezali koteya te ete bampasi nyonso ezali nde meko ya Nzambe mpo na kopesa bitumbu epai na bato mabe. Na ntina ya lisumu na bango, babalani ya liboso kati na bato babungisaki lipamboli na Jéhovah mpe libateli na ye. Longola makambo oyo Jéhovah akotelaki mpo na kokokisa mikano na ye, makambo oyo masalamaki kati na lisolo ya bato esimbamaki na lilako oyo Makomami mazali koyebisa ete: “Elonga kati na komekama ezali mpo na bato na mbango te, to etumba epai na bato na mayele te, to mosolo epai na bato na boyebi te, to ngolu epai na bato bamesani na mosala te; nde ntango mpe makambo makanami te ekokwela bango nyonso.”—Mosakoli 9:11.
Ezala bato malamu to bato mabe, bango nyonso bazali kozwa mpasi
Ya solo, bato malamu bazali mpe konyokwama lokola bato mabe na ntina na lisumu mpe na kozanga kokoka oyo bazwaki uta kobotama na bango. (Baloma 5:12) Na ndakisa, ezali bobele basali na mabe te kasi lisusu na bato malamu bazali mpe kozwa maladi makasi. Moklisto na sembo Timoté “atungisamaki na maladi.” (1 Timoté 5:23) Kolobaka mpo na “monzube kati na nzoto” na ye moko, Paulo azalaki mpenza kolobela bokono moko kati na nzoto na ye. (2 Bakolinti 12:7-9) Ata mpo na bolamu ya basaleli na ye ya sembo, Nzambe azali kolimwisa sikawa te bolembu ya kobotama to mpe likoki ya kozwa maladi.
Ekoki mpe kozala ete bato na sembo banyokwami mpo na kozanga bososoli to mpo ete bazali kosalela ntango nyonso te batoli ya Makomami. Tomonisa likanisi na biso na lisalisi ya ndakisa moko: ye oyo aboyi kotosa Nzambe mpe abalani na moto moko oyo azali mondimi te azali na likama ya kozwa mpasi makasi ya makanisi kati na libala, mpasi oyo akokaki kopengola yango. (Deteronome 7:3, 4; 1 Bakolinti 7:39) Soki moklisto moko azali komileisa malamu te mpe azali komipemisa na lolenge esengeli te, azali na likama ya kozwa mpasi, mpamba te azali kotya kolongono ya nzoto na ye na likama.
Soki tokweisami na bolembu moko mpe tomekoli etamboli moko mabe, tokozwa mpasi kati na makanisi. Mokonzi Davidi amibendelaki mpasi mingi wana asalaki ekobo elongo na Bataseba. (Nzembo 51) Wana azalaki komeka kobomba libunga na ye, atungisamaki makasi mpenza. Alobaki ete: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te, nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Mai na nzoto na ngai ekauki lokola na moi makasi.” (Nzembo 32:3, 4) Kobanga oyo lisumu na ye ezalaki koyokisa ye ekitisaki nguya na Davidi, lokola nzeté ekobungisaka mai ya ntina mpo na bomoi na boumeli ya elanga to na ntango ya moi makasi. Mpenzampenza, azalaki konyokwama kati na makanisi mpe na nzoto. Kasi Nzembo 32 emonisi ete na kobongolaka motema mpe na koyambolaka lisumu na ye, moto akoki kozwa lilimbisi na Nzambe mpe kobondisama na mpasi motindo wana.—Masese 28:13.
Mbala mingi, bato mabe bazali konyokwama mpo na etamboli mabe na bango, kozanga ete ezala etumbu na Nzambe. Hérode le Grand atungisamaki na bokono oyo eutaki na bizaleli mabe na ye. Na nsuka ya bomoi na ye, Hérode ‘anyokwamaki na mpasi makasi’ engebene oyo moyuda Flavius Josèphe mokomi na makambo na kala ayebisaki. “Azalaki koyoka mposa makasi ya komikwanza, misopo na ye mitondaki na bampota mpe biteni ya nzoto na ye bizaIaki na mpota na mayina. Amekaki, kasi mpamba, mpo na kobondisa bokibi na ye mpe bobendanibendani ya misisa na ye kati na maziba ya mai kitoko ya Callirhoé. . . . Hérode azalaki konyokwama na ebele na mpasi makasi kino amekaki komitya mbeli, kasi ndeko na ye ya mobali akangaki ye.”—Josèphe: les oeuvres principales (angl.), ebongolami mpe ebimisami na Paul Maier.
Na kotosaka mibeko na Nzambe, tozali komibatela na bampasi, lokola maladi oyo ezali kozwama na bosangisi nzoto. Kasi, mpo na nini bato malamu, baoyo bazali koluka ngolu na Nzambe, bamonani lokola ete bazali kozwa mpasi koleka?
Mpo na nini bato bakobangaka Nzambe bazali konyokwama
Bato bakobangaka Nzambe bazali sembo; wana ezali ntina ya liboso mpo na yango bazali konyokwama. Likambo oyo likomelaki Yosefe, mwana ya Yakobo tata na mabota, emonisi ete ezali boye solo. Wana mwasi ya Potifare azalaki kosenga mbala na mbala epai na Yosefe mpo ete asangisa nzoto elongo na ye, atunaki boye: “Bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:9) Yango ememaki ye na kokota boloko na lolenge ezangi kolongobana; na bongo Yosefe anyokwamaki mpo ete azalaki sembo.
Kasi mpo na nini Nzambe azali kopesa nzela ete basaleli na ye ya sembo banyokwama? Eyano ezwami kati na likambo moko oyo ebimisamaki na Satan le Diable, anzelu moko motomboki. Likambo yango etalelaki bosembo epai na Nzambe. Ndenge nini toyebi yango? Mpo ete yango emonisamaki na likambo ya mosembo Yobo, oyo alobelamaki mwa liboso.
Na boumeli ya likita moko ya bana na ye baanzelu kuna na likoló, Nzambe atunaki Satana ete: “Okanisi na motema na yo likambo na moombo na ngai Yobo? Mpo ete mosusu azali lokola ye kati na mokili te, moto malamu bɛ mpe na sembo, oyo akobangaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” Eyano ya Diable emonisi ete ntembe ezalaki na ntina na bosembo ya bato epai na Nzambe kati na komekama. Satana alobaki ete Yobo azwaki kosalela Nzambe mpo na matomba ya mosuni oyo azalaki na yango, kasi mpo na bolingo te. Na bongo Satana alobaki ete: “Nde tika ete osembola loboko na yo sasaipi mpe osimba nyonso ezali na ye [Yobo] mpe akolakela yo mabe na miso na yo.” Jéhovah ayanolaki ye ete: “Tala nyonso oyo ezali na ye, [epesami] na loboko na yo, kasi sembola loboko na yo epai na ye moko te!”—Yobo 1:6-12.
Atako nyonso oyo Satana asalelaki ye, Yobo akangamaki ntango nyonso na oyo ezali sembo mpe amonisaki ete azalaki kosalela Jéhovah mpo na bolingo. Ya solo, Yobo alobaki epai na bafundi na ye ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te!” (Yobo 27:5) Na ntembe te, bato na sembo bazalaki ntango nyonso pene ya konyokwama na ntina na boyengebene. (1 Petelo 4:14-16) Biblia ezali koloba mpo na bato mingi oyo bazalaki na bolingo moko makasi mpo na Nzambe mpe baoyo bazalaki na bomoi na boyengebene mpo ete bakumisa ye mpe komonisa ete Satana azali kobuka lokuta ntango azali koloba ete azali na likoki ya kozimbisa bato nyonso longwa na Jéhovah. Moto nyonso oyo azali konyokwama mpo ete atikali sembo liboso na Nzambe akoki kozala na esengo, mpamba te azali komonisa ete Diable azali mobuki na lokuta mpe azali kosepelisa motema ya Jéhovah.—Masese 27:11.
Nzambe azali kokanga miso te na minyokoli ya basaleli na ye ya sembo. Mokomi na nzembo Davidi alobaki ete: “Jéhovah akosimbaka baoyo nyonso balingi kokwea, mpe akotelemisaka baoyo nyonso bagumbami.” (Nzembo 145:14, MN) Baoyo bamipesi na Jéhovah mbala mosusu bazali mpenza na nguya te kati na bango mpo na kokangela mikakatano ya bomoi motema mpe minyokoli oyo bazali kokutana na yango mpo ete bazali kati na libota na ye. Kasi Nzambe azali kopesa bango nguya, mpe azali kosunga bango mpe azali kopesa bango mayele masengeli mpo na koyikela mimekamo nyonso mpiko. (Nzembo 121:1-3; Yakobo 1:5, 6) Soki basaleli na sembo mosusu ya Jéhovah basengeli kobomama epai na banyokoli na bango, bazali na elikya ya lisekwa elakami na Nzambe. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Ata kati na likambo motindo wana, Nzambe akoki kobongola makambo makolanda nsima ya minyokoli oyo bato balingi ye bazali koyikela yango mpiko. Atyaki nsuka na minyokoli ya Yobo mpe apambolaki mingi mpenza mobali wana ya sembo. Biso mpe tosengeli kondimisama ete Jéhovah akotika te libota na ye na mikolo na biso.—Yobo 42:12-16; Nzembo 94:14.
Mosika te—nsuka na bampasi!
Na yango, lelo, bato nyonso bazali kozwa mpasi na ntina na kozanga kokoka oyo tozali kobotama na yango mpe mpo na bomoi kati na ebongiseli oyo ya biloko mabe. Bato bakobangaka Nzambe bazali mpe komizela na kozwa mpasi mpo ete bazali kotikala sembo epai na Jéhovah. (2 Timoté 3:12) Kasi bakoki kosepela, mpamba te etikali moke Nzambe akotya nsuka na mpisoli, na liwa, na mawa, na konganga mpe na mpasi. Mpo na yango, ntóma Yoane akomaki ete:
“Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete lola na liboso, na nse na liboso isili kolongwa. Mai monene mpe ezali lisusu te. Namoni mpe mboka mosantu, Yelusaleme na sika kokita na likoló, kouta na Nzambe. Esilaki kobongisama lokola mwasi na libala oyo asili kokembisa nzoto mpo na mobali na ye. Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete: ‘Tala, efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.’ Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete: ‘Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ Alobi mpe ete: ‘Koma ete maloba oyo mazali sembo, na solo.’”—Emoniseli 21:1-5.
Bobele bongo, ntóma Petelo alobaki ete: “Nde tozali kotalela makoló na sika mpe nse na sika, pelamoko elakaki ye [Jéhovah Nzambe]; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Oyo nde elikya kitoko! Bomoi kati na Paradis na mabelé ekoki kozala libaku na biso ya esengo (Luka 23:43) Na yango, totalela avenir na likanisi ya kolonga. Totya elikya na biso mpe motema na biso kati na mokili ya sika ya Nzambe oyo esili mpenza kobelema. Tobatela etamboli oyo ekosepelisa Jéhovah Nzambe, mpe tokokoka kofanda libela kati na mokili mopetolami na bampasi ya lolenge nyonso.
[Elilingi na lokasa 4]
Atako bampasi na ye, Yobo abatelaki etamboli oyo kosepelisa Nzambe
[Elilingi na lokasa 7]
Okoki kozala na bomoi kati na mokili mopetolami na bampasiya lolenge nyonso
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Collier’s Photographic History of the European War