Mikakatano kati na libota—Elembo ya mikolo ya nsuka
MIKAKATANO kati na libota: bato mingi bakanisi ete yango euti na likambo oyo ete malako ya kala mpo na libala mpe lolenge ya kobokola bana, ezali kobonga lisusu te mpo na ntango na biso. Mpo na bato mosusu, yango euti na mbongwana kati na makambo ya politike, na nkita mpe na makambo matali bomoi ya bato. Basusu bakanisi ete yango euti na kosalema ya bamasini mpe bakompanyi minene ya ntango oyo. Na solo, mikakatano oyo mizwami kati na mabota mizali na ndimbola monene. Tosimba oyo Biblia elobi na 2 Timoté 3:1-4 (MN):
“Osengeli koyeba ete: na mikolo ya nsuka, ekozala na ntango na mpasi mpe na mikakatano. Mpo ete bato bakozala baninga na bango moko, baninga ya mosolo, bamikumisi na bango mpenza, bato na lolendo, batuki; bato bazangi kotósa baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi sembo, bato bazangi bolingo, bato na mitó makasi, batɔngi, bato bazangi komipekisa, babomi, bato baboyi makambo malamu, bakosi, bato na nko, bato bavimbi [na lolendo], bato balingi bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”
Maloba oyo mazali mpenza komonisa ntina ya mikakatano ya lelo, boye te? Engebene bisakweli, mikakatano oyo mizali lelo kati na mabota euti mpenza na makambo oyo masengelaki komonana na mikolo ya nsuka ya mokili ya lelo. Mpe ezali na bilembeteli ya sikisiki oyo bizali komonisa ete eleko yango ya mpasi ebandaki na 1914.a Uta ntango wana, Satan le Diable, ekelamu oyo aleki bato na nguya, azali na bopusi oyo ezali mpenza koboma.—Matai 4:8-10; 1 Yoane 5:19.
Lokola uta 1914 asili kobwakama zingazinga ya mabelé, Satana azali “na nkanda makasi, awa eyebi ye ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:7-12, MN) Lokola Satana azali monguna monene ya Nzambe “oyo mabota nyonso na likoló mpe na nsé mazwi nkombo epai na ye,” ezali likambo ya kokamwa te na komona ete mabota mabundisami lelo oyo. (Baefese 3:15) Satana asili kozwa ekateli ya kopengola bato nyonso longwa na Nzambe. Mpo na kokokisa yango, azali na mwango mosusu ya malamu te bobele kobimisa mikakatano kati na libota, boye te?
Na yango, mpo na kobatela mabota na bopusi ya ekelamu wana aleki bato na nguya, esengeli mpenza kozwa batoli eleki oyo epesami likolólikoló na bato oyo babengami ete bapesi na toli. Kasi, Biblia elobi na ntina na Satana ete: “Toyebi mayele na ye.” (2 Bakolinti 2:11) Tokokoka komibatela soki toyebi mua mosusu kati na myango oyo azali kosalela mpo na kobundisa biso.
Mbongo mpe mosala
Mpasi na makambo ya nkita ezali moko na bibundeli bileki na nguya oyo Satana azali kosalela. Tozali kobika na “ntango ya mpasi mpe ya mikakatano” to “tangu mabe,” lolenge oyo 2 Timoté 3:1 ebongolami na Biblia Lingala Uele. Na mikili ya bobólá, mabota matungisami na mikakatano lokola kozanga mosala, lifuti moke mpe mpasi ya kozwa biloko bisengeli mpo na kobikela. Nzokande, ata bikólo ya États-unis, mboka oyo ezali na bozwi kati na makambo mingi, bizali mpe kooka mpasi na ntina na makambo ya nkita. Ankete moko esalemaki na mboka wana emonisaki ete mbongo ezali moko na bantina minene ya matata mazwami kati na mabota. Mokanda Secrets of Strongs Families elimboli ete, “ntango, likebi mpe makasi” oyo epesami mpo na kokokisa mikumba ya mosala, ekoki mpe kozala “banguna oyo bamibombi,” baoyo bazali kobebisa mikumba ya babalani.
Makambo wana masili kopusa basi mingi na koluka mosala. Mokomi Vance Packard ayebisi ete: “Lelo, soko ndambo na minei ya bana babotami sika mpe bana mike ya Amerika baoyo bakokisi naino mibu misato te, bazali na bamama oyo basalaka mosala oyo tokoki kobenga ete mosala na libanda ya ndako.” Kokokisa bamposa ya bana mike oyo mbala mosusu esilaka te, mpe kozala na mosala oyo ekoki ntango mosusu kolɛmbisa mingi, ekobimisaka mikakatano epai na baboti mpe epai na bana lokola. M. Packard abakisi ete, lokola bana babatelami malamu mpenza te na États-Unis, “bamilió mingi kati na bango bamonisameli bolingo te na bomwana na bango.”—Nos enfants en danger (angl.).
Esika ya mosala yango moko ezali mbala mingi kobebisa boyokani ya libota. Mingi bakosalaka pite elongo na baninga na bango ya mosala. Basusu bakolukaka kokóma na bozwi mingi mpe bongo, bazali kotalela bomoi na bango ya libota na bopotu na ntina na mosala na bango. (Tala Mosakoli 4:4.) Moto monene moko na makambo ya mombóngo, amipesaki mingi mpenza na mosala na ye kino mwasi na ye alobaki ete: “Ezali lokola nde nazali kobɔkɔlo bana bobele ngai moko.”
Boyokani elɛmbi kati na libala
Libala yango moko mpe ebundisami. Mokanda L’environnement intime (angl.) elobi ete: “Na ntango na kala, babalani basengelaki kofanda na bomoko longola bobele soki moko na bango asali lisumu monene kati na libala: ekobo, konyokola kati na mokano ya koboma, bopotu boleki ndelo. Sikawa, bato mingi bazali kotalela libala lokola mwango ya kokokisa bamposa na bango.” Na yango, na esika ya kotalela libala lokola boyokani ya libela elongo na moto moko, bazali kotalela libala lokola mwango ya kosilisa mawa, ya kosilisa mikakatano to kosilisa ezalela ya kofanda yo moko. Bazali sikawa kotalela mingi matomba oyo makoki kozwama na libala, na esika ya kotalela oyo bango bakoki kosala mpo na libala. (Tala Misala 20:35.) “Mbongwana wana monene kati na makambo matali libala” esali ete boyokani kati na mabala ezala lisusu makasi te. Soki bazwi te matomba oyo balukaki, mbala mingi babalani bakozwaka ekateli ya koboma libala.
Na lolenge ya esakweli, Biblia elobaki na ntina na bato na “mikolo ya nsuka” ete “bazali komonisa motindo na ezaleli ya kobanga Nzambe, nde bazali kotyola nguya na yango.” (2 Timoté 3:4, 5, MN) Ntalo monene ya bato ya mayele bakanisi ete kokwea ya mangomba esili kokokisa mokumba monene mpo na kobeba ya libala. Diane Medved akomaki kati na mokanda na ye The case Against Divorce ete: “Engebene mangomba mingi, Nzambe alobaki ete libala lisengeli koumela seko. Kasi, soki moto azangi kondima Nzambe to azali kokakatana mpo na kondima ete Nzambe azali, moto yango akosala makambo lokola ye moko alingi.” Na yango, na ntango babalani bakutani na mikakatano na libala, balukaka mpenza nzela malamu te mpo na kobongisa yango. “Bawelaka koboma libala na bango.”
Bilenge babundisami
Bana batungisami na mikakatano ya lelo. Ntalo monene ya bana bazali kobɛɔtama makasi mpe babundisami na maloba to babebisami na baboti na bango na oyo etali kosangisa nzoto. Koboma libala ezali kopimela bamilió ya bana mosusu likebi ya bolingo ya tata to mama, mpe mbala mingi bazali kooka mpasi mpo na yango kati na bomoi na bango mobimba.
Bilenge bazali kozwa bopusi makasi. Na mibu 14, bobele na kotala televizio, elenge Moameriké asili komona kobomama ya bato 18 000 mpe ebele ya mitindo mosusu ya mobulu, mpe pite, kookisa bato mosusu mpasi mpe mabe. Miziki mpe ezali na bopusi monene likoló na bilenge, mpe mingi na yango ezali mpenza na makambo ya kolengola, ya nsoni mpe ya Satana. Na eteyelo, bilenge bazali kokutana na mateya lokola évolution oyo ekoki kobebisa kondima na bango epai na Nzambe mpe na Biblia. Na masɛnginya ya baninga na bango, mingi bapusami na kosangisa nzoto liboso na kobala, na kolangwa masanga mpe na komela drogue.
Ntina ya mikakatano ya libota
Mabota mabundisami bongo na makambo mingi oyo makoki mpenza koboma. Nini ekoki kosalisa mabota na kolonga? John Bradshaw, mopesi toli na mabota, alobi ete: “Ekoki sikawa mibu 150, tolongi te na kobimisa myango ya sika mpo na kopesa toli. . . . Na likanisi na ngai, myango ya kala mizali kosalelama lisusu te.” Nzokande, nzela ya kolonga ekozwama te kati na myango mosusu oyo bato bakoki kosala. Jéhovah Nzambe azali Mobandisi ya libota. Koleka moto nyonso mosusu, ye ayebi mokumba ya libota mpo na bolamu na biso moko mpe ayebi oyo ekosalaka ete libota lizala na esengo mpe na bomoko. Na bongo, tosengeli te kokamwa na koyoka ete Liloba na ye, Biblia, ezali kosalisa biso na kolónga mikakatano ya libota.
Mokanda wana ya kala, mozali kolimbola lolenge nini bomoi ya libota ebebaki. Babalani ya liboso, Adam na Eva, batyamaki kati na elanga kitoko mpo na kokokisa mokano moko ya ntina mingi: kobongola mabelé ekóma paradis na mokili mobimba. Nzambe alobaki ete Adam asengelaki kozala mokonzi ya libota. Eva asengelaki kosalana na boyokani elongo na ye lokola “mosungi abongi na ye.” Kasi Eva atombokelaki ebongiseli wana. Akamataki bokonzi ya mobali na ye mpe aboyaki kotosa mobeko bobele moko oyo Nzambe apesaki bango. Na nsima Adam atalaki mpamba bokonzi na ye moko mpe alandaki mwasi na ye kati na botomboki.—Genese 1:26 kino 3:6.
Matomba ya mabe na kotyolama ya bibongiseli wana ya Nzambe ebimaki nokinoki. Lokola bazalaki lisusu peto te mpo ete basalaki mabe, Adam na Eva baokaki nsoni mpe bazalaki na mayoki ya bato basali mabe. Adam oyo, na liboso, alobaki na ntina na mwasi na ye na maloba ya esengo mpe na maloba ya ntɔki, alobaki sikawa na mongongo molɛmbi ete ‘mwasi oyo yo opesaki ngai.’ Maloba wana ya kokweisa mazalaki bongo ebandeli ya mpasi kati na libota. Milende mpamba oyo Adam amekaki kosala mpo na kozwa lisusu bokonzi na ye, ezalaki bobele mpo na ‘koyangela mwasi na ye.’ Epai mosusu, “mposa” ya Eva oyo, na ntembe te, ezalaki makasi mpe elekaki ndelo, esengelaki kozala epai na mobali na ye.—Genese 2:23; 3:7-16.
Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete kozanga koyokana oyo ezalaki na libala ya Adam na Eva, ezali na bopusi mabe epai na bakitani na bango. Kaina, mwana na bango ya liboso, abomaki moto kozanga kooka mawa. (Genese 4:8) Lameke, mokitani ya Kaina, akólisaki kobeba ya libala na kozaláká mobali ya liboso oyo abalaki basi mingi. (Genese 4:19) Na yango, Adam na Eva bapesaki bobele lisumu mpe liwa te, kasi lisusu motindo na libota mabe, oyo bato basengelaki kolanda uta ntango wana. Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, kozanga koyokana kati na mabota esili kokóma na nivo oyo eleki ndelo.
Mabota ya esengo
Nzokande, mabota nyonso mazali kokwea te na mimekamo ya lelo oyo. Tala ndakisa ya mobali moko afandi na engumba moko moke ya États-Unis elongo na mwasi na ye mpe bana na bango mibale. Atako matata mazali kobima kati na baboti mpe bana na mabota mingi penepene na bango, nzokande ezali bongo te mpo na ye mpe mwasi na ye. Bazali komitungisa te na likambo oyo ete bana na bango bakomela drogue to bakosala pite. Lundi nyonso na mpokwa, wana bilenge mosusu bakangami mpo na kotala televizio, libota mobimba bafandi na salle à manger mpo na koyekola Biblia. Alimboli ete: “Tosili kobomba lundi nyonso na mpokwa ete tozala esika moko mpo na koyekola. Bana na biso ya basi bazali kokakatana te mpo na koyebisa biso mikakatano na bango.”
Epai mosusu, mwasi moko oyo azali kobɔkɔlo ye moko bana na ye mibale ya basi na New York, azali na bomoko makasi na libota na ye. Sɛkele na ye ezali nini? Alimboli ete: “Tofungolaka televizio bobele na wikende. Mokolo na mokolo, totalelaka mokapo moko ya Biblia. Tolekisaka mpokwa moko mpo na koyekola Biblia kati na libota.”
Mabota wana mibale mazali ya ba Témoins de Jéhovah. Bazali kolanda batoli oyo Biblia ezali kopesa na mabota, mpe bazali kolónga. Bazali bobele bango moko te. Lolenge moko na bango, bankóto ya mabota mingi mazali kozwa matomba malamu na kosaleláká mitinda mizwami na mokanda oyo kati na mabota na bango.b Kasi, tokoki koyeba mitinda yango? Mpe lolenge nini ekoki kozala litomba mpo na yo mpe mpo na libota na yo? Mpo na kozwa eyano, tosɛngi yo ete otanga masoló oyo mabandi na lokasa lolandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bilembeteli mosusu bimonisi ete mikolo ya nsuka mibandaki na 1914, tala mokapo 18 ya mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, oyo ebimisami na la Société Watchtower.
b Na nzela ya boyekoli ya Biblia kozanga kofuta mbonge, ba Témoins de Jéhovah bazali kosalisa mabota ete basalela mitinda ya Biblia. Mpo na yango, okoki kotinda mokanda epai na bakomi ye zulunalo oyo.
[Elilingi na lokasa 4]
Kati na mikili ya bobólá, mabota mazali kooka mpasi mpo na makambo ya nkita oyo esili kobeba
[Elilingi na lokasa 7]
Na kosaleláká mitinda ya Biblia, mabota mingi mazali kolónga mimekamo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
U.S. Navy photo