Tosalela Jéhovah na bosembo nyonso
“Epai na moto na sembo, [yo Jéhovah] okomimonisa sembo.”—2 SAMWELE 22:26, MN.
1. Lolenge nini Jéhovah azali kosala epai na baoyo bazali sembo epai na ye?
JéHOVAH akoki kofutama te na ntina na nyonso oyo azali kosala mpo na bolamu ya libota na ye. (Nzembo 116:12) Makabo na ye ya elimo mpe ya mosuni bakisa mpe mawa na ye ezali mpenza ya kokamwa Davidi, mokonzi ya Yisraele na kala, ayebaki ete Nzambe akosalaka mpe na sembo epai na baoyo bazali sembo epai na ye. Alobaki yango kati na nzembo oyo akomaki “na mokolo oyo Jéhovah asikolaki ye na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko [ya mokonzi] Saulo.”—2 Samwele 22:1.
2. Yebisa mwa makanisi oyo malobami kati na loyembo ya Davidi oyo ekomami na 2 Samwele mokapo 22?
2 Na ebandeli ya loyembo na ye (oyo ekokani na Nzembo 18), Davidi akumisi Jéhovah na kobengaka ye ete ‘Ye oyo azali kobikisa’ baoyo bazali kobondela ye. (2 Samwele 22:2-7) Uta na tempelo na ye ya likoló, Nzambe ayebi kosikola basaleli na ye ya sembo liboso na banguna na bango makasi. (Versets 8-19) Na bongo Davidi azwaki lifuti mpo ete azalaki komitambwisa na bosembo mpe azalaki kobatela banzela na Jéhovah. (Versets 20-27) Nsima ayebisi makambo oyo akokaki kosala na lisalisi ya nguya oyo Nzambe azalaki kopesa ye. (Versets 28-43) Na nsuka na yango, Davidi alobelaki kosikolama na maboko ya baoyo bazalaki kopamela ye kati na bato na ye, bakisa mpe banguna kati na bapaya; atondi Jéhovah, “Ye oyo azali kokembisa mokonzi na ye mpe komonisa boboto epai na mopakolami na ye.” (Versets 44-51) Jéhovah akoki kosikola biso mpe, soki tozali kosala na bosembo mpe soki tozali kotya motema epai na ye mpo na kozwa nguya.
Oyo elimboli kozala sembo
3 Engebene Biblia, kozala sembo elimboli nini?
3 Loyembo ya kosikolama na Davidi epesi biso elikya oyo ya kolendisa: “Epai na ye oyo azali sembo, [Jéhovah] okomimonisa sembo.” (2 Samwele 22:26, MN) Na Liebele, liloba cheʹsedh nde ezali libakemá oyo limonisi “ye oyo azali sembo,” to “oyo azali na boboto.” (Nzembo 18:25) Liloba cheʹsedh ezali kopesa likanisi ya malamu oyo ekangami na bolingo nyonso na eloko moko kino kokokisama ya mokano oyo molukami. Ezali malamu motindo wana nde Nzambe azali komonisa epai na basaleli na ye, na nsima bango mpe bazali komonisela ye yango. Bosembo wana ya solo mpe ya peto ebengami na maloba oyo ete “boboto” mpe “bolingo na sembo.” (Genese 20:13; 21:23) Kati na Makomami na greke, “bosembo” ezali kobimisa likanisi ya bosantu mpe ya kosambela, likanisi oyo limonisami na nkombo ho·si·oʹtes mpe na libakemá oyo ete ho·si·oʹtes. Ye oyo azali komonisa ezalela wana akomimonisa sembo, akomipesa mobimba, akobanga Nzambe mpe akokokisa malamu mpenza mikumba na ye liboso na Nzambe. Kozala sembo epai na Jéhovah, elimboli kokangama makasi epai na ye na komipesa mpenza lokola nde tokangisami na mpaka to kole moko makasi.
4.. Bosembo na Jéhovah ekomonanaka motindo nini?
4 Bosembo ya Jéhovah ezali komonana na mitindo mikeseni. Na ndakisa, azali kokamata meko mpo na kosambisa bato mabe na ntina na bolingo ya solo oyo azali kooka mpo na libota na ye mpe mpo na bokangami na ye na boyengebene mpe na kosambisa sembo. (Emoniseli 15:3, 4; 16:5) Bosembo na kondimana na ye elongo na Abalayama epusaki ye na kozala na motema molai epai na Bayisraele. (2 Mikonzi 13:23) Baoyo bazali sembo epai na Nzambe bakoki kolikya kozwa lisalisi na ye kino na nsuka ya bomoi na bango mpe kondimisama ete akobosana bango te. (Nzembo 37:27, 28; 97:10) Na yango, Yesu azwaki elendiseli na koyebaka ete molimo na ye, moto ya liboso ya “sembo” epai na Nzambe, ekotikama kati na Schéol te.—Nzembo 16:10; Misala 2:25, 27.
5. Mpo ete Jéhovah azali sembo, eloko nini azali kosenga epai na basaleli na ye, mpe likambo nini tokotalela?
5 Lokola Jéhovah Nzambe azali sembo, azali kosenga bosembo epai na basaleli na ye. (Baefese 4:24) Na ndakisa, moto asengeli kozala sembo mpo ete aponama nkulutu kati na lisangá. (Tito 1:8) Makambo nini masengeli kopusa libota na Jéhovah na kosalela ye na bosembo nyonso?
Botondi mpo na makambo oyo toyekoli
6. Solo mingi na Biblia oyo tosili koyekola esengeli kobimisa liyoki nini kati na biso, mpe nini tosengeli kobosana te na ntina na boyebi yango?
6 Botondi mpo na solo ya Biblia oyo toyekoli esengeli kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Ntóma Paulo apesaki toli oyo epai na Timoté ete: “Kasi yo, oumela kati na makambo eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani; mpe ete longwa na bomwana na yo, osili koyeba Makomi na bulee, makoki kopesa yo boyebi mpo na kobika na nzela na kondima kati na Klisto Yesu.” (2 Timoté 3:14, 15) Tobosana te ete ezali Nzambe nde apesaki biso boyebi yango na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.”—Matai 24:45-47.
7. Bankulutu basengeli kozala na liyoki nini na ntina na bilei ya elimo oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya moombo na sembo?
7 Mingi mpenza bankulutu basengeli komonisa botondi na bilei kitoko ya elimo oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya moombo na sembo. Esili koleka mwa mibu, bankulutu mosusu bazangaki botondi mpo na bilei yango; moklisto mwasi moko amonaki ete mibali yango bazalaki “kotonga masolo ya Mosenzeli, koboyaka kondima zulunalo yango lokola nzela esalelami na Jéhovah mpo na kopalanganisa solo, mpe bazalaki koluka kobenda bandeko ete bandima likanisi na bango.” Nzokande, bankulutu oyo bazali sembo bamekaka soko moke te kobenda bato mosusu ete babwaka ndambo na bilei ya elimo oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya moombo na sembo.
8. Likambo nini tosengeli kosala soki tozali kosimba sikisiki te ndimbola moko ya Biblia epesami na moombo na sembo mpe na mayele?
8 Lokola ba Témoins de Jéhovah oyo bamipesi, biso nyonso tosengeli kozala sembo epai na ye mpe na lisangá na ye. Tosengeli soko moke te kokana kotika pole kitoko na Nzambe na komikotisa kati na nzela ya lipengwi oyo ekoki komema biso na kufa ya elimo mpe na libebi ya seko. (Yilimia 17:13) Kasi tosengeli kosala nini soki tozali na nkaka mpo na kondima to mpo na koyeba malamu bandimbola mosusu ya Biblia oyo epesami na moombo na sembo? Na yango, na komikitisa nyonso, tondima epai wapi toyekolaki solo mpe tobondela Nzambe ete apesa biso mayele masengeli mpo na kolonga momekamo wana kino nyonso ekosila na ntango bakobimisa polele ndimbola etali makambo yango.—Yakobo 1:5-8.
Botondi mpo na bondeko ya boklisto
9. Lolenge nini 1 Yoane 1:3-6 ezali komonisa ete elimo ya bondeko esengeli komonana kati na baklisto?
9 Botondi mozindo mpo na elimo ya bondeko oyo ezali komonana kati na libota ya bandeko na biso baklisto ezali kopesa biso ntina mosusu ya kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Ya solo, tokoki kozala na boyokani malamu te elongo na Nzambe mpe Klisto soki elimo wana ezali te kati na biso. Ntóma Yoane alobaki epai na baklisto bapakolami ete: “Yango esili biso komona mpe koyoka, tozali kosakwela bino yango na ntina ete bino bozala esika moko na biso [“Bozala na bomoko,” Jérusalem]. Biso mpe tozali esika moko na Tata mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto. . . . Soko tokolobaka ete tozali na ye na lisangana nde tokotambolaka naino kati na molili, tozali kobuka lokuta mpe tokosalaka misala na solo te.” (1 Yoane 1:3-6) Lilako oyo litali baklisto nyonso, ata elikya na bango ezali na likoló to na mabelé.
10. Lolenge nini Paulo azalaki kotalela Ewodia mpe Suntuke, atako bazalaki na nkaka mpo na kosilisa matata na bango?
10 Tosengeli kosala milende mpo na kobatela elimo ya bondeko. Ezali yango emonisami na likambo ya Ewodia mpe Suntuke. Emonani lokola ete baklisto basi wana mibale bazalaki na nkaka mpo na kosilisa matata na bango. Bongo Paulo apesaki bango toli ete “bayokana kati na Nkolo.” Abakisaki ete: “Nabondeli yo mpe, mozalani na solo na ngai kati na mosala ete osunga basi oyo, mpo ete basalaki mosala esika moko na ngai kati na nsango malamu, na Kelementi elongo mpe na basalani mosusu na ngai baoyo nkombo na bango ezali kati na mokanda na bomoi.” (Bafilipi 4:2, 3) Basi wana bazalaki kobanga Nzambe, basalanaki na Paulo mpe na basusu elongo “kati na nsango malamu,” mpe Paulo andimisamaki ete batangamaki kati na baoyo ‘nkombo na bango ezali kati na mokanda na bomoi.’
11. Soki ekomeli moklisto moko ya sembo ete azwi mokakatano kati na elimo, nini tokoki kobosana te?
11 Baklisto bakolataka elembo moko te oyo emonisi mikumba na bango kati na lisangá ya Jéhovah to bosembo na bango epai ya Jéhovah. Soki bazwi mokakatano kati na elimo, ekozala mpenza komonisa motema makasi soki tokangi miso likoló na mbula mingi ya mosala na bango ya sembo mpo na Jéhovah! Ye oyo Paulo azali kobenga “mozalani na solo kati na mosala” asengelaki kozala mpenza moklisto ya sembo, oyo azali pene na kosalisa bato mosusu. Soki ozali nkulutu, ozali mpenza “mozalani na solo kati na mosala,” oyo azali pene na kopesa lisalisi na motema mawa? Na ndakisa ya Nzambe, totalela mpenza makambo malamu masalemi na baninga na biso, mpe tosalisaka bango na bolingo nyonso ete bamema mikumba na bango.—Bagalatia 6:2; Baebele 6:10.
Esika mosusu ya kokende ezali te
12. Ntango maloba na Yesu mapusaki ‘mingi na bayekoli na ye na kozongela makambo oyo basilaki kotika,’ Petelo azwaki etelemelo nini?
12 Tokopusama na kosalela Jéhovah mpe lisanga naye na bosembo nyonso soki toyebi ete esika mosusu ya kokende ezali te mpo na kozwa bomoi ya seko. Ntango maloba na ye mapusaki ‘mingi kati na bayekoli na ye na kozongela makambo basilaki kotika,’ Yesu atunaki epai na bantoma na ye ete: “Bino mpe bolingi kokende?” Petelo ayanolaki ye ete: “Nkolo, tokokende epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko. Biso mpe tondimi mpe toyebi ete, Yo ozali Mobulami na Nzambe.”—Yoane 6:66-69.
13, 14. (a) Mpo na nini lingomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso endimamaki epai na Nzambe te? (b) Témoin de Jéhovah moko oyo aumeli mbula mingi kati na lisangá alobaki nini na ntina na lisangá na Jéhovah awa na mabelé?
13 Bakokaki te kozwa “maloba na bomoi na seko” kati na lingomba ya Bayuda ya ekeke na liboso ya ntango na biso. Lisumu na bango monene ezalaki ete baboyaki kondima Yesu lokola Masiya. Liteya moko te ya lingomba na Bayuda litongamaki mpenza likoló na Makomami na Liebele. Basadukai bandimaki te ete baanzelu bazali mpe bazalaki kondima lisekwa te. Atako bazalaki na likanisi motindo moko te na ntina na makambo wana, Bafalisai bazalaki kosala lisumu na kokitisaka nguya ya Liloba na Nzambe na ntina na mateya na bango mauti na Biblia te. (Matai 15:1-11; Misala 23:6-9) Mateya yango matyaki Bayuda na boombo mpe likoló na yango, mingi bazalaki na nkaka mpo na kondima Yesu Klisto. (Bakolose 2:8) Na yango, ezali molende mpo na ‘mateya ya batata na ye’ nde epusaki Saulo (Paulo), na kozanga koyeba, ete azala monyokoli monene ya bayekoli ya Klisto.—Bagalatia 1:13, 14, 23.
14 Lingomba ya Bayuda lindimamaki na Nzambe te, nzokande Jéhovah azalaki kopambola lisangá lisalemaki na bayekoli ya Mwana na ye—‘libota na molende mpo na misala malamu.’ (Tito 2:14) Lisangá wana lizali kino lelo, mpe mpo na yango, tala oyo elobaki Témoin de Jéhovah moko oyo aumeli mbula mingi kati na lisangá: “Soki eloko moko, eloko bobele moko, ezalaki na ntina mpo na ngai, ezali bongo bokangami na ngai na lisangá ya Jéhovah awa na mabelé. Makambo oyo nakutanaki na yango mateyaki ngai uta ebandeli ete ezali libunga monene na komitika kotambwisama na makanisi ya bato. Wana likanisi na ngai epikamaki likoló na likambo yango, nazwaki ekateli ya kotika lisangá na sembo ya Jéhovah te. Lolenge mosusu nini tokoki kondimama mpe kozwa lipamboli na Jéhovah?” Ezali na lisangá mosusu te epai tosengeli kokende mpo na kondimama epai na Nzambe mpe kozwa bomoi na seko.
15. Mpo na nini tosengeli kosala elongo na lisangá ya Nzambe awa na ma le mpe na baoyo bazali na mikumba kati na yango?
15 Motema na biso esengeli kopusa biso na kosala na boyokani elongo na lisangá na Jéhovah mpamba te toyebi ete yango etambwisami na elimo na ye mpe ezali kosakola nkombo na ye mpe mikano na ye. Ya solo, baoyo bazali na mikumba kati na yango bazangi kokoka. (Baloma 5:12) Kasi “nkanda na Jéhovah epelelaki” Alona mpe Miliame ntango batongaki Moize mpe babosanaki ete ezalaki ye, kasi bango te, nde bapesamelaki mokumba. (Mituya 12:7-9) Na mikolo na biso, baklisto na sembo bazali kosala na boyokani elongo na ‘baoyo bazali na motó na bango’ mpamba te ezali yango nde Jéhovah azali kosenga. (Baebele 13:7, 17) Tozali komonisa bosembo na biso, kati na makambo mosusu, na koyanganaka mbala na mbala na makita ya boklisto mpe na kopesaka bakomantere oyo ‘ezali kopusa basusu kati na bolingo mpe na misala malamu.’—Baebele 10:24, 25.
Mposa ya kolendisa bato mosusu
16. Mposa nini esengeli lisusu kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso?
16 Mposa ya kozala liziba na elendiseli mpo na bato mosusu esengeli mpe kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Paulo akomaki ete: “Boyebi ekovimbisa moto na lolendo nde bolingo ekolendisaka.” (1 Bakolinti 8:1) Mpo ete lolenge na boyebi mosusu ezalaki kovimbisa baoyo bazalaki na yango, na ntembe te Paulo alingaki koloba ete bolingo ezali ezaleli oyo ezali mpe kolendisa baoyo bazali komonisa yango. Na ntina yango, tala oyo tokoki kotanga na oyo molakisi Weiss mpe molakisi English bakomaki ete: “Ye oyo azali kolinga bato, mbala mingi ye mpe akolingamaka. Likoki ya komimonisa na boboto mpe na mposa ya kosalisa bato kati na makambo nyonso ya bomoi . . . ezali na litomba malamu likoló na moto oyo azali komonisa mayoki yango mpe likoló na moto oyo basaleli ye yango, mpe ezali bongo kopesa esengo epai na bango mibale.” Na komonisaka bolingo, tozali kolendisa basusu mpe tozali komilendisa biso moko, lokola yango emonisami na maloba oyo na Yesu ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.”—Misala 20:35.
17. Lolenge nini bolingo ezali kolendisa mpe ekopekisa biso na kosala nini?
17 Na 1 Bakolinti 8:1, Paulo asaleli liloba na greke a-ga‘pe, oyo emonisi bolingo etongami likoló na mibeko. Bolingo yango ezali kolendisa, mpamba te ezali na motema molai mpe na malamu, ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka makambo nyonso, ekoyikelaka makambo nyonso mpiko mpe ekosuka te. Bolingo wana ezali kolimwisa mayoki nyonso ya mabe, lokola lolendo mpe zuwa. (1 Bakolinti 13:4-8) Ezali kopekisa biso ete toimaima te mpo na bandeko na biso, baoyo bazangi kokoka lokola biso. Ezali kopekisa biso ete tokokana te na “bato na mbindo” oyo “bamikotisaki” kati na baklisto ya solo na ekeke ya liboso. Bato yango ‘bazalaki kotyola bokonzi mpe bazalaki kotuka mibali na nkembo,’ na ntembe te kolobaka mabe na ntina na bakengeli baklisto, bapakolami na elimo, baoyo bapesamelaki mwa nkembo. (Yuda 3, 4, 8) Mpo na bosembo epai na Jéhovah, topesa nzela soko moke te na lisenginya ya kosala ata likambo nini ya motindo wana.
Kotemela Diable
18. Likambo nini Satana alingi kosala epai na basaleli ya Jéhovah, kasi mpo na nini akoki kolonga te?
18 Koyeba ete Satana azali koluka kobebisa bomoko ya libota na Nzambe esengeli kopesa biso ekateli makasi ya kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Satana azali mpenza na mposa ya koboma libota na Nzambe mobimba, mpe mbala mosusu basaleli na ye awa na mabelé bazali nkutu koboma basambeli ya solo. Kasi Nzambe akotika te ete Satana asilisa bango nyonso. Yesu akufaki mpo na ‘kobebisa ye oyo azali na bokonzi na kopesa kufa, ye Diable.’ (Baebele 2:14) Nguya na Satana ekitisamaki uta babengnaki ye longwa na likoló, nsima wana Klisto akomaki mokonzi na 1914. Mpe na elaká etyami na Jéhovah Yesu akoboma Satana mpe lisangá na ye.
19. (a) Esili koleka mbula mingi, likebisi nini zulunalo oyo epesaki na ntina na Satana? (b) Mpo ete tokwea te kati na mitambo ya Satana, tosengeli kokeba na likambo nini kati na boyokani un biso elongo na baninga na biso baklisto.
19 Kala, zulunalo oyo epesaki likebisi oyo ete: “Soki Satan le diable alongi kokotisa mobulu kati na libota na Nzambe mpe soki alongi kobimisa koswana mpe matata to kosala mpe kokolisa bibongiseli ya moimi oyo bikoki kobebisa bolingo ya bondeko, boye akolonga koboma bango.” (La Tour de Garde, janvier 1922, lokasa 40) Totika te ete diable abebisa bomoko na biso, mbala mosusu na kobendaka biso na kotongana to na kobundisama. (Levitike 19:16) Tika ete Satana alonga te na kozimbisa biso na kopusa biso ete topesa mpasi epai na baoyo bazali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso to mpe koyeisa mikakatano mingi kati na bomoi na bango. (Tala 2 Bakolinti 2:10, 11.) Tolanda nde toli oyo ya Petelo: “Bomisenzela, bolala mpongi te; motemeli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soko akolya nani. Botemela ye ngwi mpo na kondima.” (1 Petelo 5:8, 9) Na kotemelaka Satana, tokoki kobatela bomoko oyo tozali na esengo ya kozwa kati na libota na Jéhovah.—Nzembo 133:1-3.
Libondeli mpe elikya epai na Nzambe
20, 21. Lolenge nini libondeli mpe elikya epai na Jéhovah ezali kosalisa biso na kosalela ye na bosembo nyonso?
20 Libondeli mpe elikya epai na Nzambe ekosalisa biso na kolanda kosalela Jéhovah na bosembo nyonso. Ntango tozali komona ete azali kondima mabondeli na biso, tozali komiyoka lisusu penepene na ye mpenza. Ntóma Paulo alendisaki baklisto ete babondelaka mpe bazala na elikya epai na Jéhovah Nzambe ntango akomaki ete: “Bongo nalingi ete mibali babondelaka na bisika nyonso, wana ekotombola bango maboko mazangi nkanda mpe kowelana.” (1 Timoté 2:8) Yango wana, ezali na ntina mingi koleka ete bankulutu babondela Nzambe mpe batya motema likoló na ye. Na komonisaka na motindo wana bosembo na bango epai na Jéhovah ntango bazali koyangana mpo na kotalela makambo matali lisangá, ekozala na bango mpasi te na kopengola ntembe milai mpe nkanda oyo ekoki kobima na nsima.
21 Libondeli mpe elikya epai na Jéhovah Nzambe ezali kosalisa biso na kokokisa mikumba oyo mipesameli biso kati na mosala na ye. Nsima na kosalela Jéhovah na boumeli ya mibu mingi, moklisto moko alobaki ete: “Kondimá na bolingo malamu mokumba oyo epesameli biso kati na lisangá ya mokili mobimba ya Nzambe mpe mposa ya kokangama ntango nyonso makasi na mosala na biso, ezali mpenza kobenda ngolu ya Jéhovah likoló na milende na biso. Ata soki mokumba oyo epesameli biso ezali ya moke mpenza, mbala mingi misala misusu ya ntina mikokokisama te soki oyo ya biso ya moke ekokisami te na bosembo nyonso. Na bongo soki tozali na ezaleli ya komikitisa mpe soki tozali mpenza kotya kokumisama ya nkombo na Jéhovah na esika ya liboso, nde oyo ya biso te, tokoki kondimisama ete ‘tokotelema ngwi, tokoningana te, tokozala ntango nyonso na mosala mingi kati na Nkolo.’”—1 Bakolinti 15:58.
22. Bolamu mingi oyo Jéhovah azali kopesa biso esengeli kozala na bopusi nini likoló na bosembo na biso?
22 Ata mokumba nini tozali kokokisa katina mosala na Jéhovah, tokoki mpenza te kofuta oyo ye azali kosalela biso. Tozaló mpenza na libateli, tozingami na bato oyo bazali baninga na ye, kati na lisangá na ye. (Yakobo 2:23) Jéhovah azali kopambola biso na kopesaka biso bomoko oyo bozali kouta na bolingo bozindo ya bondeko oyo Satana akoki kobotola biso yango te. Na bongo, tokangama na Tata na biso ya sembo ya likoló mpe tosala elongo na libota na ye. Tosalela Jéhovah na bosembo nyonso uta sikawa mpe mpo na libela.
Bozongeli
◻ Kozala sembo elimboli nini?
◻ Makambo nini mosengeli kopusa biso na kosalela Jéhovah na bosembo nyonso?
◻ Mpo na nini tosengeli kotemela Diable?
◻ Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso na kozala basaleli ya sembo ya Jéhovah?
[Elilingi na lokasa 23]
Basaleli yo sembo yo Jéhovah bazali kotika te ete Diable, monguna na bango oyo akokani na nkosi, abebisa bomoko na bango