Tosalela Jéhovah ma elimo ya komipesa
“Soko nani alingi koya nsima na ngai, tika amiboya ye moko mpe atombola nzeté na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.“—MATAI 16:24.
1. Lolenge nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye liwa oyo asengelaki kokufa?
NA ELILI ya Ngomba Helemone oyo ezipami na mbula mpembe, Yesu Klisto akomi na eleko moko ya ntina mingi kati na bomoi na ye. Bomoi na ye ekoumela lisusu mbula mobimba te. Ye ayebi yango, kasi bayekoli na ye bayebi yango te. Sikawa ntango ekoki mpo ete bayeba yango. Ya solo, Yesu asili kolobela bango na ntina ya liwa oyo ezalaki kozela ye, kasi oyo ezali mbala ya liboso ete alobela bango yango polele. (Matai 9:15; 12:40) Tozali kotanga kati na lisoló ya Matai ete: “Longwa ntango wana, Yesu Klisto abandaki komonisa na bayekoli na ye ete ekoki na ye kokende na Yelusaleme mpe koyoka mpasi mpo na makambo mingi epai na mikolo na mboka mpe banganga minene mpe bakomeli mpe kobomama, nde nsima na mikolo misato kosekwa na kufa.”—Matai 16:21; Malako 8:31, 32.
2. Petelo asalaki nini ntango ayokaki maloba na Yesu na ntina na mpasi oyo asengelaki komona, mpe Yesu alobaki nini?
2 Mikolo na Yesu mitikali lisusu mingi te. Nzokande, Petelo aboyi kondima likanisi wana ya nsomo. Akoki kondima te ete Masiya akoka mpenza kobomama. Yango wana ameki kopamela Nkolo na ye, Lokola apusami na makanisi malamu, angangi ete: “Soko moke te, Nkolo! Oyo ekokomela yo te!” Kasi, na ekateli ya makasi lokola oyo moto akosalela mpo na konyata moto na nyoka mabe, apameli Petelo mpo na boboto oyo amonisi na esika esengeli yango te. “Kenda nsima na ngai, Satana! Ozali libaku liboso na ngai mpo ete ozali kokanisa lokola Nzambe te kasi lokola bato.”—Matai 16:22, 23.
3. (a) Lolenge nini Petelo akomaki esaleli ya Satana, kozanga ete ayeba yango? (b) Lolenge nini Petelo azalaki libaku na nzela ya komipesa?
3 Kozanga ete ayeba yango, Petelo amikomisaki esaleli ya Satana. Yesu azongiseli ye kozanga kokakatana, lokola asalaki yango kati na ntembe elongo na Satana, na mokili mokauki. Satana amekaki bongo kosenginya Yesu ntango alakelaki ye bomoi ezangi mpasi, kozwa bokonzi kozanga ete anyokwama. (Matai 4:1-10) Sikawa Petelo nde azali kolendisa ye ete azala na makambo makasi te epai na ye moko. Yesu ayebi ete yango ezali mokano na Tata na ye te. Bomoi na ye esengeli kozala bomoi ya bisengo te, kasi ya komipesa to komiboya. (Matai 20:28) Nzokande, Petelo azali kopekisa ye lolenge ya etamboli yango, akomi libaku; azali na mokano malamu, kasi kookela mawa oyo amonisi ebongwani na motambo.a Nzokande, Yesu amoni polele ete soki abandi kokanisa kozala na bomoi ezangi mpasi, akobungisa ngolu na Nzambe mpamba te akoki kozwama na motambo ya libebi ya Satana.
4. Mpo na nini bomoi ya bisengo mpe ya bozwi ezalaki mpo na Yesu mpe bayekoli na ye te?
4 Esengelaki kosembola likanisi ya Petelo. Makambo oyo alobelaki Yesu mazalaki komonisa makanisi ya bato kasi oyo ya Nzambe te. Bomoi ya bisengo, ya bozwi mpe oyo ezangi mitungisi, kozanga mpasi ezalaki mpo na Yesu te, to mpo na bayekoli na ye te, mpamba te nsima alobaki na Petelo mpe na bayekoli mosusu ete: “Soko nani alingi koya nsima na ngai, tika ete amiboya ye moko mpe atombola nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.”—Matai 16:24.
5. (a) Mpo na nini kozala moklisto ezali mpasi mingi? (b) Tanga makambo misato ya ntina oyo moklisto asengeli kozala pene ya kosala?
5 Mbala na mbala, Yesu azongelaki likanisi oyo ya ntina mingi: mokakatano monene ya kozala na bomoi ya moklisto. Mpo na kozala bayekoli na Yesu, baklisto basengeli, lokola Nkolo na bango, kosalela Jéhovah na elimo ya komipesa. (Matai 10:37-39) Yango wana Yesu atangi makambo misato oyo moklisto asengeli kozala pene ya kosala: (1) komiboya ye moko, (2) kotombola nzete na ye ya mpasi mpe (3) kolanda ye ntango nyonso.
“Soko nani alingi koya nsima na ngai”
6. (a) Lolenge nini moto akoki komiboya? (b) Tosengeli kosepelisa nani koleka biso moko?
6 Komiboya yo moko elimboli nini? Elingi koloba ete moto asengeli kotika makambo nyonso matali ye, ezali lokola nde bomoto na ye ekufi. Ndimbola ya liboso ya liloba ya Greke oyo ebongolami “komiboya” ezali “koloba ete: te”; elimboli “koboya mobimba.” Na yango, moto oyo andimi bomoi ya mpasi ya moklisto asengeli kotika na bolingo na ye moko mikano na ye, bomoi na ye ya bozwi, bamposa na ye, bolamu na ye mpe bisengo na ye. Elimboli ete, apesi bomoi na ye mpo na libela, lokola likabo epai na Jéhovah Nzambe. Komiboya elimboli bobele te komipimela bisengo na bantango mosusu. Elimboli ete tosengeli kondima ete bomoi na biso ezali lisusu ya biso te, kasi ya Jéhovah. (1 Bakolinti 6:19, 20) Ye oyo amiboyi azali kobika mpo na komisepelisa ye moko te, kasi mpo na kosepelisa Nzembe. (Baloma 14:8; 15:3) Elimboli ete asengeli ntango nyonso kati na bomoi na ye koloba ete Te na bamposa na ye ya moimi, mpe koloba Ɛɛ epai na Jéhovah.
7. Nzeté ya mpasi ya moklisto ezali nini, mpe lolenge nini azali komema yango?
7 Kotombola nzete na yo ya mpasi esengi bongo makambo mingi. Kokumba nzete ezali mokumba mpe elembo ya kufa. Soko esengeli, moklisto azali pene na kooka mpasi mpe nsoni, konyokwama mpe ata kokufa mpo ete azali kolanda Yesu Klisto, oyo alobaki ete: “Ye oyo azangi kotombola nzete na ye ya mpasi mpe kolanda nsima na ngai, abongi na ngai te.” (Matai 10:38) Baoyo nyonso bazali konyokwama bazali komema nzete na mpasi te. Moto mabe azali komona “mpasi mingi” kasi azali komema nzete na mpasi te. (Nzembo 32:10) Nzokande, nzete ya mpasi oyo moklisto azali komema, ezali bomoi ya komipesa mpo na mosala ya Jéhovah.
8. Ndakisa nini ya bomoi Yesu atikelaki bayekoli na ye?
8 Lisengami ya nsuka oyo Yesu alobeli ezali ete tosengeli kolanda ye ntango nyonso. Yesu asengi, bobele te ete toyamba mateya na ye mpe tondima yango, kasi lisusu, tolanda na boumeli ya bomoi na biso mobimba, ndakisa oyo atikelaki biso. Na yango, makambo nini mazalaki na ntina mingi kati na bomoi na ye? Liboso na kotika bayekoli na ye, Yesu apesaki bango mokumba oyo, ntango alobaki ete: “Boye bokende kozalisa bayekoli ..., kolakisa mpe bango ete batosa nyonso oyo esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Yesu asakolaki mpe ateyaki nsango malamu ya Bokonzi. Bayekoli na ye ya ntango wana, mpe, ya solo, lisangá mobimba ya ekeke ya liboso, basalaki bongo. Mpo ete bazalaki na molende kati na mosala wana, mpe mpo ete basanganaki na mokili te, mokili eyinaki bango mpe ezalaki kotemela bango, likambo oyo likómisaki nzeté na bango ya mpasi bozito mingi.—Yoane 15:19, 20; Misala 8:4.
9. Lolenge nini Yesu asalaki epai na bato mosusu?
9 Likambo mosusu ya ntina mingi kati na bomoi ya Yesu ezali lolenge na ye ya komitambwisa epai na bato. Azalaki moto malamu, moto “na bopolo mpe na motema mosokemi.” Yango wana, baoyo bazalaki koyoka ye bazalaki kooka ete elimo na bango ezali kokóma ya sika mpe kozala elongo na ye ezalaki kolendisa bango. (Matai 11:29) Apusaki bango na kolanda ye na makasi te mpe apesaki ebele na mibeko te mpo na kosala yango; atungisaki mpe lisosoli na bango te mpo na kopusa bango na kokoma bayekoli na ye. Atako bazalaki na bomoi ya komipesa, batondaki na esengo ya solo. Oyo nde bakeseni monene elongo na baoyo bazali komonisa lelo elimo ya koluka bisengo ya mokili, mpe oyo emonisi “mikolo ya nsuka”!—2 Timoté 3:1-4.
Tolona mpe tobatela elimo ya komipesa oyo ezalaki na Yesu
10. (a) Engebene Bafilipi 2:5-8, lolenge nini Klisto amiboyaki ye moko? (b) Soko ozali moyekoli na Klisto, osengeli komonisa elimo nini?
10 Yesu apesaki ndakisa mpo na oyo etali komiboya. Akamataki nzeté na ye ya mpasi mpe akumbaki yango ntango nyonso na kosaláká mokano na Tata na ye. Paulo akomaki epai na baklisto ya Filipi ete: “Bokanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu. Ata azalaki na motindo na Nzambe, atangaki te ete ameka kokokana na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge na bato. Ezwami ye na motindo na moto, amisokisi mpe atosi kino kufa, ee, kino kufa na nzeté na mpasi.” (Bafilipi 2:5-8) Nani oyo akoki mpenza komiboya na motindo yango? Soki tozali bato na Yesu Klisto mpe bayekoli na ye, tosengeli kobatela elimo motindo moko.
11. Kozala na bomoi ya komipesa elimboli ete tozali kobika mpo na kosala mokano na nani?
11 Ntoma mosusu, Petelo, alobeli biso ete lokola Yesu anyokwamaki mpe akufaki mpo na biso, baklisto basengeli kolata, lokola basoda oyo bamibongisi malamu, elimo oyo ezalaki na Klisto. Akomi ete: “Bongo awa esili Klisto koyoka mpasi, bino mpe bomilatisa mokano na motindo moko. Mpo ete ye oyo asili koyoka mpasi na nzoto asili kotika lisumu, ete alekisa ntango etikali na ye na nzoto kobila mposa mabe na bato lisusu te kasi kobila mokano na Nzambe.” (1 Petelo 3:18; 4:1, 2) Bomoi ya komipesa oyo Yesu azalaki na yango emonisi oyo azalaki kokanisa na ntina yango. Amonisaki bakangami ya makasi epai na Tata na ye, na kotyaka mokano na Tata na ye liboso na oyo ya ye moko, kino kokufa liwa ya nsoni.—Matai 6:10; Luka 22:42.
12. Yesu amonaki ete bomoi ya komipesa ekoki na ye te? Limbola eyano na yo.
12 Atako bomoi ya komipesa ezalaki nzela moko ya nkaka mpe ya komekama mingi, amonaki te ete yango ezali likambo akoki kosala te. Nkutu, Yesu azalaki kosepela kotosa mokano na Nzambe. Mpo na ye, kosala mokano na Tata na ye ezalaki lokola bilei. Azalaki mpenza kosepela na yango, lokola bosepeli oyo moto akoki kozwa na bilei ya malamu. (Matai 4:4; Yoane 4:34) Na yango, soko olingi kozala na bomoi ya matomba mingi, likambo lileki malamu ezali ya kolanda ndakisa na Yesu Klisto na kolona elimo oyo azalaki na yango.
13. Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo nde ezali kobimisa elimo ya komipesa?
13 Kasi, nini ezali mpenza kobimisa elimo ya komipesa? Na liloba moko: bolingo. Yesu alobaki ete: “ˈOkolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.ˈ Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete: ˈOkolinga mozalani na yo lokola yo moko.ˈ” (Matai 22:37-39) Moklisto asengeli te koluka matomba na ye moko mpe, bobele na ntango yango kotosa maloba oyo. Esengo mpe matomba na ye matambwisami, liboso na nyonso, na bolingo na ye epai na Jéhovah mpe na bolingo ya bazalani na ye. Ezali na motindo yango nde Yesu atambolaki, mpe ezali yango likambo azali kozela epai na bayekoli na ye.
14. (a) Mikumba nini milobelami kati na Baebele 13:15, 16? (b) Nini ezali kotinda biso na kosakola nsango malamu na molende nyonso?
14 Ntoma Paulo asosolaki ntina ya mobeko wana ya bolingo. Akomaki ete: “Bongo mpo na ye, totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye. Bobosana te kosala boboto mpe kokabela bamosusu biloko mpo ete Nzambe akosepela mbeka na motindo yango.” (Baebele 13:15, 16) Baklisto bazali kotombwela Jéhovah mbeka ya nyama to mbeka mosusu te; mpo na yango bazali na mposa te ya banganga oyo bazali kosala kati na tempelo ya mosuni mpo na kokokisa losambo na bango. Tozali kopesa mbeka na masanzoli na biso na nzela na Yesu Klisto. Mpe ezali mingi mpenza na nzela ya mbeka wana ya masanzoli, ya eyambweli yango mpo na nkombo na ye, nde tozali komonisa bolingo mpo na Nzambe. Elimo na biso ezangi moimi, oyo ezali na misisa makasi kati na bolingo, ezali kopusa biso mingi mpenza na kosakola nsango malamu na molende, wana tozali kosala makasi ete tozala ntango nyonso pene ya kopesa Nzambe mbeka ya mbuma ya bibebu na biso. Bongo, tokomonisa mpe bolingo ya bazalani na biso.
Elimo ya komipesa ezali komema mapamboli mingi
15. Mituna nini ya mozindo tosengeli komituna na ntina na elimo ya komipesa?
15 Tozwa mwa ntango ya kokanisa na mituna oyo milandi: bomoi oyo nazali na yango ezali ya komipesa? Mikano oyo namityeli kati na bomoi mizali komonisa yango? Basangani ya libota na ngai bazali kozwa litomba ya elimo na ndakisa oyo nazali kopesa? (Tala 1 Timoté 5:8.) Tokoloba nini na ntina na bitike mpe basi bakufeli mibali? Elimo na ngai ya komipesa ezali kopesa bango mpe matomba? (Yakobo 1:27) Nakoki nde kobakisa ntango oyo nazali kopesa lokola mbeka ya masanzoli? Nakoki nde kokolisa mabaku na ngai ya mosala na komonisaka mposa ya kosala mosala ya pionnier, mosala ya Béthel, mosala ya misionere to kokende na etuka epai mposa na basakoli ezali mingi mpenza?
16. Lolenge nini kozala na mayele ekoki kosalisa biso na kozala na bomoi ya komipesa?
16 Mbala mosusu esengeli mwa mayele mpo na kosalela malamu makoki na biso nyonso mpo na kosalela Jéhovah na elimo ya komipesa. Na ndakisa, Janet oyo azali ndeko mwasi pionnier permanent na mboka Equateur, azalaki kosala mosala ya mosuni oyo ezalaki kozwa mokolo na ye mobimba. Kasi, na ntina na mosala na ye, aumelaki te kokutana na mikakatano ya kokokisa na esengo nyonso motuya ya ngonga esengami na ba pionniers permanents. Azwaki ekateli ya komonisa likambo yango na patron na ye mpe asengaki ete bakitisa motuya na bangonga na ye ya mosala. Lokola patron andimaki likanisi yango te, alakisaki ye Maria oyo azalaki koluka mosala ya ndambo ya mokolo mpo akoka kozala pionnier. Bapesaki makanisi ya kosala, moto na moto ndambo ya mokolo mpe kokokisa mosala ya mokolo mobimba. Patron andimaki likanisi yango. Lelo oyo, bandeko basi wana baklisto bazali ba pionniers permanents. Ntango amonaki matomba malamu na yango, Kaffa, oyo azalaki kosala mosala mokolo mobimba bobele na kompanyi yango, mpe azalaki kolemba mingi mpo na kokokisa motuya na bangonga na ye ya pionnier permanent, ayaki na Magali mpe apesaki likanisi se moko wana, oyo mpe endimamaki. Na yango, uta ntango wana bandeko basi baklisto minei bazali ba pionniers, na esika ete ezala bandeko mibale, baoyo balingaki kotika mosala yango. Matomba oyo malamu mazwamaki mpo ete bandeko basi oyo bamonisaki mayele mpe elimo ya kolukaluka.
17-21. Lolenge nini mobali moko mpe mwasi na ye batalelaki lisusu mikano oyo bamitielaki kati na bomoi, mpe epesaki
17 Totalela mpe nzela ya komipesa oyo Evonne alandaki na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka. Tala mokanda oyo akomelaki la Société Watch Tower na Mai 1991:
18 “Na Octobre 1982, ngai mpe libota na ngai tokendeki kotala Bethel ya Brooklyn. Makambo oyo namonaki epesaki ngai mposa ya kokende kosala kuna. Natangaki formulaire mpo na kokota na Bethel; batunaki motuna moko ya ntina: ˈMwayene ya bangonga oyo opesaki na mosala ya kosakola na boumeli ya basanza motoba ezali boni? Soki mwayene ya bangonga ezali na nse ya zomi, limbola mpo na nini.ˈ Namonaki ntina mpenza ya malamu te, yango wana namityelaki mokano moko, oyo nakokisaki yango na boumeli ya sanza mitano.
19 “Atako namizwelaki mwa bantina ya kozanga kosala mosala ya pionnier, nzokande ntango natangaki Annuaire des Témoins de Jehovah 1983, nandimisamaki ete basusu balongaki mikakatano minene koleka ya ngai, mpo bakoka kozala ba pionniers. Yango wana na le 1er Avril 1983, natikaki mosala na ngai ya matomba mingi oyo ezalaki kozwa ngai mokolo mobimba, mpo nakoma pionnier auxilliaire; na le 1er Septembre 1983 nakomaki pionnier permanent.
20 “Na nsima, nazwaki esengo ya kobala serviteur ministeriel moko ya molende, na Avril 1985. Mbula misato na nsima, na boumeli ya diskur moko ya assemblée de district, oyo etalaki mosala ya pionnier, mobali na ngai apusanaki penepene na matoi na ngai mpe atunaki ngai ete: ˈOmoni ntina moko mpo na yango nakoki te kobanda mosala ya pionnier na le 1er Septembre?ˈ Ayaki kosangana na mosala ya pionnier elongo na ngai na boumeli ya mibu mibale oyo elandaki.
21 “Mobali na ngai asanganaki mpe na mosala ya botongi na Bethel ya Brooklyn mpo na baposo mibale, mpe asengaki mpo na kokota na Programme ya la Société mpo na kotonga na mikili mikeseni. Yango wana na Mai 1989 tokendeki kosala sanza moko na Nigeria, mpo na kosangana na mosala ya botongi bandako ya filiale. Lobi tokokende na Allemagne, epai tokozwa visas ya kokota na mokili ya Pologne. Tozali na esengo ya kokanisa ete tozali kosala mosala ya botongi oyo ekotikala kati na lisoló mpe kosangana na lolenge wana ya mosala ya ntango nyonso.”
22. (a) Lolenge nini, na ndakisa ya Petelo, tokoki kozala libaku kozanga ete toyeba yango? (b) Mpo na kosalela Jéhovah na elimo ya komipesa, esengeli te bobele kozala nani mpe nani?
22 Soko yo moko okoki kozala pionnier te, okoki kolendisa baoyo bazali na mosala ya pionnier ete balendendela to okoki mpe kosalisa bango na kosala bongo? To, okokani na basangani mosusu ya libota na bango to baninga na bango, baoyo na mokano malamu lokola Petelo, bazali koloba na bango ete bamitungisa mingi te, bamisalela makambo ya makasi te, mpe bazali kososola te ete yango ekoki kozala libaku? Ezali solo ete, soki kolongono ya pionnier ezali malamu te, to soki azali kokokisa mikumba na ye ya boklisto te, akoki kotika mosala ya pionnier mpo na mwa ntango. Mpo na kosalela Jéhovah na elimo ya komipesa, esengeli te kozala bobele pionnier, na Béthel to lolenge mosusu. Likambo oyo ezali na ntina, ezali lolenge ya bato oyo tozali: motindo tozali kokanisa, oyo tozali kosala, motindo tozali kosalela bazalani na biso, lolenge tozali kobika.
23. (a) Lolenge nini tokoki ntango nyonso kozala na esengo ya kozala basali elongo na Nzembe? (b) Endimiseli nini tozali na yango kati na Baebele 6:10-12?
23 Soki tozali solo na elimo ya komipesa, tokozala na esengo ya kozala basali elongo na Nzambe. (1 Bakolinti 3:9) Tokozala lisusu na esengo ya koyeba ete tozali kosepelisa motema na Jéhovah. (Masese 27:11) Na nsuka, tokondimisama mpenza ete Jéhovah akobosana biso te mpe akotika biso te, soki tokotikala ntango nyonso sembo epai na ye.—Baebele 6:10-12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Greke ebongolami ete, “libaku” (σχαˈυδαλου, skanˈda-lon) ezalaki kolimbola, na ebandeli “eteni ya motambo esika bazalaki kotya mpambo, na bongo, motambo yango moko.”—Diksionere mpo na kolimbola maloba ya Kondimana ya Kala mpe ya Sika (na Lingelesi), ya Vine.
Okanisi nini?
◻ Lolenge nini Petelo, kozanga ete ayeba yango, akomaki libaku na nzela ya komipesa?
◻ Komiboya yo moko elimboli nini?
◻ Lolenge nini moklisto akoki komema nzeté na ye ya mpasi?
◻ Lolenge nini tokoki kolona mpe kokolisa elimo ya komipesa?
◻ Nini ezali kotinda moto na komonisa elimo ya komipesa?
matomba nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Tozali pene ya komiboya biso moko, ya kotombola nzeté na biso ya mpasi mpe kolanda Yesu ntango nyonso?