Mokonzi moko abebisi esika mosantu ya Jéhovah
“Nde bato oyo bayebi Nzambe na bango [bakolónga, NW].”—DANYELE 11:32.
1, 2. Matáta nini maleki monene kati na Lisoló ya bato oyo masili kobima uta koleka mibu 2 000?
BAKONZI mibale bazali kowelana makasi mpo na koyeba nani akoyangela mokili mobimba. Moko na moko azali koleka moninga na nguya na ngala na ye, mpamba te matáta na bango eumeli koleka mibu nkóto mibale. Na mikolo na biso, matáta wana makozala na bopusi likoló na bato awa na mabelé mpe ekotya bosembo ya libota ya Nzambe kati na komekama. Ekosuka na likambo moko oyo banguya wana bazali komizela na yango te. Likambo wana monene na Lisoló ya bato, lisilaki komonisama liboso, na ntango ya kala, epai na Danyele.—Danyele, mokapo 10 kino mokapo 12.
2 Esakweli yango etaleli koyinana makasi oyo eumeli kati na mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud; elobelami na bolai kati na mokanda “Que ta volonté soit faite sur la terre.”a Emonisamaki kati na mokanda wana ete, liboso, mokonzi ya nord ezalaki Sulia, na nord ya Yisraele. Na nsima, Loma akamataki mokumba wana. Na ebandeli, mokonzi ya sud ezalaki Ezipito.
Matáta na ntango ya nsuka
3. Engebene anzelu, ntango nini esakweli na ntina na mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud esengelaki kososolama, mpe mpo na nini?
3 Anzelu oyo amonisaki makambo wana epai na Danyele alobaki ete: “Bombá maloba oyo mpe kangá mokanda, kino na ntango ya nsuka. Mingi bakokende epai na epai, mpe boyebi ya solo ekoyikana.” (Danyele 12:4, NW) Ya solo, esakweli oyo etaleli ntango ya nsuka—eleko oyo ebandaki na 1914. Na boumeli ya eleko oyo esilaki kotyama elembo, ebele na bato ‘basengelaki kokende epai na epai’ kati na Makomami Mosantu, mpe na lisalisi ya elimo santu, boyebi ya solo, mingi mpenza bososoli na bisakweli ya Biblia, esengelaki koyikana. (Masese 4:18) Lokola ntango ezali kopusana, makambo mingi ya bisakweli ya Danyele mazali kongɛngisama mingi lisusu. Na yango, na 1993, lolenge nini tosengeli kososola esakweli ya mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud, nzokande mibu 35 misili koleka uta kobimisama ya mokanda “Que ta volonté soit faite sur la terre”?
4, 5. (a) Mobu 1914 mozwami esika nini kati na esakweli ya Danyele na ntina na mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud? (b) Engebene maloba ya anzelu, nini esengelaki kosalema na 1914?
4 Ebandeli ya ntango ya nsuka na 1914, emonisamaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe mpasi na mokili mobimba oyo Yesu asakolaki. (Matai 24:3, 7, 8) Tokoki komonisa mbula wana kati na esakweli ya Danyele? Ee. Ebandeli ya ntango ya nsuka ezali “ntango eponami” oyo elobelami na Danyele 11:29. (Tala mokanda “Que ta volonté soit faite sur la terre,” nkasa 269-270.) Ezalaki ntango oyo Jéhovah aponaki na mikolo ya Danyele, mpamba te ebandi na nsuka ya mibu 2 520 milobelami na Danyele mokapo 4, likoló na makambo ya ntina mingi ya esakweli.
5 Mibu 2 520 wana, longwa na kobomama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., na bolenge ya Danyele kino 1914 T.B., ebéngamaki ete “ntango ya mabota.” (Luka 21:24) Likambo nini ya politike lisengelaki komonana na nsuka na yango? Anzelu amonisaki yango epai na Danyele, mpe alobaki ete: “Na ntango eponami, [mokonzi ya nord] akozonga lisusu na mokili ya ngɛlɛ [na sud]; nde na mbala oyo, ekozala te lokola na mbala ya liboso.”—Danyele 11:29.
Mokonzi alóngi etumba te
6. Na 1914, nani azalaki mokonzi ya nord, mpe nani azalaki mokonzi ya sud?
6 Na 1914, mokumba ya mokonzi ya nord mokamatamaki na Allemagne, oyo ekambamaki na Kaiser Guillaume. (“Kaiser” euti na titre ya Baloma oyo ete “Kaisala.”) Ebandeli ya etumba na mikili ya Mpótó ezalaki bobele likambo libakisamaki kati na molɔngɔ́ ya matáta oyo mazalaki kati na mokonzi ya nord mpe mokonzi ya sud. Mokumba ya mokonzi ya sud mokamatamaki na Grande-Bretagne, oyo epalanganisaki nokinoki boyangeli na yango kino na Ezipito, mabelé ya mokonzi ya sud wa yambo. Na boumeli ya etumba, Etats-Unis oyo na kala eyangelamaki na ba Anglais, esanganaki na Grande-Bretagne. Nguya ya mokili mobimba oyo babéngi Anglo-Américaine ekómaki mokonzi ya sud, bokonzi boleki na nguya na Lisoló mobimba ya bato.
7, 8. (a) Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na ndimbola nini makambo mazalaki lisusu te “lokola na liboso”? (b) Nani alóngaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, kasi engebene esakweli, mokonzi ya nord asalaki nini?
7 Na matáta mabimaki liboso kati na bakonzi yango mibale, Bokonzi ya Loma, oyo ezalaki mokonzi ya nord, ezwaki elónga. Na mbala oyo, ‘makambo mazalaki te lokola na liboso.’ Mpo na nini? Mpo ete mokonzi ya nord alóngaki etumba te. Moko na bantina ezalaki ete “masuwa ya Kitimi” mabimelaki mokonzi ya nord. (Danyele 11:30) Masuwa yango ezalaki nini? Na eleko ya Danyele, Kitimi ezalaki oyo ebéngami lelo Chypre, mpe na ebandeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, esanga ya Chypre ekómaki na mabɔkɔ ya Grande-Bretagne. Epai mosusu, engebene mokanda The Zondervan Pictorial Encyclopedia of the Bible, nkombo Kitimi “esangisi mikili ya Ouest, kasi mingi mpenza mikili ya Ouest oyo mizali pembeni na mai monene.” Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli liloba “masuwa ya Kitimi” ete “bato ba Kittim bakoyela ye na etumba na masuwa.” Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, emonanaki ete masuwa ya Kitimi ezalaki masuwa ya Grande-Bretagne, oyo ezalaki kotambolatambola na ngámbo ya ouest ya mikili ya Mpótó. Na nsima, masuwa ya Grande-Bretagne ezwaki lisungi ya masuwa mautaki epai na Amérique du Nord.
8 Ekutanaki ye na bibundeli motindo oyo, mokonzi ya nord “alɛmbaki” mpe na 1918, andimaki ete akoki lisusu kobunda te. Kasi abomamaki te. “Akobutwa mpe akongala na ntina na kondimana na bulee, mpe akosala mokano na ye. Akozonga mpe akokanisa baoyo batiki kondimana na bulee.” (Danyele 11:30) Anzelu asakolaki bongo, mpe yango esalemaki bobele bongo.
Mokonzi asali mokano na ye
9. Likambo nini lipesaki nzela na Adolf Hitler ete akóma na bokonzi, mpe na ndimbola nini “asalaki mokano na ye”?
9 Nsima ya etumba, na 1918, mikili oyo milóngaki etumba misɛngisaki boyokani ya kimya epai na Allemagne, na ndenge emonani, mpo na kotya bato ya Allemagne pene na ezalela ya nzala monene na boumeli ya ntango molai. Na yango, nsima ya kolekisa mwa bambula kati na mpasi makasi, Allemagne emibongisaki mpo na kotómbola Adolf Hitler. Azwaki bokonzi na 1933 mpe nokinoki, angalelaki “kondimana na bulee,” oyo emonisamaki na bandeko bapakolami ya Yesu Klisto. Na bongo, asalaki mokano na ye mpo na kobundisa baklisto wana ya sembo, na konyokoláká mingi kati na bango.
10. Hitler alukaki lisungi ya banani, mpe azwaki matomba nini?
10 Hitler azwaki elónga kati na makambo ya nkita mpe na boyokani elongo na mikili misusu; tokoki koloba ete na likambo wana mpe, asalaki mokano na ye. Bobele na mwa bambula, akómisaki Allemagne, mokili moko ya nguya oyo bato bakokaki kobosana yango te; na milende na ye, asungamaki na “baoyo batiki kondimana na bulee.” Ezali banani? Na ntembe te, ezali bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta, baoyo bazalaki koloba ete bazali na boyokani na kondimana elongo na Nzambe, nzokande, uta kala, batikaki kozala bayekoli na Yesu Klisto. Hitler alóngaki mpo na kozwa lisungi ya “baoyo batiki kondimana na bulee.” Na Loma, pápa asalaki boyokani elongo na ye, mpe na Allemagne, Lingomba ya katolike mpe mangomba ya prostetá, basungaki Hitler na boumeli ya mibu 12 ya boyangeli na ye ya nsɔmɔ.
11. Lolenge nini mokonzi ya nord ‘abebisaki esika mosantu’ mpe ‘alongolaki mbeka na kotumba oyo ekabami mikolo nyonso’?
11 Makambo nyonso mazalaki kotambola malamu mpo na Hitler kino asɛngaki etumba, lokola anzelu asakolaki yango. “Basodá batindami na ye bakobima mpe bakobebisa esika mosantu, esika na makasi, mpe bakolongola mbeka na kotumba oyo ekabami mikolo nyonso.” (Danyele 11:31a) Na Yisraele ya kala, esika mosantu ezalaki kati na tempelo ya Yelusaleme. Kasi, lokola Bayuda baboyaki Yesu, Jéhovah abwakaki bango mpe tempelo na bango. (Matai 23:37 kino 24:2) Uta ekeke ya liboso, tempelo ya Jéhovah ezali ya elimo, oyo esika eleki mosantu ezali na makoló mpe lopango ya elimo ezali na mabelé, kati na yango bandeko bapakolami ya Yesu, Nganga Monene, bazali kosala mosala na bango. Kobanda bambula 1930, ebele monene bazali kosambela elongo na batikali bapakolami; yango wana elobami mpo na bango ete bazali kosala ‘kati na tempelo ya Nzambe.’ (Emoniseli 7:9, 15; 11:1, 2; Baebele 9:11, 12, 24) Lopango ya tempelo awa na mabelé ebebisamaki na minyoko makasi oyo batikali bapakolami mpe baninga na bango bazwaki kati na mikili epai mokonzi ya nord azalaki koyangela. Monyoko mozalaki makasi mingi kino mbeka na kotumba oyo ekabami mikolo nyonso—mbeka ya masanzoli mpo na koyambola nkombo ya Jéhovah—elongolamaki. (Baebele 13:15) Nzokande, Lisoló ya bato limonisi ete, atako mpasi makasi ezalaki, baklisto bapakolami oyo batikalaki sembo, bakisa mpe “bampate mosusu,” balandaki kosakola na nkúku.—Yoane 10:16.
“Eloko na mbindo”
12, 13. “Eloko na mbindo” ezali nini, ntango nini mpe lolenge nini etyamaki, lokola yango esakolamaki na moombo na sembo mpe na mayele?
12 Wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ekómaki pene na nsuka, likambo mosusu libimaki. “Bakotɛmisa eloko na mbindo oyo ekobebisaka.” (Danyele 11:31b, NW) “Eloko na mbindo” wana oyo Yesu alobelaki yango lisusu, emonanaki mpenza ete ezalaki Société des Nations, nyama na yauli na langi motané oyo, engebene Emoniseli, ekendeki na libulu mozindo. (Matai 24:15; Emoniseli 17:8; tala Lumière, Tome II, nkasa 98, 99.) Yango esalemaki ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki. Nzokande, na Likita ya teokratike ya mokili ya sika, oyo ba Témoins de Jéhovah basalaki na 1942, Nathan Knorr, prezidá wa misato wa la Société Watch Tower, alimbolaki esakweli ya Emoniseli 17 mpe akebisaki bayoki na ye ete nyama yango ekobima lisusu na libulu mozindo.
13 Lisoló ya bato lindimisi bosolo ya maloba oyo. Katikati na Août mpe Octobre 1944, na mboka Dumbarton Oaks (Etats-Unis), mosala mobandaki mpo na kosala mibeko ya oyo basengelaki kobénga yango ete Nations Unies (O.N.U.). Mibeko yango mindimamaki na mikili 51, kati na yango mpe mikili oyo bazalaki kobénga ete Union soviétique, mpe ntango mibeko yango mibandaki kosalelama na le 24 Octobre 1945, na lolenge mosusu, Société des Nations oyo esilaki kokufa, ebimaki lisusu na libulu mozindo.
14. Ntango nini mpe lolenge nini mokumba ya mokonzi ya nord elekaki na mabɔkɔ ya mokili mosusu?
14 Allemagne ezalaki monguna monene ya mokonzi ya sud na boumeli ya bitumba mibale ya mokili mobimba. Nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, eteni mosusu ya Allemagne ebongwanaki mpo na kosangana elongo na mokonzi ya sud. Nde eteni mosusu ya Allemagne esanganaki na bokonzi mosusu ya nguya. Mikili ya communiste, oyo eteni mosusu ya Allemagne ezalaki kati na yango, mizalaki kotɛmɛla boyokani ya Anglo-Américaine, mpe matáta kati na mikonzi mibale ememaki kino na oyo bazalaki kobénga ete guerre froide.—Tala mokanda “Que ta volonté soit faite sur la terre,” nkasa 264-84.
Mokonzi mpe kondimana
15. “Baoyo bazali kosopa kondimana na nko” ezali banani, mpe boyokani nini basili kosala elongo na mokonzi ya nord?
15 Sikawa Anzelu alobi ete: “Baoyo bazali kosopa kondimana na nko, akomema bango na lipɛngwi na nzela ya maloba na bokosi.” (Danyele 11:32a, NW) Banani bazali kosopa kondimana na nko? Awa lisusu, ezali bobele bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta, baoyo bazali komitanga baklisto, nzokande bazali kobebisa nkombo ya boklisto ya solo na misala na bango. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, “boyangeli ya Union soviétique esalaki makasi mpo na kozwa lisungi ya mangomba kati na mosuni mpe na bizaleli mpo na kobatela ekólo.” (Mokanda Losambo na Union soviétique [na Lingelesi], ya Walter Kolarz) Nsima ya etumba, bakonzi ya mangomba basalaki makasi mpo na kobatela boninga wana, atako boyangeli yango, oyo ekómaki uta ntango wana mokonzi ya nord, ezalaki koteya bato ete Nzambe azali te.b Bongo, boklisto ya lokuta ekómaki mpenza eteni ya mokili oyo—lipɛngwi ya mbindo mingi na miso ya Jéhovah.—Yoane 17:14; Yakobo 4:4.
16, 17. “Bato na mayele” ezali banani, mpe nini ekómelaki bango na nsé na boyangeli ya mokonzi ya nord?
16 Ezalaki boni mpo na baklisto ya solo? “Nde bato oyo bayebi Nzambe na bango bakolónga, mpe bakoleka. Mpe baoyo na mayele kati na bato, bakolakisa ebele na bato; nde bakokwea mpo na mopanga mpe na mɔ́tɔ, mpo na boombo mpe na kopunza, [na boumeli ya mwa mikolo, NW].” (Danyele 11:32b, 33) Atako esengelaki na bango “batosa bakonzi baleki liboso,” nzokande baklisto oyo bazalaki na nsé na boyangeli ya mokonzi ya nord bakɔtaki te kati na makambo ya mokili. (Baloma 13:1, NW; Yoane 18:36) Bazali kosɛnzela mpo na kopesa biloko ya Kaisala epai na Kaisala, bazali lisusu kopesa “biloko ya Nzambe epai na Nzambe.” (Matai 22:21, NW) Mpo na yango, bosembo na bango ezali komekama.—2 Timoté 3:12.
17 Matomba nini mamonanaki? ‘Balóngaki,’ kasi ‘bakweaki lokola.’ Bakweaki na boye ete banyokwamaki mpe bazwaki mpasi makasi, kino basusu babomamaki! Nzokande balóngaki mpo ete mingi batikalaki sembo. Ya solo, balóngaki mokili lokola Yesu alóngaki mokili. (Yoane 16:33) Epai mosusu, batikaki kosakola te, ata soki bazalaki kati na bolɔkɔ to kati na camp de concentration. Na kosaláká bongo, ‘balakisaki ebele na bato.’ Atako monyoko mozalaki kati na mikili mingi miyangelamaki na mokonzi ya nord, ba Témoins de Jéhovah bazali sé kobakisama. Mpo na bosembo ya “bato na mayele,” basangani mosusu ya “ebele monene” oyo ezali sé kokóla, babimaki na mikili yango.—Emoniseli 7:9-14.
18. Na ndimbola nini batikali bapakolami oyo bazalaki na bomoi na nsé na boyangeli ya mokonzi ya nord bazwaki “mwa lisungi moke”?
18 Kolobáká na ntina na monyoko oyo libota ya Nzambe ezwaki, anzelu asakolaki ete: “Wana ekokwea bango, bakozwa mwa lisungi moke.” (Danyele 11:34a) Lolenge nini yango esalemaki? Libosoliboso, elónga ya mokonzi ya sud kati na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki libɔndisi monene mpo na baklisto oyo bazalaki na nsé na boyangeli ya mokonzi ya nord. (Tala Emoniseli 12:15, 16.) Na nsima, baoyo banyokwamaki na mokitani na ye, bazwaki libɔndisi na bantango mosusu, mpe lokola la guerre froide ebandaki kosila, mingi na bakonzi ya politike bayaki kososola ete baklisto ya sembo bazalaki likámá mpo na bango te, mpe bandimaki bango na mibeko ya Leta.c Lisungi monene liutaki epai na basangani ya ebele monene oyo motuya na bango mozali sé kokóla, baoyo bayanolaki na mosala ya kosakola ya sembo ya bapakolami, mpe basungaki bango lokola emonisami na Matai 25:34-40.
Libota ya Nzambe lipɛtolami
19. (a) Lolenge nini basusu ‘basanganaki na bango na kokosa’? (b) Liloba “kino na ntango ya nsuka” ezali na ndimbola nini? (Tala note na nsé.)
19 Baoyo bamonisaki mposa ya kosalela Nzambe na boumeli ya ntango wana, banso bazalaki bobele na mikano malamu te. Anzelu akebisaki ete: “Bato mingi bakosangana na bango na bokosi. Mpe basusu na baoyo na mayele bakokwea, mpo ete mosala ya konangola, mpe ya kopɛtola, mpe ya koyeisa mpɛmbɛ ezala mpo na bango kino na ntango ya nsuka, mpo ete ezali naino mpo na ntango eponami.”d (Danyele 11:34b, 35, NW) Bamoko bamonisaki mposa mpo na solo, kasi bandimaki te komipesa mpenza na mosala ya Nzambe. Basusu oyo bamonanaki lokola nde bandimaki nsango malamu, bazalaki nde banɔngi ya bakonzi ya Leta. Tala lisoló moko ya makambo masalemaki: “Basusu na bato yango bazangi sembo bazalaki ba communistes oyo bamikɔtisaki kati na lisangá ya Nkolo; bamonisaki molende makasi, mpe bazwaki ata mikumba minene.”
20. Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela ete baklisto mosusu ya sembo ‘bakwea’ na ntina na bokosi ya baoyo bakɔtaki na nkúku kati na lisangá?
20 Bato wana bakɔtaki na nkúku kati na lisangá basalaki ete bamoko na basembwi bazwama na mabɔkɔ ya bakonzi ya Leta. Mpo na nini Jéhovah apesaki nzela na likambo motindo oyo? Mpo ete konangolama, kopɛtolama esalema. Lokola Yesu “ayekolaki kotosa na nzela na mpasi oyo ayikelaki mpiko,” bobele bongo bato na sembo wana bayekolaki koyika mpiko na nzela na momekamo na kondima na bango. (Baebele 5:8, NW; Yakobo 1:2, 3; tala Malaki 3:3.) Na bongo, ‘banangolamaki, bapɛtolamaki, mpe bayeisamaki mpɛmbɛ.’ Basembwi wana bakozwa esengo monene wana ntango eponami ekokóma, wana mpiko na bango ekozwa mbano. Yango nde tokomona awa ezali biso kolanda kotalela bisakweli ya Danyele.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Enyatámaki na la Société Watchtower mpe ebimisamaki na 1958 na Lingelesi mpe na 1965 na Lifalansé, na assemblée internationale ya ba Témoins de Jéhovah, “Mokano na Nzambe.”
b Zulunalo World Press Review ya Novembre 1992 ebimisaki lisoló moko ya zulunalo The Toronto Star, oyo elobi ete: “Uta bambula mingi, ba Russes bamonaki wana ebele ya bandoto na bango minene likoló na lisoló ya ekólo na bango, ezangaki kokokana. Kasi, na mbala oyo, makambo mamonani na ntina na boyokani ya mangomba elongo na boyangeli ya communiste, mazali mingi mpenza.”
c Tala Mosenzeli ya le 15 Juillet 1991, nkasa 8-11.
d “Kino na ntango ya nsuka” ekokaki kolimbolama ete “na boumeli ya ntango ya nsuka.” Liloba oyo libongolami awa na “kino,” lizwami kati na makomi ya Araméen ya Danyele 7:25, epai elimboli “na boumeli” to “mpo na.” Liloba wana lizali na ndimbola ekokani na makomi ya Liebele ya 2 Mikonzi 9:22, Yobo 20:5, mpe Basambisi 3:26. Nzokande, kati na mabongoli mingi ya Danyele 11:35, ebongolami na “kino,” mpe soki yango ezali lolenge malamu ya kososola yango, boye “ntango ya nsuka” oyo elobelami awa, esengeli kozala ntango ya nsuka ya koyika mpiko ya libota ya Nzambe.—Tala mokanda “Que ta volonté soit faite sur la terre,” lokasa 286.
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini tosengeli lelo komizela kozwa bososoli malamu ya bisakweli ya Danyele?
◻ Lolenge nini mokonzi ya nord ‘angalaki mpe asalaki mokano na ye’?
◻ Lolenge nini kelasi ya moombo esakolaki ete “eloko na mbindo” ekobima lisusu?
◻ Lolenge nini batikali bapakolami ‘bakweaki,’ lolenge nini ‘balóngaki’ mpe lolenge nini bazwaki “mwa lisungi moke”?
[Elilingi na lokasa 15]
Na nsé na boyangeli ya Hitler, mokonzi ya nord azwaki lisusu nguya na ye nsima na kokwea liboso ya mokonzi ya sud, na 1918
[Elilingi na lokasa 16]
Bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bamekaki kobatela boyokani elongo na mokonzi ya nord
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Zoran/Sipa Press