Mikanda kitoko ya Josèphe
UTA KALA, bayekoli na makambo na kala bakotalelaka babúku ya Josèphe. Lokola abotamaki mbula minei nsima ya liwa ya Klisto, amonaki mpenza kokokisama na nsɔmɔ ya bisakweli na Yesu likoló na libota ya Bayuda ya ekeke ya liboso. Josèphe azalaki mokambi na basodá, ntoma ya Leta, Mofalisai, mpe moto ayekoli mingi.
Babúku ya Josèphe etondi na ndimbola ekosimbaka motema. Ezali kongɛngisa makambo malobelami na Biblia na kokomáká bandimbola na ntina na makambo matali ezingelo mpe ezalela ya mboka Palestine. Ezali likambo ya kokamwa te ete bato mingi bazali kotalela mikanda na ye lokola eloko ya motuya ebongi na kobakisama kati na bibliotɛkɛ!
Bomwana na ye
Joseph ben Matthias, to Josèphe, abotamaki na mobu 37 T.B., na mbula ya liboso na boyangeli ya Caligula, mokonzi na Loma. Tata ya Josèphe azalaki na libota ya banganga. Alobaki ete mama na ye azalaki mokitani ya Jonathan, nganga monene na bakitani ya Hasmon (nkɔ́kɔ ya ba Maccabés).
Na bolenge na ye, Josèphe azalaki moyekoli monene ya Mibeko ya Mose. Asalaki boyekoli mozindo likoló na mangomba misato ya Bayuda—Bafalisai, Basadukai, mpe Baeseni (Esséniens). Wana asepelaki na oyo ya nsuka, azwaki ekateli ya kofanda na boumeli ya mibu misato elongo na Bannus, moto oyo azalaki kofanda bobele ye moko na mokili mokauki; moto yango akokaki mpenza kozala Moeseni. Josèphe asundolaki lingomba yango wana akómaki na mibu 19, azongaki na Yelusaleme mpe asanganaki na Bafalisai.
Bokei na Loma mpe bozongi
Na mobu 64 T.B., Josèphe asalaki mobembo na Loma mpo na kolobela banganga Bayuda baoyo Felisi moyangeli atindaki epai na mokonzi Nero mpo na kosambisama. Na nzela, masuwa mazindaki, mpe Josèphe abikaki mpenza na liwa. Kati na bato 600 oyo bazalaki na masuwa, bobele bato 80 nde basungamaki.
Na boumeli ya ntango oyo Josèphe alekisaki na Loma, Moyuda moko mosani na masano aingisaki ye epai na mwasi ya Nero, mwasi-mokonzi Poppée. Mwasi wana akokisaki mosala ya ntina mingi na elónga ya mokumba na ye [Josèphe]. Bozengá ya mboka ezalaki na bopusi monene likoló ya Josèphe.
Ntango Josèphe azongaki na Yudea, Bayuda bazwaki mokano ya kotɛmɛla Loma. Amekaki komonisa bato ya ekólo na ye ete kosala etumba na Loma ezalaki na ntina te. Lokola akokaki kopekisa bango te mpe ezalaki ye kobanga ete akotalelama lokola mosúli, andimaki koponama lokola mokambi mapinga ya Bayuda na Galilai. Josèphe asangisaki bato na ye mpe abongisaki bango mpe apesaki bilei mpo na komilɛngɛla na etumba na mapinga ya Loma—kasi molende wana mozalaki bobele mpamba. Galilai ekweaki liboso ya mapinga ya Vespasien. Nsima na kolekisa mikolo 47 na moláko, esika makasi ya Josèphe oyo ezalaki na Jotapata, elóngamaki.
Wana asɛngaki kimya, Josèphe asakolaki na mayele nyonso ete mosika te Vespasien akokóma mokonzi. Akangamaki, kasi azwaki etumbu te mpo na esakweli yango; Josèphe abimisamaki na bolɔkɔ na ntango esakweli yango ekokanaki. Uta ntango wana, bomoi na ye ebongwanaki. Na boumeli na mikolo ya etumba oyo mitikalaki, asalelaki Baloma lokola molimboli mpe montéi. Mpo na kokumisa Vespasien, mobateli na ye, mpe bana na ye ya mibali, Titus mpe Domitien, Josèphe abakisaki nkombo mosusu ya libota ete Flavius likoló na nkombo na ye mpenza.
Mikanda ya Josèphe Flavius
Búku ya kala kati na babúku ya Josèphe ezali na motó ya likambo The Jewish War (Etumba ya Bayuda). Endimamaki ete azalaki kobongisa volimi ya nsambo ya búku yango mpo na komonisa malamu bonene ya nguya ya Loma epai na Bayuda mpe kokebisa bango ete botomboki mosusu esalema te. Babúku yango ezali kolobela lisoló ya Bayuda na bozindo longwa na kokamatama ya Yelusaleme na Epiphane Moantioka (na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso) kino na mobulu makasi ya mobu 67 T.B. Lokola amonaki yango mpenza, Josèphe alobelaki bongo etumba monene ya mobu 73 T.B.
Mikanda misusu ya Josèphe ezalaki The Jewish Antiquities (Makambo ya kala ya Bayuda), búku ya bavolimi 20 ya lisoló ya Bayuda. Kobandáká na Genese mpe bozalisi, elandi kino kobima ya etumba elongo na Loma. Josèphe alandisaki molɔngɔ́ ya masoló ya Biblia na sikisiki, abakisaki bandimbola ya bonkɔ́kɔ mpe makanisi ya bato mpenza.
Josèphe akomaki lisoló na ye moko bobele na motó ya likambo oyo ete Life (bomoi). Kati na yango, alukaki kolóngisa etelemelo na ye na boumeli ya etumba mpe amekaki kolembisa bifundeli ya Justus ya Tibelia likoló na ye. Búku na ye ya minei—bavolimi mibale mpo na bolóngisi na motó ya likambo Against Apion—ezali kokɔ́tɛla Bayuda mpe kokweisa maloba na lokuta.
Makoki ya kososola Liloba ya Nzambe
Ntembe ezali te ete mingi na masoló ya Josèphe mazali sikisiki. Na búku na ye oyo ezali na motó ya likambo ete Against Apion, amonisi ete Bayuda bakɔtisaki soko moke te babúku oyo epemami te kati na Makomami mapemami. Apesaki litatoli mpo na bosikisiki mpe boyokani bozali kati na mikanda miuti na Nzambe. Josèphe alobaki ete: “Kati na biso, tozali te na ebele na babúku oyo motuya na yango mozangi koyebana, oyo ezangi koyokana mpe ezali na bongolábongola moko na mosusu, . . . kasi bobele babúku ntuku mibale na mibale [ekokani na bokabolami ya babúku 39 ya Makomami oyo esalemi na mikolo na biso], oyo ezali na masoló ya makambo nyonso ya kala; oyo endimami na bosembo nyonso ete euti na Nzambe.”
Na búku The Jewish Antiquities, Josèphe abakisi bandimbola kitoko likoló na lisoló ya Biblia. Alobi ete “Yisaka azalaki na mibu ntuku mibale na mitano” wana Abalayama akangisaki ye mabɔ́kɔ mpe makolo mpo na kopesa ye mbeka. Engebene Josèphe, nsima na komona wana etumbelo ezalaki kosalema, Yisaka alobaki ete “‘soki aboyaki ekateli ya Nzambe mpe ya tata na ye, mbɛlɛ abongaki te na kobotama mwana na liboso’ . . . Bongo, akendaki nokinoki na etumbelo mpo na kopesama mbeka.”
Mpo na lisoló ya Makomami mpo na kolongwa ya Yisraele na Ezipito ya kala, Josèphe abakisi bandimbola ya sikisiki, ete: “Motuya ya makálo oyo mazalaki kolanda bango ezalaki nkámá motoba, elongo na bamati na mpunda nkóto mitano, mpe nkóto nkámá mibale na bato oyo bazalaki kotambola na makolo, banso na bibundeli.” Josèphe alobi lisusu ete “wana Samwele azalaki na mibu zomi na mibale, abandaki kosakola: mpe mokolo moko, wana alalaki, Nzambe abyangaki ye na nkombo na ye.”—Kokanisá na 1 Samwele 3:2-21.
Mikanda misusu ya Josèphe mimonisi makoki ya kososola mpo na mpáko, mibeko mpe makambo ya kala. Mwasi oyo abinaki na elambo ya Herode mpe oyo asɛngaki motó ya Yoane Mobatisi, Josèphe abéngaki ye na nkombo Salomé. (Malako 6:17-26) Makambo mingi oyo toyebi na ntina na Herode eyebisamaki na Josèphe. Nkutu alobaki ete “mpo na kobomba bobangé, [Herode] apakolaki nkisi ya moindo na nsuki na ye.”
Botomboki monene mpo na kotɛmɛla Loma
Bobele mibu 33 nsima wana Yesu asalaki esakweli na ye na ntina na Yelusaleme mpe tempelo na yango, kokokana na yango ebandaki komonana. Bayuda oyo bazalaki batomboki na Yeluseleme, bazwaki ekateli ya koboya kotosa Loma. Na mobu 66 T.B., nsango yango esalaki ete Loma etinda mapinga oyo makambamaki na Cestus Gallus, moyangeli moto na Sulia. Mokumba na bango ezalaki mpo na kosilisa botomboki mpe kopesa etumbu na batomboki. Nsima na koboma bamboka ezalaki zingazinga na Yelusaleme, bato ya Cestus basalaki miláko zingazinga ya mboka wana ezalaki na efelo. Kosaleláká mwango oyo babéngi “nkóba,” Baloma balóngaki kosangisa nguba na bango lokola bikókótó ya nkóba mpo na komibatela na banguna. Komonisáká lolenge mwango yango mozalaki malamu, Josèphe ayebisi ete: “Makɔngá oyo mabwakamaki, makweaki nde masɛlɛmwaki kozanga kobimisa likámá moko; basodá babebisaki efelo wana bango moko bazalaki kozoka te, mpe bazalaki komibongisa na nyonso mpenza mpo na kozikisa ekuke na ekɔtelo ya tempelo.”
Josèphe alobaki ete: “Na nsima, Cestius . . . abyangaki lisusu basodá na ye longwa na esika wana . . . Alongwaki na esika wana kozanga ntina moko.” Emonani polele ete, kozanga likanisi ya kokumisa Mwana na Nzambe, Josèphe alobelaki likambo ya sikisiki oyo baklisto bazalaki kozela na Yelusaleme. Yango ezalaki kokokisama ya esakweli na Yesu! Bambula ya liboso, Mwana na Nzambe akebisaki ete: “Sɔkɔ bokomona Yelusaleme kojingama na bibele na basoda, boyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobɛlɛma. Na ntango yango bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba, mpe bango na kati na mboka balongwa wana, mpe bango na bilanga bakɔta na mboka tɛ; mpɔ ete oyo ejali ntango na kobukanisa mpɔ na kokokisa makomi yɔnsɔ.” (Luka 21:20-22) Lokola Yesu ayebisaki yango, bayekoli na ye ya sembo bakimaki mboka wana nokinoki, bakendaki kofanda mosika, mpe bamibatelaki na likámá oyo libimelaki yango na nsima.
Ntango mapinga ya Loma mazongaki na mobu 70 T.B., makambo masalemaki mamonisamaki polele na Josèphe kati na bililingi. Général Titus, mwana na liboso na Vespasien, ayaki kobebisa Yelusaleme elongo na tempelo na yango kitoko. Na kati ya mboka, bato na etumba bamekaki koyangela. Bazwaki meko makasi, mpe makila mingi masopamaki. Josèphe alobi ete basusu “bazalaki kati na bolózi ya motindo wana mpo na bampasi oyo bazalaki na yango kati na mboka kino balingaki ete Baloma babundisa mboka na bango,” na elikya ete “basikolama na bampasi ya mboka na bango.” Abyangaki batomboki oyo bazalaki kati na mboka ete “miyibi,” oyo babebisaki biloko ya bozwi mpe babomaki bato ya lokumu—baoyo bakanisamaki ete bandimaki boyokani elongo na Baloma.
Na katikati ya etumba ya banamboka, ezalela ya makambo ya Yelusaleme ekómaki mpenza makasi, mpe bakufi bazalaki kokundama te. Batombokisi “babundaki bango na bango, wana bazalaki konyata bibembe oyo balalisaki moko likoló na mosusu.” Bazalaki kopunza bato ya mboka, kobomáká bango mpo na bilei mpe biloko ya mosuni. Kolela bato oyo bazwaki mpasi elandanaki.
Titus apesaki toli na Bayuda ete batika mboka mpe bongo bakomibikisa. “Atindaki Josèphe mpo na koloba na bango na lokótá na bango mpenza; mpamba te akanisaki oyo bakokaki komitika kondimisama na moto ya ekólo na bango mpenza.” Kasi bapamelaki Josèphe. Na nsima, Titus atongisaki efelo oyo ezingaki mboka mobimba. (Luka 19:43) Wana elikya nyonso ya kobika esilaki mpe bakokaki lisusu koningana te, nzala “ebomaki bato na bandako mpe mabota nyonso.” Kolandana na etumba ebakisaki motuya ya bakufi. Kozanga koyeba ete akokisaki esakweli ya Biblia, Titus alóngaki Yelusaleme. Na nsima, wana atalaki bifelo na yango minene mpe bisika makasi na yango, alobaki ete: “Ezalaki moto mosusu te, bobele Nzambe nde abwakaki Bayuda libandá ya bisika oyo makasi.” Koleka milió moko ya Bayuda bakufaki.—Luka 21:5, 6, 23, 24.
Nsima ya etumba
Nsima ya etumba, Josèphe akendaki na Loma. Kozwáká litomba mpo na libota ya ba Flavius, Josèphe afandaki lokola mwanamboka na Loma kati na ndako ya kala ya Vespasien mpe Titus apesaki ye mosolo ya bosílasanza ya mokonzi elongo na makabo. Bongo, Josèphe akóbaki mosala ya kokoma babúku.
Ezali likambo ya esengo na kosimba ete Josèphe nde abimisaki liloba “Teokrasi.” Na kotalela libota ya Bayuda, akomaki ete: “Boyangeli na biso . . . ekokaki kozala Teokrasi, na kondimáká bokonzi mpe nguya ya Nzambe.”
Josèphe alobaki soko moke te ete ye azalaki moklisto. Akomaki babúku te na kopemama na Nzambe. Atako bongo, yango ezali bososoli ya motuya kati na makambo ya kala oyo mazwami na mikanda kitoko ya Josèphe.
[Elilingi na lokasa 31]
Josèphe pene na bifelo ya Yelusaleme