“Tɛstamá ya Kala” to “Makomami ya Liebele”—Oyo Wapi?
EZALI lelo momeseno kati na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba kosalela maloba “Tɛstamá ya Kala” mpe “Tɛstamá ya Sika” mpo na kolobela biteni ya Biblia na nkótá ya Liebele/Araméen mpe Greke. Kasi maloba yango mazali na moboko likoló na Biblia? Mpe mpo na bantina nini Batatoli ya Yehova baboyaka mbala mingi kosalela yango kati na mikanda na bango?
Ezali solo ete, 2 Bakolinti 3:14, engebene King James Version mpe mabongoli mosusu ya kala, lokola German Septembertestament, Libongoli ya liboso ya Martin Luther (1522), ekoki komonana lokola ete ezali kondima momeseno wana. Kati na King James Version, mokapo wana mozali kotángama ete: “Kasi makanisi na bango masili kozipama: mpamba te, ekotángaka bango tɛstamá ya kala kino lelo, ezipeli wana ezali naino; oyo ekolongwa na nzela ya Klisto.”
Kasi, ntoma azalaki kolobela mikanda 39 oyo bato mingi babéngaka “Tɛstamá ya Kala”? Liloba ya Greke oyo ebongolami awa “tɛstamá” ezali di·a·theʹke. Búku monene ya teoloji, Theologische Realenzyklopädie (Volimi 7, nkasa 408, 1981) na lokótá ya Allemand, kopesáká bandimbola likoló na 2 Bakolinti 3:14, elobi ete ‘botángi ya di·a·theʹke’ ya kala kati na molɔngɔ́ oyo ekokani na ‘botángi ya Mose’ na molɔngɔ́ oyo molandi. Na yango, elobi ete, ‘di·a·theʹke ya kala’ ezali Mobeko ya Mose, to mbala mingi Pentateuque. Esalelamaka mpenza te mpo na Makomami mapemami mobimba ya liboso ya ntango ya boklisto. Ntoma azalaki kolobela bobele eteni moko ya Makomi ya Liebele, kondimana ya Mibeko ya kala, oyo Mose akomaki kati na Pentateuque; azalaki te kolobela Makomami ya Liebele mpe ya Araméen na mobimba na yango. Lisusu, amonisi te ete Makomami ya boklisto oyo mapemamaki na ekeke ya liboso T.B. mazali “tɛstamá ya sika,” mpamba te liloba oyo lizwami epai moko te kati na Biblia.
Tosengeli mpe koyeba ete liloba ya Greke di·a·theʹke oyo Paulo asalelaki awa ezali mpenza “kondimana, to boyokani.” (Mpo na koyeba makambo mosusu talá Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu—Oyo ezali na mitindami (ebimeli ya Lingelesi), Appendix 7E, lokasa 1585, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., 1984.) Nzokande mabongoli mingi ya mikolo na biso mabongolaki yango malamu “kondimana ya kala to boyokani ya kala” na esika ya “Tɛstamá ya kala.”
Na ntina na likambo yango, zulunalo “National Catholic Reporter” elobaki ete: “Liloba ‘Tɛstamá ya Kala’ ezali mpenza kobimisa likanisi ya motuya moke mpe oyo esilá ngala.” Kasi Biblia ezali mpenza búku ya ntina, mpe eteni na yango moko te esilá ngala, to ezali ya “kala.” Nsango na yango nyonso ezali na boyokani kobanda mokanda ya liboso na eteni oyo ezali na Liebele kino mokanda ya nsuka na eteni na yango ya Greke. (Baloma 15:4; 2 Timoté 3:16, 17) Na yango tozali na bantina malamu ya koboya kosalela maloba wana oyo mazwi moboko likoló na makanisi mpamba, mpe tolingaka kosalela maloba oyo mabongi mpenza “Makomami ya Liebele” mpe “Makomami ya Greke ya Boklisto.”