“Ekomamaki mpo na kolakisa biso”
“KOKOMA minkanda mingi ezali na nsuka te.” (Mosakoli 12:12, Liloba lya Nzambe) Babuku oyo etondi na mokili ezali komonisa ete maloba wana ezali solo lelo kaka ndenge ezalaki ntango bakomaki yango. Nini ekoki kosalisa motángi ayeba kopona buku oyo asengeli kotánga?
Ntango bato bazali kopona babuku ya kotánga, mingi balingaka koyeba mwa makambo na ntina na mokomi ya buku oyo balingi kotánga. Babimisi ya babuku bakoki koyebisa epai mokomi abotamá, badiplome na ye mpe babuku mosusu oyo akomá. Koyeba moto oyo akomaki buku ezali na ntina. Na ndakisa, kala basi oyo bazalaki kokoma babuku bazalaki komipesa bankombo ya mibali mpo batángi báboya kotánga yango te.
Likambo ya mawa, ndenge tomonaki na lisolo ya liboso, bato mosusu baboyaka kotánga Makomami ya Liebele mpo bakanisaka ete Nzambe oyo balobeli kuna azali Nzambe moko mabe, oyo azalaki koboma banguna na ye kozanga mawa.a Tiká tótalela oyo Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto ezali koyebisa biso na ntina na Nkolo ya Biblia.
Solo na ntina na Nkolo ya Biblia
Na Makomami ya Liebele, Nzambe ayebisaki Bayisalaele ete: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” (Malaki 3:6) Mbula soki 500 na nsima, Yakobo, mokomi moko ya Biblia, akomaki boye na ntina na Nzambe: “Epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.” (Yakobo 1:17) Kasi, mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete Nzambe oyo balobeli na Makomami ya Liebele akeseni na oyo balobeli na Makomami ya Grɛki ya boklisto?
Eyano ezali ete, lolenge ekeseni ya bomoto ya Nzambe ezali komonana na bisika ekeseni ya Biblia. Kaka Genese yango moko elobi ete Nzambe “ayokaki mpasi na motema,” azali “Mozalisi ya likoló mpe ya mokili” mpe “Mosambisi ya mokili mobimba.” (Genese 6:6, NW; 14:22; 18:25) Makambo nyonso wana elobeli kaka Nzambe moko wana? Ɛɛ, ezali mpenza bongo.
Na ndakisa, zuzi moko akoki koyebana na bato nyonso oyo asambisá ete asakanaka te na mibeko. Epai mosusu, bana na ye bakoki kotalela ye lokola tata ya bolingo, oyo akipaka bango malamu. Baninga na ye ya solosolo bakoki koyeba ye lokola moto ya boboto, oyo alingá kosɛkisa. Zuzi, tata mpe moninga, ezali kaka moto moko wana, kasi bizaleli na ye ezali kokesene na kotalela likambo mokomoko oyo akutani na yango.
Ndenge moko mpe, Makomami ya Liebele elobi ete Yehova azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” Nzokande, Biblia ezali mpe koyebisa biso ete “akoki kozangisa te kopesa etumbu.” (Exode 34:6, 7, NW) Bizaleli mibale wana eyokani na ndimbola ya nkombo ya Nzambe. “Yehova” elimboli “Ye oyo akómisaka.” Elingi koloba Nzambe amikómisaka nyonso oyo alingi mpo na kokokisa bilaka na ye. (Exode 3:13-15) Kasi, azali kaka Nzambe moko wana. Yesu alobaki ete: “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”—Malako 12:29.
Makomami ya Grɛki ezwá nde esika ya Makomami ya Liebele?
Lelo oyo, soki mayele ekoli to makanisi ya bato ebongwani, bato batikaka babuku ya kala mpe babimisaka ya sika. Tokoki mpe koloba ete Makomami ya Grɛki ya boklisto ezwá esika ya Makomami ya Liebele? Te.
Soki mposa ya Yesu ezalaki ete lisolo ya mosala na ye mpe makomi ya bayekoli na ye ezwa esika ya Makomami ya Liebele, alingaki komonisa yango polele. Nzokande, na ntina na Yesu mwa moke liboso amata na likoló, Evanzile ya Luka elobi boye: “Banda na Moize mpe na Basakoli nyonso [na Makomami ya Liebele] alimbwelaki [ bayekoli na ye mibale] makambo oyo etalaki ye na kati ya Makomami nyonso.” Na nsima, Yesu abimelaki bayekoli na ye ya sembo mpe bato mosusu. Lisolo ekobi boye: “Alobaki na bango ete: ‘Oyo ezali maloba na ngai oyo nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino, ete makambo nyonso oyo ekomamá na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo na ntina etali ngai esengeli kokokisama.’” (Luka 24:27, 44) Yesu akokaki kosalela Makomami ya Liebele na nsuka ya mosala na ye awa na mabele soki Makomami yango esilaka ngala?
Ntango lisangá ya boklisto ebandaki, bayekoli ya Yesu bakobaki kosalela Makomami ya Liebele mpo na kolimbola bisakweli oyo ekokisamaki naino te, mitinda ya Mobeko ya Moize oyo ezalaki koteya mateya ya ntina mingi mpe masolo ya basaleli ya Nzambe ya kala oyo ndakisa na bango ya malamu ezali kolendisa baklisto bátikala sembo. (Misala 2:16-21; 1 Bakolinti 9:9, 10; Baebele 11:1–12:1) Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.”b (2 Timote 3:16) Makomami ya Liebele ezali na litomba nini lelo oyo?
Toli mpo na bomoi ya mokolo na mokolo
Tótalela likambo ya koyinana na kati ya bikólo oyo ezali komonana lelo oyo. Na engumba moko ya Mpoto ya Ɛsti, elenge mobali moko ya mbula 21 alobi boye: “Soki tolingi kokende esika moko boye, tosengeli kozala ebele. Ntango mosusu soki tozali ebele bakobanga kosala biso mabe.” Abakisi boye: “Tokoki kobima te nsima ya ngonga ya motoba ya mpokwa, mingimingi na bisika oyo bazwaka bingbunduka. Ntango bato batalaka biso, bamonaka eloko mosusu te, kaka mposo na biso.” Makomami ya Liebele epesi toli mpo na likambo wana?
Nzambe ayebisaki Bayisalaele ya kala boye: “Wana ekofanda mopaya epai na yo na mokili na yo, okosalela ye mabe te. Mopaya oyo afandi epai na bino akozala lokola moto abotami kati na bino, mpe okolinga ye lokola yo mpenza, mpo ete bino bozalaki bapaya na mokili na Ezipito.” (Levitike 19:33, 34) Ɛɛ, na Yisalaele ya kala mobeko wana esɛngaki ete bámemyaka “bapaya,” mpe mobeko yango ezali na kati ya Makomami ya Liebele kino lelo oyo. Omoni te ete mitinda oyo ezali na kati ya mobeko wana ekoki kosalisa lelo oyo mpo na kosilisa likambo ya koyinana na kati ya bikólo?
Atako Makomami ya Liebele elobeli makambo ya mbongo na mozindo te, ezali kopesa batoli ya malamu mpenza mpo na ndenge ya kosalela mbongo. Na ndakisa, na Masese 22:7, tozali kotánga boye: “Modefi azali moombo ya modefisi.” Bato mingi oyo bapesaka toli na makambo ya mbongo balobaka ete kodefadefa mingi ekoki kokweisa moto.
Lisusu, koluka bozwi kozanga kotalela makama oyo yango ekoki komema ezali komonana mingi na mokili ya lelo oyo bato balingi bozwi mingi. Mokonzi Salomo, moko ya bato oyo balekaki na bozwi na mokili oyo, alobelaki likambo yango na mokanda na ye. Akomaki boye: “Moto oyo alingaka palata [to mbongo] atondaka yango te, mpe moto oyo alingaka bomengo atondaka lifuta te. Yango mpe ezali kaka mpamba.” (Mosakoli 5:10, NW) Oyo nde likebisi malamu!
Elikya mpo na mikolo ezali koya
Biblia mobimba ezali kolobela likambo kaka moko: Yehova akosalela Bokonzi oyo etambwisami na Yesu Klisto mpo na kolongisa lotomo na ye ya koyangela mpe kosantisa nkombo na ye.—Danyele 2:44; Emoniseli 11:15.
Makomami ya Liebele ezali koyebisa biso ndenge bomoi ekozala na nse ya Bokonzi ya Nzambe, mpe yango elendisaka biso mpe esalisaka biso tópusana penepene na Yehova Nzambe, Mopesi ya libɔndisi yango. Na ndakisa, mosakoli Yisaya asakolaki ete kimya ekozala na kati ya bato ná banyama: “[Mbwa ya zamba, NW] akofanda elongo na mwana ya mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana ya ntaba; mwana ya ngɔmbɛ mpe nkosi mpe nyama na mafuta bakozala elongo mpe mwana moke na moto akokamba bango.” (Yisaya 11:6-8) Oyo nde elikya kitoko!
Ezali boni mpo na bato oyo bazali konyokwama mpo na loposo to ekóló na bango, mpo na maladi makasi to baoyo bazali kotungisama mpo bazangi mbongo? Makomami ya Liebele esakolaki boye mpo na Klisto Yesu: “Ye akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola.” (Nzembo 72:12, 13) Bilaka ya ndenge wana ezali malamu mpenza mpo esalisaka baoyo bazali kondima yango bákóma kotalela bomoi na elikya mpenza.—Baebele 11:6.
Ekoki kokamwisa biso te ndenge ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya”! (Baloma 15:4) Ya solo, tii lelo oyo Makomami ya Liebele ezali kaka na ntina na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Ezali mpenza na litomba mpo na biso lelo oyo. Tozali na elikya ete okosala makasi oyeba makambo mingi lisusu oyo Biblia mobimba ezali mpenza koteya mpe ekosalisa yo opusana penepene na Nkolo na yango, Yehova Nzambe.—Nzembo 119:111, 112.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, tozali kobenga Kondimana ya Kala, Makomami ya Liebele. (Talá etanda “Kondimana ya Kala to Makomami ya Liebele?” na lokasa 6.) Ndenge moko mpe, Batatoli ya Yehova basalelaka nkombo Makomami ya Grɛki ya boklisto na esika ya Kondimana ya Sika.
b Makomami ya Liebele ezali na mitinda mingi oyo ezali na litomba monene lelo oyo. Nzokande, tosengeli koyeba ete baklisto bazali te na nse ya Mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele na nzela ya Moize.
[Etanda na lokasa 6]
KONDIMANA YA KALA TO MAKOMAMI YA LIEBELE?
Lelo oyo, bato mingi babengaka mikanda 39 ya liboso ya Biblia Mosantu “Kondimana ya Kala.” Maloba “Kondimana ya Kala” ezali na 2 Bakolinti 3:14. Liloba “kondimana” euti na liloba ya Grɛki diathêkês. Na vɛrsɛ wana, ntoma Paulo alobeli te makomami nyonso oyo ekomamaki liboso Yesu aya awa na mabelé. Mpo na nini?
Edward Robinson, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobaki boye: “Lokola kondimana ya kala ezali na kati ya Mikanda oyo Moize akomaki, [diathêkês] elimboli Mokanda ya kondimana, makomi ya Moize, na ndakisa mobeko.” Na 2 Bakolinti 3:14, ntoma Paulo azalaki kolobela Mobeko ya Moize, oyo ezali kaka ndambo ya Makomami oyo ekomamaki liboso Yesu aya awa na mabelé.
Na yango, nkombo nini ebongi mpo na mikanda 39 ya liboso ya Biblia Mosantu? Na esika ya koloba ete eteni wana ya Biblia eleká ngala, Yesu Klisto ná bayekoli na ye bazalaki kobenga yango “Makomami” mpe “Makomami mosantu.” (Matai 21:42; Baloma 1:2) Na yango, na boyokani na maloba wana, Batatoli ya Yehova basalelaka nkombo Makomami ya Liebele na esika ya Kondimana ya Kala mpamba te eteni wana ya Biblia ekomamaki libosoliboso na Liebele. Ndenge moko mpe, basalelaka nkombo Makomami ya Grɛki na esika ya Kondimana ya Sika mpamba te bato oyo bakomaki eteni wana ya Biblia na lisalisi ya elimo santu, basalelaki monɔkɔ ya Grɛki.
[Bililingi na lokasa 4]
Moto moko akoki koyebana lokola zuzi oyo asakanaka te na mibeko, tata ya bolingo mpe moninga
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu azalaki kosalela Makomami ya Liebele ntango azalaki awa na mabelé
[Bililingi na lokasa 7]
Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa moto azwa bikateli ya malamu?