Nsuka ya koyinana kati na mokili mobimba
ESILI koleka bambula soko nkóto mibale, etuluku moko moke ya bato eyinamaki makasi. Tertullien alobi na ntina na ezaleli oyo mingimingi Baloma bazalaki komonisa epai na baklisto ya liboso: “Soki mbula ebeti te, soki koningana ya mabelé esalemi, soki nzala to maladi eyei, nokinoki bazalaki konganga ete, ‘Bwaka baklisto epai na nkosi!’”
Atako bayinamaki, baklisto ya liboso balóngaki lisenginya ya kozongisa mabe na mabe mpo na bokesene. Kati na lisoló na ye likoló na ngomba, oyo eyebani mingi, Yesu alobaki ete: “Boyoki ete balobaki boye, Okolinga mozalani na yo mpe okoyina moyini na yo. Nde ngai nazali koloba na bino ete, Bolinga bayini na bino mpe bobondela mpo na banyokoli na bino.”—Matai 5:43, 44.
Ezalaki mobeko ya Bayuda mozangi kokomama nde ezalaki koloba ete ‘koyina moyini na yo’ ezali likambo ya malamu. Nzokande, Yesu alobaki ete tosengeli kolinga banguna na biso, kasi kosuka te bobele na kolinga baninga na biso. Yango ezali mpasi, kasi ekoki kosalema. Kolinga monguna na yo elimboli te kosepela na banzela na ye to na misala na ye. Liloba ya Greke oyo ezwami kati na lisoló ya Matai euti na a·gaʹpe, oyo ezali komonisa bolingo oyo ekosalaka engebene mitindá. Moto oyo amonisaka a·gaʹpe, bolingo engebene mitindá, asalaka malamu ata epai na monguna oyo azali koyina to konyokola ye. Mpo na nini? Mpamba te yango ezali lolenge ya komekola Klisto, mpe yango ezali lolenge ya kolónga koyina. Nganga-mayele moko ya lokotá ya Greke alobaki ete: “[A·gaʹpe] ezali kopesa biso nzela ya kolónga bizaleli na biso ya kosilika mpe ya kooka nkanda.” Kasi yango ekoki mpenza kosalema kati na mokili ya lelo oyo etondi na koyinana?
Ya solo, ezali te baoyo nyonso bazali komitánga baklisto nde bazali na ekateli ya kolanda ndakisa ya Klisto. Makambo ya nsɔ́mɔ oyo mauti kosalema na Rwanda masalemaki na bato ya bikólo, mingi kati na basangani na yango bamilobaka ete bazali baklisto. Pilar Díez Espelosín, mamelo moko ya Katolike ya Loma oyo asalaki na Rwanda na boumeli ya mibu 20, ayebisaki likambo moko ya kobenda likebi. Mobali moko abɛlɛmaki epai na ndako-nzambe ya mamelo wana na likonga na ye na mabɔkɔ, oyo, emonanaki mpenza ete azalaki kosalela yango. Mamelo wana atunaki ye ete: “Ozali kosala nini boye, awa ezali yo kotambola bipai na bipai mpo na koboma bato? Ozali kokanisa na ntina na Klisto te?” Andimaki ete azalaki kokanisa na ntina na Klisto mpe na nsima akɔtaki kati na ndako-nzambe, afukamaki, mpe asambelaki Malia Losako na etingya nyonso. Kasi na ntango asilisaki, akendeki kokóba koboma bato. Mamelo yango alobaki: “Yango emonisi ete tozali koteya te Evanzile na lolenge lobongi.” Nzokande, kozanga bolóngi motindo oyo, elimboli te ete nsango ya Yesu ezali na nguya te. Koyinana ekoki kolóngama na baoyo bazali kosalela boklisto ya solo.
Balóngaki koyinana kati na káa moko ya bakangami
Max Liebster azali Moyuda moko oyo abikaki na kobomama ya ebele ya Bayuda. Atako nkombo na ye ya mibale elimboli “molingami,” ayinamaki mingi koleka. Alobeli makambo oyo ayekolaki kati na Allemagne ya Nazi na ntina etali bolingo mpe koyina.
“Nakolaki na engumba Mannheim, na Allemagne, na boumeli ya mibu 1930. Hitler alobaki ete Bayuda bazalaki bato ya bozwi mingi oyo bazalaki koyiba mosolo ya bato ya Allemagne. Kasi likambo ya solo ezali ete tata na ngai azalaki mobólá mosoni-sapato. Nzokande, mpo na bopusi ya bopalanganisi nsango na Nazi, bato ya pembeni bakómaki koyina biso. Na ntango nazalaki elenge, moto moko ya mboka asopelaki ngai makila ya ngulu na elongi. Kotuka monene wana ezalaki bobele elembo ya makambo oyo malingaki kobima na nsima. Na 1939 Gestapo ekangaki ngai mpe ebotolaki biloko na ngai nyonso.
“Kobanda na Yanuáli 1940 kino na Máí 1945, nasalaki makasi mpo na kobika na bakáa mitano ya bakangami: Sachsenhausen, Neuengamme, Auschwitz, Buna, mpe Buchenwald. Tata na ngai, ye oyo atindamaki mpe na Sachsenhausen, akufaki na eleko ya mpiɔ makasi na 1940. Ngai moko namemaki ebembe na ye mpo ete ekende kotumbama, epai biboke ya bibembe bitandamaki wana bizalaki kozela ete bitumbama. Na nyonso, basangani mwambe ya libota na ngai bakufaki kati na bakáa.
“Kati na bakangami, ba kapos bayinamaki mingi koleka basodá ya SS oyo bazalaki bakɛngɛli. Ba kapos bazalaki bakangami oyo bazalaki koyokana elongo na ba SS mpe na yango bazalaki kozwa mwa matomba. Bapesamelaki mokumba ya kokabola bilei, bazalaki kobeta makasi bakangami mosusu. Mingimingi, bazalaki kosala na kozanga sembo mpe lokola ezalaki bango kolinga. Nakanisaki ete nazalaki na ntina oyo ekoki mpo na koyina ba SS mpe ba kapos, kasi na boumeli ya bokangami na ngai, nayaki koyeba ete bolingo ezali na nguya koleka koyina.
“Mpiko ya bakangami oyo bazalaki Batatoli ya Yehova endimisaki ngai ete kondima na bango ezwaki moboko na yango likoló na Makomami—mpe ngai moko nakómaki Motatoli. Ernst Wauer, Motatoli oyo nakutanaki na ye na káa ya bakangami ya Neuengamme, alendisaki ngai ete nalóna elimo ya Klisto. Biblia elobi ete ‘atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.’ (1 Petelo 2:23) Namekaki kosala bongo, kotika ete Nzambe ye moko abukanisa, ye oyo azali Mosambisi ya bato banso.
“Bambula mingi oyo nalekisaki kati na káa eteyaki ngai ete bato mingi basalaka makambo ya mabe mpo na kozanga boyebi. Ata basoda ya SS oyo bazalaki bakɛngɛli, bango nyonso te nde bazalaki mabe—ezalaki na moko oyo abikisaki bomoi na ngai. Mokolo moko nazwaki bokono makasi ya pulupulu mpe nalɛmbaki mingi na boye ete nakokaki te kotambola longwa na esika ya mosala kino na káa. Nasengelaki kotindama na ndako ya gaze ya Auschwitz na mokolo molandaki na ntongo, kasi sodá moko ya SS oyo azalaki mokɛngɛli, oyo autaki na etuká moko na ngai na Allemagne akɔtelaki ngai. Alukelaki ngai mosala na lesitolá ya basodá ya SS, epai kuna nakokaki kopema mwa moke kino nazongelaki kolɔngɔnɔ́ na ngai malamu. Mokolo mosusu ayebisaki ngai ete: ‘Max, nazali komioka ete nazali kati na engbunduka oyo ezali kotambola na lombangu makasi mpe ekoki kokangama te. Soki napumbwi, nakokufa. Soki natikali na kati, nakopanzana!’
“Bato wana bazalaki na mposa ya bolingo lokola mpe ngai nazalaki na mposa ya bolingo. Ya solo, ezalaki bolingo mpe motema mawa, bakisa mpe kondima na ngai epai na Nzambe, nde esalisaki ngai mpo ete nalónga ezalela ya mpasi mpe makaneli ya kobomama oyo mazalaki mokolo na mokolo. Nakoki te koloba ete nabikaki kozanga kozwa mpasi na nzoto, kasi bilembo ya bampota na ngai ya mayoki ezalaki mpenza moke.”
Esengo mpe boboto oyo Max azali komonisa kino sikawa, bambula 50 na nsima, ezali litatoli monene oyo emonisi ete alobi solo. Ezali bobele Max te nde akutanaki na likambo motindo wana. Azalaki na ntina makasi ya kolónga koyina—alingaki komekola Klisto. Basusu oyo bomoi na bango etambwisamaki engebene Makomami basalaki lolenge wana. Simone, moko na Batatoli ya Yehova na France, ayebisaki lolenge nini ayekolaki ndimbola ya bolingo ya solosolo.
“Emma, mama na ngai, ye oyo akómaki Motatoli mwa moke liboso ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, ateyaki ngai ete mbala mingi bato basalaka mabe mpo ete bayebi eloko mosusu te. Ayebisaki ete soki biso mpe toyini bango, tozali baklisto ya solo te, mpamba te Yesu alobaki ete tosengeli kolinga banguna na biso mpe kosambela mpo na baoyo bazali konyokola biso.—Matai 5:44.
“Nazali komikundola likambo moko ya mpasi oyo etyaki endimeli wana na komekama. Na ntango Nazi ekamataki France, mwasi moko ya ndako pembeni na oyo ya biso anyokolaki mama mingi mpenza. Afundaki mama na Gestapo, mpo na yango, mama na ngai alekisaki mbula mibale kati na káa ya bakangami na Allemagne, epai kuna akómaki pene na kokufa. Na nsima ya etumba, biro ya bapolisi ya France elingaki ete mama atya sinyatili na ye na mokanda mpo na kofunda mwasi wana ete azalaki koyokana na bato ya Allemagne. Kasi mama na ngai aboyaki, alobaki ete ‘Nzambe azali Mosambisi mpe Mofuti ya malamu mpe ya mabe.’ Mwa bambula na nsima, moninga yango ya ndako ya pembeni azwaki bokɔnɔ makasi ya kanser. Na esika ete asepela mpo na mpasi na ye, mama na ngai alekisaki bangonga mingi mpo na kobondisa ye na ndenge ekoki na boumeli ya basanza ya nsuka ya bomoi na ye. Nakoki te kobosana bolóngi wana ya bolingo likoló na koyina.”
Bandakisa mibale oyo ezali komonisa nguya ya bolingo oyo etambwisami na mitindá liboso na bokesene. Nzokande, Biblia yango moko ezali koloba ete ezali na “ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina.” (Mosakoli 3:1, 8, NW) Lolenge nini yango ekoki kosalema?
Ntango ya koyina
Nzambe azali te kokweisa lolenge nyonso ya koyina. Biblia elobi na ntina na Yesu Klisto ete: “Olingi boyengebene mpe oyini [ezaleli ya kotyola mibeko, NW].” (Baebele 1:9) Nzokande, bokeseni ezali kati na koyina mabe mpe koyina moto oyo asali mabe.
Yesu amonisaki bokatikati oyo ebongi kati na kolinga mpe koyina. Ayinaki bokosi, kasi amekaki kosunga bakosi ete bábongola lolenge na bango ya kokanisa. (Matai 23:27, 28; Luka 7:36-50) Akweisaki mobulu, kasi abondelaki mpo na baoyo babomaki ye. (Matai 26:52; Luka 23:34) Mpe, atako mokili moyinaki ye kozanga ntina, akabaki bomoi na ye moko mpo ete apesa bomoi epai na mokili. (Yoane 6:33, 51; 15:18, 25) Atikelaki biso ndakisa ya kokoka na ntina na bolingo oyo etambwisami engebene mitindá.
Bokesene ekoki kopesa biso mpasi na motema, lokola esalemaki mpe epai na Yesu. (Luka 19:45, 46) Nzokande, baklisto bapesameli nzela te ya kozongisa mabe na mabe bango moko. Paulo apesi toli oyo ete: “Bozongisaka mabe mpo na mabe te; bolikiaka mpo na yango emonani sembo na miso na bato yonso. Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato yonso na kimya . . . Tika te ete mabe mazongisa yo nsima, yo zongisa mabe nsima mpo na malamu.” (Baloma 12:17-21) Na ntango tozali koboya kobomba koyina to koboya kozongisa mabe na mabe, bolingo ezali kolónga.
Mokili mozangi koyinana
Mpo ete koyinana esila kati na mabelé mobimba, bizaleli oyo bikɔtá makasi epai na bamilió ya bato bisengeli kobongwana. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Molakisi Ervin Staub apesi likanisi oyo: “Totalelaka baoyo tozali konyokola na motuya moke mpe topesaka motuya mingi epai na baoyo tozali kosunga. Wana tozali kopesa motuya mingi na baoyo tozali kosunga mpe tozali kozwa esengo oyo eutaka na kosunga bato, toyaka mpe komimona ete tozali na bolingo mpe tozali basungi. Moko na mikano na biso esengeli bongo kozala ya kosala bituluku oyo kati na yango bato mingi mpenza bazali kosunga basusu.”—The Roots of Evil (Bantina ya mabe).
Na maloba mosusu, kosilisama ya koyinana ezali kosɛnga ete etuluku moko esalema, oyo kati na yango bato bazali koyekola bolingo na kosalisanáká, etuluku oyo kati na yango bato babosani koyina nyonso oyo ebimisami mpo na kokanisela baninga mabe, bolingi ekólo, koponapona mposo, bolingi etulúká. Libota motindo oyo ezali? Tótalela ndakisa ya mobali moko oyo amonaki mpenza koyinana na miso na ye moko, na boumeli ya mbongwana ya makambo na Chine.
“Na ntango mbongwana ya makambo ebandaki, bateyaki biso ete tokoki soko moke te kobebisa bokangami na biso kati na ‘etumba ya kosilisa bokesene.’ Koyinana ezalaki ezaleli oyo emonanaki mingi. Nakómaki moko kati na bato ya etuluku ya Red Guard mpe nabandaki koluka ‘banguna ya parti’ epai na epai—ata kati na libota na ngai. Atako na ntango wana nazalaki naino elenge, nasanganaki na mosala ya kosala bolukiluki kati na bandako epai kuna tozalaki koluka bilembeteli ya ‘bizaleli ya botomboki.’ Nakambaki mpe likita moko liboso ya bato banso, oyo ezalaki kotondola moto moko oyo aboyaki mbongwana. Ya solo, bifundeli wana bizalaki mbala mosusu kozwa moboko likoló na likunya ya moto ye moko kasi na makambo ya politiki te.
“Namonaki bato mingi—mikólo mpe bilenge, mibali mpe basi—babetamaki makasi mpe na nsima babetamaki lisusu makasi koleka. Moko kati na balakisi na ngai—ye oyo azalaki moto malamu—batambwisaki ye bipai na bipai lokola nde azalaki mosáli mabe. Basanza mibale na nsima, ebembe ya molakisi mosusu oyo azalaki kopesamela limemya mingi kati na eteyelo na ngai emonanaki pene na Ebale Suzhou, mpe bapusaki molakisi na ngai ya Lingelesi ete amitya nsinga na nkingo. Natungisamaki mpe nabulunganisamaki. Bango bazalaki bato ya boboto. Kosala lolenge wana elongobanaki te! Na bongo, nakataki boyokani na ngai nyonso elongo na bato ya Red Guard.
“Nabanzi te ete eleko wana ya koyinana oyo etondaki na Chine na ntango mokuse ezalaki bobele na Chine. Makambo mingi ya koyinana masili kosalema na boumeli ya ekeke oyo. Nzokande, nandimisami ete bolingo ekoki kolónga koyinana. Ezali likambo oyo ngai moko namonaki. Na ntango nabandaki koyangana elongo na Batatoli ya Yehova, nakamwaki mingi na bolingo ya solosolo oyo bazalaki komonisa epai na bato ya mposo mosusu mpe ya lolenge mosusu. Nazali kozela na motema likoló ntango oyo, lokola Biblia ezali kolaka yango, bato banso bakoyekola kolingana.”
Ee, libota ya mokili mobimba ya Batatoli ya Yehova ezali elembeteli ya polele oyo emonisi ete koyinana ekoki kosilisama. Ata soki ezalela na bango ya kala ezalaki lolenge nini, Batatoli bazali kosala makasi mpo ete, na esika ya kokanisela baninga mabe, bazali kopesana nde limemya mpe bazali kolongola bilembo nyonso ya bolingi etulúká, koponapona mposo, to bolingi ekólo. Moko na bantina ya elongá na bango ezali bongo ekateli makasi oyo bazwi ya komekola Yesu Klisto na komonisáká bolingo oyo etambwisami engebene mibeko. Ntina mosusu ezali oyo ete bazali kozela Bokonzi ya Nzambe esukisa bokesene nyonso oyo ekoki kobimisela bango mpasi.
Bokonzi ya Nzambe ezali nzela bobele moko oyo ekosala mokili oyo ezangi koyinana, mokili oyo epai kuna ata mabe oyo tosengeli koyina ekozala te. Biblia elobeli yango lokola “likoló na sika,” boyangeli wana ya likoló ekotya mpenza mokili oyo mozangi bokesene. Ekoyangela likoló na “mabelé na sika,” to libota ya sika ya bato oyo bakoteyama ete balingana. (2 Petelo 3:13; Yisaya 54:13) Koteyama yango esilá kobanda, lokola makambo ya Max, Simone, mpe ya bato mingi mosusu emonisi yango. Ezali bobele mwa ndakisa moke ya ebongiseli ya mokili mobimba mpo na kolongola koyinana mpe makambo oyo mabimisaka yango.
Na nzela ya Mosakoli na ye Yisaya, Yehova azali kolobela matomba na yango: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai na monana.” (Yisaya 11:9) Nzambe ye moko akosakola nsuka ya koyinana. Ekozala mpenza ntango ya kolinga.
[Bililingi na lokasa 7]
Ba Nazis bakomaki nimero ya boloko na loboko-mwasi ya Max Liebster
[Elilingi na lokasa 8]
Mosika te, koyinana ekokóma likambo ya kala