Nazali na mibu monkámá kasi nazali naino na nzoto makasi
LISOLÓ YA RALPH MITCHELL
Tata na ngai, azalaki moto ya molai mingi te, azalaki moteyi na lingomba ya Méthodiste. Azalaki kotindama na ndakonzambe mokomoko nsima ya mbula mibale to mbula misato, kolekáká bongo na bingumba mike mingi, alekaki mpe na engumba Asheville, na Caroline ya Nɔ́rdi na États-unis, epai kuna nabotamaki na Febwáli 1895. Na yango, wana ezalaki ngai kokóla nayebaki malamu mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba.
NAZALI komikundola ete wana nazalaki elenge bazalaki kofandisa ngai na “kiti ya bato ya ntúbélá” na makita ya bokundoli bondimi mpo ete natondisama na elimo santu—mpo na “kozwa elimo ya komipesa,” lolenge bazalaki kobénga yango. Bazalaki koyebisa ngai ete natubela masumu na ngai, natosa Mibeko Zomi, mpe nazala na etamboli malamu. Na bongo, nalingaki kokende na likoló na nsima ya liwa. Nalobaki na nsé ya motema ete: ‘Nabanzi ete nakokende na lifelo mpamba te nakoki te kosala makambo malamu oyo ekoki kopesa ngai nzela ya kokende na likoló.’ Nazalaki kokanisa ete bobele mikóló—mingimingi bateyi—nde bazalaki kokokisa mitindá ya Biblia.
Kasi ata ntango nazalaki mpenza elenge, nabandaki komona bokosi kati na mangomba. Na ndakisa, tata na ngai atalelaki na bopotu bamposa ya mosuni ya libota na ye bobele mpo ete akoka kosangisa ebele ya mosolo ya kopesa epai na episkopo na ntango ya likita monene ya bakonzi ya lingomba. Azalaki na elikya ete episkopo alingaki kopona ye ete akende kokamba ndakonzambe oyo ezali na basangani mingi koleka. Nazali komikundola moteyi moko oyo azalaki mpe molóni ntokia (coton). Azalaki na mposa makasi ya kokóma mokambi, na yango atekisaki ebele ya basaki ya ntokia mpe akendeki na likita monene na ebele ya mosolo na libenga. Na ntango emonanaki ete basilaki kozwa mosolo nyonso oyo bayangani bakokaki kopesa—oyo mingi na bango bazalaki bongo bateyi—molóni wana ya ntokia atɛlɛmaki mpe angangaki ete: “Bozali kopesa epai na episkopo na bino mosolo moke boye? Moteyi moko azali nde kopesa badolare mitano, ngai nakopesa badolare zomi!” Bakongolaki nkóto moko ya badolare, mpe episkopo aponaki moto yango ete akóma mokóló-mokambi likoló na tata na ngai. Nakokaki kondima te ete koponama motindo wana eutaki na Nzambe. Uta ntango wana nakómaki kobɛta ntembe makasi na makambo nyonso oyo ezalaki na boyokani na mangomba.
Natindamaki na mosala ya sodá na ntango États-Unis ekɔtaki na etumba ya liboso ya mokili mobimba. Nazali komikundola malamu ete nazalaki koyoka baomonié koteya biso basodá ete tóbunda na bosembo nyonso mpo na mboka na biso, mpe yango ekólisaki ezaleli na ngai ya koyina mangomba. Mikano na ngai ezalaki ete nabika na etumba, nasilisa kelasi na ngai mpe na nsima nabala. Kosambela ezalaki na esika te kati na mikano na ngai ya mikolo mizalaki koya.
Mbongwana ya makanisi
Na 1922, nalingaki elenge mwasi moko nkombo na ye Louise. Azalaki Mokatolike oyo amipesaki mingi mpenza, mpe na ntango tozwaki ekateli ya kobalana, alingaki ete tósala libala na ndakonzambe ya Katolike. Nalingaki ata molulu moko ya lingomba te, na yango andimaki ete tósala libala na biso kati na ndako monene ya Leta na engumba New York.
Na ebandeli tozalaki na bowelani te mpo na oyo etalaki makambo ya lingomba. Namonisaki ye polele ete nazalaki kondimela makambo ya mangomba te mpe ete soki tolobeli yango tokoyokana te. Na yango, katikati na 1924 mpe 1937, toyaki kobota bana—moko nsima na mosusu, kino tokómaki na bana mibali mitano mpe bana basi mitano! Louise alingaki ete bana na biso bákɔta eteyelo ya Katolike. Nalingaki te ete báteyama na lingomba na lolenge moko to mosusu, na bongo toswanaki mpo na yango.
Na ebandeli ya 1939 likambo moko esalemaki oyo ebongolaki lolenge na ngai ya kotalela mangomba nyonso. Batatoli ya Yehova mibale, Henry Webber mpe Harry Piatt, bayaki na ndako na ngai na Roselle, na New Jersey. Emonanaki nokinoki ete balingaki kolobela lisoló oyo ngai nasepelaka te kosolola na ntina na yango—lingomba. Nazalaki naino koyoka mpii mpo na kondima na ngai mpamba te baomonié wana balobaki ete: ‘Bóbunda mpo na mboka na bino,’ nzokande epai toutaki, bakonzi ya mangomba bazalaki koloba ete: ‘Bóboma te.’ Oyo nde bokosi! Nakanisaki ete nalingaki kosembola Batatoli wana mibale. Nalobaki na bango ete: “Tiká nayebisa bino likambo moko. Soki lingomba na bino ezali solo, boye mangomba nyonso mosusu mazali lokuta. Mpe ata soki moko kati na mangomba mosusu ezali solo, boye nyonso oyo etikali, mpe oyo ya bino, mazali ya lokuta. Ekoki kozala bobele na lingomba moko ya solo.” Nakamwaki na komonáká ete bandimaki likanisi na ngai!
Na nsima, basɛngaki ngai ete nakamata Biblia na ngai mpe nafungola yango na 1 Bakolinti 1:10. Epai kuna natángaki ete: “Bandeko, nalɔmbi bino na nkombo na Nkolo na biso Yesu Klisto ete bino nyonso bolobaka na motindo moko; bókabwana kati na bino te kasi bosangana na motema moko mpe na [elimo, NW] moko.” Mokapo oyo elamwisaki likebi na ngai. Bobele na ntango yango, nabangaki, nakanisaki ete bato wana mibale bazalaki koluka kokɔtisa ngai kati na lolenge moko ya lingomba ya mabe. Kasi nayekolaki likambo moko—ete bokabwani esengeli kozala te kati na baklisto. Nazalaki na mituna mingi na motema na ngai. Na ndakisa, molimo ekómaka nini nsima ya liwa? Nazalaki na mposa mpenza ya kosolola na bango na ntina na motuna wana! Kasi, nakanisaki ete yango elingaki kobimisa kowelana mingi ya makambo ya lingomba kati na ndako na ngai.
Na nsima, moko na bato yango mibale asɛngaki ete: “Tokosepela koya lisusu mpe kosolola elongo na yo na pɔ́sɔ ekoya.” Namekaki kobéngana bango na mayele, kasi mwasi na ngai alobaki kozanga kokakatana ete: “Ralph, balingi koyeba soki bakoki koya lisusu mokolo nini.” Yango ekwamwisaki ngai, mpamba te ye azalaki Mokatolike moko ya molende mpenza! Nzokande, namilobelaki ete, ‘Mbala mosusu tokoki koyokana na mwa makambo mosusu matali lingomba.’ Na yango, nandimaki ete Henry Webber mpe Harry Piatt bázongela ngai lisusu na mokolo ya mitano oyo molandaki.
Na yango, ezalaki motindo wana nde nabandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Mwa moke na nsima, nabyangamaki ete nakende na liyangani moko na libandá ya esika ebéngami Madison Square na engumba New York. Nazali mpenza komikundwela lisoló ya nguya oyo Joseph F. Rutherford asalaki na mokolo ya 25 Yúni 1939, oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bokonzi mpe kimya.” Nazalaki moko kati na basangani 18 000 oyo bazalaki wana. Kasi bato 75 000 mpenza nde bayokaki lisoló yango, soki tosangisi mpe baoyo balandaki yango na nzela ya radio ekangisami na telefone.
Kasi makambo matambolaki malamu mpenza te. Balandi ya sángó moko ya Katolike, Charles Coughlin, bakanaki kobebisa liyangani, mpe pene na katikati mpenza ya lisoló ya Ndeko Rutherford, ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda babandaki konganga mpe kobimisa maloba lokola oyo: “Heil Hitler!” mpe “Viva Franco!” Yikiyiki ezalaki mingi na boye ete makelele mayokanaki ata na banzela ya telefone! Esalaki miniti 15 mpo ete bayambi bato bápekisa etuluku wana. Atako bongo, Ndeko Rutherford azalaki na mpiko, atikaki koloba te, nzokande bayangani bazalaki kobɛta mabɔkɔ mpe yango elendisaki ye.
Sikawa likebi na ngai elamwisamaki mpenza. Mpo na nini sángó ya Katolike azalaki kopusa bato ete báyina Batatoli ya Yehova? Nasosolaki ete ezalaki na likambo moko kati na oyo Rutherford azalaki koteya—likambo oyo bakonzi ya mangomba bazalaki kolinga te ete moto lokola ngai nayoka yango. Na bongo, nakóbaki koyekola Biblia mpe kokóla malamu. Na nsuka, na Ɔkɔtɔ́bɛ 1939, namonisaki elembo ya komipesa na ngai epai na Yehova na nzela ya batisimo na mai. Bana na ngai mosusu bazwaki batisimo na mbula oyo elandaki, mpe mwasi na ngai Louise azwaki batisimo na 1941.
Tolóngaki mimekano
Mwa moke nsima wana nandimaki solo, mama na ngai akufaki, mpe nasengelaki kozonga na Californie ya Nɔ́rdi mpo na komona bokundami na ye. Nayebaki ete nakokaki te kozala na lisosoli malamu soki nayanganaki na milulu ya bokundi oyo esengelaki kosalema kati na ndakonzambe ya lingomba ya Méthodiste. Na yango, liboso ya kosala mobembo nabéngaki tata na ngai na telefone mpe nasɛngaki na ye ete atika nzoto ya mowei kati na ndako ya bibembe. Andimaki, kasi na ntango nakómaki kuna, bazalaki kokende na ndakonzambe, bakanisaki ete ngai mpe nalingaki kolanda bango kuna.
Nalandaki bango te, mpe yango ebimisaki mindɔndɔ kati na libota na ngai. Atako ngai mpe leki na ngai ya mwasi Edna tozalaki koyokana mpenza malamu, nsima ya kokundama ya mama atikaki kolobisa ngai. Nazalaki kotindela ye nkomá, kasi azalaki koyanola te. Ntango Edna azalaki koya na New York na eleko nyonso ya molungé mpo na kolanda mateya ya balakisi na Eteyelo Monene, nazalaki koluka ye. Kasi azalaki bobele kokima ngai, kolobáká ete azalaki na mosala mingi. Na nsuka, natikaki koluka ye, mpamba te emonanaki ete nazalaki bobele kotungisa ye. Bambula mingi elekaki liboso ete nayoka lisusu bansango na ye.
Na 1941, babénganaki bana na ngai motoba na kelasi mpo ete baboyaki kopesa losako na bendɛlɛ, ezalaki mpe bongo mpo na bana mingi mosusu ya Batatoli na États-Unis mpe na Canada. Mpo na kokokisa lisɛngami ya mibeko ya Leta na ntina etali kolakisama, Batatoli basalaki biteyelo mpo na bana na bango, babéngaki yango Biteyelo ya Bokonzi. Kelasi oyo bana na ngai bazalaki kokɔta ezalaki kati na lotɛlɛ moko ya kala na Lakewood, na New Jersey. Ndako moko ya Bokonzi ezalaki na nsé, elongo na ndako moko ya kelasi, kúku, mpe esika ya bolei. Ndako ya kolala mpo na bana basi ezalaki na ndako ya likoló ya mibale, mpe ndako ya kolala mpo na bana mibali ezalaki na ndako ya likoló ya misato. Ezalaki eteyelo moko ya malamu. Bana mingi oyo bazalaki kolala kuna bazalaki kokende epai na bango bobele na bawikende. Baoyo bazalaki kofanda mwa mosika mpenza bazalaki kolekisa pɔ́sɔ moko liboso ya kokende epai na bango na wikende.
Uta na bambula na ngai ya ebandeli kati na solo, nazalaki na mposa makasi ya kokóma mobongisi-nzela, lokola Batatoli ya Yehova babéngaka bapalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Na liyangani oyo esalemaki na 1941 na St. Louis, na Missouri, ndeko mobali moko ayebisaki lolenge nini azalaki kokóba kosala mosala ya mobongisi-nzela wana azalaki kobɔkɔla bana 12. Nakanisaki ete: ‘Soki ye oyo azali na bana 12 azali kosala mosala ya mobongisi-nzela, kasi ngai oyo nazali na bana 10 nakoki mpe kosala bongo.’ Nzokande, ezalela ya makambo na ngai epesaki ngai nzela ya kobanda mosala ya mobongisi nzela bobele mbula 19 na nsima. Na nsuka, na 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1960, nazalaki na likoki ya kobanda kosala lokola mobongisi-nzela ya ntango nyonso.
Bapaya oyo namizelaki na bango te
Na 1975, ndeko na ngai ya mwasi, Edna, abéngaki ngai na telefone. Nakómaki bongo na mibu 80, mpe namonaki ye te mpe nayokaki ata mongongo na ye te na boumeli ya bambula soko 20. Azalaki kobénga ngai uta na libandá ya mpepo, mpe asɛngaki na ngai ete nakende kokamata ye elongo na mobali na ye. Nazalaki na esengo ya komona lisusu Edna, kasi likambo oyo namizelaki na yango te eyaki komonana nsima. Wana tozalaki koya na ndako, mobali na ye alobaki ete: “Ozali na mobongwani moko.” Nayebaki te soki alingaki koloba nini mpenza. Na ntango tokómaki na ndako, alobaki lisusu ete: “Ozali na mobongwani moko awa.” Mwasi na ngai asosolaki nokinoki. Abalukaki epai na ndeko na ngai ya mwasi mpe atunaki ye ete: “Edna, ozali Motatoli?” Edna ayanolaki ete: “Ee, nazali Motatoli.”
Lolenge nini Edna andimaki solo? Na 1972, wana nazalaki kosala makasi mpo na kozongisa boyokani malamu elongo na ye, natindelaki ye likabo ya abonemá ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Pene na mbula moko na nsima, Edna azwaki maladi mpe azalaki kobima te. Bazulunalo yango ezalaki naino likoló na mesa na ye, kozanga ete afungola yango na bikangeli na yango. Bobele mpo na kokokisa mposa na ye ya kotánga, Edna afungolaki moko mpe abandaki kotánga. Nsima ya kotánga zulunalo yango na mobimba, amilobaki ete: ‘Oyo ezali solo!’ Na ntango Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ye, asilaki kotánga liboke mobimba ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Andimaki koyekola Biblia, mpe aumelaki te, akómaki Motatoli ya Yehova.
Nayikaki mpiko nsima ya kobungisa molingami
Na nsima, mwasi na ngai Louise azwaki maladi ya diabète, mpe maladi yango eyaki makasi kino akufaki na 1979, wana akómaki na mibu 82. Na ntango Louise akufaki, namonaki lokola ete eteni mosusu ya nzoto na ngai ekufaki mpe. Namonaki lokola ete bomoi na ngai nyonso esukaki. Nayebaki te nini nakokaki kosala. Lokola nazalaki na mikano mosusu te mpo na mikolo mizalaki koya, nazalaki na mposa makasi ya kolendisama. Mokɛngɛli-motamboli moko, Richard Smith, alendisaki ngai ete nakóba mosala na ngai ya mobongisi-nzela. Namonaki ete nazwaki libɔndisi oyo eleki monene na kobɔndisáká bato mosusu oyo basilaki kokufela balingami na bango.
La Société Watch Tower abongisaki mobembo moko mpo na kokende na Israël na 1979, na yango nakomisaki mpe nkombo na ngai. Mobembo yango elendisaki ngai mingi, mpe na ntango nazongaki epai na ngai, nazongelaki nokinoki mosala na ngai ya mobongisi-nzela. Kobanda wana, nasili komipesa mbula na mbula na mosala ya kosakola na teritware oyo ekabolami naino te to oyo esalelami mingi te kati na etúká mosusu ya mboka na ngai. Atako nasili kokóma na mibu mingi ya kobotama, nazali naino na likoki ya komipesa mpo na libaku yango.
Nabanzi ete na boumeli ya bambula, nasilaki kozwa esengo ya kosunga bato soko 50 ete bákɔta kati na nzela ya bomoi. Bana na ngai mingi bazali kati na solo. Bana na ngai mibale ya basi bazali kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Mwana na ngai mosusu ya mwasi, Louise Blanton, azali kosala kati na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na New York, elongo na mobali na ye, George, mpe moko na bana na ngai ya mibali azali kosala lokola nkulutu uta mibu mingi.
Ya solo, mpo na ezaleli ya kozanga kokoka oyo tozwaki epai na baboti na biso ya liboso, biso banso tokoki kobɛla mpe kokufa. (Baloma 5:12) Na ntembe te, bomoi na ngai ezangaki mpasi mpe bwale te. Sikawa nazali kobɛla mingai na lokolo na ngai ya mwasi. Na bantango mosusu epesaka ngai mpasi makasi, kasi epekisaki ngai te ete nasala mosala na ngai. Mpe nazali kobondela ete epekisa ngai te. Nalingi kokóba. Mposa na ngai makasi mpenza ezali bongo ya kokóba kati na mosala na ngai ya mobongisi-nzela kino na nsuka, kosaláká nyonso oyo ekoki na ngai mpo na koyebisa nkombo ya Yehova mpe mikano na ye.
[Elilingi na lokasa 23]
Elongo na mwana na ngai ya mwasi Rita