Tiká ete bososoli ebatela yo
“Mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.”—MASESE 2:11.
1. Bososoli ekoki kobatela biso na nini?
YEHOVA alingi ete omonisa bososoli. Mpo na nini? Mpamba te ayebi ete yango ekobatela yo na makámá ndenge na ndenge. Masese 2:10-19 ebandi na maloba oyo: “[Ntango, NW] mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.” Ekobatela yo na nini? Na makambo lokola “nzela mabe,” bato oyo batiki nzela ya sembo mpe baoyo bapengwi na etamboli na bango mobimba.
2. Bososoli ezali nini, mpe oyo ya lolenge nini baklisto bazali mpenza na mposa na yango?
2 Na ntembe te, ozali komikundola ete bososoli ezali likoki oyo elimo ezali na yango mpo na kokesenisa likambo moko na mosusu. Moto oyo azali na bososoli amonaka polele bokeseni oyo ezali kati na makambo to makanisi mpe ayebi kokata ntina ya likambo malamu. Lokola tozali baklisto, tozali mpenza na mposa ya bososoli ya elimo oyo etongami likoló ya boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Ntango tozali koyekola Makomami, ezali lokola nde tozali koyanganisa mabanga oyo makotonga bososoli ya elimo. Makambo oyo tozali koyekola makoki kosalisa biso na kozwa bikateli oyo bikosepelisa Yehova.
3. Lolenge nini tokoki kozwa bososoli ya elimo?
3 Ntango Nzambe atunaki Salomo, Mokonzi ya Yisalaele, soki azalaki na mposa ya kozwa lipamboli nini, elenge moyangeli yango alobaki boye: “Pesá moombo na yo motema na mayele mpo na kobongisa bato na yo ete nayeba kokata epai [“kososola kati,” NW] na mabe mpe malamu.” Salomo asɛngaki bososoli, mpe Yehova apesaki ye yango mingi mpenza. (1 Mikonzi 3:9; 4:30) Mpo ete biso mpe tózwa bososoli, tosengeli kosala mabondeli mpe koyekola Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mikanda oyo mizali kongɛngisa biso na elimo, oyo mipesameli biso na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Yango ekosalisa biso ete tókólisa bososoli ya elimo kino kokóma ‘mikóló na makoki ya kososola,’ mpe kozala bato ya makoki mpo na “kokabola [to kososola] kati na malamu mpe mabe.”—1 Bakolinti 14:20; Baebele 5:14.
Likambo oyo lisɛngi mpenza bososoli
4. Kozala na liso “malamu” elimboli nini, mpe lolenge nini yango ekoki kopesa biso litomba?
4 Na lisalisi ya bososoli oyo ebongi, tokoki kosala na boyokani na maloba oyo ya Yesu: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso [ya mosuni] ikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Yesu alobaki lisusu ete: “Liso na yo ezali mwinda na nzoto. Soko liso na yo ezali malamu, mbɛ nzoto na yo mobimba ezali na moi [“pole,” NW].” (Luka 11:34) Liso ezali mwinda ya elilingi. Liso “malamu” emonisaka makambo ndenge mazali mpenza, etangwaka na nzela te. Na liso motindo wana, tokoki komonisa bososoli mpe kotambola kozanga kobɛta mabaku na elimo.
5. Na makambo ya mombongo, nini tosengeli kobosana te na ntina na mokano ya lisangá ya boklisto?
5 Na esika ya kozala na liso malamu, bamoko basili koyeisa mikakatano na bomoi na bango mpe na bomoi ya bato mosusu na nzela ya misala ya mombongo ya kolengola. Nzokande, tosengeli komikundola ete lisangá ya boklisto ezali ‘likonzí mpe etɛmiselo na solo.’ (1 Timoté 3:15) Lokola makonzí ya ndako, lisangá lizali kosimba solo ya Nzambe, kasi mombongo ya moto te. Masangá ya Batatoli ya Yehova matyamaki te mpo na kozala bisika ya kotombola matomba, biloko to misala ya mombongo. Tosengeli koboya kosala makambo na biso ya mombongo na Ndako ya Bokonzi. Bososoli ezali kosalisa biso na komona ete Bandako ya Bokonzi, bisika ya boyekoli ya mokanda, mayangani ya mike mpe mayangani ya minene ya Batatoli ya Yehova ezali bisika oyo baklisto bazali kosangana, bisika ya masoló ya makambo ya elimo. Soki tozali kosalela boyokani na biso ya elimo mpo na kotombola lolenge moko to mosusu ya mombongo, yango ekomonisa ete tozali kopesa mpenza motuya te na makambo ya elimo, boye te? Boyebani kati na lisangá esengeli kosalelama soko moke te mpo na komizwela litomba ya mosolo.
6. Mpo na nini misala mpe biloko ya mombongo esengeli te kotekama to kolobelama na makita ya lisangá?
6 Bamoko bazali kosalela bokutani na biso ya Teokrasi mpo na koteka bankisi ya monganga to biloko ya monzɛlɛ, nkisi ya vitamini, misala ya botindi nsango mosika, biloko ya botongi bandako mpe batekiniki na yango, myango ya kosala mibembo, baordinatɛrɛ mpe misala na yango, mpe bongo na bongo. Nzokande, bisika ya makita ya lisangá ezali te bisika ya koteka to ya kotombola biloko to misala ya mombongo. Tokoki kososola etindá wana ya ntina mingi soki tomikundoli ete Yesu ‘abimisaki na Tempelo bampate mpe bangɔmbɛ nyonso, asopaki misolo na basombotani mpe abalolaki mesa. Alobaki na batɛkisi na bibenga ete, Longolá awa biloko oyo! Zalisá ndako na tata na ngai esika na zando te!’—Yoane 2:15, 16.
Tokoloba boni mpo na bokɔtisi mosolo na mombongo?
7. Mpo na nini bososoli mpe bokɛngi ezali na ntina liboso ya kokɔtisa mosolo na mombongo?
7 Bososoli mpe bokɛngi ezali na ntina mingi wana tozali kokanisa na bokɔtisi mosolo na mombongo moko mpo na kozwa litomba nsima ya ntango. Na ndakisa soki moto moko azali na mposa ya kodefa mbongo mpe apesi bilaka lokola oyo: “Ndimá ngai ete okozwa mbongo mingi.” “Okobungisa mosolo na yo te. Mombongo oyo efutaka malamu.” Kebá na moto oyo azali kopesa bindimiseli motindo wana. Ekoki kozala ete azali kotalela makambo na libungá, to mpe azali moto ya kozanga kolongobana, mpamba te kotya mosolo na mombongo ezalaka mbala mingi likambo oyo okoki kotyela yango motema te. Ya solo, bato mingi ya maloba ya sukali, oyo bazangi kolongobana, bazali kokosa basangani ya lisangá. Yango ezali kokundwela biso ‘bato mabe’ oyo bakɔtaki na nkuku kati na lisangá na ekeke ya liboso, mpe ‘babalolaki ngɔlu ya Nzambe kino etamboli ya bosɔtɔ.’ Bazalaki mabanga ya nsɔngɛ na nsé ya mai, oyo makoki kozindisa masuwa to kozokisa mpe koboma babɛti-mai. (Yuda 4, 12, NW) Ya solo, mikano ya bakosi mikeseni na oyo ya bapengwi, kasi bango mpe bazali koyiba basangani ya lisangá.
8. Nini esili kosalema na mimbongo oyo mimonanaki lokola ete mikoki kopesa litomba?
8 Ezala baklisto oyo bazali na mikano malamu bapesanaki makanisi elongo na baklisto mosusu na ntina na mimbongo oyo mimonanaki lokola mikopesa litomba, kasi bango mpe baoyo balandaki bango babungisaki mosolo oyo batyaki na mimbongo wana. Mpo na yango, baklisto mingi basili kobungisa mikumba na bango na lisangá. Ntango mimbongo ya koluka kokóma na bozwi nokinoki miyei komonana ete mizalaki bobele myango ya bokosi, moto bobele moko oyo azwaka litomba ezali bongo mokosi, oyo na mbala moko akomonana lisusu te. Lolenge nini bososoli ekoki kosalisa moto ete apengola makámá motindo wana?
9. Mpo na nini bososoli ezali na ntina mpo na kotalela malamumalamu makumisi oyo bazali kopesa na bokɔtisi mosolo na mombongo mpo na kozwa litomba nsima ya mwa ntango?
9 Bososoli elimboli kozala na likoki ya komona polele makambo oyo mazali molili. Likoki yango ezali na ntina mingi mpo na kotalela malamumalamu makumisi oyo mazali kopesama mpo na biloko, na misala to na bopesi mosolo na mombongo mpo na litomba. Baklisto batyelanaka motema, mpe bamoko bakoki kokanisa ete bandeko na bango ya elimo, mibali mpe basi, bakoki te komikɔtisa na mombongo mabe oyo mokoki kotya biloko ya baninga na bango bandimi na likámá. Kasi likambo oyo ete mosáli na mombongo azali moklisto ezali ndanga te ete mombongo na ye to mwango na ye ekolónga.
10. Mpo na nini baklisto mosusu balukaka kodefa mosolo ya mombongo epai na baninga na bango baklisto, mpe nini ekoki kobima na mombongo motindo wana?
10 Baklisto mosusu bazali koluka kodefa mosolo ya mombongo epai na bandeko mibali mpe bandeko basi mpamba te bakompanyi oyo eyebani mingi na makambo matali kodefisa mosolo ekoki soko moke te kopesa mosolo na yango na mimbongo wana oyo mitondi na makámá. Mingi bakosamaki na kokanisáká ete soki bakɔtisi mosolo na bango na mombongo mpo na kozwa litomba, bakokóma na bozwi nokinoki, kozanga ete básala mosala mingi to mpe kozanga mpenza ete básala mosala. Bamoko babendami na kokɔtisa mosolo ya kozwa litomba na mombongo bobele mpo na lokumu oyo ekangani na mosala yango, kasi basili kobungisa mosolo nyonso bazalaki na yango! Moklisto moko apesaki mosolo mingi na mombongo, mpe amizelaki na kozwa litomba ya 25 % nsima ya pɔ́sɔ mibale mpamba. Abungisaki mosolo nyonso wana ntango kompanyi ya bokɔtisi mosolo mpo na litomba esakolaki ete ekwei. Na likambo mosusu ya mombongo, ndeko moko, oyo azali mosáli monene ya mombongo, adefaki mosolo mingi epai na bandeko mosusu na lisangá. Alakaki ete akozongisa yango na matomba mineneminene, kasi mombongo na ye ekweaki mpe abungisaki misolo wana adefaki.
Ntango mimbongo mikwei
11. Toli nini Paulo apesaki na ntina na lokoso mpe ezaleli ya kolinga mosolo?
11 Kokwea ya mimbongo esili komema na mawa mpe ata na kokwea na elimo mpo na baklisto oyo bamikɔtisaki na mimbongo ya makámá. Kozanga kopesa nzela na bososoli ete ezala libateli esili komema mpasi na motema mpe nkanda. Lokoso esili kokweisa bato mingi na motambo. Paulo akomaki ete: “Tiká te ete bóloba . . . makambo nyonso . . . na bilulela; ebongi bongo na Babulami.” (Baefese 5:3) Mpe akebisaki ete: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛɛ. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopengwa longwa na kondima mpe bamitɔbɔli bango mpenza na bolózi mingi.”—1 Timoté 6:9, 10.
12. Ntango baklisto bazali kosala mombongo kati na bango, eloko nini ya ntina basengeli kobosana te?
12 Soki moklisto moko akólisi ezaleli ya kolinga mosolo, akoki komisala mabe mingi na elimo. Bafalisai bazalaki balingi na mosolo, mpe yango ezali moko na bizaleli ya bato mingi na mikolo oyo ya nsuka. (Luka 16:14; 2 Timoté 3:1, 2) Na kokesana na bato yango, lolenge ya bomoi ya moklisto esengeli kozanga “mposa na mosolo.” (Baebele 13:5) Ya solo, baklisto bakoki kosala mombongo bango na bango to kobanda mombongo esika moko. Nzokande, ntango bazali kosala makambo motindo wana, masoló mpe bopesani makanisi esengeli kosalema na libándá ya makambo ya lisangá. Mpe tosengeli kobosana likambo oyo te: Ata kati na bandeko ya elimo, esengeli ntango nyonso kokoma boyokani na bino ya mombongo na mokanda. Na likambo yango, ebongi kozwa makanisi ya ntina na lisoló oyo motó na likambo na yango elobi ete “Bókoma yango na mokanda!,” oyo libimaki na Lamuká! ya 8 Máí 1983, nkasa 13 kino 15 (ebimeli ya Lifalansé).
13. Lolenge nini okoki kosalela Masese 22:7 na makambo ya mombongo?
13 Masese 22:7 eyebisi biso ete: “Modefi azali moombo na modefisi.” Mbala mingi, ezalaka likambo ya mayele te komikómisa biso moko to kokómisa ndeko na biso lokola moombo. Soki moto moko asɛngi biso ete tódefisa ye mosolo ya mombongo, ekozala malamu ete tótalela makoki na ye ya kozongisa mosolo yango. Ayebani ete azali moto ya kolongobana mpe abongi kotyelama motema? Ya solo, tosengeli koyeba ete kodefisa motindo wana ekoki kosala ete mosolo ebunga mpo ete mimbongo mingi mizali kolónga te. Ata soki tosali kontrá, tóyeba ete yango ezali te ndanga ya bolóngi kati na mombongo. Mpe ezali mpenza bokɛngi te mpo na moto ete amikɔtisa na likámá ya kopesa na kompanyi moko ebele ya mosolo oyo soki ebungi ekomemela ye mikakatano.
14. Mpo na nini tosengeli komonisa bososoli soki todefisaki mosolo epai ya ndeko moklisto oyo mombongo na ye ekwei?
14 Tosengeli komonisa bososoli soki todefisaki mosolo epai na moklisto moko mpo na kosala mombongo mpe mosolo yango ebungaki, atako moklisto yango asalelaki te makambo ya kozanga kolongobana. Soki kokwea ya mombongo ezalaki te libunga ya ndeko oyo adefaki mosolo epai na biso, tokoki nde koloba ete akosaki biso? Te, mpamba te todefisaki na bolingi na biso moko, mbala mosusu tozalaki kozwa litomba uta na yango, mpe eloko moko ya kozanga kolongobana esalamaki te. Lokola likambo ya kozanga kolongobana ezalaki te, tozali na elónga ya kofunda modefi na esambiselo te. Malamu nini ekozwama na kofunda ndeko na biso moklisto ya kolongobana oyo, atako azalaki na makanisi malamu, atiki kosala mpo ete mombongo ekwei?—1 Bakolinti 6:1.
15. Makambo nini masengeli kotalelama ntango moto asakoli epai na Letá ete mombongo na ye ekwei?
15 Na bantango mosusu, baoyo bazali kokwea na mombongo bazali koluka kopengola mitungisi na koyebisáká epai na Letá ete mombongo ekwei (faillite). Lokola baklisto bamonisaka bopɔtu te mpo na kofuta nyongo, emonani ete ata nsima wana Letá alongoli ndambo mosusu ya nyongo yango, bamoko bazali komiyoka na lisosoli na bango ete basengeli kofuta banyongo wana oyo elongolamaki, soki badefisi na bango bandimi kofutama. Kasi, tokoloba boni soki modefi moko abungisaki mosolo ya ndeko na ye mpe azali na lolenge ya bomoi ya bozwi? To ezali boni soki modefi asili kozwa mosolo oyo ekoki mpo na kofuta nyongo yango kasi aboyi kokokisa mokumba azali na yango ya kofuta mosolo ya ndeko na ye? Na makambo motindo wana, esengeli komituna soki modefi yango akoki kozwa mokumba kati na lisangá.—1 Timoté 3:3, 8; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1994, nkasa 30-31.
Tokoloba boni soki bokosi esalemi?
16. Matambe nini tosengeli kolanda soki tomoni ete basili kokosa biso na mombongo?
16 Bososoli ezali kosalisa biso na koyeba ete kotya mosolo na mombongo epesaka mbala nyonso matomba te. Nzokande, tokoloba boni soki bokosi esalemi? Bokosi elimbolami lokola “kozimbisa na nkó nyonso, kobuba, to kobuka lokuta na mokano ya komema moto mosusu na kosundola eloko na ye ya motuya to na kotika lotómo moko oyo azali na yango.” Yesu Klisto amonisaki matambe oyo moto asengeli kolanda ntango amoni ete akosami na moninga na ye moklisto. Engebene Matai 18:15-17, Yesu alobaki ete: “Soko ndeko na yo akosalela yo mabe, kendá koloba na ye mpo na libunga na ye, bino na ye esika moko. Soko akoyoka yo, okozwa ndeko na yo. Soko akoyoka yo te, kamatá moko to mibale na yo elongo ete likambo lindimana na monɔkɔ na batatoli mibale to misato. Soko akoyoka bango te, lobá na lingomba. Soko akoyoka lingomba te, azala na yo lokola mopakano mpe mokɔngɔli na mpako.” Lisese oyo Yesu apesaki na nsima limonisi ete azalaki kokanisa na masumu oyo matali na ndakisa makambo ya mosolo, bakisá mpe bokosi.—Matai 18:23-35.
17, 18. Soki moklisto moko asaleli biso bokosi, lolenge nini bososoli ekoki kobatela biso?
17 Ya solo, ezali na moboko moko te ya Makomami oyo emonisi ete esengeli kolanda matambe mayebisami na Matai 18:15-17 soki elembeteli to ata elembo moko te ya bokosi ezali. Nzokande, ezali boni soki moto oyo azali komitánga moklisto asalelaki biso mpenza bokosi? Bososoli ekoki kobatela biso ete tósala likambo ata moko te oyo likoki kobebisa lokumu ya lisangá. Ntoma Paulo alendisaki baninga baklisto ete bándima kosalelama mabe mpe ata kokosama, na esika ya kofunda ndeko moko na esambiselo.—1 Bakolinti 6:7.
18 Bandeko na biso ya solosolo mibali mpe basi ‘batondi te na bokosi mpe na mayele mabe’ lokola nganga-nkisi na nkombo Balayesu. (Misala 13:6-12) Na yango, tiká tósalela bososoli ntango mosolo ebungi na misala ya mombongo oyo tozalaki kosala esika moko na bandeko na biso bandimi. Soki tozali kobanza kofunda likambo yango na esambiselo, tosengeli kotalela bopusi na yango likoló na biso moko, likoló na moto to bato mosusu, likoló na lisangá mpe likoló na bato ya libándá. Koluka kofutama ekoki kolya biso ntango mingi, makasi mpe biloko mosusu. Yango ekopesa bozwi bobele epai na baavoka mpe bato mosusu oyo bayebi misala wana. Na mawa nyonso, baklisto mosusu basili kobwaka mikumba ya Teokrasi na komikɔtisáká mobimba na makambo motindo wana. Kopengwisama na biso lolenge wana ezali mpenza kosepelisa Satana, kasi biso tozali nde na mposa ya kosepelisa motema ya Yehova. (Masese 27:11) Epai mosusu, kondima kobungisa ekoki kosalisa biso na kopengola bampasi mingi ya motema mpe ezali kobatela ntango mingi oyo biso mpe bankulutu tokokaki kobungisa na likambo yango. Ekosalisa biso na kobatela kimya ya lisangá mpe ekopesa biso likoki ya kolanda koluka liboso Bokonzi.
Bososoli mpe kozwa makatami
19. Bososoli ya elimo mpe libondeli ekoki kosala nini mpo na biso wana tozali kozwa makatami ya mpasi?
19 Kozwa makatami na makambo ya mosolo to ya mombongo ekoki kobimisela moto mitungisi mingi. Kasi bososoli ya elimo ekoki kosunga mpo na kotalela makambo malamumalamu mpe na nsima kozwa makatami ya mayele. Lisusu, kotya elikya epai na Yehova na nzela ya mabondeli ekoki komemela biso “kimya na Nzambe.” (Bafilipi 4:6, 7) Yango ezali kimya mpe motema mpiɔ oyo euti na boyokani kati na moto mpe Yehova. Ya solo, kimya motindo wana ekoki kosunga biso ete tóbatela bokatikati na biso ntango tolingi kozwa bikateli minene.
20. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini na ntango mombongo mpe lisangá etalelami?
20 Tiká tózwa ekateli makasi ya koboya ete matáta matali mombongo mábebisa kimya na biso mpe oyo ya lisangá. Tosengeli kobosana te ete lisangá ya boklisto ezali kosala mpo na kosunga biso na elimo, kasi ezali te esika oyo makambo ya mombongo masengeli kosalema. Misala ya mombongo misengeli kosangisama soko moke te na misala ya lisangá. Tosengeli kosalela bososoli mpe bokɛngi ntango tolingi komikɔtisa na mombongo. Mpe tiká tóbatela ntango nyonso likanisi ya bokatikati na makambo motindo wana, kolukáká liboso matomba ya Bokonzi. Soki mombongo oyo tosalaki na bandeko na biso baklisto ekwei, tiká tóluka litomba ya baye banso batalelami.
21. Lolenge nini tokoki kosalela bososoli mpe kosala na boyokani na Bafilipi 1:9-11?
21 Na esika ya komibanzabanza mingi koleka mpo na makambo ya mosolo mpe na biloko mosusu ya ntina moke, tiká ete biso banso tótya mitema na biso epai na bososoli, tóbondela mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe, mpe tótika matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Na boyokani na libondeli ya Paulo, ‘tiká bolingo na biso eyikana mingi esika moko na boyebi ya sikisiki mpe bososoli mozindo na ntina ete tókoka komindimisa makambo maleki ntina mpe tóbɛtisa basusu libaku te,’ tómibɛtisa mpe biso moko libaku te. Sikawa, lokola Klisto asili kofanda na kiti na ye ya bokonzi na likoló, tiká ete tómonisa bososoli ya elimo kati na makambo nyonso ya bomoi. ‘Tiká mpe tótonda na mbuma ya boyengebene na nzela ya Yesu Klisto, mpo na nkembo mpe masanzoli ya Nzambe na biso,’ Nkolo Mokonzi Yehova.—Bafilipi 1:9-11, NW.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Bososoli elimboli nini?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina komonisa bososoli na makambo ya mombongo kati na baklisto?
◻ Lolenge nini bososoli ekoki kosalisa biso soki tomoni ete ndeko na biso moklisto akosi biso?
◻ Bososoli esengeli kozala na esika nini ntango tozali kozwa makatami?
[Elilingi na lokasa 18]
Bososoli ekosunga biso na kosalela toli ya Yesu oyo etali koluka liboso Bokonzi
[Bililingi na lokasa 20]
Bókoma ntango nyonso boyokani ya mombongo na mokanda