Bolɛmbu ya bato ezali kokumisa nguya ya Yehova
“Moto nyonso azalaki kotalela ngai lokola ministre ya ntango nyonso oyo azali na esengo mpe na mɔ́tɔ. Ntango nyonso nazalaki kosalisa bato na mikakatano na bango. Nzokande, bobele na ntango yango, nazalaki komiyoka lokola nde nazalaki kokufa kati na nzoto na ngai. Kobulungana na makanisi mpe na mayoki ezalaki konyokola ngai. Nakómaki komiyoka malamu te ntango nazali esika moko na bato. Nazalaki sé na mposa ya kofanda na ndako mpe kolala. Na boumeli ya basanza mingi, nasɛngaki na Yehova ete atika ngai nakufa na ngai.”—Vanessa.
LOKOLA na ndakisa oyo etángami awa na likoló, tosengeli sé komizela ete na bantango mosusu basaleli ya Yehova bátungisama na mikakatano ya bomoi na ‘ntango oyo na mpasi.’ (2 Timote 3:1) Basusu bakoki kútu kolɛmba na motema. (Bafilipi 2:25-27) Kozanga elikya soki eumeli, ekoki kolongolela biso nguya na biso, mpamba te Biblia elobi ete: “Soko okosɛnzwa na mokolo na mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” (Masese 24:10) Ya solo, ntango tolɛmbi, tozalaka na mposa ya nguya—mbala mosusu ata oyo ntoma Paulo abéngaki ete “nguya oyo eleki nguya ya bomoto.”—2 Bakolinti 4:7, NW.
Yehova Nzambe azali liziba ya nguya ezangi nsuka. Yango ezali komonana polele ntango totaleli biloko oyo azalisaki. (Baloma 1:20) Na ndakisa, tótalela moi. Moi ezali kotinda molungé oyo ezali na ba chevaux-vapeur miliare 240 na mabelé. Nzokande, motuya wana ezali sé soko pene na ndambo moko likoló na mibale ya bamiliare ya nguya oyo moi ezali kobimisa. Mpe moi ezali moke soki tokokanisi yango na minzoto ya mineneminene oyo miyebani. Kati na yango ezali na moko oyo ebéngami Rigel, monzoto moko kati na liboke ya minzoto ebéngami Orion oyo eleki moi na biso na monene mbala 50 mpe ezali kobimisa nguya mbala 150 000 koleka moi!
Mozalisi ya bibombelo ya nguya makasi lolenge wana na likoló asengeli kozala ye moko na “makasi kati na nguya.” (Yisaya 40:26; Nzembo 8:3, 4) Kútu, mosakoli Yisaya alobaki ete Yehova ‘akosɛnzwaka te, akolɛmba te.’ Mpe Nzambe azali na bolingi ya kopesa nguya na ye epai na ye oyo, na ntina na bolɛmbu na biso bato, azali komiyoka ete alɛmbi. (Yisaya 40:28, 29) Lolenge asalaka yango emonisami na oyo ekómelaki ntoma moklisto Paulo.
Koyika mpiko na mimekano
Paulo alobelaki Bakolinti mokakatano oyo asengelaki koyikela yango mpiko. Abéngaki yango ete “monzube kati na nzoto.” (2 Bakolinti 12:7) “Monzube” yango ekokaki kozala mokakatano na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mbala mosusu miso na ye ezalaki komona malamu te. (Bagalatia 4:15; 6:11) To ekoki kozala ete Paulo azalaki kolobela bantoma ya lokuta mpe bazimbisi mosusu oyo bazalaki kotɛmɛla bontoma na ye. (2 Bakolinti 11:5, 6, 12-15; Bagalatia 1:6-9; 5:12) Ata soki ezalaki nini, ‘monzube wana kati na nzoto’ etungisaki Paulo mingi, mpe abondelaki mbala na mbala na ntina ete elongolama.—2 Bakolinti 12:8.
Nzokande, Yehova akokisaki lisɛngi ya Paulo te. Na esika na yango, alobaki na Paulo ete: “Ngɔlu na ngai ekoki na yo.” (2 Bakolinti 12:9) Yehova alingaki koloba nini? Soki totaleli bomoi Paulo azalaki na yango liboso lokola monyokoli ya baklisto, ezali bobele na ngɔlu nde akokaki kozala na boyokani na Nzambe—na koleka kosala lokola ntoma!a (Kokanisá na Zekalia 2:8; Emoniseli 16:5, 6.) Ekoki kozala ete Yehova alobaki na Paulo ete libaku malamu ya kozala moyekoli “ekokaki.” Akopesamela libaku mosusu te ya komona mokakatano ya bomoi na ye kolongolama na nzela ya likamwisi. Ya solo, mikakatano mosusu mikoki koya lokola mbuma ya mabaku malamu ya mosala oyo mobakisameli biso. (2 Bakolinti 11:24-27; 2 Timoté 3:12) Na nyonso wana, Paulo asengelaki sé koyika mpiko na “monzube kati na nzoto” na ye.
Kasi, Yehova asundolaki Paulo soko moke te. Kútu, alobaki na ye ete: “Nguya na ngai ekokisami kati na bolɛmbu.” (2 Bakolinti 12:9) Ɛɛ, Yehova alingaki kopesa Paulo nguya ya koyika mpiko na ezalela na ye. Na yango, “monzube kati na nzoto” ya Paulo ekómaki liteya libongi. Yango eteyaki ye ete atyaka motema na nguya ya Yehova na esika ya kotya motema na nguya na ye moko. Ya solo, Paulo ayekolaki liteya yango malamu, mpamba te mwa bambula na nsima akomelaki Bafilipi ete: “Nayekoli ete nasepela na lolenge nini lozali na ngai. Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:11, 13.
Ezali boni mpo na yo? Ozali koyika mpiko na lolenge moko to mosusu ya “monzube kati na nzoto,” mbala mosusu maladi to mpe likambo moko na bomoi oyo ezali kotungisa yo? Soki ezali boye, zwá libɔndisi. Atako Yehova akolongola mokakatano yango na lolenge ya likamwisi te, akoki kopesa yo mayele mpe nguya ya elimo mpo na kolónga yango wana ozali kolanda kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na yo.—Matai 6:33.
Soki maladi to bobangé ezali kopekisa yo na kosala mosala ya boklisto mingi ndenge olingaki yango, kobungisa elikya te. Na esika ya kotalela mokakatano na yo lokola epekiseli oyo ezali kotya ndelo na mosala na yo mpo na Yehova, talelá yango lokola libaku ya kotyela ye lisusu motema. Lisusu, omikundwela ete motuya ya moklisto ezali kotalelama te na bonene ya mosala oyo azali kokokisa, kasi nde na kondima na ye mpe bozindo ya bolingo na ye. (Kokanisá na Malako 12:41-44.) Kolinga Yehova na molimo na yo mobimba elimboli ete ozali kosalela ye na meko oyo makoki na yo nyonso mapesi yo nzela—kasi na komikokanisa na makoki ya moto mosusu te.—Matai 22:37; Bagalatia 6:4, 5.
Soki “monzube kati na nzoto” na yo ezali bongo ezalela ya mpasi kati na bomoi, lokola liwa ya moto oyo olingaki mingi, landá toli oyo ya Biblia: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Mwasi moklisto moko na nkombo Sylvie asalaki yango. Katikati na mwa bambula moke, akufelaki mobali nsima ya mbula 50 ya libala mpe lisusu bandeko libwa kati na libota na ye—kati na bango mibale bazalaki bana ya bana na ye. Sylvie alobi ete: “Soki lisalisi ya Yehova te mbɛlɛ nalingaki koyoka mawa makasi koleka. Kasi nabɔndisamaki makasi na nzela ya libondeli. Nazalaki mpenza kosolola na Yehova kozanga kotika. Nayebi ete apesaki ngai nguya ya kolónga.”
Oyo nde elendiseli na koyeba ete “Nzambe na kobɔndisa nyonso” akoki kopesa nguya ya koyika mpiko epai na baoyo bazali koyoka mawa! (2 Bakolinti 1:3; 1 Batesaloniki 4:13) Koyebáká yango, tokoki kokanga ntina ya bosukisi ya Paulo na likambo yango. Akomaki ete: “Mpo na Klisto nasepeli mpo na bolɛmbu mpe kotyolama mpe bolɔ́zi mpe minyoko mpe nkaká. Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.”—2 Bakolinti 12:10.
Koyika mpiko na ezaleli ya kozanga kokoka
Biso banso tosangolaki kozanga kokoka na baboti na biso ya liboso. (Baloma 5:12) Lokola mbuma na yango, tozali kobunda na bamposa ya nzoto na biso esilá kobeba. Ya solo, elɛmbisaka mpenza na komona ete bizaleli ya “bomoto ya kala” etingami na biso makasi koleka lolenge oyo tokokaki kokanisa! (Baefese 4:22-24, NW) Na bantango motindo wana tokoki komiyoka lokola ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.”—Baloma 7:22, 23.
Na likambo oyo lisusu, tokoki kozwa nguya epai na Yehova. Ntango ozali kobunda na bolɛmbu moko ya nzoto, kotika soko moke te komibalola epai na ye na nzela ya libondeli, kolukáká na etingyá mpenza bolimbisi na ye ata soki okobɛlɛma na ye mbala boni mpo na likambo sé moko wana. Na ntina na ngɔlu na ye, Yehova, ye oyo “akomekaka mitema” mpe oyo akoki komona bozindo ya bosembo na yo, akopesa yo lisosoli ya pɛto. (Masese 21:2) Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova akoki kopesa yo nguya ya kozongela lisusu etumba mpo na kolónga bolɛmbu ya nzoto.—Luka 11:13.
Tozali mpe na mposa ya nguya ya Yehova na ntango tozali kotalela mabunga ya bato mosusu. Na ndakisa, ndeko moko moklisto akoki koloba na biso “lokola koswama na mbeli.” (Masese 12:18) Yango ekoki kozokisa biso makasi, mingimingi soki tokanisi ete moto oyo asali yango asengeli koyeba malamu ete ezali mabe. Tokoki kobulunganisama makasi. Kútu, bamoko basalelaki kotukama motindo wana lokola mokalo mpo ete bákoka kotika Yehova—oyo nde libunga monene!
Nzokande, ezaleli ya bokatikati ekosalisa biso na kotalela mabunga ya basusu na lolenge lobongi. Tokoki komizela te ete bato ya kozanga kokoka básalela biso makambo na kokoka. Salomo, moto na mayele akundweli biso ete: “Moto azali te oyo akosalaka masumu te.” (1 Mikonzi 8:46) Arthur, moklisto moko mopakolami oyo asalelaki Yehova na bosembo na boumeli ya mbula soko ntuku nsambo alobi ete: “Bolɛmbu ya bandeko na biso basaleli ya Nzambe ezali kopesa biso libaku mosusu ya komonisa bosembo, na kotyáká bomoto na biso na komekama. Soki topesi nzela na makambo oyo bato bazali koloba to kosala ete ebebisa mosala na biso mpo na Yehova, yango ekolimbola ete tozali kosalela bato. Epai mosusu, tobanzi ete bandeko na biso bango mpe balingaka Yehova. Soki toluki makambo ya malamu epai na bango, nokinoki tokomona ete bazali mpenza bato mabe te na ndenge oyo tokanisaka.”
Nguya ya kosakola
Liboso ete amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Wana ekosila [elimo santu, NW] koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino na nsuka na mokili.”—Misala 1:8.
Na kokokisama ya maloba ya Yesu, mosala yango ezali sikawa kosalema na Batatoli ya Yehova kati na bikólo 233 na mokili mobimba. Soki tosangisi mosala na bango nyonso, bazali kolekisa bangonga koleka miliare moko mbula na mbula mpo na kosalisa basusu ete bákóma na boyebi ya Yehova. Kokokisa mosala yango ezali ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. Na mikili mosusu mosala ya kosakola Bokonzi epekisami to etyelami mibeko ebele. Lisusu, tótalela baoyo bazali kokokisa mosala yango—ezali bato ya bolɛmbu, ya kozanga kokoka, oyo mokomoko na bango azali na mikakatano mpe mitungisi na ye moko. Kasi, mosala mozali kokóba, mpe mbuma na yango, na boumeli ya mbula misato oyo esili koleka, bato koleka milió moko basili komipesa na Yehova mpe bamonisi yango na kozwáká batisimo ya mai lokola elembo ya komipesa na bango. (Matai 28:18-20) Ya solo, mosala oyo mozali kokokisama bobele na nguya ya Nzambe. Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Zekalia ete: “Na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na [elimo, NW] na ngai.”—Zekalia 4:6.
Soki ozali mosakoli ya nsango malamu, ozali kosangana na mosala monene wana—ata soki mosala na yo emonani moke ndenge nini. Ata ‘nzube’ nini oyo osengeli koyikela mpiko, okoki kondimisama ete Yehova akobosana soko moke te “mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Na yango, landá kotya motema na Liziba ya nguya nyonso mpo na kozwa lisungi. Omikundola ete ezali bobele na nguya ya Yehova nde tokoki koyika mpiko; nguya na ye ezali kokokisama na bolɛmbu na biso.
[Footnotee]
a Ya solo, lokola “banso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe,” ezali sé na ngɔlu ya Nzambe nde bato nyonso bakoki kozala na boyokani elongo na ye.—Baloma 3:23.
[Maloba na elilingi ya lokasa 26]
Mosala ya kosakola ezali kokokisama bobele na nguya ya Yehova