Yelusaleme na ntango ya Lisoló ya Biblia—Arkeoloji ezali komonisa makambo nini?
MISALA minene mpe ya kosepelisa ya bolukiluki ya arkeoloji mibandaki kosalema na engumba Jérusalem, mingimingi kobanda mobu 1967. Bisika mingi oyo batimolaki bisili sikawa kopesamela ndingisa na bato nyonso ete bákenda kotala yango, na yango, tiká tókende kotala bamoko na bisika yango mpe tómona lolenge arkeoloji ezali na boyokani na lisoló ya Biblia.
Yelusaleme na eleko ya Mokonzi Davidi
Esika oyo Biblia ezali kobénga yango ete Ngomba ya Siona, epai kuna Mboka ya Davidi etongamaki, ezali komonana moke mpenza kati na engumba Yelusaleme [lelo Jérusalem] ya mikolo na biso. Botimoli ya Mboka ya Davidi oyo ekambamaki na nkɔndɔ Profesere Yigal Shiloh katikati na mibu 1978-1985, emonisaki bisika bitongama na mabanga minene malandani, to bifelo bitɛlɛmisama, na ɛ́sti ya ngomba yango.
Profesere Shiloh alobaki ete yango ezali bitika ya bifelo ya batalasé etongama na mabanga minene oyo likoló na yango Bayebusi (bafandi ya esika yango liboso ete Davidi abɔtɔla yango) batongaki ndako molai. Alimbolaki ete bisika bitongama na mabanga minene malandani oyo amonaki likoló ya bifelo yango bilandisami ezalaki esika makasi oyo Davidi atongaki na nsima, bobele na esika oyo ndako molai ya Bayebusi ezalaki. Na 2 Samwele 5:9, tozali kotánga boye: “Davidi afandaki na esika makasi; abyangaki yango ete, Mboka na Davidi. Davidi atongaki kozingela yango longwa na Milo kino epai na kati.”
Pene na bisika yango ezali na bikɔtelo ya banzela ya mai mpo na engumba wana ya kala, oyo mosusu kati na yango emonani ete esalemaki na eleko ya Davidi. Maloba mosusu mazali na Biblia na ntina na banzela ya mai ya engumba Yelusaleme ebimisaki ntembe. Na ndakisa, Davidi alobaki na bato na ye ete “Moto nani alingi kobɛta Bayebusi, tiká ete akenda na nzela na mai,” akutana na banguna. (2 Samwele 5:8) Yoaba, mokonzi ya mampinga ya Davidi asalaki bongo. Maloba “nzela na mai” elimboli mpenza nini?
Mituna mosusu mitunamaki na ntina na Nzela na mai ya Siloama, oyo emonani ete etongamaki na basáli ya mayele ya Mokonzi Hizikiya na ekeke ya mwambe L.T.B. mpe oyo elobelami na 2 Mikonzi 20:20 mpe na 2 Ntango 32:30. Lolenge nini bituluku mibale wana ya batimoli, oyo moko na moko ezalaki kosala na ngámbo na yango, basalaki mpo na kokutana? Mpo na nini baponaki nzela oyo ezalaki nyokanyoka, kosaláká ete nzela ya mai ezala molai koleka na esika ete básala yango semba? Ndenge nini bazalaki kozwa mopɛpɛ ekoki mpo na kopema malamu, mingi mpenza lokola emonani ete bazalaki kosalela miinda oyo mipelaka na mafuta?
Zulunalo Biblical Archaeology Review esilaki kopesa oyo ekoki kozala biyano ya solo na mituna wana. Etángi maloba ya Dan Gill, geolojiste oyo azalaki mopesi-toli ya botimoli, ye alobaki ete: “Na nsé ya mabelé ya Mboka ya Davidi ezali na ebongiseli ya karst esalama yango moko mpe epalangana mingi. Karst ezali ebéngeli ya bato ya geoloji mpo na kolobela esika oyo ezali na mabulu minene, mibénga mpe batalasé esalami na mai ya nsé ya mabelé wana ezali kotanga to koleka katikati na mabanga ya nsé ya mabelé. . . . Boyekoli na biso ya geoloji mpo na misala ya kolekisa mai na nsé ya Mboka ya Davidi emonisi ete mibongisamaki mingi mpenza na bato oyo bazalaki na mayele ya kolanda mpe kokólisa batalasé ya (karstic) oyo esalema yango moko liboso mpe madusu oyo mabima libándá oyo makɔtisamaki na ebongiseli ya komema mai.”
Yango ekoki kosalisa na koyeba lolenge Nzela ya mai ya Siloama esalemaki. Ekoki kozala ete elandaki banzela ya nyokanyoka ya batalasé oyo ezalaki uta kala na nsé ya ngomba. Ekoki kozala ete bituluku ya basáli na ngámbo mokomoko basalaki naino liboso nzela oyo elandaki mibénga oyo mizalaki na nsé ya mabelé. Bongo na nsima batimolaki talasé etɛngama mpo ete mai makoka kotyola longwa na liziba ya Gihona kino na liziba ya Siloama, oyo na ntembe te ezalaki na kati ya lopango ya engumba. Oyo ezalaki solo elónga monene ya basáli wana ya mayele mpamba te nsuka nyonso mibale ya banzela yango ekabwani bobele na sentimɛtɛlɛ 32, atako molai ya nzela yango mobimba ezali na mɛtɛlɛ 533.
Banganga-mayele bayebi uta kala ete eutelo monene ya mai mpo na engumba ezalaki bongo liziba ya Gihona. Yango ezali na libándá ya bifelo ya engumba kasi ezali mpenza pembeni na yango mpo na kokoka kofungola nzela ya mai mpe kotimola libulu ya bozindo ya mɛtɛlɛ 11, oyo epesaki likoki na bafandi ya engumba ete bátoka mai kozanga ete bábima libándá ya bifelo oyo ebatelaka engumba na bango. Lelo oyo, yango ebéngamaka ete Libulu ya Warren, euti na nkombo ya Charles Warren, oyo amonaki ebongiseli yango na mobu 1867. Kasi ntango nini nzela ya mai mpe libulu yango esalemaki? Yango ezalaki na ntango ya Davidi? Ezali nde nzela ya mai oyo Yoaba asalelaki? Dan Gill ayanoli boye: “Mpo na koluka koyeba soki Libulu ya Warren ezalaki mobénga oyo esalema yango moko, toyekolaki mwa ndambo ya mabelé ya calcaire ya mipanzi na yango na komekáká yango na carbone-14. Ezalaki na eloko moko te oyo emonisaki ete mabelé wana maumelaki mbula koleka 40 000: Yango ezali kopesa elembeteli oyo ekoki kobetelama ntembe te ete libulu wana etimolamaki na bato te.”
Bitika ya eleko ya Hizikiya
Mokonzi Hizikiya ayangelaki na eleko oyo libota ya Asulia ezalaki kokonza bikólo nyonso. Na mbula ya motoba ya boyangeli na ye, Basulia babɔtɔlaki Samalia, engumba-mokonzi ya bokonzi ya mabota zomi. Mbula mwambe na nsima (732 L.T.B.) Basulia bayaki lisusu, kokaneláká Yuda mpe Yelusaleme. Mokanda ya Mibale ya Ntango 32:1-8 emonisi mwango ya komibatela oyo Hizikiya asalelaki. Ezali na bilembeteli ya eleko yango oyo bikoki komonana?
Ɛɛ, na mobu 1969, Profesere Nahman Avigad amonaki bitika ya eleko yango. Botimoli emonisaki eteni ya efelo moko monene, oyo ndambo na yango ya liboso ezalaki na bolai ya mɛtɛlɛ 40, na bonene ya mɛtɛlɛ 7, mpe, ekanisami ete ezali na bosándá ya mɛtɛlɛ 8. Ndambo ya efelo yango etɛlɛmaki na moboko ya mabanga mpe ndambo na yango mosusu likoló ya bandako oyo etongamaki kala te mpe ebukamaki mpo na kotonga efelo wana monene. Nani atongaki efelo yango mpe na ntango nini? Zulunalo moko ya makambo ya arkeoloji elobi ete: “Mikapo mibale ya Biblia misalisaki Avigad na koyeba na bosikisiki dati ya kotongama mpe ntina ya efelo yango.” Mikapo yango milobi boye: “Amilendisaki na mosala mpe atongaki lopango mobimba oyo ekweaki na nsé mpe atongaki ndako molai likoló na yango; libándá na yango mpe atongaki lopango mosusu.” (2 Ntango 32:5) “Botángaki motuya na ndako na Yelusaleme, bobukaki ndako ete bótya lopango na makasi.” (Yisaya 22:10) Lelo oyo batali bakoki komona eteni na yango na oyo ebéngami ete Lopango Monene na eteni oyo efandami na Bayuda na engumba ya kala.
Misala ndenge na ndenge ya botimoli mimonisaki lisusu ete na eleko wana Yelusaleme ezalaki monene koleka ndenge ekanisamaki liboso, mbala mosusu na ntina na bato bakima mboka oyo bautaki na teritware ya bokonzi ya nɔ́rdi nsima ya kolongama na Baasulia. Profesere Shiloh akanisaki ete engumba ya Bayebusi ezalaki na bonene ya hectare 6. Na eleko ya Salomo, ezalaki na bonene ya pene na hectare 16. Mbula 300 na nsima, na ntango ya Mokonzi Hizikiya, eteni ya engumba oyo ezingamaki na lopango ekómaki pene na hectare 60.
Bankunda ya eleko ya Tempelo ya liboso
Bankunda ya eleko ya Tempelo ya liboso, oyo ezalaki liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na bato ya Babilone na mobu 607, ezalaki eutelo mosusu ya makambo oyo mayebani. Makambo ya kokamwisa mamonanaki ntango ebele ya mabulu ya nkunda ekundolamaki na Lobwaku ya Hinomi katikati na mibu 1979-1980. Arkeolojiste Gabriel Barkay alobi ete: “Na lisoló mobimba ya bolukiluki ya arkeoloji na Jérusalem, oyo ezali moko na bibombelo oyo bizali mingi te ya Tempelo ya liboso oyo emonani elongo na biloko na yango nyonso na kati. Yango ezali na biloko koleka nkóto moko.” Abakisi ete: “Mposa monene ya arkeolojiste nyonso oyo azali kosala bolukiluki na Israël, mpe mingimingi na Jérusalem, ezalaka ete akundola biloko oyo bizali na makomi.” Bamonaki barulo mike mibale ya palata, ezalaki na makambo nini?
Barkay alimboli boye: “Ntango namonaki biteni ya rulo ya palata mpe natyaki yango na nsé ya loupe, namonaki ete likoló na yango ezalaki na makomi mazali komonana malamu te, oyo makomamaki na esaleli moko ezali na nsɔngɛ́ likoló na mwa etanda moke mpe ya motau ya palata. . . . Nkombo ya Nzambe oyo ezali komonana polele na makomami yango ezali na balɛtɛlɛ minei ya alfabɛ́ ya Liebele oyo ekomamaki na Liebele ya kala, yod-he-waw-he.” Na búku mosusu oyo akomaki nsima, Barkay abakisi: “Tokamwaki na komona ete bitanda yango nyonso mibale ya palata bizalaki na makomi oyo mazali na maloba ya kobulisa makokani moke na oyo mazali na Biblia na ntina na kobulisama ya banganga.” (Mituya 6:24-26) Yango ezalaki mbala ya liboso oyo nkombo ya Nzambe emonanaki na makomi likoló ya biloko bikundolami na engumba Jérusalem.
Lolenge nini banganga-mayele bayebaki ntango oyo barulo yango eumeli? Mingi mpenza na makambo mosusu ya arkeoloji oyo makangani na lolenge oyo bokundoli wana esalemaki. Koleka biteni 300 ya mbeki oyo bakoki koyeba boumeli na yango emonanaki kati na nkunda, yango ezali ya ekeke ya nsambo mpe ya motoba L.T.B. Bokokanisi kati na makomi mazali na barulo ya palata mpe makomi mosusu oyo dati na yango eyebani, emonisi ete ezali ya eleko moko. Barulo yango ezali sikawa kati na ndako ya kobomba biloko ya ntango ya kala na Israël na engumba Jérusalem.
Kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B.
Biblia elobeli kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. na mikanda ya 2 Mikonzi mokapo 25, na 2 Ntango mokapo 36, mpe na Yilimia mokapo 39, komonisáká ete mampinga ya Nebukadanesala etumbaki engumba yango. Botimoli oyo euti kosalema kala mingi te endimisi solo likambo yango? Engebene Profesere Yigal Shiloh, “elembeteli ya [kobebisama ya Yelusaleme na bato ya Babilone] kati na Biblia . . . ezali kondimisama na bilembeteli bikoki kobɛtelama ntembe te biuti na arkeoloji, kobebisama nyɛɛ ya biloko ndenge na ndenge, mpe mɔ́tɔ oyo ezikisaki biteni ya mabaya ya bandako.” Na nsima alobaki lisusu boye: “Bilembo ya kobebisama wana bimonanaki na botimoli nyonso oyo esalamaki na Jérusalem.”
Batali bakoki komona bitika ya kobebisama oyo esalemaki koleka sikawa mbula 2 500. Linɔ́ngi ya Bayisalaele, Eteni Ezika, Ndako ya Miinda ezali wana bankombo ya bisika ya arkeoloji biyebani mingi mpe bibatelami oyo bato bakendaka kotala yango. Banganga-mayele ya arkeoloji Jane Cahill mpe David Tarler balobi na bokuse kati na búku Ancient Jerusalem Revealed ete: “Kobebisama nyɛɛ ya Yelusaleme na bato ya Babilone ezali komonana polele na biteni minene ya bitika ya biloko bizika na mɔ́tɔ oyo bikundama na nsé ya bandako lokola Eteni Ezika mpe Ndako ya Miinda, mpe lisusu na bikunde ya mabanga ya bandako ekwea na lobwaku ya ɛ́sti. Lolenge Biblia elobeli kobebisama ya mboka . . . eyokani na bilembeteli ya arkeoloji.”
Na yango, lolenge Biblia elobeli Yelusaleme kobanda na ntango ya Davidi kino kobebisama na yango na 607 L.T.B. esili kotalelama mbala mingi na botimoli ya arkeoloji oyo esalemaki na boumeli ya mbula 25 oyo eleki. Kasi ezali boni mpo na Yelusaleme ya ekeke ya liboso?
Yelusaleme na ntango ya Yesu
Botimoli ndenge na ndenge, Biblia, Josèphe Moyuda mokomi ya lisoló ya ntango ya kala na ekeke ya liboso, mpe biutelo mosusu ezali kosalisa banganga-mayele na koyeba lolenge Yelusaleme ezalaki ntango Yesu azalaki awa na mabelé, liboso ete Baloma bábebisa yango na mobu 70 T.B. Elilingi na yango, oyo elakisami na nsima ya lotɛ́lɛ moko monene na engumba Jérusalem, ebongolamaka mbala na mbala mpo na koyokanisa yango na makambo oyo botimoli nyonso ya sika ezali komonisa. Esika monene ya engumba ezalaki bongo Ngomba ya Tempelo, oyo Elode abakisaki monene na yango mbala mibale koleka oyo ya eleko ya Salomo. Ezalaki esika eleki kotombwana oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato na ntango ya kala, ezalaki na mɛtɛlɛ pene na 480 na bolai mpe na mɛtɛlɛ 280 na bonene. Mabanga mosusu ya botongi ezalaki na bozito ya tɔ́ni 50, moko kútu ezalaki pene na tɔ́ni 400 mpe, engebene nganga-mayele moko “yango ekokanaki na mosusu te na bonene kati na mokili mobimba na ntango ya kala.”
Yango ekoki kokamwisa biso te ete bato mosusu batungisamaki na ntango bayokaki Yesu koloba ete: “Bomá Tempelo oyo mpe nakotɛmisa yango lisusu na mikolo misato.” Bakanisaki ete azalaki kolobela ebakata ya tempelo wana, nzokande azalaki koloba na ntina na “tempelo ya nzoto na ye.” Na yango, balobaki ete: “Tempelo oyo eumeli bilanga ntuku minei na motoba mpo na kotongama mpe yo okotɛmisa yango na mikolo misato?” (Yoane 2:19-21) Lelo oyo na lisalisi ya botimoli ya zingazinga ya Ngomba ya Tempelo, batali bakoki sikawa komona bandambo ya bifelo mpe bandako mosusu ya ntango ya Yesu mpe bakoki ata kotambola na bisika oyo mbala mosusu atambolaki mpo na komata kino na bikɔtelo ya tempelo oyo bizali na súdi.
Mosika te na efelo ya wɛ́sti ya Ngomba ya Tempelo, na eteni efandami na Bayuda na engumba ya kala, ezali na bisika oyo bizalaki uta na ekeke ya liboso T.B. bizongisami malamu na botimoli, oyo bibéngamaka Ndako Ezika mpe Kartyé ya Elode. Nsima ya kokundola Ndako Ezika, nganga-mayele ya arkeoloji Nahman Avigad akomaki boye: “Ezali sikawa polele mpenza ete ndako yango etumbamaki na Baloma na 70 T.B., na ntango ya kobebisama ya Yelusaleme. Mpo na mbala ya liboso kati na lisoló ya botimoli ya arkeoloji kati na engumba, bilembeteli ya solosolo mpe ya polele ya kotumbama ya engumba bimonisami.”—Talá bafɔtɔ́ na lokasa 12.
Bokundoli yango mosusu engɛngisi makambo mosusu oyo masalemaki na bomoi ya Yesu. Bandako yango ezalaki na eteni ya likoló ya engumba, epai bato ya bozwi ya Yelusaleme bazalaki kofanda, na mpe banganga-minene. Bamonaki ebele na maziba ya mai mpo na molulu ya kopɛtolama kati na bandako yango. Nganga-mayele moko alobi ete: “Ebele ya maziba ya mai mazali kondimisa ete bafandi ya eteni ya likoló ya engumba yango bazalaki kobatela makasi mpenza mibeko ya molulu ya komipɛtola na boumeli ya eleko ya Tempelo ya mibale. (Mibeko yango mikomami kati na Mishnah, oyo mikapo zomi kati na yango milobeli makambo mikemike matali mikveh.)” Makambo yango mazali kosalisa biso na kokanga ntina ya maloba ya Yesu epai na Bafalisai mpe Bakomeli na ntina na milulu yango.—Matai 15:1-20; Malako 7:1-15.
Motángo monene mpenza ya bambeki ya mabanga emonanaki na engumba Jérusalem. Nahman Avigad alobi ete: “Na yango, mpo na nini yango emonani na mbalakaka mpe na motángo monene boye kati na bandako ya Yelusaleme? Eyano ezali na makambo matali halakhah, mibeko ya Bayuda mitali molulu ya kopɛtolama. Mishnah elobi na biso ete mbeki ya mabanga ezali kati na biloko oyo bikoki kokóma mbindo te . . . Mabanga makoki kokóma mbindo te na molulu ya kopɛtolama.” Ekanisami ete likambo yango elimboli ntina oyo mai oyo Yesu akómisaki vinyo etyamaki na mbeki ya mabanga na esika ya kotyama na mbeki ya mabelé.—Levitike 11:33; Yoane 2:6.
Botali na ndako ya kobomba biloko ya ntango ya kala ya Israël ekomonisa biso bisika mibale ya kokamwisa mpo na kobomba mikuwa ya bato. Zulunalo Biblical Archaeology Review elimboli ete: “Bisika ya kobomba mikuwa ezalaki kosalelama pene na mbula nkámá liboso ya kobebisama ya Yelusaleme na Baloma na mobu 70 T.B. . . . Bakufi bazalaki kotyama na lidusu oyo etimolamaki kati na efelo ya nkunda; nsima ya kopola mpe kokauka ya misuni, mikuwa ezalaki kokamatama mpe kotyama na esika ya kobomba mikuwa—mbala mingi ezalaki ndako oyo ekembisami na mabanga ebéngami calcaire.” Bisika mibale ya kobomba mikuwa oyo elakisami emonanaki na sanza ya Novɛ́mbɛ 1990 na nkunda moko. Zvi Greenhut, nganga-mayele ya arkeoloji alobi ete: “Na mosala ya arkeoloji, liloba . . . ‘Caiapha’ emonani awa mpo na mbala ya liboso na bisika mibale ya kobomba mikuwa kati na nkunda. Ekoki kozala ete ezalaki nkombo ya libota ya nganga monene Kayafa, oyo alobélami . . . kati na Testamá ya Sika . . . Ezalaki na ndako na ye na Yelusaleme nde Yesu akabamaki na mabɔkɔ ya moyangeli Moloma Ponto Pilata.” Moko na bisika ya kobomba mikuwa ezalaki na mikuwa ya mobali moko ya mbula soko 60. Banganga-mayele bazali komeka koloba ete yango ezalaki mpenza mikuwa ya Kayafa. Nganga-mayele moko alobi ete bokundoli wana ezali ya eleko oyo Yesu azalaki awa na mabelé: “Mosolo ya palata oyo emonanaki na moko ya bisika ya kobomba mikuwa yango enyatámaki na Elode Akalipa (37-44 T.B.). Bisika mibale wana ya Caiaphas mpo na kobomba mikuwa ekoki kozala ete esalamaki uta na ebandeli ya ekeke.”
William G. Dever, profesere ya arkeoloji ya mikili ya Proche-Orient na iniversité ya Arizona, alobaki na ntina na Yelusaleme ete: “Ezali mpenza likambo ya kolekisa ndelo te na koloba ete na boumeli ya mbula 15 oyo eleki toyekoli makambo mingi ya lisoló ya arkeoloji ya Yelusaleme koleka makambo nyonso oyo toyekolaki na boumeli ya mbula 150 oyo eleka liboso.” Na ntembe te mingi kati na misala minene ya arkeoloji oyo misalemi na Jérusalem na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka misili komonisa biloko bizwami oyo bizali kongɛngisa lisoló ya Biblia.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 9]
Elilingi ya engumba Yelusaleme na eleko ya Tempelo ya Mibale—ezali na lopango ya Holyland Hotel, na engumba Jérusalem
[Bililingi na lokasa 10]
Na likoló: Nsuka ya Ngomba ya Tempelo ya Yelusaleme na súdi-wɛ́sti
Na lobɔkɔ ya mobali: Boleki na nzela ya libulu ya mai ya Hizikiya