Ntango lisumu ekozala lisusu te
“TOBOTAMAKA na lisumu?” Motuna oyo etungisaki moyekoli moko ya Iniversité na États-Unis mwa moke nsima ya kobanda koyekola Biblia. Lokola azalaki liboso na Lingomba ya Hindu, likanisi ya lisumu-lisango ezalaki likambo ya sika mpo na ye. Akanisaki ete soki ezali solo ete tosangolaka lisumu, koboya kondima to kowangana bosolo na yango ekozala na ntina te. Lolenge nini moto akoki kozwa eyano na motuna wana?
Soki tosangolaka lisumu, boye ezalaki na ebandeli na yango. Moto ya liboso azalisamaki nde na mabe, na boye ete alekisaki makambo mabe na ye epai ya bana na ye? To mabe ekólaki nde nsima? Ntango nini mpenza lisumu ebandaki? Epai mosusu, soki lisumu eutaka sé libándá ya nzoto, lolenge nini tokoki kosikwama na yango?
Engebene bindimeli ya Lingomba ya Hindu, minyoko mpe mabe ebandaki sé na ntango ya kozalisama. Nganga-mayele moko ya Lingomba ya Hindu alobi ete “Minyoko [to mpasi], ezali lokola mingai oyo esilaka te, ekoki bobele koleka na esika moko kino esika mosusu kati na nzoto kasi ekoki kosilisama te.” Ya solo, mabe ezali kati na mokili na boumeli ya lisoló mobimba ya bato. Soki ebandaki liboso ya lisoló ya bato, biyano oyo bikoki kotyelama motema na ntina na ebandeli na yango bisengeli sé kozwama na eutelo oyo eleki mayele ya moto. Biyano yango bisengeli kouta epai ya Nzambe.—Nzembo 36:9.
Moto—Azalisamaki na lisumu te
Nikhilananda, filozofe ya Lingomba ya Hindu andimi ete lolenge kozalisama ya moto elimbolami na Veda ezali elilingi mpamba. Lolenge moko, mangomba mingi ya Azia mazali bobele na masapo mpo na kolimbola kozalisama. Kasi, ezali na bantina elongobani mpe eyokani na mayele ya siansi mpo na kondima lisoló ya Biblia na ntina na kozalisama ya moto ya liboso.a Mokapo na yango ya liboso mpenza elobi ete: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi na Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.”—Genese 1:27.
Kozalisama “na elilingi ya Nzambe” elimboli nini? Bobele oyo ete: Moto azalisamaki na lolenge ya Nzambe, na bizaleli ya Nzambe—lokola boyengebene, mayele, mpe bolingo—oyo ezali kokesenisa ye na banyama. (Kokanisá na Bakolose 3:9, 10.) Bizaleli yango bipesaki ye makoki ya kopona kosala malamu to mabe, kokómisáká ye ekelamu oyo ezali na bonsomi. Moto ya liboso azalaki na lisumu kati na ye te, mabe moko te to monyoko ezalaki na bomoi na ye te, ntango azalisamaki.
Yehova apesaki mobeko oyo epai na moto ya liboso ete: “Yo okoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga, nde mbuma na nzeté na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Soki baponaki kotosa, Adama na mwasi na ye Eva, mbɛlɛ bapesaki nkembo mpe lokumu na Mozalisi na bango mpe mbɛlɛ bazwaki lisumu te. Epai mosusu, kozanga botosi emonisaki ete balóngi te kokokisa mitindá ya kokoka ya Nzambe mpe yango ekómisaki bango na ezaleli ya kozanga kokoka—elingi koloba basumuki.
Adama na Eva bazalisamaki lokola banzambe te. Nzokande, kino na meko moko bazalaki na bizaleli ya Nzambe mpe bazalaki na makoki ya kozwa bikateli na ntina na etamboli na bango. Lokola bazalaki bikelamu ya Nzambe, bazalaki na lisumu te, bazalaki bato ya kokoka. (Genese 1:31; Deteronome 32:4) Kozalisama na bango ebebisaki soko moke te boyokani malamu oyo ezalaki kati na Nzambe mpe molɔ́ngɔ́ na boumeli ya ntango molai oyo elekaki liboso ya kozalisama na bango. Boye, lisumu ebandaki ndenge nini?
Ebandeli ya lisumu
Lisumu ebandaki libosoliboso na mokili ya bilimu. Liboso ya kozalisama ya mabelé mpe moto, Nzambe asilaki kozalisa bikelamu ya elimo mpe ya mayele—baanzelu. (Yobo 1:6; 2:1; 38:4-7; Bakolose 1:15-17) Moko na baanzelu yango akómaki na lofundo mpo na bonzenga mpe mayele oyo azalaki na yango. (Kokanisá na Ezekiele 28:13-15.) Uta na malako oyo Nzambe apesaki Adama na Eva ete bábota bana, anzelu yango asosolaki ete mosika te mabelé mobimba makotonda na bato ya sembo, bango nyonso bakosambela Nzambe. (Genese 1:27, 28) Ekelamu yango ya elimo alingaki ete losambo na bango epesamela ye. (Matai 4:9, 10) Kotikáká mposa wana ete ekóla kati na ye ememaki ye na kosala mabe.—Yakobo 1:14, 15.
Anzelu wana motomboki akendaki kosolola na Eva na kosaleláká nyoka, alobaki na ye ete na kopekisáká kolya mbuma ya nzeté ya koyeba malamu mpe mabe, Nzambe abombelaki ye boyebi oyo asengelaki na yango. (Genese 3:1-5) Maloba yango mazalaki lokutá monene—lisumu mpenza. Na kokosáká lolenge yango, anzelu wana amizalisaki mosumuki. Mpo na yango akómaki kobéngama Zábolo, motɔ́ngi, mpe Satana, motɛmɛli ya Nzambe.—Emoniseli 12:9.
Maloba ya kolɛngola oyo Satana alobaki mazimbisaki Eva. Kotyáká elikya na maloba ya Molɛngoli yango, amitikaki kolɛngolama mpe alyaki mbuma ya nzeté oyo epekisamaki. Mobali na ye Adama, alandaki ye mpe alyaki mbuma, mpe bango mibale bakómaki basumuki. (Genese 3:6; 1 Timoté 2:14) Ezali polele ete na koponáká kozanga botosi epai ya Nzambe, baboti na biso ya liboso babungisaki bomoto ya kokoka mpe bamikómisaki basumuki.
Ezali boni mpo na bakitani ya Adama na Eva? Biblia elimboli ete: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Mobeko ya kosangola makambo ya moboti ebandaki. Adama akokaki te kopesa na bana na ye makambo oyo azangaki. (Yobo 14:4) Lokola babungisaki ezaleli ya kokoka, babalani ya liboso basilaki kokóma basumuki ntango bana na bango babotamaki. Mpo na yango, biso banso—longola ata moto moko te—tosangolaki lisumu. (Nzembo 51:5; Baloma 3:23) Na ngala na yango, lisumu ebotaki bobele mabe mpe minyoko. Lisusu, na ntina na yango, biso banso tonunaka mpe tokufaka, mpo ete “masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.”—Baloma 6:23.
Lisosoli ezali ‘kofunda’ to ‘kolimbisa’
Tótalela mpe bopusi ya lisumu likoló na ezalela ya babalani ya liboso. Babombaki binama na bango mpe bamekaki komibomba liboso ya Nzambe. (Genese 3:7, 8) Lisumu epesaki bango liyoki ya komema ngambo, ya komitungisa, mpe ya nsɔni. Lelo bato bameseni mingi na mayoki motindo wana.
Nani ayoka naino mabe te mpo ete aboyaki kosala malamu epai na moto moko oyo azalaki na bosɛnga to koyoka mawa mpo ete alobaki maloba oyo mabongi te? (Yakobo 4:17) Mpo na nini tozalaka na mayoki wana ya kobulungana? Ntoma Paulo alimboli ete ‘mibeko mikomami na mitema na biso.’ Longola bobele soki lisosoli na biso likóma makasi, soki bongo te, mbala nyonso oyo tobukaka mobeko tobulunganaka. Na yango mongongo ya lisosoli na biso ‘efundaka’ to ‘elimbisaka’ biso. (Baloma 2:15; 1 Timoté 4:2; Tito 1:15) Ezala toyebi yango to te, tozali koyeba kati na motema na biso oyo ezali mabe to lisumu!
Paulo ayebaki malamu ete azalaki moto ya masumu. Andimaki ete “wana elingi ngai kosala malamu, bobele mabe ezali penepene na ngai. Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.” Boye Paulo atunaki: “Nani akolongola ngai na nzoto oyo na kufa?”—Baloma 7:21-24.
Lolenge nini kosikwama na lisumu?
Nganga-mayele moko alobi ete “kati na bonkɔkɔ ya Lingomba ya Hindu, kosikwama ezali kobima na zolongano ya kobotama mpe kokufa mbala na mbala.” Mpo na kolónga, Lingomba ya Bouddha yango mpe elobeli Nirvana—oyo ezali bongo kotombwana na makanisi kino kobosana makambo mpe mikakatano ya bomoi. Lokola basosoli liteya ya lisumu-lisango te, bato ya Lingomba ya Hindu bapesaka bobele elaka ya kobima na zolongano ya bomoi.
Nzokande, mwango ya Biblia mpo na kosikwama ezali bongo kolongolama mpenza ya ezalela ya masumu. Nsima ya kotuna lolenge nini akoki kobikisama na lisumu, ntoma Paulo ayanoli ete: “Nzambe mpe na Yesu Klisto, Nkolo na biso. Matɔ́ndi na ye!” (Baloma 7:25) Ɛɛ, kosikwama ekouta epai ya Nzambe na nzela ya Yesu Klisto.
Engebene Evanzile ya Matai, “Mwana na moto,” Yesu Klisto, ayaki “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Lokola elobami na 1 Timoté 2:6, Paulo akomaki ete Yesu ‘amipesaki lokola lisiko likokani mpo na bato nyonso.’ Liloba “lisiko” elimboli motuya oyo mopesami mpo na kosikola mokangami. Likambo oyo ete yango ezali lisiko likokani ezali komonisa mpenza kokokana ya motuya na emekeli ya boyengebene. Kasi lolenge nini liwa ya moto moko ekoki kotalelama lokola ‘lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso’?
Adama atekaki bato nyonso, na biso lokola, na lisumu mpe liwa. Motuya, to etumbu, oyo afutaki ezali bongo bomoi na ye ya moto ya kokoka. Esengelaki bomoi mosusu ya kokoka—lisiko oyo ekokani—mpo na kofuta yango. (Exode 21:23; Deteronome 19:21; Baloma 5:18, 19) Lokola moto moko te ya kozanga kokoka akokaki kopesa lisiko yango, Nzambe, na mayele na ye mazangi nsuka, alukaki mwango ya kolongola mokakatano yango. (Nzembo 49:6, 7) Atyaki bomoi ya kokoka ya Mwana mobotami-bobele-moko na ye longwa na makoló kino na libumu ya ngɔndɔ moko awa na mabelé, kosaláká ete akoka kobotama lokola moto ya kokoka.—Luka 1:30-38; Yoane 3:16-18.
Mpo na kokokisa mosala ya kosikola bato, Yesu asengelaki kobatela bosembo na ye ntango nyonso oyo azalaki awa na mabelé. Asalaki mpe bongo. Na nsima akufaki lokola mbeka. Na lolenge yango Yesu abatelaki motuya ya bomoi ya kokoka—bomoi na ye mpenza—oyo ebongaki lokola lisiko mpo na kobikisa bato.—2 Bakolinti 5:14; 1 Petelo 1:18, 19.
Oyo lisiko ya Klisto ekoki kosala mpo na biso
Mbeka ya lisiko ya Yesu ekoki kopesa biso matomba uta sikawa. Na komonisáká kondima kati na mbeka yango, tokoki kozala na etɛlɛmɛlo ya pɛto liboso na Nzambe mpe tokoki kokóma na nsé ya libateli ya bolingo mpe ya boboto ya Nzambe. (Misala 10:43; Baloma 3:21-24) Na esika ya komizindisa na mayoki ya komema ngambo ya masumu oyo tosalaki, tokoki na bonsomi nyonso koluka bolimbisi epai ya Nzambe na nzela ya lisiko.—Yisaya 1:18; Baefese 1:7; 1 Yoane 2:1, 2.
Na mikolo mizali koya, lisiko ekopesa nzela na kobikisama mobimba ya bato na ezalela oyo lisumu eyeisaki. Mokanda ya nsuka ya Biblia ezali komonisa “ebale na mai na bomoi” oyo ezali kobima longwa na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Pembenipembeni na ebale yango ezali na banzeté ezali kobota mbuma mingi oyo nkasa na yango ezali “mpo na kobikisa bato na mabota.” (Emoniseli 22:1, 2) Na elobeli ya elilingi, awa Biblia ezali kolobela bibongiseli kitoko ya Mozalisi mpo na kosikola bato na masumu mpe na liwa libela na libela na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu.
Mosika te, bimonaneli ya esakweli ya mokanda ya Emoniseli bikokokisama. (Emoniseli 22:6, 7) Na ntango yango bato nyonso ya mitema sembo bakokóma na ezaleli ya kokoka, wana “ekosikwa [bango] na boombo na libebisi.” (Baloma 8:20, 21) Yango esengeli kopusa biso ete tóyekola makambo mosusu mingi na ntina na Yehova Nzambe mpe mwana na ye ya sembo Yesu Klisto, oyo akómaki lisiko, boye te?—Yoane 17:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 6]
Adama akɔtisaki lisumu mpe liwa kati na bato
[Elilingi na lokasa 7]
Mbeka ya lisiko ya Yesu ezali kosikola na lisumu mpe liwa