Lisosoli: Bozito to esaleli?
‘LISOSOLI na ngai ezali kotungisama!’ Mbala na mbala, biso banso totungisamaka na lisosoli. Mayoki motindo yango ekoki kozala bobele kozanga esengo to mpe kotungisama makasi na motema. Lisosoli oyo litungisami likoki mbala mosusu konyokola makanisi kino kopesa moto liyoki makasi ya kolɛmba.
Soki etalelami lolenge yango, lisosoli ezali bozito, boye te? Bamoko bakoki kokanisa ete ezali bongo. Na boumeli ya lisoló ya bato, mingi batalelaki lisosoli ete ezali eloko oyo ezali kati na biso, tobotámá na yango. Mingi bakanisaki ete ezalaki motambwisi mpo na bizaleli malamu oyo Nzambe ye moko asilá kopesa. Mpo na yango, lisosoli ebéngamaki ete “Kozala ya Nzambe kati na moto,” “bomoto na biso ya ebandeli,” mpe ata “mongongo ya Nzambe.”
Nzokande, na bambula euti koleka, ekómaki momeseno ya koloba ete lisosoli ezali mpenza esaleli oyo ekólisami—mbuma ya bopusi ya baboti mpe bato mosusu ya esika oyo moto akóli. Na ndakisa, banganga-mayele mosusu ya pisikoloji balobaka ete mwana ayekolaka koboya bizaleli mabe mingi mpenza mpo na kopɛngola etumbu, na bongo bakanisaka ete oyo tobéngaka ete lisosoli ezali bobele mbano ya bokɔtisi na bɔɔngɔ́ makambo oyo baboti na biso bango moko batosaka mpe bandimaka. Basusu bazali kolimbola ete ezali bongo bopusi ya bato mosusu na esika oyo moto akóli nde ezali kosala ete asangola makambo mpe mitindá oyo batosaka. Bamoko batalelaka kotungisama na lisosoli ete ezali bobele kowelana kati na oyo tolingi kosala mpe oyo bato na esika tofandi bazali kopusa biso ete tósala!
Atako makanisi mazali ndenge na ndenge na ntina na lisosoli, mbala na mbala bato batɛmɛlaki baboti, mabota, mpe bato ya esika oyo bafandi mpo ete lisosoli na bango litindaki bango na kosala bongo. Basusu bandimaki ata kokaba bomoi na bango mpo ete lisosoli na bango litindaki bongo! Mpe ata bokeseni monene ezali na mimeseno ya bato kati na mokili, makambo lokola koboma, koyiba, ekobo, kokosa, mpe kosangisa nzoto bandeko na bandeko ezali mbala mingi kotalelama na mokili mobimba ete ezali mabe. Yango elingi nde komonisa ete lisosoli ezali eloko oyo ezali kati na biso, oyo tobotámá na yango?
Likanisi ya Biblia na ntina na lisosoli
Oyo akoki kopesa ndimbola ebongi na likambo yango ezali bongo Yehova Nzambe. Ɛɛ, “ye azali Nzambe; ye asalaki biso; biso tozali bato na ye.” (Nzembo 100:3) Ayebi malamumalamu lolenge oyo tosalemaki. Biblia, Liloba ya Nzambe elimboli ete moto azalisamaki na “elilingi” ya Nzambe. (Genese 1:26) Moto azalisamaki na likoki ya koyeba oyo ezali malamu mpe mabe; uta na ebandeli, lisosoli ezali kati na moto.—Kokanisá na Genese 2:16, 17.
Ntoma Paulo andimisi likambo yango kati na mokanda na ye epai na Baloma, epai akomaki ete: “Bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosalaka makambo na Mibeko [ya Nzambe] (ata bazangi mibeko mpenza) bazali na mibeko kati na bango moko. Bazali komonisa polele ete makambo malaki Mibeko makomami na mitema na bango. Lisosoli na mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokitisa bango soko kolóngisa bango.” (Baloma 2:14, 15) Simbá likambo oyo ete bato mingi oyo bakólaki te na Mibeko ya Nzambe oyo apesaki na Bayuda bazalaki mpe kolanda mitindá mosusu ya Mibeko ya Nzambe, na kopusama na bato te, kasi “na bolingi na bango moko”!
Na yango, na esika ete ezala bozito, lisosoli ezali nde likabo liuti na Nzambe, ezali mpenza esaleli. Mpo na yango, ekoki kotungisa biso. Kasi na ntango tozali kolanda yango malamu, ekoki mpe kopesa biso mbano ya mayoki ya bosepeli mozindo mpe kimya ya motema. Ekoki kotambwisa, kobatela mpe kopusa biso. Búku The Interpreter’s Bible elobi ete: “Kolɔngɔ́nɔ́ ya makanisi mpe ya mayoki ekoki kobatelama bobele na ntango moto azali kosala makasi ya koyokanisa makambo azali kosala mpe oyo azali komiyoka ete asengeli kosala.” Lolenge nini moto akoki koyokanisa makambo yango? Likoki ya kobongisa lisosoli mpe ya koteya yango ezali? Mituna yango mikozwa biyano na lisoló lilandi.