Motema na ngai ezali na botɔ́ndi mingi
LISOLÓ YA JOHN WYNN
Mbala mingi nazalaki koboya kokende makita ya Batatoli ya Yehova! Nazalaki kokosa ete nazali koyoka libumu mpasi to koyoka motó mpasi—to mpe kobimisa likambo mosusu mpo na kokima makita. Kasi mpiko ya mama na ngai ezalaki kosala ete mpasi wana ya lokuta ekoka kolimwa nokinoki, mpe nsukansuka nazalaki ngai moko kotambola na ye kilomɛtɛlɛ misato kino na Ndako ya Bokonzi, nazalaki koyoka ndenge azalaki kolimbola Liloba ya Nzambe na moninga na ye moko ya mobangé.
YANGO epesaki ngai liteya moko ya ntina ete: Na bolingo nyonso, baboti basengeli ntango nyonso kozala na mpiko, mpo na oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. (Masese 29:15, 17) Basengeli kobosana te etindá oyo ya Nzambe ete ‘tótika koyangana elongo moko te.’ (Baebele 10:25) Soki nazongisi makanisi nsima na bomoi na ngai, nazali na esengo mingi na lolenge oyo mama atyaki ngai na nzela eleki malamu mpo na ngai ete nakoka kolanda!
Botɔ́ndi mpo na bandakisa malamu
Atako tata na ngai azalaki mondimi te, kasi azalaki kotɛmɛla bindimeli ya mama te ntango akómaki Moyekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na eleko wana. Na mobu 1913 akendaki koyoka lisukúlu oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Nsima ya nkunda,” esalemaki na Ndeko Charles T. Russell, prezidá ya liboso ya la Société Watch Tower. Nzokande, akómaki nsima ya ngonga, bisika ya kofanda nyonso bitondaki na bato. Babéngaki ye kofanda elongo na basusu oyo bakómaki mwa moke nsima ya ngonga zingazinga ya ebáelo, penepene na Pasteur Russell. Lisukúlu yango esalaki bopusi makasi likoló na ye. Mokolo molandaki babimisaki yango na zulunalo ya engumba, mpe abatelaki kopi na yango mpe azalaki kozongela botángi na yango mbala na mbala.
Nsima ya likita, Mama apesaki papyé oyo ezalaki na nkombo, na adrɛsi na ye, mpe eumelaki te Moyekoli moko ya Biblia ayaki kotala ye. Na nsima, abandaki kokabola batrakte na mosala ya ndako na ndako na engumba na biso ya Gloucester, na ekólo Angleterre. Ngai na bankulutu na ngai mibale ya basi tozalaki naino bilenge mpenza, tobandaki kosangana na mosala ya kosakola elongo na Mama.
Ntango Harry Francis, Moyekoli ya Biblia ya molende ayaki na Gloucester, Mama ayambaki ye malamu. Mosika te, asepelaki na ngai, mpe bilendiseli na ye epusaki ngai na nsima ete nakóma mobongisi-nzela, lokola basakoli ya ntango nyonso babéngamaka. Ndakisa ya Francis eteyaki ngai likambo oyo ya ntina: Mikoló basengeli koluka mabaku ya kolendisa bilenge.
Ntango mama akómaki Moyekoli ya Biblia, bato mosusu mpe basalaki bongo na Gloucester. Nzokande, bankulutu mosusu na lisangá babandaki komipesa lokumu mingi koleka, mpe basangani ya kelasi—motindo lisangá ebengamaki na ntango wana—babandaki kolanda bato. Na likita moko, basangani mosusu ya lisangá bakóbaki koningisa Mama na mokɔngɔ, mpe kopusa ye ete atombola mosapi mpo na kopona bankulutu mosusu na ntango ya voti ya bankulutu na lisangá. Kasi Mama ayebaki ete bazalaki kopesa ndakisa ya malamu te, aboyaki kopona bango na kopusama na makasi. Na ntango wana, na nsuka ya bambula ya 1920, mingi bamilongolaki na lisangá mpe batambolaki lisusu na nzela ya solo te. (2 Petelo 2:2) Kasi, Mama atikaki te kosunga lisangá na bosembo, mpo na yango apesaki ngai ndakisa malamu.
Nazwi etɛlɛmɛlo mpo na solo
Nsukansuka, na sanza ya Yúni ya mobu 1939, wana nazalaki na mibu 18, nazwaki batisimo na Ebale Severn. Bobele na mobu yango baponaki ngai lokola mosali na bikoliseli loláká kati na lisangá. Na eleko wana tozalaki kosalela fonó moko monene oyo ezalaki kosakola na bisika ya bato banso nsango oyo ete: “Lingomba ezali motambo mpe bokosi.” Na eleko wana tozalaki mingimingi kotɔndɔla bokosi mpe mateya ya lokuta ya mangomba ya boklisto.
Na libaku moko nazalaki liboso ya etuluku oyo ememaki elamba ya monene oyo na ngámbo moko ezalaki na makomi oyo: “Lingomba ezali motambo mpe bokosi” mpe na ngámbo mosusu: “Bósalela Nzambe mpe Klisto Mokonzi.” Tozalaki mpe na mpunda moke oyo ezalaki kolanda biso mpe na ngámbo nyonso ya mokɔngɔ na yango etondaki na makomi oyo mazalaki koyebisa motó ya lisukúlu ya bato banso. Ya solo, molɔngɔ́ wana emonanaki mpenza na Gloucester engumba oyo emipesaki mingi na makambo ya losambo!
Atako tozalaki na mikakatano ya mosolo na libota na biso, Mama alendisaki ngai ete nakóma mobongisi-nzela. Na yango, na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ ya mobu 1939, na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nakómaki na teritware na ngai ya liboso mpo na mosala ya mobongisi-nzela na Leamington, engumba moke na etúká ya Warwickshire. Engumba yango ezalaki na bakonzi mingi ya mangomba oyo basilá sanza.
Tozalaki kosalela fonó moko oyo ezali mpenza na kiló te na mosala ya ndako na ndako, tozalaki kobɛta badiskɛ oyo ezalaki na masukúlu ya Joseph F. Rutherford, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana. Epai mosusu, fonó na biso (oyo tokokaki kosalela ata soki bato ebele bayangani) ezalaki na bozito mingi mpenza, mpe tozalaki komema yango na pusupusu ya bana mike. Na bantango mosusu bakonzi ya mangomba, baoyo nsango na biso ezalaki kosilikisa bango, wana ezalaki kotɔndɔla lingomba ya lokuta, bazalaki kobengana biso na bandako na bango. Kasi tolɛmbaki te. Yehova apambolaki mosala na biso, lelo okoki kokuta lisangá ya Batatoli koleka nkámá moko na Leamington.
Na mobu 1941, lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, nakendaki na etúká Pays de Galles, epai kuna nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na bingumba ya Haverfordwest, Carmarthen, mpe Wrexham. Lokola nazalaki mosakoli ya ntango nyonso, nasɛngisamaki te ete nasala mosala ya sodá, kasi bato basepelaki te na etɛlɛmɛlo na biso ya kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki. Na yango, ngai na moninga na ngai tofundamaki ete tozalaki kosalela banguna lokola banɔ́ngi. Mokolo moko na butu, bapolisi bazingaki mótuka ya molai epai tozalaki kolala. Moninga na ngai, oyo autaki kozonga na mosala na ye ya koyanganisa makala, abimisaki elongi na ye na lininisa mpo atala soki nani azalaki wana. Elongi na ye etondaki na mputulu ya makala, mpe engebene bapolisi bamonaki biso lokola banganga-mobulu oyo tomibongisaki mpo na kokende kosala mabe. Esengelaki na biso kolimbola mpo na nini azalaki bongo!
Tozwaki mapamboli mingi na bateritware na biso. Na libaku moko, wana tozalaki naino na engumba Carmarthen, John Barr oyo autaki na Betele ya Londres (sikawa azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi) ayaki kotala biso mpe tozwaki elendiseli mpo na yango. Na eleko wana, tozalaki bobele basakoli mibale na engumba Carmarthen; kasi lelo, bazali koleka nkámá moko. Engumba Wrexham ezali sikawa na masangá misato, mpe eumeli naino te nautaki kozwa libaku ya kofungola Ndako moko ya Bokonzi na Haverfordwest.—1 Bakolinti 3:6.
Botɔ́ndi mpo na mosala na ngai
Ntango tozalaki na engumba Swansea, na súdi ya etúká ya Pays de Galles, moninga na ngai, Don Rendell, azwaki ndingisa te ete akɔtisama te na mosala ya sodá. Batyaki ye na bolɔ́kɔ atako alimbolaki ete na ntina na lisosoli na ye akokaki te kobundisa baninga na ye baklisto ya mikili mosusu. (Yisaya 2:2, 4; Yoane 13:34, 35) Mpo na kolendisa ye, mpe kopesa litatoli na bazalani, natyaki fonó na pembeni ya bolɔ́kɔ mpe nazalaki kotya masukúlu ya Biblia.
Nzokande, basi oyo bazalaki kofanda pembeni ya bolɔ́kɔ basepelaki te mpe bakendaki na biró mpe basangisaki mbongo mpo na kofuta basoda na ntina ete bábɛta ngai na moninga na ngai. Tolongwaki wana, mpe tokimaki mbango na ndenge ekokaki na biso—nazalaki mpe kotindika pusupusu oyo ezalaki na fonó ya kiló —tolingaki komibomba na Ndako ya Bokonzi. Ntango tokómaki wana, ndako esilaki kokangama na fungola! Soki bapolisi bákómaka nokinoki te, mbɛlɛ tobetamaki makasi.
Likambo yango eyebanaki na bato mingi. Mwa moke na nsima, ntango nazalaki kosakola na mboka moko pene ya engumba Swansea, mobali moko alobaki na ngai na esengo nyonso ete: “Boklisto ezali oyo bino Batatoli ya Yehova bozali kolóngisa, lokola elenge mobali moko na Swansea asakolaki kozanga kobanga makambo andimaki mpe akimaki mpo na komibatela.” Akamwaki na koyeba ete elenge yango ezalaki ngai!
Mosala ya mobongisi-nzela ezalaki mpasi na mikolo wana ya etumba. Tozalaki na biloko mingi te ya mosuni, kasi oyo tozalaki na yango, ekokaki mpe tosepelaki na yango. Ntango nyonso tozalaki kozwa bilei ya elimo, mpe tozangisaki likita ata moko te, longola bobele soki tozali na maladi. Nasombaki velo moko ya kala, mpe totyaki matúnga ya minene mpo na komema fonó mpe mikanda mikolimbolaka Biblia. Nazalaki mbala mosusu kosala mobembo ya kilomɛtɛlɛ 80 na velo! Nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mbula nsambo mpe nasepelaka mingi ntango nakanisaka mikolo yango.
Na mobu 1946, nsima wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, babengaki ngai ete nakenda kosala na Betele, ndenge babéngaka biró ya Batatoli ya Yehova na mboka nyonso. Betele na biso ezalaki na balabála Craven Terrace nimero 34, lopango elandi Tabernacle de Londres. Kuna nasepelaki na libaku malamu ya kozala na mikóló, lokola ndeko mwasi Alice Hart, oyo bakanisaka ete tata na ye, Tom Hart, azalaki Motatoli ya liboso na ekólo Angleterre.
Nazwi moninga ya sembo
Na mobu 1956, natikaki Betele mpo na kobala Etty, azalaki mobongisi-nzela na mboka Hollande, nayebanaki na ye ntango ayaki kotala yaya na ye ya mwasi oyo azalaki kofanda na Londres. Pene ya nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Etty azalaki molakisi ya kobɛta masini mpe kokoma na steno na eteyelo moko na engumba Tilburg, na súdi ya Hollande. Mokolo moko, batambolaki na bavelo ye na molakisi mosusu oyo ayaki kotika ye na ndako mpo na komindimisa ete akokóma malamu. Azalaki Mokatolike. Ntango bakómaki, lisoló molai ebandaki kati na ye mpe baboti ya Etty oyo bazalaki Baprotestá. Boninga ekólaki, mpe molakisi yango akómaki koya mbala mingi na ndako na bango.
Mwa moke na nsima ya etumba, molakisi yango ayaki na ndako ya ba Etty na kongangáká ete: “Nasili koyeba solo!”
Tata ya Etty ayanolaki ye ete “Nakanisi ete olobaki ozalaki na solo ntango ozalaki na Lingomba ya Katolike!”
Azongisaki na esengo nyonso ete: “Te!” “Ezali Batatoli ya Yehova nde bazali na solo!”
Balekisaki mpokwa wana mpe bampokwa elandaki na kosolola na mozindo na ntina na Biblia. Nsima ya mwa ntango Etty akómaki mobongisi-nzela. Na mosala na ye akutanaki mpe na botɛmɛli makasi, na ekólo Hollande oyo eutaki na Lingomba ya Katolike. Bana mike, bapusamaki na basángó, bazalaki kotya mobulu na masoló na ye na mosala ya ndako na ndako, mpe na libaku moko babebisaki velo na ye. Amemaki yango epai ya moto oyo abongisaka bavelo, oyo liboso andimaki kozwa mwa búku. Na mai na miso, alobaki ete “talá ndenge bana basali!”
Mobali yango alobaki na boboto nyonso ete: “O, yango elɛmbisa yo te, ozali kosala mosala malamu. Nakobongisa velo na yo mpe okofuta eloko te.” Mpe abongisaki yango.
Etty asosolaki ete basángó bazalaki kotya likebi na bitongá na bango te kino ntango ye abandaki koyekola Biblia na bamoko na bango. Na bongo basángó mpe bamamɛlo bazalaki koya kozinga bango mpo na kobebisa kondima ya bato likoló na Biblia mpe likoló na Yehova. Atako bongo, azwaki esengo ya kotambwisa boyekoli mingi ya Biblia oyo ebotaki mbuma.
Botɔ́ndi mpo na bomoi oyo tolekisaki esika moko
Nsima ya libala na biso, nasalaki mosala ya mokɛngɛli- motamboli na Angleterre, Etty azalaki na ngai elongo, mpe pene na mbula mitano, totalaki masangá mpe tolendisaki yango na elimo. Na nsima nazwaki libyangi ya kosangana na kelasi ya mbala ya 36 ya Gileadi, oyo esalemaki na biró monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, na engumba New York. Sanza zomi ya mateya, oyo esilaki na sanza ya Novɛ́mbɛ ya mobu 1961, esalemaki mpenzampenza na mokano ya kobongisa bato mpo na kosala misala na bafiliale ya Batatoli ya Yehova. Ntango nazalaki na mobembo, Etty atikalaki na Angleterre na Betele ya Londres. Nsima ya kozwa lipɔlɔ́mi, nakutaki ye kuna na Betele epai totindamaki biso mibale.
Mbula 16 oyo elandaki, nasalaki na biró ya mosala, kotalaka makambo matali misala ya lisangá. Bongo, na mobu 1978, ntango Pryce Hughes, mokɛngɛli ya bandako ya Betele akufaki, naponamaki na esika na ye. Kozala na mokumba ya kotalela bolamu ya basangani ya libota ya Betele oyo ezali kokola—tozali sikawa basangani koleka 260 na libota—na boumeli ya bambula oyo ezali mbano monene mpo na ngai.
Na mobu 1971 mama na ngai oyo nalingaki mingi akufaki wana akokisaki mibu 85. Ngai na Etty tokendaki na Gloucester mpo na molulu ya bokundi, kuna ndeko moko alobelaki malamu elikya ya kokenda na likoló oyo mama azalaki na yango. (Bafilipi 3:14) Nazali kotɔ́nda bankulutu na ngai ya basi Doris mpe Grace, na lolenge babatelaki mama na bobangé na ye, yango epesaki ngai na Etty likoki ya kokóba na mosala ya ntango nyonso.
Ngai na Etty tokanisaka mingi baboti na biso na lolenge bakolisaki biso na boboto, mpe na mpiko. Oyo nde nyongo monene tozali na yango epai na bango! Mama atikaki ndakisa malamu mpo na ngai na bandeko na ngai ya basi, akolisaki epai na biso bosepeli mpo na Yehova mpe lisangá na ye.
Ya solo, mitema na biso mizalaka na botɔ́ndi mingi ntango tozali kokanisa mokolo nyonso ya sika mpo na mosala ya tata na biso ya likoló, Yehova. Azali Nzambe malamu, Nzambe na bolingo! Mokomi na nzembo amonisaki mayoki na biso ntango akomaki ete: “Nakosanzola yo Nzambe na ngai mpe Mokonzi na ngai mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko. Mikolo nyonso nakokumisa yo mpe nakosanzola nkombo na yo seko na seko.”—Nzembo 145:1, 2.
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na mwasi na ngai, Etty