Mishnah mpe Mibeko ya Nzambe epai na Mose
“TOBANDI na likanisi ete tokɔti na lisoló moko ebandaki uta kala oyo ezali kolobela makambo oyo tokoki koyeba yango te . . . Tozali . . . komiyoka lokola soki tozali kati na ndako moko mpo na kozela kosala mobembo, na libándá ya mpɛpo oyo ezali mosika. Tozali koyoka maloba ya bato, kasi tozali koyeba ndimbola na yango te, mpenzampenza, mpo ete bazali koloba mbangumbangu.” Yango ezali lolenge Jacob Neusner nganga-mayele Moyuda azali kolobela mayoki oyo batángi bakoki kozala na yango ntango batángi Mishnah mpo na mbala ya liboso. Neusner abakisi ete: “Mishnah ezali na ebandeli te. Mpe nsuka na yango ezali koyebana te.”
Kati na búku A History of Judaism, Daniel Jeremy Silver azali kobénga Mishnah ete “mokanda ya mibeko ya Lingomba ya Bayuda oyo ekambami na balabi.” Kútu, abakisi boye: “Mishnah ezwaki esika ya Biblia lokola manáka ya moboko ya kolandana ya mateya ya [Bayuda].” Mpo na nini mokanda oyo mokomami mobulumobulu ekoki kokóma na ntina mingi boye?
Ndambo ya eyano ezali na maloba oyo mazwami kati na Mishnah ete: “Mose azwaki Torah na Ngomba Sinai mpe apesaki yango na Yosua, Yosua apesaki yango epai na mikóló, mpe mikóló epai na basakoli. Mpe basakoli bapesaki yango epai na mibali ya liyangani monene.” (Avot 1:1) Mishnah ezali koloba ete ezali na makambo oyo epesamaki na Mose na Ngomba Sinai—ndambo ya Mibeko ya Nzambe epai ya Yisalaele oyo mikomamaki te na mokanda. Mibali ya liyangani monene (nsima ebéngamaki Sanedrina) batalelamaki lokola bakitani na molɔngɔ́ molai ya banganga-mayele, to basavá, oyo mateya na bango mosusu malekaki longwa na libota moko kino na libota mosusu kozanga ete makomama kino ntango yango mayaki kokomama kati na Mishnah. Kasi ezali mpenza bongo? Nani mpenza akomaki Mishnah, mpe mpo na nini? Makambo mazali kati na yango ezali oyo Mose azwaki na Ngomba Sinai? Yango ezali na ntina mpo na biso lelo?
Losambo ya Bayuda kozanga tempelo
Endimeli oyo ete Nzambe abakisaki mibeko mikomami na mokanda te likoló ya Mibeko ya Mose oyo mikomami eyebanaki te na ntango oyo Makomami mapemami mazalaki kokomama.a (Exode 34:27) Bikeke mingi na nsima, Bafalisai bazalaki etuluku kati na Lingomba ya Bayuda oyo bakólisaki mpe bapalanganisaki makanisi ya mibeko ya Nzambe oyo mikomami na mokanda te. Na boumeli ya ekeke ya liboso T.B., Basadukai mpe Bayuda mosusu batɛmɛlaki mateya wana oyo mazwami na Biblia te. Nzokande, ntango nyonso oyo tempelo ya Yelusaleme ezalaki naino esika ya losambo mpo na Bayuda, likambo ya mibeko mikomami na mokanda te ezalaki kokabola bato te. Losambo kati na tempelo ezalaki kopesa ebongiseli ya sikisiki mpe mwa kopema na bomoi ya Moyuda mokomoko.
Nzokande, na mobu 70 T.B., libota ya Bayuda eyokaki mpasi mingi na makambo ya losambo. Yelusaleme ebebisamaki na mampinga ya Loma, mpe Bayuda koleka milió moko bakufaki. Tempelo, esika ya bomoi na bango ya elimo, ezalaki lisusu te. Kolanda Mibeko ya Mose, oyo mizalaki kosɛngisa mbeka mpe mosala ya bonganga kati na tempelo, ekokaki kosalema lisusu te. Moboko ya Lingomba ya Bayuda ezalaki lisusu te. Adin Steinsaltz, nganga-mayele ya Talmud (mateya ya Bayuda) akomi ete: “Libebi . . . ya mobu 70 T.B. emonisaki ntina ya kotonga lisusu esika mpo na losambo oyo esengelaki kosalema na lombangu.” Mpe batongaki yango lisusu.
Ata liboso ya kobebisama ya tempelo, Yohanan Ben Zakkai, moyekoli ya lokumu ya Hillel, mokonzi ya Bafalisai, azwaki ndingisa epai na Vespasien (oyo alingaki kokóma Amperere) ete alongola esika monene ya Losambo ya Bayuda mpe Sanedrina na Yelusaleme mpe ekóma na mboka moke ebéngami Yavneh. Lolenge Steinsaltz alimboli yango, nsima ya kobebisama ya Yelusaleme, Yohanan Ben Zakkai “akutanaki na mokakatano ya kotya esika ya sika ya losambo mpo na bato mpe kosalisa bango ete bámimesenisa na yango na kotalela molende na bango na makambo etali losambo esengelaki kobéndama na eloko mosusu lokola tempelo ezalaki lisusu te.” Eloko yango ya sika ezalaki bongo mobeko mokomami na mokanda te.
Lokola tempelo esilaki kobebisama, Basadukai mpe mangomba mikemike mosusu ya Bayuda babimisaki myango oyo mizalaki malamu te. Bafalisai bakómaki etuluku moko ya batɛmɛli kati na Lingomba ya Bayuda. Wana balobelaki mingi bomoko, bakambi balabi batikaki komibénga Bafalisai, liloba oyo elimbolaki bokabwani mpe bituluku. Bayaki koyebana bobele lokola balabi, “bato na mayele na Yisalaele.” Bato yango ya mayele basalaki bindimeli mpo na kobatela likanisi na bango ya mibeko mikomami te. Yango esengeli kozala ebongiseli ya elimo oyo bato bakoki kobebisa yango te lokola bakoki kobebisa tempelo.
Mibeko mikomami te miyeisami makasi
Atako eteyelo ya balabi na Yavneh (na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 40 na wɛ́sti ya Yelusaleme) ezalaki sikawa eteyelo eleki monene, biteyelo mosusu bisalemaki mpo na koteya mibeko mikomami te mpe bibandaki kopalangana na Yisalaele mobimba mpe kino mosika na Babilone mpe na Loma. Nzokande, yango ebimisaki mokakatano mosusu. Steinsaltz alimboli ete: “Ntango bato nyonso ya mayele bazalaki esika moko, mpe mosala monene ya koteya esalemaki na etuluku moko ya bato na [Yelusaleme], bomoko ya mateya ezalaki kobatelama. Kasi, koyikana ya balakisi mpe kotyama ya biteyelo bikabwani ebimisaki . . . lolenge ebele mpe mitindo mingi ya komonisa makambo.”
Balakisi ya mibeko mikomami te babéngamaki Batannaim, euti na liloba ya Araméen oyo elimboli “koyekola,” “kozongela,” to “koteya.” Yango emonisaki lolenge na bango ya koyekola mpe ya kolakisa mibeko mikomami te na kozongeláká mbala na mbala mpe na kosimbáká makambo na motó. Mpo na kokanga makambo ya mibeko mikomami te kozanga mindɔndɔ, mobeko nyonso to liteya eyeisamaki mokuse. Maloba maleki mokuse, makosimbama malamu. Balabi bamekaki kobimisa motindo ya maloba ya ntɔ́ki, mpe mbala mingi bazalaki koyemba maloba yango na nzembo. Kasi, mibeko yango mibongisamaki mpenza malamu te, mpe balakisi nyonso bazalaki kolakisa yango ndenge moko te.
Labi ya liboso oyo apesaki lolenge mpe ebongiseli ya sikisiki ya mateya makeseni ya mibeko mikomami te ezalaki bongo Akiba ben Joseph (soko mobu 50-135 T.B.). Mpo na ye, Steinsaltz akomi ete: “Bato ya eleko na ye bakokanisaki mosala na ye na mosala ya mosali na bilanga oyo akei na elanga mpe atondisi kitunga na ye na mbuma oyo abuki, na bongo azongi na ndako mpe akaboli yango engebene mitindo na yango. Akiba ayekolaki ebele ya masoló oyo mabongisamaki malamu te mpe abongisaki yango kolandáká lolenge na yango.”
Na ekeke ya mibale T.B.—koleka mbula 60 nsima ya kobebisama ya Yelusaleme—Bayuda batombokelaki mpo na mbala ya mibale bokonzi ya Loma na bokambami na Bar Kokhba. Mbala oyo lisusu, botomboki ememaki likámá. Akiba mpe ebele ya bayekoli na ye bazalaki kati na bato pene na milió moko oyo babomamaki. Bilikya nyonso ya kotonga lisusu tempelo esilaki lokola Adrien, Amperere Moloma alobaki ete Bayuda bakokɔta lisusu na Yelusaleme te, longola bobele na ntango ya kokanisa kobebisama ya tempelo.
Batannaim oyo bazalaki na bomoi nsima ya Akiba bamonaki tempelo ya Yelusaleme te. Kasi, ebongiseli oyo bameseneki na yango mpo na koyekola mateya ya mibeko mikomami te ekómaki “tempelo” na bango to esika monene ya losambo. Mosala oyo Akiba mpe bayekoli na ye babandisaki na koyeisáká makasi ebongiseli ya mibeko mikomami te ekóbaki kosalema na Tannaim ya nsuka, na nkombo Judah ha-Nasi.
Bisaleli mpo na kokoma Mishnah
Judah ha-Nasi azalaki mokitani ya Hillel mpe Gamaliele.b Abotamaki na eleko ya botomboki ya Bar Kokhba, akómaki mokambi ya lisangá ya Bayuda pene na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato T.B. Nkombo ha-Nasi elimboli “mwana ya mokonzi,” komonisáká etɛlɛmɛlo azalaki na yango engebene baninga na ye Bayuda. Mbala mingi bazali kolobela ye bobele lokola Labi. Judah ha-Nasi asalaki eteyelo na ye moko mpe Sanedrina, liboso na mboka ebéngami Bet She’arim mpe na nsima na mboka moke na nkombo Sepphoris (lelo Zippori) na Galilai.
Koyebáká ete kozanga boyokani elongo na Loma na mikolo mizalaki koya ekokaki kotya kolakisama ya mibeko mikomami te na likámá, Judah ha-Nasi azwaki ekateli ya kosalela yango ebongiseli moko mpo na kobatelama na yango. Ayanganisaki na eteyelo na ye banganga-mayele minene ya eleko na ye. Batalelaki elongo likambo mokomoko mpe mateya ya mibeko mikomami te. Bazalaki kokoma na maloba mokuse mpenza bikateli nyonso oyo bazalaki kozwa nsima ya masoló yango, na kotosáká mitindá ya maloba ya ntɔ́ki ya lokótá ya Liebele.
Bikateli yango bikabolamaki na biteni minene to milɔngɔ́ motoba, engebene mitó minene ya likambo. Judah ha-Nasi akabolaki yango na biteni mikemike to masoló 63. Ndako ya elimo sikawa ekómaki mobimba. Kino ntango yango, mateya yango mazalaki ntango nyonso kopesama bobele na maloba kozanga ete makomama. Lokola libateli oyo ebakisamaki, litambe ya nsuka ya mbongwana esalemaki—ezalaki ya kokoma makambo nyonso na mokanda. Ebongiseli oyo ya sika ya kokoma makambo nyonso na mokanda, oyo kati na yango ezali na mibeko mikomami te ebéngamaki Mishnah. Nkombo Mishnah euti na liloba ya Liebele sha·nahʹ, elimboli “kozongela,” “koyekola,” to “koteya.” Yango ezali na ndimbola moko na liloba ya Araméen tenaʼʹ, eutelo ya liloba tan·na·ʼimʹ, liloba oyo lisalelamaki mpo na balakisi ya Mishnah.
Mokano ya Mishnah ezalaki te ya kosala mpo na libela mibeko miye mikotambwisa Bayuda. Yango etalelaki mingi mpenza makambo oyo mibeko milobelaki te, kondimisamáká ete motángi asilaki koyeba mitindá ya moboko. Lelo oyo, ezali kolobela na mokuse makambo oyo malobelamaki mpe mateyamaki na biteyelo ya balabi na boumeli ya eleko ya Judah ha-Nasi. Bakanisaki ete Mishnah ekozala ebandeli ya mibeko mikomami te mpo na kotalelama lisusu na nsima, ezalaki ebandeli, to moboko, oyo likoló na yango balingaki kotonga.
Na esika ya koyebisa ata likambo moko oyo epesamelaki Mose na Ngomba Sinai, Mishnah ezali kopesa makoki ya kososola kati na bokóli ya mibeko mikomami te, likanisi oyo ebandaki epai na Bafalisai. Makambo makomami kati na Mishnah mazali kopesa mwa engɛngiseli likoló na oyo ekomami kati na Makomami ya Greke ya boklisto mpe likoló ya masoló kati na Yesu mpe Bafalisai. Nzokande, tosengeli kozala na bokɛngi, mpamba te makanisi tozali kokuta kati na Mishnah mazali komonisa makanisi ya Bayuda kobanda na ekeke ya mibale T.B. Mishnah ezali ekangiseli kati na eleko ya tempelo ya mibale mpe Talmud.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mingi na ntina yango, talá na mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Nkasa 8 kino 11, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
b Talá lisoló “Gamaliele—Ye oyo ateyaki Saulo moto na Talasia,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1996.
[Etanda na lokasa 26]
Biteni ya Mishnah
Mishnah ekabolami na milɔngɔ́ motoba. Yango ezali na mikanda mikemike to masoló 63, mikabolami na mikapo mpe mishnayot, to baparagrafe (kasi bavɛrsɛ́ te).
1. Zeraim (Mibeko ya mosala ya bilanga)
Kati na masoló oyo tokokuta mabondeli oyo masalemaki na ntina na bilei mpe mosala ya bilanga. Yango esangisi lisusu mibeko ya kopesa ndambo ya zomi, likabo mpo na banganga, kobuka mbuma na elanga, mpe bambula ya Sabata.
2. Moed (Mabaku ya bulɛɛ, Bilambo)
Masoló kati na Molɔngɔ́ oyo mazali kolobela mibeko mitali Sabata, Mokolo ya Mbɔndi, mpe bilambo mosusu.
3. Nashim (Basi, Mobeko ya libala)
Yango ezali masoló oyo mazali kolobela libala mpe koboma libala, kokata ndai, mosala ya monasili, mpe ekobo.
4. Nezikin (Lomande mpe Mobeko ya Letá)
Masoló kati na Molɔngɔ́ oyo ekangisi makambo matali mobeko ya Letá mpe lotómo ya moto likoló na biloko na ye, bisambiselo mpe bitumbu, mosala ya Sanedrina, losambo ya bikeko, ndai, mpe mitindá oyo ezali kotambwisa bankumu ya mboka (Avot).
5. Kodashim (Mbeka)
Masoló oyo mazali kolobela malako matali makabo ya banyama mpe ya mbuma ya bilanga, bakisa mpe bonene ya tempelo.
6. Toharot (Milulu ya kopɛtolama)
Molɔngɔ́ oyo mozali kotalela masoló ya milulu ya bopɛto, kosukola nzoto, kosukola mabɔkɔ, bokɔnɔ ya mposo, mpe mbindo ya biloko bikeseni.
[Etanda na lokasa 28]
Mishnah mpe Makomami ya Greke ya Boklisto
Matai 12:1, 2: “Na ntango yango, Yesu atambolaki kati na bilanga na masangu na mokolo na sabata. Bayekoli na ye bayoki nzala mpe babandi kobuka mitó na masangu mpe kolya. Emonaki Bafalisai bongo, balobi na ye ete, Talá, bayekoli na yo bazali kosala oyo ebongi kosala na mokolo ya sabata te.” Makomami ya Liebele ezali kopekisa te likambo oyo bayekoli ya Yesu basalaki. Kasi kati na Mishnah tozali kokuta molɔngɔ́ ya misala 39 oyo balabi bapekisaki kosala na mokolo ya sabata.—Shabbat 7:2.
Matai 15:3: “[Yesu] azongiseli bango ete, Mpo na nini bino bokosopa mibeko na Nzambe mpo na mateya na bino?” Mishnah endimi likambo yango. (Sanhedrin 11:3) Tozali kotánga ete: “Esengeli kobɛta nsɛ́tɛ́ makasi na [botosi ya] maloba ya Bakomeli koleka likoló na [botosi ya] maloba ya Mibeko oyo [mikomami]. Soki moto alobi ete, ‘Tosɛngisami te na kolata filakateli’ na bongo abuki mobeko, kasi akozwa etumbu te; [nzokande soki alobi ete], ‘Esengeli ete filakateli ekabolama na biteni mitano,’ na bongo abakisi likoló na maloba ya Bakomeli, akozwa etumbu.”—The Mishnah, ekomami na Herbert Danby, lokasa 400.
Baefese 2:14: “Ye [Yesu] azali kimya na biso, oyo azalisi biso mibale eloko moko, mpe abuki lopango na koyinana na katikati.” Mishnah elobi ete: “Na kati ya Ngomba ya Tempelo ezalaki na efelo (Soreg), bolai na yango ezalaki ya mabɔkɔ zomi.” (Middot 2:3) Bapakano bapesamelaki nzela te ya koleka esika yango mpe kokɔta na lopango ya kati. Ntoma Paulo mbala mosusu azalaki kokanisa efelo wana na lolenge ya elilingi na ntango azalaki kokomela Baefese na mobu 60 to 61 T.B., wana yango ezalaki naino. Efelo ya elilingi ezalaki bongo kondimana ya Mibeko, oyo na boumeli ya ntango molai ekabolaki Bayuda na Bapakano. Nzokande, na liwa ya Klisto na mobu 33 T.B., efelo yango elongolamaki.