Buku mpo na bato nyonso
“Nzambe [akoponaka, “NW”] bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—MISALA 10:34, 35.
1. Profesere moko ayanolaki nini ntango batunaki likanisi na ye na ntina na Biblia, mpe azwaki ekateli ya kosala nini?
MOKOLO moko ya lomingo na nsima ya nzanga, profesere moko afandaki na ndako na ye, ayebaki te ete akoyamba mopaya. Kasi ntango ndeko mwasi moko Motatoli ya Yehova abɛtaki na ekuke na ye, ayokaki nsango oyo amemelaki ye. Ndeko yango alobaki na ntina na kobeba ya ezingelo mpe lolenge mabelé makozala na mikolo mizali koya—masolo yango masepelisaki ye mingi. Nzokande, ntango ndeko mwasi asalelaki Biblia na lisolo na ye, profesere akómaki na mwa ntembe. Na yango, ndeko mwasi atunaki ye likanisi na ye na ntina na Biblia.
Ayanolaki ete: “Ezali buku malamu oyo ekomamaki na bato ya mayele, kasi esengeli kopesa yango motuya mingi te.”
Ndeko mwasi atunaki ye ete: “Osilá kotánga Biblia?”
Profesere azangaki maloba mpe andimaki ete atánga yango naino te.
Na yango ndeko mwasi atunaki ye ete: “Lolenge nini okoki kozala na kondimisama makasi boye na ntina na buku oyo otángá naino te?”
Ndeko mwasi abimisaki makanisi ya kolonga mpenza. Profesere yango azwaki ekateli ya kotalela Biblia mpe bongo kozwa likanisi na yango ye moko.
2, 3. Mpo na nini bato mingi bayebi makambo mazali kati na Biblia te, mpe likambo yango ezali kopesa biso mokumba nini?
2 Bato mingi bazali lokola profesere yango. Mingi bamisaleli makanisi na bango na ntina na Biblia atako batángá yango naino te. Ekoki kozala ete bazali na Biblia. Bakoki ata kondima ete ezali na motuya mpo ete ezali buku ekomami malamu mpe ezali na masolo ya makambo ya ntango ya kala. Kasi, bato mingi batángá yango naino te. Bamoko balobaka ete: ‘Nazali na ntango ya kotánga Biblia te.’ Basusu bamitunaka ete, ‘Ndenge nini buku ya kalakala ekoki kozala na ntina mpo na bomoi na ngai?’ Makanisi motindo wana mazali kopesa biso mokumba monene. Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Biblia ‘epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya.’ (2 Timoté 3:16, 17) Na yango, lolenge nini tokoki kondimisa bato ete ata soki bazali bato ya mposo nini, ya ekólo nini, to ya etuluka nini, basengeli kotalela Biblia?
3 Tótalela mwa bantina oyo ebongi ete tótalela Biblia. Lisolo ya motindo boye ekoki kopesa biso makoki ya kokanisa elongo na baoyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola, mpe mbala mosusu kondimisa bango ete basengeli kotalela makambo oyo Biblia elobi. Mpe lisusu, boyekoli oyo esengeli kolendisa kondima na biso ete Biblia ezali mpenza “Liloba ya Nzambe” lokola yango moko elobi yango.—Baebele 4:12.
Buku oyo eleki kokabolama na mokili mobimba
4. Mpo na nini ekoki kolobama ete Biblia ezali buku oyo eleki kokabolama na mokili mobimba?
4 Ya liboso, ebongi ete tótalela Biblia mpamba te ezali buku oyo eleki kokabolama mpe ebongolami na nkota mingi koleka babuku nyonso kati na lisolo mobimba ya bato. Biblia ya liboso oyo enyatami na masini ebimisamaki eleki sikawa mbula 500. Yango enyatamaki na masini ya Johannes Gutenberg. Ekanisami ete banda ntango wana miliare minei ya Babiblia, ezala mobimba to ndambo, esili konyatama. Na 1996, Biblia mobimba to ndambo na yango esilaki kobimisama na nkota minene mpe mike 2 167.a Bato koleka 90 likoló ya monkama bakoki kozwa Biblia, ata ndambo na yango, na lokota na bango. Buku mosusu te—ezala ya lingomba to ya makambo mosusu—ekokani na yango na kokabolama!
5. Mpo na nini tokoki kokanisa ete moto nyonso na mokili mobimba azali na likoki ya kozala na Biblia?
5 Kasi, mituya ya mpamba ekoki te mpo na kondimisa ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Nzokande, soki mokanda moko epemami na Nzambe, tosengeli komizela ete bato nyonso bázala na likoki ya kozwa yango. Kutu, Biblia yango moko eyebisi biso ete: “Nzambe [akoponaka, NW] bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Na bokeseni na buku mosusu nyonso, Biblia ekatisi bandelo nyonso ya bikólo mpe elongi bokabwani ya bato na ntina na mposo mpe bituluka. Solo mpenza, Biblia ezali buku mpo na bato nyonso!
Ebiki na makama ndenge na ndenge
6, 7. Mpo na nini tosengeli kokamwa te ete makomi nyonso ya libosoliboso ya Biblia masilá kobunga, mpe yango ezali kobimisa motuna nini?
6 Ezali na ntina mosusu oyo Biblia ebongi kotalelama. Ebiki na makama oyo bato mpe biloko mosusu ebimisaki. Ndenge yango ebikaki na makama minene ndenge na ndenge oyo ekutanaki na yango ekokani na buku mosusu te ya ntango ya kala.
7 Emonani ete bakomi ya Biblia bakomaki maloba na bango na mai ya mokanda likoló ya papirise (esalemi uta na molona moko ya Ezipito ebéngami papirise) mpe likoló ya parshɛmɛ (esalemi na mposo ya banyama).b (Yobo 8:11) Nzokande, bisaleli motindo wana mpo na kokoma bibebisamaka na biloko mosusu. Oscar Paret, nganga-mayele ya Biblia alimboli ete: “Bisaleli wana mibale mpo na kokoma [papirise mpe parshɛmɛ] bibebisamaka na malili, na koguga, mpe na nkiso ndenge na ndenge. Lokola tomonaka yango mokolo na mokolo, toyebi lolenge nini papyé, ata mpe mposo makasi ya nyama, ebebaka noki soki etikami na mopɛpɛ ya libándá to na ndako oyo ezali na malili.” Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete lelo oyo tozali ata na lokasa moko te oyo bakomaki Biblia na ebandeli; ekoki kozala ete nyonso esilá kobeba kala. Kasi soki makomi ya ebandeli ebebisamaki na biloko mosusu, lolenge nini Biblia ebikaki?
8. Ndenge nini makomi ya Biblia mabatelamaki na boumeli ya bikeke?
8 Mwa moke nsima ya kokomama ya makomi ya ebandeli, bato babandaki kosala bakopi na yango na mabɔkɔ. Kutu, kosala bakopi ya Mibeko mpe ya biteni mosusu ya Makomami Mosantu ekómaki mosala mobimba na Yisalaele ya kala. Na ndakisa, elobami ete nganga Ezela azalaki “mokomeli na mayele na Mobeko na Mose.” (Ezela 7:6, 11; kokanisá na Nzembo 45:1.) Kasi, bakopi oyo ebimisamaki elingaki mpe kobeba nsima ya ntango; na yango, esengelaki kosala bakopi mosusu oyo ekokitana yango soki ebebi. Mosala wana ya kosala bakopi elandanaki na boumeli ya bikeke mingi. Lokola bazalaki bato ya kokoka te, bakomeli basalaki nde mabunga oyo ebongolaki makomi ya Biblia? Bilembeteli ya solosolo bimonisi ete Biblia ebongwanaki te!
9. Lolenge nini ndakisa ya Bamasorete emonisi ete bakomeli ya Biblia bazalaki na likebi mozindo mpe na bosikisiki?
9 Bakomeli bazalaki na makoki mingi, kasi bazalaki mpe na limemya mozindo mpo na maloba oyo bazalaki kokoma. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mokomeli” ezali na likanisi ya kotánga mituya mpe koluka koyeba yango mokomoko. Mpo na komonisa likebi mozindo mpe bosikisiki ya bakomeli, tókamata ndakisa ya Bamasorete, bakomeli ya Makomami ya Liebele banda na ekeke ya motoba kino ekeke ya zomi T.B. Engebene nganga-mayele ya Biblia Thomas Hartwell Horne, batángaki “mbala boni lɛtɛlɛ mokomoko ya alfabɛ [ya Liebele] ezongelamaki kati na Makomami ya Liebele.” Kanisá mosala monene lolenge wana! Mpo ete bábosana ata lɛtɛlɛ moko te, bakomeli yango oyo bamipesaki mpenza na mosala bazalaki kotánga maloba boni bakomaki mpe lisusu balɛtɛlɛ boni bakomaki. Na yango, engebene nganga-mayele moko ya Biblia, batángaki balɛtɛlɛ 815 140 na Makomami ya Liebele! Molende motindo wana mpo na kosala na bokɛngi nyonso ezali endimiseli ete basalaki bakopi oyo ezalaki na bosikisiki mpenza.
10. Elembeteli ya solosolo nini tozali na yango ete makomi ya Liebele mpe ya Greke oyo masalelamaki mpo na kobongola Biblia na mikolo na biso mazali mpenza na maloba oyo bakomi ya ebandeli bakomaki?
10 Ɛɛ, tozali na bilembeteli ya solosolo bimonisi ete makomi ya Liebele mpe ya Greke oyo masalelami mpo na kobongola Biblia na mikolo na biso mamonisi na bosembo mpenza maloba oyo bakomi ya libosoliboso bakomaki. Bilembeteli yango ezali bongo bankóto ya bakopi ya Biblia ekomamaki na mabɔkɔ oyo tozali na yango lelo. Ekanisami ete Makomami ya Liebele na mobimba, to biteni na yango ezali na bakopi 6 000 mpe Makomami ya Greke ya boklisto ezali na bakopi 5 000. Bokokanisi oyo esalemi na likebi kati na ebele ya bakopi ekomami na mabɔkɔ esalisaki banganga-mayele oyo bayekolaka makomi na komona libunga mokomoko oyo bakomeli basalaki mpe koyeba maloba oyo elobamaki mpenza na ebandeli. Kolobáká na ntina na makomi ya Makomami ya Liebele, nganga-mayele ya Biblia William Green alobaki ete: “Tokoki koloba na kondimisama nyonso ete ezali na buku mosusu te ya ntango ya kala oyo ebatelamaki na bosikisiki ya motindo boye.” Tokoki mpe kotya motema lolenge moko kati na Makomami ya Greke ya boklisto.
11. Na kotalela 1 Petelo 1:24, 25, mpo na nini Biblia ebikaki kino lelo?
11 Mbɛlɛ Biblia mpe nsango na yango ya motuya elimwaki mpenza soki bakopi ekomamaki te mpo na kokitana mikanda ya libosoliboso! Soki ebikaki, ezali mpo ete Yehova azali Mobikisi mpe Mobateli ya Liloba na ye. Lokola Biblia yango moko elobi yango na 1 Petelo 1:24, 25: “Bato nyonso bazali lokola matiti, kitoko na bango nyonso lokola felele na matiti; matiti makaoki mpe felele ikwei; nde Liloba na Nkolo ezali koumela seko.”
Ebongolami na nkota oyo ezali kolobama lelo
12. Longola likambo ya kosala bakopi mbala na mbala na boumeli ya bikeke, mokakatano nini mosusu Biblia ekutanaki na yango?
12 Ezalaki etumba monene mpo ete Biblia ebatelama na boumeli ya bikeke na nzela ya bakopi, kasi ekutanaki mpe na mokakatano mosusu—kobongolama na nkota ya ntango na biso. Biblia esengeli kozala na lokota ya bato oyo bazali kotánga yango mpo ete esimba mitema na bango. Nzokande, kobongola Biblia—oyo ezali na mikapo koleka 1 100 mpe bavɛrsɛ koleka 31 000—ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, na boumeli ya bikeke, babongoli oyo bamipesi balukaki kolonga mokakatano yango, mpe bakutanaki na mikakatano minene oyo emonanaki lokola ete ekoki kolongama te.
13, 14. (a) Mobongoli Robert Moffat akutanaki na mokakatano nini na Afrika na ebandeli ya ekeke ya 19? (b) Ndenge nini Batswana bayambaki Evanzile ya Luka ntango ebimisamaki na lokota na bango?
13 Na ndakisa, tótalela lolenge Biblia ebongolamaki na nkota ya Afrika. Na mobu 1800, bobele pene na nkota zomi na mibale ya Afrika nde ezalaki kokomama na mikanda. Bankama mosusu ya nkota oyo elobamaka na Afrika ezalaki kokomama na mikanda te. Mobongoli Robert Moffat akutanaki na mokakatano yango. Na mobu 1821, wana azalaki na mbula 25 ya kobotama, Moffat afungolaki parwasi moko epai ya bato balobaka lokota Tswana, kuna na sudi ya Afrika. Mpo na koyekola lokota na bango oyo ezalaki na mikanda te, afandaki esika moko na bato yango. Moffat alendendelaki mpe, atako azangaki buku mpo na koyekola mateya ya ebandeli to diksionere, nsukansuka ayebaki lokota yango, abongisaki lolenge moko ya kokoma yango, mpe ayekolisaki Batswana mosusu kotánga balɛtɛlɛ yango. Na mobu 1829, nsima ya kosala epai ya Batswana na boumeli ya mbula mwambe, asilisaki kobongola Evanzile ya Luka. Na nsima alobaki boye: “Namonaki bato bazalaki kouta mosika na bankama ya bakilomɛtɛlɛ mpo na koya koluka mokanda ya Santu Luka. . . . Namonaki bango kozwa mokanda ya Santu Luka, mpe kolela mpo na yango, mpe kokanga yango makasi na ntolo na bango, mpe kotangisa mpisoli ya botɔ́ndi, kino nalobaki epai na basusu kati na bango ete, ‘Mpisoli na bino ekopolisa buku yango.’” Moffat alobaki lisusu ete mobali moko ya Afrika amonaki bato bazali kotánga Evanzile ya Luka mpe atunaki bango soki yango ezalaki eloko nini. Bayanolaki ye ete: “Ezali liloba ya Nzambe.” Mobali yango atunaki ete: “Elobaka?” Bazongisaki ete, “Ɛɛ, elobaka na motema.”
14 Babongoli oyo bamipesaki lokola Moffat bapesaki bato ya Afrika libaku ya liboso ya kosolola na nzela ya mikanda. Kasi babongoli bapesaki bato ya Afrika likabo ya motuya monene koleka—Biblia na lokota na bango. Lisusu, Moffat alakisaki Batswana nkombo ya Nzambe, mpe asalelaki nkombo yango kati na libongoli na ye mobimba.c Na bongo, Batswana bazalaki kobénga Biblia ete “monɔkɔ ya Yehova.”—Nzembo 83:18.
15. Mpo na nini Biblia ezali mpenza na bomoi lelo oyo?
15 Babongoli mosusu na bisika ndenge na ndenge na mokili bakutanaki na mikakatano motindo moko. Kutu, bamoko balingaki kobungisa bomoi na bango mpo na kobongola Biblia. Kanisá naino: Soki Biblia etikalaki bobele na Liebele mpe Greke ya kala, mbɛlɛ esilá “kokufa” kala, mpamba te nkota yango ezalaki lisusu kolobama na bato te mpe eyebanaki te na bisika mingi ya mokili. Kasi, Biblia ezali mpenza na bomoi mpamba te, na bokeseni na buku mosusu nyonso, ekoki “koloba” na bato ya mokili mobimba na nkota na bango. Mpo na yango, nsango na yango ezali ntango nyonso “kosalaka mosala kati na . . . bandimi [na yango].” (1 Batesaloniki 2:13) Bible de Jérusalem ebongoli maloba yango ete: “Ezali naino nguya ya bomoi kati na bino oyo bondimaka yango.”
Ekoki kotyelama motema
16, 17. (a) Mpo ete tókoka kotyela Biblia motema, tosengeli kozala na elembeteli nini? (b) Pesá ndakisa ya bosembo ya Mose na bokomi Biblia.
16 Bato mosusu bakoki komituna ete, ‘Tokoki mpenza kotyela Biblia motema? Bato oyo balobelami kati na yango bazalaki solo na bomoi, mpe bisika oyo bilobelami kati na yango bizalaki solo, mpe makambo oyo elobeli masalemaki mpenza?’ Mpo ete tótyela yango motema, tosengeli kozala na bilembeteli ete ekomamaki na bato oyo bazalaki na likebi mpe bazalaki sembo. Yango ememi biso na ntina mosusu oyo tosengeli kotalela Biblia: Ezali na bilembeteli ya solosolo bimonisi ete ezali na bosikisiki mpe ebongi kotyelama motema.
17 Bakomi ya sembo bakomaka bobele bolongi te kasi lisusu bikweli, bobele makasi te kasi lisusu bolɛmbu. Bakomi ya Biblia bamonisaki elimo motindo wana ya kozala polele, ezali mpenza kolendisa. Na ndakisa, tótalela bosembo ya Mose. Kati na makambo oyo akomaki na bosembo nyonso, ayebisaki ete ye moko azangaki makoki ya koloba na mpiko yango wana, na likanisi na ye, abongaki te kozala mokambi ya Yisalaele (Exode 4:10); akomaki libunga monene oyo asalaki mpe na ntina yango azangaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka (Mituya 20:9-12; 27:12-14); akomaki lipɛngwi ya ndeko na ye, Alona, oyo asalanaki na batomboki kati na bana ya Yisalaele mpo na kosala ekeko ya mwana ngɔmbɛ ya wolo (Exode 32:1-6); akomaki botomboki ya ndeko na ye ya mwasi, Milyama mpe etumbu makasi oyo azwaki (Mituya 12:1-3, 10); akomaki kotuka ya Nadaba mpe Abihu, bana ya ndeko na ye (Levitike 10:1, 2); mpe alobelaki komilelalela mpe koimaima oyo libota ya Nzambe ezalaki kosala mbala na mbala. (Exode 14:11, 12; Mituya 14:1-10) Kokoma maloba lolenge wana na bosembo mpe polele emonisi lobanzo ya koloba ntango nyonso solo, boye te? Lokola bakomi ya Biblia bazalaki pene ya kokoma makambo oyo makoki koyokisa balingami na bango, libota na bango, ata mpe bango moko nsɔni, yango ezali ntina malamu oyo tokoki kotyela makomi na bango motema, boye te?
18. Nini ezali komonisa ete bakomi ya Biblia bazalaki bato ya kotyela motema?
18 Kozanga bongolabongola kati na bakomi ya Biblia ezali mpe komonisa ete makomi na bango makoki kotyelama motema. Ezali mpenza likambo ya kokamwa na komona ete bato 40 oyo bakomaki makambo na bileko bikeseni na boumeli ya mbula 1 600 bázala na boyokani ata na makambo mikemike. Nzokande, ezali te ete boyokani yango ebongisamaki na likebi nyonso oyo ekoki kopusa na kokanisa ete mbala mosusu bakomi yango bayokanaki. Kutu, ezali komonana polele ete basalaki eloko moko te mpo ete makambo ndenge na ndenge oyo bakomaki máyokana; mbala mingi boyokani ezali ya kokana te.
19. Lolenge nini lisolo ya Baevanzile na ntina na kokangama ya Yesu emonisi boyokani oyo esalemaki kozanga ete bákana yango?
19 Mpo na komonisa yango, tótalela likambo oyo esalemaki na butu oyo Yesu akangamaki. Bakomi nyonso minei ya Evanzile balobi ete moko kati na bayekoli abimisaki mopanga mpe abɛtaki moombo ya nganga monene, mpe akataki ye litoi. Nzokande, bobele Luka nde ayebisi biso ete Yesu “asimbaki litoi mpe abikisaki ye.” (Luka 22:51, NW) Ezali yango nde tokokaki komona epai na mokomi oyo ayebanaki lokola “monganga molingami,” boye te? (Bakolose 4:14) Lisolo ya Yoane eyebisi biso ete kati na bayekoli oyo bazalaki wana, oyo asalelaki mopanga ezali bongo Petelo—likambo oyo ekoki kokamwisa te soki totaleli ezaleli ya Petelo ya motema lukuluku mpe motema mɔ́tɔmɔ́tɔ. (Yoane 18:10; kokanisá Matai 16:22, 23 na Yoane 21:7, 8.) Yoane alobeli mpe likambo mosusu oyo ekoki komonana ete ezali na ntina te: “Nkombo na moombo ete Malɔkɔ.” Mpo na nini bobele Yoane nde ayebisi nkombo ya moto yango? Ntina epesami na mwa likambo moke elobami likolólikoló bobele na lisolo ya Yoane—Yoane “ayebani na nganga monene.” Ayebanaki lisusu na bato ya ndako ya nganga monene; basali bayebaki ye, mpe ye ayebaki bango.d (Yoane 18:10, 15, 16) Na yango, ezali se likambo ya kolongobana ete Yoane alobela nkombo ya moto oyo azokisamaki, wana bakomi mosusu ya Evanzile, lokola bayebaki moto yango te, bayebisi nkombo na ye te. Boyokani kati na makambo oyo mikemike ezali mpenza kokamwisa, kasi ezali polele ete bakanaki yango te. Ezali na bandakisa ebele ya makambo motindo yango kati na Biblia mobimba.
20. Bato ya motema sembo basengeli koyeba nini na ntina na Biblia?
20 Boye, tokoki nde kotyela Biblia motema? Ntembe ezali te! Bosembo ya bakomi ya Biblia mpe kozanga bongolabongola kati na Biblia ezali komonisa mpenza ete ezali solo. Bato ya motema sembo bazali na mposa ya koyeba ete bakoki kotyela Biblia motema, mpamba te ezali Liloba lipemami na “Yehova Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Ezali na bantina mosusu oyo Biblia ezali buku mpo na bato nyonso, lokola lisolo oyo elandi ekomonisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mituya oyo mibimisami na Alliance biblique universelle.
b Ntango azalaki na bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale na Loma, Paulo asɛngaki Timoté ete amema “mikanda, nde na koleka, . . . na mposo na kokoma [“parshɛmɛ”].” (2 Timoté 4:13) Ekoki kozala ete Paulo azalaki kosɛnga biteni ya Makomami ya Liebele mpo ete akoka koyekola yango wana azalaki na bolɔkɔ. Maloba “nde na koleka, yaká na mposo na kokoma” mamonisi mbala mosusu ete ezalaki na barulo ya papirise mpe barulo mosusu ya parshɛmɛ.
c Na mobu 1838, Moffat asilisaki kobongola Makomami ya Greke ya boklisto. Na lisalisi ya moninga na ye moko, asilisaki kobongola Makomami ya Liebele na mobu 1857.
d Lisolo emonisi na nsima ete Yoane ayebanaki na nganga monene mpe na bato ya ndako na ye. Ntango moombo mosusu ya nganga monene afundaki Petelo ete azali moyekoli ya Yesu, Yoane alimboli ete moombo yango azalaki “ndeko na ye oyo Petelo akati litoi na ye.”—Yoane 18:26.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Mpo na nini tosengeli komizela ete Biblia ezala buku oyo eleki kokabolama epai ya bato kati na mokili mobimba?
◻ Elembeteli nini ezali komonisa ete bosikisiki ya Biblia ebatelamaki?
◻ Baoyo babongolaki Biblia bakutanaki na mikakatano nini?
◻ Nini ezali komonisa ete makomi ya Biblia mabongi kotyelama motema?