Uta na Babuludingi kino na Bisobe ya ‘Toundra’ bazali kokende epai bato bazali
EZALA mbula, mbula mpɛmbɛ, matandala, mbwa ya zamba, nyama babéngi puma, to mpe bato oyo bazalaki koyamba bango malamu te na bisika na bango, nyonso wana elɛmbisaki molende na bango te. Na lombangu mpenza, batambolaki kilomɛtɛlɛ 3 000, kokatisáká esobe monene, bibale ya mai makasi, mpe mabwaku minene mpo na kotika mikanda na wɛsti ya États-Unis. Ezalaki banani?
Ezalaki bongo bilenge ya mpiko bamati na mpunda mpo na pony express.a Eloko nini epesaki bilenge yango etingya makasi boye? Na ntembe te, ezali momekano, bandimaki ete oyo ekoya eya, mpe esengo ya kokómisa mikanda na esika mitindamaki. Likambo ya esengo, momati mpunda mokomoko azalaki na Biblia kati na sakosi na ye ya mikanda.
Koleka mbula nkama na nsima, elimo ya molende makasi, ya mɔ́tɔ, mpe ya komipesa ezali komonisama na basakoli ya Bokonzi koleka 113 000 na ekólo Canada. Eloko nini epusaka bango? Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani ezali kopusa bango na koyebisa solo ya Bokonzi na nzela ya mikanda mpe na maloba na bango. Solo oyo ezali kopesa bomoi esengeli kokabolama nokinoki koleka mikanda nyonso oyo pony express ekabolaki. Ɛɛ, ezali nsango ya motuya na ntina na Bokonzi, ezwami kati na Biblia Mosantu, mokanda oyo ezalaki kati na basakosi ya bamati mpunda ya pony express.—Masese 2:21, 22; Yisaya 2:2-4; 61:2; Matai 22:37-39; 24:14.
Bapusami na bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bato
Batatoli ya Yehova basepelaka kosolola na bato na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Bokoki komona bango bazali kosakola na bingumba ya babuludingi, na bamboka ya zamba ya matiti mokuse ebéngami toundra, na libándá ya mpɛpo, na babalabala mpe na bisika ya bato mingi, mpe na telefone. Mpo na nini basakolaka na bisika ndenge na ndenge boye?
Nkita mpe kobakisama ya motángo ya bato ezali kobongola bomoi ya bato, yango ezali kopesa mokakatano mpo na kokuta bango na bandako. Na bisika mingi, ezala mobali to mwasi na ye bakendaka mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota, mbala mingi bazali kokokisa bamposa ya elimo te. Kati na bopusi mpe motungisi motindo oyo, bazali na mposa ya kobɔndisa motema na nsango ya elikya, kasi bayebi te epai wapi bakozwa yango. Na esengo nyonso Batatoli ya Yehova bazali komemela bango nsango yango. Kosaleláká bokɛngi mpe boboto, bazali koluka mabaku ya komemela bato ya motindo nyonso nsango malamu ya esengo, mpe bazali kobenda likebi.—1 Timoté 2:3, 4.
Na nkota mosusu: Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye ete ‘bákende kozalisa bayekoli,’ asɛngisaki bango koluka mabaku mpe kozala na molende mpo na komema nsango ya elikya epai ya bato ya nkota nyonso. (Matai 28:19) Lokola ezali komonana na mikili mingi, ekólo Canada ekómi mboka oyo efandami na bato bauti na mikili mingi, mpe basakoli ya Bokonzi bamimesenisi na likambo yango, bazali koyekola nkota ya sika.
Na ndakisa, mobali moko na mwasi na ye oyo bazali basakoli ya ntango nyonso na engumba Edmonton, na etúká ya Alberta, bamonaki mposa ya koyekola na bato oyo balobaka lokota Mandarin ya ekólo Chine. Nzokande, basengelaki naino koyekola lokota Mandarin, na nsima, bakutanaki na moyekoli moko na iniversite oyo azalaki koloba lokota yango. Andimaki kolakisa bango lokota mpe bango báyekolisa ye solo ya Biblia. Likambo yango ezalaki mpenza malamu! Na nsima ya sanza 24, basakoli mibale wana ya Bokonzi bakómaki na makoki ya koteya na lokota Mandarin. Bobele na ntango yango, moto oyo azalaki molakisi mpe moyekoli na bango akokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo ya boklisto.
Baeksperiansi motindo moko ezali komonana na bingumba mingi wana basakoli ya Bokonzi, kopusamáká na bolingo, bazali koyekola nkota lokola Polonais, Russe mpe Vietnamien.
Na nzela: Ndenge moko na bato ya pony express na ekeke eleki, oyo bazalaki kotambola moto ye moko na mpunda na ye, basakoli mosusu ya Bokonzi na kati ya etúká ya Colombie-Britannique bazali kotambola bango moko na motuka. Ntango na bango mingi ezali koleka na mosala ya kokumba banzete na mituka longwa na zamba kino na baizini ya kosala mabaya. Yango ezali kosɛnga ete básololaka ntango nyonso na batambwisi mosusu ya mituka na nzela ya radio CB [lolenge ya foni to motorola] mpo na koyebisa lolenge mituka ezali kotambola mpe makama na nzela.
Kolukáká ntango nyonso mabaku ya kosakola, basakoli wana ya Bokonzi basalelaki radio CB na bango na lolenge mosusu. Babandisaki masolo na CB na kolobeláká makambo oyo mazalaki kosalema mikolo wana. Bongo na mayele nyonso bazali kolobela Biblia. Na libaku moko moninga moko motambwisi motuka asepelaki na makambo Biblia elobi na ntina na elikya mpo na bakufi. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Mpamba te, liwa ya moninga moko motambwisi motuka na likama oyo esalemaki na nzela monene ezalaki kotungisa ye mingi. Na boboto nyonso andimaki boyekoli ya Biblia mpe sikawa azali kosakola nsango malamu epai ya batambwisi motuka mpe baninga na ye. Lisusu, na nsai nyonso, azali koyekola Biblia elongo na mwasi-mokufeli-mobali oyo moninga na ye atikaki. Oyo nde litomba ya kosalela libaku ya koyebisa solo oyo ekopesa bomoi na lolenge oyo esalelamaka mingi te!
Na mpɛpo: Ntango bazali koya kosakola nsango ya solo ya motuya, basakoli ya molende bazali kokende na bisika oyo bato bazali, ‘kokɔtáká na bamboka mike’ na lisalisi ya mpɛpo ya mike. (Matai 10:11, 12) Eleki mwa mikolo, bituluku mibale oyo basalelaki mpɛpo, kopusamáká na molende mpo na kosakola nsango malamu mpe na mosolo na bango moko, bakendaki epai ya bato oyo bapalangani na etando monene ya bamboka ya zamba na bisobe ya toundra. Etuluku mokomoko etambolaki kilomɛtɛlɛ 3 000 mpe bakitaki na bituluka 14, etikalaki bobele kilomɛtɛlɛ 250 mpo bákóma na bamboka ya cercle arctique. Basakoli ya mpiko oyo bakobaki na boumeli ya mikolo nsambo mpo na kokutana na bato oyo bakabwani bamoko na bamosusu na bantaka milai.
Milende yango ezalaki mpenza na ntina? Tókanisa matomba malamu oyo nsango ya Biblia ezwaki na bituluka wana. Basakoli bapaya wana basungaki mpo na kokokisa mposa makasi ya elimo wana bazalaki komonisa ete etikali moke Yehova akotya paladiso awa na mabelé. (Matai 5:3) Ntango mingi nsima ya kokende ya bamemi nsango, bato ya mitema sembo bakokaki kotánga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia na motángo ya 542, mpe zulunalo 3 000 oyo bakabolelaki bango.—Kokanisá na Misala 12:24.
Na telefone: Bankóto ya bafandi na engumba bazali na bandako oyo ebatelami malamumalamu. Atako bongo, basakoli ya Bokonzi bazali kosala na molende mpe na bokɛngi. Ndenge nini bazali kolonga kokóma epai bato yango bazali? Atako kokutana na moto ye moko eleki malamu, mbala mingi basalelaka telefone oyo ezwami na ekɔtelo mpo na kosolola na bato na bandako na bango, mpe matomba ezali komonana. Soki likoki ya kosala bongo ezali te, basalelaka telefone uta na ndako na bango moko.
Mokolo moko na ntɔngɔ mobange moko ya mwasi ayanolaki na telefone. Nsima ya kopesa mbote ya limemya na mokuse, batunaki ye soki akanisaka ete ekozala na ntango moko oyo bato bakotambola na butu kati na babalabala kozanga kobanga. Batángaki mikapo ya Makomami mpo na kondimisa ye ete na mikolo mizali koya kimya ekofuluka. (Nzembo 37:10, 11; Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Andimaki ete básolola na telefone na pɔsɔ ekolanda mpo na koyeba mpo na nini tokoki kondima bilaka ya Nzambe. Nsima ya sanza moko ya boyekoli Biblia na telefone, kotángáká baparagrafe na mokanda mokolimbolaka Biblia mpe kotuna mituna mibongi, mobange wana apesaki longonya na mosakoli mpo na masolo ndenge na ndenge azalaki komemela ye pɔsɔ na pɔsɔ. Ntango ekokaki mpo na koyebisa ye nkombo ya mokanda yango mpe kopesa ye yango. Bazwaki bibongiseli mpo na kokutana bango mibale. Ya solo, Batatoli ya Yehova basili komonisa bolingo mpo na bato, mpe bato yango bazali kosepela, kososoláká ete Yehova azali elongo na basakoli baklisto wana.—Kokanisá na 1 Bakolinti 14:25.
Na mikanda: Na etúká ya Québec, epai kuna bato balobaka Lifalansé, basakoli ya Bokonzi bazali kokende epai bato bazali. Mokɛngɛli motamboli moko alobaki ete: “Na boumeli ya bambula bandeko bamonaki ete bokoli ezalaki mingi te na ntina na botɛmɛli ya mangomba. Kasi na mosala bandeko bazali kosala na kolendendela mpe kokende epai ya bato mbala na mbala, Biblia, buku oyo eyebanaki mpenza te mpe ezalaki kotángama bobele na bato moke, sikawa ekomonana kati na bandako mingi.”
Matomba ya kosepelisa ezali kozwama na engumba Québec, mpamba te, na kati ya basakoli ya sika ezali na bato ya lolenge nyonso, bazwi mpe babola, bakisa mpe minganga. Tozali na lisolo ya monganga moko. Mwasi na ye, oyo azali mosakoli, azalaki kosolola na ye mbala na mbala na ntina na elikya oyo Biblia ezali kopesa. Kati na lisangá, nkulutu moko ya bokɛngi abengisaki monganga na likita na eleko oyo tozalaki koyekola mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie ? Ayaki mpe apesaki kutu biyano. Akamwaki ete makambo malobamaki mazalaki na motuya mpe ya elimo, mpe andimaki koyekola Biblia. Sikawa ye mpe azali mosakoli ya Bokonzi.
Bosaleli malamu ya bazulunalo ekokisi mokumba monene mpo na kobenda bato ete bándima Biblia. Mosakoli ayebaka te lisolo oyo ekopusa moto ete andima solo. Mosakoli moko apesaki Lamuká! epai ya moninga moko ya kartye oyo azalaki kolinga koyoka nsango ya Bokonzi te kasi azalaki kosepela na makambo matali nyamankɛkɛ. Fɔtɔ oyo ezwami na lisolo “La maladie de Chagas: un baiser de mort”, ebimaki na Lamuká! ya 22 Novɛ́mbɛ 1992 (ebimeli ya Lifalanse), ebendaki likebi na ye. Akamwaki na makambo atángaki, asɛngaki bazulunalo mosusu. Abandaki koyekola Biblia, mpe nsima ya sanza motoba akómaki kosakola epai na baninga mosusu.
Na bisika ya bato mingi: Mibeko ya ekólo Canada epesi nzela na koteya na bisika ya bato mingi, lokola na libándá ya mpɛpo. Na libándá ya mpɛpo na engumba Halifax, basakoli na mayele nyonso bazali kobɛlɛma epai na basali na mobembo ntango bazali kozela mpɛpo mosusu mpe bazali kosolola na bango. Bazali kotuna mituna ya sikisiki oyo ekokamba lisolo na Biblia. Lokola bamemaka Biblia ya moke mpe mikanda, bakoki kokokisa bamposa ya bato na elimo. Minganga-bapasoli, bato ya siansi, baavoka, batambwisi-mpɛpo, bakonzi ya mangomba, bapolisi, batambwisi taxi, ba ingénieur, balakisi, basoda, mpe bato ya politiki oyo bazali kouta na mikili ya bapaya bazali kati na bato oyo bayokaki nsango ya Bokonzi na mwango wana mpe basilá komema mbóto ya solo ete ekende kobota na mikili ya mosika.—Bakolose 1:6.
Mokolo moko na ntɔngɔ na libándá ya mpɛpo, moto moko azwaki zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na nsima, alobaki na kimya mpe na mongongo ya nse ete: “Ah, te, Batatoli ya Yehova te!” Mpo na nini alobaki bongo? Moto yango azalaki Mizilima oyo amipesá mpe autaki kosala libondeli na mwa ndakonzambe oyo ezwami na libándá ya mpɛpo. Autaki kobondela Nzambe ete alakisa ye mayele, bososoli, mpe solo. Likambo oyo ete Batatoli ya Yehova bazalaki eyano ya nokinoki na libondeli na ye ekamwisaki ye.
Solo mpenza, basakoli wana ya molende na Canada bazali kopesa nzela na eloko moko te ete epekisa bango kosakola nsango ya Bokonzi oyo ezali na motuya mingi. Bazali kotika eloko moko te ezala nkota ya bapaya, banzela mabe, bituluka ya mosika, babuludingi oyo ekɛngɛlami makasi na engumba, ete epekisa bango kosakola. Bazali na ekateli ya koyebisa nsango ya Nzambe oyo ekopesa bomoi na bato oyo bazali koluka solo na motema sembo. Elongo na bandeko na bango ya mokili mobimba, na kozanga moimi bazali kotosa etinda ya Yesu ete ‘bókende kozalisa bayekoli.’—Matai 28:19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Pony express ezalaki mosala ya kokabola mikanda na États-Unis, yango eumelaki bobele sanza 18, kobanda 1860 kino 1861.
[Etanda na lokasa 27]
Basakoli ya Bokonzi oyo bazali kozwa matomba malamu basalelaka telefone
Bamoko balobaka ete: “Mbote. Nkombo na ngai [ayebisi nkombo na ye]. Nazali kosolola na mokuse na bato ya buludingi na bino mpo na koyeba ndenge nini kimya ekoki kozwama. Okanisi ete mokolo mosusu kimya ekozala na mokili mobimba? [Akotika ye ayanola.] Mpo na kotungisa makanisi na yo te, nazali kosala ankɛtɛ te to nazali kotekisa eloko te. Nzokande, nazali koyebisa bato makanisi mauti na Makomami Mosantu oyo malobi ete Nzambe akotya kimya solo.” Na nsima lisolo ekoki kokoba na kolobeláká na mokuse mwa bavɛrsɛ ya Makomami.
Bamosusu balobaka ete: “Mbote. Nkombo na ngai [ayebisi nkombo na ye]. Nazali mosali ya bolingo malamu na engumba na bino. Nazali kotuna makanisi ya bato oyo bafandi na buludingi na bino. Bato mingi bazali komibanzabanza mpo na libateli na bango moko mpamba te kobomana mpe mobulu ezali kobakisama kati na engumba na biso. Likambo yango ezali mpe kotungisa yo? [Akotika ye ayanola.] Okanisi ete ekozala na ntango oyo mokili mobimba ekozala na libateli?” Akotikela ye ntango ya koyanola, mpe akoyebisa nsango ezwami na Makomami.