Etumbu epesami na lobwaku ya kokata likambo
“Tiká ete mabota . . . bábuta kino lobwaku na Yosafata; mpo ete nakofanda wana mpo na kosambisa mabota nyonso.”—YOELE 3:12.
1. Mpo na nini Yoele amoni bibele bayangani na “lobwaku ya kokata likambo”?
“BIBELE, bibele, na lobwaku na kokata likambo”! Tozali kotánga maloba wana ya kobenda likebi na Yoele 3:14. Mpo na nini bibele yango bayangani? Yoele ayanoli ete: “Mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi.” Yango ezali mokolo monene ya kolongisama ya Yehova—mokolo ya kopesa etumbu na bibele oyo baboyi Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama mpe etambwisami na Yesu Klisto. Na nsuka, “baanzelu minei” ya Emoniseli mokapo 7 bakotika kokanga “mipɛpɛ minei na mokili,” mpe yango ekozala ebandeli ya “bolɔzi monene lokola emonana naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, ɛɛ, ekomonana lisusu mpe te.”—Emoniseli 7:1; Matai 24:21, NW.
2. (a) Mpo na nini ebongi ete esika oyo Yehova akopesa etumbu ebéngama “lobwaku ya Yosafata”? (b) Yosafata asalaki likambo nini oyo ebongi mpenza ntango bayaki kobundisa bango?
2 Na Yoele 3:12, esika ya kopesa etumbu yango ebéngami “lobwaku na Yosafata.” Nkombo yango ebongi mpenza mpamba te na boumeli ya eleko moko ya yikiyiki na lisolo ya libota ya Yuda, Yehova apesaki etumbu kuna mpo na kolongisa Mokonzi malamu Yosafata, ye oyo nkombo na ye elimboli ete “Yehova azali Mosambisi.” Botateli ya makambo oyo masalemaki na ntango wana ekosalisa biso na kososola malamu mpenza makambo oyo makosalema mosika te na ntango na biso. Lisolo yango ezwami na 2 Ntango mokapo 20. Na vɛrsɛ 1 ya mokapo yango, tozali kotánga ete “Bamoaba mpe Baamona bayaki epai na Yosafata mpo na etumba mpe bamosusu na [Baamonima, NW] na bango elongo.” Yosafata asalaki nini? Asalaki likambo oyo basaleli ya sembo ya Yehova basalaka mbala nyonso na ntango ya likama. Amibalolaki epai na Yehova mpo na kosɛnga ye litambwisi mpe abondelaki na etingya ete: “Ɛ Nzambe na biso, yo okopesa bango etumbu te? Zambi tozali na nguya liboso na ebele monene te oyo ezali koyela biso. Toyebi likambo na kosala te nde miso na biso izali epai na yo.”—2 Ntango 20:12.
Yehova apesi eyano na libondeli
3. Yehova apesaki malako nini na bato ya Yuda ntango bayaki kobundisa bango na mabota ya zingazinga?
3 Wana ‘bato nyonso na Yuda batɛlɛmaki liboso na Yehova na bana mike na bango elongo mpe basi na bango mpe bana na bango,’ Yehova apesaki eyano. (2 Ntango 20:13) Bobele lokola azali kosalela “moombo” na ye “ya sembo mpe ya mayele” lelo oyo, Moyoki monene ya libondeli apesaki Yahaziele, mosakoli Molevi, nguya ya kopesa eyano na Ye na baoyo bayanganaki. (Matai 24:45) Totángi boye: “[Yehova] alobi boye epai na bino ete, Bangá te mpe yoká mawa mpo na ebele monene te zambi etumba ezali na bino te kasi na Nzambe . . . Ekokoka na bino [kobunda] na etumba oyo te, tɛlɛmá na bisika na bino, zalá nyɛɛ mpe talá elonga na [Yehova] mpo na bino. . . . Bangá te, yoká mawa mpe te. Lobi bóbima liboso na bango mpe [Yehova] akozala na bino elongo.”—2 Ntango 20:15-17.
4. Na lolenge nini Yehova asɛngaki bato na ye ete básala eloko moko na esika ya kotala na miso, ntango banguna bakanelaki bango?
4 Yehova ayebisaki Mokonzi Yosafata mpe bato na ye likambo oyo basengelaki kosala, na esika ya kokanga mabɔkɔ mpe kozela ete Nzambe asala likamwisi mpo na kobikisa bango. Basengelaki kosala eloko moko mpo na kotɛmɛla likama oyo banguna bakanaki koyeisa. Mokonzi mpe ‘bato nyonso ya Yuda, na bana mike na bango elongo mpe basi na bango mpe bana na bango,’ bamonisaki kondima makasi na ndenge batosaki mpe balamukaki ntɔngɔntɔngɔ mpe bakendaki kokutana na mampinga oyo mazalaki koya mpo na kobundisa bango. Na nzela, mokonzi akobaki kopesa malako mpe bilendiseli ya Teokrasi, koyebisáká bango ete: “Ndimá [Yehova], Nzambe na bino mpe bokokokisama; ndimá basakoli na ye mpe bokolonga.” (2 Ntango 20:20) Kondima Yehova! Kondima basakoli na ye! Yango nde ezalaki sɛkɛlɛ ya bolongi. Lolenge moko lelo oyo, wana tozali kokoba na mosala ya Yehova, tóbɛta ntembe ata mokolo moko te, akolongisa kondima na biso!
5. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kosala mpo na kosanzola Yehova?
5 Lokola bato ya Yuda na mikolo ya Yosafata, tosengeli ‘kosanzola Yehova, mpo ete boboto na ye ekoumela seko.’ Lolenge nini tokosanzola ye? Na kosakoláká Bokonzi na mpiko nyonso! Lokola bato wana ya Yuda ‘babandaki koyemba mpe kosanzola,’ biso mpe tokobakisa misala likoló ya kondima na biso. (2 Ntango 20:21, 22) Ɛɛ, tómonisa kondima ya solosolo lolenge moko wana Yehova azali komibongisa mpo na koya kobundisa banguna na ye! Atako nzela ekoki komonana ete ezali molai, tózala na ekateli ya koyika mpiko, tózala makasi kati na kondima, lokola bato na ye oyo bazali kolonga na bisika oyo bizali na yikiyiki na mokili lelo. Na bikólo mosusu epai monyoko makasi, mobulu, nzala, mikakatano ya nkita ezali, basaleli ya sembo ya Nzambe bazali kobuka mbuma malamu, lokola emonisami na lapolo ya Annuaire des Témoins de Jéhovah 1998.
Yehova azali kobikisa bato na ye
6. Lolenge nini kondima makasi ezali kosalisa biso na kotikala sembo lelo oyo?
6 Mabota oyo mazalaki zingazinga ya Yuda, oyo mazalaki kotyola Nzambe, malukaki kolimwisa libota ya Nzambe, kasi na komonisáká kondima ya solosolo, basaleli ya Yehova bayanolaki na koyembeláká ye nzembo ya masanzoli. Lelo oyo, tokoki komonisa kondima motindo moko. Na kozaláká na mosala mingi oyo ezali kosanzola Yehova kati na bomoi na biso, tozali kolendisa molato ya etumba ya elimo, mpe tokotika nzela te ete masenginya ya Satana mákɔtela biso. (Baefese 6:11) Kondima makasi ekopekisa biso kolɛngolama na kominanola ya mabe, ekopekisa biso kozala na mposa ya biloko mingi ya mosuni, mpe kozanga bosepeli oyo ezali komonana na mokili oyo ezingi biso. Kondima yango, oyo ekoki kolongama te, ekobatela biso mpo ete tókoba kosala na bosembo elongo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” wana tozali ntango nyonso kolya bilei ya elimo bipesami na “na elaka na yango.”—Matai 24:45.
7. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bayanolaki na matumoli ndenge na ndenge oyo babimiselaki bango?
7 Kondima na biso oyo ezwi moboko na Biblia ekolendisa biso ete tótikala ngwi liboso ya matɔngi mpe koyina ya baoyo bazali na elimo ya “moombo mabe” oyo alobelami na Matai 24:48-51. Kokokisáká mpenza esakweli yango, lelo oyo bapɛngwi bazali kosala molende mpo na kopalanganisa lokuta mpe kobebisa lokumu na biso na mikili mingi, bazali ata koyanga myango ya nkuku elongo na bakonzi na bikólo mosusu. Soki ebongi kosala yango, Batatoli ya Yehova bayanolaki na bifundeli yango, lokola emonisami na Bafilipi 1:7 (NW), na ‘kokɔteláká nsango malamu mpe kolongisa yango liboso ya bisambiselo.’ Na ndakisa, na mokolo ya 26 Sɛtɛ́mbɛ 1996, na likambo moko elekaki na ekólo Grèce, bazuzi nyonso libwa ya Esambiselo Monene ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya bato, na engumba Strasbourg, na ekólo France, bandimisaki lisusu ete “Batatoli ya Yehova babongi kobéngama ‘lingomba oyo eyebani’” oyo ezali na lotomo ya kozala na bonsomi ya makanisi, ya lisosoli mpe ya bindimeli, mpe lotomo ya koyebisa bindimeli na bango epai na bato mosusu. Mpo na bapɛngwi, lisambisi ya Nzambe elobi ete: “Ekweli bango pelamoko na lisese na solo lilobi ete, Mbwa azongi kolya biloko bisili ye kosanza; mpe ete, Ngulu asukoli mai mpe akei kolala na bosɔtɔ.”—2 Petelo 2:22.
8. Na mikolo ya Yosafata, lolenge nini Yehova apesaki etumbu na banguna ya libota na Ye?
8 Na mikolo ya Yosafata, Yehova apesaki etumbu na baoyo balingaki kosala libota na Ye mabe. Tozali kotánga boye: “[Yehova] atyaki basoda babombami liboso na bato na Amona mpe na Moaba mpe na ngomba na Seili baoyo basili kobimela Yuda mpe bakimisamaki. Zambi bato na Amona mpe na Moaba batɛmɛlaki bafandi na ngomba na Seili mpe babebisaki bango nyɛɛ mpe wana esili bango kobebisa bafandi na ngomba Seili, bango nyonso bakanganaki mpe bamibebisaki.” (2 Ntango 20:22, 23) Bato ya Yuda babéngaki esika yango ete Lobwaku ya Belaka, Belaka elimboli “Lipamboli.” Na mikolo na biso mpe, etumbu ya Yehova epai na banguna na ye ekomemela bato na ye mapamboli.
9, 10. Banani bamimonisi ete babongi kozwa etumbu ya Yehova?
9 Tokoki kotuna ete, Na mikolo na biso banani bakozwa etumbu ya Yehova? Mpo na kozwa eyano na motuna wana, tosengeli kozonga lisusu na esakweli ya Yoele. Yoele 3:3 (NW) elobi na ntina na banguna ya bato na ye oyo ‘bapesaki mwana mobali mpo na mwasi ya pite, mpe batekaki mwana mwasi mpo na vinyo.’ Ɛɛ, bazali kotalela basaleli ya Nzambe ete bazali na nse na bango mpenza, bana na bango bazali na motuya ya mbongo ya kofuta mwasi ya pite to ntalo ya lisangala ya vinyo. Bakozongisa monɔkɔ mpo na yango.
10 Baoyo bazali kosala pite ya elimo, bango mpe bakosambisama. (Emoniseli 17:3-6) Mpe, bato oyo baleki mabe ezali baoyo bazali kopusa bakonzi ya politiki ete bányokola Batatoli ya Yehova mpe kopekisa misala na bango, lokola bakonzi mosusu ya mangomba oyo bazali kobimisa yikiyiki basalaki na Mpoto ya Ɛsti na bambula euti koleka. Yehova amonisi ekateli na ye ya kobebisa basali na mabe wana.—Yoele 3:4-8.
“Bulisá etumba!”
11. Lolenge nini Yehova azali kotumola banguna na ye mpo na etumba?
11 Na nsima, Yehova abyangi bato na ye ete básakola kowelana na mabota ete: “Bulisá etumba, lamukisá bato na makasi; tiká ete bato na etumba bábɛlɛma, tiká ete bábuta!” (Yoele 3:9) Yango ezali liyebisi ya etumba oyo ekokani na etumba mosusu te—etumba ya sembo. Batatoli ya sembo ya Yehova batyelaka bibundeli ya elimo motema ntango bazali koyanola na bifundeli ya lokuta, bazali kotɛmɛla lokuta na maloba ya solo. (2 Bakolinti 10:4; Baefese 6:17) Mosika te, Nzambe akobulisa “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14) Ekolongola batɛmɛli nyonso ya bokonzi ya Nzambe awa na mabelé. Basaleli na ye awa na mabelé bakosangana na etumba yango te. Ezala na ndimbola ya solo to ya elilingi, basili ‘kotula mipanga na bango ete mizala bikateli na matiti.’ (Yisaya 2:4) Nzokande, Yehova azali kotya ntembe na mabota ya botɛmɛli ete básala likambo likeseni: “Bótula bitimweli ete bizala mipanga, mpe bikateli na nzete ete bizala makɔnga.” (Yoele 3:10) Abyangi bango ete básalela bibundeli na bango nyonso ya etumba mpe bibundeli makasi ya mikolo oyo kati na etumba. Kasi bakolonga te, mpamba te etumba mpe bolongi ezali na Yehova!
12, 13. (a) Atako kowelana kati na banguya minene esilaki, ndenge nini bikólo mingi bimonisi ete balingi ntango nyonso kobunda bitumba? (b) Likambo nini mabota mamibongisi na yango te?
12 Na ebandeli ya bambula ya 1990, bikólo ya mokili bilobaki ete kowelana kati na banguya minene ya mokili (guerre froide) esilaki. Na kotaleláká likambo yango, tokoki nde koloba ete O.N.U. ekokisi mokano na yango ya libosoliboso etali kotya kimya mpe libateli? Soko moke te! Makambo mauti kosalema na Burundi, na République démocratique du Congo, na Irak, na Libéria, na Rwanda, na Somalie, mpe na ex-Yougoslavie mamonisi biso nini? Se lokola elobami na Yilimia 6:14, bazali koloba ete: “Kimya! Kimya! nde kimya ezali te.”
13 Atako bitumba mpenza esili na bisika mosusu, bikólo oyo bisangani na O.N.U. bizali se kowelana moko na mosusu mpo na kosala mandoki ya nsɔmɔ mpo na bitumba. Bikólo mosusu bizali kobomba ebele ya bibundeli ya nikleere. Bikólo mosusu mpe bizali kosala bibundeli ebéngami chimique to bactériologique oyo ekoki koboma bato ebele na mbala moko. Wana bikólo yango bizali koyangana na esika ya elilingi ebéngami Armagedon, azali kotumola bango na maloba oyo: “Moto na bolɛmbu aloba ete, Ngai [soda]! Bóyangana, bóya, bino mabota nyonso na bipai bizingeli; bóyangana wana.” Na nsima, Yoele akati na libyangi na ye moko ete: “Ɛ [Yehova], yeisá bilombe na yo na nse!”—Yoele 3:10, 11.
Yehova azali kobatela bato na ye
14. Banani bazali bilombe ya Yehova?
14 Banani bazali bilombe ya Yehova? Mbala soko 280 kati na Biblia, Nzambe ya solo abéngami ete “Yehova na bibele.” (2 Mikonzi 3:14) Bibele yango ezali bongo mampinga ya baanzelu ya likoló oyo bamilɛngɛli mpo na kokokisa likambo nyonso oyo Yehova akotinda bango. Ntango Basulia balukaki kokanga Elisa, na nsuka Yehova afungolaki miso ya mosaleli ya Elisa mpe amonaki mpo na nini bakokaki kolonga te: “Talá, ngomba etondaki na mbalata mpe makalo na mɔ́tɔ oyo izali kozingela Elisa.” (2 Mikonzi 6:17) Yesu alobaki ete akokaki kosɛnga Tata na ye ete atindela ye “koleka bibolo zomi na mibale na [baanzelu, NW].” (Matai 26:53) Kolobeláká lolenge Yesu azali kotambola likoló ya mpunda mpo na kopesa etumbu na etumba ya Armagedon, mokanda ya Emoniseli elobi ete: “Bibele na babundi na likoló bazalaki kobila ye, bafandi na bambalata mpɛmbɛ, balati bilamba pɛtɛpɛtɛ, mpɛmbɛ, pɛto. Na monɔkɔ na ye mopanga na kopela ebimi na ntina ete abola mabota nyonso. Ye akokɛngɛla bango na [fimbo, NW] na ebende. Ye akonyata ekamwelo na vinyo na kongala na nkɛlɛ na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 19:14, 15) Ekamwelo wana ya elilingi elobelami na maloba ya nguya lokola “ekamwelo monene na kongala na Nzambe.”—Emoniseli 14:17-20.
15. Lolenge nini Yoele alobeli etumba ya Yehova na mabota?
15 Boye, ndenge nini Yehova ayanoli na libyangi ya Yoele ya koyeisa bilombe ya Nzambe na nse? Na maloba oyo ya sikisiki mpe ya nguya: “Tiká ete mabota bálamuka, bábuta kino lobwaku na Yosafata; mpo ete nakofanda wana mpo na kosambisa mabota nyonso na bipai bizingeli. Bókɔtisa ekateli na masango, zambi ntango na kobuka ekoki. Bóingela, bókita na nse, zambi ekamwelo na vinyo etondi. Bibombelo izali kotonda mpe koleka, zambi mabe na bango ezali monene mpenza. Bibele, bibele, na lobwaku na kokata likambo; mpo ete mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi, na lobwaku na kokata likambo. Moi mpe sanza izimisami mpe [minzoto, NW] na lola ikozanga kongɛnga na bango. [Yehova] akongala longwa na Siona, akobimisa mongongo na ye longwa na Yelusaleme; lola mpe mokili ikotetema.”—Yoele 3:12-16.
16. Banani bakozala kati na baoyo Yehova akopesa etumbu?
16 Lokola nkombo Yosafata elimboli “Yehova azali Mosambisi,” bobele bongo Yehova Nzambe akolongisa bokonzi na ye ntango akopesa etumbu. Esakweli ebéngi baoyo bakozwa etumbu ete ‘bibele, bibele na lobwaku na kokata likambo.’ Baoyo nyonso bazali kokɔtela mangomba ya lokuta, oyo bakozala naino na bomoi, bakozala kati na bibele wana. Ekozala mpe na baoyo balobelami na Nzembo, mokapo ya mibale—mabota, bato na bikólo, bakonzi ya mokili, mpe mikóló—oyo balingaki mingi ebongiseli ya biloko ya mokili oyo esili kobeba na esika ya ‘kosalela Yehova na bobangi.’ Bango baboyi ‘kopɛpwa mwana.’ (Nzembo 2:1, 2, 11, 12) Baboyi kondima Yesu lokola Mokonzi mosalani na Yehova. Lisusu, bato nyonso oyo Mokonzi ya nkembo akotalela bango ete bazali “bantaba” bakozala kati na bibele oyo babongi kobomama. (Matai 25:33, 41) Wana ntango ya Yehova ekokoka mpo na konguluma longwa na Yelusaleme ya likoló, Mokonzi na bakonzi oyo asili kopona akobima likoló ya mpunda mpo na kopesa etumbu. Na ntembe te, lola mpe mokili ekotetema! Nzokande, tondimisami ete: ‘Yehova akozala ekimelo mpo na bato na ye, esika makasi mpo na bato na Yisalaele.’—Yoele 3:16.
17, 18. Banani bamonisami lokola babiki na bolɔzi monene, mpe bakokóma na ezalela nini?
17 Emoniseli 7:9-17 emonisi baoyo bakobika na bolɔzi monene ete bazali “ebele monene” oyo esangisi baoyo bazali komonisa kondima na nguya ya lisiko ya makila ya Yesu. Bango bakobatelama na mokolo ya Yehova, wana bibele oyo balobelami na esakweli ya Yoele bakozwa etumbu na kosambisama ya Nzambe. Yoele alobi na baoyo bakobika ete: “Bokoyeba ete ngai nazali [Yehova], Nzambe na bino, ye oyo azali kofanda na Siona, ngomba na ngai na bulɛɛ,”—esika Yehova afandi kuna na likoló.—Yoele 3:17a.
18 Na nsima, esakweli eyebisi biso ete esika ya Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló “ekozala bulɛɛ, bapaya bakoleka kati na ye lisusu te.” (Yoele 3:17b) Kuna na likoló mpe awa na mabelé oyo eyangelami na Bokonzi ya likoló, bapaya bakozala te, mpamba te bato nyonso bakosangisama kati na losambo ya pɛto.
19. Lolenge nini Yoele alobeli paladiso ya esengo oyo bato ya Nzambe bazali kati na yango lelo oyo?
19 Ezala lelo oyo, kimya monene ezali kati na bato ya Yehova awa na mabelé. Na bomoko, bazali kosakola bikateli na ye na mikili koleka 230 mpe na nkota ndenge na ndenge koleka 300. Yoele alobelaki bokoli na bango na maloba kitoko, ye ete: “Na mokolo yango, ngomba ikonokisa vinyo [ya elɛngi, NW] mpe nkeka ikotyola na [miliki, NW]; bitima nyonso na Yuda ikotyola na mai.” (Yoele 3:18) Ɛɛ, Yehova akokoba kosopa ebele ya mapamboli ya esengo mpe bokoli mpe bitima mingi ya solo ya motuya likoló na basanzoli na ye awa na mabelé. Bokonzi ya Yehova ekolongisama mobimba na lobwaku ya kokata likambo, mpe esengo ekofuluka wana akofanda kati na bato na ye basikolami.—Emoniseli 21:3, 4.
Okoki komikundola?
◻ Lolenge nini Yehova abikisaki bato na ye na mikolo ya Yosafata?
◻ Banani oyo Yehova amoni ete babongi kobomama na “lobwaku ya kokata likambo”?
◻ Banani bazali bilombe ya Nzambe mpe bakozala na mokumba nini na etumba ya nsuka?
◻ Esengo nini basambeli ya sembo bazali na yango?
[Elilingi na lokasa 21]
Bayebisaki bato ya Yuda ete: ‘Bóbanga te, mpamba te etumba ezali na bino te, kasi ezali etumba ya Nzambe’
[Elilingi na lokasa 23]
Yehova azali kotumola banguna na ye ete ‘bátula bitimweli na bango ete bizala mipanga’
[Elilingi na lokasa 24]
Biblia emonisi ebele monene ya babiki na bolɔzi monene