Tósimba mitema ya bato na kosaleláká mayele ya kondimisa
BATO mingi batalelaka liloba “kondimisa” na lolenge malamu te. Epai na moto mosusu ekoki kopesa likanisi ya motɛkisi biloko oyo ayebi kotya mbamba to koluka kosombisa na makasi na kokosáká to kolɛngola mosombi. Ata kati na Biblia, likanisi ya kondimisa mbala mosusu esalelamaka na lolenge mosusu, komonisáká bongo kobebisa to kopɛngwisa. Na ndakisa, ntoma moklisto Paulo akomelaki Bagalatia ete: “Bozalaki kotambola malamu. Nani apekisi bino ete bótosa makambo na solo te? [Kondimisa, NW] yango euti na Mobyangi na bino te.” (Bagalatia 5:7, 8) Lisusu, Paulo akebisaki Bakolose ete bápesa nzela te na moto nani ‘andimisa bango na maloba ya kolɛngola.’ (Bakolose 2:4) Kondimisa motindo wana eutaka na maloba ya mayele matongami likoló ya makambo ya lokuta.
Nzokande, na mokanda na ye ya mibale epai na Timoté, ntoma Paulo asalelaki likanisi ya kondimisa na lolenge mosusu. Akomaki ete: “Kasi yo, oumela kati na yango eyekoli yo mpe endimi yo, awa eyebi yo ete oyekoli yango epai na banani.” (2 Timoté 3:14) Tokoki koloba te ete na ‘kondimisamáká,’ Timoté akosamaki na mama na ye mpe nkɔkɔ na ye, baoyo bateyaki ye solo ya Makomami.—2 Timoté 1:5.a
Na ntango azalaki na ndako na ye na Loma lokola mokangami, Paulo apesaki litatoli ya mozindo epai na bato mingi, “longwa ntɔngɔ kino na butu, mpe ameki kondimisa bango likambo na Yesu kati na Mibeko na Mose, mpe na basakoli.” (Misala 28:23) Paulo azalaki nde kokosa bayoki na ye? Soko moke te! Na yango, emonani polele ete, kondimisa ezalaka ntango nyonso mabe te.
Wana esalelami na nguya, liloba ya Greke oyo ebongolami na “kondimisa” elimboli kolonga, kobongola makanisi ya moto na kokanisa na ye na lolenge malamu mpe ebongi. Molakisi akoki bongo kotonga na moboko ya Makomami, na kondimisáká mpo na kopesa bato mosusu endimiseli na solo ya Biblia. (2 Timoté 2:15) Ɛɛ, Paulo azalaki kosala bongo na mosala ya kosakola. Ata Demeteli, motuli na palata, oyo azalaki kotalela mateya ya baklisto lokola lokuta, alobaki ete: “Bobele awa na Efese te, kasi etikali moke na Azia mobimba, Paulo oyo andimisi mpe apɛngwisi ebele monene na bato. Akolobaka ete banzambe oyo basalami na mabɔkɔ na bato bazali banzambe te.”—Misala 19:26.
Tóndimisa bato na mosala ya kosakola
Yesu ateyaki bayekoli na ye ete: “Boye bókenda kozalisa bayekoli [bato] na mabota nyonso, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW], kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolakisa bino. Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:19, 20) Na mikili koleka 230, Batatoli ya Yehova bazali kotosa etinda yango. Sanza na sanza na boumeli ya mobu na bango ya mosala 1997, batambwisaki boyekoli ya Biblia na bandako ya bato na mwayene ya 4 552 589 na mokili mobimba.
Soki ozali na libaku malamu ya kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako ya moto, okoki komibongisa liboso mpo na kolonga ntembe oyo ekosɛnga na yo kosalela mayele ya kondimisa. Na ndakisa, kanisa lokola ete na boyekoli oyo ekolanda, motuna moko ekobima na ntina na Bosato. Ezali boni soki oyebi ete moyekoli na yo andimaka liteya yango? Okoki kopesa ye mokanda oyo ezali kolobela likambo yango. Nsima ya kotánga yango, okoki komona ete andimisami solo ete Nzambe mpe Yesu bazali moto moko te. Kasi soki mituna mosusu mitikali, okosala ndenge nini?
Yoká na likebi nyonso. Yango ekosalisa yo mpo na koyeba bindimeli ya moyekoli na yo na likambo yango. Na ndakisa, soki moyekoli alobi ete, “Nandimaka Bosato,” okoki mbala moko kosalela Makomami mpo na kokweisa liteya yango. Kasi, yebá ete bindimeli bizali ndenge na ndenge na ntina na Bosato. Mbala mosusu bindimeli ya moyekoli na yo ekeseni na lolenge olimbolaka liteya ya Bosato. Ezali se bongo na ntina na bindimeli mosusu, na ndakisa kozonga na bomoi mbala na mbala, kozanga kokufa ya molimo, mpe lobiko. Na yango, yoká na likebi nyonso liboso ya koloba. Kokanisa te ete oyebi bindimeli ya moyekoli na yo liboso ete ye moko amonisa yango.—Masese 18:13.
Tuná mituna. Okoki kokɔtisa mituna oyo: ‘Ondimaka Bosato uta kala? Osilá koyekola na bozindo makambo oyo Biblia elobi na likambo yango? Soki Nzambe azali na bapersona misato, mbɛlɛ Liloba na ye, Biblia, eyebisaki biso yango polele mpe mbala moko, boye te?’ Wana ozali koteya moyekoli, mbala na mbala tunaká mituna lokola oyo: ‘Makambo oyo toyekoli kino sikawa, ondimi ete ezali solo?’ ‘Ndimbola oyo, ondimi yango?’ Na lolenge na yo malamu ya kotuna mituna, okosalisa moyekoli ete apesa biyano na boyekoli. Akozala bobele kotala yo te lolenge ozali kolimbola lisolo.
Salelá makanisi malamu. Na ndakisa, ntango ozali kolobela liteya ya Bosato, okoki koloba na moyekoli ete: ‘Ntango Yesu azwaki batisimo, mongongo eyokanaki uta na likoló, oyo elobaki ete: “Yo mwana na ngai na bolingo.” Soki Nzambe azalaki solo kozwa batisimo awa na mabelé, alingaki kotinda mongongo na ye na likoló mpe maloba na ye ezonga koyokana awa na mabelé? Yango elingaki kozala bokosi, boye te? Nzambe, oyo “akobukaka lokuta te,” akokaki nde kosala likambo ya bokosi motindo wana?’—Luka 3:21, 22; Tito 1:1, 2.
Makanisi malamu ntango esalelami na mayele, mbala mingi epesaka matomba. Tótalela ndakisa ya mwasi moko oyo tokobénga ye Barbara. Na bomoi na ye mobimba, azalaki kondima ete Yesu azali Nzambe mpe azali kati na Bosato bakisa mpe elimo santu. Na bongo, Motatoli moko ya Yehova ayebisaki ye ete Nzambe na Yesu bazali bato mibale bakeseni, mpe amonisaki ye bavɛrsɛ mpo na kolongisa maloba na ye.b Barbara akokaki te koboya makambo Biblia elobi. Kasi, alɛmbaki nzoto. Atako bongo, azalaki kolinga liteya ya Bosato mingi.
Na komonisáká motema molai, Motatoli akanisaki elongo na Barbara. Atunaki ye ete: “Soki ozali komeka koteya ngai ete bato mibale bakokani, ndakisa nini okoki kozwa kati na libota mpo na komonisa yango?” Akanisaki mwa ntango, mpe ayanolaki ete: “Nakoki kosalela bana mibale ya libota moko.” Motatoli ayanolaki ete, “Ezali bongo. Kutu, ata bana mapasa oyo bakokani. Kasi wana ateyaki biso tótalela Nzambe lokola Tata mpe ye moko lokola Mwana, likanisi nini Yesu azalaki kopesa?” Barbara, afungolaki miso mpe ayanolaki ete, “Namoni. Azali kolobela moko lokola mokóló mpe azali na bokonzi mingi.”
Motatoli ayanolaki ete, “Ɛɛ, Bayuda oyo bazalaki koyoka Yesu, lokola bazalaki kati na ebongiseli oyo ezalaki na batata ya mabota, na ntembe te, bakokaki kosukisa na kolobáká bongo.” Mpo na komonisa lisusu malamu likanisi na ye, Motatoli asukisaki boye: “Soki tokamataki bilakiseli bibongi wana mpo na koteya bokokani—elingi koloba, ya bana mibale ya libota moko to ya bana mapasa—solo mpenza, Yesu, Moteyi Monene, akokaki kosala se bongo. Nzokande, asalelaki maloba ‘tata’ mpe ‘mwana’ mpo na komonisa boyokani oyo ezali kati na ye na Nzambe.”
Nsukansuka, Barbara asimbaki ntina ya likanisi yango, mpe andimaki yango. Motema na ye esimbamaki na mayele ya kondimisa.
Lolenge ya kolonga mayoki
Bato mingi bakangamaka makasi na bindimeli ya lingomba mpo na mayoki na bango. Tótalela lisolo ya Edna, Mokatoliki oyo amipesi mingi. Bilenge mibale, bankɔkɔ na ye, bamonisaki ye bilembeteli uta na Makomami ete Nzambe na Yesu bazali moto moko te. Edna akangaki ntina ya makambo oyo ayokaki. Atako bongo, na boboto mpe na mpiko nyonso alobaki ete: “Ngai nandimaka Bosato bosantu.”
Mbala mosusu yo mpe osilá kokutana na likambo motindo wana. Bato mingi batalelaka mateya ya lingomba na bango lokola bomoto na bango mpenza. Mpo na kondimisa moyekoli motindo yango, esengeli kaka te kosalela maloba ya sikisiki mpe ebele ya mikapo komonisáká ete azali na libunga. Ezaleli motindo wana tokoki kolonga yango soki tokosalela bokatikati kati na mayele ya kondimisa mpe motema mawa. (Kokanisá na Baloma 12:15; Bakolose 3:12.) Ya solo, moteyi ya makoki asengeli kozala na kondimisama makasi. Na ndakisa, Paulo asalelaki maloba lokola “nandimi solo” mpe “nayebi mpo nandimisami na Nkolo Yesu.” (Baloma 8:38; 14:14) Nzokande, mpo na komonisa kondimisama na biso, tosengeli te komonisa na makasi ete biso nde tozali na elonga, to kozala na maloba ya kotyola to mpe ya kokitisa moyekoli wana tozali komonisa solo ya Biblia. Solo mpenza, tokolinga te kotuka to mpe kofinga moyekoli.—Masese 12:18.
Ebongi mpenza tómemya bindimeli ya moyekoli mpe tóyeba ete azali na lotomo ya kozala na yango. Na yango, sɛkɛlɛ ezali komikitisa. Moteyi oyo azali na komikitisa amonaka te ete aleki moyekoli. (Luka 18:9-14; Bafilipi 2:3, 4) Na yango, kondimisa oyo ebongi na miso ya Nzambe etaleli mpe komikitisa, oyo elobaka ete: ‘Na motema mawa na ye Yehova asalisi ngai mpo na kososola yango. Tiká ete ngai mpe nayebisa yo yango.’
Epai na baninga na ye baklisto ya Kolinti, Paulo akomaki ete: “Bibundeli na etumba na biso izali na nzoto te kasi izali na nguya na Nzambe mpo na kobebisa bisika bibatelami makasi. Tozali kokweisa maloba mpe bisika milai nyonso bizali kotɛmɛla boyebi na Nzambe. Tozali kokanga makanisi nyonso na nkanga ete mátosa Klisto.” (2 Bakolinti 10:4, 5) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kokweisa mateya ya lokuta ya lingomba na misala oyo bato bakangami na yango mpe na bizaleli oyo bizali kosepelisa Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9-11) Kosaláká bongo, Batatoli bazali komikundola ete Yehova, na bolingo nyonso amoniselaki bango motema molai. Bazali na esengo ya kozala na Liloba na ye, Biblia, mpe kosalela esaleli oyo ya nguya mpo na kopikola mateya ya lokuta mpe kosimba mitema ya bato na mayele ya kondimisa!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Yunike mpe Loidi—Balakisi oyo bapesaki ndakisa malamu,” na nkasa 7 kino 9 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo.
b Talá Yoane 14:28; Bafilipi 2:5, 6; Bakolose 1:13-15. Soki olingi koyeba makambo mosusu, talá mwa buku Osengeli kondima Trinité?, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
[Etanda na lokasa 23]
Simbá motema ya moyekoli na yo
◻ Bondelá mpo na kozwa litambwisi ya Yehova ete osimba motema ya moyekoli ya Biblia.—Nehemia 2:4, 5; Yisaya 50:4.
◻ Sosolá likambo oyo moyekoli azali kondima mpe mpo na nini akoki komona ete endimeli moko ya lokuta ezali kosepelisa ye.—Misala 17:22, 23.
◻ Salelá makanisi ya Makomami na boboto, na motema molai, na lolenge elongobani, na kobateláká boyokani elongo na bato.—Misala 17:24-34.
◻ Soki likoki ezali, salelá bililingi oyo ekobenda likebi ya moyekoli mpo na kobakisa nguya na solo ya Biblia.—Malako 4:33, 34.
◻ Monisá moyekoli matomba akozwa na kondimáká boyebi oyo euti na Biblia.—1 Timoté 2:3, 4; 2 Timoté 3:14, 15.