‘Bókoba kotambola na bomoko elongo na Klisto’
“Na bongo, lokola boyambaki Klisto Yesu, ye Nkolo, bókoba kotambola na bomoko elongo na ye.”—BAKOLOSE 2:6, NW.
1, 2. (a) Lolenge nini Biblia elobeli mosala ya sembo oyo Enoka asalelaki Yehova na bomoi na ye mobimba? (b) Lolenge nini Yehova asalisi biso mpo na kotambola elongo na ye, lokola emonisami na Bakolose 2:6, 7?
OSILÁ kotala mwana moke oyo azali kotambola elongo na tata na ye? Mwana amekolaka makambo nyonso oyo tata na ye azali kosala, mpe okomona ete azali komungamunga na bosepeli mpo na tata na ye; na ngámbo na ye, tata asungaka mwana wana bazali kotambola, mpe okomona elongi na ye moko ezali kongɛnga mpo na bolingo mpe bosepeli. Yehova asaleli elilingi motindo yango mpo na kolobela bomoi ya basaleli na ye ya sembo. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe elobi ete mosembwi Enoka “akobaki kotambola elongo na Nzambe [ya solo].”—Genese 5:24; 6:9, NW.
2 Bobele lokola Tata oyo ayebi komitya na esika ya basusu asalisaka mwana na ye ya moke mpo na kotambola elongo na ye, Yehova apesi biso lisungi oyo eleki malamu. Atindaki Mwana mobotami-bobele-moko na ye awa na mabelé. Na litambe mokomoko ya botamboli na ye awa na mabelé, Yesu Klisto amekolaki Tata na ye ya likoló na lolenge ya kokoka mpenza. (Yoane 14:9, 10; Baebele 1:3) Na yango, mpo na kotambola elongo na Nzambe, tosengeli kotambola elongo na Yesu. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na bongo, lokola boyambaki Klisto Yesu, ye Nkolo, bókoba kotambola na bomoko elongo na ye, bópikama mpe bólendisama kati na ye mpe bótɛngatɛnga te kati na kondima, se lokola boteyamaki, bótonda na kondima na bozongisi matɔ́ndi.”—Bakolose 2:6, 7, NW.
3. Engebene Bakolose 2:6, 7, mpo na nini tokoki koloba ete kotambola elongo na Klisto esuki bobele na kozwa batisimo te?
3 Lokola balingi kotambola na bomoko elongo na Klisto, kosaláká molende ya kolanda matambe na ye ya kokoka, bayekoli ya sembo ya Biblia bazwaka batisimo. (Luka 3:21; Baebele 10:7-9) Bobele na 1997, na mokili mobimba, bato koleka 375 000 basalaki litambe yango ya ntina mingi—yango epesi mwayene ya bato koleka 1 000 mokolo na mokolo. Bokoli yango ezali mpenza kosepelisa! Nzokande, maloba ya Paulo oyo mazwami kati na Bakolose 2:6, 7 mamonisi ete kotambola elongo na Klisto esuki na kozwa batisimo te. Likelelo ya Greke oyo ebongolami na “bókoba kotambola” emonisi likambo oyo esengeli kosuka te, esengeli kokoba. Lisusu, Paulo abakisi ete kotambola elongo na Klisto esɛngi makambo minei: kopikama kati na Klisto, kotongama kati na ye, kotɛngatɛnga te kati na kondima, mpe kozongisa matɔ́ndi mingi. Sikawa, tótalela eteni mokomoko mpe tómona lolenge yango ezali kosalisa biso mpo na kokoba kotambola na bomoko elongo na Klisto.
Osili ‘kopikama kati na Klisto’?
4. ‘Kopikama kati na Klisto’ elimboli nini?
4 Ya liboso, Paulo akomi ete, tosengeli ‘kopikama kati na Klisto.’ (Kokanisá na Matai 13:20, 21.) Lolenge nini moto akoki kosala mpo na kopikama kati na Klisto? Misisa ya nzete mibombamaka na kati ya mabelé, kasi mizalaka na ntina mingi mpo na bomoi ya nzete—mipikaka nzete mpe mipesaka nzete bilei. Bobele bongo, ndakisa mpe mateya ya Klisto esalaka bopusi epai na biso kozanga ete tómona yango na miso, ekɔtaka mpenza na makanisi mpe na mitema na biso. Kuna, ezali koleisa mpe kolendisa biso. Ntango totiki yango eyangela makanisi na biso, misala na biso, mpe bikateli na biso, tokopusama na kopesa bomoi na biso epai na Yehova.—1 Petelo 2:21.
5. Ndenge nini tokoki ‘koyoka mposa makasi’ ya bilei ya elimo?
5 Yesu alingaki boyebi oyo euti na Nzambe. Kutu, akokanisaki yango na bilei. (Matai 4:4) Yango wana, kati na Lisolo na ye likoló ya Ngomba, mbala 21 azongelaki maloba mazwami na mikanda mwambe mikeseni ya Makomami ya Liebele. Mpo na kolanda ndakisa na ye, tosengeli kosala motindo oyo ntoma Petelo alendisi biso—ete ‘tóyoka mposa makasi’ ya bilei ya elimo “lokola bana babotami sika.” (1 Petelo 2:2, NW) Ntango mwana oyo abotami sika azali na mposa makasi ya bilei, amonisaka yango polele. Soki sikawa tozali koyoka mposa makasi mpo na bilei ya elimo te, maloba ya Petelo malendisi biso ete ‘tóyoka’ mposa yango. Lolenge nini? Etinda oyo ezwami na Nzembo 34:8 ekoki kosalisa biso: “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu.” Soki tozali ntango nyonso ‘komeka’ Biblia, Liloba ya Yehova, mbala mosusu na kotángáká eteni na yango mokolo na mokolo, tokomona ete eleisaka na elimo mpe ezali malamu. Nsima ya ntango, mposa makasi na biso mpo na Liloba yango ekokola.
6. Mpo na nini ezali na ntina ete tómanyola likoló na makambo oyo tozali kotánga?
6 Nzokande, nsima ya kolya bilei, ezali na ntina ete bilei yango esala mosala kati na nzoto na biso. Na yango, tosengeli komanyola makambo oyo tozali kotánga. (Nzembo 77:11, 12) Na ndakisa, ntango tozali kotánga buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, mokapo mokomoko ekozala na motuya mingi soki tozali kofanda mpe komituna ete: ‘Bomoto nini ya Klisto nazali komona kati na lisolo oyo, mpe ndenge nini nakoki komekola yango kati na bomoi na ngai?’ Komanyola motindo wana ekosalisa biso ete tósalela makambo tozali koyekola. Na bongo, ntango tolingi kozwa ekateli, tokomituna soki Yesu alingaki kosala nini na esika na biso. Soki tozwi ekateli na biso nsima ya komanyola lolenge yango, tokomonisa ete topikami mpenza kati na Klisto.
7. Lolenge nini tosengeli kotalela likambo ya komileisa bilei makasi ya elimo?
7 Paulo alendisi biso mpe ete tólyaka “bilei makasi,” elingi koloba solo ya mozindo ezwami kati na Liloba ya Nzambe. (Baebele 5:14) Na likambo oyo, kotánga Biblia mobimba ekoki kozala mokano ya liboso oyo tokoki komityela. Na nsima, ezali na makambo mosusu ya sikisiki oyo tokoki koyekola, lokola mbeka ya Klisto mpo na kosikola biso, kondimana ndenge na ndenge oyo Yehova asalaki na libota na ye, to bisakweli mosusu oyo bizali kati na Biblia. Ezali na makambo mingi oyo makoki kosalisa biso mpo na kolya mpe kosala ete bilei ya elimo esala kati na nzoto na biso. Tosengeli kozwa boyebi motindo wana na mokano nini? Ezali mpo na koluka komikumisa te, kasi mpo na kolendisa bolingo na biso mpo na Yehova mpe kozala na boyokani ya penepene elongo na ye. (1 Bakolinti 8:1; Yakobo 4:8) Soki tozali kozwa boyebi yango na mposa mingi, tozali kosalela yango kati na bomoi na biso, mpe kosalisa na yango bato mosusu, tokomekola mpenza Klisto. Yango ekosalisa biso ete tópikama malamu kati na ye.
Ozali ‘kotongama kati na Klisto’?
8. ‘Kotongama kati na Klisto’ elimboli nini?
8 Na likambo ya mibale na oyo etali kotambola na bomoko elongo na Klisto, Paulo asaleli lisusu elilingi oyo tokoki komona na miso na biso ya makanisi—nokinoki atiki elilingi ya nzete mpe asaleli elilingi ya ndako. Ntango tozali kokanisa ndako moko oyo ezali kotongama, tokanisaka bobele moboko na yango te kasi lisusu bifelo oyo bizali komata mpe bizali komonana na miso, na nzela ya mosala makasi. Bobele bongo, tosengeli kosala makasi mpo na kotonga bizaleli mpe mimeseno lokola ya Klisto. Mosala makasi motindo wana emonanaka epai ya bato, se lokola Paulo akomelaki Timoté ete: ‘Bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso.’ (1 Timoté 4:15; Matai 5:16) Wapi mwa misala ya boklisto oyo mitongaka biso?
9. (a) Mpo ete tómekola Klisto kati na mosala na biso ya kosakola, wapi mwa mikano mibongi oyo tokoki komityela? (b) Ndenge nini toyebi ete Yehova alingi ete tósepela na mosala na biso?
9 Yesu apesaki biso mokumba ya kosakola mpe koteya nsango malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20) Apesaki ndakisa eleki malamu, azalaki kotatola na mpiko mpe na mozindo. Ya solo, tokokoka kosala mpenza ndenge moko na ye te. Nzokande, ntoma Petelo atyelaki biso mokano oyo: “Bóbulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; bóselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monɔkɔ na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino. Kasi, bózongisa monɔkɔ yango na bopɔlɔ mpe na limemya [mozindo, NW].” (1 Petelo 3:15) Soki omonaka ete ozalaka ‘ntango nyonso pene mpo na kozongisa monɔkɔ te,’ kolɛmba nzoto te. Omityela mikano ya bokatikati oyo mikosalisa yo kokola mokemoke kino na esika yango. Komibongisa liboso ekoki kosalisa yo na kobongola lolenge na yo ya kobanda lisolo to kosalela vɛrsɛ moko to bavɛrsɛ mibale. Okoki komityela mikano ya kokabola mikanda mpe bazulunalo mingi koleka, kosala bozongeli ya sika mingi mpe kobanda boyekoli ya Biblia. Osengeli kotya likebi mingi bobele na mitángo te—lokola motángo ya bangonga, ya mikanda, to ya bato oyo ozali koyekola na bango Biblia—kasi likoló na motuya na yango. Komityela mikano ya bokatikati mpe kosala nyonso mpo na kokokisa yango ekoki kosalisa biso ete tósepela komipesa na mosala ya kosakola. Ezali yango nde Yehova alingi—ete tósalela ye “na esengo.”—Nzembo 100:2; kokanisá na 2 Bakolinti 9:7.
10. Tángá mwa misala mosusu ya boklisto oyo tosengeli kokokisa, mpe lolenge nini yango ezali kosalisa biso?
10 Ezali mpe na misala oyo mitongaka biso kati na Klisto oyo tokokisaka kati na lisangá. Oyo eleki ntina kati na yango ezali bongo komonisa bolingo bamoko epai na bamosusu, mpamba te, yango nde elembo ya baklisto ya solo. (Yoane 13:34, 35) Ntango tozali naino koyekola, mingi kati na biso tokómaka na bokangami makasi na ndeko oyo azali koyekolisa biso, mpe yango ezali likambo elongobani. Nzokande, sikawa tokoki kolanda toli ya Paulo ete ‘tozipola mitema na biso’ na kolukáká koyebana na bandeko mosusu kati na lisangá. (2 Bakolinti 6:13) Bankulutu bazalaka mpe na mposa ete tómonisela bango bolingo mpe tósepela na bango. Ntango tozali kosala na bango elongo, tozali koluka toli na bango euti na Makomami mpe tozali kondima yango, tokoyeisa mosala makasi na bango pɛpɛlɛ. (Baebele 13:17) Mpe lisusu, yango ekosunga biso ete tótongama kati na Klisto.
11. Likanisi nini ya bokatikati tosengeli kozala na yango na ntina na batisimo?
11 Batisimo ezali libaku ya esengo! Nzokande, tosengeli kokanisa te ete nsima ya batisimo bomoi na biso mobimba ekozala se na esengo lolenge wana. Eteni monene ya kotongama na biso kati na Klisto esɛngi ‘kolanda kotambola na molɔngɔ, na ngámbo moko.’ (Bafilipi 3:16, NW) Yango elingi koloba te ete bomoi na biso ekozala mawamawa to na mitungisi ntango nyonso. Elimboli bobele ete tokotambola alima—na maloba mosusu, tokokolisa mimeseno malamu ya elimo mpe tokokangama na yango mokolo na mokolo mpe mbula na mbula. Tómikundola ete, “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.”—Matai 24:13.
Ozali ‘kotɛngatɛnga te kati na kondima’?
12. ‘Kotɛngatɛnga te kati na kondima’ elimboli nini?
12 Na eteni ya misato mpo na kolimbola lolenge tosengeli kotambola na bomoko elongo na Klisto, Paulo alendisi biso ete ‘tótɛngatɛnga te kati na kondima.’ Libongoli moko elobi ete, “tóndimisama na oyo etali kondima,” mpamba te, Paulo asalelaki liloba ya Greke oyo ekoki kolimbola “kondimisa, kopesa ndanga, mpe koyokanisa mpenza na mibeko.” Ntango tozali kokola na boyebi, tozali kozwa bantina mosusu ya komona ete kondima na biso kati na Yehova Nzambe ezali na moboko malamu mpe, ebongi engebene mibeko. Mbuma na yango ezali ete tokotɛngatɛnga te. Ekokóma mpasi mingi mpo ete mokili ya Satana eningisa biso. Yango ezali kokundwela biso maloba ya Paulo ete ‘tókola kino kokɔmela.’ (Baebele 6:1, NW) Kokɔmela mpe kozanga kotɛngatɛnga etambolaka elongo.
13, 14. (a) Kozanga kotɛngatɛnga ya baklisto ya Kolose na ekeke ya liboso ezalaki liboso ya likama nini? (b) Paulo atungisamaki mpo na likambo nini?
13 Na ekeke ya liboso, baklisto ya Kolose bazalaki liboso ya makama oyo elingaki kobebisa kozanga kotɛngatɛnga na bango. Paulo akebisaki ete: “Bókeba: ntango mosusu moto moko akobenda bino lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bozimbisi ya mpamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.” (Bakolose 2:8, NW) Paulo alingaki te ete Bakolose, baoyo basilaki kokóma bato ya “bokonzi ya Mwana ya bolingo ya [Nzambe],” bábendama to bámemama mosika longwa na ezaleli epambwami na elimo oyo bazalaki na yango. (Bakolose 1:13) Kozimbisama na nzela nini? Paulo atángi mateya ya “filozofi.” Liloba yango esalelami bobele na esika yango kati na Biblia mobimba. Azalaki nde koloba mpo na banganga-mayele ya filozofi ya Greke, lokola Platon mpe Socrate? Atako mateya ya bato yango mazalaki likama mpo na baklisto ya solo na ntango wana, liloba “filozofi” ezalaki kosalelama na makambo mingi. Mbala mingi etalelaki bituluku mpe masangá mingi oyo ezali na lolenge na yango ya kokanisa—ezala na mangomba. Na ndakisa, Bayuda mosusu na ekeke ya liboso lokola Josèphe mpe Philon babéngaki mateya na bango ete filozofi—mbala mosusu mpo ebenda bato mingi.
14 Mateya mosusu ya filozofi oyo Paulo amitungisaki na ntina na yango etalelaki makambo ya losambo. Na nsima, bobele na mokapo yango ya mokanda epai na Bakolose, alobelaki baoyo bazalaki koteya ete, “Simbá te! Lɛtá te! Mamá te!” mpe na ndenge yango, bazongelaki makambo ya Mibeko ya Mose oyo esukaki ntango Klisto akufaki. (Baloma 10:4) Longola mateya ya filozofi ya bapakano, bopusi ndenge na ndenge etyaki elimo ya lisangá na likama. (Bakolose 2:20-22) Paulo akebisaki na ntina na mateya ya filozofi oyo ezalaki kati na “makambo mikemike na mokili.” Mateya wana ya lokuta mautaki epai na bato.
15. Ndenge nini tokoki kopɛngola bopusi ya makanisi oyo mauti na Makomami te oyo tokutanaka na yango mbala mingi?
15 Koteya makanisi ya bato oyo mazwi moboko na yango na Liloba ya Nzambe te ekoki kotya kozanga kotɛngatɛnga ya baklisto na likama. Lelo oyo tosengeli kokeba na makama motindo wana. Ntoma Yoane akebisaki ete: “Balingami, bóndimela liloba nyonso lipemami te, kasi bómeka maloba mapemami mpo na koyeba soki mauti na Nzambe.” (1 Yoane 4:1, NW) Yango wana, soki moninga moko ya kelasi azali komeka kondimisa yo ete kolanda mitinda ya Biblia ezali likambo esilá ngala, to moninga moko na esika ofandaka azali komeka kopusa yo ete okóma na makanisi ya koluka biloko mingi ya mosuni, to soki moninga moko ya mosala azali kopusa yo na mayele ete otika kotosa lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia, to ata soki moninga moko mondimi azali kotɔnga to koloba mabe na ntina na bato mosusu kati na lisangá engebene makanisi na ye moko, kondimela ye te. Bwaká makambo oyo mayokani na Liloba ya Nzambe te. Soki tokosala bongo, tokobatela kozanga kotɛngatɛnga na biso wana tozali kotambola na bomoko elongo na Klisto.
‘Bótonda na kondima na bozongisi matɔ́ndi’
16. Wapi likambo ya minei na oyo etali kotambola na bomoko elongo na Klisto, mpe motuna nini tokoki komituna?
16 Likambo ya minei oyo Paulo alobeli mpo na kotambola na bomoko elongo na Klisto ezali bongo ‘kotonda na kondima na bozongisi matɔ́ndi.’ (Bakolose 2:7, NW) Liloba ‘kotonda’ ezali kopesa biso elilingi ya ebale oyo mai ezindisi bokula na yango. Yango ezali kopesa likanisi ete biso baklisto tosengeli ntango nyonso kozongisaka matɔ́ndi. Ebongi ete mokomoko kati na biso amituna ete, ‘Nazongisaka matɔ́ndi ntango nyonso?’
17. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete biso nyonso tozali na makambo mingi oyo tosengeli kozongisa botɔ́ndi mpo na yango, ata na ntango ya mpasi? (b) Wapi mwa makabo mauti na Yehova oyo omonaka ete ebongi na yo kozongisa matɔ́ndi mpo na yango?
17 Ya solo, tozali na bantina mingi ya kozongisaka matɔ́ndi mingi epai na Yehova mokolo na mokolo. Ata na ntango ya mpasi mingi, ekoki kozala na makambo mikemike oyo makoki kobɔndisa biso. Moninga moko akoki kokabola mawa na biso. Molingami moko akoki kopesa biso lipwɛpwɛ to koyamba biso mpo na kolendisa biso. Tokoki kopema malamu na butu mpe kozwa lisusu makasi. Tokoki kolya bilei kitoko oyo esilisi biso nzala. Tokoki koyoka loyembo ya ndɛkɛ, kosɛka ya mwana moke, kotala likoló oyo ezali kongɛnga na langi ya bule, mwa mopɛpɛ ya mpiɔ oyo ezali kopɛpa—nyonso oyo mpe makambo mosusu mingi tokoki kozwa yango bobele na mokolo moko. Ezali malamu te soki tokotalela makabo motindo yango mpamba. Ebongi mpenza tózongisa matɔ́ndi mpo na yango, boye te? Makabo nyonso wana mautaka epai na Yehova, Liziba ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Mpe apesi biso makabo oyo maleki nyonso wana—na ndakisa, bomoi yango moko. (Nzembo 36:9) Lisusu, apesi biso likoki ya kozwa bomoi ya seko. Mpo na kopesa biso likabo yango, Yehova amipimelaki eloko eleki monene na kotindáká Mwana mobotami-bobele-moko na ye, “ye oyo alingi ye mingi.”—Masese 8:30, NW; Yoane 3:16.
18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔ́ndi epai na Yehova?
18 Yango wana, maloba ya mokomi na nzembo mazali mpenza solo ete: “Ezali malamu kotɔ́nda [Yehova].” (Nzembo 92:1) Bobele bongo, Paulo akundwelaki baklisto ya Tesaloniki ete: “Bótɔ́ndaka kati na makambo nyonso.” (1 Batesaloniki 5:18; Baefese 5:20; Bakolose 3:15) Mokomoko na biso akoki komityela mokano ya kozongisaka matɔ́ndi mingi. Mabondeli na biso masengeli te kozalaka bobele malɔmbo epai na Nzambe mpo na bamposa na biso. Yango ezali na esika na yango kati na mabondeli na biso. Kasi, kanisá soki ozali na moninga moko oyo asololaka na yo bobele soki azali na mposa ya kosɛnga yo eloko! Boye, mpo na nini te kobondela Yehova ata bobele mpo na kotɔ́nda ye mpe kosanzola ye? Na ntembe te mabondeli motindo wana masepelisaka ye ntango azali kotala mokili oyo ezangi botɔ́ndi! Litomba mosusu ezali ete mabondeli motindo wana makoki kosalisa biso ete tótya likebi na biso na makambo malamu ya bomoi, kokundweláká biso mapamboli oyo tozali na yango.
19. Ndenge nini maloba ya Paulo na Bakolose 2:6, 7 mamonisi ete biso nyonso tokoki kolanda kokola wana tozali kotambola elongo na Klisto?
19 Tomoni ete vɛrsɛ moko mpamba ya Liloba ya Nzambe ekoki kopesa litambwisi ya mayele, boye te? Toli ya Paulo oyo elobi ete tólanda kotambola na bomoko elongo na Klisto ezali likambo oyo mokomoko kati na biso asengeli kobatela na motema. Tiká ete tózwa ekateli ya ‘kopikama kati na Klisto,’ ya ‘kotongama kati na ye,’ ya ‘kotɛngatɛnga te kati na kondima,’ mpe ‘kotonda na bozongisi matɔ́ndi.’ Toli yango ezali na ntina mingi mpenza mpo na baoyo bazwi batisimo sika. Kasi, ebongi na biso nyonso. Kanisá lolenge oyo mosisa ya monene ekolaka ntango nyonso mpe lolenge oyo ndako oyo bazali kotonga emataka mokemoke. Na yango, kotambola na biso elongo na Klisto ezali na nsuka te. Ezali na makambo mingi oyo tokoki kokola kati na yango. Yehova akosalisa biso mpe akopambola biso, mpamba te alingi ete tókoba kotambola elongo na ye mpe elongo na Mwana na ye molingami libela na libela.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Kotambola na bomoko elongo na Klisto esɛngi makambo nini?
◻ ‘Kopikama kati na Klisto’ elimboli nini?
◻ Lolenge nini tokoki ‘kotongama kati na Klisto’?
◻ Mpo na nini ezali na ntina ete ‘tótɛngatɛnga te kati na kondima’?
◻ Bantina nini tozali na yango mpo na ‘kotonda na bozongisi matɔ́ndi’?
[Elilingi na lokasa 10]
Misisa ya nzete mbala mosusu mimonanaka na libándá te, kasi mipesaka nzete bilei mpe mipikaka yango makasi